Mokapo ya Mitano
Yehova akitisaka bato ya lolendo
1, 2. Mpo na nini nsango ya esakweli oyo Yisaya apesi Bayuda ya ntango na ye ezali na ntina mpo na biso?
LOKOLA alɛmbi nzoto mpo na makambo oyo ezali koleka na Yelusaleme mpe na Yuda, mosakoli Yisaya abaluki sikawa epai ya Yehova Nzambe mpe alobi ete: “Zambi oboi bato na yo, ndako ya Yakobo.” (Yisaya 2:6a) Mpo na nini Nzambe asundoli bato oyo ye moko aponaki mpo bázala “libota na ye mpenza”?—Deteronome 14:2.
2 Maloba ya kotɔndɔla oyo Yisaya alobi na Bayuda ya ntango na ye ezali mpenza na ntina mingi mpo na biso. Mpo na nini? Mpamba te ezalela ya mangomba ya boklisto lelo oyo ekokani mpenza na oyo ya bato ya Yisaya, ezali mpe bongo mpo na ekateli oyo Yehova azweli bango. Soki totii likebi na maloba ya Yisaya, tokokanga mpenza ntina ya makambo oyo Nzambe apekisi mpe yango ekosalisa biso tóbwaka misala oyo aboyaka. Na mposa nyonso, tótalela liloba ya esakweli ya Yehova oyo ezali na Yisaya 2:6–4:1.
Bazali kogumbama na lolendo
3. Mabe nini bato ya Yisaya basali mpe ye ayamboli yango?
3 Yisaya ayamboli mabe ya bato na ye na maloba oyo: “Mpo ete batondi na makambo malongwi na epai na ebimelo na ntango; mpe [bazali bato ya maji, NW] lokola Bafilisitia; basili kopesana mabɔkɔ na bana na bapaya.” (Yisaya 2:6b) Mbula soki 800 liboso, Yehova apesaki bato oyo aponaki etinda oyo: “Bómibebisa na makambo oyo moko te, mpo ete na makambo oyo nyonso mabota oyo mazali ngai kobimisa liboso na bino bamibebisaki.” (Levitike 18:24) Yehova atindaki Balama aloba boye, epai ya bato oyo aponaki mpo bázala libota na ye mpenza: “Longwa na likoló na [ngomba mike, NW] namoni ye, longwa na ngomba natali ye. [Kuna, libota yango bamitangoli, NW], mpe bamitángi kati na mabota na mokili te.” (Mituya 23:9, 12) Nzokande, na mikolo ya Yisaya, bato oyo Yehova aponaki bakómaki komekola misala ya mbindo ya mabota ya pembenipembeni mpe “batondi na makambo malongwi na epai na ebimelo na ntango.” Na esika ya kondimela Yehova mpe liloba na ye, bamikɔtisaki na misala ya “bato ya maji lokola Bafilisitia.” Lokola balingi kosala boninga na mabota mosusu, mokili ‘etondi’ na “bana ya bapaya”—na ntembe te, bapaya oyo bakɔtisi misala ya mbindo epai ya basaleli ya Nzambe.
4. Na esika ete etinda bango bátɔnda Yehova, likambo ya bozwi mpe ya kozala na basoda ya makasi ekómisi Bayuda ndenge nini?
4 Lokola amonaki ete nkita ebongi mpe basoda ya Yuda bazali makasi na ntango ya boyangeli ya Mokonzi Uziya, Yisaya alobi ete: “Mokili na bango etondi na palata mpe na wolo, biloko na bango ya motuya izali na nsuka te; mokili na bango etondi na bambalata, makalo na bango mazali na nsuka te.” (Yisaya 2:7) Bato yango batɔndi Yehova mpo na bozwi yango mpe mpo na basoda na bango ya makasi? (2 Ntango 26:1, 6-15) Soki moke te! Kutu, batii motema na bango nde na bozwi mpe bapesi Yehova Nzambe mokɔngɔ, Ye oyo apesaki bango biloko yango. Nini ekómelaki bango? “Mokili na bango etondi na bikeko, bazali kogumbama liboso na mosala na mabɔkɔ na bango, liboso na yango esali misapi na bango mpenza. Boye moto [oyo asalami na mabele akogumbama mpe moto akokitisama, okokoka kolimbisa te, NW].” (Yisaya 2:8, 9) Bapesi Nzambe ya bomoi mokɔngɔ mpe bakei kogumbamela bikeko mpamba.
5. Mpo na nini kogumbamela bikeko ezali te elembo ya komikitisa?
5 Kogumbama ekoki kozala elembo ya komikitisa. Kasi kogumbamela biloko oyo ezali na bomoi te ezali na ntina te, yango “ekokitisa” moto oyo azali kosambela yango, ekobebisa ye. Ndenge nini Yehova akoki kolimbisa lisumu ya boye? Basambeli yango ya bikeko bakosala nini ntango Yehova akosɛnga bango bázongisa monɔkɔ?
‘Miso ya lolendo ekokitisama’
6, 7. (a) Nini ekómeli bato ya lolendo na mokolo ya kosambisa ya Yehova? (b) Yehova akitisi nkanda na ye likoló na nini mpe banani, mpe mpo na nini?
6 Yisaya alobi lisusu ete: “Kɔtá kati na libanga, omibomba na mputulu, mpo na kobanga [Yehova] mpe mpo na nkembo na bokonzi na ye.” (Yisaya 2:10) Kasi libanga moko te ekozala monene mpo ekoka kobatela bango, ezipeli moko te ekozala monene mpo ekoka kobomba bango liboso ya Yehova, Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Ntango ayei kopesa etumbu na ye, “miso ya [lolendo, NW] ya moto ikokitisama mpe [lofundo ya bato ekogumbama mpe Yehova, NW] akokumisama, bobele ye moko, na mokolo yango.”—Yisaya 2:11.
7 “[Yehova] na bibele azali na mokolo” na ye mpe mokolo yango ekómi pene. Ekozala ntango oyo Nzambe akokweisa nkanda na ye likoló na “nzete nyonso na ɛlɛzɛ na Lebanona, oyo izali milai mpe itombwi likoló mpe kotɛmɛla nzete nyonso [ya minene, NW] na Basana; kotɛmɛla ngomba milai nyonso, mpe [ngomba mike, NW] nyonso; kotɛmɛla ndako nyonso milai, mpe mapango nyonso matyami makasi; kotɛmɛla masuwa nyonso na Talasisi mpe nyonso oyo ekosepelisa miso.” (Yisaya 2:12-16) Na ntembe te, na mokolo ya nkanda na ye, Yehova akotya likebi na bibongiseli nyonso oyo bato basalá mpo na komikumisa mpe na bato nyonso oyo bazali kotyola Nzambe. Yango wana, “[lolendo ya moto ekogumbama, NW] mpe [lofundo] ya bato ekokitisama; mpe [Yehova] akokumisama, bobele ye moko, na mokolo yango.”—Yisaya 2:17.
8. Na lolenge nini mokolo ya kosambisama oyo esakolamaki ekómelaki Yelusaleme na mobu 607 L.T.B.?
8 Mokolo ya kosambisama oyo esakolamaki eyaki likoló na Bayuda na mobu 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.) ntango Nebukadanesala, mokonzi ya Babilone abebisaki Yelusaleme. Bato bamoni engumba na bango oyo balingaki mingi ezali kozika, bandako na yango minene ebukani, efelo na yango molai ekwei. Tempelo ya Yehova ekómi kaka libondo ya mabanga mpamba. Ezala ata bozwi na bango to makalo na bango ezali na ntina moko te na ‘mokolo ya Yehova na bibele.’ Bongo bikeko na bango? Kaka ndenge Yisaya asakoli: “Bikeko mpe ikolimwa nyɛɛ.” (Yisaya 2:18) Bayuda—bakisa mpe bankumu na bato ya nguya—bakei na boombo na Babilone. Yelusaleme etikali mpamba mpo na mbula 70.
9. Na nini ezalela ya mangomba ya boklisto ekokani na oyo ya Yelusaleme mpe Yuda na ntango ya Yisaya?
9 Ezalela ya mangomba ya boklisto ekokani mpenza na oyo ya Yelusaleme mpe Yuda na mikolo ya Yisaya! Mangomba ya boklisto ezali na boyokani makasi na bikólo ya mokili oyo. Mangomba yango esungaka ONU makasi, etondisi bandako na yango na bikeko mpe na misala oyo eyokani na Makomami te. Bandimi na yango bazali na lokoso ya biloko ya mosuni mpe batyaka elikya na bango na nguya ya basoda. Batalelaka mpe bakonzi ya mangomba yango lokola bato minene, mpe bapesaka bango batitre mpe lokumu monene, boye te? Lolendo ya mangomba ya boklisto ekosuka. Kasi ntango nini?
“Mokolo ya Yehova” ekómi pene
10. “Mokolo ya Yehova” nini ntoma Paulo na ntoma Petelo balobeli?
10 Makomami ezali kolobela “mokolo ya Yehova” oyo ekozala na nsɔmɔ koleka mokolo ya etumbu oyo ekómelaki Yelusaleme mpe Yuda ya kala. Na lisalisi ya elimo santu, ntoma Paulo amonisaki ete “mokolo ya Yehova” oyo ekómi pene ezali na boyokani na kozala ya Yesu Klisto Mokonzi oyo asili kofanda na kiti ya bokonzi. (2 Batesaloniki 2:1, 2, NW) Petelo alobelaki mokolo yango ntango alobaki ete ‘likoló ya sika mpe mabele ya sika oyo kati na yango bosembo ekozala.’ (2 Petelo 3:10-13, NW) Ezali mokolo oyo Yehova akopesa ebongiseli mobimba ya makambo ya mokili oyo mabe etumbu, bakisa mpe mangomba ya boklisto.
11. (a) Nani “akoyikela mokolo ya Yehova” oyo ekómi pene “mpiko”? (b) Ndenge nini tokoki kokómisa Yehova ekimelo na biso?
11 Mosakoli Yoele alobi ete: “Mawa mpo na mokolo yango! Zambi mokolo ya [Yehova] ebɛlɛmi, ezali koya lokola libebisami uta na Oyo-na-Nguya-Nyonso.” Lokola “mokolo” yango ekómi pene, bato nyonso basengeli mpenza komibanzabanza mpo na komibatela na eleko yango ya nsɔmɔ, boye te? Yoele atuni ete: “Nani akokoka koyikela yango mpiko?” Ayanoli ete: “[Yehova] azali ekimelo mpo na bato na ye.” (Yoele 1:15; 2:11; 3:16) Yehova Nzambe akozala ekimelo mpo na bato ya lolendo mpe mpo na baoyo batyaka motema na bozwi, na nguya ya basoda, mpe na banzambe oyo basalami na mabɔkɔ ya bato? Ekoki kosalema te! Kutu Nzambe asundolaki libota na ye oyo aponaki ntango bamitambwisaki ndenge wana. Ezali mpenza likambo ya ntina mingi ete basaleli ya Nzambe nyonso “báluka bosembo, báluka komikitisa,” mpe bátalela malamumalamu esika oyo losambo ya Yehova ezali kozwa na bomoi na bango!—Sefania 2:2, 3, NW.
“Epai na mpoko ya nsolo”
12, 13. Mpo na nini ebongi ete basambeli ya bikeko bábwaka banzambe na bango “epai na mpoko ya nsolo mpe na ngembo” na mokolo ya Yehova?
12 Ndenge nini basambeli ya bikeko bakotalela bikeko na bango na mokolo monene ya Yehova? Yisaya ayanoli ete: “Bato bakokɔta na madusu ya mabanga mpe na mabulu na mabele, mpo na kobanga [Yehova] mpe mpo na nkembo ya bokonzi na ye wana ekotɛma ye kobangisa mokili. Na mokolo yango bato bakobwaka bikeko na bango ya palata mpe bikeko na bango ya wolo . . . epai na [mpoko ya nsolo, NW] kokɔta kati na madusu ya mabanga mpe na nkaka ya ngomba, mpo na kobanga [Yehova] mpe mpo na nkembo ya bokonzi na ye, wana ekotɛma ye kobangisa mokili. Bino bótika moto oyo mpema na ye ezali na zolo na ye; ye akotángama nde eloko nini?”—Yisaya 2:19-22.
13 Mpoko ya nsolo efandaka na madusu na kati ya mabele, mpe ngembo ebatamaka na madusu ya mabanga na bisika ya molili. Lisusu, bisika oyo ngembo etondani ebele, ezalaka na nsolo moko mabe mpe nyei na yango esalaka mabondo ya minene. Bisika yango ezali mpenza ya kobwaka bikeko. Ebongi kaka na esika moko ya molili mpe ya bosɔtɔ ndenge wana. Mpo na bato, bakoluka ekimelo na mabulu mpe madusu ya mabanga na mokolo ya kosambisa ya Yehova. Bikeko na basambeli na yango bakozwa etumbu ndenge moko. Esakweli ya Yisaya elobaki solo, bikeko oyo ezangi bomoi ebikisaki ata basambeli na yango te ata mpe Yelusaleme te na mabɔkɔ ya Nebukadanesala na mobu 607 L.T.B.
14. Bato oyo bazali na elimo ya mokili bakosala nini na mokolo ya kosambisa ya Yehova oyo etikali moke eyela mangomba nyonso ya lokuta na mokili mobimba?
14 Na mokolo ya kosambisa ya Yehova oyo ezali koyela mangomba ya boklisto mpe bibongiseli mosusu ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba, bato bakosala nini? Lokola bakomona ete makambo ezali kobeba se kobeba na mokili mobimba, mbala mosusu bato mingi bakondima ete bikeko na bango ezali mpenza na ntina te. Na esika ete báluka kokima mpe komibatela epai ya bikeko yango, bakoluka kokima na masangá oyo bato basalá mpe ya mokili, oyo etali makambo ya losambo te, na ndakisa ONU, “nyama ya motane” oyo elobelami na Emoniseli mokapo 17. Ezali “maseke zomi” ya nyama yango ya elilingi nde ekobebisa Babilone Monene, lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba, oyo eteni na yango monene ezali mangomba ya boklisto.—Emoniseli 17:3, 8-12, 16, 17.
15. Na lolenge nini Yehova “akokumisama” kaka ye moko na mokolo na ye ya kosambisa?
15 Atako maseke zomi yango ya elilingi nde ekobebisa mpe ekotumba mbala moko Babilone Monene, kasi yango ekokokisa nde mokano ya kosambisa ya Yehova. Emoniseli 18:8 elobi boye mpo na Babilone Monene: “Yango wana na mokolo moko malɔzi na ye makoya, na liwa, na kolela, na nzala, mpe akotumbama na mɔ́tɔ, mpo ete Nkolo Nzambe mosambisi na ye azali makasi.” Yango wana, lokumu nyonso ya kosikola bato na mangomba ya lokuta ekokenda epai ya Yehova Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Lokola Yisaya alobi yango, “[Yehova] akokumisama, bobele ye moko, na mokolo yango. Mpo ete [Yehova] na bibele azali na mokolo.”—Yisaya 2:11b, 12a.
“Batambolisi na bino bakopɛngwisa bino”
16. (a) Nini ezali “lisungi mpe lisalisi” na bomoi ya bato? (b) Mpasi nini bato ya Yisaya bakozwa ntango “lisungi mpe lisalisi” ya mboka na bango ekolongwa?
16 Mpo bato bázala na bomoi ya malamu, esɛngaka “lisungi mpe lisalisi”—elingi koloba biloko ya kolya mpe mai mpe, mingi mpenza bakonzi oyo babongi kotyelama motema, oyo bazali na makoki ya kotambwisa bato mpe kotya molɔngɔ na mboka, bázala. Nzokande, Yisaya alobi boye mpo na Yisalaele ya kala: “Zambi talá, Nkolo [Yehova] na bibele azali kolongola na Yelusaleme mpe na Yuda [lisungi mpe lisalisi, NW] mobimba ya kwanga mpe [lisungi, NW] mobimba ya mai; moto makasi mpe moto na etumba, mosambisi mpe mosakoli, moto na mayele mpe mpaka; mokóló na ntuku mitano mpe moto na lokumu, moto ya toli mpe mosali na mayele, mpe moto oyo amesani na nkisi.” (Yisaya 3:1-3) Bilenge mibali mpamba bakokóma bankumu mpe bakoyangela na lofundo mpenza. Ezali kaka te ete bayangeli yango bakonyokola bato kasi mpe “bato bakominyokola, moto na moto moninga na ye . . . Elenge akozala na [lolendo] liboso na mpaka, mpe moto na mpamba liboso na oyo na lokumu.” (Yisaya 3:4, 5) Bana bakozala na “nzombo” liboso na mikóló na bango, bakotosa bango te. Bizaleli ya bato ekobeba mpenza kino moto moko akoloba na mosusu ata akokisi masɛngami te mpo na koyangela ete: “Yo ozali na elamba, zalá motambolisi na biso mpe tiká ete [ebele, NW] oyo na mpamba ezala na nse na bokonzi na yo.” (Yisaya 3:6) Kasi bato oyo bakobenga bango mpo na likambo yango bakoboya, bakoloba ete bazali na makoki te ya kobikisa mokili oyo esili kozoka, bazali mpe na bozwi te oyo ebongi mpo na kokokisa mokumba yango. Bakoloba ete: “Ngai nazali mobikisi te; na ndako na ngai kwanga ezali te mpe bilamba te, okotya ngai motambolisi na bato te.”—Yisaya 3:7.
17. (a) Na lolenge nini lisumu ya Yelusaleme mpe ya Yuda ezali “lokola [oyo ya] Sodomo”? (b) Yisaya apesi nani foti mpo na ezalela ya bato na ye?
17 Yisaya alobi lisusu ete: “Yelusaleme [abɛti, NW] libaku mpe Yuda akwei, mpo ete maloba na bango mpe misala na bango ikotɛmɛla [Yehova], ete bábɛtɛla miso na nkembo na ye ntembe. [Bilongi na bango, NW] yango ezali litatoli kotɛmɛla bango, bakosakola masumu na bango lokola Sodomo, bakobomba yango te. Mawa na milimo na bango, zambi bamiyeiseli mabe bango mpenza.” (Yisaya 3:8, 9) Basaleli ya Nzambe batombokeli Nzambe ya solo na maloba mpe na misala. Ata bilongi na bango ezali kolakisa te ete bazali koyoka nsɔni to babongoli motema, yango ezali komonisa ete masumu na bango ezali mpenza mabe lokola oyo ya Sodomo. Atako basalaki kondimana na Yehova Nzambe, kasi ye akobongola mitinda na ye te mpo na bango. “Bóloba na bayengebene ete ekozala malamu mpo na bango, zambi bakolya mbuma na misala na bango. Mawa na moto mabe, ekozala mabe na ye, mpo ete misala na mabɔkɔ na ye ikosalelama mpe ye moko. Bato na ngai, [bakapita na bango, NW] bazali konyokola bango mpe basi bazali mikonzi likoló na bango. Ɛ bato na ngai, batambolisi na bino bakopɛngwisa bino, bakobebisa mpe nzela wana ekolekaka bino.”—Yisaya 3:10-12.
18. (a) Kosambisa ya ndenge nini Yehova asambisi bampaka na bankumu ya ntango ya Yisaya? (b) Liteya nini tokoki kozwa na kosambisa oyo Yehova asambisi bampaka na bankumu?
18 Mpo na bampaka na bankumu ya Yuda, Yehova ‘alakeli bango etumbu’ mpe ‘asambisi’ bango: “Bino bolei elanga na miwiti, biloko bipunzami [epai] na babola izali na ndako na bino. Mpo na nini bobɛtabɛti bato na ngai mpe bonyati bilongi na babola?” (Yisaya 3:13-15) Na esika ete básala mpo na bolamu ya bato, bakonzi bazali kokosakosa. Bazali kosalela bokonzi na bango na ndenge ya mabe, bazali konduka biloko bango moko, kobɔtɔla babola mpe bato ya mawa. Kasi bakonzi yango basengeli kozongisa monɔkɔ epai ya Yehova mpo na ndenge bazali konyokola babola. Yango ezali mpenza likebisi monene mpo na baoyo bazali na mikumba lelo! Basengeli ntango nyonso kokeba ete básalela bokonzi na bango na ndenge ya mabe te.
19. Mangomba ya boklisto enyokoli mpe etungisi banani?
19 Mangomba ya boklisto—mingimingi bakonzi ya mangomba mpe bakambi na yango—banduki biloko oyo esengelaki kozala ya bato mosusu, bato oyo bango banyokoli mpe bazali kokoba konyokola. Bazali mpe kobɛta, konyokola, mpe kotungisa basaleli ya Nzambe mpe babwaki nsɔni likoló na nkombo ya Yehova. Na ntango ebongi, Yehova akokatela bango etumbu.
“Na esika ya bonzenga, elembo ya mɔ́tɔ”
20. Mpo na nini Yehova atɔndɔli “bana basi na Siona”?
20 Nsima ya kotɔndɔla makambo ya mabe oyo bakonzi basalaka, Yehova abaluki sikawa epai ya basi ya Siona, to Yelusaleme. Mbala mosusu mpo na kolanda monzele ya ntango wana, “bana basi ya Siona” balati ‘minyɔlɔlɔ na makolo’—elingi koloba bakangi yango na makolo—ezali koningana mpe kosala makɛlɛlɛ. Ntango bazali kotambola, basi yango bazali kokeba na makolo na bango mpo ‘bátambola na lipombo,’ bazali kodenda mpo bámonana lokola basi ya bomɛngo. Kasi mabe ezali wapi soki basali bongo? Mabe ezali nde na ezaleli na bango. Yehova alobi ete: “Bana basi ya Siona bazali na lolendo, bazali kolekaleka na nkingo itombolami likoló, bazali [kofinela mibali, NW] miso na bango.” (Yisaya 3:16) Lolendo ya ndenge wana esengeli kopesamela etumbu.
21. Kosambisa oyo Yehova asambisaki Yelusaleme esali nini epai na basi Bayuda?
21 Yango wana, ntango Yehova akosambisa mokili yango, “bana basi ya Siona” yango ya lolendo bakobungisa biloko na bango nyonso—ata mpe kitoko na bango oyo bazalaki kosalela lolendo. Yehova asakoli ete: “Yehova akozipa na makwanza mitó na bana basi ya Siona, mpe Yehova ye moko akotika bilongi na bango polele. Na mokolo yango Yehova akolongola kitoko ya mpɛtɛ, mpe ya biteni ya bilamba mpe biloko ya monzɛlɛ oyo ezali lokola sanza, mpe biloko ya matoi mpe monyɔlɔlɔ ya mabɔkɔ mpe matambala, monzɛlɛ ya nsuki, mpe mikaba mpe ‘ndako na molimo’ [mbala mosusu milangi ya malasi] mpe ndako ya mbɛmbɛ [to nkisi] oyo ezali biloko ya kokembisa mpe mpɛtɛ mpe mpɛtɛ ya zolo mpe bilamba ya motuya mpe bilamba minene mpe mikoto mpe mabenga mpe talatala mike mpe bilamba ya kati mpe matambala ya mineneminene mpe bilamba ya pɛtɛpɛtɛ.” (Yisaya 3:17-23, NW) Oyo nde mbongwana ya mawa mpenza!
22. Longola biloko ya monzele, basi ya Yelusaleme babungisi lisusu nini?
22 Nsango ya esakweli ekobi na maloba oyo: “Na esika ya mafuta ya kitoko, ekozala na nsolo ya kopɔla; na esika ya mokaba, mokulu; na esika ya nsuki oyo bakangi malamu, libandi; na esika ya elamba ya kitoko, bakolata saki na loketo; na esika ya bozenga, elembo ya mɔ́tɔ.” (Yisaya 3:24, NW) Na 607 L.T.B., basi ya lolendo ya engumba Yelusaleme oyo bazalaki na bozwi bakómi babola. Babungisi bonsomi na bango mpe ‘bazwaki elembo ya mɔ́tɔ’ mpo na komonisa bango ete bakomi baombo.
“Na ntembe te ekokɔmbɔlama”
23. Yehova asakoli nini mpo na Yelusaleme?
23 Sikawa Yehova azali koloba na Yelusaleme na maloba oyo: “Babali na yo bakokwea na mopanga mpe makasi na yo mpo na etumba, mpe bikuke na ye ikolela mpe ikoganga; mpe na ntembe te ekokɔmbɔlama. Ekofanda na mabele.” (Yisaya 3:25, 26, NW) Mibali ya Yelusaleme, ata oyo ya makasi, bakobomama na etumba. Engumba ekokitisama na mabele. Mpo na “bikuke na ye,” ekozala eleko ya ‘kolela mpe koganga.’ Yelusaleme “ekokɔmbɔlama” mpe ekotikala mpamba.
24. Likambo nini ya mawa kobomama ya mibali na mopanga ekozala mpo na basi ya Yelusaleme?
24 Ndenge mibali babomami na mopanga ekozala likambo moko ya mawa mpo na basi ya Yelusaleme. Yisaya asukisaki eteni ya mokanda na ye oyo na maloba oyo: “Na mokolo yango, basi nsambo bakosimba mobali moko mpe bakoloba ete, Tokolya kwanga na biso mpenza mpe tokolata bilamba na biso mpenza, nde tiká ete nkombo na yo epesamela biso mpo na kolongola nsɔni na biso.” (Yisaya 4:1) Lokola mibali ya kobala bakozala lisusu mingi te, yango wana basi mingi bakokangama na mobali moko mpo bábengama na nkombo na ye—yango elingi koloba, báyebana na bato nyonso ete bazali basi na ye—mpe na bongo bakozala na nsɔni te ya kozanga mobali. Mobeko ya Mose ezalaki kosɛnga na mobali ete aleisa mpe alatisa mwasi na ye. (Exode 21:10) Nzokande, lokola bandimi ‘kolya kwanga na bango moko mpe kolata bilamba na bango moko,’ basi yango balongoli mobali yango na mokumba oyo Mobeko ya Mose esɛngaki. Likambo ya mawa mpenza mpo na “bana basi ya Siona” oyo kala batondaki na lolendo!
25. Nini ezali kozela bato ya lolendo?
25 Yehova akitisaka bato ya lolendo. Na 607 L.T.B., ‘asukisaki’ mpenza nzombo ya libota oyo aponaki mpe ‘akitisaki’ “lolendo” na yango. Tiká ete baklisto ya solo bábosanaka te ete “Nzambe akotɛmɛlaka bato ya lolendo, nde akopesaka basɔkemi ngɔlu.”—Yakobo 4:6.
[Elilingi na lokasa 50]
Ezala bikeko, bozwi, to basoda ya makasi, bakobikisa Yelusaleme te na mokolo ya kosambisa ya Yehova
[Elilingi na lokasa 55]
Na “mokolo ya Yehova,” mangomba nyonso ya lokuta na mokili mobimba ekobebisama