Talá! Moombo oyo Yehova asepeli na ye
“Talá moombo na ngai, . . . ye oyo molimo na ngai ekosepela na ye.”—YIS. 42:1.
1. Basaleli ya Yehova basengeli kosala nini, mingimingi lokola Ekaniseli ekómi pene, mpe mpo na nini?
LOKOLA ntango ya kokanisa liwa ya Klisto ezali kopusana, ebongi basaleli ya Nzambe bálanda toli ya ntoma Paulo ya “kotala na likebi mpenza Kapita mpe Mokokisi ya kondima na biso, Yesu.” Paulo abakisaki boye: “Ɛɛ, bótya likebi mpenza epai ya moto oyo asili koyika mpiko na maloba ya botɛmɛli motindo wana ya basumuki oyo bazali bongo kotɛmɛla matomba na bango moko, mpo ete bósila makasi te mpe bólɛmba te na milimo na bino.” (Ebe. 12:2, 3) Kotala na likebi ndenge Klisto atikalaki sembo tii ntango apesaki bomoi na ye lokola mbeka ekosalisa baklisto bapakolami mpe baninga na bango bampate mosusu bákoba kosalela Yehova na bosembo mpe ‘bálɛmba te na milimo na bango.’—Talá mpe Bagalatia 6:9.
2. Bisakweli ya Yisaya oyo elobeli Mwana ya Nzambe ekoki koteya biso nini?
2 Na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova apesaki bisakweli mingi oyo etalelaki mpenza Mwana na ye. Bisakweli yango ekosalisa biso ‘tótala na likebi mpenza Kapita mpe Mokokisi ya kondima na biso,’ Klisto Yesu.a Bisakweli yango elobelaki bizaleli na ye, bampasi oyo asengelaki kokutana na yango, mpe ndenge asengelaki kokóma Mokonzi mpe Mosikoli na biso. Ekosalisa biso tókanga malamu ntina ya Ekaniseli, oyo ekosalema mbula oyo na mokolo ya minei, mwa 9 Aprili, nsima ya kolala ya moi.
Moombo ayebani
3, 4. (a) Liloba “moombo” na mokanda ya Yisaya esalelami mpo na kolobela nani? (b) Ndenge nini Biblia esalisi biso tóyeba Moombo oyo Yisaya 42, 49, 50, 52, mpe 53 elobelaki?
3 Liloba “moombo” esalelami mbala mingi na mokanda ya Yisaya. Na bisika mosusu elobelaka mosakoli Yisaya ye moko. (Yis. 20:3; 44:26) Na bisika mosusu mpe elobelaka ekólo mobimba ya Yisalaele, to Yakobo. (Yis. 41:8, 9; 44:1, 2, 21) Ezali boni mpo na bisakweli ya ntina mingi oyo elobeli Moombo na Yisaya mokapo 42, 49, 50, 52, mpe 53? Makomami ya Grɛki ya boklisto esalisi biso tóyeba Moombo ya Yehova oyo mikapo yango ya Yisaya elobeli. Kutu, Moetiopia oyo mokanda ya Misala elobeli azalaki kotánga moko ya bisakweli yango ntango elimo santu etindaki Filipo, mopalanganisi ya nsango malamu, akutana na ye. Nsima ya kotánga mokapo oyo ezali lelo na Yisaya 53:7, 8, moto yango alobaki na Filipo boye: “Nabondeli yo, Mosakoli azali koloba likambo oyo na ntina na nani? Na ntina na ye moko to na ntina na moto mosusu?” Na mbala moko, Filipo abandaki kolimbwela ye ete Yisaya alobelaki Masiya, Yesu.—Mis. 8:26-35.
4 Ntango Yesu azalaki naino bebe, Simeona, moto moko ya sembo, alobaki na nzela ya elimo santu ete “mwana moke Yesu” akozala “pole mpo na kolongola elamba ya kozipa epai ya bikólo,” oyo Yisaya 42:6 mpe 49:6 esakolaki. (Luka 2:25-32) Longola yango, Yisaya 50:6-9 esakolaki makambo ya kotyola oyo Yesu asengelaki kokutana na yango na butu oyo asengelaki kokangama. (Mat. 26:67; Luka 22:63) Nsima ya Pantekote 33 T.B., ntoma Petelo amonisaki polele ete Yesu azali “Moombo” ya Yehova. (Yis. 52:13; 53:11; tángá Misala 3:13, 26.) Bisakweli yango oyo elobelaki Masiya ekoki koteya biso nini?
Yehova ateyi Moombo na ye
5. Mateya ya ndenge nini Moombo azwaki?
5 Moko ya bisakweli ya Yisaya oyo elobeli Moombo ya Nzambe emonisi boyokani makasi oyo Yehova azalaki na yango na Mwana na ye ya liboso, ntango Mwana yango azalaki na likoló liboso aya awa na mabelé. (Tángá Yisaya 50:4-9.) Moombo yango ye moko amonisaki ete Yehova azalaki ntango nyonso koteya ye; alobaki boye: “Akolamukisa litoi na ngai koyoka lokola bango baoyo bakolakisama.” (Yis. 50:4) Na boumeli ya ntango nyonso wana, Moombo ya Yehova azalaki koyoka Tata na ye mpe azalaki koyekola makambo mingi; akómaki moyekoli ya botosi. Azalaki mpenza na libaku kitoko ya koteyama na Mozalisi ye moko!
6. Ndenge nini Moombo amonisaki botosi makasi oyo azalaki na yango epai ya Tata na ye?
6 Na esakweli yango, Moombo abengi Tata na ye “Nkolo [Yehova].” Yango emonisi ete Moombo ayebaki malamu ete Yehova azali Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Mpo na komonisa botosi na ye epai ya Tata na ye, alobaki boye: “Nkolo [Yehova] azipoli litoi na ngai, nazalaki na nkanza te; nazongaki nsima mpe te.” (Yis. 50:5) ‘Azalaki pembeni ya [Yehova] lokola [mosali ya mayele, NW]’ na bozalisi ya biloko nyonso mpe ya moto. “Mosali [yango] ya mayele” azalaki “kosepela liboso ya [Yehova] ntango nyonso; kosepelana na bifandelo ya mokili na ye mpe esengo [ya Mwana ya Nzambe] ezalaki kati na bana ya bato.”—Mas. 8:22-31.
7. Nini emonisi ete Moombo azalaki na elikya ete Tata na ye akosunga ye ntango akutani na komekama?
7 Mateya oyo Moombo azwaki mpe bolingo oyo azalaki na yango mpo na bana ya bato esalisaki ye alonga komekama makasi oyo akutanaki na yango awa na mabelé. Akobaki kosala mokano ya Tata na ye na esengo, ata ntango amekamaki makasi. (Nz. 40:8; Mat. 26:42; Yoa. 6:38) Ntango Yesu azalaki kokutana na komekama awa na mabelé, azalaki na elikya ete Tata na ye azali kosepela na ye mpe akosalisa ye. Ndenge Yisaya asakolaki yango, Yesu akokaki koloba ete: “Ye oyo akolongisa ngai azali penepene, nani akowelana na ngai? . . . Talá Nkolo [Yehova] akosunga ngai.” (Yis. 50:8, 9) Na ntembe te, Yehova asungaki Moombo na ye ya sembo ntango nyonso oyo azalaki awa na mabelé, ndenge esakweli ya Yisaya emonisi yango.
Mosala ya Moombo awa na mabelé
8. Nini emonisi ete Yesu azalaki “moponami” ya Yehova, oyo Yisaya 42:1 esakolaki?
8 Biblia elobeli likambo oyo esalemaki na mobu 29 T.B. ntango Yesu azwaki batisimo: “Elimo santu . . . ekitelaki ye, mpe mongongo moko eutaki na likoló ete: ‘Yo ozali Mwana na ngai, molingami; nandimi yo.’” (Luka 3:21, 22) Na ndenge yango, Yehova amonisaki polele “moponami” na ye, oyo esakweli ya Yisaya elobeli. (Tángá Yisaya 42:1-7.) Ntango Yesu azalaki kosala mosala na ye awa na mabelé, akokisaki mpenza esakweli yango ya Yisaya. Evanzile ya Matai etángi maloba oyo ezali na Yisaya 42:1-4 mpe emonisi ete elobelaki Yesu.—Mat. 12:15-21.
9, 10. (a) Ndenge nini Yesu akokisaki maloba ya Yisaya 42:3 ntango azalaki kosala mosala na ye? (b) Ndenge nini Klisto ‘asambisaki na sembo’ ntango azalaki na mabelé, mpe ntango nini ‘akosambisa mokili na sembo’?
9 Bakonzi ya mangomba ya Bayuda bazalaki kotyola Bayuda mosusu. (Yoa. 7:47-49) Bato bazalaki konyokolama mpe bazalaki lokola “mongendu motutami” to “nkamba” oyo ezali kozika mokemoke. Nzokande, Yesu azalaki na mawa mpo na babola mpe bato oyo bazalaki konyokolama. (Mat. 9:35, 36) Ayebisaki bato yango boye: “Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona mpasi na mosala mpe kokumbisama mikumba, mpe ngai nakopemisa bino.” (Mat. 11:28) Lisusu, Yesu azalaki ‘kosambisa na sembo’ na ndenge ateyaki mibeko ya Yehova oyo etali mabe ná malamu. (Yis. 42:3) Amonisaki mpe ete tosengeli kozala na bokatikati ntango tozali kosalela Mibeko ya Nzambe mpe tosengeli komonisa motema mawa. (Mat. 23:23) Yesu amonisaki mpe bosembo na ndenge azalaki koteya bato ya lolenge nyonso, ezala bato ya bozwi to babola.—Mat. 11:5; Luka 18:18-23.
10 Esakweli ya Yisaya elobaki mpe ete “mopakolami” ya Yehova ‘akosambisa mokili na sembo.’ (Yis. 42:4) Akosala yango mosika te ntango akoya lokola Masiya, Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, mpo na kobebisa biyangeli nyonso ya politiki mpe kotya boyangeli na ye ya sembo. Akotya mokili ya sika, epai “boyengebene ekofanda.”—2 Pet. 3:13; Dan. 2:44.
“Mwinda” mpe “kondimana”
11. Na ndenge nini Yesu azalaki “mwinda epai ya mabota” na ekeke ya liboso, mpe na ndenge nini azali bongo tii lelo oyo?
11 Na ntembe te, Yesu akokisaki Yisaya 42:6 na ndenge azalaki “mwinda epai ya mabota.” Na mosala na ye awa na mabelé, apesaki pole ya elimo, libosoliboso epai ya Bayuda. (Mat. 15:24; Mis. 3:26) Nzokande, Yesu alobaki boye: “Ngai nazali pole ya mokili.” (Yoa. 8:12) Akómaki pole mpo na Bayuda mpe mabota nyonso na ndenge apesaki bango pole ya elimo mpe bomoi na ye ya kokoka lokola lisiko mpo na bato nyonso. (Mat. 20:28) Nsima ya lisekwa na ye, atindaki bayekoli na ye bázala batatoli na ye “tii na esika eleki mpenza mosika na mabelé.” (Mis. 1:8) Ntango bazalaki kosakola, Paulo ná Balanabasi bazongelaki maloba “mwinda epai ya mabota” mpe balobaki ete etaleli mosala na bango ya kosakola epai ya bato oyo bazalaki Bayuda te. (Mis. 13:46-48; talá mpe Yisaya 49:6.) Bandeko ya Yesu oyo bazali bapakolami na elimo mpe baninga na bango bazali kosala mosala yango lelo oyo ndenge bazali kosakola nsango malamu mpe kosalisa bato bándimela Yesu, oyo azali “mwinda epai ya mabota.”
12. Ndenge nini Yehova apesaki Moombo na ye “lokola kondimana epai ya bato”?
12 Kaka na esakweli yango, Yehova alobaki na Moombo oyo aponaki ete: “Nabateli [yo]; napesi [yo] lokola kondimana epai ya bato, mwinda epai ya mabota.” (Yis. 42:6) Satana asalaki nyonso mpo na koboma Yesu mpe kopekisa ye asilisa mosala na ye awa na mabelé, kasi Yehova abatelaki ye tii na ntango oyo asengelaki kokufa. (Mat. 2:13; Yoa. 7:30) Na nsima, Yehova asekwisaki Yesu mpe apesaki ye lokola “kondimana,” to ndanga, mpo na bato ya mabelé. Elaka yango emonisaki ete Moombo yango ya Nzambe oyo atikalaki sembo akokoba kozala “mwinda epai ya mabota” mpe akosikola bato oyo bazali na molili ya elimo.—Tángá Yisaya 49:8, 9.b
13. Ntango azalaki awa na mabelé, na ndenge nini Yesu asikolaki baoyo ‘bafandaki na molili’ mpe ndenge nini azali kokoba kosala yango lelo oyo?
13 Na boyokani na ndanga yango, Moombo oyo Yehova aponaki, asengelaki “kofungola miso ya bango bakufeli miso,” “kolubola bakangami longwa na esika na nkanga,” mpe kosikola “bango bafandi na molili longwa na ndako ya monyɔlɔlɔ.” (Yis. 42:7) Ntango azalaki awa na mabelé, Yesu asalaki yango na ndenge azalaki kotɔndɔla mimeseno ya mangomba ya lokuta mpe kosakola nsango malamu ya Bokonzi. (Mat. 15:3; Luka 8:1) Na ndenge yango, alongolaki na molili ya elimo Bayuda oyo bakómaki bayekoli na ye. (Yoa 8:31, 32) Asalisi mpe bamilio ya bato oyo bazali Bayuda te báyeba solo. Apesaki bayekoli na ye etinda ete: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso”; mpe alakaki ete akozala na bayekoli na ye “tii na bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” (Mat. 28:19, 20) Uta na likoló, Klisto Yesu azali kotambwisa mosala ya kosakola na mokili mobimba.
Yehova atomboli “Moombo”
14, 15. Mpo na nini mpe ndenge nini Yehova atombolaki Moombo na ye?
14 Nzokande, na esakweli mosusu oyo etali Masiya Moombo, Yehova alobaki boye: “Talá moombo na ngai akolonga; akokumisama mpe akotombolama, akozala likoló mingi.” (Yis. 52:13) Ntango amonaki ete Mwana na ye azalaki kotosa bokonzi na Ye mpe atikalaki sembo epai na Ye ata na komekama makasi, Yehova atombolaki ye.
15 Ntoma Petelo akomaki boye mpo na Yesu: “Azali na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe, mpo akendaki na likoló; mpe baanzelu mpe bakonzi mpe banguya bamemamaki na kotosa ye.” (1 Pet. 3:22) Ndenge moko, ntoma Paulo akomaki boye: “Ntango akómaki na lolenge ya moto, amikitisaki mpe akómaki moto ya botosi tii na liwa, ɛɛ, liwa likoló ya nzete ya mpasi. Mpe mpo na ntina wana mpenza Nzambe atombolaki ye na esika moko ya likoló mpe na boboto mpenza apesaki ye nkombo oyo ezali likoló ya nkombo mosusu nyonso, mpo ete na nkombo ya Yesu mabɔlɔngɔ nyonso egumbama ya baoyo bazali na likoló mpe ya baoyo bazali na mabelé mpe ya baoyo bazali na nse ya mabelé, mpe monɔkɔ nyonso endima polele ete Yesu Klisto azali Nkolo mpo na nkembo ya Nzambe Tata.”—Filp. 2:8-11.
16. Ndenge nini Yesu atombwamaki “likoló mingi” na 1914, mpe makambo nini asali kobanda wana?
16 Na 1914, Yehova atombolaki Yesu likoló koleka. Akómaki “likoló mingi” ntango Yehova atyaki ye Mokonzi na Bokonzi ya Masiya. (Nz. 2:6; Dan. 7:13, 14) Kobanda wana, Klisto azali “na bokonzi na kati ya bayini na [ye].” (Nz. 110:2) Libosoliboso, azalaki na bokonzi likoló ya Satana ná bademo na ye mpe abwakaki bango na mabelé. (Emon. 12:7-12) Na nsima, lokola Sirisi Monene, Klisto alongolaki bandeko na ye, batikali bapakolami awa na mabelé, na boombo ya “Babilone Monene.” (Emon. 18:2; Yis. 44:28) Atambwisaki mosala ya kosakola na mokili mobimba oyo epesaki nzela na koyanganisama ya ‘batikali’ bapakolami mpe na nsima, koyanganisama ya bamilio ya “bampate mosusu,” baninga ya sembo ya “etonga moke.”—Emon. 12:17; Yoa. 10:16; Luka 12:32.
17. Mateya nini tozwi nsima ya koyekola bisakweli ya Yisaya oyo elobeli “moombo”?
17 Na ntembe te, boyekoli ya bisakweli yango ya ntina mingi oyo ezali na mokanda ya Yisaya esalisi biso tókóma lisusu na limemya makasi mpo na Mokonzi mpe Mosikoli na biso, Klisto Yesu. Ndenge oyo azalaki kotosa Yehova ntango azalaki awa na mabelé emonisaki ete Tata na ye ateyaki ye liboso aya awa na mabelé. Ntango azalaki awa na mabelé, Yesu amonisaki ete azali “mwinda epai ya mabota,” mpe azali komonisa yango tii lelo oyo na ndenge azali kotambwisa mosala ya kosakola. Ndenge tokomona yango na lisolo elandi, esakweli mosusu oyo etaleli Moombo emonisaki ete asengelaki konyokwama mpe kokaba bomoi na ye mpo na biso, likambo oyo tosengeli ‘kotyela likebi mpenza’ lokola Ekaniseli ya liwa na ye ekómi pene.—Ebe. 12:2, 3.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bisakweli yango ezali na Yisaya 42:1-7; 49:1-12; 50:4-9; mpe 52:13–53:12.
b Mpo na koyeba ndimbola ya Yisaya 49:1-12, talá Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso II, nkasa 136-145.
Bozongeli
• “Moombo” oyo bisakweli ya Yisaya elobeli ezali nani, mpe ndenge nini toyebi yango?
• Mateya ya ndenge nini Moombo azwaki epai ya Yehova?
• Na ndenge nini Yesu azali “mwinda epai ya mabota”?
• Ndenge nini Moombo atombwamaki?
[Elilingi na lokasa 21]
Filipo amonisaki polele ete “moombo” oyo Yisaya alobelaki ezali Yesu Masiya
[Elilingi na lokasa 23]
Lokola azali Moombo oyo Yehova aponaki, Yesu azalaki na mawa mpo na babola mpe mpo na bato oyo bazalaki konyokwama
[Elilingi na lokasa 24]
Tata ya Yesu atombolaki ye mpe atyaki ye Mokonzi na Bokonzi ya Masiya