“Kobanga Yehova—Yango nde bwanya”
“NSIMA ya koyoka nyonso, nsuka ya likambo yango oyo: Bangá Nzambe ya solo mpe batelá bakomandema na ye. Mpamba te yango nde likambo mobimba esengisami na moto.” (Mosakoli 12:13, NW ) Salomo, mokonzi ya Yisalaele ya kala, apemamaki na Nzambe ntango akomaki maloba wana ya ntina mingi mpo na kosukisa mokanda na ye! Yobo mpe ayebaki ete kobanga Nzambe ezali na ntina mingi; alobaki boye: “Talá! Kobanga Yehova—yango nde bwanya, mpe kokima mabe nde mayele.”—Yobo 28:28, NW.
Biblia emonisaka ete kobanga Yehova ezali na ntina mingi. Mpo na nini kolona ezaleli ya kobanga Nzambe ezali nzela ya bwanya? Kobanga Nzambe ezali na litomba nini mpo na mokomoko na biso mpe mpo na biso nyonso basambeli ya Yehova? Masese mokapo 14, vɛrsɛ 26 tii 35 epesi biyano na mituna yango.a
Eyeisaka “kondima makasi”
Salomo alobi boye: “Botosi kotosa [Yehova] ekoyeisa kondima makasi; bana na ye bakozwa ebombelo.” (Masese 14:26) Moto oyo abangaka Nzambe atyaka elikya na ye epai ya Yehova, Nzambe ya sembo mpe mozwi-ya-nguya-nyonso. Moto ya ndenge wana abangaka avenire te! Azalaka na bomoi ya molai mpe ya esengo.
Kasi, ezali boni mpo na bato oyo batyaka elikya na bango na mikano, bibongiseli, makanisi, mpe biloko ya mokili? Makambo nyonso oyo bakoki kolikya kozala na yango ezali se mpo na ntango mokuse, mpo Biblia elobi ete: “Mokili ezali koleka mpe ndenge moko mposa na yango, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.” (1 Yoane 2:17) Na bongo, tozali mpenza na ntina ya ‘kolinga mokili to biloko oyo ezali na mokili’?—1 Yoane 2:15.
Makambo nini baboti oyo babangaka Nzambe bakoki kosala mpo bana na bango ‘bázwa ebombelo’? Mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Yaká bino bana, yokamelá ngai, nakoteya bino [kobanga Yehova].” (Nzembo 34:11) Soki baboti bazali kopesa bana na bango ndakisa ya malamu mpe malako na oyo etali kobanga Nzambe, bana wana bakobanda kotyela Yehova motema mingi ata ntango bakokóma mikóló.—Masese 22:6.
Salomo abakisi boye: “Kobanga Yehova ezali libulu ya bomoi, mpo na kolongwa na mitambo ya liwa.” (Masese 14:27, NW) Kobanga Yehova ezali “libulu ya bomoi” mpamba te Nzambe ya solo azali “liziba ya mai ya bomoi.” (Yilimia 2:13) Koyekola koyeba Yehova mpe Yesu Klisto ekoki kopesa biso bomoi ya seko. (Yoane 17:3) Kobanga wana ekoki kolongola biso pembeni ya mitambo ya liwa. Na ndenge nini? Masese 13:14 elobi boye: “Mibeko ya moto ya mayele ezali liziba ya bomoi; mpo na kolongwa na mitambo ya kufa.” Soki tozali kobanga Yehova, tozali kotosa mibeko na ye, mpe kotika ete Liloba na ye etambwisa biso, tokokwea te na misala ya mabe oyo ekoki komemela moto liwa ya mobesu.
‘Lokumu mpo na mokonzi’
Na boumeli ya bambula mingi ya bokonzi na ye, Salomo azalaki kobanga Yehova mpe kotosa ye. Yango wana azalaki mokonzi ya malamu mpenza. Nini emonisaka ete mokonzi moko azali koyangela malamu? Masese 14:28 epesi eyano oyo: “Mpo na mingi ya bato, mokonzi akozwa lokumu; [mokonzi, “NW”] akobeba mpo na kozanga ya bato.” Bayebaka ete mokonzi azali koyangela malamu na bolamu oyo azali kosalela bato ya mboka na ye. Soki bato mingi bazali kolinga ete atikala kaka mokonzi na bango, elakisaka ete azali koyangela malamu. Salomo azalaki koyangela bato “longwa na mai monene [to Mai Motane] epai moko bobele na mai monene [ya Meditelane] epai mosusu; longwa mpe na ebale [Efalata] kino ndelo ya mokili mpenza.” (Nzembo 72:6-8) Ntango Salomo azalaki mokonzi, mboka na ye ezalaki na kimya mpe bato bazalaki na bomoi ya malamu na ndenge oyo emonanaki liboso te. (1 Mikonzi 4:24, 25) Salomo ayangelaki malamu mpenza. Nzokande, soki bato bazali kosepela na mokonzi te, yango ebebisaka mokonzi.
Na likambo yango, tokoki koloba nini mpo na Salomo Monene, Mokonzi Masiya, Yesu Klisto? Kanisá ebele ya bato oyo azali koyangela lelo oyo. Banda na nsuka moko ya mokili tii na nsuka mosusu, bato koleka milio 6 oyo babangaka Nzambe basili kopona ete Klisto ayangela bango. Bazali na kondima epai ya Yesu mpe basangani na losambo ya Nzambe ya bomoi. (Yoane 14:1) Na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto, bato nyonso oyo Nzambe abateli na makanisi na ye bakosekwa bango nyonso. Na ntango wana mabelé ekozala paladiso oyo etondi na bato ya esengo mpe ya sembo, oyo bamonisaki ete bazali kolinga Mokonzi na bango. Yango ekomonisa mpenza ete Klisto azali koyangela malamu! Yango wana, tókangama makasi na elikya ya Bokonzi.
Matomba ya elimo mpe ya mosuni
Soki tozali kobanga Nzambe, tokozala na kimya ya motema mpe ya elimo. Ezali bongo mpamba te bwanya emonanaka na makambo mingi, oyo moko na yango ezali bososoli. Masese 14:29 (NW) elobi boye: “Ye oyo asilikaka noki te atondi na bososoli, kasi ye oyo azali motema mokuse azali kolendisa bozoba.” Bososoli esalisaka biso tómona ete nkanda makasi ekoki kobebisa elimo na biso. “Koyinana, koswana, zuwa, nkanda makasimakasi, kowelana” ezali na kati ya makambo oyo ekoki kozangisa biso ‘libula ya bokonzi ya Nzambe.’ (Bagalatia 5:19-21) Biblia epesi biso toli ete tóbombaka nkanda te ata soki tozali na ntina ya kosilika. (Baefese 4:26, 27) Motema mokuse ekoki kotinda biso tóbimisa maloba to tósala makambo oyo biso moko tokomona mabe na nsima.
Mokonzi ya Yisalaele amonisi mabe oyo nkanda ekoki kosala na nzoto; alobi boye: “Motema ya kimya ekoyeisela mosuni bomoi; kasi elulela ekopɔlisa mikuwa.” (Masese 14:30) Nkanda ememaka maladi lokola oyo: mikakatano mpo na kopɛma, tansiɔ, maladi ya libale (foie), mpe maladi ya nsɔngi (pancréas). Lisusu, minganga batángaka nkanda mpe kongala na kati ya makambo oyo ebakisaka, to mpe epesaka, maladi lokola mpota na estoma, kobima bambuma na mposo, maladi ya mpema, maladi ya loposo ya nzoto mpe libumu mpasi. Nzokande, “kimia ya motema epesaka nzoto makasi.” (Masese 14:30, Bible na Lingala ya lelo oyo) Yango wana, bwanya esengeli kotinda biso “tólanda makambo oyo epesaka kimya mpe makambo oyo etongaka biso nyonso.”—Baloma 14:19.
Kobanga Nzambe esalisaka biso tóponaka bilongi te
Salomo alobi boye: “Konyokola mobola ekosilikisa [Mozalisi] na ye; nde ye oyo akokumisa ye akoyokela mobola mawa.” (Masese 14:31) Moto oyo abangaka Nzambe ayebaka ete bato nyonso bazali na Mozalisi se moko, Yehova Nzambe. Yango wana, ata mobola azali kaka moto mpe makambo oyo bazali kosala ye ekoki kosepelisa to koyokisa Mozalisi ya bato nyonso mawa. Mpo na kopesa Nzambe nkembo, tosengeli kosepela na bato nyonso mpe kopona bilongi te. Moklisto oyo azali mobola asengeli kozwa bilei ya elimo lokola moto mosusu nyonso. Tosengeli koyebisa babola mpe bazwi nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.
Mokonzi Salomo alobeli litomba mosusu ya ezaleli ya kobanga Nzambe na maloba oyo: “Moto mabe abwakami na mabe na ye nde moyengebene azali na elikya kati na kufa [to bosembo, “NW”] na ye.” (Masese 14:32) Na ndimbola nini moto mabe abwakami? Bato mosusu balobaka ete maloba yango elimboli ete moto ya ndenge wana akoki te kozonga lisusu malamu soki likama ezwi ye. Nzokande, soki likama eyei, moto oyo abangaka Nzambe abombamaka na bosembo na ye epai ya Nzambe. Lokola atyelaka Yehova motema mobimba ata liboso ya liwa, azalaka na ekateli lokola Yobo, oyo alobaki boye: “Kino nakokufa nakomilongwela na sembo na ngai te.”—Yobo 27:5.
Mpo na kotikala sembo, tosengeli kobanga Nzambe mpe kozala na bwanya. Epai wapi tokoki kozwa bwanya? Masese 14:33 epesi eyano oyo: “[Bwanya, “NW” ] efandi na motema ya moto ya boyebi; ata katikati ya bilema emonani polele.” Ya solo, bwanya ekoki komonana na motema ya moto ya boyebi. Kasi, na ndenge nini emonani na katikati ya bilema? Buku moko elobi ete “lokola azalaka na mposa ya komonana moto ya bwanya, zoba abimisaka maloba oyo akanisaka ete ezali bwanya kasi nsukansuka emonanaka ete ezali bozoba.”
“Etombolaka ekólo”
Nsima ya kolobela matomba oyo ezaleli ya kobanga Nzambe ememelaka moto mokomoko, mokonzi abendi sikoyo likebi na bolamu oyo ezaleli yango ememelaka ekólo mobimba na maloba oyo: “Boyengebene ekokumisa libota nde masumu ekoyeisela bato nsɔni.” (Masese 14:34) Likambo yango emonanaki mpenza polele na ekólo Yisalaele! Ntango Bayisalaele bazalaki kotosa mibeko ya Nzambe, ekólo na bango ezalaki koleka bikólo nyonso oyo ezalaki zingazinga na yango. Kasi, lokola Bayisalaele bazalaki mbala na mbala kozanga botosi, Yehova azalaki kotika bango mpe nsukansuka asundolaki ekólo na bango. Likambo yango ezali solo ata mpo na basaleli ya Nzambe lelo oyo. Biso baoyo tozali na lisangá ya boklisto tokeseni na bato ya mokili mpamba te totosaka mibeko ya sembo ya Nzambe. Kasi, mpo tóbatela boyokani malamu wana elongo na Nzambe, mokomoko na biso asengeli kozala na etamboli ya pɛto. Soki tozali kosala masumu, ekozala nsɔni mpo na biso moko mpe ekofingisa Nzambe mpe lisangá na ye.
Salomo alobeli mpe likambo oyo esepelisaka mokonzi: “Lipamboli ya mokonzi ekopesamela moombo ya mayele nde nkanda na ye ekoyela mosali ya nsɔni.” (Masese 14:35) Lisusu, Masese 16:13 elobi boye: “Bibɛbu ya boyengebene ekosepelisa mokonzi; alingi ye oyo akolobaka sembo.” Ya solo, Motambwisi mpe Mokonzi na biso, Yesu Klisto, asepelaka soki tozali kosala na bosembo mpe na mayele mpe tozali kosalela bibɛbu na biso mpo na kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli. Yango wana, tósala nyonso mpo tózala na mingi ya kosala na mosala yango wana tozali kozwa mapamboli oyo eutaka na kobanga Nzambe ya solo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lisolo oyo elobelaki Masese 14:1-25 ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ 2004, lokasa 26 tii 29, mpe ya 15 Yuli 2005, lokasa 17 tii 20.
[Elilingi na lokasa 15]
Moto akoki koyekola ezaleli ya kobanga Nzambe