Okoki kopona avenire na yo?
MAKAMBO nyonso ya bomoi na biso esilá kotángama? Makambo oyo toponaka ebongolaka eloko moko na bomoi na biso?
Soki bomoi ya moto ezali na mabɔkɔ na ye moko, tokoki koloba ete etángamá ete moto boye to boye asala mosala boye to azala na esika boye? Lisusu, soki bato bango moko baponaka oyo balingi kosala to kokóma na bomoi na bango, ndenge nini Nzambe akokokisa mokano na ye mpo na mabelé? Biblia epesi biyano na mituna nyonso wana.
Soki mpenza makambo nyonso etángamá, bato bakoki kozala na bonsomi ya kopona?
Tótala naino ndenge Yehova Nzambe asalá biso. Biblia elobi ete “na elilingi ya Nzambe azalisaki [moto]; azalisaki bango mobali mpe mwasi.” (Genese 1:27) Lokola Nzambe akelá biso na elilingi na ye, tokoki komonisa bizaleli na ye lokola bolingo, boyengebene, bwanya mpe nguya. Nzambe apesá biso mpe bonsomi ya kopona. Wana nde likambo oyo ekesenisaka biso mpenza na bikelamo na ye mosusu oyo ezali awa na mabelé. Tokoki kopona soki tokolanda mitinda ya Nzambe to tokolanda yango te. Talá ntina oyo Moize alobaki ete: “Nabyangi likoló mpe nse kotatola na ntina na bino lelo, ete natye liboso na yo bomoi mpe kufa, mpe lipamboli mpe elakeli mabe. Na bongo poná bomoi ete yo mpe bana na yo bózala na bomoi, mpe ete olinga [Yehova] Nzambe na yo mpe otosa mongongo na ye mpe okangama na ye.”—Deteronome 30:19, 20.
Kasi, bonsomi ya kopona elimboli te kosala makambo nyonso ndenge tolingi. Bonsomi yango elimboli te ete tosengeli koboya kotosa mibeko oyo Nzambe atyelá biloko nyonso mpo mobulu ezala te na molɔ́ngɔ́ mpe mitinda oyo etali bizaleli malamu oyo atyá mpo bato bázala na kimya. Nzambe atyá mibeko yango mpo na bolamu na biso, mpe soki totosi yango te, tokosuka mabe mpenza. Na ndakisa, nini ekoki kokómela biso soki tomati likoló ya nzete to ndako moko molai mpenza mpe tomibwaki na nse?—Bagalatia 6:7.
Bonsomi ya kopona esɛngaka ete tókokisa makambo mosusu oyo esɛngami epai ya bikelamu mosusu te. Mokomi Corliss Lamont atuni boye: “Soki tozali kondima . . . ete Nzambe abongisá nzela ya moto mokomoko mpe makambo nyonso oyo akosala, tokoki lisusu kopesa bato foti mpe kopesa bango bitumbu mpo na mabe oyo bazali kosala?” Tokoki kosala yango te. Lokola banyama bazali na mayele te, moto moko te apesaka bango foti mpo na makambo oyo basalaka, tokoki mpe kopesa baordinatɛrɛ foti te ntango ezali kosala ndenge ebongisamaki ete esalaka. Lokola tozali na bonsomi ya kopona, tozali na mokumba monene mpe tosengeli kobukaka mbuma ya makambo oyo tosalaka, ezala ya malamu to ya mabe.
Tokoki koloba te ete Yehova azali na bolingo mpe azali sembo soki azali kopesa biso foti ntango tosali makambo oyo ye moko abongisá liboso kutu tóbotama! Yehova asalaka bongo te mpamba te “Nzambe azali bolingo” mpe “banzela na ye nyonso ezali sembo.” (1 Yoane 4:8; Deteronome 32:4, NW) Lokola apesá biso bonsomi ya kopona, tokoki te koloba ete kaka ye lisusu ‘asilá kopona, banda kala mpe mpo na libela, banani akobikisa mpe banani akoboma, ndenge bato oyo bandimaka ete makambo nyonso etángamá balobaka.’ Soki tozali na bonsomi ya kopona, ekoki kozala solo te ete makambo nyonso ya bomoi na biso etangamá.
Biblia ezali komonisa polele ete makambo oyo toponaka ekoki kobongisa to kobebisa avenire na biso. Na ndakisa, Nzambe azali koloba na bato mabe boye: “Mokomoko na bino átika ezaleli na ye ya mabe pe misala na ye ya mobulu . . . boye nakosala bino mabe té.” (Yilimia 25:5, 6, Bible na lingala ya lelo oyo) Maloba wana ekokaki kozala na ntina te soki Nzambe abongisaki ndenge bomoi ya mokomoko na biso ekozala. Liloba ya Nzambe elobi lisusu boye: “Na yango, bóbongola mitema mpe bóbongwana mpo masumu na bino ebomama, mpo bileko ya kopema euta epai ya Yehova ye moko.” (Misala 3:19) Mpo na nini Yehova akoki lisusu kosɛnga na bato bábongola mitema mpe bábongwana, soki ayebi ete bakoki kobongola ata likambo moko te na bomoi na bango?
Biblia elobeli bato mosusu oyo Nzambe abengi mpo bázala bakonzi elongo na Yesu Klisto kuna na likoló. (Matai 22:14; Luka 12:32) Kasi, Biblia ekebisi bango ete soki bayiki mpiko tii na nsuka te, bakobungisa libaku malamu wana. (Emoniseli 2:10) Soki Nzambe abongisá ete bakoponama te, mpo na nini azali kobenga bango lisusu? Tótalela mpe maloba ya ntoma Paulo epai ya baninga na ye bandimi. Akomaki boye: “Soki tozali na momeseno ya kosala lisumu na nko nsima ya kozwa boyebi ya sikisiki ya solo, etikali lisusu te na mbeka mpo na masumu.” (Baebele 10:26) Likebisi ya ndenge wana ekokaki kozala na ntina te soki Nzambe abongisá likambo mokomoko ya bomoi na bango. Kasi, ezali ata na mwa bato moke te oyo Nzambe asilá kokana liboso ete bakozala bakonzi elongo na Yesu Klisto?
Nzambe asilá kokana liboso kopona mokomoko na bango to etuluku na bango?
Ntoma Paulo akomaki boye: “[Nzambe] apamboli biso na lipamboli nyonso ya elimo na kati ya bisika ya likoló na bomoko elongo na Klisto, ndenge mpe aponaki biso na bomoko elongo na ye liboso ya ebandeli ya mokili . . . Mpo asilá kokana liboso kokamatama na biso lokola bana na nzela ya Yesu Klisto.” (Baefese 1:3-5) Eloko nini Nzambe asilá kokana liboso, mpe koponama “liboso ya ebandeli ya mokili” elingi koloba nini?
Bavɛrsɛ yango elobi ete Nzambe aponá bana mosusu ya Adama mpo bázala bakonzi elongo na Klisto kuna na likoló. (Baloma 8:14-17, 28-30; Emoniseli 5:9, 10) Kasi, koloba ete Yehova Nzambe akanaki kopona moto boye to boye, ebele ya bambula liboso kutu abotama, mpo akóma mokonzi elongo na Klisto ekoki kozala solo te, mpo Nzambe akelá bato na bonsomi ya kopona. Eloko oyo Nzambe akanaki kopona liboso ezali nde etuluku ya bato.
Na ndakisa, guvɛrnema moko ezwi ekateli ya kosala kompanyi moko ya sika. Guvɛrnema yango ekomonisa liboso misala oyo kompanyi yango ekosala, makoki na yango mpe motángo ya bato oyo bakosala wana. Soki nsima ya mwa ntango, kompanyi yango ebandi mosala mpe bato oyo bazali kosala wana balobi ete: “Guvɛrnema esilaká kokana mosala na biso banda ebele ya bambula liboso, sikoyo tobandi mosala na biso.” Tokoki nde koloba ete guvɛrnema yango esilá kokana liboso moto mokomoko oyo asengeli kosala mosala boye to boye na kompanyi yango? Te. Ndenge moko mpe, Yehova akanaki liboso kosala guvɛrnema moko mpo na kosilisa mikakatano oyo lisumu ya Adama ememelá bato. Akanaki ete etuluku moko ya bato bakosala na guvɛrnema yango, kasi ezali te ete asilá kopona moto mokomoko oyo akozala na guvɛrnema yango. Basengelaki koponama nsima, mpe lolenge oyo bazali komitambwisa na bomoi na bango nde ekokata soki babongi kozwa bokonzi yango to te.
Mokili nini Paulo alobelaki ntango alobaki ete: “[Nzambe] aponaki biso na bomoko elongo na ye liboso ya ebandeli ya mokili”? Mokili oyo Paulo alobelaki awa ezali te mokili oyo Nzambe asalaki ntango akelaki Adama ná Eva. Mokili wana ezalaki “malamu mingi” mpe lisumu ná liwa ezalaki na mokili yango te. (Genese 1:31) Ezalaki na mposa ya “kosikolama” na lisumu te.—Baefese 1:7.
Mokili oyo Paulo alobelaki ezali mokili oyo ebandaki nsima ya botomboki ya Adama ná Eva na elanga ya Edene; mokili yango ezali ata moke te ndenge oyo Nzambe akanaki na ebandeli. Ezali mokili oyo ebandaki na bana ya Adama ná Eva. Mokili yango ezali bato oyo bapesá Nzambe mokɔngɔ mpe bakómá baombo ya lisumu mpe ya liwa. Ezali bato oyo bakoki kosikolama, mpo bazali te lokola Adama ná Eva oyo basalaki lisumu na nko.—Baloma 5:12; 8:18-21.
Yehova Nzambe azwaki mbala moko mokano ya kosilisa mabe oyo botomboki ya Adama ná Eva ebimisaki. Ntango kaka likambo yango esalemaki, akanaki mbala moko kosala Bokonzi ya Nzambe oyo Yesu akotambwisa; yango nde ebongiseli oyo akosalela mpo na kosikola bato na lisumu ya Adama. (Matai 6:10) Nzambe azwaki mokano yango “liboso ya ebandeli ya mokili” ya bato oyo bakoki kosikolama, elingi koloba, ntango Adama ná Eva batombokelaki Nzambe, liboso bábota.
Liboso ya kosala eloko moko, bato babongisaka naino makambo. Soki tolobi ete Nzambe akanaki makambo nyonso liboso, na maloba mosusu elingi koloba ete azali na mokano moko mpo na molɔ́ngɔ́ mobimba, mpe akaná liboso ndenge likambo to eloko mokomoko esengeli kozala. Roy Weatherford akomaki boye: “Mpo na bafilozofe mingi, soki Nzambe azali mpenza Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, ekoki kosalema ata moke te ete likambo moko oyo ye akanaki te esalema.” Ezali mpenza na ntina Nzambe abongisa likambo mokomoko liboso?
Lokola Yehova azali na nguya oyo ezangi nsuka mpe na bwanya oyo eleki nyonso, azali na likoki ya kosilisa mokakatano nyonso to likambo ya mbalakaka oyo ebimi ntango bikelamu na ye bazali kosalela bonsomi na bango ya kopona. (Yisaya 40:25, 26; Baloma 11:33) Akoki kosilisa yango mbala moko kozanga ete amibongisa liboso. Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso azali te lokola bato ya kozanga kokoka mpo abongisa naino makambo nyonso ya bomoi ya moto mokomoko awa na mabelé liboso asala ye. (Masese 19:21) Na Babiblia mingi, totángaka na Baefese 3:11 ete Nzambe azali na “mwango ya libela,” kasi te ete akaná makambo nyonso liboso.
Ndenge okoki kopona avenire na yo
Nzambe azali na mokano moko mpo na mabelé, mpe yango nde likambo oyo asilá kokana liboso. Emoniseli 21:3, 4 elobi boye: “Talá! Hema ya Nzambe ezali elongo na bato, mpe akofanda elongo na bango mpe bakozala bato na ye. Mpe Nzambe ye moko akozala elongo na bango. Mpe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala esili koleka.” Mabelé ekobongwana paladiso, ndenge Yehova akanaki na ebandeli. (Genese 1:27, 28) Motuna yango oyo: Yo okozala na paladiso yango? Makambo oyo ozali kosala na bomoi na yo nde ekosala ete ozala na paladiso to te. Yehova akaná te ete okozala na paladiso to te.
Mbeka oyo Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe, apesaki mpo na kosikola biso epesi nzela na moto nyonso oyo azali kondimela ye azwa bomoi ya seko. (Yoane 3:16, 17; Misala 10:34, 35) Biblia elobi ete “moto oyo azali komonisa kondima na kati ya Mwana azali na bomoi ya seko; moto oyo atosaka Mwana te akomona bomoi te.” (Yoane 3:36) Okoki kopona bomoi soki oyekoli Biblia mpe oyebi Nzambe, Mwana na ye mpe mokano na Ye mpe soki ozali kosalela makambo oyo ozali koyekola. Moto oyo azali kotalela bwanya ya solosolo ya Liloba ya Nzambe na makambo oyo azali kosala akozala na elikya ete “akofanda na kimya, mpe akobanga mabe te.”—Masese 1:20, 33.
[Bililingi na lokasa 5]
Bato bazali lokola banyama te, bazali na mokumba ya kopona makambo oyo bakosala
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Mpongo: Fɔtɔ: Cortesía de GREFA