“Bwanya ebatelaka”
MASESE 16:16 elobi boye: “Kozwa [bwanya, NW] eleki bozwi ná wolo; kozwa bososoli eponami liboso ya palata.” Mpo na nini bwanya ezali na ntina mingi? Mpamba te “bwanya ebatelaka ndenge mpe mbongo ebatelaka; kasi, litomba ya boyebi ezali ete bwanya ebatelaka na bomoi baoyo bazali na yango.” (Mosakoli 7:12, NW) Kasi, ndenge nini bwanya ebatelaka bomoi ya baoyo bazwi yango?
Kozwa bwanya oyo euti na Nzambe, elingi koloba, kozwa boyebi ya solosolo ya Biblia, Liloba na ye, mpe kosalela yango, esalisaka biso tótambola na nzela oyo Yehova andimaka. (Masese 2:10-12) Mokonzi Salomo alobi boye: “Balabala ya bayengebene ekolongwa na mabe; ye oyo akobatela nzela na ye akobikisa milimo.” (Masese 16:17) Ya solo, bwanya esalisaka baoyo bazwi yango bálongwa na banzela ya mabe mpe ebatelaka bomoi na bango! Masese mikusemikuse oyo ezali na mokanda ya Masese 16:16-33 emonisi ndenge bwanya oyo euti na Nzambe esalisaka biso tózala na makanisi, maloba mpe misala ya malamu.a
‘Zalá na elimo ya komikitisa’
Bwanya oyo emonisami lokola moto elobi boye: “Nzombo mpe [lolendo, NW] . . . ngai nayini yango.” (Masese 8:13) Bwanya ná lolendo eyokanaka te. Tosengeli kosalaka makambo na bwanya mpe kokeba ete tókóma te na motema ya lolendo to ya lofundo. Tosengeli kokeba mingimingi soki tolongi na makambo mosusu ya bomoi to soki tozali na mikumba mingi na lisangá.
Masese 16:18 elobi boye: “Lolendo liboso ya kobeba, [elimo, NW] ya nzombo liboso ya kokwea.” Tózwa ndakisa ya ekelamu ya elimo oyo azalaki mwana ya Nzambe, kasi amikómisaki Satana Zabolo. (Genese 3:1-5; Emoniseli 12:9) Toyebi ete ekelamu yango amonisaki elimo ya lolendo liboso akwea. Biblia emonisi likambo yango ntango elobi ete mobali oyo azali mondimi ya sika asengeli te koponama lokola mokɛngɛli na lisangá ‘noki te avimba na lolendo mpe azwa etumbu oyo bakatelá Zabolo.’ (1 Timote 3:1, 2, 6) Tosengeli kokeba na makambo oyo ekoki kolamwisa lolendo, ezala epai ya basusu to epai na biso moko!
Masese 16:19 (NW) elobi boye: “Kozala na elimo ya komikitisa elongo na bato ya bopɔlɔ eleki kokabola biloko bipunzami elongo na bato ya nzombo.” Ndakisa ya Mokonzi Nebukadanesala ya Babilone emonisi polele ete toli yango ezali malamu. Lolendo etindaki ye atɛlɛmisa na mokili patatalu ya Dula, ekeko moko monene oyo mbala mosusu ezalaki komonisa ye moko. Ekoki kozala ete ekeko yango etyamaki na etɛlɛmiselo moko ya molai mpenza mpo ekóma na bosanda ya mɛtrɛ 27. (Danyele 3:1) Ekeko yango ezalaki elembo ya ampire monene ya Nebukadanesala. Biloko minene lokola ekeko wana, makonzí ya mabanga mpo na losambo, bandako-nzambe ya milai, mpe bandako mosusu ya milaimilai, ekamwisaka nde bato, kasi Nzambe te. Mokomi ya nzembo alobaki boye: “[Yehova] azali likoló, akomonaka baoyo ya bopɔlɔ, mpe akososolaka mosika baoyo ya [lolendo, NW].” (Nzembo 138:6) Kutu, “eloko oyo etombwami na kati ya bato ezali eloko ya bosɔtɔ na miso ya Nzambe.” (Luka 16:15) Yango wana, tosengeli ‘komemama nde elongo na makambo ya komikitisa’ na esika ‘tókanisaka na makambo ya komitombola.’—Baloma 12:16.
Tólobaka na “bososoli” mpe na “makasi ya kondimisa”
Ndenge nini bwanya esalisaka biso tózala na maloba ya malamu? Mokonzi ya bwanya alobi boye: “Ye oyo azali kosala likambo na bososoli akomona malamu, mpe ye oyo azali kotyela Yehova motema azali na esengo. Ye oyo azali na motema ya bwanya akobengama moto ya mayele, mpe ye oyo azali na boboto na mbɛbu na ye abakisaka makasi ya kondimisa. Bososoli ezali liziba ya bomoi epai ya baoyo bazali na yango; mpe disipilini ya bazoba ezali bozoba. Motema ya moto ya bwanya etindaka monɔkɔ na ye emonisa bososoli, mpe ebakisaka makasi ya kondimisa na mbɛbu na ye.”—Masese 16:20-23, NW.
Bwanya esalisaka biso tóloba na bososoli mpe na makasi ya kondimisa. Mpo na nini? Mpamba te moto oyo azali na motema ya bwanya alukaka ‘komona malamu’ ya makambo mpe ‘atyelaka Yehova motema.’ Soki tozali koluka makambo ya malamu epai ya basusu, tokobanda koloba malamu mpo na bango. Na esika maloba na biso ezokisaka to ebimisaka ntembe, ekozala ya boboto mpe ya kondimisa. Soki tozali kososola makambo ya bato mosusu ekosalisa biso tóyeba mikakatano oyo mbala mosusu bazali na yango mpe milende oyo bazali kosala mpo na kolonga yango.
Koloba na bwanya ezali mpe na ntina na mosala ya kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli. Ntango tozali koteya bato Liloba ya Nzambe, mokano na biso ezalaka kaka te ya kolakisa bango makambo oyo ezali na Biblia. Mokano na biso ezalaka nde ya kosimba mitema na bango. Mpo na yango, tosengeli kolobaka na ndenge oyo ezali kondimisa. Ntoma Paulo alendisaki moninga na ye ya mosala Timote ete akangama na makambo oyo ‘andimisamaki bosolo na yango.’—2 Timote 3:14, 15.
Diksionɛrɛ ya William Vine (An Expository Dictionary of New Testament Words) elobi ete liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “kondimisa” elimboli “kobongola makanisi ya moto nsima ya komonisa ye makambo oyo ezali na nzela to oyo emonani malamu na miso ya bato.” Mpo maloba na biso ebongola makanisi ya bato oyo bazali koyoka biso, tosengeli koyeba makambo oyo ezali na motema na bango, makambo oyo balingaka, lolenge ya bomoi na bango, mpe ndenge oyo babɔkwamá. Ndenge nini tokoki koyeba yango? Moyekoli Yakobo alobi ete tosengeli “koyokaka noki, kowelaka koloba te.” (Yakobo 1:19) Soki tozali kotuna mituna na moto oyo tozali kosolola na ye mpe tozali kotya likebi na makambo oyo azali koloba, tokoki koyeba makanisi na ye.
Ntoma Paulo ayebaki mpenza kondimisa basusu. (Misala 18:4) Ata Demetiliusi, mosali ya biloko ya palata, oyo azalaki moko ya banguna na ye alobaki boye: “Paulo wana, na Efese kaka te kasi mpe na bisika pene na nyonso ya etúká ya Azia, andimisi ebele mpenza ya bato mpe abalukisi bango na likanisi mosusu.” (Misala 19:26) Paulo amikumisaki mpo azalaki koteya malamu? Te. Alobaki ete mosala na ye ya kosakola ezali “komonisama ya elimo [ya Nzambe] mpe ya nguya.” (1 Bakolinti 2:4, 5) Elimo santu ya Yehova esalisaka mpe biso. Lokola totyelaka Yehova motema, toyebaka ete akosalisa biso tólobaka na bososoli mpe na makasi ya kondimisa ntango tozali kosakola.
Yango wana, “ye oyo azali na motema ya bwanya” abengami “moto ya mayele” to “moto ya makanisi malamu”! (Masese 16:21, NW; Bible na Lingala ya lelo oyo) Bososoli ezali “liziba ya bomoi” epai ya bato oyo bazali na yango. Ezali boni mpo na bazoba? Bazoba ‘baboyaka bwanya mpe disipilini.’ (Masese 1:7, NW) Mbuma nini babukaka lokola baboyaka disipilini ya Yehova? Ndenge tomonaki yango, Salomo alobaki ete “disipilini ya bazoba ezali bozoba.” (Masese 16:22, NW) Mbala mingi bazwaka etumbu ya makasi. Bazoba bakoki mpe komibendela mikakatano, koyoka nsɔni, kozwa maladi, ata mpe kokufa.
Salomo alobeli lisusu litomba ya koloba na bwanya na maloba oyo: “Maloba kitoko ezali lokola mafuta ya nzoi na elɛngi epai ya molimo mpe na kobika kati na mikuwa.” (Masese 16:24) Mafuta ya nzoi ezalaka elɛngi mpe epesaka makasi na moto oyo azali na nzala; ndenge moko mpe, maloba kitoko elendisaka mpe epesaka makasi. Mafuta ya nzoi ebikisaka mpe bamaladi mosusu mpe ezalaka malamu mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto. Ezali mpe bongo mpo na maloba ya boboto; elendisaka na elimo.—Masese 24:13, 14.
Tókeba na ‘nzela oyo emonani malamu’
Salomo alobi boye: “Nzela ezali oyo emonani malamu na moto, nde nsuka na yango bobele nzela na kufa.” (Masese 16:25) Maloba yango ezali kokebisa biso na makanisi ya mabe mpe na nzela oyo eyokani te na mibeko ya Nzambe. Nzela mosusu ekoki komonana malamu na miso ya bato; kasi, ntango mosusu eyokani te na mitinda ya Liloba ya Nzambe. Lisusu, Satana akoki kosala ete moto abendama na nzela oyo akanisi ete ezali malamu, nzokande, ezali komema na liwa.
Mpo na komikosa te, esengeli kozala na motema ya bwanya mpe lisosoli oyo eteyami na Liloba ya Nzambe. Soki tolingi kozwa bikateli—ezala na etamboli, na makambo ya losambo, to na makambo mosusu—ebongi tólandaka mitinda ya Nzambe na oyo etali malamu ná mabe mpo tómikosa te.
“Moto ya mosala akomisalela”
Salomo alobi lisusu boye: “Moto ya mosala akomisalela, zambi monɔkɔ na ye ezali na mposa kati na ye.” (Masese 16:26) Salomo alingi koloba ete mposa ya kozwa biloko ya kolya oyo moto ya mosala azali na yango ekoki kotinda ye asala mosala makasi mpamba te nzala nde ezali kopusa ye. Bible na lingala ya lelo oyo ebongoli vɛrsɛ yango boye: “Nzala etindaka moto ásala mosala; pamba té na mosala nde akoki kozwa bilei.” Bamposa oyo tozalaka na yango, na ndakisa mposa ya kolya, ekoki kotinda biso tósala mosala malamu. Mposa yango ezali malamu. Nzokande, ezali boni soki totiki ete mposa ya malamu eleka ndelo mpe ekóma lokoso? Ekozala lokola mwa mɔtɔ moke oyo ekómi mɔtɔ monene mpe ezali kozikisa zamba mobimba. Kozala na lokoso elimboli kozala na mposa oyo eleki ndelo mpe ezali mabe. Lokola moto ya bwanya ayebi likama yango, akebaka ata na bamposa na ye ya malamu.
Boyá “nzela oyo ezali malamu te”
Maloba na biso ekoki kosala mabe lokola mɔtɔ oyo ezali kongala. Salomo amonisi likama ya kolandela mabunga ya basusu mpe kolobeka yango; alobi boye: “Moto mpamba akolubolaka mabe, mɔtɔ ya kozikisa ezali na mbebu na ye. Moto ya yauli akobimisa kowelana; molobi na nsango ya lokuta akokabola baninga ata baoyo bazali na bolingo monene.”—Masese 16:27, 28.
Moto oyo alukaka kobebisa lokumu ya mozalani na ye azali “moto mpamba.” Tosengeli kolukaka malamu ya basusu mpe koloba makambo oyo ekotinda bato bápesa bango limemya. Ezali boni na oyo etali koyokaka bato ya sɔngisɔngi? Maloba na bango ekoki kotinda biso tóbanda kokanisela basusu mabe, kokabola baninga mpe kobebisa bomoko ya lisangá. Bwanya esengeli kotinda biso tóboyaka koyoka bato ya ndenge wana.
Salomo akebisi biso na makambo oyo ekoki komema moto na nzela ya mabe; alobi boye: “Moto ya yauli akobenda mozalani na ye; akolekisa ye na nzela oyo ezali malamu te. Akozipa miso na ye mpo na kobanzabanza makambo mabe; akotambolisa mbebu na ye mpo na koyeisa mobulu.”—Masese 16:29, 30.
Mobulu ekoki nde kobebisa baklisto ya solo? Lelo oyo bato mingi bamemami na “kobanzabanza makambo mabe.” Bazali kolendisa makambo ya mobulu mpe bango moko bazali kosala yango. Mbala mosusu tokoki koyeba makambo ya mobulu mpe kokima yango mbala moko. Kasi, ezali boni soki tobendami na yango na mayele mabe? Bato mingi bakweaka na motambo ya kotala masano ya bitumba. Biblia elobi polele ete: “Ye oyo akotambola na bato na bwanya akozala na mayele, nde motamboli elongo na bazoba akobukana.” (Masese 13:20) Bwanya oyo euti epai ya Nzambe ebatelaka mpenza!
Tokoki koloba nini mpo na moto oyo alandi makambo ya bwanya na bomoi na ye mobimba mpe ‘aleki te na nzela oyo ezali malamu te’? Moto oyo alekisi bomoi na ye na nzela ya boyengebene azali na nkembo na miso ya Nzambe mpe abongi na limemya. Masese 16:31 elobi boye: “Motó ya pɛɛ ezali motole ya nkembo, ezwami na nzela ya boyengebene.”
Lisusu, moto oyo apekisaka nkanda na ye te azali na lokumu te. Kaina, mwana ya liboso ya Adama ná Eva, “asilikaki mingi” mpo na ndeko na ye Abele mpe ‘amibwakaki likoló ya ndeko na ye mpe abomaki ye.’ (Genese 4:1, 2, 5, 8) Atako makambo mosusu ekoki kosilikisa biso, tosengeli kopekisaka nkanda na biso. Masese 16:32 elobi polele ete: “Ye oyo akosilika noki te aleki bato ya makasi, mpe ye oyo akokanga motema na ye aleki mobuki ya mboka.” Nkanda makasimakasi emonisaka te ete moto azali na makasi. Ezali nde bolɛmbu oyo ekoki ‘kotinda moto aleka na nzela oyo ezali malamu te.’
Ntango “kokata ya likambo mobimba euti na Yehova”
“Mbɛsɛ ebwakami na makolo, nde kokata ya likambo mobimba euti na [Yehova].” (Masese 16:33) Na Yisalaele, na bantango mosusu bato bazalaki kobwaka mbɛsɛ mpo na koyeba mokano ya Yehova. Mpo na yango, bazalaki kosalela mwa mabanga ya mike, to bitanda ya mabaya to ya mabanga. Ya liboso, bazalaki kobelela Yehova ete akata likambo. Na nsima, bazalaki kotya mbɛsɛ na libenga mpe bazalaki kobimisa yango. Bazalaki kondima ete likambo oyo ekosalema nde ekateli ya Nzambe.
Lelo oyo, basaleli ya Yehova babwakaka lisusu mbɛsɛ te mpo na koyeba makambo oyo Nzambe alingi kosala. Asili komonisa mokano na ye na Liloba na ye, Biblia. Tosengeli kozwa boyebi ya solosolo ya Biblia soki tolingi kokóma na bwanya oyo euti na Nzambe. Yango wana, tosengeli te kolekisa ata mokolo moko kozanga ete tótánga Makomami oyo epemami.—Nzembo 1:1, 2; Matai 4:4.
[Maloba na nse ya lokasa]
[Elilingi na lokasa 8]
Mpo na nini bwanya eleki wolo?
[Elilingi na lokasa 9]
Nini ebakisaka makasi ya kondimisa na mbɛbu na yo ntango ozali kosakola?
[Elilingi na lokasa 10]
“Moto mpamba akolubolaka mabe”
[Elilingi na lokasa 11]
Nkanda makasimakasi ekoki kotinda moto aleka “na nzela oyo ezali malamu te”
[Elilingi na lokasa 12]
Kotala makambo ya mobulu ekoki kobebisa biso