Moombo ya Yehova “azokisami mpo na masumu na biso”
“Azokisami mpo na masumu na biso, atutami mpo na mabe na biso; . . . na [bampota, NW] na ye, biso tobikisami.”—Yis. 53:5.
1. Makambo nini tosengeli komikundwelaka ntango tozali kosala Ekaniseli, mpe esakweli nini ekosalisa biso tósala bongo?
TOKANISAKA liwa ya Klisto mpo na komikundwela makambo nyonso oyo liwa mpe lisekwa na ye ekokisi. Ekaniseli ekundwelaka biso kolongisama ya bokonzi ya Yehova, kosantisama ya nkombo na ye, kokokisama ya mokano na ye, mpe lobiko ya bato. Yisaya 53:3-12 elobeli malamu mpenza mbeka ya Klisto mpe makambo oyo yango ekokisi; mbala mosusu ezali na esakweli mosusu te oyo elobeli yango malamu koleka. Yisaya asakolaki bampasi oyo Moombo asengelaki kokutana na yango mpe alobelaki na bosikisiki liwa ya Klisto mpe mapamboli oyo liwa yango esengelaki komemela bandeko na ye bapakolami na elimo mpe “bampate mosusu.”—Yoa. 10:16.
2. Esakweli ya Yisaya emonisi nini mpe yango ekotinda biso tósala nini?
2 Bikeke nsambo liboso Yesu abotama awa na mabelé, elimo santu etindaki Yisaya asakola ete Moombo oyo Yehova aponaki akotikala sembo ata na kati ya komekama makasi. Yango emonisi ete Yehova andimaki mpenza ete Mwana na ye akotikala sembo. Wana tozali kotalela esakweli yango, botɔndi na biso ekobakisama mpe kondima na biso ekokóma makasi.
“Atyolamaki” mpe ‘aboyamaki’
3. Mpo na nini Bayuda basengelaki koyamba Yesu, kasi ndenge nini batalelaki ye?
3 Tángá Yisaya 53:3. Kanisá naino ndenge Mwana mobotami-se-moko ya Nzambe ayokaki ntango atikaki esengo ya kosala na Tata na ye mpe ayaki awa na mabelé kopesa bomoi na ye lokola mbeka mpo na kobikisa bato na lisumu mpe liwa! (Filp. 2:5-8) Mbeka yango ezalaki mpo na kolimbisama ya masumu, oyo emonisamaki na bambeka ya banyama oyo Mibeko ya Moize ezalaki kosɛnga. (Ebe. 10:1-4) Mpo na yango, ata Bayuda basengelaki koyamba Yesu mpe kopesa ye lokumu mpamba te bazalaki kozela Masiya oyo alakamaki. (Yoa. 6:14) Nzokande, Bayuda ‘batyolaki’ Klisto mpe ‘baboyaki ye,’ ndenge Yisaya asakolaki yango. Ntoma Yoane akomaki boye: “Ayaki na mboka na ye mpenza, kasi bato ya ekólo na ye moko bayambaki ye te.” (Yoa. 1:11) Ntoma Petelo ayebisaki Bayuda ete: “Nzambe ya bankɔkɔ na biso, apesi nkembo na Mosaleli na ye, Yesu, oyo bino, na oyo etali bino, bokabaki mpe bowanganaki liboso ya elongi ya Pilato, ntango azwaki mokano ya kotika ye. Ɛɛ, bowanganaki mosantu mpe moyengebene wana.”—Mis. 3:13, 14.
4. Na ndenge nini Yesu amesanaki na mpasi?
4 Yisaya asakolaki mpe ete Yesu asengelaki ‘komesana na mpasi.’ Ntango Yesu azalaki kosala mosala na ye ya kosakola, na ntembe te, azalaki mpe ntango mosusu kolɛmba, kasi ata vɛrsɛ moko te emonisi ete ayokaki mpasi to abɛlaki. (Yoa. 4:6) Kasi, amesanaki nde na mpasi to na maladi ya bato oyo azalaki koteya. Ayokelaki bango mawa mpe abikisaki mingi kati na bango. (Mko. 1:32-34) Na ndenge yango Yesu akokisaki esakweli oyo elobi ete: “Solo akumbi mpasi na biso mpe amɛmi mawa na biso.”—Yis. 53:4a; Mat. 8:16, 17.
Lokola nde “abɛtami na Nzambe”
5. Ndenge nini Bayuda mingi batalelaki liwa ya Yesu, mpe mpo na nini yango enyokolaki ye lisusu mingi?
5 Tángá Yisaya 53:4b. Bato mingi ya ntango ya Yesu bayebaki te ntina oyo Yesu anyokolamaki mpe akufaki. Bakanisaki ete ezalaki etumbu ya Nzambe, lokola nde Nzambe apesaki ye maladi mabe. (Mat. 27:38-44) Bayuda balobaki ete Yesu azalaki kotuka Nzambe. (Mko. 14:61-64; Yoa. 10:33) Na ntembe te, Yesu azalaki moto ya masumu te; azalaki mpe motuki te. Kasi, na kotalela bolingo monene oyo azalaki na yango mpo na Tata na ye, likanisi ya kokufa lokola motuki enyokolaki lisusu mingi Moombo ya Yehova. Atako bongo, andimaki kokokisa mokano ya Yehova.—Mat. 26:39.
6, 7. Na ndenge nini Yehova ‘atutaki’ Moombo na ye ya sembo, mpe mpo na nini yango ‘esepelisaki’ Nzambe?
6 Tokoki kokamwa te ndenge esakweli ya Yisaya elobaki ete bato mosusu bakoloba ete Klisto “abɛtami na Nzambe”; kasi tokoki kokamwa maloba ya esakweli oyo: “Esepelisi [Yehova] kotuta ye.” (Yis. 53:10) Lokola Yehova alobaki mpe ete: “Talá moombo na ngai, . . . moponami na ngai, ye oyo molimo na ngai ekosepela na ye,” mpo na nini Yehova akokaki ‘kosepela kotuta ye’? (Yis. 42:1) Na ndenge nini yango epesaki Yehova esengo?
7 Mpo na kokanga ntina ya esakweli yango, tosengeli komikundwela ete ntango Satana abimisaki ntembe mpo na lotomo ya Yehova ya kozala Mokonzi, atyaki mpe ntembe na bosembo ya basaleli nyonso ya Nzambe na likoló mpe na mabelé. (Yobo 1:9-11; 2:3-5) Nzokande, Yesu asukisaki mpenza ntembe ya Satana na ndenge atikalaki sembo tii na liwa. Na yango, ntango Yehova atikaki ete banguna báboma Klisto, na ntembe te ayokaki mpasi komona ndenge Moombo oyo aponaki abomamaki. Kasi, Yehova asepelaki mingi ndenge amonaki ete Mwana na ye atikali sembo tii nsuka. (Mas. 27:11) Longola yango, Yehova asepelaki mpo na matomba oyo liwa ya Mwana na ye esengelaki komemela bato oyo bakobongola motema.—Luka 15:7.
“Azokisami mpo na masumu na biso”
8, 9. (a) Na ndenge nini Yesu ‘azokisamaki mpo na masumu na biso’? (b) Ndenge nini Petelo amonisaki bosolo ya likambo yango?
8 Tángá Yisaya 53:6. Lokola mpate oyo ebungi nzela, bato ya masumu bazalaki koyengayenga, koluka kosikolama na maladi mpe na liwa oyo bazwá na Adama. (1 Pet. 2:25) Lokola bakitani nyonso ya Adama bazali bato ya kozanga kokoka, moko te akokaki kofuta eloko oyo Adama abungisaki. (Nz. 49:7) Nzokande, na bolingo na ye monene, ‘Yehova atyaki masumu na biso nyonso,’ epai ya Mwana na ye, Moombo oyo ye aponaki. Lokola andimaki ‘kozokisama mpo na masumu na biso’ mpe ‘kotutama mpo na mabe na biso,’ Klisto amemaki masumu na biso likoló ya nzete mpe akufaki mpo na biso.
9 Ntoma Petelo akomaki boye: “Na nzela yango nde bobengamaki, mpamba te Klisto mpe anyokwamaki mpo na bino, kotikeláká bino ndakisa mpo bólanda matambe na ye malamumalamu. Ye moko amemaki masumu na biso na nzoto na ye mpenza likoló ya nzete, mpo tókoka kotika masumu mpe tózala na bomoi ya boyengebene.” Na nsima, Petelo atángaki maloba ya esakweli ya Yisaya mpe abakisaki boye: “Mpe ‘mpo na bampota na ye bino bobiki.’” (1 Pet. 2:21, 24; Yis. 53:5) Yango epesaki nzela na bato ya masumu bákóma na boyokani malamu na Nzambe, ndenge Petelo amonisaki yango na nsima ete: “Klisto mpenza akufaki mbala moko mpo na libela na oyo etali masumu, moyengebene moko mpo na bato bazangi boyengebene, na ntina ete akoka komema bato epai ya Nzambe.”—1 Pet. 3:18.
“Lokola mwana na mpate oyo akambami mpo na kobomama”
10. (a) Yoane Mobatisi alobaki nini mpo na Yesu? (b) Mpo na nini maloba ya Yoane ebongaki mpenza?
10 Tángá Yisaya 53:7, 8. Ntango Yoane Mobatisi amonaki Yesu azali koya epai na ye, alobaki boye: “Talá, Mwana-Mpate ya Nzambe oyo azali kolongola lisumu ya mokili!” (Yoa. 1:29) Ekoki kozala ete ntango abengaki Yesu Mwana-Mpate, Yoane azalaki kokanisa maloba oyo ya Yisaya ete: “Lokola mwana na mpate oyo akambami mpo na kobomama.” (Yis. 53:7) Yisaya asakolaki ete “asopi molimo na ye kino kufa.” (Yis. 53:12) Na butu oyo Yesu abandisaki Ekaniseli ya liwa na ye, apesaki kɔpɔ ya vinyo na bayekoli na ye ya sembo 11 mpe alobaki na bango boye: “Yango elakisi ‘makila ya kondimana’ na ngai, oyo ekosopama mpo na bato mingi mpo na bolimbisi ya masumu.”—Mat. 26:28.
11, 12. (a) Ndenge Yisaka andimaki kopesama mbeka, yango emonisi nini na ntina na mbeka ya Klisto? (b) Ntango tozali kosala Ekaniseli, nini tosengeli kobosana te na ntina na Yehova, Abayalama Monene?
11 Lokola Yisaka, Yesu andimaki kopesama lokola mbeka. (Gen. 22:1, 2, 9-13; Ebe. 10:5-10) Atako Yisaka andimaki kopesama lokola mbeka, Abalayama nde alingaki kopesa mbeka yango. (Ebe. 11:17) Ndenge moko mpe, Yesu andimaki kokufa, kasi Yehova nde azwaki ekateli yango. Mbeka ya Mwana na Ye emonisaki bolingo makasi oyo Nzambe azalaki na yango mpo na bato.
12 Yesu ye moko alobaki boye: “Nzambe alingaki mokili mingi na boye ete apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko, mpo moto nyonso oyo azali komonisa kondima na kati na ye abomama te kasi azala na bomoi ya seko.” (Yoa. 3:16) Ntoma Paulo akomaki boye: “Nzambe azali kolakisa biso bolingo na ye moko na likambo oyo ete, wana tozalaki naino basumuki, Klisto akufelaki biso.” (Lom. 5:8) Yango wana, ntango tozali kosala Ekaniseli mpo na kokumisa Klisto, tóbosana te ete ezali Yehova, Abalayama Monene, nde azwaki bibongiseli mpo na lisiko yango. Tosalaka Ekaniseli mpo na lokumu ye.
Moombo “akolongisa mingi”
13, 14. Ndenge nini Moombo ya Yehova ‘alongisaki mingi’?
13 Tángá Yisaya 53:11, 12. Mpo na Moombo na ye oyo aponi, Yehova alobi boye: “Moombo na ngai ya boyengebene akolongisa mingi.” Ndenge nini? Nsuka ya vɛrsɛ 12 epesi eyano. “Mpe [Moombo] abondelaki mpo na bapɛngwi.” Bakitani nyonso ya Adama bazali bato ya masumu, “bapɛngwi” mpe mpo na yango bazwaka “lifuta oyo lisumu ezali kofuta,” elingi koloba liwa. (Lom. 5:12; 6:23) Boyokani kati na Yehova mpe bato ya masumu ezali na ntina. Yisaya Mokapo 53 ya esakweli ya Yisaya emonisi na maloba ya kitoko ndenge oyo Yesu ‘abondelaki’ mpo na bato ya masumu; elobi boye: “Etumbu oyo eyeiseli biso kimya etyami epai na ye, mpe na [bampota, NW] na ye, biso tobikisami.”—Yis. 53:5.
14 Yesu ‘alongisaki mingi’ na ndenge amemaki masumu na biso mpe akufaki mpo na biso. Paulo akomaki boye: “Nzambe amonaki malamu ete litondi nyonso efanda na kati na ye, mpe na nzela na ye azongisa lisusu boyokani na kati na ye mpe biloko mosusu nyonso na kotyáká kimya na lisalisi ya makila oyo asopaki likoló ya nzete ya mpasi, ata soki yango ezali biloko oyo ezali na mabelé to biloko oyo ezali na likoló.”—Kols. 1:19, 20.
15. (a) “Biloko oyo ezali na likoló,” oyo Paulo alobeli ezali banani? (b) Kaka banani nde bazali na lotomo ya kolya limpa mpe komɛla vinyo na Ekaniseli ya liwa ya Klisto, mpe mpo na nini?
15 “Biloko oyo ezali na likoló” oyo esengeli kozonga na boyokani na Yehova na nzela ya makila ya Klisto ezali Baklisto bapakolami, oyo baponami mpo na koyangela na Klisto na likoló. Baklisto oyo “basangani na kobengama ya likoló,” batángami “bayengebene mpo na bomoi.” (Ebe. 3:1; Lom. 5:1, 18) Na ndenge yango, Yehova andimi bango lokola bana na ye ya elimo. Elimo santu etatolaka ete bazali “bazwi-ya-libula elongo na Klisto,” bakozala bakonzi mpe banganga-nzambe na Bokonzi ya likoló. (Lom. 8:15-17; Emon. 5:9, 10) Bakómi bato ya Yisalaele ya elimo, “Yisalaele ya Nzambe,” mpe bakɔti na “kondimana ya sika.” (Yil. 31:31-34; Gal. 6:16) Lokola bazali na kati ya kondimana ya sika, na Ekaniseli ya liwa ya Klisto, bakoki kolya limpa ata mpe komɛla vinyo oyo mpo na yango Yesu alobaki boye: “Kɔpɔ oyo elakisi kondimana ya sika na nzela ya makila na ngai, oyo ekosopama mpo na bino.”—Luka 22:20.
16. “Biloko oyo ezali na mabelé” ezali banani, mpe na ndenge nini bango mpe batángami bayengebene liboso ya Yehova?
16 “Biloko oyo ezali na mabelé” ezali bampate mosusu ya Klisto, baoyo bazali na elikya ya bomoi ya seko awa na mabelé. Moombo azali mpe kolongisa bango liboso ya Yehova. Lokola bazali na kondima na mbeka ya lisiko ya Klisto mpe “basukoli bazambala na bango mpe bakómisi yango mpɛmbɛ na kati ya makila ya Mwana-Mpate,” Yehova atángi bango bayengebene, lokola bana na ye ya elimo te, kasi lokola baninga na ye, mpe apesi bango elikya kitoko ya kobika na “bolɔzi monene.” (Emon. 7:9, 10, 14; Yak. 2:23) Lokola bazali na kati ya kondimana ya sika te mpe bazali na elikya ya kokende na likoló te, na Ekaniseli, bampate mosusu balyaka limpa te mpe bamɛlaka vinyo te, kasi bayanganaka lokola batali mpamba.
Botɔndi epai ya Yehova mpe epai ya Moombo oyo ye andimi!
17. Ndenge nini boyekoli ya bisakweli ya Yisaya oyo elobeli Moombo esalisi biso tóbongisa makanisi na biso mpo na Ekaniseli?
17 Boyekoli ya bisakweli ya Yisaya oyo elobeli Moombo ezali ndenge malamu ya kobongisa makanisi na biso mpo na Ekaniseli ya liwa ya Klisto. Esalisi biso ‘tótala na likebi mpenza Kapita mpe Mokokisi ya kondima na biso.’ (Ebe. 12:2) Toyekoli ete Mwana ya Nzambe azali motomboki te. Na bokeseni na Satana, azalaki na esengo ya koteyama na Yehova, mpe andimaki Ye lokola Nkolo Mokonzi. Tomonaki ete ntango Yesu azalaki awa na mabelé, amonisaki motema mawa epai ya bato oyo azalaki koteya, abikisaki mingi oyo bazalaki kobɛla na nzoto to na elimo. Na ndenge yango amonisaki oyo akosala ntango akozala Masiya Mokonzi na mokili ya sika epai ‘akosambisa mokili sembo.’ (Yis. 42:4) Lokola “mwinda epai ya mabota,” molende oyo amonisaki mpo na kosakola Bokonzi elendisi bayekoli na ye básakola nsango malamu na molende na mokili mobimba.—Yis. 42:6.
18. Mpo na nini esakweli ya Yisaya etɔndisi mitema na biso na botɔndi mpo na Yehova mpe mpo na Moombo na ye ya sembo?
18 Esakweli ya Yisaya esalisi biso mpe tókanga malamumalamu ntina ya likambo monene oyo Yehova asalaki ntango atindaki Mwana na ye awa na mabelé, anyokwama mpe akufa mpo na biso. Yehova asepelaki te komona ndenge Mwana na ye anyokwamaki; kasi, asepelaki nde komona ndenge Yesu atikalaki sembo tii na liwa. Biso mpe tosengeli kosepela lokola Yehova; tosengeli komonisa botɔndi mpo na nyonso oyo Yesu asalaki mpo na komonisa ete Satana azali mokosi, mpo na kosantisa nkombo ya Yehova, mpe na ndenge yango kolongisa lotomo ya Yehova ya kozala Mokonzi. Lisusu, Klisto amemaki masumu na biso mpe akufaki mpo na biso. Na ndenge yango, asalaki ete etonga moke ya bandeko na ye bapakolami na elimo mpe bampate mosusu bátángama bayengebene liboso ya Yehova. Tiká ete ntango tokoyangana na Ekaniseli, mitema na biso etonda na botɔndi mpo na Yehova mpe mpo na Moombo na ye ya sembo.
Bozongeli
• Na ndenge nini Yehova ‘asepelaki’ ete Mwana na ye ‘atutama’?
• Na ndenge nini Yesu ‘azokisamaki mpo na masumu na biso’?
• Na ndenge nini Moombo ‘alongisaki mingi’?
• Ndenge nini boyekoli ya bisakweli oyo elobeli Moombo ebongisi makanisi mpe mitema na biso mpo na Ekaniseli?
[Elilingi na lokasa 26]
“Atyolamaki mpe toboyaki ye”
[Elilingi na lokasa 28]
“Asopi molimo na ye kino kufa”
[Elilingi na lokasa 29]
“Bampate mosusu” bayanganaka na Ekaniseli lokola batali mpamba