Mokapo ya Motoba
Yehova azali ‘Nzambe ya boyengebene mpe mobikisi’
1, 2. Makambo nini ya kolendisa epesami na Yisaya mokapo 45, mpe mituna nini tokotalela?
BILAKA ya Yehova ebongi kotyelama motema. Ye azali Nzambe oyo ayebisaka mikano na ye mpe azali Mozalisi. Amonisi mbala na mbala ete azali Nzambe ya boyengebene mpe Mobikisi ya bato ya bikólo nyonso. Makambo oyo touti kolobela ezali kaka mwa ndambo ya makambo ya kolendisa mpe ya kobɔndisa oyo ezali na Yisaya mokapo 45.
2 Longola yango, Yisaya mokapo 45 ezali na ndakisa moko ya kokamwa oyo emonisi ete Yehova azali na likoki ya kosakola makambo ekoya. Elimo ya Nzambe esalisi Yisaya atala malamumalamu bamboka oyo ezali mosika mpe amona makambo oyo ekosalema nsima ya bankama ya bambula. Lisusu, elimo yango etindi ye alobela likambo moko oyo, kaka Yehova, Nzambe ya bisakweli ya solo, nde akokaki kosakola yango na bosikisiki motindo wana. Ezali likambo nini? Ndenge nini likambo yango ebongolaki bomoi ya bato ya ekólo ya Nzambe na ntango ya Yisaya? Ezali na ndimbola nini mpo na biso lelo oyo? Tótalela maloba ya mosakoli.
Yehova akateli Babilone etumbu
3. Na maloba nini ya polele mpenza Yisaya 45:1-3a elobeli mosala ya kobɔtɔla bamboka oyo Sirise akosala?
3 ‘Yehova alobi boye epai na mopakolami na ye, epai na Sirise oyo nasimbi lobɔkɔ na ye ya mobali mpo na kobuka mabota liboso na ye mpe kofungola nkamba na nketo ya bakonzi; mpo na kozipola liboso na ye baporte oyo efungwamaka ngámbo na ngámbo ete baporte ekangama te, ete, Ngai nakoleka liboso na yo mpe nakozalisa alima bisika bizali na mabulu, nakobukabuka baporte ya kwivre, nakokatakata bikangeli ya ebende. Nakopesa biloko ya motuya bizali kati na molili mpe bozwi bobombami na bisika ya nkuku.’—Yisaya 45:1-3a.
4. (a) Mpo na nini Yehova abengi Sirise “mopakolami” na ye? (b) Ndenge nini Yehova akopesa Sirise bolongi?
4 Na monɔkɔ ya Yisaya, Yehova azali koloba na Sirise lokola nde azali na bomoi, nzokande na ntango ya Yisaya, Sirise abotamaki naino te. (Baloma 4:17) Lokola Yehova aponi Sirise bambula ebele liboso abotama, mpo na kokokisa mokumba moko ya sikisiki, akoki kobengama “mopakolami” ya Nzambe. Lokola Nzambe akotambwisa ye, akolonga bikólo, akosilisa makasi ya bakonzi mpe bakozanga makoki ya kobunda. Na nsima, ntango Sirise akobundisa Babilone, Yehova akosala ete baporte ya engumba yango etikala polele; na ndenge yango, baporte yango ekozala na ntina te, ekozala lokola baporte oyo babuká. Akotambola liboso ya Sirise mpe akolongola mabaku nyonso. Nsukansuka, basoda ya Sirise bakobɔtɔla engumba yango mpe bakozwa ‘biloko na yango ya motuya oyo ebombami,’ to bozwi na yango oyo ebombami na bisika ya molili. Yango nde makambo Yisaya asakoli. Maloba na ye ekokisamá?
5, 6. Ntango nini mpe ndenge nini esakweli oyo etali kokwea ya Babilone ekokisamaki?
5 Na mobu 539 liboso ya ntango na biso (L.T.B.)—mbula soki 200 nsima wana Yisaya akomaki esakweli yango—Sirise akómi mpenza na bifelo ya Babilone mpo na kobunda na engumba yango. (Yilimia 51:11, 12) Kasi, bato ya Babilone bazali komitungisa soki moke te. Bakanisi ete engumba na bango ekoki kokwea na mabɔkɔ ya banguna ata moke te. Pembenipembeni ya bifelo milaimilai oyo ezingi yango, ezali na baterase ya mozindo oyo etondi na mai ya Ebale Efalata, oyo ezali moko ya biloko oyo ebatelaka engumba yango. Banda mbula koleka monkama, ata monguna moko te akokaki kobunda na Babilone. Kutu, Belesasala, mokonzi oyo afandi na engumba yango, amoni ete likama ata moko te ekoki kokómela ye; yango wana, asali fɛti elongo na bato minene oyo basalaka na ndako na ye. (Danyele 5:1) Na butu yango—butu ya mokolo ya 5 Ɔkɔtɔbɛ mpo na kokóma mokolo ya 6 Ɔkɔtɔbɛ—Sirise asaleli mayele oyo ebongi mpenza mpo na kokweisa engumba yango.
6 Pene na Babilone, bato ya mayele ya Sirise bafungoli Ebale Efalata na mopanzi mpo na kolekisa mai na yango na nzela mosusu; yango esali ete mai ya ebale yango ekenda lisusu na sudi te epai engumba yango ezali. Eumeli te, ezala na kati ya Babilone to zingazinga na yango, mai ya ebale ekauki mpenza mpe basoda ya Sirise bakoki kokatisa mai yango na makolo mpo na kokɔta na kati mpenza ya engumba. (Yisaya 44:27; Yilimia 50:38) Likambo ya kokamwa, bakuti baporte oyo ezali pembenipembeni ya ebale, polele, se ndenge Yisaya asakolaki. Basoda ya Sirise bapanzani na Babilone mobimba, bakɔti na ndako ya Mokonzi Belesasala mpe babomi ye. (Danyele 5:30) Babɔtɔli engumba yango na butu moko kaka. Babilone ekwei, mpe esakweli ekokisami mobimba.
7. Na ndenge nini kokokisama kitoko mpenza ya esakweli ya Yisaya oyo etali Sirise epesaka baklisto makasi?
7 Ndenge esakweli yango ekokisamaki mobimba ezali kokómisa kondima ya baklisto makasi lelo oyo. Yango ezali kondimisa bango mpenza ete bisakweli mosusu ya Biblia oyo ekokisami naino te ebongi mpe bátyela yango motema. (2 Petelo 1:20, 21) Basambeli ya Yehova bayebi ete kokwea ya “Babilone Monene,” oyo emonisamaki na kokwea ya Babilone na mobu 539 L.T.B., esili kosalema na 1919. Sikoyo, bazali kozela na motema mɔtɔ kobebisama ya ebongiseli yango ya mangomba ya mikolo na biso. Bazali mpe kozela ete ebongiseli ya politiki oyo ezali kotambwisama na Satana elongolama ndenge elakamaki, mpe ete Satana akitisama na lobwaku mozindo mpe likoló ya sika ná mabelé ya sika etyama. (Emoniseli 18:2, 21; 19:19-21; 20:1-3, 12, 13; 21:1-4) Bayebi ete bisakweli ya Yehova ezali bilaka ya mpambampamba te, kasi elobelaka makambo ya sikisiki oyo ekosalema na mikolo ekoya. Elikya ya baklisto ya solo ekómaka makasi ntango bakanisaka lisusu ndenge esakweli ya Yisaya oyo etali kokwea ya Babilone ekokisamaki mobimba. Bayebi ete Yehova akokisaka ntango nyonso liloba na ye.
Ntina oyo Yehova alingi Sirise
8. Wapi ntina oyo Yehova asalisi Sirise alonga Babilone?
8 Nsima ya koyebisa nkombo ya moto oyo akokweisa Babilone mpe ndenge oyo akokweisa yango, Yehova alimboli ntina oyo akolongisa Sirise. Na esakweli, Yehova ayebisi Sirise boye: ‘Mpo ete oyeba ete ngai, Yehova, Nzambe ya Yisalaele, nabengi yo na nkombo na yo.’ (Yisaya 45:3b) Ebongi ete moyangeli ya ekólo ya minei oyo Biblia elobi ete elekaki makasi na mokili mobimba andima ete Moto oyo azali monene koleka ye, elingi koloba Yehova, Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, nde asalisi ye alonga na bolongi monene koleka bolongi nyonso oyo asilá kolonga. Sirise asengeli kondima ete ezali Yehova, Nzambe ya Yisalaele, nde abengi ye to apesi ye mokumba. Biblia emonisi ete Sirise andimaki mpenza ete Yehova nde asalisaki ye alonga na bolongi monene.—Ezela 1:2, 3.
9. Wapi ntina ya mibale oyo Yehova apesi Sirise nzela ya kolonga Babilone?
9 Yehova alimboli ntina ya mibale oyo apesi Sirise nzela alonga Babilone: ‘Mpo na mosaleli na ngai Yakobo mpe Yisalaele moponami na ngai, nabengi yo na nkombo na yo, napesi yo nkombo ya lokumu naino oyebi ngai te.’ (Yisaya 45:4) Kolonga oyo Sirise alongi Babilone ebongoli mpenza makambo na mokili. Yango elakisi kokwea ya ekólo moko oyo elekaki makasi na mokili mobimba mpe kotombolama ya ekólo mosusu oyo ekoleka makasi na mokili; lisusu, yango ekobongola makambo ya bato mpo na ntango molai. Nzokande, bato ya bikólo ya zingazinga oyo bazali kolanda mpenza makambo yango na likebi bakokamwa mbala mosusu ntango bakoyeba ete nyonso wana esalemi mpo na mwa bankóto ya bato “mpamba” oyo bazali na boombo na Babilone—Bayuda, bana ya Yakobo. Kasi, na miso ya Yehova, ndambo ya bato yango ya ekólo ya Yisalaele bazali mpenza bato mpamba te. Abengi bango “mosaleli” na ye. Na bikólo nyonso ya mabelé, bango nde bazali “moponami” na ye. Atako Sirise ayebaki Yehova liboso te, Yehova asaleli ye lokola mopakolami na ye mpo akweisa engumba oyo ezalaki koboya kozongisa bakangami ya bikólo mosusu epai na bango. Mokano ya Nzambe ezali te ete bato oyo ye aponi bányokwama libela na libela na mboka mopaya.
10. Wapi ntina oyo eleki monene oyo Yehova asaleli Sirise mpo na kosukisa Babilone, ekólo oyo elekaki makasi na mokili mobimba?
10 Ezali na ntina ya misato, oyo kutu eleki monene, oyo Yehova asaleli Sirise mpo na kokweisa Babilone. Yehova alobi ete: ‘Ngai nazali Yehova, mpe mosusu azali te, Nzambe mosusu azali te, bobele ngai; nakangi yo na loketo, ata oyebi ngai te, ete bato báyeba longwa na epai moi ebimaka mpe longwa na epai moi elalaka ete mosusu azali te, bobele ngai; ngai nazali Yehova, mosusu azali te.’ (Yisaya 45:5, 6) Ya solo, kokwea ya Babilone, ekólo oyo elekaki makasi na mokili mobimba, emonisi ete Yehova azali mpenza Nzambe; emonisi mpe na moto nyonso ete ebongi kosambela kaka ye. Lokola bato na ye bazwi bonsomi, bato ya bikólo mingi—kobanda na ɛsti tii na wɛsti—bakondima ete kaka Yehova nde azali Nzambe ya solo.—Malaki 1:11.
11. Ndakisa nini Yehova asaleli mpo na komonisa ete azali na nguya ya kokokisa mokano na ye oyo etali Babilone?
11 Tóbosana te ete esakweli oyo ya Yisaya ekomamaki mbula soki 200 liboso ete likambo yango esalema. Ntango bato mosusu bayokaki esakweli yango, mbala mosusu bamitunaki boye: ‘Yehova azali mpenza na nguya ya kokokisa esakweli yango?’ Makambo oyo eleká emonisi ete ezali bongo. Yehova alimboli ntina oyo ebongi tóndima ete azali na likoki ya kokokisa maloba na ye: “Ngai nakosala pole mpe nakobongisa molili; nakoyeisa kimya mpe nakokómisa mabe; ngai [Yehova] nakosala oyo nyonso.” (Yisaya 45:7) Yehova azali na bokonzi likoló na biloko nyonso akelá—ezala pole to molili—mpe likoló na makambo nyonso oyo eleká na bomoi ya bato—ezala kimya to mpasi. Se ndenge akeli pole na moi mpe molili na butu, akoyeisa kimya mpo na Yisalaele mpe mpasi mpo na Babilone. Yehova azali na nguya ya kokela molɔ́ngɔ́, azali mpe na nguya ya kokokisa bisakweli na ye. Likambo yango ezali lelo oyo kokitisa mitema ya baklisto, baoyo bazali komipesa na koyekola liloba na ye ya esakweli.
12. (a) Yehova asali ete likoló mpe mabelé ya elilingi ebimisa nini? (b) Elaka nini oyo ezali na Yisaya 45:8 ekoki kobɔndisa baklisto ya lelo?
12 Na ndenge ebongi mpenza, Yehova azwi ndakisa ya makambo oyo esalemaka na mabelé mpo na kolobela makambo oyo ekokómela Bayuda oyo bazali na boombo: ‘Ee lola, nokisá na nse longwa na likoló, mpe tiká ete mapata mayeisa boyengebene lokola mbula; tiká ete mokili mozipwana ete mobimisa kobikisama, tiká ete etɔisa mpe boyengebene lokola. Ngai Yehova natongaki yango.’ (Yisaya 45:8) Se ndenge oyo lola to likoló ya solosolo enokisaka mbula oyo esalaka ete bomoi ezala, Yehova akosopela basaleli na ye, longwa na likoló ya elilingi, mapamboli mpe mateya oyo ekosalisa bango bázala bayengebene. Lisusu, se ndenge oyo mokili to mabelé ya solosolo efungwanaka mpo na kobota ebele ya mbuma, Yehova akosɛnga mabelé ya elilingi ebimisa makambo oyo eyokani na mokano na ye ya sembo—mingimingi kobikisama ya basaleli na ye oyo bakangami na boombo na Babilone. Na 1919, Yehova asalaki ete ‘likoló’ mpe ‘mabelé’ ebimisa makambo ya ndenge wana mpo na kosikola bato na ye. Ntango baklisto ya lelo bazali komona makambo yango, ezali kopesa bango esengo. Mpo na nini? Mpamba te makambo yango ezali kolendisa kondima na bango wana bazali kozela na motema likoló ntango oyo likoló ya elilingi, elingi koloba Bokonzi ya Nzambe, ekopambola mabelé moko ya boyengebene. Na ntango wana, boyengebene mpe lobiko oyo ekouta na likoló mpe na mabelé ya elilingi ekozala na bisika mingi koleka ndenge ezalaki ntango Babilone ya kala ekweaki. Kokokisama wana ya nsuka ya maloba ya Yisaya ekozala mpenza na nkembo mingi!—2 Petelo 3:13; Emoniseli 21:1.
Kondima bokonzi ya Yehova epesaka bolamu
13. Mpo na nini ezali likambo ya bozoba ete bato bátɛmɛla mikano ya Yehova?
13 Nsima ya kolobela bolamu oyo ekoya, Yisaya abongoli mbala moko ndenge ya koyebisa esakweli na ye mpe asakoli mawa mibale: ‘Mawa na ye oyo akowelana na motongi na ye! Ye eteni ya mbɛki kati na biteni ya mbɛki ya mabelé! Lima ekoloba nde na ye oyo azali koyema yango ete, Yo okosala nini? To eloko oyo osali ekoloba ete: “Azali na mabɔkɔ te”? Mawa na ye oyo akoloba na tata ete, Yo ozali kobota nini? To koloba na mama ete, Yo ozali na mpasi mpo na kobota nini?’ (Yisaya 45:9, 10) Ekoki kozala ete bana ya Yisalaele baboyi kondima makambo oyo Yehova asakoli. Ntango mosusu, bandimi te ete Yehova akotika nzela ete bámema bato na ye na boombo. To, ntango mosusu basepeli te na likanisi oyo ete mokonzi ya ekólo moko ya bapakano nde akosikola Yisalaele, na esika ete ezala mokonzi moko ya libota ya Davidi. Mpo na komonisa ete ntembe na bango ezali bozoba, Yisaya akokanisi bato yango ya ntembe na mwa lima mpe na biteni ya mbɛki oyo ebwakami kasi ezali kobanga te kotyela bwanya ya mosali na yango ntembe. Eloko oyo moyemi-mbɛki asali mpenza ekómi sikoyo koloba ete ye azali na mabɔkɔ te to azali na nguya te ya koyema. Talá bozoba ya ndenge wana! Bato yango ya ntembe bakokani na bana mike oyo bazali kobanga te kotɔnga baboti na bango.
14, 15. Maloba “Mosantu” mpe “motongi” emonisi nini na ntina na Yehova?
14 Yisaya ayebisi bato yango ya ntembe eyano ya Yehova: ‘Yehova alobi boye, Mosantu ya Yisalaele mpe motongi na ye, ete, Tuná ngai mpo na makambo makoya, lakisá ngai mpo na bana na ngai mpe mosala na mabɔkɔ na ngai. Ngai nasalaki mokili mpe natongaki moto likoló na yango; ngai, na mabɔkɔ na ngai, nasembolaki likoló mpe nalakisaki ebolo mobimba na yango. Ngai natɛlɛmisi moto moko na boyengebene, mpe nakosembola nzela na ye nyonso; akotonga mboka na ngai mpe akokangola bakangami na ngai, mpo na litomba te mpe mpo na motuya te. Yehova na bibele alobi boye.’—Yisaya 45:11-13.
15 Ndenge bavɛrsɛ yango ebengi Yehova “Mosantu” ebendi likebi na bosantu na ye. Ndenge ebengi ye “motongi,” emonisi polele lotomo na ye ya kopona ndenge oyo ye alingi ete makambo esalema mpamba te azali Mozalisi. Yehova azali na likoki ya koyebisa bana ya Yisalaele makambo ekoya mpe ya kobatela mosala oyo mabɔkɔ na ye esali, elingi koloba basaleli na ye. Tomoni lisusu awa ete se ndenge oyo Yehova akoki kokela eloko nyonso oyo alingi, akoki mpe koyebisa likambo nyonso oyo alingi. Lokola Yehova azali Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, azali na lotomo ya kotambwisa makambo na ndenge oyo alingi. (1 Ntango 29:11, 12) Na likambo oyo tozali kolobela, Mokonzi Monene azwi ekateli ya kopona Sirise, mopakano, mpo ete azala mosikoli ya Yisalaele. Se ndenge oyo likoló ná mabelé ezali biloko ya solo mpenza, Sirise, atako ayei naino te, akoya mpenza. Na boye, mwana nini ya Yisalaele akozwa mpiko ya kotɔnga Tata, “Yehova na bibele”?
16. Mpo na nini basaleli ya Yehova basengeli kotosa ye?
16 Kaka bavɛrsɛ yango ya Yisaya emonisi mpe ntina mosusu oyo esengeli kotinda basaleli ya Nzambe bátosa ye. Bikateli na ye ezalaka ntango nyonso mpo na bolamu na bango. (Yobo 36:3) Abimisaki mibeko mpo ete basaleli na ye bázwela yango litomba. (Yisaya 48:17) Na mikolo ya Sirise, Bayuda oyo bandimi bokonzi ya Yehova bamoni ete likambo yango ezali solo. Sirise asali makambo oyo eyokani na boyengebene ya Yehova, abimisi bango na Babilone mpe azongisi bango na mboka na bango mpo bátonga lisusu tempelo. (Ezela 6:3-5) Ndenge moko mpe lelo oyo, baoyo bazali kosalela mibeko ya Nzambe na bomoi na bango mpe bazali kotosa bokonzi na ye bazwaka mapamboli.—Nzembo 1:1-3; 19:7; 119:105; Yoane 8:31, 32.
Bolamu mpo na bikólo mosusu
17. Longola Yisalaele, banani mosusu bakozwa litomba na kobikisama ya Yehova, mpe bakozwa yango ndenge nini?
17 Kokwea ya Babilone ekomema bolamu kaka na Yisalaele te. Yisaya alobi boye: ‘Yehova alobi boye ete, basali ya Ezipito oyo bazwi lifuti te mpe bato ya mombongo ya Etiopia mpe bato ya Sebaya, bato milai, bakoyela yo bango moko mpe bakozala ya yo; bakolanda yo, bakoyela yo na minyɔlɔlɔ mpe bakogumbama liboso na yo. Bakobondela yo ete, Nzambe azali na bomoko elongo na yo, mosusu azali te; Nzambe mosusu azali te, bobele yo.’ (Yisaya 45:14) Na mikolo ya Moize, “ebele ya bato ya ndenge na ndenge,” oyo bazalaki Bayisalaele te, bakendeki elongo na Bayisalaele ntango babimaki na Ezipito. (Exode 12:37, 38) Ndenge moko mpe, bato ya bikólo mosusu bakokende elongo na Bayuda ntango bakobima na boombo na Babilone mpo na kozonga na mboka na bango. Bakotinda bango na makasi te, kasi ‘bakoya bango moko.’ Ntango Yehova alobi ete “bakogumbama liboso na yo” mpe ete “bakobondela yo,” azali nde komonisa ete bato yango ya bikólo mosusu bakondima bango moko kotosa mpe komonisa bokangami na bango epai ya Yisalaele. Soki bakolata minyɔlɔlɔ, bango moko nde bakolinga bongo mpo na komonisa ete bandimi kosalela ekólo oyo Nzambe asalaki na yango kondimana; bakoloba na ekólo yango boye: “Nzambe azali na bomoko elongo na yo.” Bakozala bandimi ya sika oyo bakosambela Yehova mpe bakotosa kondimana oyo asalaki na Yisalaele.—Yisaya 56:6.
18. Lelo oyo, banani bazwi litomba na ndenge Yehova asikoli “Yisalaele ya Nzambe,” mpe na ndenge nini?
18 Banda 1919, mbula oyo “Yisalaele ya Nzambe” ebimaki na boombo ya elimo, maloba ya Yisaya ekokisami koleka ndenge ekokisamaki na mikolo ya Sirise. Na mokili mobimba, bamilio ya bato bazali kondima kosalela Yehova. (Bagalatia 6:16; Zekalia 8:23) Ndenge moko na “basali” mpe “bato ya mombongo” oyo Yisaya atángi, bato yango bazali kosalela na esengo nyonso makasi mpe mbongo na bango mpo na kosimba losambo ya solo. (Matai 25:34-40; Malako 12:30) Bazali komipesa na Nzambe mpe bazali kotambola na banzela na ye; na esengo nyonso, bazali kokóma baombo na ye. (Luka 9:23) Bazali kosambela kaka Yehova mpe bazali kozwa matomba na ndenge bazali kosala elongo na “moombo ya sembo mpe ya mayele” ya Yehova, oyo azali na kati ya kondimana ya motuya mingi elongo na Nzambe. (Matai 24:45-47; 26:28; Baebele 8:8-13) Atako “basali” mpe “bato ya mombongo” yango bazali na kati ya kondimana yango te, bazali kozwela yango litomba mpe bazali kotosa mibeko na yango; bazali kosakola na mpiko nyonso ete: “Nzambe mosusu azali te.” Oyo nde esengo ya komona polele lelo oyo ndenge bato yango oyo bazali kondima kosimba losambo ya solo bazali kobakisama se kobakisama!—Yisaya 60:22.
19. Nini ekokómela baoyo balingi te kotika losambo ya bikeko?
19 Nsima ya koyebisa ete bato ya bikólo mosusu bakosambela Yehova, mosakoli agangi boye: “Solo yo ozali Nzambe oyo akomibomba, ee Nzambe ya Yisalaele, mobikisi.” (Yisaya 45:15) Atako Yehova alingi kosalela nguya na ye na mikolo oyo te, kasi akomibomba lisusu te na mikolo ezali koya. Akomonisa ete azali Nzambe ya Yisalaele, Mobikisi ya bato na ye. Kasi, Yehova akozala Mobikisi te ya baoyo batyelaka bikeko motema. Mpo na bato yango, Yisaya alobi boye: “Bango nyonso mpenza bakoyoka nsɔni mpe bakosambwisama. Basali ya bikeko, bango nyonso elongo bakotambola na nsɔni.” (Yisaya 45:16, NW) Kosambwisama na bango ekozala makasi koleka nsɔni ya mwa ntango mokuse. Ekozala nde liwa—likambo oyo ekeseni mpenza na oyo, na nsima, Yehova alaki Yisalaele.
20. Na ndenge nini Yisalaele ekozwa “lobiko ya seko”?
20 “Kasi Yisalaele akobikisama mpenza na lobiko ya seko na bomoko elongo na Yehova. Bokoyoka nsɔni te, bokosambwisama mpe te libela na libela.” (Yisaya 45:17, NW) Yehova alaki Yisalaele lobiko ya seko, kasi mpo na kozwa yango Yisalaele asengeli kosala likambo moko. Asengeli kotikala “na bomoko elongo na Yehova.” Ntango Yisalaele akobebisa bomoko yango wana akoboya kondima ete Yesu azali Masiya, ekólo yango ekobungisa elikya ya kozwa “lobiko ya seko.” Kasi, bato mosusu ya Yisalaele bakondima Yesu mpe bakozala bato ya liboso ya Yisalaele ya Nzambe oyo ekozwa esika ya Yisalaele ya mosuni. (Matai 21:43; Bagalatia 3:28, 29; 1 Petelo 2:9) Yisalaele ya elimo ekosambwisama ata mokolo moko te. Ekokɔta na kati ya “kondimana moko ya seko.”—Baebele 13:20.
Na biloko asalá mpe na makambo amonisá, Yehova abongi kotyelama motema
21. Ndenge nini Yehova amonisi ete ebongi tótyela ye motema mobimba na makambo ya bozalisi mpe ya komonisa makambo oyo ekoya?
21 Bayuda bakoki kotya motema na elaka ya Yehova ya kopesa lobiko ya seko na Yisalaele? Yisaya ayanoli boye: ‘Yehova alobi boye, ye oyo asalaki likoló, ye azali Nzambe, ye oyo atongaki mokili mpe asalaki yango; ye akokisaki yango, asalaki yango kaka mpamba te, atongaki yango ete bato báfanda wana; ye ete, Ngai nazali Yehova, mosusu azali te. Nalobaki na nkuku te, na mokili ya molili te, nalobaki te na bana ya Yakobo ete, Bóluka ngai kaka mpamba. Ngai nazali Yehova, nalobaka makambo oyo ezali sembo mpe nayebisaka makambo oyo ezali alima.’ (Yisaya 45:18, 19) Mpo na mbala ya minei mpe ya nsuka na mokapo oyo, Yisaya abandi esakweli moko ya ntina mingi na maloba oyo: “Yehova alobi boye.” (Yisaya 45:1, 11, 14) Yehova alobi nini? Alobi ete ebongi tótyela ye motema na makambo ya bozalisi mpe ya komonisa makambo oyo ekoya. Akelaki mabelé “kaka mpamba te.” Ndenge moko mpe, asɛngi te na Yisalaele, bato na ye ete, báluka ye “kaka mpamba.” Lokola mokano ya Nzambe mpo na mabelé ekokokisama, ekozala mpe ndenge moko mpo na mokano na ye oyo etali libota oyo ye aponi. Maloba ya Yehova ezali kolobama na miso ya bato nyonso, kasi ezali bongo te mpo na bansango ya molili oyo basaleli ya banzambe ya lokuta balobaka. Maloba na ye ezali sembo, mpe ekokokisama. Baoyo bazali kosalela ye bakosalela ye mpamba te.
22. (a) Likambo nini Bayuda oyo bazali na boombo na Babilone basengeli kondima yango? (b) Likambo nini baklisto ya lelo oyo bandimi mpenza?
22 Mpo na basaleli ya Nzambe oyo bazali na boombo na Babilone, maloba wana endimisi bango ete Mokili ya Ndaka ekotikala mpamba te. Bato bakofanda kuna lisusu. Mpe bilaka oyo Yehova apesi bango ekokisami. Ndenge moko mpe, maloba ya Yisaya ezali kondimisa basaleli ya Nzambe lelo oyo ete mabelé ekobebisama te mpe ekotikala mpamba te—mɔtɔ ekozikisa yango te, ndenge bato mosusu bakanisaka; ekobebisama mpe te na babɔmbi ya niklɛɛrɛ, ndenge bato mosusu babangaka. Mokano ya Nzambe ezali ete mabelé eumela libela, ezala paladiso moko kitoko mpe bato ya sembo báfanda wana. (Nzembo 37:11, 29; 115:16; Matai 6:9, 10; Emoniseli 21:3, 4) Ɛɛ, maloba ya Yehova ekomonana mpenza ete ebongi kotyelama motema se ndenge emonanaki mpo na Yisalaele.
Yehova amonisi motema mawa na ye
23. Likambo nini ekokómela baoyo basambelaka bikeko? Bongo baoyo basambelaka Yehova?
23 Maloba oyo Yehova akoloba sikoyo emonisi polele lobiko oyo Yisalaele akozwa: ‘Bómiyanganisa mpe bóya, bóbɛlɛma penepene, bino bobikisami kati na mabota. Bazali na boyebi te baoyo bakokumbaka nzete ya ekeko na bango mpe baoyo bakobondelaka nzambe oyo ayebi kobikisa te. Bósakola, bóyebisa likambo na bino, bóluka toli elongo moko. Nani ayebisaki likambo oyo kalakala? Nani asakolaki yango na ntango ya liboso? Ezalaki ngai te, ngai Yehova? Nzambe mosusu azali te, bobele ngai. Nzambe ya boyengebene, mpe mobikisi; mosusu azali te, bobele ngai.’ (Yisaya 45:20, 21) Yehova asɛngi ‘baoyo babikisami’ bákokanisa kobikisama na bango na likambo oyo ekómeli baoyo basambelaka bikeko. (Deteronome 30:3; Yilimia 29:14; 50:28) Basambeli ya bikeko “bazali na boyebi te” mpamba te bazali kobondela mpe kosalela banzambe oyo bazangi nguya, oyo bakoki mpe kobikisa bango te. Losambo na bango ezali na ntina te—ezali kaka mpamba. Nzokande, baoyo bazali kosambela Yehova bazali komona ete azali na nguya ya kokokisa makambo oyo asakolá “kalakala,” na ndakisa kobikisama ya bato ya ekólo na ye na boombo ya Babilone. Nguya wana mpe likoki wana ya koyeba makambo oyo ekoya nsima ekesenisi Yehova na banzambe mosusu nyonso. Ya solo, azali ‘Nzambe ya boyengebene mpe mobikisi.’
‘Lobiko na biso euti na Nzambe na biso’
24, 25. (a) Likambo nini Yehova asɛngi, mpe mpo na nini ntembe ezali te ete elaka na ye ekokokisama? (b) Na lotomo oyo Yehova azali na yango, likambo nini asɛngi?
24 Motema mawa ya Yehova etindi ye asɛnga bato likambo oyo: ‘Bóbaluka epai na ngai mpe bóbika, bino nyonso oyo bozali na ndelo ya mokili; mpo ete ngai nazali Nzambe mpe mosusu azali te. Nakati ndai mpo na ngai moko, longwa na monɔkɔ na ngai liloba esili kobima na boyengebene, liloba oyo ekozonga te, ete, Liboso na ngai mabɔlɔngɔ nyonso makogumbama, ndemo nyonso ekokata ndai. Ekolobama mpo na ngai ete, Solo bobele kati na Yehova boyengebene mpe nguya nyonso ezali; epai na ye bakoya mpe bakozwa nsɔni baoyo nyonso basilikelaki ye. Kati na Yehova bana nyonso ya Yisalaele bakolongisama mpe bakomikumisa.’—Yisaya 45:22-25.
25 Yehova alaki Yisalaele ete, na bato oyo bafandi na Babilone, akobikisa baoyo bakobaluka epai na ye. Esakweli na ye ekoki kozanga kokokisama te mpamba te Yehova azali na mposa mpe na likoki ya kobikisa basaleli na ye. (Yisaya 55:11) Maloba ya Nzambe yango moko ebongi kotyelama motema; kasi ebongi lisusu kotyelama motema koleka soki Yehova akati ndai mpo na komonisa ete ekosalema mpenza. (Baebele 6:13) Na lotomo oyo azali na yango, asɛngi baoyo balingi ete andima bango bátosa ye (“mabɔlɔngɔ nyonso makogumbama”) mpe bámipesa (“ndemo nyonso ekokata ndai”). Bayisalaele oyo batiki kosambela Yehova te bakobikisama. Bakozala na likoki ya komikumisa mpo na makambo oyo Yehova akosalela bango.—2 Bakolinti 10:17.
26. Ndenge nini “ebele ya bato” oyo bauti na bikólo nyonso bazali kobaluka epai ya Yehova ndenge azali kosɛnga bango?
26 Nzokande, Nzambe asɛngi kaka te na bato oyo bakangamaki na boombo na Babilone ya ntango ya kala ete bábaluka epai na ye. (Misala 14:14, 15; 15:19; 1 Timote 2:3, 4) Tii lelo oyo, azali kaka kosɛnga bato básala likambo yango, mpe “ebele ya bato . . . [oyo] bauti na bikólo nyonso” bazali kosala likambo yango mpe bazali koloba ete: ‘Lobiko na biso euti na Nzambe na biso mpe na Mwana-Mpate [Yesu].’ (Emoniseli 7:9, 10; 15:4) Mbula na mbula, bankóto ya bato ya sika bazali se kobakisama na ebele ya bato yango; yango wana, bazali kobaluka epai ya Nzambe, kondima na motema mobimba bokonzi na ye mpe koyebisa bato ete bazali sembo epai na ye. Lisusu, bazali kosunga na bosembo nyonso Yisalaele ya elimo, “momboto ya Abalayama.” (Bagalatia 3:29) Bazali komonisa ete balingi boyangeli ya sembo ya Yehova, yango wana, bazali kosakola mokili mobimba ete: “Solo bobele kati na [Yehova] boyengebene mpe nguya nyonso ezali.”a Na mokanda oyo ntoma Paulo akomelaki baklisto ya Loma, azongelaki maloba ya Yisaya 45:23 ndenge ebongolami na Septante mpo na komonisa ete nsukansuka moto nyonso oyo azali na bomoi akondima bokonzi ya Nzambe mpe akokumisa nkombo na ye ntango nyonso.—Baloma 14:11; Bafilipi 2:9-11; Emoniseli 21:22-27.
27. Mpo na nini baklisto bakoki lelo oyo kotyela bilaka ya Yehova motema na bango mobimba?
27 Mpo na nini baoyo bazali kati na ebele ya bato bazali na elikya ete lokola babaluki epai ya Nzambe bakobika? Mpamba te bilaka ya Yehova ebongi kotyelama motema, ndenge maloba ya esakweli oyo ezali na Yisaya mokapo 45 emonisi yango polele. Se ndenge Yehova amonisaki nguya mpe bwanya mpo na kokela likoló mpe mabelé, akomonisa mpe nguya mpe bwanya mpo na kokokisa bisakweli na ye. Lisusu, se ndenge asalaki ete esakweli oyo etali Sirise ekokisama, akokokisa mpe bisakweli mosusu ya Biblia oyo ekokisami naino te. Yango wana, basambeli ya Yehova bakoki mpenza kozala na elikya ete mosika te Yehova akomonisa lisusu ete azali “Nzambe ya boyengebene, mpe mobikisi.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na makomi ya Liebele, batye liloba ‘boyengebene’ na boike (pluriel). Bakomi yango bongo mpo na komonisa ete boyengebene ya Yehova etondi mɛkɛ.
[Bililingi na lokasa 80, 81]
Yehova, ye oyo asalaka pole mpe abongisaka molili, akoki koyeisa kimya mpe kobimisa mpasi
[Elilingi na lokasa 83]
Yehova akosala ete ‘likoló’ enokisa mapamboli mpe ‘mabelé’ ebimisa lobiko
[Elilingi na lokasa 84]
Biteni ya mbɛki oyo ebwakami esengeli nde kotyela bwanya ya mosali na yango ntembe?
[Elilingi na lokasa 89]
Yehova akelaki mabelé mpamba te