Mokapo ya Minei
“Bozali batatoli na ngai”!
1. Mpo na nini Yehova asakolaka, mpe basaleli na ye basengeli kosala nini ntango bamoni ndenge bisakweli ekokisami?
LIKOKI ya kosakola makambo ekoya ezali moko ya makambo oyo ekesenisi Nzambe ya solo ná banzambe nyonso ya lokuta. Kasi ntango Yehova asakolaka, ezalaka kaka te mpo na komonisa ete ye nde azali Nzambe. Mokapo 43 ya Yisaya emonisi ete Yehova asakolaka mpo na komonisa ete azali Nzambe mpe ete alingi bato oyo asalaki na bango kondimana. Basaleli na ye basengeli kosuka kaka te na kososola kokokisama ya bisakweli mpe kokanga monɔkɔ na bango; basengeli nde kotatola makambo bamoni. Ɛɛ, basengeli kozala batatoli ya Yehova!
2. (a) Yisalaele ezali ndenge nini na elimo na mikolo ya Yisaya? (b) Ndenge nini Yehova afungoli miso ya bato na ye?
2 Likambo ya mawa, Yisalaele ebebi mpenza na mikolo ya Yisaya; yango wana, na elimo, Yehova amoni bato na ye lokola bato babebá binama ya nzoto. “Bóbimisa ekólo moko ya bato bakufá miso atako miso ezali, mpe bato bakufá matoi atako bazali na matoi.” (Yisaya 43:8, NW) Ndenge nini bato oyo bakufá miso mpe matoi na elimo bakoki kozala batatoli ya Yehova oyo bazali na bomoi? Likambo moko kaka nde ekoki kosala yango. Esengeli nde báfungola bango miso mpe matoi na ndenge ya likamwisi. Yango mpenza nde Yehova asali! Ndenge nini? Ya liboso, apesi bango etumbu ya makasi—bato ya Yisalaele, bokonzi ya nɔrdi, bakei na boombo na mobu 740 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), mpe baoyo ya Yuda, na mobu 607 L.T.B. Na nsima, Yehova asali likambo moko monene mpo na basaleli na ye: abimisi bango na boombo mpe, na mobu 537 L.T.B., azongisi batikali oyo babongoli motema mpe oyo bazongeli makasi na bango ya elimo na mboka na bango. Yehova azali kobanga ata moke te ete moto moko akobebisa mokano yango oyo amityeli; yango wana, mbula soki 200 liboso, alobeli kosikolama ya Yisalaele lokola nde esili kosalema.
3. Elendiseli nini Yehova apesi bato oyo bakokenda na boombo?
3 ‘Yehova alobi boye, ye oyo asalaki yo, ee Yakobo, ye oyo atongaki yo, ee Yisalaele, ete, Kobanga te mpo ete ngai nasikoli yo, nabengi yo na nkombo na yo, ozali ya ngai. Wana ekoleka yo kati na mai, ngai nazali na yo, mpe kati na bibale, ekozindisa yo te. Wana ekotambola yo kati na mɔtɔ, okozikisama te, lolemo na mɔtɔ ekozikisa yo te. Mpo ete ngai nazali Yehova, Nzambe na yo, Mosantu ya Yisalaele, mobikisi na yo.’—Yisaya 43:1-3a.
4. Na ndenge nini Yehova azali Mozalisi ya Yisalaele, mpe alobi na basaleli na ye nini mpo na kokitisa bango mitema na oyo etali kozonga na bango na mboka na bango?
4 Yehova azali kotyela Yisalaele likebi koleka bikólo mosusu mpamba te ezali ekólo na ye. Ye moto akelaki yango mpo na kokokisa kondimana oyo asalaká na Abalayama. (Genese 12:1-3) Yango wana, Nzembo 100:3 elobi boye: “Bóyeba ete [Yehova] ye azali Nzambe; ye asalaki biso, biso tozali bato na ye. Tozali bato na ye, mpate ya elanga na ye.” Lokola Yehova azali Mozalisi mpe Mosikoli ya Yisalaele, akozongisa basaleli na ye na mboka na bango mpe, na nzela eloko moko te ekosala bango mabe. Ezala mai, ezala bibale na ntango ya mpela to mpe moi makasi ya bisobe, ekokangela bango nzela te to ekosala bango mabe te ndenge, mbula nkóto liboso, epekisaki mpe bankɔkɔ na bango te ntango bazalaki kokende na Mokili ya Ndaka.
5. (a) Libɔndisi nini maloba ya Yehova epesi Yisalaele ya elimo? (b) Banani bazali baninga ya Yisalaele ya elimo, mpe banani bamonisaki bango bambula mingi liboso?
5 Na mikolo na biso, maloba ya Yehova ezali mpe kobɔndisa batikali ya Yisalaele ya elimo, oyo bato na yango bazali “ekelamu ya sika” oyo ebotami na elimo. (2 Bakolinti 5:17) Lokola bamonisi mpiko na bango liboso ya “mai,” elingi koloba bato ya mokili, Nzambe abateli bango na bolingo mpenza na ntango ya bampela ya elilingi. Mɔtɔ oyo ezali kouta na banguna na bango esali bango mabe te, kutu epɛtoli bango nde kopɛtola. (Zekalia 13:9; Emoniseli 12:15-17) Yehova abateli mpe “ebele ya bato” oyo bazali kati na “bampate mosusu,” baoyo bayei kosangana na ekólo na ye ya elimo. (Emoniseli 7:9; Yoane 10:16) Bambula mingi liboso, bato yango bamonisamaki na “ebele ya bato ya ndenge na ndenge” oyo babimaki na Ezipito elongo na Bayisalaele mpe na bato ya bikólo mosusu oyo bazongaki elongo na Bayuda ntango babimaki na boombo na Babilone.—Exode 12:38; Ezela 2:1, 43, 55, 58.
6. Na ndenge nini Yehova amonisi ete azali Nzambe ya boyengebene na likambo etali kofuta lisiko mpo na (a) Yisalaele ya mosuni? (b) Yisalaele ya elimo?
6 Yehova alaki ete akosalela basoda ya Bamede ná Baperse mpo na kobimisa bato na ye na Babilone. (Yisaya 13:17-19; 21:2, 9; 44:28; Danyele 5:28) Lokola azali Nzambe ya boyengebene, Yehova akofuta Bamede ná Baperse, “basali” na ye, lisiko oyo ebongi na esika ya Yisalaele. ‘Napesi Ezipito lokola lisiko mpo na yo, Etiopia mpe Seba na esika na yo. Mpo ete ozali na motuya na miso na ngai, ozali na lokumu mpe nalingi yo; boye nakopesa bato na esika na yo, mabota na esika na bomoi na yo.’ (Yisaya 43:3b, 4) Masolo ya kala emonisi mpenza ete, se ndenge Nzambe asakolaki yango, Bokonzi ya Baperse elongaki Ezipito, Etiopia mpe Seba, mboka oyo ezalaki pene na Etiopia. (Masese 21:18) Ndenge moko mpe, na 1919, Yehova asalelaki Yesu Klisto mpo na kobimisa batikali ya Yisalaele ya elimo na boombo. Kasi, Yesu asɛngaki lifuti te mpo na mosala oyo asalaki. Ye azali mokonzi mopakano te. Lisusu, baoyo abimisaki na boombo bazalaki nde bandeko na ye ya elimo. Atako bongo, na 1914, Yehova asilaki kopesa ye ‘mabota lokola libula na ye mpe nsuka ya mokili ete ezala ya ye.’—Nzembo 2:8.
7. Ndenge nini Yehova atalelaka basaleli na ye, ezala na ntango ya kala to na mikolo na biso?
7 Omoni ndenge Yehova amonisi polele boboto na ye epai na bato oyo asikoli na boombo? Alobi na bango ete bazali “na motuya” mpe “na lokumu” na miso na ye mpe ete ‘alingi’ bango. (Yilimia 31:3) Lelo oyo atalelaka basaleli na ye ya sembo se ndenge wana, kutu koleka. Ezali te mpo babotami na ekólo moko boye nde baklisto bapakolami bazali baninga ya Nzambe, kasi ezali nde mpo na mosala oyo elimo santu esali epai na bango nsima ya komipesa na bango epai ya Mozalisi na bango. Yehova abendi bango epai ya Mwana na ye mpe epai na ye moko; lisusu, akomi mibeko mpe mitinda na ye na mitema na bango mpo endimaka kotosa ye.—Yilimia 31:31-34; Yoane 6:44.
8. Yehova alobi nini mpo na kokitisa lisusu mitema ya bato oyo bakei na boombo, mpe ndenge nini bakotalela kosikolama na bango?
8 Mpo na kokitisa lisusu mitema ya bato oyo bakei na boombo, Yehova alobi lisusu boye: “Kobanga te mpo ete ngai nazali na yo; nakoyeisa bana na yo longwa na ebimelo na ntango, mpe nakoyanganisa yo longwa na elimwelo na ntango. Nakoloba na epai na likoló ete, Bimisá! Mpe na epai na ngɛlɛ ete, Koboya te! Yeisá bana babali na ngai longwa na mosika, mpe bana basi na ngai longwa na nsuka na mokili; moto na moto oyo abengami na nkombo na ngai, ye oyo nasali ye mpo na nkembo na ngai, ye oyo natongi ye, ɛɛ nasali ye.” (Yisaya 43:5-7) Ata bisika oyo eleki mosika ekozala mosika te mpo na Yehova ntango ngonga ekobɛta mpo na kosikola bana basi ná bana mibali na ye mpe kozongisa bango na mboka na bango oyo balingaka. (Yilimia 30:10, 11) Na ntembe te, mpo na bango, kosikolama yango ekoleka oyo esalemaki kala, ntango ekólo na bango ebimaki na Ezipito.—Yilimia 16:14, 15.
9. Wapi ndenge mibale oyo Yehova akɔtisi nkombo na ye na misala na ye ya kosikola?
9 Ntango Yehova akundweli basaleli na ye ete babengami na nkombo na ye, andimisi bango lisusu elaka na ye ya kosikola Yisalaele. (Yisaya 54:5, 6) Longola yango, Yehova akɔtisi nkombo na ye na bilaka na ye ya kosikola bango. Na ndenge yango, amonisi mpenza ete ntango bisakweli na ye ekokokisama, ye akozwa nkembo. Ezala moto oyo akolonga Babilone akobonga te kozwa lokumu oyo ebongi na Nzambe kaka moko ya bomoi.
Banzambe bazali kosamba
10. Likambo nini ya mpasi Yehova asɛngi bikólo mpe banzambe na bango?
10 Sikoyo, Yehova akómisi elaka na ye ya kosikola Yisalaele likambo moko oyo etali molɔ́ngɔ́ mobimba, oyo tribinale esengeli kotalela mpo na kosambisa banzambe ya bikólo oyo ye afundi bango. Totángi boye: ‘Tiká ete bikólo nyonso báyangana elongo mpe ete bato nyonso báya esika moko. Nani [kati na banzambe na bango] akoki koyebisa likambo oyo mpe koyokisa biso makambo ya kala? Tiká ete [banzambe na bango] bábimisa batatoli na bango mpo bátángama bayengebene, to mpo báyoka mpe báloba ete, Ezali solo.’ (Yisaya 43:9) Yehova asɛngi bikólo ya mokili likambo moko ya mpasi mpenza. Ezali lokola nde alobi boye: ‘Mpo banzambe na bino bámonisa ete bazali mpenza banzambe, básakola na bosikisiki mpenza makambo oyo ekoya.’ Lokola kaka Nzambe ya solo nde akoki kosakola kozanga komikosa, momekano yango ekomonisa banzambe nyonso ya lokuta polele. (Yisaya 48:5) Kasi Mozwi-ya-Nguya-Nyonso abakisi likambo mosusu oyo esɛngami na mibeko: baoyo nyonso bazali kotuta ntolo ete bazali banzambe ya solo basengeli kobimisa batatoli oyo bakolobela bisakweli na bango mpe kokokisama na yango. Yehova amilongoli te na mobeko yango.
11. Mosala nini Yehova apesi mosaleli na ye, mpe amonisi nini na ntina na Bonzambe na ye?
11 Banzambe ya lokuta bakoki te kobimisa batatoli, mpamba te bazangi nguya. Yango wana, na mawa nyonso, esika oyo batatoli batɛlɛmaka mpo na kopesa litatoli na tribinale etikali mpamba. Kasi, sikoyo ekómi ngala ya Yehova ya komonisa mpenza ete azali Nzambe. Abaluki epai ya basaleli na ye mpe alobi boye: ‘Bino bozali batatoli na ngai mpe mosaleli na ngai, oyo nasili kopona yo, ete bóyeba mpe bóndima ngai mpe bósosola ete ngai nazali ye. Liboso na ngai nzambe mosusu asalamaki te, mpe mosusu akozala nsima na ngai te. Ngai, ngai nazali Yehova; mobikisi mosusu azali te, bobele ngai; ngai, nayebisaki mpe nabikisaki mpe natatolaki, ngai, mpe nzambe mopaya azalaki kati na bino te. Bino mpe bozali batatoli na ngai . . . Ngai nazali Nzambe, ɛɛ longwa na kala ngai nazali ye; moko te akolonga kobɔtɔla na lobɔkɔ na ngai; ngai nakosala mosala, mpe nani akopekisa [lobɔkɔ na] ngai?’—Yisaya 43:10-13.
12, 13. (a) Wapi ebele ya makambo oyo basaleli ya Yehova bazali na yango mpo na kopesa litatoli? (b) Ndenge nini nkombo ya Yehova ebimi na miso ya bato na mikolo na biso?
12 Ntango kaka Yehova asilisi koloba, esika oyo batatoli batɛlɛmaka mpo na kopesa litatoli na tribinale etondi na ebele ya batatoli ya esengo. Litatoli na bango ezali polele mpe moto moko te akoki kotyela yango ntembe. Ndenge moko na Yosua, bapesi litatoli ete ‘nyonso oyo Yehova alobaki esalemaki. Ata liloba na ye moko te ezangaki kokokisama.’ (Yosua 23:14) Basaleli ya Yehova babosani naino te maloba ya Yisaya, Yilimia, Ezekiele mpe basakoli mosusu, oyo bango nyonso, basakolaki ete bato ya Yuda bakokende boombo mpe bakobima na ndenge ya likamwisi. (Yilimia 25:11, 12) Nkombo ya moto oyo asengelaki kobimisa bango na boombo, Sirise, eyebisamaki kala, liboso kutu moto yango abotama!—Yisaya 44:26–45:1.
13 Soki totali matatoli nyonso wana, nani akondima te ete Yehova azali Nzambe kaka moko ya solo? Yehova akokani na banzambe ya bapakano te, ye kaka nde akelamá te; ye kaka nde azali Nzambe ya solo.a Yango wana, bato oyo bazali kobengama na nkombo na ye bazali na libaku malamu mpenza ya koyebisa misala na ye ya kokamwa epai na bana oyo bakobotama mpe bato oyo bazali koluka koyeba ye. (Nzembo 78:5-7) Ndenge moko mpe, Batatoli ya Yehova na mikolo na biso bazali na libaku malamu ya kosakola nkombo ya Yehova na mabelé mobimba. Na bambula ya 1920, Bayekoli ya Biblia bakómaki komona mpenza ete Yehova, nkombo ya Nzambe, ezali na ndimbola monene. Yango wana, na mokolo ya 26 Yuli 1931, na liyangani moko oyo esalemaki na engumba Colombus, na etúká ya Ohio na États-Unis, Joseph Rutherford, prezida ya la Société ayebisaki bayangani ekateli moko na motó ya likambo “Nkombo moko ya sika.” Maloba “Tolingi báyeba biso mpe bábenga biso na nkombo Batatoli ya Yehova,” esimbaki mitema ya bayangani mpe bagangaki “Ɛɛ!” mpo na komonisa ete bandimi ekateli yango. Banda mokolo wana, nkombo ya Yehova eyebani mingi na mokili mobimba.—Nzembo 83:18.
14. Likambo nini Yehova akundweli Bayisalaele, mpe mpo na nini tokoki koloba ete asali yango na ntango ebongi?
14 Yehova atyaka likebi na baoyo bamemaka nkombo na ye na limemya nyonso, amonaka bango lokola “mbuma ya liso na ye.” Yango wana akundweli Bayisalaele, ayebisi bango ndenge abimisaki bango na Ezipito mpe akambaki bango na esobe kozanga likama. (Deteronome 32:10, 12) Na ntango wana, nzambe mopaya ata moko te azalaki kati na bango, mpamba te bango moko bamonaki na miso ndenge banzambe nyonso ya Ezipito basambwaki. Banzambe nyonso ya Ezipito balongaki te kobatela Ezipito mpe kopekisa bana ya Yisalaele kokende. (Exode 12:12) Ndenge moko mpe, Babilone, mboka ya nguya mpe oyo ezali na batempelo soki 50 mpo na banzambe ya lokuta, ekokoka te kopekisa lobɔkɔ ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ntango akosikola basaleli na ye. Ntembe ezali te ete longola Yehova, “mobikisi mosusu azali te.”
Bampunda ya bitumba bakwei, babolɔkɔ efungwami
15. Makambo nini Yehova asakoli mpo na Babilone?
15 “Yehova, Mosikoli na bino, Mosantu ya Yisalaele alobi boye: ‘Mpo na bino, nakotinda na Babilone mpe nakokitisa bikangeli ya babolɔkɔ, mpe Bakaladi na kati ya bamasuwa elongo na koganga ya mawa epai na bango. Ngai nazali Yehova, Mosantu na bino, Mozalisi ya Yisalaele, Mokonzi na bino.’ Yehova, Ye oyo apasoli nzela moko kati na mbu mpe balabala moko kati na mai ya makasi, Ye oyo abimisi likalo ya bitumba mpe mpunda, mampinga ya basoda elongo na bilombe, alobi boye: ‘Bakolala na nse. Bakotɛlɛma te. Bakosila nyɛɛ. Bakozimisama lokola nsinga ya lini.’”—Yisaya 43:14-17, NW.
16. Nini ekokómela Babilone, Bakaladi oyo basalaka mombongo, mpe baoyo bakoluka kobatela Babilone?
16 Mpo na bato oyo bazali na boombo, Babilone ezali lokola bolɔkɔ, mpamba te ezali kopekisa bango bázonga na Yelusaleme. Kasi biloko oyo ezali kobatela Babilone ekoki kopekisa te Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, Ye oyo na ntango ya kala asalaki “nzela moko kati na [Mbu Motane] mpe balabala moko kati na mai makasi,” ntango mosusu mai makasi yango ezali Yolodani. (Exode 14:16; Yosua 3:13) Ndenge moko mpe, Sirise, moto oyo Yehova akosalela, akokitisa mai makasi ya Efalata; yango ekopesa bato na ye ya etumba nzela ya kokɔta na engumba yango. Bakaladi oyo basalaka mombongo na banzela ya mai ya Babilone, epai bamasuwa ememaka biloko ya kotɛka mpe bibei (barges) oyo ememaka banzambe ya Babilone, bakoganga na mawa ntango mboka-mokonzi na bango ya makasi ekokwea. Se ndenge ezalaki mpo na makalo ya Farao na Mbu Motane, ndenge moko mpe makalo ya Babilone oyo ezalaka na mbangu ekosala eloko moko te. Ekobikisa Babilone te. Se ndenge oyo moto amonaka mpasi te mpo na kozimisa nsinga ya lini ya mwinda ya mafuta, moto oyo akoya kobundisa engumba yango akomona mpe mpasi ata moke te mpo na koboma baoyo bakoluka kobatela yango.
Yehova azongisi bato na ye na mboka na bango kozanga likama
17, 18. (a) Likambo nini “ya sika” oyo Yehova asakoli? (b) Na ndenge nini basaleli ya Nzambe basengeli te kokanisa makambo masili koleka, mpe mpo na nini?
17 Yehova akokanisi misala oyo asalaká kala mpo na kosikola bato na ye na oyo alingi kosala sikoyo, alobi boye: “Bókanisa te mpo na makambo masili koleka, bóbanza te mpo na makambo ya kala. Talá, nazali kosala likambo ya sika, ezali kobima [sikoyo], omoni yango te? Nakobongisa nzela kati na esobe, mpe bibale kati na bisika bikauki. Nyama ya zamba ekokumisa ngai, ngombolo mpe bandɛkɛ minene; mpo ete nakopesa mai kati na esobe, bibale kati na bisika bikauki, komɛlisa bato baponami na ngai, bato baoyo natongi bango mpo na ngai moko ete bámonisa kosanzola na ngai.”—Yisaya 43:18-21.
18 Ntango Yehova alobi ete “bókanisa te mpo na makambo masili koleka,” yango elingi koloba te ete azali kosɛnga basaleli na ye bábosana misala oyo asalá kala mpo na kobikisa bango. Kutu, ebele ya misala yango ekɔtá na lisolo ya makambo ya kala ya Yisalaele oyo ezali na Makomami Mosantu, mpe Yehova apesaki motindo ete bana ya Yisalaele básalaka Elekeli mbula na mbula mpo na kokanisa kobima na bango na Ezipito. (Levitike 23:5; Deteronome 16:1-4) Kasi, sikoyo Yehova alingi ete bato na ye bákumisa ye mpo na “likambo ya sika,” oyo bango moko bakomona na miso. Yango etali kaka te kobima na bango na Babilone, kasi mpe likamwisi ya kotambwisa bango kino na mboka na bango, ntango mosusu na nzela ya esobe oyo ekendá mbala moko tii na mboka na bango. Na kati ya mokili wana oyo ekauká, Yehova akopasola “nzela” mpo na bango mpe akosala misala ya minene oyo ekokundwela bango makambo oyo asalelaki Bayisalaele na mikolo ya Moize: na esobe, akoleisa bato yango ya mobembo mpe akomɛlisa bango mai na bibale ya solosolo. Yehova akopesa bango ebele ya biloko mpenza mpe ata banyama mabe ya zamba bakokumisa ye mpe bakoluka kolya bato na ye te.
19. Ndenge nini batikali ya Yisalaele ya elimo ná baninga na bango bazali kotambola na “Nzela ya Bosantu”?
19 Ndenge moko mpe, na 1919, batikali ya Yisalaele ya elimo babimaki na boombo ya Babilone, mpe bazwaki nzela oyo Yehova abongiselaki bango, “Nzela ya Bosantu.” (Yisaya 35:8, NW) Na kokesana na Bayisalaele, basengelaki te kosala mobembo na esobe ya moi makasi, kolongwa na esika moko mpo na kokende na esika mosusu, mpe mobembo na bango esengelaki te kosuka na Yelusaleme nsima ya kolekisa mwa basanza na nzela. Atako bongo, “Nzela ya Bosantu” ememaki mpenza batikali ya baklisto bapakolami na paladiso moko ya elimo. Bazali naino na “Nzela ya Bosantu,” mpamba te bazali kaka na mobembo na kati ya ebongiseli ya makambo oyo. Soki batiki te kotambola na balabala monene, elingi koloba soki batiki te kotosa mibeko ya Nzambe na makambo etali bopɛto mpe bosantu, bakozala kaka na kati ya paladiso ya elimo. Bazali mpenza na esengo ya komona ete ebele ya bato, baninga na bango oyo “bazali Bayisalaele te,” bayei kosangana na bango! Yehova azali ntango nyonso kobongisela batikali ná baninga na bango ebele ya bilei ya elimo, nzokande baoyo bazali kotyela ebongiseli ya Satana motema bazali ata na eloko te. (Yisaya 25:6; 65:13, 14) Bato mingi oyo bazalaki komitambwisa lokola banyama babongoli bizaleli na bango mpe bakumisi Nzambe ya solo nsima ya kososola ete Yehova azali kopambola basaleli na ye.—Yisaya 11:6-9.
Yehova ayebisi mpasi oyo azali koyoka
20. Na ndenge nini Yisalaele ya mikolo ya Yisaya ekokisi mikumba na yango te epai na Yehova?
20 Na ntango ya kala, batikali ya Yisalaele oyo bazongaki na mboka na bango babongwanaki, bazalaki te lokola bato mabe ya mikolo ya Yisaya. Epai ya bato yango ya mikolo ya Yisaya, Yehova alobi boye: “Obengi ngai te, ee Yakobo, mpamba te olɛmbi ngai, ee Yisalaele. Omemeli ngai te bampate ya bambeka na yo ya kotumba, mpe opesi ngai nkembo te na bambeka na yo. Nasɛngisi yo te ete osalela ngai na likabo, nalɛmbisi yo mpe te na olibana. Osombeli ngai te na mbongo matiti ya nsolo kitoko; mpe otondisi ngai te na mafuta ya bambeka na yo. Kasi osɛngisi nde ngai nasala mpo na masumu na yo; olɛmbisi ngai na mabunga na yo.”—Yisaya 43:22-24, NW.
21, 22. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete makambo oyo Yehova asɛngaka ezali kilo te? (b) Na ndenge nini tokoki koloba ete bato yango basɛngisi Yehova asalela bango?
21 Ntango Yehova alobi ete “nasɛngisi yo te ete osalela ngai na likabo, nalɛmbisi yo mpe te na olibana,” alingi koloba te ete bambeka mpe olibana (oyo bazalaki kosangisa yango na biloko mosusu mpo na kosala mpaka ya malasi mosantu) ezali na ntina te. Biloko wana esɛngamaki na losambo ya solo na ntango oyo kondimana ya Mibeko ezalaki kotosama. Ezali se ndenge moko mpo na “matiti ya nsolo kitoko” oyo bazalaki kosangisa yango na biloko mosusu mpo na kosala mafuta mosantu ya kopakola biloko ya bosantu to bato oyo Yehova aponi. Bayisalaele batikaki kosalela biloko yango na mosala ya tempelo. Kasi makambo oyo basɛngaki bango ezali mpenza kilo? Soki moke te! Makambo oyo Yehova asɛngaka ezalaka pɛpɛlɛ soki tokokanisi yango na oyo ya banzambe ya lokuta. Na ndakisa, Moleke, nzambe ya lokuta, azalaki kosɛnga bátumbela ye bana lokola mbeka, eloko oyo Yehova asɛngá ata mokolo moko te.—Deteronome 30:11; Mika 6:3, 4, 8.
22 Soki Bayisalaele bázalaka mpenza na bososoli ya elimo, mbɛlɛ ‘balɛmbaki Yehova’ te. Soki bákanisaka Mibeko na ye, balingaki komona ete alingi bango mingi mpe balingaki kopesa ye na esengo mpenza “mafuta,” elingi koloba eteni oyo eleki malamu na bambeka na bango. Kasi, bango, na lokoso nyonso, bazali kotikala na mafuta yango. (Levitike 3:9-11, 16) Ekólo yango ya bato mabe emonisi mpenza Yehova mpasi na kilo ya masumu na bango, ezali lokola nde basɛngisi ye asalela bango!—Nehemia 9:28-30.
Disipilini eboti mbuma
23. (a) Mpo na nini bato oyo Yehova apesi disipilini babongi mpenza kozwa yango? (b) Makambo nini Nzambe akosala mpo na kopesa Yisalaele disipilini?
23 Atako disipilini oyo Yehova apesi bango ezali makasi, mpamba te babongi kozwa yango, kasi eboti mbuma oyo alukaki, epesi bango nzela ya kozwa bolimbisi. “Ngai, ngai nde nazali kolimbisa mabe na yo mpo na ngai moko, mpe nakokanisa masumu na yo lisusu te. Yebisá ngai lisusu; yaká tósamba; lobá ndenge yo oyebi likambo yango mpo okoka kolongisama. Tata na yo, moto ya liboso, asalaki lisumu mpe balobeli na yo basalaki ngai mabe. Yango wana, nakokómisa mbindo bankumu ya esika mosantu mpe nakokaba Yakobo lokola moto oyo asengeli kobebisama mpe Yisalaele ete afingama.” (Yisaya 43:25-28, NW) Lokola bikólo nyonso ya mokili, Yisalaele euti mpe na Adama, “moto ya liboso.” Yango wana, ata moko te na Yisalaele akoki komonisa ete ye ‘alongi.’ Ata “balobeli” ya Yisalaele, elingi koloba bateyi na bango ya Mibeko to bato na bango oyo balimbolaka Mibeko, basali lisumu na miso ya Yehova mpe bateyi makambo ya lokuta. Yango wana, Yehova akotika ete ekólo na ye mobimba ‘ebebisama’ mpe ‘efingama.’ Akokómisa mpe mbindo baoyo nyonso basalaka na “esika mosantu” na ye.
24. Ntina nini ya libosoliboso oyo ekotinda Yehova alimbisa bato na ye ya ntango ya kala mpe ya mikolo na biso; atako bongo, ayokaka ndenge nini mpo na bango?
24 Kasi, tomoni ete soki Yehova akolimbisa Yisalaele ekozala te mpo na mawa oyo bakoyoka; kasi nde mpo na ye moko. Akosala yango mpo nkombo na ye ezali mpe na kati ya likambo yango. Soki atiki Yisalaele libela na boombo, baoyo bakomona likambo yango bakotyola nkombo na ye. (Nzembo 79:9; Ezekiele 20:8-10) Lelo oyo mpe ndenge moko, likambo ya libosoliboso ezali nde kosantisama ya nkombo ya Yehova mpe kolongisama ya bokonzi na ye; lobiko ya bato eyei nde nsima. Atako bongo, Yehova alingaka baoyo bandimaka disipilini na ye na motema moko mpe basambelaka ye na elimo mpe na solo. Bato yango, bázala bapakolami to bampate mosusu, Yehova amoniselaka bango bolingo na ye na ndenge alimbisaka mabe na bango na nzela ya mbeka ya Yesu Klisto.—Yoane 3:16; 4:23, 24.
25. Makambo nini ya nsɔmɔ etikali moke Yehova asala, mpe ndenge nini tokoki komonisa botɔndi na biso banda sikoyo?
25 Longola yango, etikali moke Yehova amonisa bolingo na ye epai ya ebele ya bato oyo bazali kosambela ye na bosembo, akosalela bango eloko moko ya sika na ndenge akobatela bango na ntango ya “bolɔzi monene” mpo na kokɔtisa bango na ‘mabelé ya sika’ oyo epɛtolami. (Emoniseli 7:14; 2 Petelo 3:13) Bakozala wana ntango Yehova akomonisa nguya na ye na ndenge ya nsɔmɔ mpenza oyo ata moto moko amoná naino te. Soki batikali bapakolami ná baoyo nyonso bakozala kati na ebele ya bato bakanisi likambo yango, basepelaka mpe, mokolo na mokolo, bayokanisaka bomoi na bango na mokumba oyo ya lokumu, ete: “Bozali batatoli na ngai”!—Yisaya 43:10.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Masapo ya bikólo mingi oyo etali banzambe na bango elobaka ete banzambe mingi “babotamaka” mpe bazalaka na “bana.”
[Elilingi na lokasa 48, 49]
Yehova akosunga Bayuda na bozongi na bango na Yelusaleme
[Bililingi na lokasa 52]
Yehova abɛteli bikólo ntembe, asɛngi bango bábimisa batatoli mpo na banzambe na bango
1. Ekeko ya Baala oyo esalemi na ‘bronze’ 2. Mwa bikeko ya Asetaloti oyo esalemi na mabelé 3. Banzambe ya Bosato ya Ezipito: Horus, Osiris ná Isis 4. Banzambe ya Bagrɛki: Athena (na lobɔkɔ ya mwasi) mpe Afrodite
[Bililingi na lokasa 58]
“Bozali batatoli na ngai.”—Yisaya 43:10