Mokapo ya Nsambo
Bózongela losambo ya Yehova
1. Tángá nkombo ya banzambe mibale ya Babilone oyo bayebanaki mingi; mpe nini esakolami mpo na bango?
NTANGO Bayisalaele bakozala na boombo na Babilone, bakofanda na esika oyo etondi na losambo ya lokuta. Na mikolo ya Yisaya, bato ya ekólo ya Yehova bazali naino na mboka na bango mpenza, mpe bazali na tempelo ná banganga-nzambe. Atako bongo, mingi kati na bato ya ekólo oyo emipesaki na Nzambe bakwei na losambo ya bikeko. Yango wana, esengeli kobongisa makanisi na bango liboso mpo bábanga banzambe ya Babilone te to bámekama te ete básambela banzambe yango ya lokuta. Na bongo, ntango azali kosakola makambo ya banzambe mibale ya Babilone oyo bayebanaki mingi, Yisaya alobi boye: ‘Bele azali kogumbama, Nebo amikitisi na nse; bikeko na bango ezali likoló na nyama mpe na bibwele; biloko bazali kokumba bikómi na bozito, lokola mikumba ya nyama oyo ezali kolɛmba.’ (Yisaya 46:1) Bele ezali nkombo ya nzambe monene ya Bakaladi. Basambelaka Nebo ete ezali nzambe ya bwanya mpe ya boyebi. Emonani ete bato mingi bazalaki komemya banzambe mibale yango mpamba te bato mosusu ya Babilone bamipesaki bankombo oyo euti na bankombo na bango, lokola Belesasala, Nabopolasala, Nebukadanesala mpe Nebuzaladana.
2. Ndenge nini bamonisi polele ete banzambe ya Babilone bazali na nguya te?
2 Yisaya alobi ete Bele “azali kogumbama” mpe Nebo “amikitisi na nse.” Banzambe wana ya lokuta bakobwakama na nse. Ntango Yehova akopesa Babilone etumbu, banzambe yango bakokoka te kosalisa basambeli na bango. Bakokoka kutu te komibikisa bango moko! Bakokumba lisusu Bele ná Nebo te mpo na kotambolisa bango na lokumu mpenza na badefile, ndenge bato ya Babilone bamesanaki kosala yango na fɛti na bango ya Bonane. Kasi baoyo bazali kosambela bango bakobenda bango nde kobenda lokola mikumba mpamba ya kilo. Na esika ete bákumisa mpe básambela bango, bakokóma nde kosɛka mpe kotyola bango.
3. (a) Likambo nini ekopesa bato ya Babilone mpasi? (b) Liteya nini tokoki kozwa lelo na likambo oyo ekómelaki banzambe ya Babilone?
3 Bato ya Babilone bakoyoka mpasi ntango bakoyeba ete banzambe na bango oyo balingaka mingi bazali kaka mikumba mpamba oyo banyama elɛmbá nde esengeli kobenda! Ndenge moko lelo, banzambe ya mokili, to biloko oyo bato batyelaka motema mpe oyo bapesaka makasi na bango mpe ata bomoi na bango mpo na yango, ezali lokola ndɔtɔ. Bomɛngo, bibundeli, bisengo, bakonzi, ekólo to bilembo na yango, mpe biloko mosusu mingi ekómi biloko oyo bato bazali kosambela. Na ntango oyo Yehova abongisi, ekomonana polelepolele ete banzambe yango bazali na ntina moko te.—Danyele 11:38; Matai 6:24; Misala 12:22; Bafilipi 3:19; Bakolose 3:5; Emoniseli 13:14, 15.
4. Na ndimbola nini banzambe ya Babilone “bakitisami” mpe “bagumbami”?
4 Mpo na komonisa lisusu polele ete banzambe ya Babilone bazali na nguya ata moke te, esakweli yango elandi koloba: “Bakitisami, bagumbami elongo, bayebi kobikisa mokumba te nde bango mpenza bakei kokangama.” (Yisaya 46:2) Banzambe ya Babilone bamonani ete “bakitisami” mpe “bagumbami,” lokola nde bazoki mpota na etumba to basili makasi mpo na bobange. Bazali ata na likoki te ya koyeisa mokumba ya banyama yango pɛpɛlɛ to kobikisa yango. Bongo, bato ya ekólo oyo esalaki kondimana elongo na Yehova, atako bazali baombo na Babilone, basengeli solo kopesa bango lokumu? Soki moke te! Se ndenge moko, ata ntango basaleli ya Yehova oyo bapakolami na elimo bazalaki na boombo ya elimo, bapesaki lokumu soki moke te na banzambe ya “Babilone Monene.” Banzambe yango bakokaki te kopekisa kokwea ya Babilone Monene na 1919, mpe bakokoka te kobikisa ye na mpasi oyo ekokwela ye na ntango ya “bolɔzi monene.”—Emoniseli 18:2, 21; Matai 24:21.
5. Ndenge nini baklisto ya mikolo na biso baboyaka kosala mabunga oyo basambeli ya bikeko ya Babilone basalaki?
5 Baklisto ya solo ya mikolo na biso bafukamelaka bikeko te, ata ya ndenge nini. (Yoane 5:21) Ekulusu ya Yesu, sapɛlɛ, mpe bililingi ya basantu ekobɛlɛmisa moto na Mozalisi ata moke te. Yango ekoki mpe kobondela ye mpo na biso te. Na ekeke ya liboso, Yesu ateyaki bayekoli na ye lolenge malamu ya kosambela Nzambe ntango alobaki boye: “Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi. Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te. Soki bosɛngi eloko na nkombo na ngai, nakosala yango.”—Yoane 14:6, 14.
“Bokumbami longwa na ebotelo”
6. Na ndenge nini Yehova akeseni na banzambe ya bikólo mosusu?
6 Nsima ya koyebisa polele ete kosambela bikeko ya banzambe ya Babilone ezali na ntina moko te, Yehova alobi na bato na ye boye: ‘Ee ndako na Yakobo, yokamelá ngai, bino batikali ya ndako mobimba ya Yisalaele, baoyo bakumbami na ngai longwa na libumu, bokumbami longwa na ebotelo.’ (Yisaya 46:3) Yehova akeseni mpenza na bikeko ya Babilone! Banzambe ya Babilone bakoki kosala eloko moko te mpo na basambeli na bango. Mpo na kotambola, esengeli banyama oyo ekumbaka mikumba emema bango. Nzokande, Yehova nde azali komema bato na ye. Asungi bango ‘longwa na ebotelo to matrisi,’ banda ntango oyo ekólo yango esalemaki. Soki Bayuda bakanisaki ndenge Yehova azalaki kokumba bango, mbɛlɛ yango elendisi bango mpo bákima losambo ya bikeko mpe bátyela ye, Tata mpe Moninga na bango, motema.
7. Na ndenge nini Yehova abatelaka basaleli na ye na boboto koleka ndenge baboti babatelaka bana na bango?
7 Yehova asololi lisusu na bato na ye na maloba ya boboto mpenza: ‘Mpe kino ntango ya konuna, ngai oyo, kino nsuki na bino ekómi pɛɛ ngai nakokumba bino, ngai nasalaki, ngai nakokumba, ngai nakokumba mpe ngai nakobikisa.’ (Yisaya 46:4) Likebi oyo Yehova atyelaka basaleli na ye eleki oyo ya baboti ya bolingo mpenza. Ntango bana bazali kokola, baboti bamonaka ete bazali lisusu na mokumba monene te epai na bango. Ntango baboti bakómi mibange, bana nde babatelaka bango. Mpo na Yehova, ezalaka bongo soki moke te. Atikaka te kobatela bana na ye awa na mabelé, ata na ntango oyo bakómi mibange. Basaleli ya Nzambe na mikolo na biso batyelaka Mozalisi na bango motema mpe balingaka ye mingi, na bongo maloba oyo ya esakweli ya Yisaya ebɔndisaka bango mingi. Basengeli te komitungisa mpo na mwa mikolo to bambula oyo basengeli lisusu kolekisa na kati ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo. Yehova alaki ete ‘akokumba to akolanda kokumba’ baoyo bakómi mibange, akopesa bango nguya mpo na koyika mpiko mpe kotikala sembo. Akokumba bango, akopesa bango makasi mpe akobikisa bango.—Baebele 6:10.
Kebá na bikeko ya mikolo na biso
8. Lisumu nini bato mosusu ya ekólo ya Yisaya basali oyo ekoki kolimbisama te?
8 Kanisá ndenge bato ya Babilone oyo batyeli bikeko motema bakolɛmba nzoto, ntango ekomonana mpenza ete bikeko yango ezali na ntina moko te. Bato ya Yisalaele basengeli nde kokanisa ete banzambe yango bakokani na Yehova? Ata moke te. Yango wana Yehova atuni boye: ‘Bokokokanisa ngai na nani? Bokozalisa ngai lolenge moko na nani? Bokokokanisa ngai na nani ete tózala motindo moko?’ (Yisaya 46:5) Bato mosusu ya ekólo ya Yisaya bakoki kolimbisama te lokola bamipesi na kosambela bikeko oyo elobaka te, oyo ezangi bomoi mpe nguya! Mpo na ekólo oyo eyebi Yehova, kotya motema na bikeko esalemi na bato, oyo ezangi bomoi, oyo kutu emibikisaka te, ezali bozoba mpenza.
9. Monisá makanisi ya bozoba ya basambeli mosusu ya bikeko.
9 Talá sikoyo makanisi ya bozoba ya bato oyo basambelaka bikeko. Esakweli elandi boye: ‘Baoyo bakobimisa wolo mingi na libenga, bakomeka bozito na palata na emekeli, bakopesa mosali na wolo mosolo mpe akosala na yango nzambe, wana bakogumbama mpe bakosambela!’ (Yisaya 46:6) Lokola nde ekeko oyo esalemi na biloko ya ntalo ezali na nguya ya kobikisa mingi koleka oyo esalemi na libaya, basambeli ya bikeko yango bazali kobimisa ebele ya mosolo oyo esɛngami mpo na kosala banzambe na bango. Nzokande, ata batye milende mingi mpo na kosala yango to ata basali yango na biloko ya ntalo boni, ekeko ekotikala kaka ekeko.
10. Ndenge nini emonisami polele ete losambo ya bikeko ezali na ntina te?
10 Esakweli yango elandi komonisa polele bozoba ya losambo ya bikeko na maloba oyo: ‘Bakotombola yango na mapeka na bango, bakokumba yango, bakotya yango na esika na yango mpe ekotɛlɛma wana. Eyebi kolongwa na esika na yango te. Soko moto akoganga epai na yango, ekozongisa monɔkɔ te, ekobikisa ye na mpasi na ye mpe te.’ (Yisaya 46:7) Ezali nsɔni mpenza kobondela ekeko, yango ekoki koyoka te to kosala eloko moko te! Mokomi ya nzembo amonisaki polele ete biloko yango ya losambo ezali na ntina moko te: ‘Bikeko na bango ezali biloko ya palata mpe wolo, bisalami na mabɔkɔ ya bato. Bizali na monɔkɔ kasi bilobaka te; bizali na miso kasi bimonaka te; bizali na matoi kasi biyokaka te; bizali na zolo kasi bilumbutaka nsolo te; bizali na mabɔkɔ kasi bisimbaka te; bizali na makolo kasi bitambolaka te, bilobaka na mongongo na yango te. Baoyo basalaka yango bakokóma lokola yango, baoyo bakotya elikya na bango wana bazali mpe bongo.’—Nzembo 115:4-8.
‘Bómimonisa bato ya mpiko mpenza’
11. Nini ekosalisa baoyo bazali lokolo moko na losambo ya solo lokolo mosusu na losambo ya bikeko mpo ‘bámimonisa bato ya mpiko mpenza’?
11 Lokola auti komonisa ete losambo ya bikeko ezali na ntina moko te, sikoyo Yehova azali koyebisa bato na ye ntina oyo basengeli kosalela ye: ‘Bókanisa oyo mpe bómimonisa bato ya mpiko mpenza, bótya yango na motema, bino bato na masumu. Bóbanzabanza mpo na makambo na liboso na kala, mpo ete ngai nazali Nzambe mpe mosusu azali te; ngai nazali Nzambe, mosusu azali lokola ngai te.’ (Yisaya 46:8, 9) Ebongi bato oyo bazalaka lokolo moko na losambo ya solo lokolo mosusu na losambo ya bikeko bákanisa makambo oyo eleká. Basengeli kokanisa makambo oyo Yehova asalaki. Yango ekosalisa bango bámonisa ete bazali bato ya mpiko mpenza mpe básala oyo ezali sembo. Ekosalisa bango bázongela losambo ya Yehova.
12, 13. Etumba nini baklisto bazali kobunda, mpe ndenge nini bakoki kolonga yango?
12 Tii lelo maloba ya kolendisa wana ezali naino na ntina. Lokola Bayisalaele, baklisto ya motema sembo basengeli kobundisa komekama ndenge na ndenge mpe kozanga kokoka na bango. (Baloma 7:21-24) Longola yango, bazali kobunda etumba ya elimo na monguna moko oyo amonanaka te kasi aleki bango na makasi mosika mpenza. Ntoma Paulo alobi boye mpo na etumba yango: ‘Tozali kobunda líbanda na makila mpe mosuni te, kasi na baguvɛrnema, na bakonzi, na bayangeli ya mokili ya molili oyo, na mampinga ya bilimo mabe na kati ya bisika ya likoló.’—Baefese 6:12.
13 Satana ná bademo na ye bakosala nyonso oyo ekoki na bango mpo na kopɛngola baklisto na losambo ya solo. Mpo baklisto bálonga etumba yango, basengeli kolanda toli ya Yehova mpe komonisa ete bazali bato ya mpiko mpenza. Ndenge nini? Ntoma Paulo amonisi yango boye: “Bólata molato mobimba ya etumba oyo mouti na Nzambe mpo bókoka kotɛlɛma ngwi liboso ya mayele mabe ya Zabolo.” Yehova atindaka basaleli na ye na etumba mabɔkɔ mpamba te. Na bibundeli na bango ya elimo, bazali mpe na ‘nguba monene ya kondima, oyo bakokoka koboma na yango mɔtɔ ya bambanzi nyonso ya moto mabe oyo ezali kopela.’ (Baefese 6:11, 16) Bayisalaele bazalaki kobuka mibeko mpamba te bazalaki koboya bibongiseli ya elimo oyo Yehova azwaki mpo na kosalisa bango. Soki batyaki makanisi na bango na misala ya nguya oyo Yehova asalaki mbala na mbala mpo na bolamu na bango, balingaki komipesa soki moke te na losambo ya mbindo ya bikeko. Ebongi tózwa liteya na ndakisa na bango mpe tózwa mokano ete tokotɛngatɛnga soki moke te na etumba oyo tozali kobunda mpo na kosala oyo ezali malamu.—1 Bakolinti 10:11.
14. Likoki nini oyo Yehova alobeli mpo na komonisa ete azali Nzambe ya solo kaka moko?
14 Yehova azali ye “oyo akosakola makambo ya nsuka longwa na ebandeli, mpe longwa ntango ya kala makambo masalami naino te, oyo alobi ete, Toli na ngai ekotɛlɛma mpe nakokokisa mokano mobimba na ngai.” (Yisaya 46:10) Na likambo oyo nzambe nini akokani na Yehova? Likoki ya kosakola makambo oyo ekoya ezali komonisa ete Mozalisi azali solo Nzambe. Nzokande, mpo makambo oyo esakolami ekoka kosalema, esengeli kaka te kozala na makoki ya koyeba makambo liboso. Maloba “toli na ngai ekotɛlɛma” ezali komonisa ete mokano oyo Nzambe atyá ebongwanaka te. Lokola nguya ya Yehova ezali na ndelo te, eloko moko te na molɔ́ngɔ́ ekoki kopekisa mokano na ye. (Danyele 4:35) Yango wana, tokoki solo kondima ete bisakweli nyonso oyo ekokisami naino te ekokokisama na ntango oyo Nzambe abongisi.—Yisaya 55:11.
15. Babendi likebi na biso na ndakisa nini ya kokamwa oyo etali likoki ya Yehova ya kosakola makambo oyo ekoya?
15 Na nsima, esakweli ya Yisaya ebendi likebi na biso na ndakisa ya kokamwa ya likoki oyo Yehova azali na yango ya kosakola makambo oyo ekoya mpe ya kosala ete maloba na ye ekokisama; elobi boye: ‘Nakobenga ndɛkɛ ya nzala mingi longwa na epai oyo moi ebimaka; moto ya toli na ngai longwa na mokili ya mosika. Ngai nasili koloba yango mpe nakosala yango, nakani yango mpe nakokokisa yango.’ (Yisaya 46:11) Lokola azali ye “oyo akosakola makambo ya nsuka longwa na ebandeli,” Yehova Nzambe akotambwisa makambo ya bato mpo na kokokisa toli na ye. Akobenga Sirise “longwa na epai oyo moi ebimaka,” elingi koloba na mokili ya Perse na ɛsti, esika ekozala Pasargades, mboka-mokonzi na ye oyo alingi mingi. Sirise akozala lokola “ndɛkɛ ya nzala makasi,” oyo akokitela Babilone pwasa mpe na ntango oyo bakanisi te.
16. Ndenge nini Yehova amonisi ete esakweli na ye oyo etali Babilone ezali mpenza likambo oyo ekosalema solo?
16 Maloba “ngai nasili koloba yango mpe nakosala yango,” ezali komonisa ete esakweli ya Yehova oyo etali Babilone ekozanga soki moke te kokokisama. Moto ya kozanga kokoka apesaka nokinoki bilaka oyo akanisaki yango malamu te, nzokande Mozalisi azangaka soki moke te kokokisa maloba na ye. Lokola Yehova azali Nzambe “oyo akoki te kobuka lokuta,” tokoki solo kondima ete soki ‘akani yango, akokokisa mpe yango.’—Tito 1:2.
Mitema oyo ezangi kondima
17, 18. Banani oyo bakoki kolobelama lokola bato “na mitema makasi” (a) na ntango ya kala? (b) na mikolo na biso?
17 Yehova azongisi lisusu likebi na ye epai ya bato ya Babilone mpe alobi boye na esakweli: ‘Bóyoka ngai, bino bato ya mitema makasi, bino baoyo bozali mosika na boyengene.’ (Yisaya 46:12) Maloba “na mitema makasi” ezali kolobela bato ya mitó makasi oyo bazali kotika te kotɛmɛla mokano ya Nzambe. Ntembe ezali ata moke te ete bato ya Babilone bazali mosika na Nzambe. Lokola bayini Yehova mpe bato na ye makasi, etindi bango bábebisa Yelusaleme ná tempelo na yango mpe bámema bato na yango na boombo.
18 Na mikolo na biso, baoyo balingá kobɛta ntembe mpe bazangi kondima na kati ya mitema na bango bazali koboya koyoka nsango ya Bokonzi, oyo ezali kosakolama na mabelé mobimba. (Matai 24:14) Bazali koboya kondima ete Yehova nde abongi kozala Mokonzi Monene. (Nzembo 83:18; Emoniseli 4:11) Lokola mitema na bango ezali ‘mosika na boyengebene,’ bazali koboya mokano na ye mpe bazali kotɛmɛla yango. (2 Timote 3:1-5) Bazali koboya koyoka Yehova ndenge bato ya Babilone basalaki.
Kobikisama oyo euti na Nzambe ekoya noki
19. Ndenge nini Yehova akosala likambo moko ya boyengebene mpo na Yisalaele?
19 Maloba ya nsuka ya Yisaya mokapo 46 ezali kolobela bizaleli mosusu ya Yehova: ‘Nakobɛlɛmisa boyengebene na ngai, ezali mosika te, mpe kobikisa na ngai ekoya noki; nakotya kobika kati na Siona, nkembo na ngai mpo na Yisalaele.’ (Yisaya 46:13) Kobikisa oyo Nzambe akobikisa Yisalaele ekozala likambo ya boyengebene. Akotika bato ya ekólo na ye na boombo libela te. Kobikisama ya Siona ekoya na ntango oyo ebongi mpenza, “ekoya noki.” Nsima ya kosikolama na bango na boombo, Bayisalaele bakozala eloko oyo bikólo nyonso ya zingazinga bakokamwa na komona yango. Ntango Yehova akosikola ekólo na ye, ekozala elembo oyo emonisi nguya na ye ya kobikisa. Ekomonana polele na miso ya bato nyonso ete banzambe ya Babilone Bele ná Nebo bazali mpamba, bazangi nguya.—1 Mikonzi 18:39, 40.
20. Nini endimisi baklisto ete ‘kobikisama oyo euti na Yehova ekoya noki’?
20 Na 1919, Yehova asalaki ete bato na ye básikolama na boombo ya elimo. Aumelaki te. Likambo yango, ndenge moko na makambo mosusu oyo esalemaki kala ntango Babilone ekweaki na mabɔkɔ ya Sirise, ezali kolendisa biso lelo oyo. Yehova apesi elaka ete akosukisa ebongiseli mabe ya makambo ya ntango oyo, elongo na losambo na yango ya lokuta. (Emoniseli 19:1, 2, 17-21) Soki baklisto bazali kotalela makambo na miso ya bomoto, bakoki kokanisa ete elaka ya kobikisa bango ezali koumela. Nzokande, motema molai oyo Yehova azali komonisa kino ntango ya kokokisa elaka yango ekoka, ezali solo likambo moko ya boyengebene. Kutu, “[Yehova] alingi te moto ata moko abomama kasi alingi nde bato nyonso bákóma na kobongola motema.” (2 Petelo 3:9) Na yango, tóyeba solosolo ete, se ndenge ezalaki na ntango ya Yisalaele ya kala, ‘kobikisa ekoya noki.’ Ɛɛ, lokola mokolo ya kobikisama ekómi pene, na bolingo nyonso Yehova azali kokoba kopesa libyangi oyo: ‘Bóluka Yehova naino akoki komonana, bóbyanga ye naino abɛlɛmi penepene. Tiká ete moto mabe alongwa na nzela na ye mpe moto ya masumu alongwa na makanisi na ye. Tiká ete azonga epai ya Yehova, ete ayokela ye mawa; epai ya Nzambe na biso, zambi akolimbisa na solo.’—Yisaya 55:6, 7.
[Bililingi na lokasa 94]
Banzambe ya Babilone bapekisi kobebisama na yango te
[Bililingi na lokasa 98]
Baklisto ya lelo basengeli kokeba na biloko mpe bato oyo bato mingi basambelaka bango na mikolo na biso
[Bililingi na lokasa 101]
Bómonisa ete bozali bato ya mpiko mpenza mpo na kosala oyo ezali sembo