Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Yisaya—II
MOSAKOLI Yisaya azalaki kokokisa mosala na ye na bosembo mpenza. Etumbu ya Nzambe oyo asakolaki ete esengelaki koyela Yisalaele, ekólo ya mabota zomi, ekokisamaki. Nzambe atindaki ye asakola mpe etumbu mosusu oyo esengelaki koyela Yelusaleme.
Asakolaki ete Yelusaleme ekobebisama mpe bafandi na yango bakomemama na boombo. Kasi, amonisaki ete yango ekozala mpo na libela te. Nsima ya mwa ntango, losambo ya solo ekozongisama lisusu. Yango nde nsango ya ntina mingi oyo ezali na Yisaya 36:1–66:24.a Tokozwa matomba mingi na kotalela mikapo yango mpamba te bisakweli yango mingi ezali kokokisama na monene na mikolo na biso mpe misusu ekokokisama mosika te. Eteni yango ya mokanda ya Yisaya ezali mpe na bisakweli oyo etaleli Masiya.
“TALÁ, MIKOLO MIKOYA”
Na mbula ya 14 ya bokonzi ya Hizikiya (732 L.T.B.), bato ya Asulia bayaki kobundisa Yuda. Yehova alakaki ete akobatela Yelusaleme. Mitema ya bafandi ya Yelusaleme ekitaki ntango anzelu moko mpamba abomaki basoda 185 000 ya Asulia.
Hizikiya abɛlaki. Ntango abondelaki mpo na yango, Yehova ayokaki libondeli na ye mpe abikisaki ye; abakiselaki ye mbula 15 ya bomoi. Ntango mokonzi ya Babilone atindaki bantoma epai ya Hizikiya na ndenge abikaki na maladi na ye, Hizikiya alakisaki bango bozwi na ye nyonso. Yisaya ayebisaki Hizikiya nsango ya Yehova, alobaki boye: “Talá, mikolo mikoya wana ndako na yo mobimba mpe nyonso oyo batata na yo babombi wana kino mokolo oyo ekobɔtɔlama kino Babele.” (Yisaya 39:5, 6) Bambula mwa moke koleka nkama na nsima, esakweli yango ekokisamaki.
Eyano na motuna ya Biblia:
38:8—“Matambe” oyo likoló na yango elili esengelaki kozonga nsima ezalaki nini? Lokola na siɛklɛ ya mwambe liboso ya ntango na biso, bato ya Ezipito mpe ya Babilone bazalaki kosalela emoniselo ya ntango (cadran solaire), ekoki kozala ete matambe yango ezalaki bandelo ya emoniselo yango oyo Ahaza, tata ya Hizikiya azalaki kosalela. To mpe ekokaki kozala basikalye oyo ezalaki na ndako ya mokonzi. Ekoki kozala ete batyaki likonzí moko pembeni ya esikalye, mpe soki moi ebɛti, elili ya likonzí yango ezalaki komonana na baesikalye mpe ezalaki kosalisa mpo na koyeba ngonga.
Mateya mpo na biso:
36:2, 3, 22. Atako Sebena alongolamaki na mosala na ye ya kapita, akobaki kosala mpo na mokonzi; akómaki kosala lokola mokomeli ya kapita oyo azwaki esika na ye. (Yisaya 22:15, 19) Soki tolongolami na mokumba moko na lisangá ya Yehova, tosengeli nde te kokoba kosalela Nzambe na esika nyonso oyo apesi biso nzela tósalela ye?
37:1, 14, 15; 38:1, 2. Na ntango ya mpasi, ekozala malamu tóbondela Yehova mpe tótyela ye elikya nyonso.
37:15-20; 38:2, 3. Ntango Baasulia bayaki kobundisa Yelusaleme, Hizikiya azalaki komitungisa mingimingi mpo na nsɔni oyo likambo yango elingaki kopesa na nkombo ya Yehova soki banguna balongaki bango. Ntango Hizikiya ayokaki ete akokufa mpo na maladi na ye, amitungisaki mingi; kasi azalaki komibanzabanza mpo na ye moko te. Likambo oyo ezalaki kotungisa ye ezalaki ete lokola azalaki na mwana te, soki akufi mokonzi alingaki kozala te mpo na kokitana ye na kiti ya bokonzi ya Davidi. Azalaki mpe komitungisa soki nani akokamba Bayisalaele mpo na kobundisa Baasulia. Lokola Hizikiya, biso mpe tomonaka ete kosantisama ya nkombo ya Yehova mpe kokokisama ya mokano na ye ezali na ntina mingi koleka lobiko na biso.
38:9-20. Loyembo wana ya Hizikiya ezali koteya biso ete na bomoi, eloko moko te ezali na ntina mingi koleka kokumisa Yehova.
“AKOTONGAMA LISUSU”
Nsima ya kosakola ete Yelusaleme ekobomama mpe bafandi na yango bakomemama na boombo na Babilone, Yisaya asakolaki mpe ete losambo ya solo ekozongisama. (Yisaya 40:1, 2) Yisaya 44:28 (NW) elobi boye: “[Yelusaleme] akotongama lisusu.” Bikeko ya banzambe ya Babilone ekomemama lokola “bozito.” (Yisaya 46:1) Babilone esengelaki kobomama. Nsima ya mbula nkama mibale, makambo wana nyonso ekokisamaki.
Yehova alakaki ete akopesa basaleli na ye lokola “mwinda mpo na mabota nyonso.” (Yisaya 49:6) “Likoló” ya Babilone, elingi koloba, bakonzi na yango basengelaki “kopanzana bitenibiteni lokola molinga,” mpe bato ya Babilone basengelaki “kokufa lokola ngungi ya mpamba”; kasi, ‘mwana mwasi mokangami ya Siona akofungola nkanga na nkingo na ye.’ (Yisaya 51:6, NW; 52:2) Yehova alobaki na baoyo babɛlɛmaki pene na ye mpo na koyoka ete: “Nakokata na bino kondimana ya seko oyo boboto na ngai mpo na Davidi.” (Yisaya 55:3) Kotosa mitinda ya sembo ya Yehova esalaki ete ‘bámisepelisa kati na Yehova.’ (Yisaya 58:14) Nzokande, mabunga ezalaki ‘kokabola kati na bango mpe Nzambe na bango.’—Yisaya 59:2.
Biyano na mituna ya Biblia:
40:27, 28—Mpo na nini Yisalaele elobaki ete: “Nzela na ngai ebombameli [Yehova], mpe kosambisa na likambo na ngai etalami na Nzambe na ngai te”? Na Babilone, Bayuda mosusu bakokaki kokanisa ete Yehova azalaki komona te minyoko oyo bazalaki na yango kuna. Yisaya alendisaki bango, amonisaki bango ete nguya ya Babilone elekaki te nguya ya Mozalisi ya mabelé, ye oyo akosenzwa te mpe akolɛmbaka te.
43:18-21—Mpo na nini bayebisaki Bayuda oyo bazongaki na mokili na bango ‘bákanisa te mpo na makambo ya kala’? Yango elimboli te ete basengelaki kobosana makambo oyo Yehova asalaki na ntango ya kala mpo na kobikisa bango. Kasi, Yehova alingaki nde bákumisa ye mpo na “likambo ya sika” oyo alingaki kosalela bango, na ndakisa ndenge alingaki kobatela bango na mobembo mpo na kozonga na Yelusaleme, ntango mosusu na nzela moko ya lisobe oyo ezalaki mokuse. Ndenge moko mpe “ebele ya bato” oyo bakobika na “bolɔzi monene” bakokumisa Yehova mpo na makambo ya sika oyo akosala mpo na bango.—Emoniseli 7:9, 14.
49:6—Na ndimbola nini Masiya azali “mwinda mpo na mabota nyonso,” nzokande asalaki mosala na ye awa na mabelé kaka epai ya Bayisalaele? Ezali bongo mpo na makambo oyo esalemaki nsima ya liwa ya Yesu. Biblia emonisi ete bayekoli ya Yesu nde bakokisaki Yisaya 49:6. (Misala 13:46, 47) Lelo oyo, baklisto bapakolami, elongo na ebele ya basaleli mosusu ya Nzambe, bazali lokola “mwinda mpo na mabota nyonso,” bazali kongɛngisa bato “tii na nsukansuka ya mabelé.”—Matai 24:14; 28:19, 20.
53:10—Na ndenge nini Yehova asepelaki kotuta Mwana na ye? Na ntembe te Yehova, Nzambe ya motema-boboto mpe ya mawa, ayokaki mpasi mingi na motema na komona ndenge Mwana na ye anyokwamaki. Atako bongo, asepelaki na botosi oyo Yesu amonisaki mpe na makambo nyonso oyo mpasi na ye mpe liwa na ye esengelaki kokokisa.—Masese 27:11; Yisaya 63:9.
53:11—Boyebi oyo na nzela na yango Masiya “akolongisa mingi” ezali nini? Ezali boyebi oyo Yesu azwaki na ndenge ayaki awa na mabelé lokola moto, mpe anyokwamaki tii na liwa atako asalaki mabe moko te. (Baebele 4:15) Na ndenge yango, apesaki mbeka ya lisiko oyo esengelaki mpo na kosalisa baklisto bapakolami mpe ebele ya bato bándimama na miso ya Nzambe.—Baloma 5:19; Yakobo 2:23, 25.
56:6—“Bapaya” ezali banani, mpe na ndenge nini bazali ‘kosimba kondimana ya Yehova na makasi?’ “Bapaya” ezali “bampate mosusu” ya Yesu. (Yoane 10:16) Bazali kosimba kondimana na ndenge bazali kotosa mibeko ya kondimana yango, bazali kolanda bibongiseli nyonso oyo ezali na kati ya kondimana yango, bazali kolya bilei ya elimo ndenge moko na baklisto bapakolami, mpe bazali kosunga bango na mosala ya kosakola mpe kokómisa bato bayekoli.
Mateya mpo na biso:
40:10-14, 26, 28. Yehova azali makasi mingi mpe atondi na boboto, azali na nguya nyonso mpe na bwanya nyonso, azali na boyebi oyo tokoki kososola te.
40:17, 23; 41:29; 44:9; 59:4. Kosala boyokani ya politiki ná bikólo mosusu mpe banzambe ya lokuta ezali “mpamba.” Ezali na ntina te ete tótyela yango motema.
42:18, 19; 43:8. Soki toboyi kolanda makambo oyo ezali na kati ya Liloba ya Nzambe mpe soki toboyi kotosa malako ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” tokozala bakufi miso mpe bimimi na elimo.—Matai 24:45.
43:25. Yehova alimbisaka masumu mpo na ye moko. Kosantisama ya nkombo ya Yehova ezali na esika ya liboso; kobikisama na masumu mpe liwa mpe kozwa bomoi ya seko eyei nsima.
44:8. Tozali na lisungi ya Yehova, ye oyo apikamá makasi lokola libanga. Tosengeli kobanga te kopesa litatoli mpo na ye!—2 Samwele 22:31, 32.
44:18-20. Kosambela bikeko emonisaka ete motema ya moto ezali lisusu malamu te. Eloko moko te esengeli kozwa esika ya Yehova na mitema na biso.
46:10, 11. Likoki oyo Yehova azali na yango ya kosala ete ‘toli na ye etɛlɛma,’ elingi koloba, kokokisa mikano na ye ezali komonisa ete azali mpenza Nzambe ya solo.
48:17, 18; 57:19-21. Soki tozali kotya elikya na biso epai ya Yehova mpo na lobiko, tozali kobɛlɛma pene na ye, mpe kotya likebi na mibeko na ye, kimya na biso ekozala lokola ebale mpe misala na biso ya boyengebene ekozala mingi lokola mbɔngɛ ya mai ya mbu. Baoyo batyaka likebi te na Liloba ya Nzambe bazali lokola “mai ya monana ezali kotombwatombwa.” Bazalaka na kimya ata moke te.
52:5, 6. Bato ya Babilone bakanisaki ete Nzambe ya solo azali na nguya te. Bayebaki te ete soki Bayisalaele bamemamaki na boombo ezalaki mpo Yehova asilikelaki bango. Ntango bato mosusu bazwi mpasi, tosengeli te kokata nokinoki ete bazwi mpasi yango mpo na boye to boye.
52:7-9; 55:12, 13. Tozali na bantina soki misato oyo esengeli kotinda biso tósala na esengo nyonso mosala ya kosakola Bokonzi mpe ya kokómisa bato bayekoli. Makolo na biso ezali kitoko mpo na bato ya komikitisa baoyo bazali na nzala ya elimo. Tomonaka Yehova “liso na liso,” elingi koloba, tozalaka na boninga ya penepene na ye. Tozalaka mpe na mapamboli mingi na elimo.
52:11, 12. Mpo na komema “biloko ya [Yehova],” elingi koloba bibongiseli na ye mpo na mosala mosantu, tosengeli kozala pɛto na elimo mpe na bizaleli.
58:1-14. Koluka komimonisa na miso ya bato ete tozali na ezaleli ya kokangama na Nzambe mpe na boyengebene ezali na ntina moko te. Basaleli ya solo ya Nzambe basengeli kotondana nde na misala ya ezaleli ya kokangama na Nzambe mpe ya bolingo ya bandeko.—Yoane 13:35; 2 Petelo 3:11.
59:15b-19. Yehova amonaka makambo nyonso oyo bato basalaka mpe apesaka etumbu na ntango oyo ye moko abongisi.
‘AKOZALA MOTOLE YA KITOKO’
Yisaya 60:1 elobeli kozongisama ya losambo ya pɛto na ntango ya kala mpe na ntango na biso; elobi boye: “Tɛlɛma! [Ee, mwasi, NW] Ngɛnga! Zambi pole na yo eyei, mpe nkembo ya [Yehova] ebimi likoló na yo.” Siona ‘akozala motole ya kitoko na lobɔkɔ ya [Yehova].’—Yisaya 62:3.
Yisaya abondelaki Yehova mpo na bandeko na ye oyo basengelaki kobongola motema ntango bakozala na boombo na Babilone. (Yisaya 63:15–64:12) Nsima ya komonisa bokeseni kati na basaleli ya solo mpe basaleli ya lokuta, mosakoli Yisaya amonisi ndenge oyo Yehova akopambola baoyo bazali kosalela ye.—Yisaya 65:1–66:24.
Biyano na mituna ya Biblia:
61:8, 9—“Kondimana ya seko” ezali nini mpe “bakitani” ezali banani? Yango ezali kondimana ya sika oyo Yehova asalaki elongo na baklisto bapakolami. “Bakitani” ezali “bampate mosusu”—ebele ya bato oyo bazali kondima nsango na bango.—Yoane 10:16.
63:5(NW)—Ndenge nini nkanda makasi ya Nzambe esungaka ye? Nkanda ya Nzambe elekaka ndelo te, yango ezali sembo. Nkanda makasi na ye esungaka ye, elingi koloba elendisaka ye apesa bitumbu na ye ya sembo.
Mateya mpo na biso:
64:6. Bato ya kozanga kokoka bakoki te komibikisa. Mpo na oyo etali kolimbisama ya masumu, misala na bango ya boyengebene ezali lokola bilamba ya mbindo.—Baloma 3:23, 24.
65:13, 14. Yehova apambolaka basaleli na ye mingi mpe akokisaka bamposa na bango ya elimo.
66:3-5. Yehova ayinaka bokosi.
“Bósepela”
Na ntembe te, Bayuda ya sembo oyo bazalaki na Babilone basepelaki mingi na bisakweli oyo eyebisaki kozongisama ya losambo ya solo. Yehova alobaki na bango boye: “Bósepela mpe bóyoka esengo libela na yango ezali ngai kotonga; mpo ete talá, nakotonga Yelusaleme mpo na kosanzola mpe bato na ye mpo na esengo.”—Yisaya 65:18.
Biso mpe tozali na ntango moko oyo molili ezipi mabelé mpe bikólo nyonso. (Yisaya 60:2) Tozali na “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza.” (2 Timote 3:1) Yango wana, nsango ya Yehova mpo na lobiko oyo ezali na mokanda ya Yisaya ezali kolendisa biso mingi mpenza.—Baebele 4:12.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na lisolo oyo elobelaki Yisaya 1:1–35:10, talá lisolo “Liloba ya Yehova ezali na bomoi—Makanisi ya ntina na mokanda ya Yisaya—I” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Desɛmbɛ 2006.
[Elilingi na lokasa 8]
Oyebi ntina ya libosoliboso oyo Hizikiya abondelaki Nzambe abikisa bango na mabɔkɔ ya Baasulia?
[Elilingi na lokasa 11]
“Kitoko boni likoló ya ngomba ezali makolo na ye oyo akoyeisa nsango malamu!”