Libota: ebongiseli etondi na bolingo euti na Jéhovah
“Mpo na yango, nazali kokumba mabɔlɔngɔ́ na ngai liboso na Tata, oyo mabota nyonso na likolo mpe na nsé mazwi nkombo longwa na ye.”—BAEFESE 3:14, 15.
1, 2. (a) Jéhovah azalisaki libota mpo na mokano nini? (b) Libota lisengeli kozala na mokumba nini lelo kati na mokano ya Jéhovah?
JÉHOVAH nde azalisaki libota. Na yango, asalaki mingi koleka; asukaki te bobele kokokisa mposa oyo moto azalaki na yango mpo na kozwa mozalani, mpo na kozwa lisungi mpe kozala na boyokani ya penepene elongo na bato mosusu. (Genese 2:18) Libota ezali nde nzela oyo, mpo na yango mokano monene ya Nzambe motali kotondisa mabelé mosengelaki kokokisama. Jéhovah alobaki na babalani ya liboso ete: “Bobotaka mpe bozala na kobota mingi, botondisa mokili mpe botye yango na nsé na bino.” (Genese 1:28) Ezaleli ya esengo mpe ya libateli na libota esengelaki kopesa bolamu epai na ebele ya bana oyo Adam na Eva basengelaki kobota, mpe na bakitani na bango lokola.
2 Kasi, babalani wana ya liboso baponaki nzela ya kozanga botosi, oyo ebimisaki matomba mabe mpenza, mpo na bango moko mpe mpo na bakitani na bango. (Baloma 5:12) Lelo oyo, bomoi ya libota ezali na lolenge oyo Nzambe alingaki yango te. Atako bongo, libota ezali ntango nyonso na ntina mingi kati na bibongiseli ya Jéhovah: ezali cellule ya ebandeli mpo na bomoko ya lisanga ya boklisto. Na maloba oyo, totyoli te mosala kitoko mokokisami na baninga na biso baklisto oyo babali te. Kasi, mokano na biso ezali ye kokumisa mabota, oyo mazali mpe kosala ete lisangá ya boklisto na mobimba na yango ezala na kolongono malamu na elimo. Mabota ya makasi mazali koyeisa masangá makasi. Kasi, lolenge nini libota na yo likoki kokóla mpe kolonga liboso na mikakatano ya ntango oyo? Mpo na koyanola, totalela oyo Biblia elobi na ntina na mabota
Libota na ntango ya kala
3. Mobali mpe mwasi bazalaki na mokumba nini kati na libota na ntango ya kala?
3 Adam na Eva, bango nyonso mibale, baboyaki kotósa ebongiseli ya bokonzi oyo esalemaki na Nzambe. Nzokande, bato ya kondima lokola Noa, Abalayama, lsaka, Yakobo mpe Yobo, bamemaki mokumba na bango ya batata ya mabota na lolenge malamu. (Baebele 7:4) Na ntango ya kala, libota lizalaki lokola mwa Ekólo moke; tata azalaki mokonzi mpo na kokamba losambo, molakisi mpe mosambisi (Genese 8:20; 18:19) Basi bazalaki mpe na mokumba monene; bazalaki baombo te, bazalaki kotambwisa misala ya ndako na nsé na bokonzi ya mibali na bango.
4. Lolenge nini bomoi ya libota ebongwanaki na nsé na Mibeko ya Moize, kasi mokumba nini baboti balandaki kokokisa yango?
4 Na ntango Yisraele ekómaki ekólo, na 1513 liboso ya ntango na biso, mibeko ya libota mokɔtisamaki kati na Mibeko ya ekólo oyo mipesamaki na nzela ya Moise. (Exode 24:3-8) Basambisi nde bazalaki sikawa na bokonzi ya kozwa bikateli, ezala na makambo matali bomoi to kufa. (Exode 18:13-26) Mokumba ya kopesa mbeka, oyo ezali bongo eteni mosusu, ya losambo, epesamaki na banganga na libota ya Levi. (Levitike 1:2-5) Atako bongo, tata alandaki kokokisa mokumba monene. Moize alendisaki batata ete: “Maloba oyo malakeli ngai yo lelo makozala na motema na yo. mpe okolakisa yango na etingya na bana na yo, mpe okosolola mpo na yango wana ekofanda yo na ndako, mpe wana ekotambola yo na nzela, mpe wana ekolala yo, mpe wana ekotɛlɛma yo.” (Deteronome 6:6, 7) Bamama bazalaki na bopusi monene. Masese 1:8 epesaki etinda oyo epai na bilenge ete: “Mwana na ngai, yoka mateya ya tata na yo mpe tika mibeko ya mama na yo te.” Ee, epai na Baebele, mwasi akokaki kopesa ‘mibeko’ kati na libota mpe kotósisa yango, kosalaka na nse ya bokonzi ya mobali na ye. Asengelaki kokumisama na bana na ye, ata soki anuni.—Masese 23:22.
5. Lolenge nini Mibeko ya Moize mimonisaki esika ya bana kati na libota?
5 Bobele bongo, esika ya bana emonisamaki polele kati na Mibeko ya Nzambe. Totangi na Deteronome 5:16 ete: “Kumisa tata na yo mpe mama na yo, lokola Jéhovah Nzambe na yo alakelaki yo, ete mikolo na yo mizala mingi, mpe ete ozala malamu na mokili oyo Jéhovah Nzambe na yo apesi yo.” Kozanga kotósa baboti ezalaki mabe monene na nsé na Mibeko ya Moize. (Exode 21:15, 17) Mobeko elobaki ete: “Moto na moto oyo alakeli mabe na tata na ye to na mama na ye, akobomama.” (Levitike 20:9) Kotombokela baboti elimbolaki kotombokela Nzambe mpenza.
Mokumba ya mibali baklisto
6, 7. Mpo na nini maloba ya Paulo mazwami na Baefese 5:23-29 mamonanaki lokola likambo ya sika epai na baoyo batangaki yango na ekeke ya liboso?
6 Boklisto ya solo esili kopesa engɛngiseli likoló ya libota, mingi mpenza likoló na mokumba ya mobali. Na ekeke ya liboso, mibali oyo bazalaki baklisto te bazalaki mbala mingi konyokola basi na bango mpe kookisa bango mpasi. Bapimelaki basi lotómo na bango kati na makambo ya ntina mingi mpe bazalaki komemya bango te. Mokanda The Expositor’s Bible elobi ete: “Bagreke, bato oyo bayekolaki mingi, bazalaki kobala basi bobele mpo na kobota bana. Lotómo ya mwasi ezalaki na ntina moko te epai na mobali. Bazalaki kobala mpo na bolingo te. . . . Mwasi-moombo azalaki na lotómo te. Nzoto na ye ezalaki mpo na nkolo na ye.”
7 Ezali na ntina wana nde Paulo akomaki maloba oyo mazwami na Baefese 5:23-29 (MN), ete: “Mobali azali mokonzi ya mwasi na ye lokola Klisto azali mokonzi ya lisangá, awa ezali ye mobikisi na nzoto oyo . . . . Bino mibali, bolingaka basi na bino, lokola Klisto alingaki lisangá mpe amipesaki ye moko mpo na yango . . . Bongo, mibali basengeli kolinga basi na bango lokola nzoto na bango moko. Ye oyo alingi mwasi na ye, azali komilinga ye moko, mpamba te, moto akoyina nzoto na ye te; kasi, akoleisaka yango mpe akobatela yango.” Mpo na batangi ya ekeke ya liboso, maloba oyo makotisaki mbongwana mpenza. Mokanda The Expositor’s Bible moyebisi ete: “Na kokokanisa yango na bizaleli mabe ya eleko wana, likanisi ya boklisto na ntina na libala emonanaki ete ezali likanisi ya sika mpenza, koleka nyonso mosusu. . . . [yango] ebandisaki eleko ya sika mpo na bato.”
8, 9. Makanisi nini ya mabe mibali mingi bazali na yango epai na basi, mpe mpo na nini ezali likambo ya ntina ete baklisto babwaka makanisi motindo wana?
8 Lelo oyo, batoli oyo Biblia epesi epai na mibali ezali mpe kokotisa mbongwana. Atako nyonso oyo esili kolobama na ntina na kosikolama na bango, ntango nyonso basi batalelami na mibali lokola biloko mpamba bibongisami mpo na kokokisa mposa ya nzoto. Kondimáká biyambayamba oyo ete basi balingaka konyokwama, kobetama, to kosalela bango makambo na makasi, mibali mingi bazali na maloba makasi epai ya basi na bango to mpe bazali kobeta basi na bango. Oyo nde nsoni soki moklisto apusami na makanisi ya mokili mpe akomi konyokola mwasi na ye motindo wana! Mwasi moklisto moko alobaki ete: “Mobali na ngai azalaki mosaleli na misala mpe azalaki kosala badiskur.” Kasi, ayebisi ete: “Nzokande nazalaki kobɛtama mbala mingi.” Emonani ete ezaleli wana eyokanaki te na ebongiseli ya Nzambe. Ezali likambo likomomanaka mingi te epai ya mibali baklisto; soki alingaki kozwa ngolu na Nzambe, mobali wana asengelaki bongo koluka lisalisi mpo na kolonga nkanda na ye.—Bagalatia 5:19-21.
9 Nzambe apesi etinda na mibali ete balinga basi na bango lokola nzoto na bango moko. Baoyo baboyi kotosa etinda yango bazali kotombokela ebongiseli ya Nzambe mpe bakoki kotya boyokani na bango elongo na Nzambe na likámá. Maloba ya ntomá Petelo mazali polele ete: “Bino mibali lokola, bofanda na [basi na bino] na bososoli, kopesáká bango lokumu lokola mbeki na motau, . . . boye mabondeli na bino makopekisama te.” (1 Petelo 3:7, MN) Lisusu, soki mobali moko amimonisi ete azali moto oyo akosalaka makambo na makasi, yango ekoki kobimisa matomba ya mabe mpenza kati na elimo ya mwasi na ye mpe ya bana na ye.
10. Lolenge nini mibali bakoki kosalela bokonzi motindo moko na Klisto?
10 Mibali, mabota na bino makokóla na nsé na bokonzi na bino soki bokosalela bokonzi na bino na boyokani na malako ya boklisto. Klisto azalaki na makambo makasimakasi te mpe azalaki kofinga te. Alobaki nde boye ete: “Bozala bayekoli na ngai; mpamba te ngai nazali na bopɔlɔ mpe na motema mosɔkɛmi; mpe bokozwa bopemi mpo na milimo na bino.” (Matai 11:29, MN) Libota na yo ekoki koloba motindo oyo mpo na yo? Klisto atalelaki bayekoli na ye lokola baninga mpe azalaki kotyela bango motema. (Yoane 15:15) Yo mpe ozali komemya mwasi na yo? Biblia elobi na ntina na mwasi mulamu” ete: “Motema ya mobali na ye ekozala epai na ye.” (Masese 31:10, 11) Yango elimboli ete azali kopesa ye mwa bonsomi, mwa likoki ya kosala makambo mosusu lokola emoni ye malamu, ete azali te kotyela ye bandelo ezangi ntina. Lisusu, Yesu alendisaki bayekoli na ye na komonisa mayoki na bango mpe makanisi na bango. (Matai 9:28; 16:13-15) Ozali mpe kosala bongo epai na mwasi na yo? To okanisaka ete soki mwasi amonisi likanisi moko likeseni na oyo ya yo, elingi koloba atɛɔmɛɔli bokonzi na yo? Na kotaleláká mayoki ya mwasi na yo, na esika ya kobwaka yango, okomema ye na kotósa bokonzi na yo.
11. (a) Lolenge nini batata bakoki kokokisa bamposa ya elimo ya bana na bango? (b) Mpo na nini bankulutu mpe basaleli na misala basengeli kopesa ndakisa malamu mpe na oyo etali kobatela mabota na bango?
11 Soki ozali na bana, ezali yo nde osengeli kokokisa bamposa na bango ya elimo, ya mayoki mpe ya mosuni. Mpo na yango, ezali likambo ya ntina ete libota na yo lizala na mimeseno malamu kati na elimo: osengeli kosakola elongo na libota na yo, kotambwisa boyekoli ya Biblia na libota mpe kotalela texte du jour esika moko. Na ntina oyo, Biblia emonisi ete nkulutu to mosaleli na misala asengeli kozala “moto oyo ayebi kokamba ndako na ye moko na motindo malamu.” Mibali oyo bazali kokokisa mikumba wana basengeli bongo kozala batata ya mabota oyo bazali kopesa ndakisa malamu. Ata soki bazali na mikumba mingi kati na lisangá, nzokande basengeli kotya libota na bango na esika ya liboso. Paulo amonisaki ntina na yango ete: “Mpamba te, soki moto ayebi kokamba ndako na ye moko te, akobatela lisangá ya Nzambe boni?”—1 Timoté 3:4, 5, 12, MN.
Basi baklisto baoyo bazali basungi
12. Mwasi azali na mokumba nini kati na libota ya boklisto?
12 Ozali mwasi moklisto oyo asili kobala? Soki ee, osengeli mpe kokokisa mokumba moko monene kati na libota. Baklisto basi oyo basili kobala bapesameli toli ete ‘balinga mibali na bango, balinga mpe bana na bango, ete bazala na bososoli, na pɛto; bazala basi bamipesi na mosala kati na ndako, basi malamu; bazala basi bakotosaka mibali na bango.’ (Tito 2:4, 5, MN) Na yango, osengeli kosala makasi mpo na kozala mosali malamu na ndako, mpe kosala ete libota na yo likoka kofanda kati na ndako na peto mpe na kitoko na kotala. Misala ya ndako mikoki mbala mosusu kozala mpasi, kasi mizali boombo te mpe mizangi ntina te. Lokola ozali mwasi ya libala, ozali ‘kotambwisa misala kati na ndako’ mpe bakoki kotikela yo mua bonsomi mingi kati na likambo yango. (1 Timoté 5:14) Na ndakisa, elobami mpo na “mwasi na mayele” ete azalaki kosomba biloko mpo na libota na ye, azalaki kosomba ata elanga mpe azalaki kozwa mwa litomba na mombongo oyo azalaki kosala. Ezali likambo ya kokamwa te soki akumisamaki na mobali na ye. (Masese, mokapo 31) Mbala mingi, azalaki kosala makambo na kolanda mitinda ya mobali na ye, mokonzi na ye.
13. (a) Mpo na nini botosi ekoki kozala likambo ya mpasi mpo na basi mosusu? (b) Mpo na nini ebongi na baklisto basi oyo basili kobala ete batósaka mibali na bango?
13 Kasi, mbala mosusu kotosa mobali na yo ezali ntango nyonso likambo ya pɛtɛɛ te. Mibali mosusu bamipesaka kilo te. Mpe ekoki komonana ete yo ozali na makoki mingi mpo na kobatela mosolo to mpo na kosala mikano mpe kobongisa makambo. Mbala mosusu ozali kosala mosala ya mosuni mpe yo nde ozali kobimisa mbongo mingi mpo na libota. Lisusu, ekoki kozala ete na kala, onyokwamaki na motindo moko to mosusu na lolenge oyo mibali bazali kosalela bokonzi bopesameli bango mpe sikawa ozali kokoka kotósa ata mobali moko lisusu te. Nzokande, na komonisáká “limemya mozindo” to “kobanga” mobali na yo, okomonisa ete ozali kotosa bokonzi ya Nzambe. (Baefese 5:33, Traduction du monde nouveau; 1 Bakolinti 11:3) Kotósa ezali mpe na ntina mingi mpo na bolamu ya libota na yo; ekosalisa yo ete oyeisa mikakatano mpamba te kati na libala na yo.
14. Mwasi akoki kosala nini wana andimi ekateli ya mobali na ye te?
14 Yango elimboli ete osengeli koloba eloko moko te soki mobali na yo azwi ekateli moko eyokani te na matomba ya libota? Ezali bongo te. Sara, mwasi ya Abalayama, akangaki monoko te na ntango amonaki ete likámá lizalaki koyela mwana na ye, lsaka. (Genese 21:8-10) Bobele bongo, mbala mosusu okoki kozala na mposa ya komonisa mayoki na yo. Soki osali yango na limemya mpe “na ntango na yango,” mobali na yo moklisto akoyoka yo. (Masese 25:11) Kasi soki mobali na yo aboyi kotalela likanisi na yo, mpe soki yango ebuki motinda moko ya Biblia te, okanisi ete kotɛmɛla bamposa ya mobali na yo ekopesa litomba? Omikundola ete: “Mwasi ya mayele akotonga ndako na ye, nde mwasi ya zoba akobuka yango na mabɔkɔ na ye mpenza.” (Masese 14:1) Moko kati na makambo okoki kosala mpo na kotonga ndako na yo ezali bongo kosimba bokonzi ya mobali na yo, na kokumisaka ye mpo na makambo malamu oyo azali kosala, mpe kozanga kobimisa mabunga na ye.
15. Ndenge nini mwasi akoki kopesa lisungi mpo na kosembola bana mpe kobongisa bango?
15 Lolenge mosusu ya kotonga ndako na yo ezali na kopesáká toli mpe na kobongisaka bana na yo. Na ndakisa, okoki kosala oyo esengeli na yo mpo ete boyekoli ya Biblia ya kolendisa esalemaka poso na poso kati na libota. ‘Kopɛmisa loboko na yo te’ mpo na oyo etali koyebisa solo ya Nzambe na mabaku nyonso epai na bana na yo. na ntango ozali kosala mobémbo to na ntango oyo ozali kotambola elongo na bango. (Mosakoli 11:6) Salisa bango ete bamibongisa mpo na kopesa biyano na makita mpe na ntango bazali na mikumba na Eteyelo ya mosala ya Nzambe. Senzela na ntina na baninga na bango. (1 Bakolinti 15:33) Mpo na oyo etali mitinda ya Nzambe mpe kosembola soki mpe bitumbu, monisa epai na bana na bino ete yo mpe tata na bango bozali na bomoko. Kopesa bango nzela te ete bakabola bino kati na likambo yango.
16. (a) Ndakisa nini ezwami na Biblia oyo ekoki kolendisa baoyo bazali minzemba to baoyo mobalani azali mondimi te? (b) Lolenge nini basangani mosusu ya lisangá bakoki kosalisa baoyo bazali kati na ezalela wana?
16 Soki ozali na mobali te to soki mobali na yo azali mondimi te, ekosengela na yo kotambwisa yo moko makambo na elimo kati na libota na yo. Mokumba wana mokoki kozala mpasi, mpe mokoki mbala mosusu kolɛmbisa. Kasi, kotika te. Enise, mama ya Timoté, alongaki koteya Timoté Makomami Mosantu “uta bomwana”; nzokande, mobali na ye azalaki mondimi te. (2 Timoté 1:5; 3:15) Mingi kati na biso bazali mpe kolónga kosala bongo. Soki ozali na mposa ya kozwa lisalisi kati na likambo oyo, yebisa bankulutu. Mbala mosusu bakoki kozwa bibongiseli mpo na kosalisa yo ete oyaka na makita mpe osanganaka na mosala ya kosakola. Bakoki kolendisa baklisto mosusu na kobyanga yo mpe libota na yo, mpo na kominanola to na ntango basali mwa ebongiseli epai na bango. Bakoki mpe kosɛnga na mosakoli moko ya makoki ete asalisa yo na kobanda kotambwisa boyekoli ya Biblia na libota.
Bana oyo bazali na botɔndi
17. (a) lolenge nini bilenge bakoki kosala mpo na bolamu ya libota? (b) Ndakisa nini Yesu atikaki kati na likambo yango?
17 Bilenge baklisto bakoki kosala mpo na bolamu ya libota na kolandáká toli oyo ezwami na Baefese 6:1-3 (MN), ete: “Bana, botosaka baboti na bino kati na Nkolo, mpo ete yango ezali sembo: ‘Tósa tata na yo mpe mama na yo,’ wana mobeko ya liboso mozali na elaka: ‘Mpo ete yango ezala malamu mpo na yo mpe oumela ntango mingi na mokili.’” Na kosalaka na boyokani elongo na baboti na bino, bozali komonisa botosi na bino epai na Jéhovah. Yesu Klisto, oyo azalaki moto ya kokoka, mbele akokaki mpenza koloba ete ebongaki na ye te ete atosa baboti oyo bazangi kokoka. Kasi, “atósaki bango. . . . Mpe Yesu akolaki na mayele mpe na nzoto; azwaki ngolu na Nzambe mpe na bato.”—Luka 2:51, 52.
18, 19. (a) Kokumisa baboti elimboli nini? (b) Lolenge nini ndako esika libota efandi ekoki kozala liziba ya kimya?
18 Bino bosengeli nde kokumisa baboti na bino te? Awa, ‘kokumisa’ elimboli kondima bokonzi bopesami. (Tala 1 Petelo 2:17.) Mbala mingi, lokumu wana ebongi kopesama ata soki baboti na bino bazali bandimi te to bazali kopesa ndakisa malamu te. Na koleka, bosengeli mpenza kokumisa baboti na bino soki bazali baklisto oyo bakopesaka ndakisa malamu. Bomikundola lisusu ete toli mpe litambwisi oyo baboti na bino bazali kopesa bino ezali te mpo na kotyela bino mibeko mizangi ntina. Kasi, ezali mpo na kobatela bino ete ‘bolanda kozala na bomoi.’—Masese 7:1, 2.
19 Libota ezali mpenza ebongiseli etondi na bolingo. Soki mibali, basi mpe bana balandi mitinda oyo Nzambe asili kopesa mpo na bomoi ya libota, ndako esika libota efandi ekokóma liziba ya kimya. Atako bongo, mikakatano mikoki kobima mpo na oyo etali kolobana mpo na koyokana mpe lolenge ya kobokola bana. Lisoló lilandi limonisi lolenge ya kolónga mwa misusu kati na mikakatano yango.
Bozongeli
◻ Ndakisa nini tozali na yango ya ntango ya kala, euti na mibali, basi mpe bana oyo bazalaká kobanga Nzambe?
◻ Boklisto ya solo epesaki engɛngiseli nini likoló na mokumba yo mobali?
◻ Mwasi osengeli kokokisa mokumba nini kati na libota ya boklisto?
◻ Lolenge nini bilenge boklisto bakoki kosala mpo na bolamu ya libota?
[Elilingi na lokasa 9]
“Na kokokanisa yango na bizaleli mabe ya eleko wana, likanisi ya boklisto na ntina na libala emonanaki ete ezali likanisi ya sika mpenza, koleka mosusu nyonso. . . . [Yango] abandisaki eleko ya sika mpo na bato”
[Elilingi na lokasa 10]
Mibali boklisto bazali kolendisa basi na bango na komonisa mayoki na bango, mpe bazali kondima yango