Bakelasi ya milaimilai mpe mbongo ekoki kopesa moto bomoi ya malamu na mikolo ezali koya?
Bato mingi bakanisaka ete bato oyo batángá bakelasi ya milaimilai mpe oyo bazali na bomɛngo bakozala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya. Bakanisaka ete soki moto atángi na iniversite, yango ekosala ete azala mosali malamu, mosangani malamu ya libota, mpe mwana-mboka ya malamu. Ntango mosusu bakanisaka ete soki moto atángi bakelasi mingi, yango ekosala ete azwa mosala ya mbongo mingi, mpe soki azali kozwa mbongo mingi nde akozala na esengo.
BIKATELI OYO BATO MINGI BAZWAKA
Zhang Chen, oyo afandaka na Chine alobi boye: “Nazalaki kokanisa ete soki nazwi diplome ya iniversite nakolongwa na bobola mpe ete mosala ya mbongo mingi ekopesa ngai bomoi ya malamu mpe ya esengo.”
Bato mingi basepelaka kokende kotánga na bainiversite ya minene mpe ya lokumu na bamboka mosusu na likanisi ete yango ekosalisa bango bázala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya. Likambo yango ekiti kaka ntango maladi mabe ya Coronavirus eyei kopekisa mibembo na bamboka mosusu. Na mobu 2012, ankɛti ya ebongiseli moko (Organisation de coopération et de développement économiques) elobaki ete: “Bana ebele (52%) oyo bazali kotánga na bainiversite ya bamboka mosusu bautá na Azia.”
Mbala mingi, baboti babomaka nzoto mpo bana na bango bákende kotánga na bainiversite na bamboka mosusu. Qixiang, moto moko ya Taïwan, alobi boye: “Baboti na biso bazalaki na mbongo te, kasi batindaki biso nyonso minei tókende kotánga na iniversite na États-Unis.” Mpo baboti báfutela bango kelasi yango, bakɔtaki banyongo ebele mpenza, baboti mosusu mpe basalaka kaka bongo.
BAKELASI YA MILAIMILAI EBONGISAKA NDE BOMOI?
Ntango mosusu kotánga bakelasi ya milaimilai ekoki kobongisa bomoi na ndenge moko boye, kasi ememaka ntango nyonso te bolamu oyo bana-kelasi yango bakanisaka. Na ndakisa, nsima ya koboma nzoto na mosala mpe kokɔta banyongo, bato mingi balongi te kozwa misala oyo balingaki. Rachel Mui oyo asalaki ankɛtɛ moko mpe akomaki yango na zulunalo moko (Business Times) na Singapour, alobi boye: “Motángo ya bato oyo bazali na badiplome ya iniversite mpe bazali na misala te, ezali se kobakisama.” Jianjie, oyo afandaka na Taïwan, mpe oyo azali na diplome ya doctorat, alobi boye: “Bato mingi basili mayele, bazali kondima misala oyo ekokani ata moke te na badiplome oyo bazali na yango.”
Ata bato oyo bazwá misala oyo batángelá kelasi, bamonaka kaka ete bomoi na bango ekómi te ndenge bazalaki kokanisa. Niran, moto ya Thaïlande, oyo akendaki kotánga na iniversite moko na Royaume-Uni, azwaki mosala ntango azongaki na mboka na ye. Alobi boye: “Kaka ndenge nazalaki kokanisa, diplome oyo nazwaki esalisaki ngai nazwa mosala ya mbongo mingi mpenza. Kasi, nasengelaki kosala mosala makasi mpenza mpe kolekisa bangonga mingi na mosala mpo nazwa mbongo yango. Nsukansuka, kompanyi elongolaki bato na mosala, ezala mpe ngai. Nayaki komona ete ata mosala moko te ekoki kobongisa bomoi ya moto na mikolo ezali koya.”
Ata bato ya mbongo, oyo ezali komonana ete babongá na bomoi, bakutanaka na mikakatano na mabota na bango, babɛlaka, mpe bamitungisaka mpo na mbongo. Katsutoshi, moto moko ya Japon, alobi boye: “Nazalaki na mbongo mingi, kasi nazalaki na esengo te mpo bato bazalaki koyokela ngai zuwa, mpe kotumola ngai.” Lam, mwasi moko oyo afandaka na Vietnam, alobi boye: “Bato mingi babomaka nzoto mpo na kozwa mbongo mingi mpo bakanisaka ete ekobatela bango, nzokande bamitungisaka lisusu nde mingi, babɛlaka, mpe kutu banyokwamaka na makanisi.”
Ndenge moko na Franklin, bato mingi basili komona ete ezali na makambo mingi ya ntina na bomoi oyo eleki kotánga bakelasi ya milaimilai mpe konduka bomɛngo. Bato mosusu, na esika ya konduka bomɛngo, bazali nde kosala nyonso bázala bato malamu, básalelaka bato makambo ya malamu mpo bázala na bomoi ya malamu. Kosala bongo ekomemela bango bomoi ya malamu na mikolo ezali koya? Lisolo oyo elandi ekopesa eyano na motuna yango.