Mokapo ya Nsambo
Mawa na elanga ya vinyo oyo ezali sembo te!
1, 2. “Molingami” aloni nini, mpe mpo na nini ayoki mawa?
MOTO moko oyo alimbolaka Biblia alobaki boye mpo na bavɛrsɛ ya ebandeli ya mokanda ya Yisaya mokapo 5: “Mpo na elobeli na yango ya kitoko mpe mpo na mayele ya koyeba koloba likambo, lisese yango ekokani na mosusu te.” Maloba yango ya Yisaya esuki te kaka kozala maloba ya kitoko, ezali mpe komonisa malamumalamu bolingo oyo Yehova azali na yango mpo na basaleli na ye. Ezali mpe kokebisa biso na makambo oyo esepelisaka ye te.
2 Lisese ya Yisaya ebandi boye: “Tiká nayemba mpo na molingami na ngai, loyembo mpo na ye oyo nalingaka—mpo na elanga na ye ya vinyo. Molingami na ngai azalaki na elanga na ye ya vinyo likoló na ngomba ya mabele malamu. Atimolaki yango mpe alongolaki mabanga, mpe akonaki bitape ya vinyo ya malamu mpe ya motane, mpe atongaki ndako molai na kati na yango mpe atimoli esika ya kokamola vinyo. Akanisaki ete ekobota vinyo kasi nsukansuka ebotaki vinyo ya ngayi.”—Yisaya 5:1, 2, NW; kokanisá na Malako 12:1.
Ndenge elanga ya vinyo ebatelamaki
3, 4. Misala nini esalemaki na molende mpe na bolingo mpo na elanga ya vinyo?
3 Ata soki Yisaya ayembelaki bayoki na ye lisese yango koyembela to te, kasi yango ebendi mpenza likebi na bango. Bato mingi kati na bango bayebi mosala makasi ya kolona elanga ya vinyo, mpe maloba ya Yisaya eyokani polele mpe emonani mpenza likambo ya solo epai na bango. Ndenge moko lelo, moto oyo asalaka bilanga ya vinyo alonaka mposo ya mbuma ya vinyo te, kasi alonaka nde “mbuma ya vinyo ya malamu mpe ya motane,”—elingi koloba etape to mwa nzete moke oyo euti na vinyo mosusu. Na ndenge ebongi mpenza, aloni elanga ya vinyo yango “likoló na ngomba ya mabele malamu,” esika oyo ebongi ete vinyo ekola malamu.
4 Esɛngaka kosala mosala makasi mpo elanga ya vinyo ebota malamu. Yisaya alobi ete nkolo elanga azali ‘kotimola mpe kolongola mabanga’—yango ezali mpenza mosala ya mpasi mpe oyo elɛmbisaka mingi! Asaleli mabanga ya minene mpo na ‘kotonga ndako molai.’ Na ntango ya kala, basinzili bazalaki kotɛlɛma likoló ya ndako milai ya ndenge wana mpo na kobatela bilanga mpo na miyibi mpe nyama.a Lisusu, atongi efelo ya mabanga mpo na kokabola mikala ya elanga ya vinyo na ndenge moko ya malamu. (Yisaya 5:5) Bato bazalaki na momeseno ya kosala bongo mpo na kopekisa ete mai ya mbula emema mabele.
5. Nkolo elanga ya vinyo azali kozela ete abuka mbuma ya ndenge nini na elanga na ye, kasi azwi nini?
5 Nsima ya kosala mosala makasi mpo na kobatela elanga na ye, nkolo elanga akolinga ete elanga na ye ebota mbuma malamu. Yango wana, atimoli esika ya kokamola vinyo. Kasi elikya na ye ekokisami? Te, elanga yango ebimisi mbuma ya ngayi.
Elanga ya vinyo mpe nkolo na yango
6, 7. (a) Nkolo elanga ya vinyo ezali nani, mpe elanga ya vinyo ezali nini? (b) Nkolo yango asɛngi bákata likambo ndenge nini?
6 Nkolo elanga ezali nani, mpe elanga ya vinyo ezali nini? Nkolo elanga ya vinyo apesi eyano na mituna yango ntango alobi ete: “Sikoyo, ɛ bato ya Yelusaleme mpe mibali na Yuda, nasɛngi bino bókata likambo kati na ngai mpe elanga na ngai ya vinyo. Esengeli nasala lisusu nini mpo na elanga na ngai ya vinyo, oyo ngai nasali te? Mpo na nini nazalaki kokanisa ete ekobota vinyo kasi eboti vinyo ya ngayi? Sikoyo nakoki koyebisa bino oyo nalingi kosala na elanga na ngai ya vinyo. Bakolongola lopango na yango mpe bakotumba yango, bakobuka efelo na yango ya mabanga mpe ekokóma esika ya konyata na makolo.”—Yisaya 5:3-5, NW.
7 Ɛɛ, Yehova nde azali nkolo elanga yango ya vinyo, mpe asali lokola nde afundi likambo yango na tribinale ete bákata kati na ye na elanga na ye ya vinyo oyo eyokisi ye mawa. Kasi, elanga yango ya vinyo ezali nini? Nkolo na yango alobi ete: “Elanga na [vinyo ya Yehova] na bibele ezali ndako na Yisalaele; mpe bato na Yuda bazali nkona na esengo na ye.”—Yisaya 5:7a.
8. Lokola Yisaya abengi Yehova “molingami na ngai,” yango emonisi nini?
8 Yisaya abengi Yehova, nkolo elanga ya vinyo ete “molingami na ngai.” (Yisaya 5:1) Soki Yisaya alobeli Nzambe na maloba ya bolingo ndenge wana ezali mpo ete azali na boyokani malamu na Ye. (Kokanisá na Yobo 29:4; Nzembo 25:14.) Atako bongo, bolingo ya mosakoli mpo na Nzambe ekokani soki moke te na bolingo makasi oyo Nzambe amonisi mpo na “elanga ya vinyo” na ye—libota oyo ‘alonaki.’—Kokanisá na Exode 15:17; Nzembo 80:8, 9.
9. Mpo na nini tokoki koloba ete Yehova atalelaki libota na ye lokola elanga ya vinyo ya motuya?
9 Yehova ‘alonaki’ libota na ye na mokili ya Kanana, apesaki bango mibeko mpe mitinda, yango ezalaki lokola efelo oyo ezalaki kobatela bango mpo bábebisama na mabota mosusu te. (Exode 19:5, 6; Nzembo 147:19, 20; Baefese 2:14) Lisusu, Yehova apesaki bango basambisi, banganga, mpe basakoli mpo na koteya bango. (2 Mikonzi 17:13; Malaki 2:7; Misala 13:20) Ntango nyonso oyo mampinga ya basoda ya banguna bazalaki kotumola Yisalaele na bitumba, Yehova azalaki kobimisa bato mpo na kobatela bango. (Baebele 11:32, 33) Yango wana, Yehova atuni ete: ‘Ekokaki kosala likambo mosusu nini mpo na elanga na ngai na vinyo, oyo ngai nasali te?’
Elanga ya vinyo ya Yehova lelo oyo
10. Lisese nini oyo elobeli elanga ya vinyo Yesu apesaki?
10 Mbala mosusu Yesu azalaki kokanisa maloba ya Yisaya ntango apesaki lisese ya basali ya bilanga oyo bazalaki babomi, alobaki ete: “Mokóló na ndako akonaki elanga ya [vinyo, NW] mpe azingeli yango na lopango mpe atimoli [esika ya kokamola vinyo, NW] kati na yango mpe atongi ndako molai mpe atiki yango epai na basali mpe akei na mokili mosusu.” Likambo ya mawa, basali ya bilanga bayokisi nkolo elanga ya vinyo mawa mpe kutu babomi mwana na ye ya mobali. Na nsima Yesu amonisaki ete lisese yango etalelaki kaka libota ya Yisalaele te ntango alobaki ete: “Bokonzi na Nzambe ekolongwa na bino [Yisalaele ya mosuni] mpe ekopesama na libota likobota mbuma na yango.”—Matai 21:33-41, 43.
11. Wapi elanga ya vinyo ya elimo oyo ezalaki na ekeke ya liboso, kasi nini ebimaki nsima ya liwa ya bantoma?
11 Emonanaki ete “libota” yango ya sika ezalaki “Yisalaele ya Nzambe”—libota ya elimo ya baklisto bapakolami oyo motángo na bango ezali 144 000. (Bagalatia 6:16; 1 Petelo 2:9, 10; Emoniseli 7:3, 4) Yesu akokanisaki bayekoli na ye na “bitape” ya “vinyo ya solo,” elingi koloba ye moko. Bazelaka ete bitape yango bibota mbuma. (Yoane 15:1-5) Basengeli komonisa bizaleli lokola ya Klisto mpe kosala mosala ya kosakola “nsango malamu ya Bokonzi.” (Matai 24:14; Bagalatia 5:22, 23) Kasi banda liwa ya bantoma zomi na mibale, mingi kati na baoyo balobaka ete bazali bitape ya “vinyo ya solo” bamonisi ete bazali bitape ya solo te—baboti vinyo ya ngayi na esika ya kobota mbuma ya malamu.—Matai 13:24-30, 38, 39.
12. Na nini maloba ya Yisaya ezali kokweisa mangomba ya boklisto, mpe baklisto ya solo bazwi liteya nini?
12 Yango wana, kokweisama ya Yuda oyo esakolami na Yisaya etali mpe mangomba ya boklisto lelo oyo. Koyekola masolo na yango ya kala—bitumba, croisades, Inquisitions—nyonso wana ezali komonisa ete mbuma na yango ezali mpenza ya ngayi. Nzokande, elanga ya vinyo ya solo—baklisto bapakolami mpe baninga na bango “ebele monene”—basengeli kotya likebi na maloba ya Yisaya. (Emoniseli 7:9) Soki balingi kosepelisa nkolo elanga ya vinyo, mokomoko mpe bango nyonso, basengeli kobota mbuma oyo ye akondima.
“Vinyo ya ngayi”
13. Lokola elanga ya vinyo ya Yehova eboti mbuma mabe, akosala na yango nini?
13 Lokola asalaki mosala mingi mpo na kobongisa mpe kolona elanga na ye ya vinyo, Yehova azalaki mpenza na ntina ya kozela ete ekóma “elanga ya vinyo kitoko.” (Yisaya 27:2, NW) Nzokande, na esika ete ebota mbuma ya kolya, eboti “vinyo ya ngayi,” elingi koloba “biloko ya nsolo mabe” to “mbuma oyo epɔlá.” (Yisaya 5:2, NW; maloba na nse ya lokasa; Yilimia 2:21) Yango wana, Yehova alobi ete akolongola “lopango” na ye oyo ezali kobatela libota yango. Libota yango ekotikama “lokola eloko ebebisami” oyo ekotikama bongo mpe ekokauka. (Tángá Yisaya 5:6, NW.) Mose akebisaki ete bakozwa mabe ya ndenge wana soki baboi kotosa Mibeko ya Nzambe.—Deteronome 11:17; 28:63, 64; 29:22, 23.
14. Mbuma nini Yehova azalaki kozela epai ya libota na ye, kasi yango eboti nini na esika na yango?
14 Nzambe alingi ete libota yango ebota mbuma ya malamu. Mika, oyo azalaki na bomoi na ntango ya Yisaya alobi ete: “[Yehova] alingi nini epai na yo? Bobele ete osala na boyengebene mpe ete olinga boboto mpe ete otambola na bopɔlɔ esika moko na Nzambe na yo.” (Mika 6:8; Zekalia 7:9) Nzokande, libota yango balandi toli ya Yehova te. “[Nzambe] akanisaki ete ekozala kosambisa kasi, talá! ezali nde kobuka mibeko; ete bosembo, kasi, talá! kolela.” (Yisaya 5:7b, NW) Mose asakolaki ete libota yango oyo ezali sembo te ekobota mbuma ya bololo oyo euti na “nzete ya vinyo ya Sodomo.” (Deteronome 32:32) Yango wana, emonani mpenza ete bazali kobuka Mibeko ya Nzambe na ndenge bamipesi na misala ya mbindo lokola pite, kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi. (Levitike 18:22) Liloba “kobuka mibeko” ekoki mpe kobongolama na “kosopa makila.” Na ntembe te ezalela ya matata ndenge wana ebimisaki “kolela” epai ya banyokwami —kolela oyo ekómaki na matoi ya Moloni ya elanga ya vinyo.—Kokanisá na Yobo 34:28.
15, 16. Ndenge nini baklisto bakoki koboya kobota mbuma lokola oyo Yisalaele ebotaki?
15 Yehova Nzambe “alingi boyengebene mpe sembo.” (Nzembo 33:5) Apesaki Bayuda etinda oyo: “Bokokata makambo na [kozanga bosembo, NW] te. Okoyokela oyo moke mawa te mpe [okosepela na, NW] moto na lokumu te, kasi okokata likambo na moninga na yo na sembo.” (Levitike 19:15) Yango wana, tosengeli koboya ezaleli ya koponapona kati na boyokani na biso na bato mosusu, tosengeli soki moke te kotika makambo lokola mposo, mbula, bozwi, to bobola emonisa lolenge oyo totalelaka bato mosusu. (Yakobo 2:1-4) Ezali mpenza na ntina ete baoyo bazali na mokumba ya mokɛngɛli ‘básalaka likambo moko mpo na koponapona bato te,’ soki likambo ezali, basengeli ntango nyonso koyokamelaka bato nyonso mibale oyo bazali na likambo liboso ya kokata yango.—1 Timote 5:21; Masese 18:13.
16 Lisusu, lokola tozali na mokili oyo etosaka mibeko te, ezali mpasi te ete baklisto bálona elimo ya botomboki to bábwaka mitinda ya Nzambe. Kasi baklisto ya solo basengeli “kotosa noki” mibeko ya Nzambe. (Yakobo 3:17) Lokola pite mpe mobulu epalangani mingi na “ebongiseli ya makambo mabe ya ntango oyo,” basengeli ‘kokeba na etamboli na bango, bázalaka bazoba te kasi bato ya mayele mpenza.’ (Bagalatia 1:4; Baefese 5:15) Balingaka te kozala na lipanda na makambo ya kosangisa nzoto, mpe soki matata ebimi, basalaka makasi mpo na kosilisa yango kozanga “nkanda mpe kongala mpe [kofinga].” (Baefese 4:31) Ntango bazali kolona ezaleli ya bosembo, baklisto ya solo bapesaka Nzambe lokumu mpe andimaka bango.
Lokoso eyeisaka mpasi
17. Etamboli nini ya mabe Yisaya akweisi na bolɔzi ya liboso oyo alobeli?
17 Na vɛrsɛ 8, Yisaya atiki kotánga maloba ya Yehova. Akweisi “vinyo ya ngayi” mosusu ya Yuda, mpe ye moko atángi malɔzi motoba ya liboso: “Mawa na bango bakokangisa ndako na ndako mpe na bango bakosangisa elanga na elanga, kino esika ekozala lisusu te mpe ete bokofanda bino moko na katikati ya mboka. Na matoi na ngai Yehova na bibele alapi ndai ete bandako mingi, atako ezali minene mpe kitoko, ekokóma eloko ya nsɔmɔ, moto akofanda wana te. Zambi bitape zomi ya vinyo ekobota bobele bata moko; mpe homele moko ya mbóto ekobota bobele efa moko.”—Yisaya 5:8-10, NW.
18, 19. Ndenge nini bato ya ntango ya Yisaya babuki mibeko ya Yehova oyo etali kozala nkolo eloko, mpe yango ebimiseli bango makambo nini?
18 Mokili mobimba ya Yisalaele ya kala ezalaki mpenza ya Yehova. Libota mokomoko ezalaki na libula na yango oyo eutaki na Nzambe, oyo bazalaki kofutisa to kodefisa kasi kotɛkisa “seko” te. (Levitike 25:23) Mobeko yango ezalaki kopekisa ezaleli ya kosalela libula yango na ndenge ya mabe, lokola kozwa mabele nyonso mpo na yo moko. Ezalaki mpe kobatela mabota ete bázinda na bobola makasi te. Nzokande, bato mosusu ya Yuda bazalaki na lokoso mpe bazalaki kobuka mibeko ya Nzambe oyo etali kozala nkolo ya eloko. Mika akomi ete: “Baluli bilanga mpe babɔtɔli yango; ndako mpe lokola, mpe bakamati yango; babɔtɔli biloko ya moto mpe bato ya ndako na ye, ɛɛ, moto mpe libula na ye.” (Mika 2:2, NW) Kasi Masese 20:21 (NW) ekebisi ete: “Libula ezwamaka liboso na lokoso, kasi nsuka na yango ekopambolama te.”
19 Yehova alaki ete akobɔtɔla bato yango ya lokoso biloko oyo bazwi. Bandako oyo babɔtɔli ekozala “na moto te.” Mabele oyo bazali kolula ekobota kaka mwa ndambo moke ya biloko oyo ekokaki kobota. Ndenge nini mpe ntango nini kolakelama mabe yango ekokokisama, eyebisami te. Mbala mosusu ezali kolobela mwa ndambo ya makambo oyo boombo na Babilone ekobimisa.—Yisaya 27:10.
20. Ndenge nini baklisto ya lelo bakoki koboya ezaleli ya lokoso oyo emonanaki epai ya bato mosusu na Yisalaele?
20 Baklisto ya lelo basengeli koyina lokoso ya lolenge oyo Bayisalaele mosusu ya ntango wana bazalaki na yango. (Masese 27:20) Ntango moto moko akómi kotalela biloko ya mosuni na ntina mingi koleka, ezali mpasi te akwea na banzela mabe ya koluka mbongo. Moto akoki mpenza komikɔtisa na mombongo ya mayele mabe to komityela mikano oyo eleki ndelo, mpo na kokóma na bozwi mingi noki mpenza. “Ye oyo akowela kokóma na bozwi mbangumbangu akozanga kokwea na mbeba te.” (Masese 28:20, NW) Ezali mpenza na ntina mingi ete tósepelaka na oyo tozali na yango!—1 Timote 6:8.
Kominanola na ndenge ya mabe ezali motambo
21. Masumu nini ekweisami na bolɔzi ya mibale oyo Yisaya alobeli?
21 Na nsima, Yisaya alobeli bolɔzi ya mibale: “Mawa epai na baoyo bakolamuka na ntɔngɔntɔngɔ ete bápota mbangu mpo na komela masanga; baoyo bakoumela kati na butu kino vinyo [ekolangwisa] bango. Bazali na ebɛtɛlo ya nsinga mpe na nzɛnzɛ, na ngɔmɔ mpe na piololo mpe na vinyo na bilambo na bango; nde bakotalaka misala na [Yehova] te, bakomona misala na mabɔkɔ na ye te.”—Yisaya 5:11, 12.
22. Bayisalaele bazangi komipekisa na likambo nini, mpe yango ebimisi nini na libota yango?
22 Yehova azali “Nzambe ya esengo” mpe apekisaka basaleli na ye te ete bázala na mwa ntango ebongi ya kominanola. (1 Timote 1:11, NW) Nzokande, baoyo bazali komipesa na koluka bisengo yango bazali kolekisa ndelo! Biblia elobi ete: “Baoyo balangwaka, balangwaka mingimingi na butu.” (1 Batesaloniki 5:7, NW) Kasi bamɛli ya lokoso na esakweli yango babandaka komɛla masanga ntango ntɔngɔ ebandi kotana tii na mpokwa! Basalaka makambo lokola nde Nzambe azali te, lokola nde akotuna bango te ete bázongisa monɔkɔ mpo na makambo bazali kosala. Yisaya asakoli makambo ya mawa oyo ezali kozela bato ya ndenge wana. “Bato na ngai basengeli kokenda na boombo, mpo na kozanga boyebi; mpe lokumu na bango ekozala mibali bakufi na nzala, mpe ebele ya bato na ye bakokauka na mposa ya mai.” (Yisaya 5:13, NW) Lokola baboi komitambwisa na boyokani na boyebi ya solo, bato oyo basalaki kondimana na Nzambe—babola mpe bankumu—bakokenda na Sheole.—Tángá Yisaya 5:14-17.
23, 24. Na makambo nini baklisto basengeli komonisa ezalaleli ya komipekisa mpe ya bokatikati?
23 “Lokoso ya kolya” to “bafɛti ya mineneminene,” ezalaki mpe mokakatano monene epai ya baklisto mosusu ya ekeke ya liboso. (Bagalatia 5:21, Boyokani ya Sika; 2 Petelo 2:13) Yango wana, ezali likambo ya kokamwa te soki lelo oyo baklisto mosusu bazali kozanga mayele na likambo ya kominanola elongo na bato mosusu. Esili komonana ete bato mosusu bakómaki kosala makɛlɛlɛ mpe mobulu mpo balekisaki ndelo ntango bazali komɛla. (Masese 20:1) Kutu bamosusu bakweaki na etamboli ya mbindo mpo na milangwa, mpe bafɛti mosusu oyo eumelaki butu mobimba, yango epesaki mobulu na misala ya boklisto na mokolo oyo elandaki.
24 Nzokande, baklisto oyo bazali na bokatikati, babotaka mbuma oyo eyokani na mokano ya Nzambe mpe bazalaka na komipekisa mpe na bokatikati ntango bazali kopona lolenge ya kominanola. Balandaka toli ya Paulo oyo ezali na Baloma 13:13: “Tótambolaka na ezaleli ekoki na moi; na bilambo ya lokoso te, na kolangwa masanga te.”
Tóyina lisumu mpe tólinga solo
25, 26. Makanisi nini ya mabe oyo Bayisalaele bazalaki na yango oyo Yisaya atɔndɔli na bolɔzi ya misato mpe ya minei?
25 Yoká sikawa bolɔzi ya misato mpe ya minei oyo Yisaya asakoli: “Mawa epai na bango bakobendaka [mabe, NW] na nkamba na lokuta, mpe bakobendaka [lisumu, NW] lokola na nkamba na likalo; baoyo bakolobaka ete, Tiká ete asala mbangu, atambolisa mosala na ye [nokinoki, NW] ete tómona yango! Tiká ete [toli ya Mosantu, NW] ya Yisalaele ebɛlɛma, eya ete tóyeba yango! Mawa epai na bango bakobyangaka mabe ete malamu mpe malamu ete mabe, baoyo bakotyaka molili mpo na pole mpe pole mpo na molili; baoyo bakotyaka bololo mpo na elɛngi mpe elɛngi mpo na bololo.”—Yisaya 5:18-20.
26 Maloba yango ezali mpenza kolobela polelepolele bato oyo basalaka masumu! Bakangami na masumu lokola nyama oyo ebendaka mikumba oyo bakangisi yango na makalo. Basali ya masumu yango babangaka ata te ete mokolo moko ya kosambisa ekoki koya. Na lityo nyonso, bazali koloba ete: “Tiká [Nzambe] asala mbangu.” Na esika ete bátosa Mibeko ya Nzambe, bazali kobongolabongola makambo, bazali koloba ete “malamu ezali mabe mpe mabe ezali malamu.”—Kokanisá na Yilimia 6:15; 2 Petelo 3:3-7.
27. Ndenge nini baklisto lelo bakoki koboya ezaleli lokola oyo ya Bayisalaele?
27 Lelo oyo, baklisto basengeli mpenza koboya ezaleli ya ndenge wana. Na ndakisa, bandimaka te likanisi ya mokili oyo emonisaka ete pite mpe kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi ezali mabe te. (Baefese 4:18, 19) Ya solo, ekómaka mbala mosusu ete moklisto ‘abɛti libaku’ oyo ekoki kotinda ye asala lisumu monene. (Bagalatia 6:1, NW) Bankulutu na lisangá bazali pene mpo na kosalisa moto oyo akwei mpe azali na mposa ya lisalisi. (Yakobo 5:14, 15) Na lisalisi ya mabondeli mpe ya toli ya Biblia, moto yango akoki kozongela lisusu makasi ya elimo. Nzokande, soki asali bongo te, azali na likama ya kokóma “moombo ya masumu.” (Yoane 8:34) Na esika ete bátyola Nzambe mpe bábosana mokolo ya kosambisama, baklisto basalaka makasi ‘bázala na litɔnɔ te’ liboso ya Yehova.—2 Petelo 3:14, NW; Bagalatia 6:7, 8.
28. Masumu nini ekweisami na malɔzi ya nsuka oyo Yisaya alobeli, mpe ndenge nini baklisto lelo bakoki koboya masumu ya ndenge wana?
28 Yisaya azali mpenza na elonga ya kobakisa malɔzi oyo ya nsuka: “Mawa epai na baoyo bazali na [bwanya, NW] na miso na bango mpenza mpe na [mayele, NW] na bilongi na bango moko. Mawa epai na baoyo bazali na makasi mpo na komɛla masanga mpe bato na nguya mpo na kosanganisa vinyo; baoyo bakolongisaka moto mabe mpo na kanyaka mpe bakolongolaka elonga epai na [moto ya sembo, NW].” (Yisaya 5:21-23) Maloba yango etalelaki baoyo bazalaki bazuzi na mboka yango. Lelo oyo, bankulutu kati na masangá bakebaka mpo bámimona te ete “bazali na bwanya na miso na bango mpenza.” Na komikitisa nyonso, bandimaka toli ya baninga na bango bankulutu mpe balandaka malamumalamu malako oyo etali lolenge ya kotambwisa lisangá. (Masese 1:5; 1 Bakolinti 14:33) Bamɛlaka masanga na bokatikati mpe bamɛlaka masanga te liboso ya kosala mikumba na bango na lisangá. (Hosea 4:11) Lisusu, bankulutu balingaka kutu te kopesa bato likanisi ete bazalaka na ezaleli ya koponapona. (Yakobo 2:9) Oyo nde bokeseni monene na bakonzi ya mangomba ya boklisto! Mingi kati na bango bazipaka mabe ya bato na bango oyo basalaka masumu mpo bato yango bazali na lokumu mpe na bozwi mingi, kasi ezaleli ya ndenge wana eyokani soki moke te na makebisi ya ntoma Paulo oyo ezali na Baloma 1:18, 26, 27; 1 Bakolinti 6:9, 10; mpe Baefese 5:3-5.
29. Likambo nini ya mawa ekosukela Yisalaele, elanga ya vinyo ya Yehova?
29 Yisaya asukisi nsango wana ya esakweli mpe asakoli nsuka moko ya mawa mpenza mpo na baoyo “baboyi mibeko ya [Yehova]” mpe baboti mbuma ya sembo te. (Yisaya 5:24, 25; Hosea 9:16; Malaki 4:1) Alobi ete: “[Yehova] akotombola elembo epai na libota [monene oyo ezali, NW] mosika, mpe akobɛtɛla bango [piololo, NW] uta na nsuka na mokili; talá bakoya wana bakopota mbangu mpenza!”—Yisaya 5:26; Deteronome 28:49; Yilimia 5:15.
30. Nani akosangisa “libota monene” mpo na kobundisa basaleli ya Yehova, mpe yango ekosuka ndenge nini?
30 Na ntango ya kala, bato bazalaki na momeseno ya kotonga likonzi moko molai lokola “elembo,” to esika ya bokutani mpo na bato ya mboka to mpo na mampinga ya basoda. (Kokanisá na Yisaya 18:3; Yilimia 51:27.) Sikawa Yehova ye moko akosangisa “libota monene” yango oyo nkombo na yango eyebani te mpo na kokokisa mokano na ye.b “Akobɛtɛla bango piololo,” elingi koloba, akobenda likebi ya libota yango epai ya bato na ye ya mitó makasi mpo na kolakisa ete ebongi ete bálonga bango. Na nsima, mosakoli alobeli matata ya bilombe yango ya nsɔmɔ oyo bazali lokola nkosi mpe “bakosimba bilei,” elingi koloba libota ya Nzambe, “[bakolonga yango, NW]” mpe bakokɔtisa yango na boombo. (Tángá Yisaya 5:27-30a.) Oyo nde mawa monene mpo na mokili ya basaleli ya Yehova! “Soko okotala epai na mokili, talá molili mpe mpasi; pole esili koyeisama molili mpo na [matánga oyo ezali kokwela yango, NW].”—Yisaya 5:30b.
31. Mpo bázwa etumbu te ndenge moko na Yisalaele, elanga ya vinyo ya Yehova, baklisto ya solo basengeli kosala nini?
31 Ya solo, elanga ya vinyo oyo Nzambe alonaki na bolingo nyonso emonani ete ebotaka te—ebongi kaka kobebisa yango. Maloba ya Yisaya epesi mpenza liteya moko ya monene mpo na baoyo nyonso balingi kosalela Yehova lelo oyo! Básala milende mpo na kobota kaka mbuma ya sembo, mpo na lokumu ya Yehova mpe mpo na lobiko na bango!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Banganga-mayele mosusu bakanisaka ete bato bazalaki na momeseno ya kotonga mwa bandako ya mike oyo ezalaki kosɛnga mbongo mingi te, lokola mwa ndako ya matiti, to mwa hema, na esika ya kotonga ndako molai ya mabanga. (Yisaya 1:8) Lokola atongaki ndako molai, yango ezali komonisa ete nkolo elanga asalaki mosala makasi mpo na “elanga” na ye ya “vinyo.”
b Na bisakweli mosusu, Yisaya amonisi Babilone lokola libota oyo ekokisi mokano ya Yehova ya kopesa Yuda etumbu.
[Elilingi na lokasa 83]
Mosali ya masumu akangami na lisumu lokola nyama oyo ebendaka mikumba oyo bakangisi na likalo
[Elilingi na lokasa mobimba 85]