Mokapo ya Mitano
Nzambe ya solo asakoli kosikolama
1, 2. (a) Mituna nini Yehova atuni? (b) Ndenge nini Yehova akomonisa ete kaka ye nde azali Nzambe ya solo?
‘NANI azali Nzambe ya solo?’ Banda kala bato bamitunaka motuna yango. Kutu, ezali mpenza kokamwisa ete Yehova ye moko atuni motuna yango na mokanda ya Yisaya! Asɛngi bato bákanisa mituna oyo: ‘Kaka Yehova nde azali Nzambe ya solo? To ezali na nzambe mosusu oyo akoki kotyana na ye ntembe na likambo yango?’ Nsima ya kobimisa ntembe yango, Yehova apesi masɛngami ya makasimakasi te oyo esengeli kotalelama mpo na koyeba nani azali mpenza Nzambe. Makanisi oyo apesi ememi bato ya mitema sembo na likanisi oyo ekoki koboyama te.
2 Na mikolo ya Yisaya, bato mingi mpenza bazali kosambela bikeko. Mokapo 44 ya esakweli ya Yisaya emonisi polele mpe na bosolo nyonso ete losambo yango ezali mpenza na ntina te! Atako bongo, basaleli mpenza ya Nzambe bakwei na motambo ya losambo ya bikeko. Mpo na yango, ndenge tomonaki na mikapo eleki ya mokanda ya Yisaya, Bayisalaele bakozwa etumbu makasi. Kasi, na bolingo nyonso, Yehova akitisi bato ya ekólo yango motema ete atako akotika bato ya Babilone bámema bango na boombo, akosikola bango na ntango oyo ye moko akotya. Ntango bisakweli oyo etali kosikolama na boombo mpe kozongisama ya losambo ya pɛto ekokokisama, ekomonana polele ete kaka Yehova nde azali Nzambe ya solo mpe baoyo nyonso basambelaka banzambe ya bikólo mosusu oyo bazangi bomoi bakoyoka nsɔni.
3. Ndenge nini bisakweli ya Yisaya esalisaka baklisto lelo oyo?
3 Bisakweli oyo ezali na eteni oyo ya mokanda ya Yisaya mpe kokokisama na yango na ntango ya kala ekómisaka kondima ya baklisto ya lelo makasi. Longola yango, bisakweli oyo Yisaya apesaki ezali kokokisama na mikolo na biso mpe ekokokisama lisusu na mikolo ezali koya. Na ntango yango, mosikoli oyo akokokisa makambo yango akozala monene koleka oyo alakamaki mpo na bato ya ekólo ya Nzambe na ntango ya kala mpe kosikolama na ye ekozala mpe bongo.
Elikya mpo na bato ya Yehova
4. Ndenge nini Yehova alendisi Yisalaele?
4 Mokapo 44 ebandi na maloba ya kolendisa, ekundweli biso ete Nzambe aponaki Yisalaele, akabolaki yango na bikólo oyo ezalaki zingazinga na yango mpo ekóma moombo, to mosaleli, na ye. Esakweli elobi boye: ‘Sikoyo oyoka, ee Yakobo moombo na ngai, mpe Yisalaele, oyo ngai naponi yo. Yehova alobi boye, ye oyo asalaki yo, ye oyo atongaki yo na libumu ya mama, oyo akosungaka yo, ete, Kobanga te, ee Yakobo, moombo na ngai mpe Yesulunu oyo ngai naponi yo.’ (Yisaya 44:1, 2) Tokoki koloba ete Yehova abateli Yisalaele banda na libumu ya mama na ye, abateli yango banda ekómaki ekólo nsima ya kobima na yango na Ezipito. Abengi libota na ye mobimba “Yesulunu,” oyo elimboli “Moto ya sembo”; nkombo yango ya lokumu emonisi bolingo mpe boboto na ye epai na bango. Nkombo yango ezali mpe kokundwela Bayisalaele ete basengeli kozala ntango nyonso sembo, kasi mbala mingi bango bazali sembo te.
5, 6. Makabo nini ya kobɔndisa Yehova apesi Yisalaele, mpe mbuma nini yango eboti?
5 Sikoyo maloba ya Yehova oyo elandi ezali solo maloba ya kosepelisa mpe ya kobɔndisa mpenza! Alobi boye: ‘Nakosopa mai likoló na ye oyo azali na mposa ya komɛla, mpe bitima na putulu oyo ekauki; nakosopa elimo na ngai likoló ya bakitani na bino mpe lipamboli na ngai likoló ya bana na bino. Bakotɔa na kati ya matiti, lokola nzete ya alabimi pembeni ya bitima ya mai.’ (Yisaya 44:3, 4) Ata na mboka oyo molunge ezalaka makasi mpe mbula enokaka mingi te, banzete ekoki kokola pembeni ya maziba ya mai. Soki Yehova apesi solo na ye, oyo ezali lokola mai oyo epesaka bomoi, mpe asopi elimo santu na ye, Yisalaele ekokóma malamu mpenza lokola banzete oyo ezali pembeni ya mai. (Nzembo 1:3; Yilimia 17:7, 8) Yehova akopesa basaleli na ye makasi ya kopesa litatoli ete ye azali mpenza Nzambe.
6 Kosopama ya elimo santu yango ekosala ete bato mosusu bázongela boyokani oyo Yisalaele azalaki na yango na Yehova. Yango wana, totángi boye: “Oyo akoloba ete, Ngai nazali moto ya [Yehova], mosusu akomibenga na nkombo ya Yakobo, mosusu akokoma na lobɔkɔ na ye ete, Ya [Yehova], akomipesa nkombo, oyo nkombo ya Yisalaele.” (Yisaya 44:5) Ya solo, ekozala lokumu kobengama na nkombo ya Yehova, mpamba te bato bakomona ete kaka ye nde azali Nzambe ya solo.
Yehova abɛteli banzambe ntembe
7, 8. Ndenge nini Yehova abɛteli banzambe ya bikólo ntembe?
7 Mibeko ya Moize elobaki ete soki moto azali moombo, ndeko na ye ya mobali akoki kosikola ye. (Levitike 25:47-54; Luta 2:20) Sikoyo, Yehova alobi ete ye azali Mosikoli ya Yisalaele, ye nde akosikola ekólo yango; na ntango wana, Babilone mpe banzambe na yango nyonso bakoyoka nsɔni. (Yilimia 50:34) Abɛti ntembe na banzambe ya lokuta mpe na basambeli na bango; alobi boye: ‘Yehova alobi boye, ye Mokonzi ya Yisalaele, ye oyo azali mosikoli na ye mpe Yehova na bibele ete, Ngai nazali moto ya liboso mpe ngai nazali moto ya nsuka, nzambe mosusu azali te, bobele ngai. Nani azali lokola ngai? Abenga mpe ayebisa yango, abongisa yango liboso na ngai, longwa ntango wana natyaki bato ya kala; mpe makambo mazali koya mpe yango ekozala nsima, báyebisa yango epai na bango. Kobanga te mpe kozala na nsɔmɔ te. Ngai nayebisaki yo longwa na kala te, nasakolaki yango te? Mpe bino bozali batatoli na ngai. Nzambe mosusu azali nde? Bobele ngai moko te? Libanga ezali te, ngai nayebi moko te.’—Yisaya 44:6-8.
8 Yehova abɛteli banzambe ntembe, asɛngi bápesa bilembo oyo ekondimisa ete bazali mpenza banzambe. Bakoki nde kobenga biloko oyo ezali te lokola ezali, kosakola makambo ekoya na bosikisiki mpenza mpe makambo yango emonana lokola nde esili kosalema? Likambo ya ndenge wana ekoki kosalema kaka na ‘moto ya liboso mpe ya nsuka,’ ye oyo azali na bomoi liboso ete banzambe nyonso ya lokuta básalema mpe ye oyo akozala kaka ata ntango bato bakosila kobosana banzambe yango kala mpenza. Basaleli na ye basengeli kobanga te kotatola mpo na solo yango mpamba te Yehova, ye oyo akokani na libanga monene ya makasi oyo eninganaka te, azali kosunga bango.—Deteronome 32:4; 2 Samwele 22:31, 32.
Losambo ya bikeko ezali na ntina te
9. Bapekisaki nde Bayisalaele kosala elilingi to ekeko ata ya eloko nini oyo ezali na bomoi? Limbolá.
9 Ntembe oyo Yehova abɛteli banzambe ya lokuta etindi biso tókanisa mobeko ya mibale kati na Mibeko Zomi. Mobeko yango elobaki polele ete: “Okosala ekeko mpo na yo te, soko elilingi ya eloko ya lola na likoló te, na mokili na nse te, to na mai na nse ya mokili te. Okogumbamela yango te to kosalela yango te.” (Exode 20:4, 5) Epekiseli yango elingi koloba te ete Bayisalaele basengelaki te kosala bililingi ya kotya na ndako mpo na kosepelisa miso. Yehova ye moko asɛngaki bátya bililingi to bikeko ya banzete mpe ya bakeluba na kati ya tabenakle. (Exode 25:18, 33; 26:31) Kasi, moto ata moko te asengelaki kosambela biloko yango, kobondela yango to kotumbela yango mbeka. Mobeko wana oyo epemamaki na Nzambe epekisaki nde kosala elilingi ata ya lolenge nini mpo na kosambela yango. Kosambela bililingi to kofukamela yango ezali losambo ya bikeko.—1 Yoane 5:21.
10, 11. Mpo na nini na miso ya Yehova bililingi ezali likambo ya nsɔni?
10 Sikoyo Yisaya amonisi ete bililingi oyo ezangi bomoi ezali na ntina te mpe alobeli nsɔni oyo baoyo basalaka bililingi yango bakoyoka: “Nyonso baoyo bakosalaka bikeko bazali mpamba, mpe biloko bikosepelisa bango ezali na litomba te. Batatoli na bango bakomona te, bakoyeba mpe te ete bayokisami nsɔni. Nani asali nzambe to ekeko oyo ezali na litomba te? Talá baninga na ye nyonso bakoyokisama nsɔni; basali bazali bobele bato. Báyangana [bango] nyonso, bátɛlɛma, nde bakobanga, bakoyoka nsɔni elongo moko.”—Yisaya 44:9-11.
11 Mpo na nini bililingi yango ezali mpenza likambo ya nsɔni na miso ya Nzambe? Ya liboso, ezali mpo moto akoki te, na biloko oyo emonanaka na miso, kosala elilingi oyo ekomonisa ndenge Mozwi-ya-Nguya-Nyonso azali mpenza. (Misala 17:29) Longola yango, kosambela eloko oyo ekelamá na esika ya kosambela Mozalisi ezali kosambwisa Bonzambe ya Yehova. Lisusu, likambo yango ebongi mpenza te na moto, oyo akelamaki na “elilingi ya Nzambe,” boye te?—Genese 1:27; Baloma 1:23, 25.
12, 13. Mpo na nini moto akoki te kosala elilingi oyo ebongi na losambo?
12 Mabelé, ebende to nzete ekoki kokóma mosantu mpo kaka bakómisi yango eloko ya losambo? Yisaya akundweli biso ete kosala bililingi ezali mosala lokola misala mosusu nyonso. Bisaleli ya mosali bililingi mpe mayele na ye ezali ndenge moko na oyo ya moto nyonso oyo asalaka bikeko ya kotɛka: “Motuli akobongisa sóka, akosala mosala kati na makala, akotonga yango na [marto], akotúla yango na lobɔkɔ na ye ya makasi; akoyoka nzala mpe nguya na ye ekozanga, amɛli mai te mpe akosenzwa. Mosali na mabaya akosembola nsinga, akokoma kuna na ekomeli, akopalola yango na likɔmbɔ, akopima yango na ezingeli mpe akobongisa yango lokola lolenge na moto, [kolanda] bonzenga ya moto ete [efanda] kati na ndako.”—Yisaya 44:12, 13.
13 Nzambe ya solo asalaki bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali awa na mabelé, ezala mpe moto. Bikelamu ya mayele emonisaka mpenza ete Yehova azali Nzambe; atako bongo, biloko nyonso oyo Yehova akelá ezali na nse na ye. Moto azali nde na makoki koleka Yehova? Akoki kosala eloko oyo eleki ye moko—oyo eleki ye mpenza mpe ebongi asambela yango? Mosali ya bikeko alɛmbaka, ayokaka nzala mpe mposa ya mai. Nyonso wana emonisi ete makasi ya moto esuki, kasi emonisi mpe ete moto yango azali na bomoi. Ekeko oyo asali ekoki kozala lokola moto. Ekoki ata kozala kitoko. Atako bongo, ezangi bomoi. Bililingi ezalaka na bizaleli ya Nzambe ata moke te. Longola yango, ata ekeko moko te ‘ekweá uta na likoló,’ lokola nde moto asalaki yango te.—Misala 19:35.
14. Mpo na nini bato oyo basalaka bililingi bakoki kosala yango ata moke te soki Yehova te?
14 Yisaya amonisi sikoyo ete mpo na kosala bililingi bato basalelaka kaka bibongiseli mpe biloko oyo Yehova akelá: ‘Akokata mpo na ye moko nzete ya ɛlɛzɛ mpe akopona nzete ya motindo moko boye, nzete moko ya monene, akotika yango ekóma makasi mpo na ye moko kati na nzete ya zamba; akokona nzete ya olɛnɛ mpe mbula ekoleisa yango. Bongo ekozala epai na moto mpo na nkoni; akokamata ndambo na yango mpe akoyɔta mɔtɔ; akobambola mɔtɔ mpe akotumba mampa; akosala mpe nzambe mpe akosanzola yango! Akosalisa yango ekeko mpe akogumbama liboso na yango. Akozikisa ndambo na yango na mɔtɔ; na ndambo na yango mpe akolya mosuni mpe akotumba bilei bitumbami mpe akotonda; ɛɛ akoyɔta mɔtɔ mpe akoloba ete, Aha! nayoki mɔtɔ, namoni mɔtɔ! Mpe na oyo etikali akosala nzambe, ekeko na ye. Akogumbama liboso na yango, akobondela yango, akoloba ete, Bikisá ngai mpo ete yo ozali nzambe na ngai!’—Yisaya 44:14-17.
15. Nini emonisi ete moto oyo asalaka bililingi azangi mpenza mayele?
15 Nkoni ekoki kosikola moto? Soki moke te. Kaka Nzambe ya solo nde akoki kosikola. Ndenge nini bato bakoki kosambela biloko oyo ezangi bomoi? Yisaya amonisi ete ebandeli mpenza ya likambo yango ezali nde na motema: “Bayebi te, basosoli te, zambi apakoli miso na bango mpe bamoni te, mpe mitema na bango mpe basosoli te. Moto te akotya motema na ye, boyebi ezali te mpe bososoli te mpo na koloba ete, Ndambo na yango nazikisi na mɔtɔ, ɛɛ natumbi mampa na makala na yango, natumbi mosuni mpe nalei. Boye na oyo etikali na yango nasala nde eloko eboyami? Nagumbama liboso na eloko euti na nzete? Akolyaka putulu na mɔtɔ, motema mozimbisami epɛngwisi ye, ayebi kobikisa molimo na ye te to koloba ete, Lokuta ezali nde na lobɔkɔ na ngai ya mobali te?” (Yisaya 44:18-20) Ɛɛ, moto oyo azali kokanisa ete losambo ya bikeko ekoki kopesa ye eloko moko ya malonga na elimo akokani na moto oyo azali kolya putulu na esika ya kolya bilei ya malamu.
16. Ndenge nini losambo ya bikeko ebandaki, mpe esɛngaka nini mpo yango ekoka kozala?
16 Losambo ya bikeko ebandaki na likoló ntango ekelamu moko ya elimo mpe ya nguya mingi, oyo na nsima akómaki Satana, alulaki losambo oyo ebongi kaka na Yehova. Lokola mposa wana ya Satana ezalaki makasi mpenza, ekabolaki ye na Nzambe. Yango nde ebandeli mpenza ya losambo ya bikeko, mpamba te ntoma Paulo alobaki ete ezaleli ya kolula ekokani na losambo ya bikeko. (Yisaya 14:12-14; Ezekiele 28:13-15, 17; Bakolose 3:5) Satana atindaki mwasi ná mobali ya liboso bálona makanisi ya koluka kaka bolamu na bango moko. Eva alulaki eloko oyo Satana alakaki ye: ‘Miso na bino makofungwama, mpe bino bokozala ndenge moko na Nzambe, koyeba malamu mpe mabe.’ Yesu alobaki ete ezaleli ya kolula eutaka na motema. (Genese 3:5; Malako 7:20-23) Losambo ya bikeko ebandaka soki mitema ya bato ebebi. Yango wana, ezali na ntina mingi ete biso nyonso ‘tóbatelaka mitema na biso,’ tótikela moto moko te to eloko moko te nzela ya kozwa na mitema na biso esika oyo ebongi kaka na Yehova.—Masese 4:23; Yakobo 1:14.
Yehova aluki kosimba mitema
17. Likambo nini Yisalaele esengeli kobosana te?
17 Nsima na yango, Yehova asɛngi Bayisalaele bábosana te ete bazali na libaku moko malamu mpenza oyo ezali kosɛnga bákokisa mwa makambo. Bazali batatoli na ye! Alobi boye: ‘Kanisá makambo oyo, ee Yakobo, mpe Yisalaele, zambi yo ozali moombo na ngai; nabongisaki yo, yo ozali moombo na ngai; ee Yisalaele, nakobosana yo te. Nakozipa masumu na yo lokola na lipata mpe mabe na yo lokola na londende; zongá epai na ngai, zambi nakosikola yo. Boye, ee lola, oyemba nzembo, zambi Yehova asali yango; ee bozindo na mabelé, oganga; bandá koyemba, ee bino ngomba, mpe zamba mpe nzete nyonso kati na yango, mpo ete Yehova asikoli Yakobo, akokembisama na Yisalaele.’—Yisaya 44:21-23.
18. (a) Likambo nini esengeli kosepelisa Yisalaele? (b) Lelo oyo, ndenge nini basaleli ya Yehova bakoki komekola motema mawa na ye?
18 Yisalaele esalaki Yehova te. Yehova azali te nzambe oyo bato basali. Kasi, Yehova nde asalaki Yisalaele mpo ekóma moombo, to mosaleli, oyo ye aponi. Mpe akomonisa lisusu ete ye azali mpenza Nzambe ntango akosikola ekólo yango. Ayebisi basaleli na ye makambo na boboto nyonso; ayebisi bango ete soki babongoli motema, akozipa masumu na bango, akobomba mabe na bango lokola nde na mapata oyo moto akoki kokatisa yango te. Likambo oyo esengeli mpenza kosepelisa Yisalaele! Ndakisa ya Yehova elendisi basaleli na ye ya mikolo na biso bámekola motema mawa na ye. Bakomekola yango soki bazali koluka kosalisa baoyo bazali kobunga nzela—soki likoki ezali, komeka kozongisela bango makasi na bango ya elimo.—Bagalatia 6:1, 2.
Likambo ya koyeba nani azali Nzambe ya solo elingi kokatama
19, 20. (a) Na ndenge nini Yehova apesi bilembo ya nsuka mpo na komonisa elonga na ye? (b) Makambo nini ya kobɔndisa Yehova asakoli mpo na basaleli na ye, mpe akosalela nani mpo na kokokisa makambo yango?
19 Sikoyo, Yehova apesi bilembo ya nsuka mpo na komonisa elonga na ye. Alingi koyebisa likambo oyo ekomonisa polele nani azali Nzambe ya solo: Likoki ya kosakola na bosikisiki mpenza makambo ekoya. Moto moko ya mayele na makambo ya Biblia abengaki bavɛrsɛ mitano oyo esukisi mokapo 44 ya mokanda ya Yisaya “maloba ya ntɔki oyo ezali komonisa ete Nzambe ya Yisalaele aleki nyonso,” kaka ye nde azali Mozalisi, Moto oyo ayebisaka makambo ekoya mpe azali elikya mpo na kosikolama ya Yisalaele. Lokola na loyembo oyo bamatisaka mongongo mokemoke tii ekokóma makasi mpenza, bavɛrsɛ yango mpe esuki na koyebisáká nkombo ya moto oyo akosikola ekólo yango na mabɔkɔ ya Babilone.
20 ‘Yehova alobi boye, oyo mosikoli na yo, ye oyo atongi yo kati na libumu, ete, Ngai nazali Yehova oyo asali biloko nyonso, nasembolaki lola bobele ngai moko, natandisaki molɔ́ngɔ́ bobele ngai mpenza; ngai napekisi bilembo ya bato ya lokuta, nakómisi basakoli ete bázala bazoba, nazongisi bato ya mayele nsima, nabongoli mayele na bango ete mazala zoba ebebe. Nakokisi liloba ya moombo na ngai, nakokisi toli mobimba ya bamemi-nsango na ngai; nalobi na Yelusaleme ete, Ye akozala na bafandi; mpe na mboka ya Yuda ete, Bokotongama; mpe nakotɛlɛmisa bisika bibebi na yango. Nalobi na bozindo ya mai ete, Kauká, nakokaukisa mpe bibale na yo. Nalobi mpo na Sirise ete, Ye azali mobateli ya etonga na ngai, ye akosukisa mokano na ngai; nalobi mpe na Yelusaleme ete, Akotongama mpe na Tempelo ete, Miboko na yo ekotyama.’—Yisaya 44:24-28.
21. Maloba ya Yehova epesi ndanga nini?
21 Ya solo mpenza, Yehova azali na likoki ya kosakola makambo ekoya, kasi azali mpe na nguya ya kokokisa mokano mobimba oyo ye ayebisi. Maloba yango ekopesa Yisalaele elikya ntango nyonso. Ezali ndanga oyo emonisi ete atako basoda ya Babilone bakobebisa mokili yango, Yelusaleme ná bingumba oyo yango eyangelaka ekotɛlɛma lisusu mpe losambo ya solo ekozongisama kuna. Kasi ndenge nini?
22. Monisá ndenge Ebale Efalata ekaukaki.
22 Mbala mingi, banganga-nkisi babangaka koyebisa makambo ekoya na bosikisiki nyonso, mpamba te mokolo mosusu makambo yango ekosalema te ndenge balobaki. Nzokande, na monɔkɔ ya Yisaya, Yehova ayebisi nkombo mpenza ya moto oyo ye akosalela mpo na kobimisa basaleli na ye na boombo mpo bázonga na mboka na bango mpe bátonga lisusu Yelusaleme ná tempelo. Nkombo ya moto yango Sirise, oyo ayebani na nkombo ya Sirise Monene ya Perse. Yehova ayebisi mpe mayele oyo Sirise akosalela mpo na kolonga liboso na bibongiseli ya minene mpe ya makasi oyo ebatelaka Babilone. Engumba yango ekobatelama na bifelo ya milai mpe na mai oyo ezali koleka na kati mpe zingazinga na yango. Sirise akosalela Ebale Efalata, oyo ezali eloko ya libosoliboso oyo ebatelaka engumba yango. Hérodote ná Xénophon, bato ya mayele na makambo ya kala oyo bazalaki na bomoi kala, balobaki ete pene na Babilone, Sirise alekisaki mai ya Efalata na nzela mosusu tii mai yango ekaukaki mpenza mpe epesaki basoda na ye nzela bákatisa yango na makolo. Efalata, ebale monene, ekaukaki mpenza mpe ezalaki lisusu na likoki te ya kobatela Babilone.
23. Mokanda nini emonisi ete esakweli oyo elobaki ete Sirise asengelaki kosikola Yisalaele ekokisamaki mpenza?
23 Ezali boni mpo na elaka oyo elobaki ete Sirise akosikola basaleli ya Nzambe mpe akosala nyonso mpo ete Yelusaleme ná tempelo etongama lisusu? Na liyebisi na ye oyo tozali kokuta tii lelo na Biblia, Sirise ye moko alobi boye: ‘Sirise, mokonzi ya Perse, alobi boye ete, Yehova, Nzambe ya lola, asili kopesa ngai makonzi nyonso ya mokili; mpe alakisi ngai ete natongela ye ndako na Yelusaleme oyo ezali kati na Yuda. Ye nani azali na kati na bino na bato na ye nyonso, Nzambe na ye azala na ye; tiká ete amata na Yelusaleme oyo ezali na Yuda mpe atonga ndako ya Yehova, Nzambe ya Yisalaele—ye azali Nzambe ya solo—ndako oyo ezalaki na Yelusaleme.’ (Ezela 1:2, 3) Liloba nyonso oyo Yehova ayebisaki na monɔkɔ ya Yisaya ekokisami mpenza!
Yisaya, Sirise, mpe baklisto ya lelo
24. Boyokani nini ezali kati na kobima ya etinda oyo Alatazelezese apesaki ya “kotɛlɛmisa mpe ya kotonga Yelusaleme” ná koya ya Masiya?
24 Mokapo 44 ya Yisaya ekumisi Yehova ete ye kaka nde azali Nzambe ya solo mpe ye nde azali Mosikoli ya libota na ye ya ntango ya kala. Lisusu, esakweli yango ezali na ntina monene mpo na biso nyonso lelo oyo. Ekateli oyo Sirise azwaki na mobu 538 to 537 L.T.B. oyo esɛngaki ete bátonga lisusu tempelo ya Yelusaleme ezalaki nde ebandeli ya makambo oyo esukaki na kokokisama ya esakweli mosusu ya ntina mpenza. Nsima ya ekateli ya Sirise, ekateli mosusu ezwamaki na mokonzi moko oyo ayaki nsima, nkombo na ye Alatazelezese. Mokonzi yango azwaki ekateli ete engumba ya Yelusaleme esengeli kotongama lisusu. Mokanda ya Danyele eyebisaki ete ‘longwa na kobima ya liloba ya kotɛlɛmisa mpe ya kotonga Yelusaleme [na mobu 455 L.T.B.] kino koya ya Masiya Motambwisi, pɔsɔ’ 69, oyo mokomoko na yango ezali na mbula 7, esengelaki koleka. (Danyele 9:24, 25) Esakweli yango mpe ekokisamaki. Na ntango mpenza oyo elakamaki, elingi koloba na mobu 29 T.B., nsima ya mbula 483 banda ekateli ya Alatazelezese ebandaki kotosama na Mokili ya Ndaka, Yesu abatisamaki mpe abandaki mosala na ye awa na mabelé.a
25. Kokwea ya Babilone na mabɔkɔ ya Sirise ekokani na nini na mikolo na biso?
25 Kobima ya Bayuda ya sembo na boombo, oyo esalemaki mpo Babilone ekweaki, ezalaki elilingi ya kobima ya baklisto bapakolami na boombo ya elimo na 1919. Kobima na bango emonisaki ete Babilone mosusu mpe ekwei; Babilone yango elobelami lokola mwasi ya ndumba, Babilone Monene, oyo elakisi mangomba nyonso ya lokuta na mokili mobimba. Ndenge ekomami na mokanda ya Emoniseli, ntoma Yoane amonaki kokwea yango ebele ya bambula liboso. (Emoniseli 14:8) Amonaki mpe ndenge oyo mangomba yango oyo etondi na bikeko ekobebisama pwasa. Na makambo mosusu, ndenge oyo Yoane alobeli kobebisama yango ekokani na ndenge oyo Yisaya alobelaki kokwea ya engumba ya Babilone ya kala na mabɔkɔ ya Sirise. Se ndenge mai oyo ezalaki kobatela Babilone ebikisaki yango te na mabɔkɔ ya Sirise, “mai,” elingi koloba bato oyo bazali na ngámbo ya Babilone Monene mpe bazali kobatela yango, ‘ekokauka’ liboso ete Babilone yango ebebisama na bosembo mpenza.—Emoniseli 16:12.b
26. Ndenge nini esakweli ya Yisaya mpe kokokisama na yango ekómisi kondima na biso makasi?
26 Lelo oyo, mbula koleka nkóto mibale na ndambo banda Yisaya ayebisaki esakweli na ye, tomoni mpenza ete Nzambe ‘akokisaka toli mobimba ya bamemi-nsango na ye.’ (Yisaya 44:26) Na yango, kokokisama ya esakweli ya Yisaya ezali ndakisa oyo emonisi polele ete bisakweli nyonso oyo ezali na Makomami Mosantu ebongi kotyelama motema.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá mokapo 11 ya buku Tyá likebi na esakweli ya Danyele!, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Talá mokapo 35 ná 36 ya buku Emoniseli: Kokokana na yango monene ebelemi!, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 63]
Nkoni ekoki kosikola moto?
[Elilingi na lokasa 75]
Sirise akokisi esakweli na ndenge alekisi mai ya Efalata epai mosusu