Mokapo ya Zomi na Mitano
Mwasi ekomba asepeli
1. Mpo na nini Sara azalaki na mposa ya kobota, mpe azalaki na mokakatano nini na likambo yango?
SARA azalaki mpenza na mposa ya kobota. Kasi, likambo ya mawa, azalaki ekomba mpe yango ezalaki kopesa ye mpasi mingi na motema. Na ntango na bango, kozala ekomba ezalaki nsɔni monene, kasi kaka yango te nde ezalaki kopesa Sara mpasi mingi na motema. Azalaki mpenza na mposa ya komona ndenge elaka ya Nzambe ekokokisama epai ya mobali na ye. Abalayama asengelaki kobota momboto oyo akozala lipamboli mpo na mabota nyonso ya mabelé. (Genese 12:1-3) Nzokande, bambula ebele nsima ya elaka oyo Nzambe apesaki, babotaki naino te. Sara akómaki mobange mpe azalaki na mwana te. Na bantango mosusu, azalaki komituna soki elikya na ye ezalaki kaka mpamba. Nzokande, mokolo moko, kozanga elikya na ye ekómaki esengo!
2. Mpo na nini esakweli oyo ezali na Yisaya mokapo 54 esengeli kobenda likebi na biso?
2 Mpasi ya Sara ezali kosalisa biso tókanga ntina ya esakweli oyo ezali na Yisaya mokapo 54. Na mokapo oyo bazali kolobela Yelusaleme lokola nde azali mwasi ekomba oyo azwi esengo monene ya kobota bana ebele. Na ndenge Yehova alobeli bato nyonso ya ekólo na ye ya ntango ya kala lokola mwasi na ye, amonisi ete alingaka bango mingi. Lisusu, mokapo oyo ya Yisaya ezali kosalisa biso tóyeba malamu likambo moko ya ntina mingi oyo Biblia ezali kobenga ete “sɛkɛlɛ mosantu.” (Baloma 16:25, 26) Koyeba “mwasi” yango mpe makambo nyonso oyo akutani na yango, ndenge eyebisami na esakweli oyo, ekoteya biso makambo mingi etali losambo ya pɛto lelo oyo.
“Mwasi” yango ayebani
3. Mpo na nini “mwasi” ekomba azali na bantina ya kosepela?
3 Mokapo 54 ebandi na maloba ya esengo: ‘Yembá nzembo, ee ekomba, yo oyo obotaki liboso te! Bandá koyemba mpe gangá, yo oyo ozalaki liboso na mpasi ya kobota te. Mpo ete bana na ye oyo atikamaki bakozala mingi koleka bana na ye oyo abalanaki; Yehova alobi bongo.’ (Yisaya 54:1) Boye Yisaya azalaki mpenza na esengo monene ya kobimisa maloba oyo! Mpe kokokisama na yango ekopesa solo libɔndisi epai ya Bayuda oyo bakozala na boombo na Babilone. Na ntango yango Yelusaleme ekotikala kaka mpamba. Na makanisi ya bato, elikya ata moke ezali te mpo ete yango ekóma lisusu na bato, se ndenge mwasi ekomba azalaka lisusu na elikya te ya kobota bana na bobange na ye. Kasi mapamboli mingi ezali kozela “mwasi” yango—akobota bana mingi. Yelusaleme ekozala na esengo moko ya koloba te. Ekotonda lisusu na “bana,” to na bato.
4. (a) Ndenge nini ntoma Paulo asalisi biso tómona polele ete Yisaya mokapo 54 esengeli kokokisama na ndenge ya monene koleka ndenge oyo yango ekokisamaki na mobu 537 L.T.B.? (b) “Yelusaleme mboka ya likoló” ezali nini?
4 Ekoki kozala ete Yisaya ayebaki te ete esakweli na ye ekokokisama kaka mbala moko te. Ntoma Paulo atángi maloba ya Yisaya mokapo 54 mpe amonisi ete “mwasi” ezali eloko moko ya ntina mingi koleka mboka Yelusaleme oyo ezalaki awa na mabelé. Akomi boye: “Kasi Yelusaleme mboka ya likoló azali na bonsomi, mpe azali mama na biso.” (Bagalatia 4:26) “Yelusaleme mboka ya likoló” wana ezali nini? Ezali polele ete yango ezali te engumba Yelusaleme oyo ezalaki na Mokili ya Ndaka. Yelusaleme ya Mokili ya Ndaka ezali ya mabelé, kasi ya “likoló” te. “Yelusaleme mboka ya likoló” ezali “mwasi” ya Nzambe kuna na likoló, ebongiseli na ye oyo esangisi bikelamu ya elimo oyo ezali na nguya mingi.
5. Na likambo oyo elobelami na elilingi na Bagalatia 4:22-31, nani azali elilingi ya (a) Abalayama? (b) Sara? (c) Yisaka? (d) Agale? (e) Yisamaele?
5 Kasi, ndenge nini Yehova akokaki kozala na basi mibale ya elilingi, moko na likoló, mosusu na mabelé? Likambo yango ezali bongolabongola? Soki moke te. Ntoma Paulo amonisi ete eyano ezali na elilingi ya esakweli oyo etali libota ya Abalayama. (Bagalatia 4:22-31; talá “Libota ya Abalayama—Elilingi ya esakweli,” lokasa 218.) Sara, “mwasi ya nsomi,” mwasi mpenza ya Abalayama, azali elilingi ya ebongiseli ya Yehova oyo esangisi bikelamu ya elimo, oyo ekokani na mwasi. Agale, mwana mwasi moombo mpe mwasi ya mibale to makango ya Abalayama, azali elilingi ya Yelusaleme ya mabelé.
6. Na ndenge nini na boumeli ya ntango molai ebongiseli ya Nzambe kuna na likoló ezalaki na bana te?
6 Lokola toyebi mwa makambo wana, tobandi sikoyo kokanga ntina mpenza ya Yisaya 54:1. Nsima ya kozala ekomba bambula ebele, Sara abotaki Yisaka ntango akómaki na mbula 90. Ndenge moko mpe, ebongiseli ya Yehova kuna na likoló, na boumeli ya ntango molai, ezalaki na bana te. Na Edene, Yehova apesaki elaka ete “mwasi” na ye akobimisa “momboto.” (Genese 3:15) Bambula koleka 2 000 na nsima, Yehova asalaki kondimana na ye elongo na Abalayama na likambo ya Momboto oyo alakaki. Kasi “mwasi” ya Nzambe kuna na likoló asengelaki kozela lisusu bikeke ebele liboso ya kobimisa Momboto yango. Nzokande, wana ntango ekokaki, bana ya “mwasi ekomba” bakómaki mingi koleka bana ya Yisalaele ya mosuni. Ndakisa ya mwasi ekomba ezali kosalisa biso tókanga ntina oyo baanzelu bazalaki na mposa makasi ya komona ndenge Momboto yango, oyo asakolamaki, akobima. (1 Petelo 1:12) Nsukansuka, Momboto yango abimaki ntango nini?
7. Ntango nini “Yelusaleme mboka ya likoló” ezwaki bantina ya kosepela ndenge eyebisami na Yisaya 54:1, mpe mpo na nini oyanoli bongo?
7 Ntango Yesu abotamaki lokola moto baanzelu basepelaki mingi. (Luka 2:9-14) Kasi yango ezalaki te likambo oyo eyebisamaki na Yisaya 54:1. Ezali ntango Yesu abotamaki na nzela ya elimo santu na mobu 29 ya ntango na biso (T.B.) nde akómaki mwana ya elimo ya “Yelusaleme mboka ya likoló,” mpe Nzambe ye mei andimaki ye polele ete azali “Mwana molingami” na ye. (Malako 1:10, 11; Baebele 1:5; 5:4, 5) Mpo na kokokisa Yisaya 54:1, ezalaki na ntango yango nde “mwasi” ya Nzambe kuna na likoló azwaki bantina ya kosepela. Nsukansuka, abimisaki Masiya, Momboto oyo alakamaki. Bikeke mingi oyo azalaki ekomba ekómaki na nsuka na yango. Nzokande, yango ezalaki te ntina bobele moko ya bosepeli na ye.
Mwasi ekomba akómi na bana ebele
8. Mpo na nini “mwasi” ya Nzambe kuna na likoló azalaki na bantina ya kosepela nsima ya kobimisa Momboto oyo alakamaki?
8 Nsima ya liwa mpe lisekwa ya Yesu, “mwasi” ya Nzambe kuna na likoló asepelaki koyamba lisusu Mwana wana ya bolingo, lokola “mwana ya liboso uta na bakufi.” (Bakolose 1:18) Uta ntango wana, mwasi yango abandaki kobota bana mingi ya elimo. Na Pantekote ya mobu 33 T.B., bayekoli ya Yesu soki 120 bapakolamaki na elimo, mpe bongo bandimamaki lokola bato oyo bakozwa libula elongo na Klisto. Mwa moke na nsima, kaka na mokolo yango, bato mosusu 3 000 babakisamaki. (Yoane 1:12; Misala 1:13-15; 2:1-4, 41; Baloma 8:14-16) Motángo ya bana yango ezalaki se kobakisama. Na bikeke ya liboso ya lipɛngwi ya losambo ya boklisto, bokoli yango ebandaki kokita mokemoke. Nzokande, makambo esengelaki kobongwana na ekeke ya 20.
9, 10. Lilako ya ‘kokómisa esika ya hema monene’ emonisi nini mpo na mwasi oyo azalaki kofanda na hema na ntango ya kala, mpe mpo na nini yango ezali ntango ya esengo mpo na mwasi yango?
9 Yisaya alandi kosakola ntango moko ya bokoli mpenza: ‘Kómisá esika ya hema na yo monene, tiká ete bilamba ya efandelo na yo bisembolama; omiboya te, yeisá nkamba na yo molai mpe kembisá na makasi bapikɛ na yo. Mpo ete okopanzama na epai ya mobali mpe na epai ya mwasi; bakitani na yo bakozala mikóló na mabota; okofandisa bato kati na mboka etikali mpamba. Obanga te, mpo ete okoyokisama nsɔni te; obɛta ntembe te mpo ete okotyolama te. Zambi okobosana nsɔni ya bolenge na yo, mpamela ya ntango na yo ya kokufela-mobali, okokanisa yango lisusu te.’—Yisaya 54:2-4.
10 Awa balobeli Yelusaleme lokola mwasi ya libala mpe mama ya bana oyo afandi na hema, lokola Sara. Ntango azwi mapamboli ya kobakisa bana na libota na ye, mama yango akómi na ntango oyo asengeli koyeisa ndako na ye monene. Asengeli kosalela hema oyo ezali na elamba mpe na bansinga ya molai, mpe kopika makasi bapikɛ oyo ekokangisa hema na esika na yango ya sika. Wana ezali solo mosala oyo akosala na esengo mpenza; mpe lokola amipesi na mosala yango, ezali mpasi te abosana bambula oyo alekisaki na komituna na mawa nyonso soki akobota bana mpo libota na ye elimwa te.
11. (a) Ndenge nini “mwasi” ya Nzambe kuna na likoló azwaki mapamboli na 1914? (Talá maloba na nse ya lokasa.) (b) Kobanda 1919 tii sikoyo, mapamboli nini bapakolami bazwi awa na mabelé?
11 Nsima ya kolongwa na boombo na Babilone, Yelusaleme ya mabelé ekómaki na ntango oyo esengelaki kosala makambo ya sika. Kutu, “Yelusaleme mboka ya likoló” nde ezwi mpenza mapamboli mingi koleka.a Mingi mpenza kobanda na 1919, “bana” na ye bapakolami bazwi bomɛngo mingi na makambo na bango ya elimo oyo euti kozongisama. (Yisaya 61:4; 66:8) ‘Bakamataki bikólo mosusu’ na ndenge bapalanganaki bipai na bipai na mikili mingi mpo na koluka baoyo nyonso bakobakisama na libota na bango ya elimo. Nsukansuka, motángo ya bana wana bapakolami ebakisamaki mingi mpenza. Emonani ete motángo na bango ya 144 000 ekokaki soki na katikati ya bambula ya 1930. (Emoniseli 14:3) Kobanda ntango yango, ntina mpenza ya mosala ya kosakola ezalaki lisusu te ya koyanganisa bapakolami na elimo. Nzokande, bokoli esukaki te kaka na bapakolami.
12. Longola bapakolami, banani bazali koyanganisama na lisangá ya boklisto kobanda na bambula ya 1930?
12 Yesu ye moko asakolaki ete longola “etonga moke” ya bandeko na ye bapakolami, akozala mpe na “bampate mosusu” oyo basengeli kotyama na kati ya lopango ya baklisto ya solosolo. (Luka 12:32; Yoane 10:16) Atako bazali na molɔngɔ ya bana ya “Yelusaleme mboka ya likoló” te, baninga wana ya sembo ya baklisto bapakolami bazali kokokisa mokumba moko monene oyo esakolamaki uta kala. (Zekalia 8:23) Kobanda na bambula ya 1930 tii lelo, “ebele ya bato” yango basili koyanganisama, mpe yango esali ete lisangá ya boklisto ekola mpenza na ndenge ya kokamwa. (Emoniseli 7:9, 10) Lelo oyo, ebele ya bato wana bakómi bamilio. Bokoli nyonso wana esɛngi ete bátonga ebele ya Bandako ya Bokonzi, Bandako ya Mayangani, mpe bandako mpo na bafiliale. Maloba ya Yisaya ezali mpenza kokokisama. Oyo nde libaku malamu kosangana na bokoli yango oyo esakolamaki!
Mama oyo azali kotyela bana na ye likebi
13, 14. (a) Mokakatano nini ezali kobima na ndenge basaleli maloba mosusu mpo na kolobela “mwasi” ya Nzambe na likoló? (b) Ndenge Nzambe asaleli ndakisa oyo emonisi boyokani oyo ezalaka kati na bato ya libota moko, eteyi biso nini?
13 Touti komona ete na kokokisama na yango ya monene, “mwasi” wana ya esakweli ezali ebongiseli ya Yehova kuna na likoló. Kasi nsima ya kotánga Yisaya 54:4, tokoki solo komituna ndenge nini ebongiseli wana ya bikelamu ya elimo ezwaki nsɔni to esambwaki. Bavɛrsɛ oyo elandi elobi ete “mwasi” ya Nzambe akobwakama, akonyokwama mpe akobundisama. Kutu akosilikisa Nzambe. Ndenge nini makambo motindo wana ekoki kolobelama mpo na ebongiseli ya bikelamu ya elimo, bikelamu ya kokoka oyo basalá naino lisumu ata moke te? Mpo na kozwa eyano esengeli koyeba libota yango malamu.
14 Yehova azwi ndakisa oyo emonisi boyokani oyo ezalaka na libota—kati na mobali ná mwasi, mama ná bana—mpo na koteya makambo ya mozindo ya solo; mpamba te bato bakokanga ntina ya ndakisa yango. Ata soki libota na biso ezali ndenge nini, mbala mosusu toyebi mwa moke ndenge libala ya malamu ezalaka to ndenge boyokani ya malamu ezalaka kati na moboti ná mwana na ye. Oyo ezali lolenge ya malamu Yehova azali koteya biso mpo tóyeba ete azalaka na boyokani ya malamu mpe ya makasi elongo na ebele ya basaleli na ye ya elimo, mpe batyelanaka motema. Lisusu, yango ezali lolenge ya kokamwa oyo azali koteya biso mpo tóyeba ete ebongiseli na ye ya likoló ebatelaka bana na ye bapakolami na elimo oyo bazali awa na mabelé! Ntango basaleli na ye awa na mabelé bamonaka mpasi, basaleli na ye ya sembo kuna na likoló, “Yelusaleme mboka ya likoló,” bayokaka mpe mpasi. Ndenge moko mpe, Yesu alobaki ete: “Na meko oyo bosalaki yango epai na moko ya bato oyo baleki mike na kati ya bandeko na ngai [bapakolami na elimo] oyo, bosalaki yango epai na ngai.”—Matai 25:40.
15, 16. Wapi kokokisama ya liboso ya Yisaya 54:5, 6, mpe wapi kokokisama na yango ya monene?
15 Na yango, likambo ya kokamwa ezali te ete makambo mingi oyo balobeli “mwasi” ya Yehova na likoló ezali komonisa makambo oyo bana na ye bazali kokutana na yango na mabelé. Tótalela maloba oyo: ‘Motongi na yo azali mobali na yo, nkombo na ye, Yehova na bibele. Mpe Mosantu ya Yisalaele azali mosikoli na yo, ye abengami Nzambe ya mokili mobimba. Mpo ete Yehova abengi yo lokola mwasi oyo atikami mpe ayokisami mpasi na elimo, lokola mwasi na ntango ya bolenge wana ebwakami ye, Nzambe na yo alobi bongo.’—Yisaya 54:5, 6.
16 Mwasi oyo balobeli awa ezali nani? Na kokokisama na yango ya liboso ezali Yelusaleme, oyo ezalaki komonisa bato ya ekólo ya Nzambe. Ntango bakozala baombo na Babilone na boumeli ya mbula 70, bakoyoka lokola nde Yehova abwaki bango mpe atiki mpenza bango. Na kokokisama na yango ya monene, maloba yango ezali kolobela “Yelusaleme mboka ya likoló” mpe ndenge yango esukaki na kobimisa “momboto” oyo Genese 3:15 esakolaki.
Disipilini ya ntango moke epesi bolamu ya seko
17. (a) Ndenge nini nkanda “monene” ya Nzambe ekokitela Yelusaleme ya mabelé? (b) Wapi nkanda “monene” oyo ekómelaki bana ya “Yelusaleme mboka ya likoló”?
17 Esakweli yango elandi koloba boye: ‘Mpo na mwa ntango moke natiki yo, nde na boboto monene nakoyanganisa yo. Na nkanda monene mwa ntango moke nabombi elongi na ngai liboso na yo; nde na bolingo ya seko nakoyokela yo mawa; Yehova mosikoli na yo alobi bongo.’ (Yisaya 54:7, 8) Yelusaleme ya mabelé etondi na nkanda “monene” ya Nzambe ntango basoda ya Babilone babundisi yango na mobu 607 L.T.B. Mbula 70 ya boombo na ye emonani ntango moko molai mpenza. Nzokande, bampasi yango ekoumela kaka “mwa ntango moke” soki tokokanisi yango na bolamu ya seko oyo ezali kozela baoyo bakondima disipilini yango. Ndenge moko mpe, baklisto bapakolami, bana ya “Yelusaleme mboka ya likoló” bayokaki lokola nde nkanda “monene” ya Nzambe ekiteli bango ntango Yehova atikaki bakonzi ya politiki oyo bapusamaki na Babilone Monene bábundisa bango. Kasi disipilini yango ezalaki kaka mpo na ntango mokuse, soki bakokanisi yango na eleko ya mapamboli ya elimo oyo elandaki na nsima banda 1919!
18. Etinda nini ya ntina tokoki komona na oyo etali nkanda ya Yehova epai ya basaleli na ye, mpe yango etaleli mokomoko na biso na nini?
18 Bavɛrsɛ wana ezali komonisa mpe solo mosusu ya ntina mingi: nkanda ya Nzambe eumelaka ntango moke, kasi motema mawa na ye eumelaka libela. Nkanda na ye epelaka mpo na misala ya mabe, kasi epelaka na ndenge ya mobulu te, mpe ekokisaka ntango nyonso mokano moko. Mpe soki tondimi disipilini ya Yehova, nkanda na ye eumelaka “mwa ntango moke,” mpe nsima esilaka. “Mawa monene” na ye—ezaleli na ye ya kolimbisa mpe motema boboto na ye—ezwaka esika ya nkanda. Bizaleli yango eumelaka “libela.” Na yango, soki tosali lisumu, tosengeli soki moke te kokakatana mpo na kobongola motema mpe tosengeli kobongisa makambo elongo na Nzambe. Soki lisumu yango ezali monene, ebongi tóyebisa yango nokinoki na bankulutu ya lisangá. (Yakobo 5:14) Ezali solo ete mbala mosusu tokozwa disipilini, mpe ekoki kozala mpasi mpo na kondima yango. (Baebele 12:11) Kasi yango ekoumela kaka ntango moke soki tokokanisi yango na bolamu ya seko oyo eutaka na kondima bolimbisi ya Yehova Nzambe!
19, 20. (a) Kondimana ya monama ezali nini, mpe yango ezali na ntina nini mpo na baoyo bakendeki boombo na Babilone? (b) “Kondimana ya kimya” epesi baklisto bapakolami ya lelo libɔndisi nini ya solosolo?
19 Sikoyo Yehova abɔndisi bato na ye na ndenge oyo ekokitisa bango motema: ‘Zambi lokola mikolo ya Noa epai na ngai, lokola ekataki ngai ndai ete mai ya Noa ekozipa mokili lisusu te, bongo nakati ndai ete nakoyokela bino nkanda te, nakopamela bino mpe te. Mpo ete, ata ngomba minene ekolongolama mpe ngomba mike ekolimwa, nde boboto na ngai ekolongwa na yo te; mpe kondimana na ngai ya kimya ekosila te. Yehova alobi bongo, ye oyo ayokeli yo mawa.’ (Yisaya 54:9, 10) Nsima ya Mpela, Nzambe asalaki kondimana—oyo, mbala mosusu, babengaka yango kondimana ya monama—elongo na Noa mpe milimo mosusu nyonso ya bomoi. Yehova alapaki ndai ete akoboma lisusu mabelé na mpela ya mokili mobimba te. (Genese 9:8-17) Yango elingi koloba nini mpo na Yisaya mpe bato ya ekólo na ye?
20 Ezali mpenza likambo ya kobɔndisa koyeba ete etumbu oyo bakozwa—ya kokende boombo na Babilone mbula 70—ekosalema kaka mbala moko. Soki yango eleki, ekozonga lisusu te. Na nsima na yango, “kondimana ya kimya” ya Nzambe ekobanda mosala na yango. Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “kimya” esuki te kaka na likanisi ya kozanga etumba, kasi ezali mpe komonisa bolamu ya ndenge nyonso. Mpo na Nzambe, kondimana yango ezali ya libela. Ata soki bangomba mike mpe bangomba minene ekoki kolimwa mosika te, motema boboto na ye epai ya bato na ye ya sembo ekosuka te. Likambo ya mawa ezali ete nsukansuka, ekólo na ye awa na mabelé ekotika kotosa makambo oyo kondimana yango esɛngi bango, mpe bakobebisa kimya na bango ntango bakoboya Masiya. Nzokande, bana ya “Yelusaleme mboka ya likoló” bazalaki sembo koleka. Ntango eleko ya disipilini na bango elekaki, bandimaki solo ete Nzambe akobatela bango.
Libateli ya elimo mpo na basaleli ya Nzambe
21, 22. (a) Mpo na nini elobami ete “Yelusaleme mboka ya likoló” enyokwami mpe etutami na mbula ya mopɛpɛ makasi? (b) Kopambolama ya “mwasi” ya Nzambe kuna na likoló ezali na ntina nini mpo na “bana” na ye awa na mabelé?
21 Yehova alandi kosakola libateli mpo na basaleli na ye ya sembo ete: ‘Ee yo monyokolami, motutami na mbula ya mopɛpɛ makasi mpe obɔndisami te, talá nakotonga mabanga na yo na simá ya makasi mingi mpe nakotonga miboko na yo na safili; nakosala ndako milai na yo na mabanga ya kadakolo mpe bikuke na mabanga ya ekadaha; mpe bandelo na yo nyonso na mabanga ya motuya. Bana na yo nyonso bakolakisama na Yehova, mpe kimya ya bana na yo ekozala monene. Okokokisama na boyengebene, okozala mosika na minyoko mpo okobanga te; mpe na nsɔmɔ lokola, mpo ekoyela yo te. Talá, soki bakobundisa yo, yango ekouta na ngai te. Ye oyo akobundisa yo akokwea mpo na yo.’—Yisaya 54:11-15.
22 Ya solo, “mwasi” ya Yehova kuna na bisika ya elimo anyokwamá to atutamá na mbula ya mopɛpɛ makasi ata mokolo moko te. Kasi anyokwamaki ntango “bana” na ye bapakolami banyokwamaki awa na mabelé, mingi mpenza ntango bazalaki na eleko ya boombo na bango ya elimo na 1918-1919. Ndenge moko mpe, ntango “mwasi” wana ya elimo atombolami, yango emonisi ete bana na ye mpe batombolami. Sikoyo, tótalela maloba kitoko oyo elobeli “Yelusaleme mboka ya likoló.” Ndenge mokanda moko elobi, mabanga ya ntalo na bikuke na yango, “simá ya makasi” ya ntalo, miboko, mpe ata bandelo ezali komonisa “kitoko, bonene, bopɛto, nguya mpe makasi.” Nini ekopesa baklisto bapakolami libateli mpe mapamboli wana?
23. (a) Lokola baklisto bapakolami ‘bateyami na Yehova’ na mikolo oyo ya nsuka, yango epesi matomba nini? (b) Na ndenge nini basaleli ya Nzambe bazwi “bandelo ya mabanga ya motuya”?
23 Vɛrsɛ 13 ya Yisaya mokapo 54 epesi biso eyano: ezali mpo bango nyonso “bakolakisama na Yehova.” Yesu ye moko asalelaki maloba ya vɛrsɛ oyo mpo na bayekoli na ye bapakolami. (Yoane 6:45) Mosakoli Danyele asakolaki ete na “ntango ya nsuka,” bapakolami bakozwa mapamboli ebele: boyebi mpe bososoli ya elimo. (Danyele 12:3, 4) Bososoli yango epesaki bango likoki ya kotambolisa mosala monene ya koteya bato na ndenge esalemá naino te: kopalanganisa mateya ya Nzambe na mabelé mobimba. (Matai 24:14) Bososoli yango mpe esalisaki bango mpo bámona polele bokeseni kati na lingomba ya solo mpe ya lokuta. Yisaya 54:12 elobeli “bandelo ya mabanga ya motuya.” Kobanda 1919, Yehova apesi bapakolami mayele mpo báyeba malamu bandelo—bandelo ya elimo—oyo ekaboli bango na lingomba ya lokuta mpe na biteni mosusu ya mokili oyo ya mabe. (Ezekiele 44:23; Yoane 17:14; Yakobo 1:27) Na yango, bakabwani na mokili mpo bazali mpenza basaleli ya Nzambe.—1 Petelo 2:9.
24. Ndenge nini tokoki komindimisa ete toteyami na Yehova?
24 Na yango, ekozala malamu soki mokomoko na biso amituni ete: ‘Nazali koteyama na Yehova?’ Mateya yango eyaka yango moko te. Tosengeli kosala makasi. Soki tozali kotánga Liloba ya Nzambe mbala na mbala mpe komanyola likoló na yango, mpe soki tozali kotánga mikanda oyo elimbolaka Biblia, oyo ebimisami na “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo na kozwa boyebi mpe soki tozali kobongisa makita, koyangana na makita yango, na ndenge wana nde tokoteyama na Yehova. (Matai 24:45-47) Soki tosali mpenza makasi mpo na kotosa makambo oyo tozali koyekola mpe soki tolali mpɔngi te mpe tokɛngɛli na elimo, mateya oyo euti na Nzambe ekokabola biso na bato oyo bazali kolanda mokili oyo etyolaka Nzambe. (1 Petelo 5:8, 9) Kutu, na koleka, yango ekosalisa biso ‘tópusana penepene na Nzambe.’—Yakobo 1:22-25; 4:8.
25. Elaka ya Nzambe ya kopesa kimya ezali na ntina nini mpo na basaleli na ye ya ntango na biso?
25 Esakweli ya Yisaya emonisi lisusu ete bapakolami bazwi kimya mingi. Yango elingi nde koloba ete babundisaka bango ata moke te? Ezali bongo te, kasi Nzambe azali kokitisa bango motema ete akopesa soki moke te etinda mpo bábundisa bango to mpe akotika te ete bálonga bango. Totángi boye: ‘Talá, ngai nazalisaki motuli ye oyo akopɛpa mɔtɔ na makala mpe akobimisa esaleli mpo na mosala na ye. Ngai mpe nazalisi mobebisi mpo na kobebisa nyɛɛ. Ebundeli na ebundeli oyo esalami mpo na kotɛmɛla yo ekolonga te, mpe okozalisa lolemo na lolemo nyɛɛ oyo ekotɛmɛla yo na kosambisama. Oyo ezali libula ya baombo ya Yehova mpe boyengebene na bango ekouta na ngai. Yehova alobi bongo.’—Yisaya 54:16, 17.
26. Mpo na nini koyeba ete Yehova azali Mozalisi ya bato nyonso ezali kokitisa motema?
26 Mpo na mbala ya mibale na mokapo oyo ya Yisaya, Yehova akundoleli basaleli na ye ete ye azali Mozalisi. Na ebandeli, ayebisi mwasi na ye ya elilingi ete azali “Motongi Monene” na ye. Sikoyo alobi ete azali Mozalisi ya bato nyonso. Vɛrsɛ 16 ezali kolobela motuli oyo azali kopɛpa mɔtɔ ya makala na esika na ye ya kotula bibende mpo na kotula bibundeli; elobeli mpe mobundi, “mobebisi mpo na kobebisa nyɛɛ.” Bato ya ndenge yango bakoki kobangisa baninga na bango, kasi ndenge nini bakoki kokanisa ete bakolonga Mozalisi na bango? Ndenge moko mpe lelo, ata soki bikólo ya makasi mpenza ya mokili oyo ebundisi basaleli ya Yehova, bakozala na likoki moko te ya kolonga. Kutu, bakokoka ndenge nini?
27, 28. Nini ekoki kokitisa biso motema na ntango oyo ya mpasi, mpe mpo na nini toyebi ete ndenge Satana azali kobundisa biso akolonga soki moke te?
27 Ntango ya kobebisa basaleli ya Nzambe mpe losambo oyo bazali kosambela na elimo mpe na solo eleká. (Yoane 4:23, 24) Yehova apesaki Babilone Monene nzela ya kobundisa bango mpe kolonga bango mpo na mwa ntango moke. Mpo na mwa ntango moke, “Yelusaleme mboka ya likoló” emonaki ndenge balingaki kokanga monɔkɔ ya bana na ye ntango mosala na bango ya kosakola awa na mabelé etikalaki moke ekufa. Likambo ya ndenge wana ekosalema lisusu te! Sikoyo azali kosepela na bana na ye, mpamba te, na elimo, bazali bato oyo bakolongama te. (Yoane 16:33; 1 Yoane 5:4) Ya solo, basili kosala bibundeli mpo na kobundisa bango, mpe bakosala mosusu mingi koleka. (Emoniseli 12:17) Kasi bibundeli yango elongaki te mpe ekolonga te. Satana azali na bibundeli te oyo ekoki kolonga kondima mpe molende ya bapakolami ná baninga na bango oyo ezali kopela lokola mɔtɔ. Kimya wana ya elimo ezali “libula ya basaleli ya Yehova,” na bongo moto moko te akoki kobɔtɔla bango yango.—Nzembo 118:6; Baloma 8:38, 39.
28 Ezali na eloko moko te oyo mokili ya Satana ekoki kosala mpo na kokata mosala mpe losambo ya pɛto ya Nzambe oyo ekoumela seko, oyo basaleli na ye oyo bamipesi bazali kosambela ye. Bana ya “Yelusaleme mboka ya likoló” oyo bazali bapakolami babɔndisami mingi na likambo yango. Baoyo bazali na kati ya ebele ya bato bazali koyoka se bongo. Soki toyebi malamu ebongiseli ya Yehova oyo ezali na likoló mpe boyokani na yango elongo na basaleli na ye awa na mabelé, kondima na biso ekokóma mpenza makasi. Soki kondima na biso ekómi makasi, bibundeli ya Satana ekosala biso eloko te na etumba oyo azali kobundisa biso!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Emoniseli 12:1-17 emonisi ete “mwasi” ya Nzambe apambolamaki mpenza ndenge abotaki “mwana” moko oyo aleki ntina—ezali mpenza mwana ya solosolo te ya elimo, kasi nde Bokonzi ya Masiya kuna na likoló. Bokonzi yango ebotamaki na 1914. (Talá buku Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi!, nkasa 177-186.) Esakweli ya Yisaya etye likebi mingi na esengo oyo mwasi yango azali koyoka ndenge bana na ye bapakolami awa na mabelé bazwi mapamboli ya Nzambe.
[Etanda na lokasa 218, 219]
Libota ya Abalayama —Elilingi ya esakweli
Ntoma Paulo alobaki ete libota ya Abalayama ezali elilingi ya esakweli mpo na komonisa boyokani ya Yehova elongo na ebongiseli na ye ya likoló mpe elongo na ekólo ya Yisalaele awa na mabelé na nse ya kondimana ya Mibeko ya Moize.—Bagalatia 4:22-31.
Abalayama, tata ya libota, azali komonisa Yehova Nzambe. Kondima oyo Abalayama andimaki kopesa Yisaka, mwana na ye ya bolingo, lokola mbeka emonisi kondima oyo Yehova andimaki kopesa Mwana na ye ya bolingo lokola mbeka mpo na masumu ya bato.—Genese 22:1-13; Yoane 3:16.
Sara azali elilingi ya “mwasi” ya Nzambe kuna na likoló, ebongiseli na ye oyo esalemi na bikelamu ya elimo. Ezali na ntina mpenza soki balobeli ebongiseli yango kuna na likoló lokola mwasi ya Yehova, mpamba te ezali na boyokani makasi na Yehova, ezali kotosa bokonzi na ye, mpe ezali kopesa mabɔkɔ na motema mobimba mpo na kokokisama ya mikano na ye. Ebongiseli yango ebengami lisusu “Yelusaleme mboka ya likoló.” (Bagalatia 4:26) Balobeli mpe “mwasi” yango na Genese 3:15, mpe amonisami na emonaneli na Emoniseli 12:1-6, 13-17.
Yisaka azali komonisa Momboto ya elimo ya mwasi ya Nzambe. Libosoliboso, momboto yango ezali nde Yesu Klisto. Na nsima, bandeko ya Klisto oyo bapakolami na elimo, oyo Nzambe azwi bango lokola bana na ye ya elimo mpe bakómi bazwi ya libula elongo na Klisto bakɔtaki mpe na kati ya momboto yango.—Baloma 8:15-17; Bagalatia 3:16, 29.
Agale, mwasi ya mibale, to makango ya Abalayama, azalaki moombo. Ye azali mpenza elilingi ya Yelusaleme ya mabelé, oyo etambwisamaki na Mibeko ya Moize, oyo ezalaki komonisa polele ete baoyo bakangamaki na yango bazali baombo ya lisumu mpe ya liwa. Paulo alobaki ete “Agale yango elakisi Sinai, ngomba moko na Alabia” mpamba te kondimana ya Mibeko esalemaki kuna.—Bagalatia 3:10, 13; 4:25.
Yisamaele, Mwana ya Agale, azali elilingi ya Bayuda ya ekeke ya liboso, bana ya Yelusaleme oyo ezalaki naino moombo ya Mibeko ya Moize. Se ndenge Yisamaele azalaki konyokola Yisaka, kaka bongo Bayuda yango banyokolaki baklisto, oyo bazalaki bapakolami, bana ya Sara ya elilingi, “Yelusaleme mboka ya likoló.” Mpe kaka ndenge Abalayama abenganaki Agale ná Yisamaele, nsukansuka Yehova abwakaki Yelusaleme mpe bana na ye batomboki.—Matai 23:37, 38.
[Elilingi na lokasa 220]
Nsima ya batisimo ya Yesu, apakolamaki na elimo, mpe Yisaya 54:1 ekokisamaki na ndenge oyo eleki monene
[Elilingi na lokasa 225]
Yehova abombelaki Yelusaleme elongi na ye “mpo na mwa ntango moke”
[Elilingi na lokasa 231]
Mobundi mpe motuli bakoki nde kolonga Mozalisi na bango?