“Lisalisi na ngai ekouta epai ya Yehova”
Ntango oyo nsuki mpɛmbɛ ezalaka “motole ya kitoko”
MURIEL, mwasi moko ya mbula 101 alobaki: “Ezali bomoi oyo eleki malamu.” Theodoros, mobali moko ya mbula 70 alobaki ete kosalela Yehova bomoi mobimba ezali mpenza “libaku moko malamu!” Maria, mwasi moko ya mbula 73, alobaki boye: “Nakokaki te kozala na bomoi ya malamu koleka bomoi ya kosalela Yehova.” Bango nyonso basalelaki Yehova Nzambe na bosembo bomoi na bango mobimba.
Mibange wana bazali kaka mwa ndambo kati na ebele ya mibange mosusu oyo, na mokili mobimba, bazali kosambela Yehova na molende. Atako bakómi mibange, bazali kotungisama na bamaladi mpe mikakatano mosusu, bazali kaka kosalela Nzambe na molimo na bango mobimba. Na lisangá ya boklisto, tosengeli komemya mibange yango ya sembo oyo bazali mpenza ndakisa ya bato oyo bamipesi na Nzambe. Yehova azwaka na motuya mosala oyo mibange basalaka, ata soki makambo mosusu ya bomoi na bango ezali kopekisa bango básala mingi.a—2 Bakolinti 8:12.
Mokanda ya Nzembo emonisi bomoi oyo mibange ya sembo bakoki kolikya kozala na yango. Bakoki kozala lokola nzete ya molai, oyo enuni mpenza, kasi ezali kaka kobota mbuma. Mokomi ya Nzembo ayembaki na ntina na mibange boye: “Bakobota naino na ntango na konuna, bakotonda na mafuta, bakokaoka te.”—Nzembo 92:14.
Bato mosusu bakoki kobanga ete bakosundola bango mpe bakobosana bango ntango bakokóma mibange mpe bakolɛmba. Davidi abondelaki Nzambe boye: “Boyá ngai na ntango na konuna te, tiká ngai te wana nguya na ngai elɛmbi.” (Nzembo 71:9) Nini esalaka ete moto mosusu akoba kobota mbuma atako akómi mobange, kasi moto mosusu alɛmba? Boyengebene, ezaleli oyo Nzambe azali koteya biso. Mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Moto na boyengebene akokola [lokola nzete ya] mbila.”—Nzembo 92:12.
Bato oyo bamipeski bomoi na bango mobimba na kosalela Nzambe, na ntembe te bakobaka kobota mbuma malamu ata ntango bakómi mibange. Makambo mingi oyo basalaki na bomoi na bango mpo na bolamu na bango moko to mpo na basusu ebotiakambuma lokola mboto oyo ekoli mpe ekomeli. (Bagalatia 6:7-10; Bakolose 1:10) Kasi, bato oyo babosanaka mpenza banzela ya Nzambe na bomoi na bango mpe bamipesaka na koluka bomɛngo ya mokili oyo, bazalaka na ntina mpenza te ntango bakómi mibange.
Mokanda ya Masese emonisi mpe ete boyengebene ezali kitoko ya mobange. Tozali kotánga boye: “Nsuki mpɛmbɛ ezalaka motole ya kitoko ntango ezali na nzela ya boyengebene.” (Masese 16:31, NW) Ya solo, boyengebene emonisaka kitoko ya bomoto ya kati. Soki tolandi nzela ya boyengebene tii ntango tokokóma mibange, bato bakomemya biso. (Levitike 19:32) Soki moto ya nsuki mpɛmbɛ azali mpe na bwanya mpe bizaleli malamu, yango epesaka ye lokumu.—Yobo 12:12.
Yehova amonaka kitoko bomoi ya moto oyo asaleli ye na bosembo bomoi na ye mobimba. Biblia elobi boye: “Nakotikala kaka ndenge nazali, tii tango bokokóma mibange, nakobatela bino tii tango bokokóma na suki pembe. Ngai [Yehova] moto namemaká bino, pe ngai moto nakozala komema bino tango nyonso. Ya solo, nakokotela bino pe nakobikisa bino.” (Yisaya 46:4, Bible na lingala ya lelo oyo) Ezali mpenza likambo ya kobɔndisa koyeba ete tata na biso ya bolingo alaki ete akosunga basaleli na ye ya sembo oyo bakómi mibange!—Nzembo 48:14.
Lokola Yehova amonaka bomoi ya bato oyo bamipesi na ye mpe basaleli na bosembo ete ezali kitoko, biso tosengeli mpenza komemya bato ya ndenge wana. Soki tozali kotalela bandeko na biso baklisto oyo bakómi mibange ndenge Nzambe atalelaka bango, tokolinga bango mingi. (1 Timote 5:1, 2) Yango wana, tosengeli kokanisa ndenge oyo tokoki kosalisa bango mpo na komonisa bango bolingo na biso.
Baoyo babandi kotambola na nzela ya boyengebene ntango bakómi mibange
Salomo alobi na biso boye: “Bomoi ezali na nzela ya boyengebene.” (Masese 12:28) Kokóma mobange epekisi moto te atambola na nzela ya boyengebene. Na ndakisa, na Moldavie, mobali moko ya mbula 99 amipesaki bolenge na ye mobimba mpo na politiki ya Bakoministe. Azalaki kotombola mapeka ete na bomoi na ye asololá na bakonzi minene ya Bakoministe, na ndakisa Lénine. Ntango Kominisme ekweaki, mobange wana amonaki ete bomoi na ye ezali lisusu na ntina te. Kasi ntango Batatoli ya Yehova bamonisaki ye ete kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa mikakatano nyonso ya bato, andimaki solo mpe akómaki koyekola Biblia na molende. Likambo ya mawa, akufaki liboso azwa batisimo.
Nsima ya koyekola mitinda ya Nzambe, mwasi moko ya mbula 81 na Hongrie amonaki ete ye na mobali oyo bafandaki na ye makango banda ebele ya bambula basengeli kobalana. Na mpiko nyonso, mwasi yango ayebisaki makango na ye oyo Biblia ezali kosɛnga na bato oyo balingi kozala mwasi ná mobali. Likambo ya kokamwa mpe ya esengo mpenza, mobali yango andimaki ete bábalana. Nsima ya kokomisa libala na bango na mikanda ya Leta, mwasi yango akolaki noki mpenza na elimo. Nsanza mwambe na nsima banda ntango akómaki koyekola Biblia, akómaki mosakoli oyo azwi naino batisimo te, mpe mwa moke na nsima azwaki batisimo. Ya solo mpenza, boyengebene ekoki kopesa mibange kitoko ya solosolo!
Ya solo, baklisto ya sembo oyo bakómi mibange bakoki mpenza kozala na elikya ete Nzambe atyelaka bango likebi. Yehova akosundola te baoyo bazali kotikala sembo epai na ye. Kutu, alaki ete akotambwisa bango mpe akosalisa bango ata ntango bakokóma mibange. Bazali mpenza komonisa bosolo ya maloba ya mokomi ya Nzembo oyo: “Lisalisi na ngai ekouta epai ya Yehova.”—Nzembo 121:2, NW.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Calendrier des Témoins de Jéhovah 2005, Yanuali/Febwali.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 9]
“Nsuki mpɛmbɛ ezalaka motole ya kitoko ntango ezali na nzela ya boyengebene.”—Masese 16:31, NW
[Etanda na lokasa 8]
YEHOVA ATYELAKA BASALELI NA YE OYO BAKÓMI MIBANGE LIKEBI
“Okotɛlɛma liboso ya nsuki mpembe mpe okokumisa mobali anuni.”—Levitike 19:32.
“Nakotikala kaka ndenge nazali, tii tango bokokóma mibange, nakobatela bino tii tango bokokóma na suki pembe.”—Yisaya 46:4.