‘Yehova apesaka mayele’
OMIPESAKA mobimba na koluka kozwa nini? Olingaka kozala moto ya lokumu? Omipesaka nde na koluka bomɛngɔ? Ozali nde koluka kokóma moto monene na mosala to ozali kotánga bakelasi milaimilai mpe ya ndenge na ndenge? Kozala na boyokani malamu na baninga nde ezali na ntina mingi mpo na yo? Lobanzo na yo ya liboso ezali nde ete ozala nzoto kolɔngɔnɔ?
Makambo yango nyonso oyo tolobi ezali na ntina. Kasi likambo nini eleki ntina? Biblia epesi eyano oyo: “Mayele ezali likambo na liboso; boye, zwá mayele.” (Masese 4:7) Ndenge nini tokoki kozwa mayele mpe mayele ekopesa biso nini? Biblia ezali kopesa biyano na mituna yango na mokanda ya Masese mokapo ya mibale.
“Osembola litoi na yo epai na mayele”
Salomo, mokonzi ya Yisalaele ya kala, azalaki na mayele mingi mpe alobaki mpenza lokola tata oyo azali na bolingo ete: “Mwana na ngai, soko okozwa maloba na ngai mpe okobomba maloba na ngai kati na yo, ete osembola litoi na yo epai na mayele mpe ete otya motema na yo koluka boyebi; ɛɛ, soko [okobenga, NW] bososoli mpe soko okonganga mpo na boyebi; soko okoluka ye lokola palata, mpe okolukaluka ye lokola na biloko na motuya bibombami; mbɛ, okososola botosi na kotosa [Yehova] mpe okozwana na boyebi koyeba Nzambe.”—Biso nde totɛngisi makomi; Masese 2:1-5.
Omoni? Nani asengeli kozwa mayele? Na Liebele, maloba “soko oko” emonani mbala misato na vɛrsɛ yango. Tomoni polele ete, moto na moto asengeli koluka mayele mpe bizaleli oyo ezali na boyokani na yango, elingi koloba bososoli mpe boyebi. Kasi, tosengeli liboso ‘kozwa’ maloba ya mayele oyo ekomami na Biblia mpe ‘kobomba’ yango na makanisi na biso. Yango wana tosengeli koyekola Biblia.
Kozala na mayele elimboli koyeba kosalela malamu boyebi oyo Nzambe apesaka. Biblia eteyaka makambo oyo epesaka mayele! Ya solo, Biblia ezali na maloba ya mayele na ndakisa oyo ekomami na mokanda ya Masese mpe na mokanda ya Mosakoli. Ebongi tóyokaka maloba yango malamu. Na kati ya Biblia, tozali mpe kokuta bandakisa mingi oyo ezali komonisa ete kotosa mibeko ya Nzambe epesaka bolamu kasi koboya kotosa yango ememaka makama. (Baloma 15:4; 1 Bakolinti 10:11) Na ndakisa, Biblia elobeli lisolo ya moto moko ya lokoso na nkombo Gehazi, ye azalaki mosaleli ya mosakoli Elisa. (2 Mikonzi 5:20-27) Lisolo yango ezali koteya biso tózala na mayele mpe tóboya lokoso. Lisusu, tokoloba boni na likama oyo ekómelaki Dina, mwana mwasi ya Yakobo, oyo azalaki kokende kotala “basi na mokili” ya Kanana? (Genese 34:1-31) Tozali mbala moko kokanga ntina ete ezali malamu te kotambola na baninga mabe, boye te?—Masese 13:20; 1 Bakolinti 15:33.
Koyoka maloba ya mayele elimboli kozwa bososoli mpe boyebi. Diksionere moko (Webster’s Revised Unabridged Dictionary) elobi ete bososoli ezali “mayele to likoki oyo bɔɔngɔ ezali na yango ya kokesenisa makambo mibale.” Bososoli oyo Nzambe apesaka ezali mayele ya kokesenisa malamu na mabe mpe kopona nzela ya malamu. Soki ‘totii motema’ na bososoli te to soki tozali na mposa makasi ya kozwa yango te, ndenge nini tokoki kotikala libela na “nzela oyo ememaka na bomoi”? (Matai 7:14, NW; talá Deteronome 30:19, 20.) Moto akómaka na bososoli ntango azali koyekola mpe kosalela Liloba ya Nzambe.
Ndenge nini tokoki “kobenga bososoli,” elingi koloba, koyeba kotalela likambo mokomoko oyo elobelami na lisolo moko mpe boyokani oyo ezali na yango na lisolo mobimba? Ya solo, kozala na bambula mingi mpe komona makambo mingi na mokili ezali makambo oyo ekoki kosalisa biso tókóma na bososoli. Kasi ezalaka kaka bongo te. (Yobo 12:12; 32:6-12) Mokomi ya nzembo alobaki boye: “Naleki bampaka na bososoli, zambi nakobatelaka bilakeli na yo [Yehova].” Alobaki lisusu ete: “Kozipola maloba na yo ekopesa pole, ekopesa mpe [bososoli, NW] na baoyo bazangi yango.” (Nzembo 119:100, 130) Yehova azali “Oyo na Kalakala,” mpe azali na bososoli oyo eleki bososoli ya bato nyonso mosika. (Danyele 7:13, NW) Yehova akoki kopesa bososoli epai ya moto oyo azangi yango, mpe kosalisa ye aleka ata baoyo bazali mikóló. Yango wana, tosengeli komipesa na koyekola mpe kotosa Biblia, Liloba ya Nzambe.
Maloba “soko oko . . .” oyo ezongelami mbala mingi na ebandeli ya mokanda ya Masese mokapo ya mibale, elandani na maloba lokola “kozwa,” “kobomba,” “kobenga,” “koluka,” mpe “kolukaluka.” Mpo na nini mokomi ya Masese asaleli maloba oyo emonisaka ete likambo elobelami makasi? Buku moko elobi boye: “[Awa] moto ya mayele azali komonisa ntina ya kotya molende ntango ozali koluka mayele.” Yango wana, tosengeli kotya molende ntango tozali koluka mayele mpe bizaleli oyo ezali na boyokani na mayele, elingi koloba bososoli mpe boyebi.
Okosala makasi?
Koyekola Biblia na molende ezali likambo ya ntina mingi mpo na koluka mayele. Kasi, boyekoli yango esengeli kosuka kaka na kotánga mpamba te mpo na koyeba makambo. Kokanisa malamumalamu makambo oyo tozali kotánga ezali na ntina mingi ntango tozali koyekola Biblia. Kokóma na mayele mpe bososoli esɛngaka kokanisa ndenge oyo tokoki kosalela makambo oyo tozali koyekola mpo na kosilisa mikakatano mpe mpo na kozwa mikano. Kokóma na bososoli esɛngaka kokanisa makambo oyo tozali koyekola mpe koyokanisa yango na makambo oyo toyebi. Tomoni mpenza ete koyekola Biblia na ndenge yango ezwaka ntango mpe esɛngaka kosala molende mpenza. Ntango oyo tozali kolekisa na koyekola mpe milende oyo tozali kosala mpo na yango ezali ndenge moko na oyo moto alekisaka ntango azali ‘koluka palata mpe kolukaluka biloko ya motuya oyo bibombami.’ ‘Okosala molende oyo esengeli, boye te? ‘Okosomba ntango’ mpo na koyekola, boye te?—Baefese 5:15, 16.
Tókanisa biloko ya motuya oyo tokozwa soki tomipesi na koyekola Biblia na bosembo nyonso. Na ntembe te, tokozwa “boyebi na koyeba Nzambe,” elingi koloba boyebi ya solosolo, oyo ekoumela seko, mpe oyo ekopesa bomoi oyo euti na Mozalisi na biso! (Yoane 17:3) “Kobanga Yehova” ezali mpe eloko ya motuya oyo tokozwa. Kobanga Nzambe na limemya nyonso ezali na ntina mingi! Tosengeli komonisa ete tobangaka kosalela Nzambe mabe na makambo nyonso ya bomoi na biso, yango ekosala ete tótalelaka makambo nyonso oyo tozali kosala na liso ya elimo.—Mosakoli 12:13.
Tosengeli kozala na mposa makasi ya kolukaluka biloko ya motuya ya elimo, kotimola yango ndenge batimolaka mabanga ya ntalo. Mpo bolukiluki yango ezala mpasi te, Yehova apesi biloko ya mosala ya malamu oyo tokoki kosalela mpo na kotimola: tozali na bazulunalo malamu lokola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! oyo eteyaka solo, bakisa mpe mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia. (Matai 24:45-47) Mpo na koteya biso Liloba na ye mpe banzela na ye, Yehova abongiseli biso makita ya baklisto. Tosengeli koyanganaka na makita yango pɔsɔ na pɔsɔ, kolanda malamu makambo oyo bazali koloba, kosala milende mpo na kosimba makanisi ya ntina mpe kobomba yango, mpe kokanisa malamumalamu likoló ya boyokani na biso na Yehova.—Baebele 10:24, 25.
Okolonga
Mbala mingi, ntango bato balukaka mabanga ya ntalo lokola wolo to palata na nse ya mabelé, bazwaka yango te. Yango ezali bongo te ntango tozali koluka biloko ya motuya ya elimo. Mpo na nini? Salomo alobi na biso boye: ‘[Yehova] akopesaka mayele; boyebi mpe bososoli eutaka na monɔkɔ na ye.’—Biso nde totɛngisi makomi; Masese 2:6.
Mokonzi Salomo ayebanaki mingi mpo azalaki na mayele. (1 Mikonzi 4:30-32) Biblia elobi ete ayebaki makambo mingi, ezala makambo ya banzete, banyama, bizaleli ya bato, mpe Liloba ya Nzambe. Ntango akómaki mokonzi azalaki naino elenge, mpe amonisaki ete azali na bososoli ntango asilisaki matata kati na basi mibale oyo bazalaki kowela mwana; mpo na likambo yango, ayebanaki tii na bamboka mosusu. (1 Mikonzi 3:16-28) Mayele mingi oyo Salomo azalaki na yango eutaki wapi? Salomo abondelaki Yehova apesa ye “mayele mpe boyebi” mpo ayeba “kokata epai na mabe mpe malamu.” Yehova apesaki ye yango.—2 Ntango 1:10-12; 1 Mikonzi 3:9.
Biso mpe tosengeli kobondela Yehova asalisa biso lokola tozali komipesa na koyekola Liloba na ye. Mokomi na nzembo abondelaki boye: “Ɛ [Yehova], teyá ngai nzela na yo; nakotambola kati na solo na yo; pesá ngai motema moko ete nabanga nkombo na yo.” (Nzembo 86:11) Yehova andimaki libondeli na ye, yango wana akomisaki yango na Biblia. Tokoki kozala na elikya ete Yehova ayokaka mabondeli oyo tosalaka mbala na mbala na motema mobimba mpo asunga biso tózwa biloko ya motuya ya elimo oyo ezali na Biblia.—Luka 18:1-8.
Salomo alobi ete: “Akobombela basembwi mayele malamu; azali nguba mpo na bango bakotambolaka alima, ete abatela nzela na kosambisa-sembo, ete akɛngɛla nzela na basɛmbwi na ye. Boye okoyeba boyengebene mpe kosambisa-sembo mpe kokata na solo, ɛɛ nzela nyonso malamu.” (Biso nde totɛngisi makomi; Masese 2:7-9) Yango epesi biso mpenza elikya! Yehova apesaka mayele ya solo epai na baoyo bazali koluka yango na bosembo mpenza mpe azali lisusu nguba mpo na kobatela bato ya sembo mpamba te, bazali na mayele ya solo mpe bazali kotosa mibeko na ye na bosembo nyonso. Tiká ete tózala na kati ya bato oyo Yehova azali kosalisa bango mpo báyeba “nzela nyonso malamu.”
Ntango “boyebi ekokóma esengo”
Ntango moto azali koluka mayele, ezali na ntina mingi ete ayekolaka Biblia; kasi bato mingi bamonaka yango lokola motungisi monene. Na ndakisa, Lawrence, ye azali na mbula 58 alobi boye: “Namesaná kosala misala ya mabɔkɔ. Mpo na ngai, koyekola ezali mpasi.” Michael azali na mbula 24, ye azalaki kolinga koyekola te na kelasi, alobi ete: “Nasengelaki kosala milende mpo nafanda mpe nayekola.” Na ntembe te, soki moto asali makasi akokóma na mposa ya koyekola.
Tótala likambo oyo Michael asalaki. Alobi boye: “Namipesaki disipilini mpo na koyekola miniti 30 mokolo na mokolo. Mosika te, makanisi na ngai ebongaki, nakómaki kosala bakomantɛrɛ malamu na makita ya lisangá, mpe nakómaki kosolola na bato mosusu malamu. Sikoyo nazelaka na motema mɔ́tɔmɔ́tɔ ngonga na ngai ya koyekola, mpe nalingaka te ete eloko moko ebebisa ntango na ngai ya koyekola.” Ya solo, tokómaka na esengo ya koyekola ntango tozali komona ndenge tozali kokola. Lawrence mpe asalaki makasi ete ayekolaka Biblia ye moko, mpe na nsima, akómaki nkulutu na lisangá moko ya Batatoli ya Yehova.
Esengeli kosala milende mpo na kosepela na koyekola. Matomba na yango ezali mingi. Salomo alobi boye: “Boye mayele ekokɔta na motema na yo mpe boyebi ekoyokama malamu na molimo na yo; mayele ekobatela yo mpe bososoli ekosunga yo.”—Biso nde totɛngisi makomi; Masese 2:10, 11.
“Mpo na kolongola yo na nzela mabe”
Ndenge nini mayele, boyebi, makanisi, mpe bososoli ekoki kobatela moto? Salomo alobi boye: “[Ezali] mpo na kolongola yo na nzela mabe mpe na moto oyo akolobaka makambo na mobulu; baoyo batiki nzela na sembo mpo na kotambola na nzela na molili; baoyo basepeli mpo na kosala mabe, bayoki esengo na mobulu na mabe. Nzela na bango [egumbami] mpe kotambola na bango ezali na mobulu.”—Biso nde totɛngisi makomi; Masese 2:12-15.
Yango wana, baoyo bazali na mayele ya solo baboyaka kosala boninga na moto nyonso oyo “akolobaka makambo na mobulu,” elingi koloba, makambo ya lokuta mpe oyo ebongi te. Kozala na makanisi malamu mpe na bososoli ebatelaka moto ete asala boninga te na bato oyo baboyaka solo mpo na kotambola na banzela ya molili mpe aboya kosala boninga na bapɛngwi mpe na bato oyo basepelaka na misala ya mabe.—Masese 3:32.
Tosengeli kosepela, mpamba te mayele ya solo na bizaleli oyo ezali na boyokani na yango ezali kobatela biso tómikɔtisa te na banzela mabe ya mibali na basi oyo bazali na etamboli ya mbindo! Salomo alobi lisusu ete bizaleli yango ‘ekobikisa yo na mwasi mopaya, ɛɛ na mopaya oyo akozimbisaka na maloba na ye. Oyo akotikaka moninga na bolenge na ye mpe akoboyaka kondimana na Nzambe na ye. Zambi ndako na ye ekomema kino kufa mpe nzela na ye kino bakufi. Baoyo nyonso bakolandaka ye bakozonga te; bakotambola lisusu na nzela ya bomoi te.’—Masese 2:16-19, NW.
“Mwasi mopaya,” to mwasi ya ndumba, ezali mwasi oyo atikaka “moninga na bolenge na ye,” elingi koloba mobali oyo abalaki ye ntango azalaki elenge.a (Talá Malaki 2:14.) Abosani ete kondimana ya Mibeko epekisaki ekobo. (Exode 20:14) Banzela na ye ezali komema na liwa. Baoyo bazali kosangana na ye “bakotambola lisusu na nzela ya bomoi te” mpamba te ata ndɛlɛ bakokóma esika oyo, soki okei kuna, okei libela, elingi koloba liwa. Moto oyo azali na bososoli mpe oyo akanisaka malamu ayebi ete etamboli ya mbindo ebendaka bato mpe mayele ekosalisa ye na kokima mpo akangama na mitambo na yango te.
‘Bato ya sembo bakofanda na mokili’
Na mokuse, talá ntina oyo Salomo apesi toli oyo etondi na mayele, mpo: “Otambola na nzela na bato malamu; otikala na nzela na bayengebene.” (Biso nde totɛngisi makomi; Masese 2:20) Mayele ezali mpenza na ntina! Mayele esalisaka biso tózala na bomoi ya esengo mpe ya malamu ndenge Nzambe alingaka.
Talá lisusu ebele ya mapamboli bato oyo ‘bazali kotambola na nzela ya bato malamu’ bakozwa. Salomo alobi lisusu boye: “Basɛmbwi bakofanda na mokili mpe bato malamu bakotikala na yango. Kasi bato mabe bakolongolama na mokili mpe bato na masumu bakobikolama wana.” (Biso nde totɛngisi makomi; Masese 2:21, 22) Tiká ete ozala na kati ya bato malamu oyo bakofanda libela na libela na mokili ya sika oyo Nzambe akosala.—2 Petelo 3:13.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bazalaki kobenga “mopaya” moto oyo atiki makambo oyo Mobeko elobi mpe apesi Yehova mokɔngɔ. Na yango, mwasi ya ndumba—ata azali mopaya te, Biblia ezali kobenga ye lokola “mwasi mopaya.”
[Elilingi na lokasa 26]
Salomo abondelaki Nzambe apesa ye mayele. Biso mpe tosengeli kosala bongo