Mokapo ya Ntuku Misato
“Bóbɔndisa bato na ngai”
1. Na lolenge mosusu nini Yehova abɔndisaka biso?
YEHOVA azali ‘Nzambe oyo abɔndisaka.’ Abɔndisaka biso mpe na nzela ya bilaka oyo akomisi na kati ya Liloba na ye. (Baloma 15:4, 5) Na ndakisa, soki moto moko oyo tolingaka akufi, likambo nini ekoki kobɔndisa biso koleka elikya oyo emonisi ete moto yango akosekwa na mokili ya sika ya Nzambe? (Yoane 5:28, 29) Mpe tokoloba nini mpo na elaka ya Yehova oyo elobi ete etikali moke asukisa mabe mpe abongola mabele oyo paladiso? Kozala na elikya ya kokɔta na Paladiso mpe kozanga kokufa ezali mpenza likambo ya kobɔndisa, boye te?—Nzembo 37: 9-11, 29; Emoniseli 21:3-5.
2. Mpo na nini tokoki kotyela bilaka ya Nzambe motema?
2 Tokoki kotyela mpenza bilaka ya Nzambe motema? Ɛɛ, tokoki mpenza kotyela yango motema! Mopesi ya bilaka yango abongi na kotyelama motema. Azali na likoki mpe na mokano ya kokokisa liloba na ye. (Yisaya 55:10, 11) Yehova alakisaki yango polele ntango alobaki na nzela ya mosakoli Yisaya ete akozongisa losambo ya solo na Yelusaleme. Tiká tótalela esakweli yango, ndenge yango elobelami na Yisaya mokapo 40, mpamba te kosala bongo ekoki kolendisa kondima na biso epai na Yehova, Mokokisi ya bilaka.
Elaka moko ya kobɔndisa
3, 4. (a) Maloba nini ya kobɔndisa Yisaya akomi oyo basaleli ya Nzambe bakozala na mposa na yango nsima? (b) Mpo na nini bato ya Yuda mpe ya Yelusaleme bakei boombo na Babilone, mpe etumbu na bango ekoumela ntango boni?
3 Na ekeke ya mwambe liboso ya ntango na biso (L.T.B.), mosakoli Yisaya akomi maloba ya kobɔndisa oyo basaleli ya Yehova bakozala na mposa na yango nsima. Kaka nsima ya koyebisa Mokonzi Hizikiya ete kobebisama ya Yelusaleme ekómaki pene mpe ete Bayuda bakokenda na boombo na Babilone, Yisaya amonisi maloba ya Yehova oyo ezali kopesa elaka ya kozongisama: “Bóbɔndisa, bóbɔndisa bato na ngai, Nzambe na bino alobi boye. Bóloba na motema ya Yelusaleme, bóganga na epai na ye ete [mosala na ye ya bosoda, NW] esili mpe ete masumu na ye elimbisami; mpo ete asili kozwa na lobɔkɔ na [Yehova lifuta mobimba, NW] mpo na masumu na ye nyonso.”—Yisaya 40:1, 2.
4 “Bóbɔndisa,” ezali liloba ya ebandeli na mokapo 40 ya mokanda ya Yisaya, elobeli polele nsango ya pole mpe ya elikya oyo ezali na buku yango ya Yisaya. Lokola bamikɔtisi na lipɛngwi, bato ya Yuda mpe ya Yelusaleme bakokende na boombo na Babilone na mobu 607 L.T.B. Kasi Bayuda yango oyo bakómi baombo bakosalela bato ya Babilone mpo na libela te. Etumbu na bango ekoumela kaka tii libunga na bango “elimbisami.” Yango ekoumela ntango boni? Mosakoli Yilimia alobi ete mbula 70. (Yilimia 25:11, 12) Nsima na yango, Yehova akokamba batikali oyo babongoli motema, akobimisa bango na Babilone mpe akozongisa bango na Yelusaleme. Ntango bakokóma na mbula ya 70, baombo yango bakomikundola ete ntango ya kosikolama ekómi pene, mpe yango ekozala mpenza likambo ya kobɔndisa!—Danyele 9:1, 2.
5, 6. (a) Mpo na nini mobembo molai ya Babilone tii Yelusaleme ekopekisa kokokisama ya elaka ya Nzambe te? (b) Kozonga ya Bayuda na mokili na bango ekosala mabota mosusu nini?
5 Kosala mobembo longwa na Babilone tii Yelusaleme, esɛngi kotambola kilomɛtrɛ 800 to 1600, yango etaleli nzela oyo moto aleki na yango. Mobembo yango ya molai ekopekisa kokokisama ya elaka ya Nzambe? Soki moke te! Yisaya akomi ete: “Yoká! Moto moko azali koganga na esobe: ‘Bóbongisa nzela ya Yehova. Na etando ya esobe, bósembola balabala monene mpo na Nzambe na biso. Tiká ete lobwaku mokomoko etondisama, tiká ete ngomba ya monene mokomoko mpe ngomba moke mokomoko ekitisama. Bisika ya matutu ekokóma mboka ya patatalu mpe bisika ya mabulumabulu ekokóma mabwaku ya patatalu. Ya solo mpenza, nkembo ya Yehova ekomonisama, mpe nzoto nyonso ekomona yango mpenza, mpo ete monɔkɔ mpenza ya Yehova elobi yango.’”—Yisaya 40:3-5, NW.
6 Bayangeli ya mikili ya Ɛsti bazalaki mbala mingi kotinda mibali mpo na kobongisa nzela liboso ya kosala mobembo moko, yango ezalaki kosɛnga kolongola mabanga minene mpe kutu kotonga banzela mpe kobuka bangomba mike. Mpo na Bayuda oyo bakozonga na mokili na bango, ekozala lokola nde Nzambe ye moko azali liboso na bango, mpe akolongola makambo nyonso oyo ekoki kotya nkaka. Kutu, bango bazali bato oyo balati nkombo ya Yehova, mpe lokola akokokisa elaka na ye ya kozongisa bango na mokili na bango, yango ekomonisa nkembo na ye liboso ya mabota nyonso. Bálinga to bálinga te, mabota yango basengeli komona ete Yehova azali Mokokisi ya bilaka na ye.
7, 8. (a) Ndenge nini maloba ya Yisaya 40:3 ekokisamaki na ekeke ya liboso T.B.? (b) Na lolenge nini esakweli ya Yisaya ekokisamaki na monene na 1919?
7 Kokokisama ya esakweli yango ezalaki kaka te kozongisama oyo esalemaki na ekeke ya motoba L.T.B. Kokokisama mosusu esalemaki na ekeke ya liboso na ntango na biso (T.B.). Yoane Mobatisi azalaki mongongo ya “mogangi kati na lisobe,” lokola Yisaya 40:3 esakolaki yango. Yoane apemamaki mpe asalelaki maloba ya Yisaya mpo na ye moko. (Yoane 1:19-23) Kobanda na mobu 29 T.B., Yoane abandaki kobongisa nzela mpo na Yesu Klisto.a Nsango oyo Yoane azalaki kosakola etindaki bango bázela Masiya oyo alakamaki mpo ete, bango mpe, báyoka ye mpe bálanda ye. (Luka 1:13-17, 76) Na nzela ya Yesu, Yehova akokamba bato oyo babongoli motema, akokamba bango na bonsomi oyo kaka Bokonzi ya Nzambe nde esengeli kopesa—kosikolama na boombo ya lisumu mpe liwa. (Yoane 1:29; 8:32) Maloba ya Yisaya ekokisamaki na lolenge ya monene koleka ntango batikali ya Yisalaele ya elimo basikolamaki na Babilone Monene na 1919 mpe bazongisamaki na losambo na bango ya solo.
8 Kasi, tokoloba nini mpo na baoyo balingaki kozwa matomba ya kokokisama ya liboso ya elaka yango—Bayuda oyo bazalaki baombo na Babilone? Bakoki mpenza kotyela elaka ya Yehova motema ete akozongisa bango na mokili na bango oyo balingi yango mingi? Ɛɛ, bakoki mpenza kotyela yango motema! Yisaya asaleli maloba kitoko mpe bililingi oyo azwi na makambo oyo bato basalaka mokolo na mokolo, apesi sikawa bantina ya kozala na elikya ete Yehova akokokisa liloba na ye.
Nzambe oyo liloba na ye eumelaka seko
9, 10. Ndenge nini Yisaya amonisi bokeseni oyo ezali kati na ntango mokuse ya bomoi ya moto mpe likambo oyo ete “liloba” ya Nzambe ekoumela seko?
9 Libosoliboso, liloba ya Ye oyo alaki kozongisama yango ekoumela seko. Yisaya akomi ete: “Yoká! Moto moko alobi ete: ‘Gangá!’ Mpe balobi ete: ‘Nakoganga nini?’ Nzoto nyonso ezali matiti ya mobesu, mpe motema boboto nyonso na bango ezali lokola fololo na elanga. Matiti ya mobesu ekaoki, fololo elɛmbi, mpo ete elimo ya Yehova epemi likoló na yango. Na ntembe te bato bazali matiti ya mobesu. Matiti ya mobesu ekaoki, fololo elɛmbi, nde liloba ya Nzambe na biso, ekoumela libela.”—Yisaya 40:6-8, NW.
10 Bayisalaele bayebi malamumalamu ete lititi eumelaka seko te. Na eleko ya elanga, na molunge makasi ya moi, lititi ezalaka lisusu na langi ya mai ya pondu te, ekómaka lokola kaki. Na makambo mosusu, bomoi ya moto ezali lokola lititi—mokuse mpenza. (Nzembo 103:15, 16; Yakobo 1:10, 11) Yisaya amonisi bokeseni oyo ezali kati na bomoi mokuse ya moto mpe “liloba” ya Nzambe to mokano oyo azwi, oyo eumelaka seko. Ɛɛ “liloba ya Nzambe na biso” eumelaka seko. Soki Nzambe alobi, eloko moko te ekoki kolongola maloba na ye to kopekisa kokokisama na yango.—Yosua 23:14.
11. Mpo na nini tokoki kotyela Yehova motema ete akokokisa bilaka oyo ezali na kati ya Liloba na ye ekomami?
11 Lelo oyo mokano ya Yehova ekomami polele na kati ya Biblia. Biblia ekutani na mikakatano makasi na boumeli ya bikeke mingi, mpe babongoli ya molende mpe bato mosusu batyaki bomoi na bango na likama mpo na kobatela yango. Kasi, soki Biblia ebatelami bongo, ezali kaka te mpo na milende na bango. Lokumu nyonso esengeli kokenda epai ya Yehova, “Nzambe ya bomoi mpe oyo akoumela seko” mpe Mobateli ya Liloba na ye. (1 Petelo 1:23-25, NW) Kanisá naino likambo oyo: Lokola Yehova abateli Liloba na ye oyo ekomami, tokoki kotyela ye motema ete akokokisa bilaka oyo ezali kati na yango, boye te?
Nzambe moko makasi oyo abatelaka bampate na Ye na boboto
12, 13. (a) Mpo na nini bakoki kotyela elaka ya kozongisama motema? (b) Nsango malamu nini etali Bayuda oyo bazali na boombo, mpe mpo na nini bakoki kozala na elikya?
12 Yisaya apesi ntina ya mibale ya kotyela elaka ya kozongisama ya mokili na bango motema. Ye oyo apesi elaka yango ezali Nzambe oyo abatelaka basaleli na ye na boboto. Yisaya alobi lisusu ete: “Butá likoló na ngomba molai, yo [mwasi, NW] oyo ozali kolobela Siona nsango malamu; tombolá mongongo na yo likoló na nguya, yo oyo ozali kolobela Yelusaleme nsango malamu. Tombolá yango likoló, bangá te! Lobá na mboka na Yuda ete, Talá Nzambe na bino! Talá Nkolo [Mokonzi Yehova akoya lokola moto ya makasi (“na bokasi,” maloba na nse ya lokasa) mpe lobɔkɔ na ye ekoyangela mpo na ye. Talá! Mbano na ye ezali elongo na ye, mpe lifuti oyo akopesa ezali liboso na ye, NW]. Akoleisa etonga na ye lokola mobateli ya mpate, akoyanganisa bana ya mpate na mabɔkɔ na ye; akokumba bango na ntolo na ye, akokamba malɛmbɛmalɛmbɛ baoyo bazali [komɛlisa mabɛlɛ, NW].”—Yisaya 40:9-11.
13 Na ntango ya kala, basi bazalaki na momeseno ya kosepela ntango ekólo na bango elongi etumba, koganga to koyemba nsango malamu ya bitumba oyo balongi to koyemba mpo kobɔndisama ekómi pene. (1 Samwele 18:6, 7; Nzembo 68:11) Yisaya amonisi na esakweli ete nsango moko ya malamu ezali mpo na Bayuda oyo bazali na boombo, nsango oyo moto akoki koganga kozanga kobanga, ata longwa na nsɔngɛ ya ngomba—Yehova akozongisa basaleli na ye na Yelusaleme, engumba oyo balingi yango mingi! Bakoki kozala na elikya, mpamba te Yehova akoya “na bokasi.” Na yango, eloko moko te ekoki kopekisa ye kokokisa mokano na ye.
14. (a) Elakiseli nini Yisaya asaleli mpo na komonisa ete Yehova akotambwisa basaleli na ye na boboto? (b) Ndakisa nini emonisi ndenge babateli na mpate batalelaka bampate na bango na boboto mpenza? (Talá etanda na lokasa 405.)
14 Kasi, Nzambe yango ya makasi azali mpe na boboto. Na nsai mpenza, Yisaya alobi ndenge Yehova akozongisa basaleli na ye na mokili na bango. Yehova azali lokola mobateli na mpate oyo alingaka bampate na ye, asangisaka bango elongo mpe amemaka bango na “ntolo” na ye. Liloba “ntolo” awa ezali komonisa mabenga ya likoló ya elamba. Ezali esika oyo babateli na mpate mbala mosusu bamemaka bana ya mpate oyo bakokaka kotambola elongo moko na etonga te. (2 Samwele 12:3) Elilingi yango ya kosimba motema euti na makambo oyo babateli na mpate basalaka mpe endimisi mpenza basaleli ya Yehova oyo bazali kati na boombo ete azali komibanzabanza na bolingo nyonso mpo na bango. Ya solo mpenza, bakoki kotya motema ete Nzambe ya makasi ndenge wana, mpe ya boboto, akokokisa oyo alaki bango!
15. (a) Ntango nini Yehova ayei “na bokasi,” mpe nani azali ‘lobɔkɔ oyo ezali koyangela mpo na ye’? (b) Nsango malamu nini esengeli kosakola yango kozanga kobanga?
15 Maloba ya Yisaya ezali na ndimbola ya esakweli na mikolo na biso. Na 1914, Yehova ayaki “na bokasi” mpe atyaki Bokonzi na ye na likoló. ‘Lobɔkɔ oyo ezali koyangela mpo na ye’ ezali Mwana na ye, Yesu Klisto, oyo ye atii na ebonga na ye ya bokonzi na likoló. Na 1919, Yehova asikolaki basaleli na ye bapakolami awa na mabele na boombo ya Babilone Monene mpe abandaki kozongisa losambo ya pɛto ya Nzambe ya bomoi mpe ya solo na mobimba na yango mpenza. Yango ezali nsango malamu oyo esengeli kosakolama kozanga kobanga, lokola nde koganga na nsɔngɛ ya ngomba mpo ete maloba eyokana mosika mpe bipai nyonso. Yango wana, tiká ete tótombola mingongo na biso mpe tóyebisa bato mosusu ete Yehova Nzambe asili kotya losambo na ye ya pɛto awa na mabele!
16. Na lolenge nini Yehova atambwisaka basaleli na ye lelo oyo, mpe ndakisa nini apesi?
16 Maloba oyo ezali na Yisaya 40:10, 11 ezali mpe makambo oyo biso tokoki kosalela yango lelo oyo. Ezali mpenza likambo ya kobɔndisa na komona ndenge Yehova azali kotambwisa basaleli na ye na boboto nyonso. Kaka ndenge mobateli na mpate ayebaka bamposa ya mpate mokomoko—bakisa mpe bana ya mpate oyo bakoki te kotambola elongo na etonga—Yehova ayebaka esika makoki ya basaleli na ye ya sembo mokomoko esukaka. Lisusu, lokola Yehova azali Mobateli na mpate oyo atondi na boboto, apesi ndakisa mpo na baklisto babateli na mpate. Bankulutu basengeli kotalela etonga na boboto, basengeli komekola bolingo mpe komibanzabanza oyo Yehova ye moko amonisaka. Basengeli ntango nyonso komikundola lolenge Yehova ayokaka mpo na mpate mokomoko ya etonga, “oyo asombaki na makila ya [Mwana, NW] na ye mpenza.”—Misala 20:28.
Mozwi-na-Nguya-Nyonso, aleki na bwanya
17, 18. (a) Mpo na nini Bayuda oyo bazali baombo bakoki kotyela elaka ya kozongisama ya mokili na bango motema? (b) Mituna nini ya ntina Yisaya abimisi?
17 Bayuda oyo bazali baombo bakoki kotyela elaka ya Yehova ya kozongisama motema mpamba te Nzambe azali Mozwi-na-Nguya-Nyonso mpe aleki na bwanya. Yisaya alobi ete: “Nani ameki mai na kati ya mabɔkɔ na ye, ameki mpe bonene ya makoló na misapi na ye, atii mputulu nyonso ya mokili kati na emekeli, ameki bozito na ngomba na emekeli ya makonga, mpe yango na ngomba mike na emekeli? Nani ameki bonene ya elimo ya Yehova, mpe nani azali moto na ye na toli mpo na koyebisa ye eloko moko? Alukaki toli epai na nani mpo ete akanga ntina malamu ya likambo, to nani ateyaki ye nzela ya bosembo, to nani ateyaki ye boyebi, to ayebisaki ye nzela ya mayele ya solosolo?”—Yisaya 40:12-14, NW.
18 Yango ezali mituna oyo ezali kosɛnga Bayuda oyo bazali baombo bákanisa malamumalamu. Bato bakoki nde kopekisa komata mpe kokita ya mai makasi ya mbu? Soki moke te! Kasi, mpo na Yehova, mbu oyo ezipi mabele ezali lokola litanga ya mai na lobɔkɔ na ye.b Mwa bato oyo bazangi ntina bakoki komeka bonene ya likoló oyo etondi na minzoto to komeka kilo ya bangomba mpe bangomba mike ya mabele? Te. Kasi, Yehova amekaka makoló kozanga nkaka ndenge moto akoki komeka eloko moko na misapi—ntaka oyo ezali kobanda na mosapi ya monene tii na mosapi ya moke wana moto asemboli lobɔkɔ. Nzambe azali mpenza na likoki ya komeka bozito ya bangomba mpe bangomba mike likoló ya emekeli moko. Ata bato ya bwanya koleka bakoki kopesa Nzambe toli na oyo asengeli kosala na makambo oyo ezali kosalema sikoyo to koyebisa ye nini asengeli kosala na makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya? Soki moke te!
19, 20. Maloba nini ya elilingi Yisaya asaleli mpo na kolobela bonene ya Yehova?
19 Tokoloba nini mpo na mabota ya nguya na mabele—bakoki kopekisa Nzambe kokokisa liloba oyo ye alaki? Yisaya apesi eyano mpe alobi na mabota boye: “Talá mabota bazali lokola litanga moko kati na kantini; batángami lokola mputulu [likoló na emekeli, NW]; talá alɔkɔti bisanga lokola mputulu na popolo. Ata Lebanona ekoki mpo na nkoni te, bibwele na yango ekoki mpo na mbeka moko na kotumba te. Mabota nyonso bazali eloko liboso na ye te, batángami na ye lokola eloko te mpe bobele mpamba.”—Yisaya 40:15-17.
20 Na miso ya Yehova, mabota nyonso bazali lokola litanga ya mai oyo ezali kotanga na kantini. Baleki mwa libondo ya mputulu oyo ezali likoló na emekeli na kilo te, oyo ekoki kosala eloko moko te.c Kanisá ete moto moko atongaki etumbelo moko monene mpe asaleli banzete oyo ezalaki na bangomba ya Lebanona lokola nkoni ya kopelisa mɔ́tɔ. Mpe kanisá ete asengelaki kopesa mbeka ya banyama nyonso oyo ezalaki kofanda na bangomba yango. Ata mbeka ya ndenge wana ekozala malamu te na miso ya Yehova. Lokola nde elilingi oyo asalelaki ebongaki te, Yisaya alobi maloba mosusu makasi mpenza—mabota nyonso bazali “eloko . . . te” na miso ya Yehova.—Yisaya 40:17.
21, 22. (a) Ndenge nini Yisaya amonisi ete Yehova akokani na moto mosusu te? (b) Lokola maloba ya Yisaya ezali kosimba motema, yango etindi biso na kosala nini? (c) Makambo nini eyokani mpenza na siansi Yisaya akomi? (Talá etanda na lokasa 412.)
21 Mpo na kolobela lisusu malamumalamu ete Yehova akokani na moto te, Yisaya amonisi bozoba ya bato oyo basalaka bikeko ya wolo, ya palata to ya nzete. Ezali mpenza bozoba kokanisa ete ekeko ya ndenge wana ekoki komonisa “Ye oyo afandaka likoló na sɛrklɛ ya mabele” mpe oyo aleki bafandi na yango!—Tángá Yisaya 40:18-24, NW.
22 Maloba wana nyonso ya kosimba motema ezali kopesa biso likanisi moko—eloko moko te ekoki kopekisa Yehova, Mozwi-na-Nguya-Nyonso, oyo aleki na bwanya, mpe oyo akokani na moto mosusu te, kokokisa elaka na ye. Maloba ya Yisaya ebɔndisaki mpe elendisaki mpenza Bayuda oyo bazalaki baombo na Babilone oyo bazalaki na mposa makasi ya kozonga na mokili na bango! Lelo oyo, biso mpe tokoki kozala na elikya ete bilaka ya Yehova mpo na mikolo ezali koya ekokokisama mpenza.
“Nani asalaki yango?”
23. Mpo na ntina nini Bayuda oyo bazali baombo basengeli kozala na molende, mpe Yehova alobeli nini sikawa mpo na bomoto na ye moko?
23 Bayuda oyo bazali baombo bazali na ntina mosusu ya kozala na molende. Ye oyo alaki ete akosikola bango azali Mozalisi ya biloko nyonso mpe Liziba ya nguya nyonso. Mpo na komonisa motuya ya likoki yango ya kokamwa, Yehova abendi likebi likoló na makoki na ye oyo emonani na kati ya bikelamu oyo asalá: “[Bokokokanisa, NW] ngai na nani ete ngai nazali lokola ye? Oyo [Mosantu, NW] alobi boye. Bótombola miso na bino likoló mpe bómona! Nani asalaki yango? Ye oyo akobimisa ebele na bango na motuya, akobyanga bango nyonso na nkombo; mpo na monene na nguya na ye mpe mpo ete azali na makasi kati na nguya, moko te azali kozanga.”—Yisaya 40:25, 26.
24. Ntango azalaki koloba mpo na ye moko, ndenge nini Yehova amonisi ete akokani na moto mosusu te?
24 Mosantu ya Yisalaele azali koloba mpo na ye moko. Mpo na komonisa ete akokani na moto te, Yehova abendi likebi likoló na minzoto ya likoló. Lokola komanda ya basoda oyo azali na likoki ya koyanganisa mampinga na ye, Yehova azali kopesa minzoto mitindo. Soki alingi kotalatala yango, ‘moko te ekozanga.’ Atako minzoto ezali ebele, abengaka mokomoko na nkombo na yango, ezala ata na nkombo na yango mpenza to na ebengeli mosusu oyo ezali lokola nkombo. Lokola basoda ya botosi, minzoto etɛlɛmi na esika na yango mpe ezali kotosa mitindo oyo apesi yango, mpamba te Mokonzi na yango azali “monene na nguya” mpe “makasi kati na nguya.” Yango wana, Bayuda oyo bazali baombo bazali na ntina ya kozala na elikya. Mozalisi, oyo apesaka minzoto mitindo, azali na nguya ya kosalisa basaleli na ye.
25. Ndenge nini tokoki kotalela likambo oyo Nzambe asɛngi oyo ezali na Yisaya 40:26, mpe yango ekosala biso nini?
25 Nani kati na biso akoki koboya likambo oyo Nzambe asɛngi oyo ezali na Yisaya 40:26 ete: “Bótombola miso na bino mpe bómona”? Makambo oyo baastronome ya mikolo na biso bamoni emonisi ete makoló oyo etondi na minzoto ezali kokamwisa mingi koleka ndenge ezalaki na ntango ya Yisaya. Baastronome oyo batalakatalaka makoló na bamasini na bango ya makasi oyo batalaka na yango minzoto, balobaka ete molɔ́ngɔ́ oyo emonanaka ezali na bagalaksi koleka miliare 125. Kutu, moko na yango—oyo babengaka Voie lactée—yango moko ezali na minzoto koleka miliare 100! Boyebi ya makambo ya ndenge wana esengeli kotinda biso tóbanga mpe tótosa Mozalisi mpe tótya motema mobimba na elaka na ye.
26, 27. Ndenge nini balobeli mayoki ya baombo oyo bazali na Babilone, mpe makambo nini basengeli koyeba?
26 Lokola ayebi ete bambula ya boombo ekotungisa Bayuda oyo bazali baombo, Yehova asali ete Yisaya apemama mpo na kokoma liboso maloba oyo ya kobɔndisa: “Ɛ Yakobo, mpo na nini ozali koloba, ɛ Yisalaele, maloba na yo mpo na nini ete, Nzela na ngai ebombameli [Yehova mpe bosembo mpo na ngai emonani epai, NW] na Nzambe na ngai te? Oyebi te? Oyoki te ete [Yehova] azali Nzambe libela [Mozalisi ya nsuka ya mabele, NW]? Ye akosenzwa te, ye akolɛmba te, bososoli na ye eyebani nsuka te.”—Yisaya 40:27, 28.d
27 Yisaya akomi maloba ya Yehova oyo ezali komonisa mpasi ya motema oyo baombo bazali komona na Babilone, na ntaka ya bankama ya bakilomɛtrɛ na mokili na bango. Bato mosusu bakanisi ete Nzambe na bango ayebi “nzela” na bango te—minyoko ya bomoi na bango. Bakanisi ete Yehova azali komona mpasi na bango te. Akundoleli bango makambo oyo basengeli koyeba, soki oyo bango moko bakutanaki na yango te, mbala mosusu oyo bayebisaki bango. Yehova azali na likoki mpe alingi kosikola basaleli na ye. Azali Nzambe ya seko mpe Mozalisi ya mabele mobimba. Yango wana, azali ntango nyonso na nguya oyo asalelaki na ntango ya bozalisi, mpe kutu Babilone oyo ezali nguya ya mokili mobimba, ezali na likoki ya kokima ye te. Nzambe ya ndenge wana akoki kolɛmba te mpe akoki kosundola basaleli na ye te. Basengeli kokanisa te ete básosola misala ya Yehova na mobimba, mpamba te mayele na ye—to bososoli na ye—eleki makanisi na bango mosika mpenza.
28, 29. (a) Ndenge nini Yehova akundoleli basaleli na ye ete akosalisa baoyo balɛmbi? (b) Elilingi nini esalelami mpo na komonisa ndenge Yehova apesaka basaleli na ye nguya?
28 Na nzela ya Yisaya, Yehova akobi kolendisa baombo oyo batungisami ete: “Akopesa nguya epai na ye oyo alɛmbi; epai na ye oyo azangi makasi, akobakisa nguya. Ata bilenge bakosenzwa, bakolɛmba, mpe bato na [mbula, NW] mingi te bakokweakwea na nse; nde baoyo [bakotyaka elikya epai ya Yehova, NW], bakozwa nguya ya sika, bakopombwa likoló na mapapu lokola mpongo, bakopota mbango nde bakolɛmba te, bakotambola nde bakosenzwa te.”—Yisaya 40:29-31.
29 Ntango azali kolobela mposa ya kopesa moto oyo alɛmbi nguya, mbala mosusu Yehova azali kokanisa mobembo molai oyo baombo basengeli kosala mpo na kozonga epai na bango. Yehova akundoleli basaleli na ye ete azali na momeseno ya kosalisa baoyo balɛmbi soki baluki lisalisi na ye. Ata bato ya makasi koleka—“bilenge”—bakoki mpe kosenzwa mpo na kolɛmba. Kasi, Yehova alaki kopesa baoyo bazali kotyela ye elikya—nguya oyo esilaka te—ya kopota mpe kotambola. Kopumbwa ya mpongo, oyo emonanaka lokola ezalaka mpasi te, ndɛkɛ wana ya makasi oyo ekoki kotika kobɛta mapapu na boumeli ya bangonga mingi, emonisaka ndenge Yehova apesaka basaleli na ye nguya.e Bayuda oyo bazali baombo bazali na elikya ya kozwa lisalisi ya ndenge wana epai ya Nzambe, bazali na ntina te ya kolɛmba nzoto.
30. Ndenge nini baklisto ya solo bakoki lelo oyo kozwa libɔndisi na bavɛrsɛ ya nsuka ya Yisaya mokapo 40?
30 Bavɛrsɛ yango ya nsuka ya Yisaya mokapo 40, ezali na maloba ya kobɔndisa mpo na baklisto ya solo na mikolo oyo ya nsuka ya ebongiseli mabe ya ntango oyo. Lokola bampasi mpe mikakatano mingi elɛmbisaka, ezali mpenza likambo ya kobɔndisa koyeba ete komekama oyo tozali koyikela mpiko mpe minyoko oyo tozali komona ezali koleka mpamba te na miso ya Nzambe na biso. Tokoki kozala na elikya ete Mozalisi ya biloko nyonso, Ye oyo “mayele na ye ekoki kotángama te,” akolongola minyoko yango na ntango mpe na lolenge oyo ye moko amoni malamu. (Nzembo 147:5, 6) Kino ntango wana ekóma, tosengeli koyika mpiko na makasi na biso moko te. Yehova, oyo azali liziba ya nguya oyo ekoki kosila te, akoki kopesa basaleli na ye oyo balɛmbi, nguya—kutu “nguya oyo eleki makasi” na ntango oyo bazali konyokwama.—2 Bakolinti 4:7, NW.
31. Elaka nini ya pole ezali na esakweli ya Yisaya mpo na Bayuda oyo bazali baombo na Babilone, mpe na nini tokoki kotyela yango motema na biso mobimba?
31 Kanisá Bayuda oyo bazali baombo ndenge bazalaki na Babilone na ekeke ya motoba L.T.B. Na ntaka ya bankama ya bakilomɛtrɛ, Yelusaleme, mboka na bango oyo balingi mingi, etikali mpamba, tempelo na yango ebukani. Mpo na bango, esakweli ya Yisaya ezalaki na elaka moko ya kobɔndisa ya pole mpe ya elikya—Yehova akozongisa bango na mokili na bango! Na mobu 537 L.T.B., Yehova azongisi basaleli na ye na mokili na bango, amonisi ete azali Mokokisi ya bilaka. Biso mpe tokoki kotyela Yehova motema na biso mobimba. Bilaka na ye oyo etali bokonzi, oyo elobelami na maloba kitoko mpenza na esakweli ya Yisaya, ekokokisama. Yango ezali mpenza nsango malamu—nsango ya pole mpo na bato nyonso!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Yisaya asakoli kobongisama ya nzela liboso ya Yehova. (Yisaya 40:3) Kasi, Baevanzile esaleli esakweli yango mpo na mosala ya kosakola oyo Yoane asalaki mpo na kobongisa nzela mpo na Yesu Klisto. Bakomi bapemami ya Makomami ya Grɛki ya boklisto basalaki yango bongo mpamba te Yesu azalaki komonisa Tata na ye mpe ayaki na nkombo ya Tata na ye.—Yoane 5:43; 8:29.
b Bato ya mayele bamoni ete “mbu nyonso ezali na batɔni ya mai soki trilio 1,35 (1,35 x 1018), to soki 1/4400 ya kilo nyonso ya mabele.”—Encarta 97 Encyclopedia.
c Buku moko (The Expositor’s Bible Commentary) elobi boye: “Na bazando ya Proche-Orient, ntango bazalaki kotya misuni ya nyama to mbuma na emekeli mpo na koyeba kilo na yango, bazalaki te kotalela mwa litanga ya mai na kati ya kantini ya komeka to mwa mputulu likoló ya emekeli.”
d Na Yisaya 40:28, elobeli “libela” elimboli “seko,” mpamba te Yehova azali “Mokonzi ya seko.”—1 Timote 1:17.
e Mpongo, ata soki ezali lisusu na makasi mingi te, etikaka kobɛta mapapu na boumeli ya ntango molai. Ekokaka kosala bongo mpamba te esalelaka mopɛpɛ ya molunge oyo emataka na likoló to courants thermiques.
[Etanda/Elilingi na lokasa 404, 405]
Yehova, mobateli na mpate oyo alingaka bampate na ye
Yisaya akokanisi Yehova na mobateli na mpate oyo alingaka bampate na ye mpe amemaka bana ya mpate na ye na ntolo na ye. (Yisaya 40:10, 11) Na ntembe te, Yisaya azwi elilingi yango na mimeseno ya babateli na mpate. Moto moko na eleko na biso atalaki babateli na mpate na mabwaku ya Ngomba Helemone na Proche-Orient mpe alobi ete: “Mobateli na mpate mokomoko azalaki kosɛnzɛla na likebi mpenza etonga na ye mpo na komona ndenge bazali. Ntango akuti mwana ya mpate moko oyo abotami sika, akotya ye na . . . kati ya kazaka na ye ya monene, mpamba te azali na makasi te ya kolanda mama na ye. Ntango libenga na ye etondi, akotya bana ya mpate na mapeka na ye, mpe kosimba bango na makolo, to na kati ya saki moko to na ekɔlɔ moko na mokɔngɔ ya mpunda, kino bana yango bakozala na likoki ya kolanda bamama na bango.” Koyeba ete tozali kosalela Nzambe oyo azali na boboto ndenge wana mpo na basaleli na ye ezali mpenza kobɔndisa, boye te?
[Etanda/Elilingi na lokasa 412]
Mabele ezali lolenge nini?
Na ntango ya kala, bato bazalaki kokanisa ete mabele ezali patatalu. Kasi, na ebandeli ya ekeke ya motoba L.T.B., Pythagore, filozofe moko moto ya Grèce, abimisaki likanisi ete mabele esengeli kozala libungutulu. Atako bongo, bikeke mibale liboso ete Pythagore abimisa likanisi na ye, mosakoli Yisaya alobaki polele ete: “Ezali na Ye oyo afandaka likoló ya sɛrklɛ ya mabele.” (Yisaya 40:22, NW) Liloba ya Liebele chugh, oyo ebongolami awa na “sɛrklɛ” ekoki mpe kobongolama na “libungutulu.” Likambo ya kobenda likebi ezali ete kaka eloko oyo ezali libungutulu nde emonanaka sɛrklɛ ezala ata na epai nini oyo bazali kotala yango.f Yango wana, liboso mpenza mosika, mosakoli Yisaya akomaki likambo oyo eyokani mpenza na siansi mpe oyo ezalaki lokola masapo ya ntango wana te.
[Maloba na nse ya lokasa]
f Na elobeli ya siansi, mabele ezali libungutulu mpe libungutulu yango ezali mwa moke patatalu na bansukansuka na yango.
[Elilingi na lokasa 403]
Yoane Mobatisi azalaki mongongo oyo ezalaki “koganga na lisobe”