Mama moko apesi toli ya mayele
“Mwana na ngai, yoká mateya ya tata na yo mpe tiká mibeko ya mama na yo te.”—Masese 1:8.
BABOTI na biso, elingi koloba tata na mama, bakoki kolendisaka biso, kosalisaka biso mpe kopesaka biso toli ya malamu. Na mokanda ya Masese, Biblia ezali koloba mpo na elenge moko na nkombo Lemuele, oyo azalaki mokonzi mpe mama na ye apesaki ye “toli ya makasi” mpo na “kosembolama.” Toli yango ekomami na Masese mokapo 31. Toli yango ya mayele ya mama wana ekoki mpe kosalisa biso.—Masese 31:1, NW.
Toli ebongi na mokonzi
Mama ya Lemuele abandi na mituna ebele oyo elamusi likebi na biso. Atuni boye: “Nini na yo, mwana na ngai? Nini na yo, mwana na libumu na ngai? Nini na yo, mwana na ndai na ngai?” Lokola azongeli motuna yango mbala misato, emonisi ete alingaki mpenza ete mwana na ye ayoka makambo oyo alingaki koyebisa ye. (Masese 31:2) Ndenge oyo azalaki komibanzabanza mpo na bolamu ya elimo ya mwana na ye ezali ndakisa malamu mpo na baboti baklisto lelo oyo.
Longola komipesa na masanga, basi, mpe miziki, eloko nini lisusu ekoki kotungisa mama oyo alingi ete mwana na ye ya mobali azala mpenza malamu? Mama ya Lemuele alobeli yango polele ete: “Pesá nguya na yo epai na basi te.” Abengi kindumba ete eloko oyo “ekobebisa mikonzi.”—Masese 31:3.
Komipesa na komela masanga ezali likambo ya mabe oyo okoki kozwa na lisɛki te. Apesi likebisi oyo: “Ɛ Lemuele, ekoki te na mikonzi ete bámela vinyo.” Mokonzi akokoka lisusu kokata makambo malamu te mpe na bosembo te mpe ‘akobosana bobola na ye; akokanisa mpasi na ye lisusu te’ soki ntango nyonso azali na molangwa.—Masese 31:4-7.
Nzokande, soki aboyi makambo mabe wana, mokonzi akozala na likoki ya ‘kosambisa na sembo mpe kolobela likambo na mobola mpe mozangi.’—Masese 31:8, 9.
Atako bilenge baklisto bakoki kozala “mikonzi” te lelo oyo, toli ya mayele ya mama ya Lemuele ebongi mpe na bango na ntango oyo. Na moi ya lelo, bilenge mingi bamipesi na kolangwa masanga, komela likaya, mpe kosala kindumba, mpe ezali na ntina mingi ete bilenge baklisto báyokaka ntango baboti na bango bazali kopesa bango ‘toli ya makasi.’
Mwasi malamu
Bamama bamibanzabanzaka mingi mpo na libala ya bana na bango ya mibali ntango bazali kokóma mikóló. Sikoyo mama ya Lemuele alobeli bizaleli ya mwasi malamu. Na ntembe te, elenge mobali akopona mwasi ya malamu soki akotalela makambo ya ntina mingi oyo.
Na vɛrsɛ 10, “mwasi . . . malamu” bakokanisi ye na mabanga ya penini, mabanga ya ntalo mpe emonanaka mingi te. Na ntango ya kala, mpo na kozwa mabanga yango esengelaki kosala milende mingi. Bobele bongo, mpo na kozwa mwasi malamu ezali kosɛnga milende. Na esika ya kowela kobala nokinoki, ezali malamu ete elenge mobali amipesa ntango mingi mpo na kopona. Na nsima, akomona ete mwasi oyo aponi azali mpenza mwasi malamu.
Mama ya Lemuele alobaki na ye boye, mpo na mwasi malamu: “Motema na mobali na ye ekondima ye libela.” (Vɛrsɛ 11) Na maloba mosusu, akobanda kosɛngisa te ete liboso mwasi na ye asala likambo nyonso esengeli naino apesa ye nzela. Ya solo, mwasi na mobali basengeli kosolola liboso ya kozwa ekateli moko monene, na ndakisa kosomba biloko ya ntalo to na likambo ya kobɔkɔla bana. Kosolola mpo na makambo yango ekosalisa bango báyokana lisusu malamu.
Mwasi malamu azali na makambo ya kosala mingi. Banda na vɛrsɛ 13 tii na vɛrsɛ 27 bapesi toli ya makambo oyo basi nyonso basengeli kosala mpo mabota na bango ezala malamu. Na ndakisa, lokola bilamba mpe biloko ezali se komata ntalo, mwasi ya malamu akoyekola mosala ya mabɔkɔ mpe kobatela mbongo mpo bato ya libota na ye bálataka na ndenge ebongi. (Vɛrsɛ 13, 19, 21, 22) Mpo libota ebimisaka mbongo mingi te mpo na biloko ya kolya, akolona biloko oyo akoki kolona mpe ntango akei na zando akosomba bisombela te.—Vɛrsɛ 14, 16.
Tomoni mpenza ete, mwasi yango alyaka “kwanga na gɔigɔi te.” Amipesaka na mosala, mpe atambwisaka misala ya ndako na ye malamu. (Vɛrsɛ 27) Akangaka “loketo na nguya,” elingi koloba amibongisaka mpo na kosala misala ya makasi. (Vɛrsɛ 17) Alamukaka ntɔngɔntɔngɔ mpo na kobanda misala, mpe alɛmbaka mosala te tii na butu. Ezali lokola nde mwinda oyo engɛngisaka misala na ye epelaka ntango nyonso.—Vɛrsɛ 15, 18.
Na koleka, mwasi ya malamu azali mpenza na bizaleli ya elimo. Abangaka Nzambe mpe asambelaka ye na limemya mpenza. (Vɛrsɛ 30) Asungaka mpe mobali na ye mpo na koteya bana bábangaka Nzambe. Vɛrsɛ 26 elobi boye: Ateyaka bana na ye “na mayele,” mpe “mibeko na boboto ezali na lolemo na ye.”
Mobali malamu
Mpo ete mwasi malamu alinga ye, Lemuele asengelaki kozala mobali malamu oyo akokisaka mikumba na ye. Mama ya Lemuele amonisaki ye mikumba mingi oyo mobali malamu asengeli kokokisa.
Mobali malamu asengeli kozala moto oyo “bampaka na mokili” bakoloba malamu mpo na ye. (Masese 31:23) Yango elingi koloba ete asengeli kozala moto ya makoki, ya bosembo, oyo bakoki kotyela ye motema, mpe abangaka Nzambe. (Exode 18:21; Deteronome 16:18-20) Na ndenge yango, ‘akoyebana na bikuke,’ epai mikóló bazalaki koyangana mpo na kotalela makambo ya mboka. Mpo ‘ayebana’ lokola moto oyo abangaka Nzambe, asengeli kozala na makambo makasi te mpe kosalaka na boyokani na bankumu ya “mokili,” oyo mbala mosusu elimboli etúká to mboka.
Na ntembe te mama ya Lemuel azalaki koloba makambo oyo ye moko asalaki mpe oyo akutanaki na yango, amonisi mwana na ye ete ezali na ntina ete amonisaka mwasi oyo alingi kobala ete alingaka ye. Amonisa ye ete alingaka ye mingi koleka bato nyonso na mokili. Kanisá mongongo na ye ntango azali koloba na miso ya bato nyonso ete: “Bana basi mingi basali na sembo nde yo okolekaka bango nyonso.”—Masese 31:29.
Tomoni mpenza ete Lemuele asepelaki na toli ya mayele oyo mama na ye apesaki ye. Na ndakisa, tomoni na vɛrsɛ 1 ete azali kolobela maloba ya mama na ye lokola nde ezali maloba na ye. Na yango, andimaki na motema moko “kosembolama” ya mama na ye mpe toli ya mama na ye esalisaki ye. Tiká ete tótosa “toli ya makasi” oyo mpe tósalela toli yango na bomoi na biso.
[Bililingi na lokasa 31]
Mwasi malamu alyaka “kwanga ya gɔigɔi te”