LISOLO YA BOYEKOLI 48
Tyá miso na yo na mokili ya sika
“Miso na yo esengeli kozala alima liboso na yo, ɛɛ, miso na yo oyo ezali kongɛnga esengeli kotala alima liboso na yo.”—MAS. 4:25.
LOYEMBO 77 Pole na mokili ya molili
NA MOKUSEa
1-2. Ndenge nini tokoki kolanda toli oyo ezali na Masese 4:25? Pesá ndakisa.
KANISÁ bandakisa misato oyo elandi. Ndeko mwasi moko ya mobange azali kokanisa bantango ya kitoko oyo alekisá ntango azalaki elenge. Atako sikoyo bomoi na ye etondi na mikakatano, azali kosala nyonso oyo akoki mpo na Yehova. (1 Ko. 15:58) Mokolo na mokolo, akanisaka ndenge akozala na mokili ya sika oyo Nzambe alaki elongo na bandeko mpe baninga na ye. Ndeko mwasi mosusu azali kokanisa ndenge oyo ndeko moko ya lisangá apesaki ye nkanda. Kasi azwi ekateli ya kobosana likambo yango. (Kol. 3:13) Ndeko mobali moko azali kokanisa mabunga oyo asalá kala, kasi atye makanisi na ye nyonso na makambo oyo akoki kosala sikoyo mpo na kotikala sembo epai ya Yehova.—Nz. 51:10.
2 Bandeko misato oyo bakokani na likambo nini? Bango nyonso bazali kokanisa makambo oyo ekómelá bango, kasi bakanisaka yango ntango nyonso te. Kasi batye miso na bango na mokili ya sika.—Tángá Masese 4:25.
3. Mpo na nini ezali na ntina tótya miso na biso na mokili ya sika?
3 Mpo na nini ezali na ntina tótya miso na biso na mokili ya sika? Kaka ndenge moto akoki kotambola alima te soki azali kotala ntango nyonso nsima, biso mpe tokoki te kokende liboso na mosala ya Yehova soki tozali ntango nyonso kokanisa makambo oyo ekómelá biso to oyo tosalá kala.—Luka 9:62.
4. Tokolobela nini na lisolo oyo?
4 Na lisolo oyo, tokolobela mitambo misato oyo ekoki kotinda biso tókanisaka makambo oyo ekómelá biso to oyo tosalá kala. Ya liboso, kokanisakanisa bomoi ya kala. Ya mibale, kobombela basusu nkanda na motema. Mpe ya misato, komipesaka foti koleka ndelo mpo na mabunga oyo tosalá kala. Na likambo mokomoko, tokomona ndenge mitinda ya Biblia ekoki kosalisa biso mpo tótyaka miso na biso na “biloko oyo ezali na nsima te,” kasi nde na “biloko oyo ezali liboso.”—Flp. 3:13.
KOKANISAKANISA BOMOI YA KALA
5. Mosakoli 7:10 ekebisi biso na motambo nini?
5 Tángá Mosakoli 7:10. Simbá ete, vɛrsɛ oyo elobi te ete ezali mabe komituna: “Mpo na nini mikolo ya kala ezalaki malamu?” Basuvenire ya malamu ezali likabo oyo euti na Yehova. Kasi, vɛrsɛ yango elobi nde: “Koloba te ete, ‘Mpo na nini mikolo ya liboso elekaki mikolo oyo na malamu?’” Na maloba mosusu, tosengeli kokeba ete tókokanisaka te bomoi na biso ya kala ná oyo tozali na yango sikoyo, mpe kokanisa ete bomoi na biso ya lelo ezali mabe mpenza. Biblia mosusu ebongoli vɛrsɛ yango boye: “Komituna té po na nini tango ya kala eleki tango ya lelo na malamu; pamba té moto ya mayele amitunaka bongo té.”
6. Mpo na nini ezali mabe kokanisa ete bomoi na biso ya kala ezalaki malamu koleka? Pesá ndakisa.
6 Mpo na nini ezali mabe kokanisaka ete bomoi oyo tozalaki na yango kala ezalaki malamu koleka? Kokanisakanisa bomoi ya kala, ekotinda biso tókanisa kaka makambo ya malamu oyo tokutanaki na yango na ntango wana. Mpo tokoki kokanisa kaka makambo ya malamu mpe kobosana makambo ya mabe oyo tokutaná na yango. Tótalela ndakisa ya Bayisraele ya kala. Nsima ya kolongwa na Ezipito, babosanaki mbala moko bomoi ya mpasi oyo bazalaki na yango kuna. Kasi, bazalaki kokanisa kaka bilei ya kitoko oyo bazalaki kolya na Ezipito. Balobaki boye: “Talá tozali kokanisa mbisi oyo tomesanaki kolya na Ezipito mpambampamba, ná bakɔkɔmbrɛ, ná bapastɛkɛ, ná bapwaro, ná matungulu, ná ayi!” (Mit. 11:5) Kasi ezali mpenza solo ete bazalaki kolya bilei yango “mpambampamba” to ofele? Te. Bayisraele banyokwamaki mabe mpenza na boombo na Ezipito; bamonaki mpenza bwale. (Kob. 1:13, 14; 3:6-9) Kasi na nsima, babosanaki bampasi nyonso wana mpe bakómaki kosepela na bomoi na bango ya kala. Batyaki makanisi na bango nyonso na bantango ya kitoko oyo balekisaki, na esika ya kotya makanisi na makambo ya malamu oyo Yehova azalaki kosalela bango. Yehova asepelaki te na ezaleli na bango wana.—Mit. 11:10.
7. Nini esalisaki ndeko mwasi moko akwea te na motambo ya kokanisakanisa bomoi ya kala?
7 Ndenge nini tokoki kokima motambo ya kokanisakanisa bomoi na biso ya kala? Tótalela ndakisa ya ndeko mwasi moko oyo abandaki kosala na Betele ya Brooklyn na 1945. Mwa bambula na nsima, abalanaki ná ndeko moko ya Betele, mpe basalaki wana bambula ebele. Kasi, na 1976, mobali na ye abɛlaki makasi. Ndeko mwasi yango alobi ete, ntango mobali na ye amonaki ete akómi pene na kokufa, apesaki ye toli ya malamu mpenza oyo esengelaki kosalisa ye na nsima. Mobali na ye ayebisaki ye boye: “Tozali na libala ya malamu mpenza. Bato mingi te bafandá na libala ya boye.” Kasi apesaki ye mpe toli oyo: ‘Kokanisakanisa makambo ya kala te. Atako okobosana te makambo oyo tosalá elongo, kotya makanisi na yo nyonso na yango te. Malɛmbɛmalɛmbɛ, mawa na yo ekokita. Kolɛmba nzoto te mpe kozala mawamawa te mpo na makambo oyo ekokómela yo. Sepelá nde na bantango ya malamu oyo tolekisá elongo na mosala ya Yehova. Basuvenire wana ezali makabo oyo eutá epai ya Nzambe.’ Oyo nde toli ya malamu mpenza!
8. Bolamu nini ndeko mwasi moko azwaki ndenge asalelaki toli oyo mobali na ye apesaki ye?
8 Ndeko mwasi yango asalelaki toli oyo mobali na ye apesaki ye. Asalelaki Yehova na bosembo tii na liwa na ye. Azalaki na mbula 92 ntango akufaki. Mwa bambula liboso akufa, alobaki boye: ‘Soki nakanisi bambula koleka 63 oyo nalekisi na mosala ya ntango nyonso, nakoki koloba ete nazalaki na bomoi moko ya esengo mpenza.’ Mpo na nini? Alobi boye: ‘Eloko mpenza oyo esalaka ete bomoi ezala na esengo ezali libota kitoko ya bandeko na biso, elikya ya kozala na bomoi elongo na bango na paradiso awa na mabele, mpe kosalela Yehova, Mozalisi na biso Monene mpe Nzambe ya solo kaka moko, seko na seko.’b Ndakisa ya ndeko mwasi yango oyo atyaki makanisi na ye nyonso na bilaka ya Yehova ekoki koteya biso makambo mingi mpenza!
KOBOMBELA BASUSU NKANDA NA MOTEMA
9. Ndenge emonisami na Balevi 19:18, ntango nini ekoki kozala mpasi mpenza tólimbisa moto oyo apesaki biso nkanda?
9 Tángá Balevi 19:18. Mbala mingi ezalaka mpasi tólimbisa ndeko moko ya lisangá, moninga ya motema, to ndeko moko ya libota oyo asali biso mabe. Na ndakisa, ndeko mwasi moko akoselaki ndeko mwasi mosusu makambo ete ayibi mbongo na ye. Na nsima, ndeko mwasi oyo akoselaki ye makambo amonaki ete amikosaki mpe asɛngaki bolimbisi. Kasi ndeko oyo bakoselaki makambo asilikaki makasi mpe akobaki kaka kokanisa likambo yango. Osilá komiyoka ndenge wana? Ata soki tokutaná naino na likambo ya bongo te, kasi mingi na biso tobombelaka basusu nkanda, mpe tomonaka ete ezali mpasi tólimbisa moto oyo apesaki biso nkanda.
10. Nini ekoki kosalisa biso ntango moto moko apesi biso nkanda?
10 Nini ekoki kosalisa biso ntango moto moko apesi biso nkanda? Tosengeli kobosana te ete Yehova amonaka makambo nyonso. Ayebi makambo nyonso oyo tozali kokutana na yango, ata mpe makambo ya kozanga bosembo oyo basalelaka biso. (Ebr. 4:13) Ayokaka mpasi ntango tozali konyokwama. (Yis. 63:9) Mpe alaki ete nsukansuka, akolongola mabe nyonso oyo eutaka na makambo ya kozanga bosembo oyo basalelaka biso.—Em. 21:3, 4.
11. Matomba nini tozwaka soki tolimbisi basusu?
11 Tosengeli mpe kobosana te ete soki tolimbisi basusu, biso moko nde tokozwa matomba. Yango nde likambo ndeko mwasi oyo bakoselaki makambo ete ayibi mbongo ayaki komona. Na nsima, alimbisaki ndeko oyo akoselaki ye makambo. Amonaki ete, soki tolimbisi bandeko na biso, Yehova mpe akolimbisa biso. (Mat. 6:14) Ayebaki ete likambo oyo ndeko mwasi wana asalaki ye ezalaki mabe mpenza, kasi amonaki malamu kaka alimbisa ye. Yango esalaki ete azongela esengo na ye, mpe atya makanisi na ye nyonso na mosala ya Yehova.
KOMIPESAKA FOTI KOLEKA NDELO
12. Mokanda ya 1 Yoane 3:19, 20 eteyi biso nini?
12 Tángá 1 Yoane 3:19, 20. Na bantango mosusu, ekómelaka biso nyonso tómiyoka ete tomemi ngambo. Na ndakisa, bato mosusu bakobaka komipesa foti mpo na makambo ya mabe oyo basalá liboso báyeba solo. Bamosusu mpe bamiyokaka ete bamemá ngambo mpo na mabunga oyo basalaki nsima ya kozwa batisimo. Bato nyonso bayokaka ndenge wana. (Rom. 3:23) Na ntembe te, tozalaka na mposa ya kosala makambo ya malamu. Kasi “biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi.” (Yak. 3:2; Rom. 7:21-23) Atako tosepelaka te komiyoka ete tomemi ngambo, kasi ntango mosusu komiyoka bongo ekoki kozala mpe malamu. Mpo na nini? Mpo koyoka ete tomemi ngambo ekoki kotinda biso tósembola banzela na biso, mpe tózwa ekateli ya kozongela lisusu mabunga na biso te.—Ebr. 12:12, 13.
13. Mpo na nini tosengeli kokeba na motambo ya komipesaka foti koleka ndelo?
13 Nzokande, ekoki kosalema ete tomipesaka foti koleka ndelo, elingi koloba, tokobaka koyoka ete tomemi ngambo ata soki tobongolá motema mpe Yehova alimbisá biso. Komipesa foti ndenge wana ekoki kosala biso mabe mpenza. (Nz. 31:10; 38:3, 4) Na ndenge nini? Tótalela ndakisa ya ndeko mwasi moko oyo azalaki kaka komona ete amemi ngambo mpo na masumu oyo asalá kala. Alobi boye: “Nazalaki komona ntina ya komipesa mobimba na mosala ya Yehova te mpo nazalaki kokanisa ete ntango mosusu nakobika te.” Mingi kati na biso mpe bakoki koyoka lokola ndeko mwasi wana. Ezali malamu ete tókeba na motambo ya komipesaka foti mingi ndenge wana. Mpo na nini? Mpo Satana akosepela mingi soki totiki kosalela Yehova, atako Yehova alimbisá biso!—Talá mpe 2 Bakorinti 2:5-7, 11.
14. Ndenge nini tokoki koyeba soki Yehova alimbisaka mpenza?
14 Kasi, tokoki komituna boye, ‘Ndenge nini nakoki koyeba soki Yehova alimbisá ngai mpenza?’ Soki omituni bongo, yango emonisi ete Yehova akoki kolimbisa yo. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli moko ya kala elobaki boye: “Ekoki kosalema ete tósala libunga moko mbala na mbala. Ekoki mpe kozala ete tozali kokoka te kolonga bolɛmbu moko oyo tozalaki na yango liboso kutu tóbanda kosalela Nzambe. . . . Kasi kolɛmba nzoto te. Kokanisa te ete osalá lisumu oyo Yehova akoki kolimbisa te. Satana alingi ete okanisaka ndenge wana. Lokola ozali koyoka mawa mpe komitungisa mingi ndenge wana, yango emonisi ete ozali te moto mabe oyo Yehova akoki kolimbisa te. Kobá komikitisa mpe kobondela Nzambe mpo alimbisa yo, asalisa yo okóma lisusu na lisosoli ya pɛto, mpe asalisa yo otika kosala lisumu yango. Kaka ndenge mwana akendaka epai ya tata na ye mpo asalisa ye ata soki asali mabe moko boye mbala boni, yo mpe kobá kosɛnga Yehova asalisa yo, mpe akosala yango mpo na boboto monene na ye.”c
15-16. Bandeko mosusu bayokaki ndenge nini ntango bayebaki ete Yehova alimbisá bango?
15 Basaleli ya Yehova mingi bazwaka makasi ntango bayebaka ete Yehova alimbisaka mpenza. Na ndakisa, eleki mwa bambula, ndeko mobali moko alendisamaki ntango atángaki lisolo moko oyo ebimaki na molɔngɔ ya masolo “Biblia ebongolaka bato.” Na lisolo yango, ndeko mwasi moko alobaki ete, na kotalela makambo mabe oyo azalaki kosala kala, ezalaki mpasi andima ete Yehova akoki kolinga ye. Abundanaki na makanisi wana bambula ebele mpenza ata nsima ya kozwa batisimo. Kasi, nsima ya kokanisa na mozindo na lisiko, yango esalisaki ndeko mwasi yango amona ete Yehova alingaka ye.d
16 Ndenge nini ndakisa na ye esalisaki ndeko mobali yango? Ndeko mobali yango akomaki boye: “Ntango nazalaki elenge, nazalaki moombo ya pornografi, mpe natikaki momeseno yango. Eumeli te, nazongelaki lisusu momeseno yango. Nalukaki lisalisi ya bankulutu na lisangá, mpe nasali milende mpo na kolonga likambo yango. Bankulutu bakitisaki ngai motema ndenge bayebisaki ngai ete Yehova alingaka ngai mpe ayokelaka ngai mawa. Atako bongo, namonaka kaka lokola nazangi ntina, lokola nde Yehova akoki te kolinga ngai. Kotánga lisolo ya [ndeko mwasi oyo] esalisaki ngai mpenza. Sikoyo namoni ete ntango nakanisaka ete Nzambe akoki te kolimbisa ngai, ezali lokola nde nazali koloba ete mbeka ya Mwana na ye ekoki te kozipa masumu na ngai. Nakataki lokasa ya lisolo yango mpo nakoka kotángaka yango mpe komanyola yango ntango makanisi ya mabe eyeli ngai.”
17. Ndenge nini ntoma Paulo akimaki motambo ya komipesa foti koleka ndelo?
17 Masolo ya bongo esalisi biso tókanisa lisusu bomoi ya ntoma Paulo. Liboso akóma mokristo, asalaki makambo mingi ya mabe. Paulo abosanaki te makambo oyo asalá, atako bongo azalaki kokanisa yango ntango nyonso te. (1 Tim. 1:12-15) Azalaki komona ete lisiko ezali mpenza likabo oyo Nzambe apesá ye. (Gal. 2:20) Yango wana, akobaki komipesa foti te koleka ndelo, kasi atyaki nde makanisi na ye nyonso na ndenge oyo akoki kosalela Yehova malamu koleka.
TYÁ MAKANISI NA YO NA MOKILI YA SIKA!
18. Mateya nini tozwi na lisolo oyo?
18 Mateya nini tozwi nsima ya kotalela mitambo oyo tolobeli na lisolo oyo? Ya liboso, basuvenire ya malamu ezali likabo oyo euti na Yehova; kasi ata soki kala tozalaki na bomoi ya malamu ndenge nini, bomoi na mokili ya sika ekozala malamu koleka. Ya mibale, bato mosusu bakoki kopesa biso nkanda, kasi soki tolimbisi bango, yango ekosalisa biso tótya makanisi na biso nyonso kaka na mosala ya Yehova. Mpe ya misato, komipesa foti koleka ndelo ekoki kopekisa biso tósalela Yehova na esengo. Yango wana, lokola ntoma Paulo, tosengeli kondima ete Yehova alimbisá biso.
19. Ndenge nini toyebi ete na mokili ya sika tokokanisa lisusu te makambo nyonso oyo epesaka biso mpasi?
19 Tozali na elikya ya kozala na bomoi ya seko. Na mokili ya sika, tokokanisa lisusu te makambo nyonso oyo epesaka biso mpasi. Biblia elobi boye mpo na ntango yango: “Makambo ya kala ekokanisama lisusu te.” (Yis. 65:17) Kanisá naino: Bandeko na biso mosusu banuni kaka na mosala ya Yehova, kasi na mokili ya sika, bakozonga lisusu bilenge. (Yobo 33:25) Na yango, tózwa ekateli ya kokanisaka kaka makambo ya kala te, kasi tótyaka nde makanisi na biso nyonso na mokili ya sika mpe tósala nyonso oyo esengeli mpo na kokɔta na mokili yango!
LOYEMBO 142 Tyá miso na yo na mbano
a Ntango mosusu ezalaka malamu kokanisa makambo oyo eleká. Kasi soki tozali kokanisa mingi kaka makambo oyo eleká, tokoki kotika kosala makambo nyonso oyo tosengeli kosala mpo na Yehova lelo oyo. To mpe tokoki kobosana bilaka kitoko ya Yehova oyo etali Paradiso. Na lisolo oyo tokolobela mitambo misato oyo tosengeli kokima, oyo ekoki kotinda biso tókanisaka mingi makambo oyo eleká. Tokomona mitinda ya Biblia mpe bandakisa ya ntango na biso oyo ekoki kosalisa biso tókwea te na mitambo wana.
c Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/06/1954, lok. 185, na Français.
e NDIMBOLA YA BILILINGI: Ezaleli ya kokanisakanisa bomoi ya kala, kobombela basusu nkanda na motema, mpe komipesaka foti koleka ndelo, ezali lokola mokumba ya kilo oyo tozali kobenda, mpe ezali kopekisa biso tókende liboso na nzela ya bomoi.
f NDIMBOLA YA BILILINGI: Nsima ya kotika kilo nyonso wana, tokokóma pɛpɛlɛ, tokoyoka esengo, mpe tokozwa lisusu makasi. Yango ekosala ete tókoba kotala liboso.