Tobwaka makanisi mpamba ya mokili, tolanda makambo na solo na bokonzi
“Bolukaka nde liboso bokonzi mpe boyengebene na Ye, mpe biloko oyo mosusu bikobakisama na bino.”—MATAI 6:33.
1. Liloba na Nzambe lipesi toli nini na ntina na motema ya elilingi, mpe wapi moko na mitindo minene oyo motema na biso ya elilingi ekoki kokosa biso?
“BATELA motema na yo koleka biloko nyonso bisengeli yo kobatela, mpo ete bomoi euti na yango.” (Masese 4:23, MN) Mpo na nini ezalaki likambo na ntina ete Salomo, mokonzi na mayele apesa toli oyo? Mpo ete “motema ezali na bokosi koleka biloko nyonso mpe eleki na mabe.” (Yilimia 17:9) Moko na mitindo minene oyo motema na biso ya elilingi ekoki kokosa biso ezali oyo ete, ekoki komema biso na kolóna makanisi mpamba ya mokili kati na elimo na biso. Kasi, makanisi mpamba elimboli nini? Ezali makanisi ya lokutá, ndɔtɔ mpamba, makanisi matambwisami epai na epai. Na ntango ndɔtɔ wana ebongwani na makanisi mpamba ya mokili, ezali bobele kolekisa ntango mpamba te, kasi ezali lisusu likámá monene. Tosengeli bongo kobwaka yango nyonso. Bongo, soki toyini kotyola mibeko lokola Yesu asalaki yango, tokobatela motema na biso longwa na makanisi mpamba ya mokili.—Baebele 1:8, 9.
2. Makanisi mpamba ya mokili ezali nini, mpe mpo na nini tosengeli kobwaka yango?
2 Kasi, makanisi mpamba ya mikili ezali nini? Ezali lolenge na makanisi ya mokili oyo mozali na nsé na nguya ya Satana. Mpo na yango, ntomá Yoane akomaki ete: “Makambo nyonso mazali kati na mokili—mposa na nzoto, mposa na miso mpe kotalisa bozwi—euti na Tata te, kasi na mokili.” (1 Yoane 2:16; 5:19, MN) Mpo na nini baklisto basengeli kobwaka makanisi mpamba ya mokili? Mpo ete makanisi yango mazali kobimisa bamposa ya moimi kati na elimo mpe na motema. Kotya makanisi ete ozali kosala likambo mabe, ekoki mpenza kolimbola ete ozali kozongela makanisi ya likambo mabe oyo okosala. Mpo na yango, moyekoli Yakobo akebisi biso ete: “Moto na moto amekami wana amitiki kobéndama mpe kolengolama na mposa mabe na ye moko. Mpe na ntango mposa mabe ekóli, ekobota lisumu, mpe wana lisumu lisalemi, likobota kufa.”—Yakobo 1:14, 15, MN.
Ndakisa na makebisi
3. Lisoló ya nani oyo limonisi mabe polele, oyo ekoki kouta na makanisi mpamba ya moimi?
3 Totalela bandakisa oyo emonisi ntina oyo esengeli kobwaka makanisi mpamba ya mokili. Lisoló ya Satan le Diable ezali ndakisa emonisi mpenza lolenge makanisi ya moimi makoki kookisa mpasi. Atikaki ete motindo na mayoki wana ya lolendo ekóla kati na motema na ye, alulaki etɛlɛmɛlo eleki monene ya Jéhovah, Moyangeli aleki monene na molóngó mobimba, mpe alingaki ete basambela ye. (Luka 4:5-8) Wana ezalaki likanisi mpamba mpe na lokutá? Ezali bongo! Elembeteli monene ekomonana na ntango Satana akokangama na boumeli ya mbula nkɔto mpe, mingi mpenza, ntango akobwakama na “libéké ya mɔ́tɔ,” kufa ya mibale.—Emoniseli 20:1-3, 10.
4. Lolenge nini Satana asalaki mpo na kolengola Eva?
4 Tozali na ndakisa mosusu na likebisi kati na lisoló ya Eva, mwasi ya liboso. Wana Satana azalaki kosala milende mpo na kokokisa mposa na ye, alengolaki Eva komoniseláká ye makanisi mpamba oyo ete, soki alei mbuma oyo epekisamaki, akokufa te kasi akozala lokola Nzambe, koyeba malamu mpe mabe. Wana ezalaki likanisi mpamba mpe na moimi? Ezali bongo mpenza, lokola yango emonisami na etumbu oyo Jéhovah apesaki na Eva mpe mobali na ye, Adam na ntango oyo asambisaki bango na libaku wana. Mpo na yango, babungisaki lotómo ya kofanda na paradis, mpo na bango moko mpe mpo na bakitani na bango nyonso bazangi kokoka.—Genese 3:1-19; Baloma 5:12.
5. Nini ememaki bamoko na baanzelu, bana na Nzambe, ete bakwea, mpe nini ekómelaki bango?
5 Tozali mpe na ndakisa mosusu na likebisi ya baanzelu mosusu, bana na Nzambe. (Genese 6:1-4) Na esika na kosepela na mapamboli oyo bazalaki kozwa na likoló, pene na Jéhovah, bamipesaki na makanisi mpamba na ntina na basi oyo bazalaki awa na mabelé mpe na esengo oyo basengelaki kozwa na kosangisa nzoto elongo na bango. Mpo ete makanisi wana mamonisamaki na misala, baanzelu wana bazangaki botósi batyami sikawa na molili ya elimo kati na Tartare, wana ezali bango kozela libebi na bango na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkɔto na Yesu Klisto.—2 Petelo 2:4; Yuda 6; Emoniseli 20:10.
Tobwaka makanisi mpamba ya mokili
6, 7. Mpo na nini makanisi mpamba ya mokili na ntina na bozwi, makopesaka likámá mpe mazali na bokosi?
6 Totalela sikawa moko na makanisi mpamba oyo mamonani mingi mpe makobimisaka makámá, oyo Satana azali kosalela yango. Na nzela na motindo nyonso na bipanzelo ya nsango, topusamaka na komipesa na makanisi ya mokili. Mbala mingi, ekobimisaka mposa makasi ya kokóma na bozwi. Kozala na biloko mingi ezali mpenza mabe te. Bato oyo bazalaki kobanga Nzambe lokola Abalayama, Yobo, mokonzi Davidi, bazalaki na bozwi mingi, kasi bazalaki na lokoso ya bozwi te. Makanisi ya kozala na bozwi ezali kopusa bato na kosala makasi na boumeli ya bambula mingi mpo na kozwa biloko mingi. Makanisi mpamba mazali kopusa bango na komipesa na masano ya mbongo, lokola emekaneli na kopota na bampunda (PMU) to loterie. Tolóna makanisi mpamba te na ntina na bozwi. Soki tokanisi ete yango ekoki kobatela biso tokanisa mingi likoló na lisese oyo ya solo ete: “Biloko na motuya bikozala na litomba te na mokolo na nkele, kasi boyengebene ekobikisa longwa na kufa.” (Masese 11:4, MN) Biloko ya mosuni bizali na ntina soko moke te mpo na kobika na “bolózi monene.”—Matai 24:21; Emoniseli 7:9, 14.
7 Biloko ya mosuni bikoki mpenza kozimbisa biso. Yango wana elobami na biso ete: “Biloko na motuya ya mozwi bizali mboka na makasi mpo na ye, mpe bizali na makanisi na ye lokola efelo ekobatelaka.” (Masese 18:11, MN) Ee, ezali bobele na makanisi na ye,” mpamba te bozwi ekopesaka bobele libateli moke na ntina na kokita na motuya ya mosolo, na kobeba ya makambo ya nkita, na mobulu na makambo ya politike to na maladi oyo ekomema na liwa. Yesu Klisto amonisaki ete ezali likambo ya kozanga mayele soki totii motema na biso na biloko ya mosuni. (Luka 12:13-21) Lisusu, ntomá Paulo akebisi biso na maloba oyo, ete: “Bolingo ya mbongo ezali ebandeli ya motindo na makambo nyonso mabe, mpe ekómaki bango na bolingo yango, bamoko basili kopɛngwa [mosika] na kondima mpe basili mpenza komitɔbɔla na mpasi mingi na bipai nyonso.”—1 Timoté 6:10, MN.
8. Makanisi mpamba ya mokili na ntina na kosangisa nzoto masili mpenza kopalangana, mpe yango ekobimisaka makámá nini?
8 Makanisi mosusu matali kosangisa nzoto na lolenge lobongi te. Na yango, mpo na koyeba kino epai wapi bato na masumu balingi kotya makanisi na bango likoló na kosangisa nzoto, ekoki bobele kokanisa mpo na lokumu lopesami na makambo na nsoni oyo mazali kolobama na batelefone oyo ezali kopesa nsango ya makambo na nsoni. Na États-Unis, motindo na batelefone wana ezali kozwa bamilió mingi ya badolare. Soki totii makanisi na biso likoló na makambo na kosangisa nzoto na lolenge lobongi te, tokozala bakosi te wana ezali biso komimonisa na libanda ete tozali baklisto na pɛto? Lisusu, likámá lizali te soki makanisi wana mamemi biso na kosala misala na mbindo? Yango ezali kosalema, mpe basangani mosusu ya lisangá na boklisto basili kobimisama na yango mpo, ete basalaki pite to ekobo. Na kotalela maloba na Yesu oyo mazwami na Matai 5:27, 28, baoyo nyonso bamipesi mbala na mbala na makanisi motindo oyo, basali ekobo kati na mitema na bango. Boye te?
9. Wapi toli kitoko ezwami na Makomami oyo ezali likebisi mpo na biso na ntina na makanisi mpamba ya mokili?
9 Mpo na kobundisa mposa ya motema na biso bato na masumu ete emipesa te na makanisi wana, tosengeli kotya elimo na biso likoló na likebisi oyo na Paulo, ete: “Ekelamu moko te ebómbani na miso [na Nzambe], kasi nyonso ezali polele mpe emonani na miso na ye oyo akosambisa biso.” (Baebele 4:13, MN) Tosengeli kozala ntango nyonso na mposa ya komekola Moize, oyo “atɛlɛmaki ngwi lokola nde amonaki Ye oyo akomonanaka te.” (Baebele 11:27, MN) Ee, biso moko tosengeli kokanisa mbala na mbala ete makanisi mpamba ya mokili mazali kosepelisa Jéhovah te, mpe ekoki kotya biso na likámá. Tosengeli komibanzabanza mpo na kolóna mbuma nyonso ya elimo na Nzambe mingi mpenza, ezaleli ya komipekisa; mpamba te, tosengeli te kobosana likambo oyo ete, soki tokolóna mpo na nzoto, na ntembe te, tokobuka libebi liuti na nzoto.—Bagalatia 5:22, 23; 6:7, 8.
Makambo na solo na Bokonzi
10, 11. (a) Makambo nini mazali komonisa ete Mozalisi azali solo? (b) Nini emonisi ete Biblia ezali mpenza Liloba na Nzambe? (c) Nini elakisi ete Mokonzi ya Bokonzi na Nzambe azali solo?
10 Lolenge malamu mpo na kobwaka makanisi mpamba ya mokili ezali bongo kolanda ntango nyonso makambo ya solo ya Bokonzi. Makambo na solo na Bokonzi, oyo ezali bongo mosala na Nzambe, makeseni mpenza na makanisi mpamba ya mokili. Nzambe ye moko azali solo? Ntembe ezali te ete ye azali. Biloko na kozalisama oyo bimonani bizali kotatola yango. (Baloma 1:20) Yango ezali kokundwela biso makambo oyo tokoki kotanga kati na mokanda Le divin plan des âges, oyo ebimisamaki na la Société Watch Tower, esili koleka mibu monkámá, ete: “Soki moto amoni na miso to asaleli masini oyo bakotalaka minzoto mpo na kotala biloko bizalisami, lolenge yango etyami, kitoko na yango, lolenge yango ebongisami, bonzenga na yango mpe ntalo na yango monene, nde abɛti lisusu ntembe ete Mozalisi ya biloko nyonso wana aleki na mayele te mpe na nguya mingi te—to akanisi mwa moke ete kobongisama wana ebimaki bobele pwasa, kozanga Mozalisi—moto wana asili kobungisa to aboyi kosalela makoki na ye ya kokanisa kino akoki, engebene Biblia, kotalelama na sembo nyonso lokola zoba (moto oyo azangi mayele to ayebi kosalela yango te).”—Nzembo 14:1.
11 Tozali koyekola makambo nyonso matali Bokonzi kati na Biblia Mosantu. Biblia ezali mpenza Liloba na Nzambe likomami? Na ntembe te. Ezali yango nde emonani na boyokani bozali kati na yango, bosolo na yango kati na makambo ya sianse mpe nguya na yango mpo na kobongola bomoi ya bato, mpe mingi mpenza mpo na kokokana na bisakweli oyo bizali kati na yango.a Tokoki koloba nini na ntina na Yesu Klisto, Mokonzi ya Bokonzi na Nzambe? Azalaki mpenza na bomoi? Masoló ya Baevanzile mpe mikanda mipemami na Nzambe, oyo esali Makomami na Greke na boklisto, elobi mingi mpenza mpe na polele likoló na bomoi na Yesu Klisto. Longola lisoló ya bomoi na Yesu mokanda Talmud ya Bayuda motatoli lisusu ete azalaki moto. Bakomi na makambo na kala na Bayuda mpe Baloma na ekeke ya liboso ya ntango na biso, bazali kosala motindo moko.
12, 13. Makambo nini mamonisi ete Bokonzi na Nzambe ezali likambo ya solo?
12 Ezali boni na ntina na bosolo ya Bokonzi yango moko? Na boklisto ya lokutá, bato mingi bayebi yango te, lokola emonisami na motindo oyo moto monene moko na Lingomba ya presbytérienne amilelaki ete: “Ekokisi koleka mibu ntuku misato wana moteyi moko azalaki komeka kolimbola bandimi na ye ete Bokonzi ezali likambo ya solo.” Nzokande, kokumisama na nkombo ya Jéhovah na nzela na Bokonzi ezali motó na likambo ya Liloba na ye. Nzambe ye moko nde apesaki elaká ya liboso na ntina na Bokonzi, ete: “Nakotya koyina kati na yo mpe mwasi, mpe kati na libota na yo mpe libota na ye. Akotuta yo na motó mpe okoswa ye na litindi.” (Genese 3:15) Bokonzi emonisamaki na libota na Yisraele mingi mpenza na boyangeli ya mokonzi Salomo. (Nzembo 72) Lisusu, Bokonzi ezali motó na likambo oyo Yesu azalaki kosakola. (Matai 4:17) Alobelaki yango kati na ntalo monene ya masese na ye, lokola oyo tozali kokuta na Matai mokapo 13. Yesu alobi na biso ete tobondela mpo ete Bokonzi eya mpe tolukaka naino yango liboso. (Matai 6:9, 10, 33) Ya solo Bokonzi na Nzambe ekomami pene na mbala 150 kati na Makomami na Greke na boklisto.
13 Bokonzi ezali boyangeli ya solo; ezali na nguya mpe na lotómo mpe ekokokisa bilikya na bato. Mibeko na yango mizali kati na Biblia. Bokonzi esili kosala makambo mingi ya solo. Ezali na bato na yango ya sembo—ba Témoins de Jéhovah koleka 4 000 000. Kati na mikili 211, bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe, mpo na kokokisama ya Matai 24:14. Na boumeli ya mbula na bango ya mosala na 1991, balekisaki bangonga 951 870 021 mpo na kosakola nsango ya Bokonzi. Mosala wana mobimisi matomba mamonani mpe makoumela, mpamba te bato mingi bazali koyekola “monoko na pɛto” na solo ya Biblia.—Sofoni 3:9.
Tolanda makambo na solo na Bokonzi
14. Tokoki kosala nini mpo na kolendisa endimiseli na biso kati na makambo na solo na Bokonzi?
14 Na yango, lolenge nini tokoki kolanda makambo na solo na Bokonzi? Elikya na biso esengeli kotongama makasi likoló na endimiseli ya ezali likambo ya solo mpo na biso. (2 Petelo 3:13) Mpe tosengeli kozala na kondima na elaká oyo ete Nzambe “akolongola mpisoli nyonso na miso [na biso] mpe liwa likozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi lisusu mpe te.” (Emoniseli 21:4) Lolenge nini tokoki kondimisama ete yango ezali makanisi mpamba te? Makambo masengeli kokokana na eleko oyo Nzambe asili kokana, mpamba te ye akobukaka lokutá te. (Tito 1:1, 2; Baebele 6:18) Tosengeli kokanisa mingi likoló na bilaká wana. Soki tomikaniseli ete tozali na mokili ya sika ya Nzambe kati na bolamu oyo yango ekomema, tokomipesa na makanisi na lokutá te, kasi tozali nde komonisa kondima na biso. Lokola Paulo alimbolaki yango, “kondima ezali elendiseli na biloko bikolikya biso; ezali mpe elimbweli ya makambo na solo atako tozali komona yango te.” (Baebele 11:1, MN) Na bongo, tolendisa kondima na biso na komileisáká Liloba na Nzambe mbala na mbala mpe mikanda na boklisto, oyo mizali kosalisa biso na kokanga ntina mpe kosalela yango. Soki tozali kolekisa ntango mingi mpo na kolobela Bokonzi epai na bato mosusu, ezala na lolenge lobongisami to na libaku malamu, kondima na biso ekolendisama mpe elikya na biso ekokóma makasi.
15. Mokumba nini tozali na yango na boyokani na mosala na biso ya boklisto?
15 Tosengeli lisusu kosala na boyokani elongo na makambo na solo na Bokonzi na kobongisáká lolenge na mosala na biso mpo na Nzambe. Lokola tozali na mosala mingi ya kosala, lolenge nini tokoki kokokisa yango? (Matai 9:37, 38) Lisese oyo ete “koyekola etali mbula te,” lizali solo. Ata tosili kopesa litatoli uta bambula mingi to kala mingi te tokoki komibongisa lisusu. Soki tokómi na makoki mingi mpo na kosalela Liloba na Nzambe, tokoki kosalisa bato mosusu mawa mongongo ya Mokonzi, Yesu Klisto. (Tala Yoane 10:16.) Soki tokanisi ete bolamu ya seko ya bato ezali na likámá tokozala na mposa ya kosala na teritware na biso na bozindo mpo na kopesa bango libaku mbala na mbala ete bamonisa etɛlɛmɛlo na bango, soki bazali “bampate” to “bantaba.” (Matai 25:31-46) Ya solo, yango elimboli ete tosengeli kokamata banote malamu mpo na bato oyo bazali te, mpe mingi mpenza, baoyo basepelaki na nsango ya Bokonzi.
Tolukaka ntango nyonso Bokonzi
16. Banani bazali kopesa ndakisa eleki malamu mpo na kolanda makambo na solo na Bokonzi, mpe na ndimbola nini baklisto yango “bazwi” Bokonzi?
16 Mpo na kolanda koluka makambo na solo na Bokonzi, esengeli kosala milende makasi. Tolendisami te na ndakisa ya molende ya batikali na baklisto bapakolami? Bazali kolanda makambo na solo na Bokonzi uta bambula mingi. Milende yango ya solo mimonisami na maloba oyo na Yesu ete: “Longwa na mikolo na Yoane Mobatisi kino sikawa, bato bazali kokenda na nguya epai na bokonzi ya makoló, mpe baoyo bazali kokenda na nguya bazwi yango.” (Matai 11:12, MN) Na mokapo wana, baoyo bazwi Bokonzi ezali banguna te. Liloba lisalelami limonisi mosala ya baoyo batangami mpo na Bokonzi. Molimboli moko na Biblia akomaki ete: “Maloba oyo mamonisi mosala makasi, etumba makasi mpo na kozwa bokonzi ya Masiya oyo ekómi pene.” Batikali bapakolami basalaki milende mpo na kozwa Bokonzi. Milende wana makasi misɛngisami mpe epai na “bampate mosusu” mpo ete bakoka kokɔta na molongó ya bato ya Bokonzi na Nzambe na likoló baoyo bakozala awa na mabelé.—Yoane 10:16.
17. Nsuka ya baoyo bazali kolanda makanisi mpamba ya mokili ekozala nini?
17 Ya solo, tozali kobika na eleko malamu oyo likoki lipesameli biso. Mpo na baoyo bazali kolanda makanisi mpamba ya mokili, ekozala mpasi na ntango bakolamuka. Nsuka na bango emonisami kati na maloba oyo: “Ekozala lokola wana moto na nzala alɔti mpe tala ete azali kolya, nde alamuki mpe molimo na ye motondi te; mpe lokola moto na mposa na mai alɔti ete azali komela, nde alamuki mpe tala ete alɛmbi mpe molimo na ye mokauki.“ (Yisaya 29:8, MN) Na ntembe te, makanisi mpamba ya mokili makokokisa mposa ya moto te mpe makopesa ye esengo te.
18. Lokola Bokonzi ezali likambo ya solo, lolenge nini tosengeli komitambwisa, mpe tosengeli kozala na elikya nini?
18 Bokonzi ya Jéhovah ezali likambo ya solo. Ezali koyangela na nguya, awa ebongiseli na biloko mabe ya ntango oyo ebɛlɛmi mpo na kobebisama seko. Na yango, tosimba toli oyo na Paulo ete: “Tolalaka mpɔngi te lokola basusu, kasi tomisɛnzela mpe totɛngatɛnga te.” (1 Batesaloniki 5:6, MN) Tokoki nde kotya motema na biso mpe makanisi na biso likoló na makambo na solo na Bokonzi mpe na yango kozwa bolamu ya seko! Mpe tokoki nde koyoka wana Mokonzi ya Bokonzi yango azali koloba na biso ete: “Yakani, bino bopambolami na Tata na ngai bosangola libula ya bokonzi bobongisami mpo na bino uta ebandeli ya mokili.”—Matai 25:34, MN.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala mokanda La Bible: Parole de Dieu ou des hommes?, ebimisami na la Société Watchtower
Bozongeli
◻ Makanisi mpamba ya mokili ezali nini, mpe mpo na nini tosengeli kobwaka yango?
◻ Bandakisa nini emonisi ete komipesa na makanisi mpamba ya mokili ezali bozoba?
◻ Makambo nini momonisi ete Mozalisi azali solo, ete Liloba na ye likomami lizali solo, ete Yesu Klisto azali solo mpe Bokonzi na Nzambe ezali solo?
◻ Lolenge nini tokoki kolendisa kondima na biso kati na makambo na solo na Bokonzi?
[Elilingi na lokasa 15]
Makanisi mpamba ya mokili mazali mbula mingi kouta na mposa makasi ya kozwa biloko ya mosuni
[Elilingi na lokasa 16]
Kosakola nsango malamu ezali motindo mosusu ya kolanda makambo na solo na Bokonzi
[Elilingi na lokasa 17]
Ozali kolanda makambo na solo na Bokonzi na koyekoláká Liloba na Nzambe mbala na mbala?