Nini epesaka ntina na bomoi?
“Tosá Nzambe mpe batelá mibeko na ye.”—Mos. 12:13.
1, 2. Litomba nini tokoki kozwa soki totaleli mokanda ya Mosakoli?
KANISÁ moto moko oyo emonani ete azali na nyonso. Azali mokonzi oyo ayebani mingi, azali moko ya bato oyo baleki na bozwi na mokili, mpe aleki bato nyonso ya ntango na ye na mayele. Atako bongo, moto yango azali komituna boye: ‘Nini epesaka ntina na bomoi?’
2 Moto yango azalaki mpenza na bomoi esili koleka mbula nkóto misato. Nkombo na ye ezalaki Salomo mpe na mokanda ya Mosakoli, alobeli ndenge oyo azalaki koluka esengo. (Mos. 1:13) Tokoki koyekola makambo mingi epai ya Salomo. Ya solo, bwanya oyo ezali na mokanda ya Mosakoli ekoki kosalisa biso tómityela mikano oyo ekopesa ntina na bomoi na biso.
“Koluka kokwa mopɛpɛ”
3. Likambo nini oyo etaleli bomoi ya moto biso nyonso tosengeli koyeba?
3 Salomo amonisaki ete Nzambe azalisaki biloko ndenge na ndenge ya kitoko awa na mabelé, biloko ya kokamwa oyo moto akoki koyekola kozanga nsuka. Nzokande, tokoki koyeba te mosala nyonso ya Nzambe mpamba te bomoi na biso ezali mokuse mpenza. (Mos. 3:11; 8:17) Ndenge Biblia emonisi yango, mikolo ya bomoi ya moto ezali moke mpe elekaka noki. (Yobo 14:1, 2; Mos. 6:12) Likambo yango esengeli kotinda biso tósalela mikolo ya bomoi na biso na ndenge ya mayele. Yango ezali pɛtɛɛ te mpamba te mokili ya Satana ekoki kobenda biso na nzela ya mabe.
4. (a) Liloba “bisalasala” elimboli nini? (b) Tokolobela mikano nini oyo bato balandaka?
4 Mpo na komonisa likama ya kobebisa mikolo ya bomoi na biso, Salomo asalelaki liloba “bisalasala” mbala ebele na mokanda ya Mosakoli. Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “bisalasala” emonisaka eloko moko oyo ezali mpamba, ezali na ntina te, to oyo eumelaka te. (Mos. 1:2, 3) Na bavɛrsɛ mosusu, Salomo akokanisaki “bisalasala” na “koluka kokwa mopɛpɛ.” (Mos. 1:14; 2:11) Toyebi malamu ete molende nyonso mpo na kokanga mopɛpɛ ezali mosala ya mpunda. Moto nyonso oyo amekaka kosala yango asimbaka eloko moko te. Ndenge moko mpe, moto oyo alandaka mikano oyo ebongi te asukaka na kolɛmba nzoto. Lokola bomoi ezali mpenza mokuse, tosengeli te kobebisa yango na makambo oyo ekomemela biso litomba moko te. Yango wana, mpo tósala libunga yango te, tiká tótalela mwa bandakisa ya mikano oyo Salomo alobelaki, oyo bato balandaka na bomoi. Liboso, tokolobela bisengo mpe biloko ya mokili. Na nsima, tokolobela ntina ya mosala oyo esepelisaka Nzambe.
Bisengo ekoki komemela biso bolamu?
5. Salomo alukaki bisengo na makambo nini?
5 Lokola bato mingi lelo oyo, Salomo alukaki kozwa esengo na bomoi ya bisengo. Alobaki boye: “Nalongoli motema na ngai na esengo na yango te.” (Mos. 2:10) Alukaki bisengo na makambo nini? Ndenge Mosakoli mokapo 2 emonisi yango, ‘amipesaki na vinyo,’ kasi azalaki mpe na komipekisa; azalaki kolona banzete, kotonga bandako minene, koyoka miziki, mpe kolya bilei kitoko.
6. (a) Mpo na nini ezali mabe te kosepela na makambo mosusu ya malamu na bomoi? (b) Ndenge nini tosengeli kozala na bokatikati na likambo etali kominanola?
6 Biblia epekisi kosepela elongo na baninga? Te. Na ndakisa, Salomo alobaki ete kolya mpe kosepela nsima ya kosala mosala makasi ezali likabo ya Nzambe. (Tángá Mosakoli 2:24; 3:12, 13.) Lisusu, Yehova ayebisi bilenge ‘básepela mpe bátika ete motema na bango esepelisa bango’ na ndenge oyo ebongi. (Mos. 11:9) Kominanola ezali na ntina na bomoi ya moto. (Talá mpe Malako 6:31.) Kasi, kominanola esengeli te kokóma likambo eleki ntina na bomoi na biso. Esengeli kozala lokola mwa lilala to eloko mosusu ya pɛpɛlɛ oyo moto abakisaka nsima ya kolya bilei ya kilo. Na ntembe te oyebi ete ata soki osepelaka mingi kolya mbuma to eloko mosusu ya pɛpɛlɛ, ekozala malamu te soki ozali kolya biloko mosusu te mpamba te etongaka nzoto te. Ndenge moko mpe, Salomo amonaki ete komipesa na bisengo ezali lokola “koluka kokwa mopɛpɛ.”—Mos. 2:10, 11.
7. Mpo na nini tosengeli kopona kominanola ya malamu?
7 Lisusu, kominanola nyonso te nde ezalaka malamu. Mingi ekoki kobebisa bizaleli ya moto mpe boyokani na ye na Yehova. Ebele ya bato basili kobebisa bomoi na bango mpo balukaki komisepelisa na makambo lokola komɛla bangi, masanga, to kobɛta masano ya mbongo! Yehova azali kokebisa biso na boboto nyonso ete soki totiki mitema to miso na biso emema biso na makambo ya mabe, tokobuka mbuma mabe.—Gal. 6:7.
8. Mpo na nini ezali malamu tótalela bomoi na biso?
8 Longola yango, komipesa mingi na bisengo ekopekisa biso tótya likebi na makambo oyo eleki ntina. Tóbosana te ete mikolo ya bomoi elekaka noki mpe tokoki koyeba te soki tokozala kaka nzoto kolɔngɔnɔ mpe soki tokokutana na mikakatano te. Yango wana, ndenge Salomo alobaki yango na nsima, tokozwa litomba mingi soki tokei na esika ya ebembe, mingimingi ya moklisto moko ya sembo, na esika ya kokende na “ndako ya bisengo.” (Tángá Mosakoli 7:2, 4.) Mpo na nini? Ntango tozali koyoka lisukulu ya bokundi mpe tozali kokanisa bosembo ya mosaleli ya Yehova oyo akufi, yango ekoki kotinda biso tótalela mpe bomoi na biso. Na ndenge yango, tokoki komona ete tosengeli kotalela lisusu mikano na biso mpo na kosalela na mayele mikolo ya bomoi oyo totikali na yango.—Mos. 12:1.
Biloko ya mokili ekoki kopesa biso esengo?
9. Salomo asosolaki likambo nini na ntina na bozwi?
9 Salomo azalaki moko na bato oyo balekaki na bozwi na mokili ntango akomaki mokanda ya Mosakoli. (2 Nta. 9:22) Azalaki na makoki ya kozwa eloko nyonso oyo alingi. Akomaki boye: “Nyonso oyo miso na ngai ezalaki na mposa na yango, naboyisi yango te.” (Mos. 2:10) Atako bongo, amonaki ete biloko ya mokili ekoki kopesa esengo te. Alobaki lisusu boye: “Ye oyo alingi mosolo akosepela na mosolo te; ye oyo alingi libonza akosepela na mingi mpe te.”—Mos. 5:10.
10. Nini ememelaka moto esengo mpe bozwi ya solosolo?
10 Atako bozwi ya mokili ezali na motuya ya solosolo te, bato mingi bamipesaka na koluka yango. Ankɛti moko oyo euti kosalema na États-Unis emonisi ete bana-kelasi mingi (75 %) oyo bazali na mbula ya liboso na iniversite bamonisaki ete mokano na bango ya liboso na bomoi ezali ya “kokóma na mbongo mingi.” Ata soki bakokisi mokano yango, mbala mosusu bakozala mpe na esengo te. Bolukiluki mingi emonisi ete komipesa na koluka bozwi ya mokili epekisaka kutu moto azala na esengo. Esili koleka bambula mingi, Salomo alobelaki mpe likambo yango. Akomaki boye: “Namiyanganiseli palata mpe wolo mpe biloko ya motuya ya mikonzi . . . Mpe talá, nyonso ezalaki bobele bisalasala mpe koluka kokwa mopɛpɛ.”a (Mos. 2:8, 11) Nzokande, soki topesi bomoi na biso mpo na kosalela Yehova na motema na biso mobimba mpe tozwi lipamboli na ye, yango ekomemela biso bozwi ya solosolo.—Tángá Masese 10:22.
Mosala nini epesaka esengo ya solosolo?
11. Makomami emonisi nini na oyo etali ntina ya mosala?
11 Yesu alobaki boye: “Tata na ngai azali kokoba kosala tii sikoyo, mpe ngai nazali kokoba kosala.” (Yoa. 5:17) Ntembe ezali te ete Yehova mpe Yesu bazwaka esengo na kosala mosala. Biblia emonisi esengo oyo Yehova ayokaki mpo na mosala na ye; elobi boye: “Nzambe atalaki biloko nyonso bisilaki ye kozalisa, mpe ezalaki malamu mingi.” (Gen. 1:31) Baanzelu “bagangaki na esengo” ntango bamonaki mosala nyonso oyo Nzambe asalaki. (Yobo 38:4-7) Ndenge moko mpe Salomo ayebaki motuya ya mosala oyo ezali na ntina.—Mos. 3:13.
12, 13. (a) Bato mibale balobaki nini mpo na komonisa esengo oyo bazwaka na mosala na bango? (b) Mpo na nini mosala ekoki ntango mosusu komemela moto mikakatano?
12 Bato mingi bayebaka ete kosala mosala epesaka esengo. Na ndakisa, José, moyemi moko oyo ayebi mpenza mosala na ye, alobaki boye: “Ntango nalongi koyema elilingi moko oyo nazalaki na yango na makanisi, namonaka lokola nde nalongi komata ngomba moko ya molai.” Miguel,b moto moko ya mombongo, alobaki boye: “Nazwaka esengo na mosala mpamba te epesaka ngai likoki ya koleisa libota na ngai. Ekoki mpe kosalisa moto amona ete bomoi na ye ezali na ntina.”
13 Nzokande, misala mingi esɛngaka kozongelaka kaka likambo moko mikolo nyonso. Bato mosusu bakutanaka na mikakatano na esika ya mosala to mpe basalaka bango makambo ya kozanga bosembo. Ndenge Salomo amonisaki yango, moto ya gɔigɔi akoki kozwa mbano ya mosali ya molende, mbala mosusu mpo ayebani na bakonzi. (Mos. 2:21) Ezali mpe na makambo mosusu oyo ekoki kolɛmbisa moto. Mombongo mosusu ekoki kobanda malamu, kasi na nsima ekoki kokwea na ntango nkita ebebi to makambo oyo ekanamaki te esalemi. “Ntango mpe likambo ekanami te ekómelaka [bato] nyonso.” (Mosakoli 9:11, NW) Mbala mingi, bato oyo basalaka makasi mpo na kolonga na mosala na bango nsukansuka bamonaka ete ‘basalelaki mopɛpɛ mosala.’—Mos. 5:16.
14. Mosala nini epesaka ntango nyonso esengo ya solosolo?
14 Ezali nde na mosala moko oyo epesaka esengo ya solosolo? José, moyemi oyo tolobelaki liboso, alobaki boye: “Nsima ya bambula, mayemi ekoki kobeba to mpe kobunga. Kasi, ezali bongo te mpo na makambo oyo tosalaka na mosala ya Nzambe. Lokola natosaka etinda ya Yehova ya kosakola nsango malamu, nasalisi bato mosusu bákóma baklisto—likambo oyo ekosalisa bango mpo na libela. Yango nde ezali na motuya koleka.” (1 Kol. 3:9-11) Ndenge moko mpe Miguel alobi ete kosakola Bokonzi epesaka ye esengo mingi koleka mosala na ye ya mosuni. Abakisi boye: “Eloko moko te epesaka ngai esengo koleka esengo ya koteya moto solo ya Biblia mpe komona ete yango esimbi motema na ye.”
“Bwaká kwanga na yo”
15. Nini epesaka ntina na bomoi?
15 Na mokuse, tokoloba nini? Nini epesaka mpenza ntina na bomoi? Tozwaka esengo ya solosolo soki tosaleli bomoi mokuse oyo tozali na yango lelo oyo mpo na kosala makambo ya malamu mpe kosepelisa Yehova. Tokoki kokóma baninga ya Nzambe, tokoki koteya bana na biso makambo ya Nzambe, tokoki kosalisa bato mosusu báyeba Yehova, mpe tokoki kosala boninga ya solosolo na bandeko na biso na kati ya lisangá. (Gal. 6:10) Makambo nyonso wana ezali na motuya mpe eumelaka, ememelaka baoyo basalaka yango mapamboli. Salomo asalelaki elilingi moko kitoko mpo na komonisa ntina ya kosala makambo ya malamu. Alobaki boye: “Bwaká kwanga na yo likoló ya mai zambi okozwa yango lisusu na nsima ya mikolo mingi.” (Mos. 11:1) Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Bózala na momeseno ya kopesa, mpe bato bakopesa bino.” (Luka 6:38) Lisusu, Yehova alaki ete akopesa mbano na baoyo basalelaka basusu malamu.—Mas. 19:17; tángá Baebele 6:10.
16. Ntango nini ebongi mpo na komityela mikano na bomoi?
16 Biblia ezali kolendisa biso tózwa bikateli ya malamu ntango tozali naino bilenge na oyo etali ndenge ya kosalela bomoi na biso. Na ndenge yango, ntango tokokóma mibange tokomona te tobebisaki bolenge na biso. (Mos. 12:1) Ekozala mpenza mawa soki tobebisi bolenge na biso mpo na kolanda makambo ya mokili, mpe nsukansuka komona ete tozalaki bobele koluka kokanga mopɛpɛ!
17. Nini ekoki kosalisa yo opona bomoi ya malamu?
17 Lokola tata nyonso ya bolingo, Yehova alingi ete yo mpe ozala na bomoi ya esengo, osala oyo ezali malamu, mpe okima mikakatano. (Mos. 11:9, 10) Nini ekoki kosalisa yo? Komityela mikano ya elimo mpe kosala nyonso mpo na kokokisa yango. Eleki mbula soki 20, ndeko moko nkombo na ye Javier, asengelaki kopona kati na mosala ya monganga mpe mosala ya ntango nyonso. Alobi boye: “Atako mosala ya monganga ekoki kosala ete moto azala na bomoi ya malamu, eloko moko te ekoki kokokana na esengo oyo nayokaka na ndenge nasalisi bato mingi báyeba solo. Mosala ya ntango nyonso esalisi ngai nazala na bomoi ya esengo mpenza. Kutu, nayokaka mawa na ndenge nabandaki yango na bolenge te.”
18. Mpo na nini tokoki koloba ete Yesu azalaki na bomoi ya ntina awa na mabelé?
18 Tosengeli koluka kozwa eloko nini oyo ezali na motuya koleka? Mokanda ya Mosakoli elobi boye: “Nkombo malamu eleki mafuta na motuya; mokolo ya kufa eleki mokolo ya kobotama na malamu.” (Mos. 7:1) Bomoi ya Yesu emonisi bosolo ya likambo yango. Yesu amisalelaki nkombo malamu liboso ya Yehova. Lokola Yesu atikalaki sembo tii na liwa, alongisaki bokonzi ya Tata na ye mpe apesaki mbeka ya lisiko, oyo efungolaki nzela mpo na lobiko na biso. (Mat. 20:28) Na boumeli ya mwa ntango oyo alekisaki awa na mabelé, Yesu apesaki ndakisa oyo eleki malamu; azalaki na bomoi ya ntina oyo tosengeli komekola.—1 Kol. 11:1; 1 Pet. 2:21.
19. Toli nini ya bwanya Salomo apesaki?
19 Biso mpe tokoki komisalela nkombo malamu liboso ya Nzambe. Kozala na nkombo malamu na miso ya Yehova ezali na motuya koleka kozala na bozwi. (Tángá Matai 6:19-21.) Mokolo na mokolo, tokoki kokanisa ndenge ya kosala makambo oyo ezali malamu na miso ya Yehova mpe yango ekopesa biso esengo. Na ndakisa, tokoki koyebisa basusu nsango malamu, kobongisa lisusu boyokani na molongani na biso mpe na bato mosusu na kati ya libota, mpe kobongisa boyokani na biso na Yehova na nzela ya boyekoli na biso moko mpe koyangana na makita. (Mos. 11:6; Ebe. 13:16) Olingi mpenza kozala na bomoi ya ntina? Soki ezali bongo, kobá kolanda toli ya Salomo oyo: “Tosá Nzambe mpe batelá mibeko na ye; yango ezali mosala ya bato nyonso.”—Mos. 12:13.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Wolo oyo Salomo azalaki kozwa mbula na mbula ezalaki talanta 666 (kilo koleka 22 000).—2 Nta. 9:13.
b Topesi ye nkombo mosusu.
Okopesa eyano nini?
• Nini esengeli kotinda biso tótalela malamu mikano oyo tosengeli komityela?
• Ndenge nini tosengeli kotalela bisengo mpe biloko ya mokili?
• Mosala nini ekoki kopesa esengo ya libela?
• Eloko nini ya motuya tosengeli koluka kozala na yango?
[Elilingi na lokasa 23]
Kominanola esengeli kozala na esika nini na bomoi na biso?
[Elilingi na lokasa 24]
Mpo na nini mosala ya kosakola epesaka esengo?