Mokapo ya Zomi na Mibale
Libɔndisi mpo na basaleli ya Nzambe
1. Makambo mabe nini ezali kozela Yelusaleme mpe bato na ye, nzokande elikya nini ezali?
MBULA 70, bomoi mobimba ya moto, yango nde motángo ya bambula oyo ekólo ya Yuda ekosala na boombo na Babilone. (Nzembo 90:10; Yilimia 25:11; 29:10) Bayisalaele mingi oyo bakei na boombo bakokóma mibange mpe bakokufa na Babilone. Kanisá ndenge bakosambwa ntango banguna na bango bakotyola bango mpe bakosɛka bango. Kanisá mpe nsɔni oyo bakoyokisa nkombo ya Yehova, Nzambe na bango, ntango engumba oyo atyaki nkombo na ye likoló na yango ekotikala mpamba ntango molai bongo. (Nehemia 1:9; Nzembo 132:13; 137:1-3) Tempelo kitoko, oyo etondaki na nkembo ya Nzambe ntango Salomo akambaki molulu ya kofungola yango, ekozala lisusu te. (2 Ntango 7:1-3) Makambo mabe mpenza mpo na mikolo ezali koya! Kasi na monɔkɔ ya Yisaya, Yehova asakoli kozongisama. (Yisaya 43:14; 44:26-28) Na mokapo 51 ya buku ya Yisaya, tozali kokuta bisakweli mosusu oyo ezali kolobela libɔndisi mpe kokitisama motema.
2. (a) Yehova asaleli Yisaya mpo na kopesa banani nsango na ye ya kobɔndisa? (b) Ndenge nini Bayuda ya sembo ‘baluki boyengebene’?
2 Epai ya Bayuda oyo bazali kozongisa mitema na bango epai na ye, Yehova alobi boye: ‘Bóyokamela ngai, bino baoyo bozali koluka boyengebene, bozali koluka Yehova.’ (Yisaya 51:1a) “Koluka boyengebene” ezali kopesa likanisi ya kosala makambo oyo emonisi yango. Baoyo ‘bazali koluka boyengebene’ bakosuka kaka te na koloba ete bazali basaleli ya Nzambe. Bakosala makasi mpo na kozala bayengebene mpe kozala na bomoi oyo eyokani na mokano ya Nzambe. (Nzembo 34:15; Masese 21:21) Bakotalela Yehova mpo bandimi ete kaka ye nde azali Liziba ya boyengebene, mpe ‘bakoluka Yehova.’ (Nzembo 11:7; 145:17) Yango elingi koloba te ete bakoyeba naino te soki Yehova azali nani to bakoyeba te ndenge ya koya epai na ye na mabondeli. Kasi bakosala nde makasi mpo na kopusana penepene na ye, kosambela ye, kobondela ye, mpe koluka malako na ye na nyonso oyo basalaka.
3, 4. (a) Nani azali “libanga” oyo Bayuda bapaswamaki na ye, mpe nani azali “libulu ya mabanga” esika batimolaki bango? (b) Mpo na nini soki Bayuda bakanisi ndenge ekólo na bango ebandaki, yango ekobɔndisa bango?
3 Nzokande, baoyo bazali koluka mpenza boyengebene bazali mingi te na Yuda mobimba, mpe mbala mosusu likambo yango ekoki kobangisa bango mpe kolɛmbisa bango nzoto. Na yango, Yehova alendisi bango na ndakisa ya libulu ya mabanga: ‘Bótala epai ya libanga oyo bopaswamaki na yango, na libulu ya mabanga oyo bolubwamaki na yango. Bótala epai ya tata na bino Abalayama mpe epai ya Sara oyo abotaki bino; zambi azalaki bobele ye moko, ntango nabengaki ye, mpe napambolaki ye, mpe nafulukisaki ye.’ (Yisaya 51:1b, 2) “Libanga” oyo Bayuda bapaswamaki na yango ezali Abalayama, moto ya kala oyo ekólo ya Yisalaele emikumisaka mingi mpo na ye. (Matai 3:9; Yoane 8:33, 39) Ye moto abotaki ekólo yango. “Libulu ya mabanga” ezali Sara, mama ya Yisaka, nkɔkɔ ya Bayisalaele.
4 Abalayama ná Sara basilaki koleka mbula ya kobota, mpe bazalaki na mwana te. Atako bongo, Yehova apesaki elaka ete akopambola Abalayama mpe ‘akofulukisa ye to akopesa ye bankɔkɔ ebele.’ (Genese 17:1-6, 15-17) Na makasi ya Nzambe oyo azongiselaki bango makoki na bango ya kobota, Abalayama ná Sara babotaki mwana ntango bakómaki mibange, mpe ye moto abotaki ekólo oyo Nzambe asalaki na yango kondimana. Na ndenge yango, Yehova asalaki ete mobali wana moko akóma tata ya ekólo moko monene oyo ekómaki na bato oyo bakokoka kotánga motángo na bango te mpo bazalaki ebele lokola minzoto ya likoló. (Genese 15:5; Misala 7:5) Soki Yehova akokaki kozwa Abalayama na mboka moko mosika mpe kokómisa ye ekólo moko ya makasi, na ntembe te akoki mpe kokokisa elaka na ye ya kosikola batikali ya sembo oyo bazali na boombo na Babilone, kozongisa bango na mboka na bango, mpe kosala ete bákóma lisusu ekólo moko monene. Elaka oyo Nzambe apesaki Abalayama ekokisamaki; elaka na ye epai ya Bayuda oyo bazali na boombo ekokokisama mpe.
5. (a) Abalayama ná Sara bazalaki komonisa banani? Limbolá. (b) Na kokokisama ya nsuka, banani bauti na “libanga”?
5 Ndakisa oyo ezali na Yisaya 51:1, 2, oyo etali libulu ya kobimisa mabanga ekoki mpe kosalelama ndenge mosusu. Deteronome 32:18 ebengi Yehova “Libanga” oyo abotaki to azalaki Tata ya Yisalaele mpe ye “oyo abotaki [Yisalaele].” Na maloba “oyo abotaki [Yisalaele],” basaleli verbe ya Liebele oyo ezwami mpe na Yisaya 51:2 oyo ezali koloba ete Sara abotaki Yisalaele. Na yango, Abalayama azali ndakisa ya esakweli mpo na komonisa Yehova, Abalayama Monene. Sara, mwasi ya Abalayama, azali elilingi ya ebongiseli ya Yehova oyo esangisi bikelamu ya sembo nyonso kuna na likoló mpe oyo Makomami Mosantu ezali komonisa lokola mwasi oyo abalani na Nzambe. (Genese 3:15; Emoniseli 12:1, 5) Na kokokisama ya nsuka ya maloba wana ya esakweli ya Yisaya, ekólo oyo euti na “libanga” ezali “Yisalaele ya Nzambe,” lisangá ya baklisto bapakolami, oyo ebotamaki na Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.). Lokola tomonaki yango na mikapo oyo eleki na buku oyo, ekólo yango ekangamaki na boombo na Babilone na 1918, kasi na 1919 ezongaki na bomɛngo mpenza ya elimo.—Bagalatia 3:26-29; 4:28; 6:16.
6. (a) Makambo nini ezali kozela mokili ya Yuda, mpe yango ekosɛnga kozongisama ya ndenge nini? (b) Yisaya 51:3 ezali kotinda biso tókanisa kozongisama nini na ntango na biso?
6 Libɔndisi ya Yehova mpo na Siona, to Yelusaleme, esuki kaka te na kolaka ye ete akotondisa ekólo na ye na bato. Totángi boye: ‘Yehova akobɔndisa Siona, akobɔndisa bisika ya mpamba na ye nyonso; akozalisa esobe na ye lokola Edene, esika na ye ya mpamba lokola elanga ya Yehova; esengo mpe kosepela ekozwama kati na ye, matɔndi mpe mongongo ya nzembo.’ (Yisaya 51:3) Na mbula 70 oyo Yuda ekotikala mpamba, mabelé na yango ekokóma esobe, ekotonda na matiti ya nzubɛ, na mwa nzete ya nzubɛnzubɛ mpe na matiti mosusu ya esobe. (Yisaya 64:10; Yilimia 4:26; 9:10-12) Na yango, longola ndenge bato bakofanda lisusu na Yuda, kozongisama ekotalela mpe kobongisama ya mabelé na bango, oyo ekokóma lokola Edene, esika oyo ezali na bilanga ya malamu oyo ezali kozwa mai mingi mpe ezali na banzete oyo ezali kobota mbuma mingi. Ekozala lokola nde mabelé ezali kosepela. Soki tokokanisi yango na ndenge etikamaki mpamba na ntango ya boombo, mokili yango ekozala lokola paladiso. Batikali bapakolami ya Yisalaele ya Nzambe bakɔtaki na paladiso ya ndenge wana kasi na elimo na 1919.—Yisaya 11:6-9; 35:1-7.
Bantina ya kotyela Yehova motema
7, 8. (a) Mposa ya Yehova ezali nini ntango asɛngi ete bátya litoi epai na ye? (b) Mpo na nini ezali na ntina mingi ete Yuda ayoka Yehova?
7 Yehova asɛngi bátya lisusu likebi, alobi boye: ‘Bóyokamela ngai, bato na ngai, bópesa litoi epai na ngai, bato ya ekólo na ngai, zambi Mobeko ekobima na ngai mpe kosambisa-sembo ekouta na ngai lokola pole mpo na bato. Boyengebene na ngai ezali pene. Kobikisa na ngai esili kobima; mabɔkɔ na ngai makosambisa bato. Bisanga bakozela ngai, mpe bakolikya mpo na lobɔkɔ na ngai.’—Yisaya 51:4, 5.
8 Ntango Yehova asɛngi ete bátya litoi epai na ye, yango elingi koloba te ete básuka kaka te na koyoka nsango na ye. Yango elingi koloba bátya likebi mpo na kosala makambo oyo bayoki. (Nzembo 49:1; 78:1) Ekólo yango esengeli koyeba ete Yehova nde azali Liziba ya mateya, kosambisa-sembo mpe kobikisama. Kaka ye nde azali Liziba ya pole ya elimo. (2 Bakolinti 4:6) Ye nde azali Mosambisi oyo aleki basambisi nyonso. Mibeko mpe bikateli oyo eutaka na Yehova ezalaka pole mpo na baoyo bátikaka yango etambwisa bango.—Nzembo 43:3; 119:105; Masese 6:23.
9. Longola bato ya ekólo oyo Nzambe asalaki na yango kondimana, banani bakozwa bolamu na misala ya kobikisa ya Yehova?
9 Makambo wana nyonso esengeli kosuka te kaka epai ya bato ya ekólo oyo Nzambe asalaki na yango kondimana, kasi mpe epai ya bato ya bisika nyonso oyo bazali na ezaleli ebongi, ata mpe baoyo bafandi na bisanga oyo eleki mosika na mai monene. Elikya oyo batyeli Nzambe mpe makoki na ye ya kokɔtela basaleli na ye ya sembo mpe kobikisa bango ekoyokisa bango mawa te. Lobɔkɔ na ye, oyo ezali komonisa makasi to nguya na ye, ekoki kotyelama motema; moto moko te akoki kopekisa yango. (Yisaya 40:10; Luka 1:51, 52) Ndenge moko lelo oyo, mosala ya kosakola oyo batikali ya Yisalaele ya Nzambe bazali kosala na molende ememi bamilio ya bato, oyo mingi kati na bango bazalaka na bisanga ya mosika na mai monene, bámipesa epai ya Yehova mpe bámonisa kondima epai na ye.
10. (a) Likambo nini ya solo Mokonzi Nebukadanesala asengeli koyeba na mikolo ekoya? (b) “Likoló” mpe “mabelé” nini ekosila?
10 Na nsima Yehova alobeli likambo moko ya solo oyo Nebukadanesala, mokonzi ya Babilone, asengeli koyeba na mikolo ekoya. Eloko moko te na likoló to na mabelé ekoki kopekisa Yehova kokokisa mokano na ye. (Danyele 4:34, 35) Totángi boye: ‘Bótombola miso na bino epai na likoló mpe bótala na mabelé; zambi likoló ekolimwa lokola molinga mpe mokili ekobeba mokemoke lokola elamba, mpe baoyo bafandi wana bakokufa lokola ngungi. Kasi kobikisa na ngai ekoumela seko mpe kosikola na ngai ekosuka te.’ (Yisaya 51:6) Atako bakonzi ya Babilone bazalaka na momeseno ya kotika bakangami na bango te bázonga epai na bango, moto moko te akopekisa Yehova kobikisa bato na ye. (Yisaya 14:16, 17) “Likoló” ya Babilone, oyo elimboli bakonzi na ye, bakobukana ntango bakolonga bango. “Mabelé” ya Babilone, oyo elakisi bato oyo bazali kotosa bakonzi yango, bakosila mokemoke. Ɛɛ, ata mboka oyo elekaki makasi na ntango wana ekoki te kotɛlɛma liboso na nguya ya Yehova to kopekisa misala na ye ya kobikisa.
11. Mpo na nini kokokisama mobimba ya esakweli oyo elobi ete “likoló” mpe “mabelé” ya Babilone ekosuka ezali solo kolendisa baklisto ya mikolo na biso?
11 Baklisto ya mikolo na biso bazali solo kolendisama na koyeba ete maloba wana ya esakweli ekokisamaki nyonso! Mpo na nini? Mpamba te ntoma Petelo asalelaki maloba ya ndenge wana mpo na kolobela likambo mosusu oyo esalemi naino te. Alobelaki mokolo ya Yehova oyo ezali koya mbangu, “oyo na yango likoló lokola ekozika na mɔtɔ ekosilela mpe biloko na yango lokola ekokóma mɔtɔ makasi ekonyangwa!” Na nsima alobaki ete: “Ezali na likoló ya sika mpe na mabelé moko ya sika oyo tozali kozela engebene elaka na ye, mpe na kati na yango boyengebene ekofanda.” (2 Petelo 3:12, 13; Yisaya 34:4; Emoniseli 6:12-14) Atako bikólo ya makasi mpe bakonzi na yango oyo bakokani na minzoto ya likoló bakoki ntango mosusu kotɛmɛla Yehova, na ntango oyo ye moko atye bakolimwa nyɛɛ, bakobomama mbala moko lokola ngungi. (Nzembo 2:1-9) Kaka guvɛrnema ya sembo ya Nzambe nde ekoyangela bato ya boyengebene mpo na libela.—Danyele 2:44; Emoniseli 21:1-4.
12. Mpo na nini basaleli ya Nzambe basengeli kobanga te ntango banguna na bango bazali kopanza bango nsango ya mabe?
12 Mpo na “bato oyo bazali koluka boyengebene,” Yehova alobi sikoyo boye: ‘Bóyokamela ngai, bino boyebi boyengebene, libota oyo mibeko na ngai ezali na mitema na bango, bóbanga mpamela ya bato te, bóyoka mawa mpo na kotuka na bango te. Mpo ete nsɛlɛlɛ ekolya bango lokola elamba mpe nkusu ekolya bango lokola nsuki ya mpate; nde kosikola na ngai ekoumela libela mpe kobikisa na ngai kino mabota nyonso.’ (Yisaya 51:7, 8) Bakoki kotyola mpe kopanza bato oyo batyeli Yehova motema nsango ya mabe mpo na mpiko na bango, kasi yango esengeli kobangisa bango te. Batyoli bazali kaka bato oyo bakoki kokufa, oyo ‘bakolyama,’ se ndenge nsɛlɛlɛ elyaka elamba oyo esalemi na nsuki ya mpate.a Lokola Bayuda ya sembo na ntango ya kala, baklisto ya solo ya mikolo na biso bazali na ntina te ya kobanga bato oyo bazali kotɛmɛla bango. Yehova, Nzambe ya seko, moto akobikisa bango. (Nzembo 37:1, 2) Kotyola oyo banguna ya Nzambe bazali kotyola basaleli na ye ezali elembo oyo emonisi ete basaleli yango bazali na elimo ya Yehova.—Matai 5:11, 12; 10:24-31.
13, 14. Maloba “Laba” mpe “dalagona” ezali komonisa nini, mpe ndenge nini ‘bakataki ye bitenibiteni’ mpe ‘batɔbɔlaki’ ye?
13 Lokola nde azali kobenga Yehova abikisa bato ya ekólo na Ye oyo bakangami, Yisaya alobi: “Lamuká! Lamuká! Latá nguya, ee lobɔkɔ ya [Yehova]. Lamuká lokola na mikolo ya kala mpe mabota na ntango eleki. Ezalaki yo te oyo akatakataki Laba, oyo atɔbɔlaki dalagona? Ezalaki yo te oyo akaukisaki mai-na-monana, mai ya bozindo monene; oyo abongolaki bozindo ya mai nzela mpo na basikolami koleka wana?”—Yisaya 51:9, 10.
14 Yisaya aponi mpenza malamu bandakisa ya makambo ya kala oyo azali kolobela. Moyisalaele nyonso ayebi ndenge ekólo na bango esikolamaki na Ezipito mpe ndenge ekatisaki Mbu Motane. (Exode 12:24-27; 14:26-31) Maloba “Laba” mpe “dalagona” ezali komonisa Ezipito na ntango ya Farao oyo aboyaki Yisalaele ebima na Ezipito. (Nzembo 74:13; 87:4; Yisaya 30:7) Ezipito ya kala ekokani na nyoka moko ya nsɔmɔ oyo atye motó epai ebale Nil ebimi na mai monene mpe nzoto na ye molai etandami bankama ya bakilomɛtrɛ pembenipembeni ya lobwaku ya Nil oyo ezalaka na mabelé ya malamu. (Ezekiele 29:3) Kasi nyoka yango ya nsɔmɔ akatamaki bitenibiteni ntango Yehova asopelaki ye Malɔzi Zomi. Batɔbɔlaki ye, bazokisaki ye mpota monene, mpe alɛmbaki makasi ntango basoda na ye bakufaki na Mbu Motane. Ɛɛ, na makambo oyo asalaki Ezipito, Yehova amonisaki nguya ya lobɔkɔ na ye. Akozala pene te ya kobundela bato ya ekólo na ye oyo bakangami na Babilone?
15. (a) Ntango nini mpe ndenge nini mpasi mpe kolela ya Siona ekokima? (b) Na mikolo na biso, ntango nini mpasi mpe kolela ya Yisalaele ya Nzambe ekimaki?
15 Sikoyo, esakweli elobeli ntango oyo Yisalaele ekosikolama na Babilone; elandi koloba boye: ‘Bongo basikolami na Yehova bakozonga, bakoya na nzembo kino Siona, esengo ya seko ekozala na mitó na bango, bakozwa esengo mpe bakosepela; mpe mawa mpe kolela ekokima.’ (Yisaya 51:11) Ata soki bakozala na mawa na Babilone, baoyo bazali koluka boyengebene ya Yehova bakoki kolikya makambo ya malamu. Ntango ekoya wana mpasi mpe kolela ekozala lisusu te. Koganga na esengo, nsai, kosepela, yango nde ekoyokana na mbɛbu ya baoyo basikolami. Na kokokisama ya maloba ya esakweli wana na ntango na biso, Yisalaele ya Nzambe esikolamaki na boombo ya Babilone na 1919. Bazongaki na mboka na bango ya elimo na kosepela monene, oyo elandani tii na ntango na biso.
16. Motuya nini epesami mpo na kosomba Bayuda?
16 Bayuda bakosombama na motuya nini? Esakweli ya Yisaya esilaki komonisa ete Yehova apesaki ‘Ezipito lokola lisiko mpo na bango, Etiopia mpe Seba na esika na bango.’ (Yisaya 43:1-4) Yango ekosalema na nsima. Nsima ya kolonga Babilone mpe kotika Bayuda oyo bakangamaki, bokonzi ya Perse ekobɔtɔla Ezipito, Etiopia mpe Seba. Bango nde bakopesama na esika ya milimo ya Bayisalaele. Yango eyokani na motinda oyo ezali na Masese 21:18 : “Moto mabe akosikola moyengebene mpe mobungi akozala lisiko ya mosembwi.”
Maloba mosusu ya kokitisa motema
17. Mpo na nini Bayuda bazali na ntina te ya kobanga nkanda ya Babilone?
17 Yehova akitisi lisusu bato na ye motema: ‘Ngai, ngai nazali ye oyo akobɔndisa yo; yo ozali nani ete obanga moto oyo akokufa, mpe mwana ya moto oyo azali lokola matiti? Ozali mpe kobosana Yehova, motongi na yo, ye oyo asembolaki likoló mpe atyaki miboko ya mokili. Ozali mpe kobanga mikolo nyonso mpo na nkanda ya monyokoli [“oyo azali kotya yo nkaka,” NW] wana akomibongisa ye moko mpo na kobebisa. Nkanda ya monyokoli [“oyo azali kotya yo nkaka,” NW] ezali wapi?’ (Yisaya 51:12, 13) Ebele ya bambula ya boombo ezali naino kozela bango. Atako bongo, ntina moko ezali te ya kobanga nkanda ya Babilone. Atako ekólo wana, oyo ezali ekólo ya misato oyo Biblia elobi ete elekaki makasi na mokili mobimba, ekolonga basaleli ya Nzambe mpe ekoluka ‘kotya bango nkaka’ to kopekisa bango kokima, Bayuda ya sembo bayebi ete Yehova asili kosakola kokwea ya Babilone na mabɔkɔ ya Sirise. (Yisaya 44:8, 24-28) Lokola bakeseni na Mozalisi, Nzambe ya seko Yehova, bato ya Babilone bakobeba lokola matiti oyo ekaukaka na moi makasi. Na ntango yango, makaneli mpe nkanda na bango ekozala wapi? Ezali solo bozoba kobanga moto mpe kobosana Yehova, ye oyo asalaki likoló ná mabelé!
18. Atako bato ya ekólo na ye bakozala bato ya bolɔkɔ mpo na mwa ntango moke, maloba nini ya kokitisa motema Yehova ayebisi bango?
18 Atako bato ya ekólo ya Yehova bakokangama mpo na mwa ntango, lokola nde ‘bagumbami,’ kosikolama na bango ekoya pwasa. Bakosila na Babilone te to bakokufa na bolɔkɔ te na nzala, bakozala bakufi te na sheole to na libulu. (Nzembo 30:3, NW; 88:3-5, NW) Yehova akitisi bango motema boye: ‘Ye oyo agumbami na nse akofungolama mbangu, akokufa te, akokenda na libulu te; kwanga na ye ekozanga te.’—Yisaya 51:14.
19. Mpo na nini Bayuda ya sembo bakoki kotya motema mobimba na maloba ya Yehova?
19 Yehova azali kaka kobɔndisa Siona, alobi boye: ‘Zambi ngai nazali Yehova, Nzambe na yo, oyo akotambolisa mai-na-monana kino mbonge na yango ekonguluma, Yehova na bibele ezali nkombo na ye. Natye maloba na ngai na monɔkɔ na yo mpe nabombi yo na molili ya lobɔkɔ na ngai, ete napika likoló mpe ete natya miboko ya mabelé mpe ete naloba na Siona ete, Yo ozali bato na ngai.’ (Yisaya 51:15, 16) Mbala na mbala Biblia elobelaka makoki ya Nzambe ya kosalela nguya na ye likoló na mai monene mpe ya kopekisa yango. (Yobo 26:12; Nzembo 89:9; Yilimia 31:35) Azali na nguya ya kotambwisa biloko nyonso oyo akelá, lokola amonisaki yango ntango abikisaki bato na ye na Ezipito. Nani akoki kokokana, ata moke, na “Yehova na bibele”?—Nzembo 24:10.
20. ‘Likoló’ mpe ‘mabelé’ nini ekotyama ntango Yehova akozongisa Siona, mpe maloba nini ya kobɔndisa akoloba?
20 Bayuda bazali kaka bato oyo Nzambe asalaki na bango kondimana, mpe Yehova akitisi mitema na bango ete bakozonga na mboka na bango, mpo na kozala lisusu na nse ya Mibeko. Kuna bakotonga lisusu Yelusaleme mpe tempelo na yango mpe bakozongela mikumba na bango oyo euti na kondimana oyo asalaki elongo na bango na nzela ya Moize. Ntango Bayisalaele mpe bibwele na bango bakozonga kofanda na mokili na bango, yango nde ekozala ebandeli ya ‘mabelé ya sika.’ Mabelé yango ekoyangelama na ‘likoló ya sika,’ oyo ezali guvɛrnema ya sika. (Yisaya 65:17-19; Hagai 1:1, 14) Yehova akoloba lisusu na Siona ete: “Yo ozali bato na ngai.”
Asɛngi bango básala mosala
21. Likambo nini Yehova asɛngi Siona asala?
21 Lokola auti kokitisa Siona motema, sikoyo Yehova asɛngi bango básala mosala. Yehova alobeli ye lokola nde akómi na nsuka ya mpasi na ye: “Lamuká! Lamuká! Tɛlɛmá, ee Yelusaleme; yo oyo omɛli epai na lobɔkɔ ya [Yehova] kɔpɔ ya nkanda na ye, yo oyo omɛli kino nsuka kɔpɔ na kotɛtɛmisa mpe osilisi yango nyɛɛ.” (Yisaya 51:17) Ɛɛ, Yelusaleme asengeli to kotɛlɛma to kolongwa na bampasi na ye mpe kozongela esika na ye mpe kitoko na ye ya kala. Ntango ekoya wana akomɛla mpe akosilisa kɔpɔ ya elilingi ya etumbu ya Nzambe. Nzambe akoyokela ye lisusu nkanda ata moke te.
22, 23. Makambo nini Yelusaleme akokutana na yango ntango akomɛla kɔpɔ ya nkanda ya Yehova?
22 Nzokande, ntango Yelusaleme akozwa etumbu, moto moko te kati na bato na ye, “bana” na ye, akokoka kopekisa yango. (Yisaya 43:5-7; Yilimia 3:14) Esakweli elobi boye: “Moko azali te mpo na kokamba ye kati na bana nyonso baboti ye; moko azali te mpo na kosimba lobɔkɔ na ye kati na bana nyonso babɔkɔli ye.” (Yisaya 51:18) Akonyokwama mpenza na mabɔkɔ ya bato ya Babilone! ‘Makambo oyo mibale masili kokwela yo, nani akoyokela yo mawa?—koyeisama mpamba mpe kobebisama, nzala mpe mopanga; nakobɔndisa yo nzela nini? Bana na yo basenzwi, balali na motó na nzela nyonso, lokola mboloko kati na motambo. Batondi na nkanda ya Yehova na mpamela ya Nzambe na yo.’—Yisaya 51:19, 20.
23 Ee Yelusaleme, mawa ɛɛ! Akoyika mpiko na “koyeisama mpamba mpe kobebisama” elongo na “nzala mpe mopanga.” Lokola “bana” na ye bakokoka te kotambwisa ye mpe kobatela ye na bomoi mpe na nzoto makasi, bakotɛlɛma wana kasi bakosalisa ye te, mpo bakɔndi na nzala mpe bazali na makasi te ya kobunda na bato ya Babilone oyo bakɔteli ye na etumba. Na miso ya moto nyonso, na mitó to na bisika nyonso oyo babalabala ekutani, bakolalalala mpo balɛmbi mpenza. (Bileli 2:19; 4:1, 2) Bakomɛla kɔpɔ ya nkanda ya Nzambe mpe bakozanga makasi lokola nyama oyo ekangami na motambo.
24, 25. (a) Nini ekokómela lisusu Yelusaleme te? (b) Nsima ya Yelusaleme, nani akomɛla kɔpɔ ya nkanda ya Yehova?
24 Kasi mpasi wana ekosila. Na maloba ya kobɔndisa Yisaya alobi: “Boye, yoká oyo, yo oyo anyokolami, olangwi nde na vinyo te. Nkolo na yo, [Yehova], alobi boye, Nzambe na yo oyo akolobela bato na ye, ete, Talá nalongoli na lobɔkɔ na yo kɔpɔ ya kotɛtɛmisa, saani ya kɔpɔ ya nkanda na ngai; okomɛla yango lisusu te. Mpe nakotya yango na mabɔkɔ na bango bazali konyokola yo, baoyo balobi na yo ete, Ogumbami na nse ete biso tóleka likoló, mpe oyeisi mokɔngɔ na yo lokola mabelé, lokola mpe nzela ete bango báleka likoló.” (Yisaya 51:21-23) Nsima ya kopesa Yelusaleme etumbu, Yehova alingi sikoyo komonisela ye motema mawa mpe kolimbisa ye.
25 Sikoyo Yehova akolongola nkanda na ye epai ya Yelusaleme mpe akoyokela yango nde Babilone. Ekozala na ntango oyo Babilone asilá kobebisa mpe kosambwisa Yelusaleme. (Nzembo 137:7-9) Kasi Yelusaleme akomɛla lisusu te kɔpɔ ya ndenge yango na mabɔkɔ ya Babilone to baninga na ye ya etumba. Bakolongola nde kɔpɔ yango na mabɔkɔ ya Yelusaleme mpe bakopesa yango na baoyo basepelaki na nsɔni na ye. (Bileli 4:21, 22) Babilone akokwea, akolangwa makasi. (Yilimia 51:6-8) Na ntango yango, Siona akotɛlɛma! Makambo ebongwani! Ya solo, elikya ya boye ekoki kaka kobɔndisa Siona. Mpe basaleli ya Yehova bakoki solo kondima ete nkombo na ye ekosantisama na nzela ya misala na ye ya kobikisa.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Nsɛlɛlɛ oyo balobeli awa ezali nsɛlɛlɛ oyo ebebisaka bilamba, mingi mpenza wana euti kobima na makei.
[Elilingi na lokasa 167]
Yehova, Abalayama Monene, azali “libanga” oyo basaleli na ye ‘bapaswamaki’ na yango
[Elilingi na lokasa 170]
Banguna ya basaleli ya Nzambe bakosila, lokola elamba oyo elyami na nsɛlɛlɛ
[Elilingi na lokasa 176, 177]
Yehova amonisaki ete azali na nguya ya kotambwisa biloko oyo akelá
[Elilingi na lokasa 178]
Kɔpɔ oyo Yelusaleme akomɛla bakopesa yango Babilone ná baninga na ye