Kosolola, ezali bobele na maloba te
KANISA naino ebele ya ba touristes oyo bazali kotala parc moko kitoko. Atako bango nyonso bazali kotala eloko yango moko, kasi moto na moto azali komona yango na lolenge lokeseni. Mpo na nini? Mpo ete moto na moto azali na esika ebongi mpo na ye. Bato mibale bakotɛlɛma te bobele na esika moko. Epai mosusu, bato nyonso bakotya likebi bobele na likambo moko te. Moto na moto akotala likambo oyo lizali mpenzampenza kosepelisa ye.
Ezali lolenge moko kati na libala. Ata soki bazali na boyokani malamu, babalani mibale bakoki mpenza te kotalela makambo nyonso na lolenge moko. Mobali mpe mwasi bakeseni na makambo lokola mayoki, makambo bakutanaki na yango uta bomwana, mpe bopusi ya libota. Kokesena wana ekoki kobimisa matáta makasi. Ntoma Paulo alobaki polele ete: “Baoyo [bazali kobala] bakozwa bolózi kati na nzoto na bango.”—1 Bakolinti 7:28, MN.
Kosolola esɛngi kosala milende mpo na kosangisa kokesena wana kati na boyokani ya mosuni moko. Yango esɛngi ntango mpo na kolobana. (Tala encadré na lokasa 7.) Kasi yango esɛngi makambo mingi mosusu.
Komonisa bososoli
Lisese moko ya Biblia lilobi ete: “Motema ya moto na mayele ekomonisa bososoli na monoko na ye, mpe mbebu na ye ekobakisa boyebi.” (Masese 16:23, MN) Liloba ya Liebele oyo libongolami na ‘ekomonisa bososoli’ elimboli libosoliboso kozala na bokɛngi, komeka makambo na likebi nyonso kati na makanisi. Na bongo, kosolola malamu ekoutaka na motema, kasi na monoko te. Mosololi malamu asengeli kozala bobele molobi te; asengeli kozala moyoki malamu. (Yakobo 1:19) Asengeli kososola mayoki mpe makambo oyo mazali kati na motema ya mobalani na ye.—Masese 20:5.
Lolenge nini? Ntango mosusu yango ekoki kosalema na kotaleláká mabaku oyo mabimisaki matáta. Mobalani na yo atungisami na mayoki to azali na mpasi na nzoto? Maladi moko ezali na bopusi likoló na ezalela ya mobalani na yo? Biblia elobi ete: “Oyo nde esengo na kobimisa liloba malamu na ntango na yango!” (Masese 15:23, Today’s English Version) Na bongo, kotalela mabaku ekosalisa yo na koyanola na lolenge lobongi.—Masese 25:11.
Atako bongo, mbala mingi, matáta mabimaka likoló na makambo oyo masila koleka.
Kososola makambo ya kala
Makambo oyo tokutanaki na yango na bomwana mazali na bopusi mingi likoló na makanisi na biso na bokóló. Lokola babalani bauti na mabota makeseni, matáta makoki kozanga te mpo na lolenge ya kotalela makambo.
Likambo moko lilobelami kati na Biblia limonisi yango. Ntango sanduku ya kondimana ezongisamaki na Yelusaleme, Davidi amonisaki esengo na ye liboso na bato nyonso. Kasi ezalaki boni mpo na mwasi na ye, Mikala? Biblia eyebisi ete: “Mikala, mwana mwasi na Saulo, atalaki na lininisa mpe amonaki Davidi wana ezalaki ye kopumbwapumbwa mpe kobinabina liboso na Jéhovah; bongo atyolaki ye na motema na ye.”—2 Samwele 6:14-16.
Mikala amonisaki ezaleli ya kozanga kondima ya tata na ye, Saulo, mobali oyo azangi sembo. C. F. Keil mpe F. Delitzsch, balimboli ya Biblia, bamonisi ete yango ezali ntina oyo Mikala abéngami na verset 16 lokola “Mwana mwasi na Saulo” na esika ya kobéngama ete mwasi ya Davidi. Atako bongo, matáta oyo mabimaki na nsima mamonisi polele ete Davidi mpe Mikala bazalaki na likanisi moko te na likambo wana ya esengo.—2 Samwele 6:20-23.
Ndakisa wana emonisi ete bopusi makasi bouti na lolenge moto abɔkwamaki ekoki kosala ete mobali mpe mwasi batalela makambo na lolenge lokeseni mpenza. Yango ezali komonana ata soki bango mibale bazali na bomoko mpo na kosalela Jéhovah. Na ndakisa, mwasi oyo apesamelaki lisungi likoki te kati na mayoki na ntango azalaki mwana moke akoki komonisa mposa makasi ya kondimama mpe kolendisama. Yango ekoki kotungisa mobali na ye. Akoki koloba ete: “Nakoki koloba na ye mbala monkámá ete nalingi ye, kasi yango ekoki te.”
Kati na likambo oyo, kosolola esɛngi “kotalela bobele matomba na yo moko te, kasi matomba ya basusu lokola.” (Bafilipi 2:4) Mpo na kosolola, mobali asengeli kotalela mwasi na ye longwa na makambo na ye [mwasi] ya kala na esika na kotalela bobele oyo ya ye moko. Ya solo, mwasi asengeli mpe kosala lolenge moko mpo na mobali na ye.—1 Bakolinti 10:24.
Soki akutanaki na makambo ya mpasi
Kotalela matomba ya mobalani na yo ezali na ntina mingimingi soki babebisa ye nzoto to basanganaki na ye na makasi wana azalaki mwana moke—na mawa nyonso, ezali likambo oyo lizali kokóla na mikolo na biso. Na ndakisa, mwasi moko akoki komiyoka ete na ntango ya kosangisa nzoto, akoki te kokesenisa makambo ya kala mpe oyo ya sikawa, akoki te kokesenisa mobalani na ye mpe ye oyo abebisaki ye na makasi lokola mpe akoki te kokesenisa bosangisi ya nzoto mpe kosangana na makasi. Yango ekoki kopesa nkanda, mingi mpenza soki mobali azali kotalela te likambo wana ya mpasi lolenge moko na mwasi na ye.—1 Petelo 3:8.
Ata soki okoki te kosilisa mpasi wana ya kala to mpe okoki mpenza te kolongola matomba mabe na yango nyonso, ezali na makambo mingi oyo osengeli kosala mpo na kobɔndisa mobalani oyo anyokwami na makanisi. (Masese 20:5) Lolenge nini? Petelo akomaki ete: “Bino mibali bosengeli komeka kofanda na bososoli elongo na basi na bino.” (1 Petelo 3:7, Phillips) Kososola makambo ya kala ya mwasi na yo ezali moko na makambo ya ntina mpo na kosolola malamu. Soki ozangi boboto mpe motema mawa, maloba na yo makozala na ntina te.
Yesu “aokaki mawa” wana azalaki kokutana na baoyo bazalaki na maladi, atako ye moko abɛlaki bamaladi lokola bango te. (Matai 14:14) Bobele bongo, ekoki kozala ete bazangaki kotyela yo likebi to babebisaki yo te lokola yango ezalaki mpo na mwasi na yo, kasi na esika ya kotalela mpasi na ye mpamba, omitya na esika na ye mpo na oyo etali makambo na ye ya kala, mpe pesa ye lisungi. (Masese 18:13) Paulo akomaki ete: “Ekoki na biso bato na nguya ete toyika mpiko na bolɛmbu na bato bazangi nguya, ekoki komisepelisa biso mpenza te.”—Baloma 15:1.
Bazwami na motambo ya nkanda
Libala ezali lokola mbeki na motuya mingi. Soki ebukani mpo na ekobo, ekobimisa makámá mingi. (Masese 6:32) Ya solo, soki ye oyo asali mabe te azwi ekateli ya kolimbisa mobalani na ye, biteni na yango bikoki kokangisama lisusu na nzela ya kozongisa boyokani. Kasi bilembo bikotikala, mpe soki koswana ebimi, ekoki komema na kotalela bilembo yango mpe kosalela makambo ya kala lokola ebundeli.
Kozanga bosembo ya mobalani moko ekoki kobimisa nkanda. Kasi soki olimbisaki mobalani na yo, omibatela ete nkanda ya kala ebebisa te malamu oyo omonisaki na nzela na bolimbisi. Soki nkanda wana ezali kokóla malɛmbɛmalɛmbɛ kati na motema to ebimisami kozanga komonisa ezaleli ya mawa, nkanda ekosilaka te ekopesa mpasi epai na babalani mibale. Mpo na nini? Monganga moko apesaki toli ete: “Soko ozali komiyoka ete mobalani na yo azokisi yo na motema, ezali mpo ete yo ozali naino komibanzabanza na ntina na ye. Soki oboyi kosolola to ozongisi mabe na mabe, ozali kopesa mpasi bobele na mobalani na yo te, kasi ozali komibebisa yo moko. Lisusu, ozali nde kobebisa mingi mpenza boyokani oyo ozalaki na yango mposa.”
Ya solo, okoki te kobongisa mikakatano kati na libala na yo kozanga kokitisa nkanda na yo. Nzokande, na ntango oyo nkanda ekiti, sololá na mobalani na yo na ntina etali mayoki na yo. Limbola ntina oyo ozokisamaki na motema, olingi nini mpo ete motema mokita, mpe okosala nini mpo na kobatela boyokani. Osengeli soko moke te kosalela makambo ya kala lokola ebundeli mpo na koluka komilóngisa wana bozali kosolola.
Milangwa mikobebisaka kosolola
Libala likozala na mpasi makasi soki mobalani moko azali molangwi na masanga mpe momeli na drogue. Mobalani oyo azali molangwi te akoki kozala kati na ezalela ekokani na oyo ya Abigaili, lokola elobelami kati na Biblia. Wana mobali na ye Nabala “alangwaki masanga,” Abigaili amekaki kosala nyonso mpo na kopɛngola makámá masengelaki koya mpo na etamboli na ye ezangi mayele. (1 Samwele 25:18-31, 36) Mabala oyo kati na yango mobalani moko amipesi na milangwa mpe mosusu azali mbala na mbala komeka kobongola ezalela wana, makokani na libala ya Nabala mpe Abigaili.a
Emonani polele ete, ezali libɔndisi monene wana moto oyo amipesi na milangwa abandi kobongola ezaleli na ye. Kasi yango ezali bobele ebandeli. Kanisa mopepe makasi mobebisi engumba moko moke. Bandako ebukani, banzeté epikwami, batelefone ekwei na nsé. Ezalaki esengo ntango mopepe mosilaki. Kasi sikawa mosala monene ya kobongisa mosengeli kosalema. Ezali lolenge moko na ntango mobalani abandi kobongola ezaleli na ye. Boyokani oyo ebebaki esengeli kobongisama. Kotyelana motema mpe bosembo esengeli kozonga. Myango ya kosolola misengeli kobongisama. Mpo na kosembola moto oyo amipesaki na milangwa, kobongisama wana ya mokemoke ezali eteni ya “bomoto ya sika” oyo Biblia esɛngi na baklisto ete balóna yango. Bomoto wana ya sika esɛngi “nguya oyo eleki makanisi na bino.”—Baefese 4:22-24, MM.
Boyekoli ya Biblia esalisaki Leonard mpe Elaine na kotika kosalela drogue, kasi nguya oyo eleki makanisi ekokisaki mpenza mosala na yango te.b Mosika te bizaleli mosusu ya milangwa mibimaki. Elaine alobi ete: “Tolekisaki mibu 20 mpo na kosalela mitinda ya Biblia mpe kozala na libala ya esengo, kasi ezalaki mpasi mpo na biso. Milangwa na biso mikómaki makasi. Tozalaki koyekola to kobondela na ntina na makambo yango, nde tolóngaki te.”
Leonard mpe Elaine balukaki toli mpo na kososola bantina ya milangwa na bango. Na mateya oyo “moombo na sembo mpe na mayele” apesaki na ntango na yango likoló na kobebisa bana, kolangwa masanga, mpe limemya epai na basi ezalaki lisungi monene.c (Matai 24:45-47) Elaine alobi ete: “Tozwaki lisungi ya kobongisa matáta mpe ya kozongisa boyokani na biso.”
Kosilisa mikakatano
Rebeka atungisamaki mingi na ntina na basi ya mwana na ye Esau. Kobangáká ete Yakobo, mwana na ye mosusu, amekola ndakisa ya Esau, Rebeka amonisaki mawa na ye na kolobáká epai na Yisaka, mobali na ye ete: “Ngai nalɛmbi na bomoi na ntina na basi Bahiti oyo. Soko Yakobo akobala mwasi Mohiti lokola baoyo, mwasi na mokili oyo, nde bomoi na ngai ekozala malamu boni?”—Genese 27:46.
Tomoni ete Rebeka alobaki makasi na ntina na mayoki na ye, kasi apamelaki Yisaka te. Alobaki te ete: “Nyonso oyo ebimi mpo na yo!” to, “Yo nde osengelaki mpenza kobongisa likambo oyo!” Na kokesena, Rebeka asalelaki likitana (pronom) “Ngai” mpo na komonisa lolenge nini likambo yango litungisaki ye. Elobeli wana epusaki Yisaka na komitya na esika na ye, kasi alingaki te kolóngisa likanisi na ye. Lokola amiyokaki ete apamelamaki te, na ndenge emonani, eyano ya Yisaka na lisɛngi ya Rebeka epesamaki nokinoki.—Genese 28:1, 2.
Mibali mpe basi bakoki kozwa liteya na ndakisa ya Rebeka. Ntango matáta mabimi, botalela likambo yango na esika ya kopamelana moko na mosusu. Lolenge moko na Rebeka, yebisa motindo oyo otungisami na likambo yango. “Natungisami mpo ete . . .” to, “Nazokisami mpo ete . . .” ebongi mpenza na esika ya koloba ete “Ozokisaki ngai!” to, “Omityaka na esika na ngai te!”
Koumela ekoki te
Libala ya babalani ya liboso, Adam na Eva, eumelaki bikeke mingi, basalaki libota ya bana mibali mpe ya bana basi. (Genese 5:3-5) Kasi yango elimboli te ete yango ezalaki libala oyo libongaki na komekola. Uta ebandeli, elimo ya lipandá mpe kobuka mibeko ya sembo ya Mozalisi ebebisaki bokangami na bango kati na mosuni moko.
Bobele bongo, libala likoki lelo koumela, kasi ezangi makambo ya ntina mpo na kosolola. Makanisi mpe bizaleli mabe ya bomoto ekoki mpenza kolongolama. (Tala 2 Bakolinti 10:4, 5.) Yango ezali likambo lisengeli koumela. Kasi kosala milende ezali na ntina mingi. Jéhovah Nzambe azali mpenza komibanzabanza na ebongiseli ya libala, mpamba te azali Mobandisi na yango. (Malaki 2:14-16; Baebele 13:4) Nzokande, soki tosali oyo ekoki na biso, tokoki kolikya ete akopambola milende na biso mpe akobakisela biso mayele mpe nguya esengeli mpo na kosilisa nkaká nyonso ya kozanga kosolola kati na libala. —Tala Nzembo 25:4, 5; 119:34.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lisalisi oyo likoki kopesama na bameli masanga mpe na mabota na bango, etalelamaki kati na Réveillez-vous! ya le 22 Mai 1992, nkasa 3-7.
b Nkombo ebongwanaki.
c Tala Réveillez-vous! ya le 8 Octobre 1991, ya le 22 Mai 1992, mpe ya le 8 Juillet 1992.
[Etanda na lokasa 6]
Ebwakelo ya bosɔtɔ ezwaki ntango mingi!”
BABALANI baoyo bazalaki na mikakatano na libala batunamaki soki bazalaki kolekisa ntango boni, poso na poso, mpo na kobimisa ebwakelo ya bosɔtɔ na ndako. Bayanolaki ete 35 minite na poso moko, to 5 minite na mokolo moko. Na nsima, batunaki bango soki balekisaka ntango boni mpo na kosolola elongo. Mobali ayokaki mawa. Alobaki ete: “Ebwakolo ya bosɔtɔ ezwaki ntango mingi!” Alobaki ete: “Tozali komikosa soki tokanisi ete minite mitano na mokolo ekoki mpo na kobatela libala. Mpe ete ekoki mpenza te mpo na kokólisa libala.”
[Etanda na lokasa 7]
Mitinda ya moboko
◻ Kosolola likambo moko na ntango na yango (1 Bakolinti 14:33, 40)
◻ Koyebisa mayoki; kasi kosala bifundeli te (Genese 27:46)
◻ Kobɛta te (Baefese 5:28, 29)
◻ Kofinga te (Masese 26:20)
◻ Luká kozongisa boyokani, kasi komilóngisa te (Genese 13:8, 9)
[Elilingi na lokasa 4]
Ntango matáta mabimi, botalela likambo yango esika moko
[Elilingi na lokasa 8]
Yebisa mayoki na yo; kosala bifundeli te