Tyá motema na yo epai na bososoli
“[Yehova] akopesaka mayele; boyebi mpe bososoli ikoutaka na monɔkɔ na ye.”—MASESE 2:6.
1. Lolenge nini tokoki kotya motema na biso epai na bososoli?
YEHOVA azali Molakisi na biso Monene. (Yisaya 30:20, 21) Kasi, tosengeli kosala nini mpo na kozwa litomba na ‘boyebi ya Nzambe’ oyo emonisami kati na Liloba na ye? Ndambo ya eyano ezali ete tosengeli ‘kotya motema na biso epai na bososoli’—elingi koloba kozala na mposa makasi ya kokóma na ezaleli yango mpe komonisa yango. Boye, tosengeli kotalela Nzambe, mpamba te moto na mayele alobaki ete: “[Yehova] akopesaka mayele; boyebi mpe bososoli ikoutaka na monɔkɔ na ye.” (Masese 2:1-6) Boyebi, mayele, mpe bososoli ezali nini?
2. (a) Boyebi ezali nini? (b) Lolenge nini okoki kolimbola mayele? (c) Bososoli ezali nini?
2 Boyebi ezali bongo komesana na makambo oyo osilá komona kati na bomoi na yo, na bolukiluki, to na boyekoli. Mayele ezali likoki ya kosalela boyebi. (Matai 11:19) Mokonzi Salomo amonisaki mayele ntango basi mibale bazalaki kowela mwana mpe, mpo na kosilisa mokakatano yango, asalelaki boyebi na ye ya bolingo oyo mama azalaka na yango epai na bana na ye. (1 Mikonzi 3:16-28) Bososoli ezali “likoki ya kokata ntina ya likambo na bosikisiki nyonso.” Yango ezali “nguya to likoki oyo elimo ezali na yango ya kokesenisa likambo moko na mosusu.” (Webster’s Universal Dictionary) Soki totye motema na biso epai na bososoli, Yehova akopesa biso yango na nzela ya Mwana na ye. (2 Timoté 2:1, 7) Kasi, lolenge nini bososoli ekoki kosala bopusi likoló na makambo ndenge na ndenge ya bomoi?
Bososoli mpe maloba na biso
3. Lolenge nini okoki kolimbola Masese 11:12, 13, mpe maloba kozala “na motema na mpamba” elimboli nini?
3 Bososoli ezali kosalisa biso na koyeba ete ezali na “ntango na kozala nyɛɛ mpe ntango na koloba.” (Mosakoli 3:7) Ezaleli yango ezali mpe kosalisa biso ete tókeba na oyo tozali koloba. Masese 11:12, 13 elobi ete: “Ye oyo azali na motema te akotyola mozalani na ye; kasi moto na bososoli akokanga monɔkɔ. Ye oyo akopalanganisa nsango mabe azipoli makambo na nkuku; nde ye oyo azali na [e]limo na solo [“sembo,” NW] akobomba likambo.” Ɛɛ, mobali to mwasi oyo azali kotyola moto mosusu azali “na motema na mpamba.” Molimboli moko ya maloba ya nkótá, na nkombo Wilhelm Gesenius, amonisaki ete moto motindo wana “azangi mayele ya kososola.” Azangi likoki ya kokata ntina ya likambo malamumalamu, mpe kosalelama ya liloba “motema” emonisi ete bizaleli bibongi ya bomoto ya kati bizangi epai na ye. Soki moto moko, oyo azali komitánga moklisto, asaleli monɔkɔ na ye mabe kino kotɔ́nga to kofinga, bankulutu oyo baponami basengeli kosala na boye ete básilisa likambo mabe wana kati na lisangá.—Levitike 19:16; Nzembo 101:5; 1 Bakolinti 5:11.
4. Baklisto ya bososoli mpe ya sembo basalaka nini na ntina na makambo ya nkuku?
4 Na bokeseni na baoyo ‘na motema na mpamba,’ bato ya “bososoli” bafandaka nyɛɛ na ntango esengeli. Babimisaka sɛkɛlɛ́ te. (Masese 20:19) Lokola bayebi ete monɔkɔ oyo ebatelami te ekoki kozokisa, bato ya bososoli bamonisaka nde “elimo ya sembo.” Bazali sembo epai na baninga na bango bandimi mpe babimisaka te makambo ya nkuku oyo makoki kotya baninga na bango na likámá. Ntango baklisto ya bososoli bayoki sɛkɛlɛ́ moko ata ya lolenge nini, oyo etali lisangá, babombaka yango kino lisangá ya Yehova ekomona malamu mpo na koyebisa likambo wana na kosaleláká mwango na yango moko ya koyebisa makambo.
Bososoli mpe etamboli na biso
5. Lolenge nini ‘bazoba’ batalelaka etamboli ya mabe, mpe mpo na nini?
5 Masese ya Biblia ezali kosalisa biso ete tósalela bososoli mpe tópengola etamboli mabe. Na ndakisa, Masese 10:23 (NW ) elobi ete: “Mpo na zoba, komipesa na etamboli mabe ezali lokola lisano, nde mayele ezali mpo na moto na bososoli.” Baoyo mpo na bango etamboli mabe ezali “lokola lisano” bamonaka te mabe ya ezaleli na bango mpe bazali te kotalela Nzambe lokola moto oyo banso bakozongisa monɔkɔ epai na ye. (Baloma 14:12) ‘Bazoba’ wana babebisami na makanisi na bango mpe bakanisi ete Nzambe azali komona mabe oyo bazali kosala te. Na nzela ya misala na bango, bazali mpenza koloba ete: “Yehova azali te.” (Nzembo 14:1-3; Yisaya 29:15, 16) Lokola batambwisami na mitindá ya Nzambe te, bazangi bososoli mpe bakoki te kokata malamumalamu ntina ya makambo.—Masese 28:5.
6. Mpo na nini etamboli ya mabe ezali bozoba, mpe lolenge nini tokotalela yango soki tozali na bososoli?
6 “Moto na bososoli” ayebi ete etamboli mabe ezali “lisano” te, ezali lisɛki mpe te. Ayebi ete yango ezali kosepelisa Nzambe te mpe ete ekoki kobebisa boyokani na biso elongo na ye. Etamboli motindo wana ezali ya bozoba mpamba te elongolaka bato limemya na bango moko, ezali koboma mabala, ezali kobebisa makanisi mpe nzoto, ezali mpe komema bato na kobungisa ezalela malamu ya elimo na bango. Na yango, tiká tótya motema na biso epai na bososoli mpe tópengola etamboli mabe to ya mbindo ya lolenge nyonso.—Masese 5:1-23.
Bososoli mpe ezalela ya elimo na biso
7. Wapi mwa makámá oyo nkanda ebimisaka na nzoto?
7 Kotya motema epai na bososoli ezali mpe kosalisa biso ete tóyeba kosembola ezalela ya elimo na biso. Masese 14:29 elobi ete: “Ye oyo akosilika noki te azali na boyebi monene; kasi [motema] mokuse ekopesa ebebe nzela.” Moko na bantina oyo moto ya bososoli asalaka makasi ya kopengola nkanda makasi ezali ete nkanda motindo wana ekomemela ye makámá na nzoto. Ekoki komatisa tansyɔ́ mpe kobimisa mikakatano ya mpema. Minganga basili komonisa ete nkanda mpe nkɛlɛ makasi engalisaka to ebimiselaka bato makɔnɔ lokola maladi ya mpema, maladi na loposo, mikakatano ya botamboli ya bilei na libumu, mpe bampota ya libumu.
8. Kozala motema mokuse ekoki komema na nini, kasi lolenge nini bososoli ekoki kosalisa biso na likambo yango?
8 Ezali te bobele mpo na koboya kobebisa bokolɔngɔ́nú ya nzoto na biso nde tosengeli kosalela bososoli mpe ‘kozala na kosilika noki te.’ Kozala motema mokuse ekoki komema moto na kosala makambo ya bolema oyo makoyokisa ye mawa na nsima. Bososoli ezali kopusa biso na kotalela malamu makámá oyo makoki kouta na ezaleli ya kozanga komipekisa na maloba to na etamboli ya bozoba; boye yango ezali kobatela biso ete tózanga ‘kopesa ebebe nzela’ na kosaláká likambo moko ya kozanga mayele. Bososoli ezali kosalisa biso mingi mpenza na kokanga ntina ete nkanda makasi ekoki kobebisa makoki na biso ya kokanisa, na boye ete tokozala lisusu na likoki te ya kokata ntina ya likambo malamu. Nkanda motindo wana ekoki kokitisa likoki na biso ya kosala mokano ya Nzambe mpe ya kozala na bomoi oyo eyokani na mitindá ya sembo ya Nzambe. Ɛɛ, kopesa nzela na nkanda makasi ebebisaka elimo ya moto. Kútu, ‘nkanda makasi’ etángami na molɔngɔ́ ya ‘misala mabe ya nzoto’ oyo ekoki kosala ete tózanga kosangola libula ya Bokonzi ya Nzambe. (Bagalatia 5:19-21) Na yango, lokola tozali baklisto oyo bazali na bososoli, tiká tózala ‘noki na koyoka, malɛmbɛ na koloba mpe na koyoka nkanda.’—Yakobo 1:19, NW.
9. Lolenge nini bososoli mpe bolingo mpo na bandeko ezali kosalisa biso na kosilisa matáta?
9 Soki likambo moko esilikisi biso, bososoli ekoki kolakisa biso ete tófanda nyɛɛ mpo na kopengola matáta. Masese 17:27 elobi ete: “Ye oyo azali na mayele azali na maloba mingi te; moto na boyebi [“bososoli,” NW] azali na motema na mpiɔ.” Bososoli mpe bolingo na biso mpo na bandeko ekosalisa biso ete tómona ntina ya koboya kobimisa na nkanda nyonso maloba oyo ekoki kozokisa. Soki tosilaki kobimisa liloba moko ya mabe na nkanda, bolingo mpe komikitisa ekopusa biso na kosɛnga bolimbisi mpe koluka kosilisa mpota wana. Tózwa ndakisa ete moto moko asaleli yo likambo moko oyo eyokisi yo mpasi. Ekozala malamu osolola na ye, bobele bino mibale, na kosɔkɛma mpe na komikitisa nyonso, kozaláká na mokano bobele moko ya kobatela kimya.—Matai 5:23, 24; 18:15-17.
Bososoli mpe libota na biso
10. Mokumba nini mayele mpe bososoli ezali kokokisa na bomoi ya libota?
10 Basangani ya libota basengeli komonisa mayele mpe bososoli, mpamba te bizaleli wana ekotonga libota na bango. Masese 24:3, 4 elobi ete: “Ndako ekotongama malamu na nzela na mayele; ekokokisama na nzela na bososoli. Na nzela na boyebi, biteni-na-ndako ikotonda na biloko na motuya malamu mpe na kitoko.” Mayele mpe bososoli ezali lokola mabanga minene mpo na kotonga libota ete bomoi na yango ezala malamu. Bososoli ezali kosalisa baboti baklisto ete báyeba mayoki mpe mabanzo ya bana na bango. Moto oyo azali na bososoli ayebi malamu kosolola na mobalani na ye, koyokamela ye mpe kososola mayoki mpe makanisi na ye.—Masese 20:5.
11. Lolenge nini mwasi ya libala oyo azali na bososoli akoki ‘kotonga ndako na ye’?
11 Na ntembe te, mayele mpe bososoli ezali mpenza na ntina mpo na kozala na bomoi ya libota ya esengo. Na ndakisa, Masese 14:1 elobi ete: “Mwasi na mayele akotonga ndako na ye, nde oyo na zoba akobuka yango na mabɔkɔ na ye mpenza.” Mwasi ya libala oyo azali na mayele mpe na bososoli, oyo azali mpenza kotosa mobali na ye, asalaka nyonso ekoki mpo na bolamu ya libota mpe na lolenge yango azali kopesa mabɔkɔ mpo na kotonga libota na ye. Eloko oyo ‘ekotonga ndako na ye’ ezali bongo momeseno na ye ya koloba ntango nyonso malamu mpo na mobali na ye mpe kokólísáká bongo limemya oyo basusu basengeli kopesa mobali na ye. Lisusu, mwasi ya makoki, ya bososoli, oyo azali mpenza kobanga Yehova akomizwela masanzoli.—Masese 12:4; 31:28, 30.
Bososoli mpe ezaleli na biso na bomoi
12. Lolenge nini baoyo bazali “na motema na mpamba” batalelaka makambo mazangi ntina, mpe mpo na nini?
12 Bososoli ezali kosunga biso ete tóbatela ezaleli malamu na makambo na biso nyonso. Yango emonisami na Masese 15:21, oyo elobi ete: “Bolema ezali esengo epai na motema na mpamba, kasi moto na boyebi [“bososoli,” NW] akotambola alima.” Lisese oyo elingi mpenza koloba nini? Etamboli ya bozoba, to ya bolema, ezali kopesa esengo epai na mibali bazangi mayele, basi bilema, mpe epai na bilenge bibebe. Bato yango bazali “na motema na mpamba,” bazangi makanisi malamu, mpe mayele mazangi bango na boye ete bazali kosepela na makambo mazangi ntina.
13. Salomo asosolaki nini na ntina na kosɛka mpe makambo ya mpambampamba?
13 Salomo, Mokonzi ya Yisalaele, oyo azalaki moto ya bososoli, amonaki ete makambo mazangi ntina masengeli kopesamela motuya te. Andimaki ete: “Nalobaki na motema na ngai ete, Talá, nakomeka yo na esengo; boye sepelá na malamu. Nde talá, yango ezali bobele mpamba. Mpo na kosepela [“kosɛka,” NW] nalobi ete, Ezali ebebe, mpe mpo na esengo ete, Ekosala nini?” (Mosakoli 2:1, 2) Lokola azalaki moto na bososoli, Salomo amonaki ete bisengo mpe kosɛka, bobele yango moko, ezali kopesa bosepeli te, mpo ete ezali komema te bolamu ya solosolo mpe ya koumela. Kosɛka ekoki kosalisa biso ete tóbosana mwa moke mikakatano tozali na yango, kasi na nsima mikakatano wana mikobima lisusu makasi koleka. Salomo azalaki na elónga mpenza ya kobénga kosɛka ete “ebebe.” Mpo na nini? Mpo ete bisɛkasɛka ekangaka bososoli malamu ya moto. Yango ekoki komema biso na kotalela makambo minene lokola masɛki. Bisengo oyo ezwami na maloba mpe na misala ya mosɛkisi-bato ekoki kolobelama soko moke te ete epesaka eloko moko ya malongá. Kokanga ntina ya boyekoli oyo Salomo asalaki likoló na kosɛka mpe bisengo ezali kosalisa biso ete tópengola kozala ‘bato oyo bakolingaka bisengo koleka bolingo epai na Nzambe.’—2 Timoté 3:1, 4.
14. Na lolenge nini moto ya bososoli atambolaka “alima”?
14 Na lolenge nini moto na bososoli atambolaka “alima”? Bososoli ya elimo mpe momeseno ya kosalela mitindá ya Nzambe ememaka bato kino na etamboli ya semba, ya nyokanyoka te. Libongoli ya Byington elobi polele mpenza ete: “Bozoba ezali mama na bisengo epai na moto azangi bɔɔngɔ́, kasi moto ya mayele akotambola semba.” ‘Moto ya bososoli’ asalaka banzela ya semba mpo na makolo na ye mpe azali na likoki ya kokesenisa malamu na mabe mpamba te azali kosalela Liloba ya Nzambe kati na bomoi na ye.—Baebele 5:14; 12:12, 13.
Talá ntango nyonso epai na Yehova mpo na kozwa bososoli
15. Liteya nini tozali kozwa na Masese 2:6-9?
15 Mpo na kotambola alima kati na bomoi, biso banso tosengeli kondima ete tozali bato ya kozanga kokoka mpe, mpo na kozwa bososoli ya elimo, tosengeli kotala epai na Yehova. Masese 2:6-9 elobi ete: “[Yehova] akopesaka mayele; boyebi mpe bososoli ikoutaka na monɔkɔ na ye. Akobombela basembwi mayele malamu; azali nguba mpo na bango bakotambolaka alima, ete abatela nzela na kosambisa-sembo, ete akɛngɛla nzela na basembwi na ye. Boye okoyeba boyengebene mpe kosambisa-sembo mpe kokata na solo, ɛɛ nzela nyonso malamu.”—Kokanisá na Yakobo 4:6.
16. Mpo na nini ezali na mayele te, na bososoli te, to na toli te oyo ekoki kotɛmɛla Yehova?
16 Lokola tondimi ete tosengeli kotalela bobele Yehova, tiká tóluka na komikitisa nyonso kososola mokano na ye na kotimoláká mozindo kati na Liloba na ye. Azali na mayele oyo makokani na mosusu te, mpe toli na ye epesaka sé matomba malamu. (Yisaya 40:13; Baloma 11:34) Ya solo, toli nyonso oyo eyokani na Liloba na ye te ezali mpamba. Masese 21:30 elobi ete: “Mayele ezali te, bososoli ezali te, toli ezali mpe te oyo ikoki kotɛmɛla [Yehova].” (Kokanisá na Masese 19:21.) Eloko oyo ekosalisa biso ete tólanda nzela malamu kati na bomoi na biso ezali bobele bososoli ya elimo, bososoli oyo ekólisami na boyekoli ya Liloba ya Nzambe na lisalisi ya mikanda mibimisami na “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Matai 24:45-47) Na yango, tiká totambwisa bomoi na biso na boyokani na toli ya Yehova, awa eyebi biso ete toli nyonso mosusu, ata etalelami lokola ya mayele, ekoki ata moke te kokokana na Liloba na ye.
17. Toli ya mabe ekoki kobimisa nini?
17 Baklisto ya bososoli, oyo bazali kopesa toli, bayebi ete yango esengeli kotongama na Liloba ya Nzambe mpe ete, mpo na koyanola na motuna moko, esengeli koyekola mpe komanyola likoló na Biblia. (Masese 15:28) Soki mituna oyo mitali makambo minene mipesameli biyano oyo bibongi te, likámá monene ekoki kobima. Na yango, bankulutu baklisto basengeli kozala na bososoli ya elimo mpe kolɔmba litambwisi ya Yehova ntango bazali kosala nyonso ekoki mpo na kopesa lisungi ya elimo epai na baninga na bango bandimi.
Tiká ete otonda na bososoli ya elimo
18. Soki mokakatano ebimi kati na lisangá, lolenge nini bososoli ekoki kosalisa biso ete tóbatela bokatikati na biso ya elimo?
18 Mpo na kosepelisa Yehova, tosengeli kozala na “bososoli na makambo nyonso.” (2 Timoté 2:7) Koyekola Biblia na mposa makasi mpe kondima litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe ya lisangá na ye ekosunga biso ete tósosola eloko oyo tokoki kosala ntango tokutani na makambo oyo makoki komema biso na nzela mabe. Na ndakisa, soki likambo moko na kati ya lisangá likatami na lolenge oyo biso tozalaki kokanisa te. Bososoli ya elimo ekosalisa biso na komona ete yango ezali te ntina oyo ekopusa biso na koboya kosangana na basaleli ya Yehova mpe kotika kosalela Nzambe. Kanisá naino libaku malamu oyo tozali na yango ya kosalela Yehova, bonsomi ya elimo oyo tozali na yango, esengo oyo tokoki kozwa na mosala na biso ya basakoli ya Bokonzi. Bososoli ya elimo ezali kopesa biso likoki ya kozala na likanisi libongi mpe koyeba ete tosilaki komipesa na Nzambe mpe tosengeli kopesa motuya na boyokani na biso elongo na ye, ata soki misala ya bato mosusu mizali lolenge nini. Soki ezali na mwango moko te ya Teokrasi oyo tokoki kosalela mpo na kosilisa mokakatano moko, tosengeli kozela na motema pɛtɛɛ nyonso ete Yehova asilisa likambo yango. Na esika ya komilongola to komizindisa na bozangi elikya, tiká ‘tózela nde Yehova.’—Nzembo 42:5, 11, NW.
19. (a) Paulo asɛngaki nini na libondeli na ye mpo na Bafilipi? (b) Lolenge nini bososoli ekoki kosalisa biso soki tozali kokanga ntina ya likambo moko malamu te?
19 Bososoli ya elimo ezali kosalisa biso ete tótikala sembo epai na Nzambe mpe epai na libota na ye. Paulo ayebisaki baklisto ya Filipi ete: “Libondeli na ngai ezali ete bolingo na bino bóyikana koleka mingi mingi esika moko na boyebi [ya sikisiki, NW] mpe bososoli nyonso ete bómekisa makambo makeseni, ete bózala pɛto pɛɛ na ekweli te mpo na mokolo na Klisto.” (Bafilipi 1:9, 10) Mpo na kozala na likoki ya kokanisa malamu, tosengeli kozwa ‘boyebi ya sikisiki mpe bososoli mozindo.’ Liloba ya Greke oyo libongolami awa na “bososoli” ezali komonisa “likoki ya komona mosika kati na makanisi.” Ntango toyekoli likambo moko, tosengeli kososola bokangani oyo ezali kati na yango mpe Nzambe, kati na yango mpe Klisto, mpe komanyola na lolenge oyo yango ezali kokumisa bomoto ya Yehova mpe bibongiseli na ye. Yango ekokólisa bososoli mpe botɔ́ndi na biso mpo na makambo oyo Yehova Nzambe mpe Yesu Klisto basili kosala mpo na biso. Soki tozali kokanga ntina ya likambo moko malamu te, bososoli ekosalisa biso na koyeba ete tosengeli soko moke te kobungisa kondima na biso ya makambo mosusu ya ntina oyo toyebi na ntina na bomoto ya Nzambe, bomoto ya Klisto, mpe mokano ya Nzambe.
20. Lolenge nini tokoki kotonda na bososoli ya elimo?
20 Tokotonda na bososoli ya elimo soki tozali ntango nyonso koyokanisa makanisi mpe misala na biso na Liloba ya Nzambe. (2 Bakolinti 13:5) Kosala bongo na lolenge oyo ebongi ekosalisa biso ete tózala bato ya komikitisa, kasi bato ya motó makasi te to batɔ́ngi ya basusu te. Bososoli ekosalisa biso ete tózwa litomba na batoli mpo na kosembolama mpe komindimisa na makambo oyo mazali na ntina koleka. (Masese 3:7) Na bongo, na mposa makasi ya kosepelisa Yehova, tiká ete tóluka kotonda na boyebi ya sikisiki ya Liloba na ye. Yango ekosalisa biso ete tósosola oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe, koyeba makambo mazali mpenza na ntina, mpe kobatela na bosembo nyonso boyokani na biso ya motuya elongo na Yehova. Makambo nyonso wana ekoki kosalema bobele soki totye motema na biso epai na bososoli. Kasi, tozali mpe na mposa ya eloko mosusu. Tosengeli kotika ete bososoli ebatela biso.
Okoyanola lolenge nini?
◻ Mpo na nini tosengeli kotya motema na biso epai na bososoli?
◻ Lolenge nini bososoli ekoki kosala bopusi likoló na maloba mpe etamboli na biso?
◻ Bopusi nini bososoli ezali na yango likoló na bizaleli ya elimo na biso?
◻ Mpo na nini tosengeli ntango nyonso kotalela Yehova mpo na kozwa bososoli?
[Elilingi na lokasa 13]
Bososoli esalisaka biso ete tóbatela elimo na biso
[Elilingi na lokasa 15]
Mokonzi Salomo, moto na bososoli amonaki ete masɛki makoki kopesa bosepeli ya solosolo te