Mokapo ya Zomi na Motoba
Elikya mpo na baombo oyo banyokwami na makanisi
1. Lobelá bomoi ya Bayuda oyo bazali baombo na Babilone.
YUDA ekɔtaki na eleko moko ya mpasi. Bato ya ekólo oyo Nzambe asalaki na yango kondimana balongolami na makasi na mboka na bango, mpe sikoyo bazali konyokwama na boombo na Babilone. Ezali solo ete batikelaki bango mwa bonsomi na makambo na bango ya mokolo na mokolo. (Yilimia 29:4-7) Basusu kutu bayekolaki misala to bazalaki kosala mombongo.a (Nehemia 3:8, 31, 32) Atako bongo, bomoi ezalaki mpenza pɛtɛɛ te mpo na Bayuda wana bakangami. Bazalaki baombo na mosuni mpe na elimo. Tótala ndenge likambo yango ezalaki.
2, 3. Boombo ya Bayuda ebimisaki mikakatano nini na losambo oyo bazalaki kosambela Yehova?
2 Ntango basoda ya Babilone babebisaki Yelusaleme na mobu 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), basukaki kaka na kobebisa ekólo te; babebisaki mpe losambo ya solo. Bapunzaki tempelo ya Yehova mpe babebisaki yango, basukisaki mosala ya bonganga-nzambe wana bamemaki bato mosusu ya libota ya Levi na boombo, mpe babomaki basusu kati na bango. Lokola tempelo, etumbelo, ebongiseli malamu ya mosala ya banganga-nzambe ezalaki te, Bayuda bazalaki na makoki te ya kopesa Nzambe ya solo bambeka ndenge Mibeko ezalaki kosɛnga.
3 Atako bongo, Bayuda oyo bazalaki sembo bakokaki kobatela motindo ya losambo na bango, na kokatáká ngenga mpe kotosáká Mibeko na meko oyo bazalaki na makoki ya kosala yango. Na ndakisa, bakokaki koboya bilei oyo Mibeko epekisi mpe kotosa Sabata. Na kosaláká bongo, baoyo bakangaki bango bakokaki kotyola bango, mpamba te bato ya Babilone bazalaki kotalela milulu ya losambo ya Bayuda lokola likambo ya bozoba. Mawa ya bakangami yango ekoki komonana na maloba oyo ya mokomi ya nzembo: ‘Pembeni na bibale ya Babilone, kuna tofandaki mpe tolelaki wana tokanisaki Siona. Kuna na nzete ya mokili yango, tokakisaki nzɛnzɛ na biso; wana baoyo bakangi biso basɛngi ete tóyemba loyembo. Baoyo batungisi biso basɛngi biso ete tósepela, ete, Bóyembela biso loyembo ya Siona.’—Nzembo 137:1-3.
4. Mpo na nini ekozala na ntina te ete Bayuda bátyela bikólo mosusu motema mpo na kobikisa bango, kasi bakoki kotalela nani mpo na kozwa lisalisi?
4 Bayuda oyo bakangamaki na boombo bakoki koluka libɔndisi epai ya nani? Kobika na bango ekouta wapi? Ya solo, ekólo moko te kati na bikólo oyo ezalaki zingazinga na bango ekokaki kobikisa bango! Bikólo yango nyonso ezalaki na nguya te mpo na kobunda na basoda ya Babilone, mpe mingi na yango ezalaki koyina Bayuda. Atako bongo elikya ezalaki kaka. Yehova, oyo bango batombokelaki ntango bazalaki na bonsomi, azalaki kobenga bango na boboto nyonso, atako bakangamaki na mboka mopaya.
“Yaká epai na mai”
5. Maloba oyo “yaká epai na mai” elimboli nini?
5 Na monɔkɔ ya Yisaya, Yehova ayebisi Bayuda oyo bakangami na Babilone esakweli oyo: “Ee moko na moko oyo ayoki mposa ya komɛla, yaká epai na mai! Ye oyo azali na mosolo te, yaká, osomba mpe olya! Yaká, osomba vinyo mpe mabɛlɛ, na mosolo te, na motuya mpe te.” (Yisaya 55:1) Maloba oyo ebombi makambo mingi. Na ndakisa, tótalela libyangi oyo: “Yaká epai na mai.” Soki mai ezali te, bomoi mpe ekozala te. Soki mai ezali te, biso bato tokoki kobika kaka pɔsɔ moko. Na yango, ebongaki mpenza Yehova asalela mai lokola ndakisa mpo na komonisa oyo maloba na ye ekosala epai ya Bayuda oyo bakangami. Nsango na ye ekokitisa motema na bango, ndenge kɔpɔ ya mai ya mpiɔ esalaka na mokolo ya moi makasi. Ekolendisa bango na mitungisi na bango, ekokokisa mposa na bango ya solo mpe ya boyengebene. Mpe ekopesa bango elikya ya kosikolama na boombo. Atako bongo, mpo na kozwa bolamu yango, esengelaki ete Bayuda oyo bakendeki na boombo bámɛla mai oyo ezali nsango ya Nzambe, bátyela yango likebi, mpe bálanda yango.
6. Ndenge nini Bayuda bakozwa bolamu soki basombi “vinyo mpe mabɛlɛ”?
6 Yehova azali lisusu kopesa “vinyo mpe mabɛlɛ.” Mabɛlɛ epesaka nzoto ya bana makasi mpe esalisaka bango bákola malamu. Ndenge moko mpe maloba ya Yehova ekopesa bato ya ekólo na ye makasi ya elimo mpe ekosalisa bango bákolisa boyokani ya malamu elongo na ye. Bongo vinyo? Mbala mingi bamɛlaka vinyo na fɛti. Biblia elobelaka yango esika moko na bomɛngo mpe esengo. (Nzembo 104:15) Ntango alobi na bato ya ekólo na ye ete ‘básomba vinyo,’ Yehova azali kokitisa bango motema ete kozongela losambo ya solo na motema mobimba ekosala ete bázala “na esengo solo.”—Deteronome 16:15; Nzembo 19:8; Masese 10:22.
7. Mpo na nini motema mawa oyo Yehova amoniseli baombo ezali mpenza monene, mpe yango ezali koteya biso nini mpo na ye?
7 Yehova azali solo komonisa motema mawa, na ndenge azali kopesa Bayuda oyo bazali na boombo libɔndisi ya elimo! Motema mawa na ye ezali solo monene soki tokanisi ndenge Bayuda bamonisaki motó makasi mpe botomboki na boumeli ya lisolo mobimba ya ekólo na bango. Atako bongo, yango emonisi te ete babongi mpo ete Yehova andima bango. Nzokande, bikeke mingi liboso, Davidi, mokomi ya nzembo, akomaki boye: ‘[Yehova] azali na motema molai, azali mpe na motema mawa; asilikaka noki te mpe boboto na ye eyikanaka. Mpamela na ye ekoumela te, abatelaka nkanda na ye ntango molai te.’ (Nzembo 103:8, 9) Na esika akata boyokani na ekólo na ye libela, Yehova asali litambe ya liboso mpo na kozongisa boyokani. Ya solo, azali Nzambe moko oyo “asepeli kosalaka na boboto.”—Mika 7:18.
Batye motema na esika oyo ebongi te
8. Ebele ya Bayuda batyaki motema na bango wapi, atako bazwaki likebisi nini?
8 Kino sikoyo Bayuda mingi batyeli naino Yehova motema na bango mobimba te mpo na kobikisama. Na ndakisa, liboso Yelusaleme ekwea, bakonzi na yango balukaki lisalisi epai ya bikólo ya makasi, ezalaki lokola nde bazali kosala ekobo, elongo na Ezipito mpe Babilone. (Ezekiele 16:26-29; 23:14) Yilimia akebisaki bango mpenza na ntina, ete: ‘Yehova alobi boye ete, Moto alakelama mabe oyo akotalela moto, mpe kotya mosuni lokola lobɔkɔ na ye mpe motema na ye elongwi epai ya Yehova.’ (Yilimia 17:5) Nzokande, ezali mpenza yango nde bato ya ekólo ya Nzambe basalaki!
9. Mbala mosusu ndenge nini Bayuda mingi bazali “kosilisa mosolo epai na yango ezali kwanga te”?
9 Sikoyo bakómi baombo ya moko na bikólo oyo batyelaki motema. Bazwaki liteya na likambo yango? Emonani lokola ete mingi bazwi liteya te, mpamba te Yehova atuni boye: “Mpo na nini bokosilisa mosolo na bino epai na yango ezali kwanga te mpe mosala na bino epai na yango ekotondisa te?” (Yisaya 55:2a) Soki Bayuda oyo bazali na boombo bazali kotyela moto mosusu motema kasi Yehova te, ezali lokola nde bazali “kosilisa mosolo epai na yango ezali kwanga te.” Lokola Babilone azalaka na momeseno te ya kopesa bakangami nzela ete bázonga na mboka na bango, akotika bango soki moke te. Ya solo, lokola Babilone azalaka na mposa makasi ya kokonza bikólo, ya komipesa na mombongo mpe na losambo ya lokuta, akopesa Bayuda oyo bakangami kuna eloko moko te.
10. (a) Mbano nini Yehova akopesa Bayuda oyo bazali na boombo soki bazali koyoka ye? (b) Kondimana nini Yehova asalaki elongo na Davidi?
10 Yehova abondeli bato ya ekólo na ye boye: “Bóyokamela ngai koyoka mpenza mpe bólya yango ezali malamu, bómisepelisa na mafuta. Bósembola litoi epai na ngai mpe yaká na ngai, bóyoka ete molimo na bino ebika; mpe nakokata na bino kondimana ya seko oyo boboto na ngai mpo na Davidi.” (Yisaya 55:2b, 3) Elikya bobele moko mpo na bato wana oyo bazali kokufa nzala ya elimo ezali epai ya Yehova, oyo azali sikoyo kolobela bango na esakweli na monɔkɔ ya Yisaya. Bakozala na bomoi soki bayoki nsango ya Nzambe, mpamba te alobi ete soki basali bongo, ‘molimo na bango ekobika.’ Kasi, “kondimana ya seko” oyo Yehova alingi kokata elongo na baoyo bakoyoka ye ezali nini? Kondimana yango etali “boboto na [ye] mpo na Davidi.” Bikeke mingi liboso, Yehova apesaki Davidi elaka ete kiti ya bokonzi na ye “ekokokisama seko.” (2 Samwele 7:16) Na yango, “kondimana ya seko” oyo balobeli awa etali nde boyangeli.
Mozwi-ya-libula ya libela na bokonzi oyo ekoumela seko
11. Mpo na nini ekoki kozala mpasi mpo Bayuda oyo bakangamaki na Babilone bándima kokokisama ya elaka oyo Nzambe apesaki Davidi?
11 Ya solo, mpo na Bayuda oyo bazali na boombo ekoki kozala mpasi mpo bákanisa ete bokonzi ekozala lisusu na libota ya Davidi. Basilá kobungisa mokili na bango mpe ata ekólo na bango! Kasi yango ezali kaka mpo na mwa ntango moke. Yehova abosanaki kondimana na ye elongo na Davidi te. Ata soki emonani na miso ya bato yango ete ekoki kosalema te, mokano ya Nzambe oyo etali Bokonzi ya seko na molɔngɔ ya Davidi ekolonga. Kasi ndenge nini mpe ntango nini? Na mobu 537 L.T.B., Yehova asikoli bato na ye oyo bakangami na Babilone mpe azongisi bango na mboka na bango. Likambo yango esalaki ete bokonzi oyo ekoumela seko etyama? Te, bazalaki kaka na nse ya bokonzi mosusu ya bapakano, bokonzi ya Bamede ná Baperse. “Bantango oyo etyamá” mpo bikólo mosusu eyangela esilaki naino te. (Luka 21:24) Lokola mokonzi moko te azalaki na Yisalaele, elaka oyo Yehova apesaki Davidi ekokisama bobele bikeke mingi na nsima.
12. Yehova asalaki nini mpo na kokokisa kondimana oyo asalaki elongo na Davidi mpo na Bokonzi?
12 Mbula koleka 500 nsima ya kosikolama ya Yisalaele na boombo na Babilone, Yehova abandaki kokokisa kondimana yango ya Bokonzi ntango alongolaki bomoi ya Mwana na ye mobotami ya liboso, ebandeli ya biloko nyonso oyo ye asalá, na nkembo ya likoló mpe atyaki yango na libumu ya Maria, ngɔndɔ moko Moyuda. (Bakolose 1:15-17) Ntango anzelu ya Yehova asakolaki likambo yango, alobaki na Maria boye: “Ye akozala moto monene mpe akobengama Mwana ya Oyo-Aleki-Likoló; mpe Yehova Nzambe akopesa ye kiti ya bokonzi ya Davidi tata na ye, mpe akoyangela ndako ya Yakobo libela na libela, mpe nsuka ekozala te na bokonzi na ye.” (Luka 1:32, 33) Na yango, Yesu abotamaki na molɔngɔ ya bakonzi ya libota ya Davidi mpe azalaki na lotomo ya kosangola bokonzi. Nsima ya kozwa bokonzi, Yesu asengeli koyangela “lobiko na lobiko.” (Yisaya 9:7; Danyele 7:14) Sikoyo makambo nyonso ekoki mpo elaka ya Yehova, oyo eumelaki bikeke ebele, ya kopesa Mokonzi Davidi mokitani moko ya seko na bokonzi na ye, ekokisama.
“Komanda mpo na bato ya bikólo”
13. Ndenge nini Yesu azalaki “motatoli epai ya bato” ntango asalaki mosala na ye ya kosakola mpe nsima ya komata na ye na likoló?
13 Mokonzi wana oyo azali koya, akosala nini? Yehova alobi: ‘Talá nazalisi ye motatoli epai ya bato, motambwisi mpe komanda mpo na bato ya bikólo.’ (Yisaya 55:4) Ntango Yesu akolaki, azalaki momonisi ya Yehova awa na mabelé, azalaki motatoli ya Nzambe epai ya bato ya bikólo. Na bomoi na ye awa lokola moto, asalaki mosala na ye ya kosakola mingimingi mpo na “bampate ebungá ya ndako ya Yisalaele.” Nzokande, mwa moke liboso amata na likoló, Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso . . . Mpe, talá! nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” (Matai 10:5, 6; 15:24; 28:19, 20) Bongo, na nsima, nsango ya Bokonzi ekómaki mpe epai ya bato oyo bazalaki Bayuda te, mpe basusu kati na bango basalaki ete kokokisa kondimana oyo Nzambe asalaki elongo na Davidi ekokisama. (Misala 13:46) Na lolenge yango, ata nsima ya liwa, lisekwa mpe komata ya Yesu na likoló, azalaki kaka “motatoli” ya Yehova “epai ya bato.”
14, 15. (a) Ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki ‘motambwisi mpe komanda’? (b) Bayekoli ya Yesu na ekeke ya liboso bazalaki na elikya nini?
14 Yesu asengelaki mpe kozala ‘motambwisi mpe komanda.’ Mpo na kokokisa maloba oyo ya esakweli, ntango Yesu azalaki awa na mabelé andimaki mpenza mokumba na ye ya motambwisi mpe azalaki kolakisa nzela na makambo nyonso, azalaki kobenda bibele ya bato epai na ye, koteya bango maloba ya solo, mpe komonisa bolamu oyo bakozwa soki balandi ye. (Matai 4:24; 7:28, 29; 11:5) Ateyaki bayekoli na ye malamu, abongisaki bango mpo na kobanda mosala monene ya kosakola oyo ezalaki kozela bango. (Luka 10:1-12; Misala 1:8; Bakolose 1:23) Na mbula misato na ndambo mpamba, Yesu abandisaki lisangá oyo ekozala na bomoko, atako ekoyanganisa bankóto ya bato ya bikólo mingi oyo bauti na mposo ndenge na ndenge! Kaka “motambwisi mpe komanda” ya solosolo nde akoki kosala mosala monene ya ndenge wana.b
15 Bato oyo bayanganisamaki na lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso bapakolamaki na elimo santu ya Nzambe, mpe bazalaki na elikya ya kokóma bakonzi elongo na Yesu na Bokonzi na ye na likoló. (Emoniseli 14:1) Nzokande, esakweli ya Yisaya elobeli losambo ya boklisto kaka te na mikolo wana ya ebandeli na yango. Bilembo mingi emonisi ete Yesu akómaki Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe na 1914, kasi liboso ya mbula yango te. Mwa moke nsima ya mobu yango, likambo moko oyo ekómelaki baklisto bapakolami awa na mabelé ekokanaki na oyo ekómelaki Bayuda oyo bazalaki na boombo na ekeke ya motoba L.T.B. Ya solo, likambo oyo ekómelaki baklisto wana ezali kokokisama ya monene ya esakweli ya Yisaya.
Kokangama na boombo mpe kosikolama na mikolo na biso
16. Mpasi nini ebimaki nsima ya kotyama ya Yesu Mokonzi na 1914?
16 Ntango Yesu atyamaki Mokonzi na 1914, mokili ekɔtaki na mpasi moko ya ndenge mosusu. Mpo na nini? Mpamba te, ntango Yesu akómaki Mokonzi, abenganaki Satana mpe bilimo mabe kuna na likoló. Lokola Satana abwakamaki awa na mabelé, abandaki kobundisa baklisto bapakolami, basantu oyo bazali naino awa na nse. (Emoniseli 12:7-12, 17) Likambo yango ekómaki ndongo mpenza na 1918 ntango mosala ya kosakola esalaki lokola etɛlɛma mpe ntango bakambi ya la Société bakangamaki mpo bafundaki bango na lokuta ete bazali kotombokisa bato. Ezali na ndenge yango nde basaleli ya Yehova na ntango na biso bakendeki na boombo ya elimo, likambo oyo ekokani na boombo ya Bayuda na ntango ya kala. Nsɔni monene ekwelaki bango.
17. Ndenge nini ezaleli ya bapakolami ebongwanaki na 1919, mpe ndenge nini bazwaki makasi?
17 Kasi, boombo ya basaleli bapakolami ya Nzambe eumelaki te. Na mokolo ya 26 Marsi 1919, batikaki bakambi yango ya mosala oyo bakangamaki, mpe na nsima bifundeli nyonso oyo bafundaki bango ekweaki na mai. Yehova asopaki elimo santu likoló ya basaleli na ye oyo basikolamaki, apesaki bango makasi mpo na mosala oyo ezalaki kozela bango. Na esengo mpenza bandimaki libyangi ya “kokamata mai ya bomoi ofele.” (Emoniseli 22:17) Basombaki “vinyo mpe mabɛlɛ na mosolo te, na motuya mpe te” mpe bazwaki makasi ya elimo mpo na bokoli monene ya mosala oyo ezalaki koya, oyo batikali bapakolami bakanisaki yango liboso te.
Ebele ya bato bazali koya mbangu epai ya Mopakolami ya Nzambe
18. Wapi bituluku mibale ya bayekoli ya Yesu Klisto, mpe lelo oyo bituluku yango ezali bitonga boni?
18 Moyekoli mokomoko ya Yesu azali na elikya moko kati na bilikya mibale oyo elandi. Ya liboso, “etonga moke” ya bato 144 000 esilá koyanganisama; baklisto bapakolami oyo bauti na Bayuda mpe na bato ya bikólo mosusu, bango nde bazali “Yisalaele ya Nzambe.” Bazali na elikya ya koyangela elongo na Yesu na Bokonzi na ye ya likoló. (Luka 12:32; Bagalatia 6:16; Emoniseli 14:1) Ya mibale, na mikolo ya nsuka, “ebele ya bato” oyo bazali kati na “bampate mosusu” basilá komonana. Bazali na elikya ya bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé. Liboso bolɔzi monene ebanda, ebele ya bato yango—oyo motángo na bango ekatami te—bazali kosalela Nzambe elongo na etonga moke, mpe bituluku yango nyonso mibale ezali na kati ya “etonga kaka moko” oyo etambwisami na “mobateli kaka moko.”—Emoniseli 7:9, 10; Yoane 10:16.
19. Ndenge nini “ekólo moko” oyo Yisalaele ya Nzambe eyebaki liboso te endimaki libyangi ya Yisalaele yango?
19 Koyanganisama ya ebele yango ya bato ekoki komonana na maloba oyo ya esakweli ya Yisaya: ‘Talá okobenga ekólo oyo oyebi bango te mpe ekólo oyo eyebi yo te ekopota mbangu epai na yo; mpo na Yehova Nzambe na yo mpe mpo na Mosantu ya Yisalaele, zambi akembisi yo.’ (Yisaya 55:5) Na bambula oyo elandaki kosikolama na bango na boombo ya elimo, batikali bapakolami basosolaki te ete liboso ya Armagedona, bakozala na mokumba ya ntina mingi ya kobenga “ekólo” moko monene mpo eya na losambo ya Yehova. Nzokande, wana bambula ezalaki koleka, bato mingi ya motema sembo oyo bazalaki na elikya ya kokende likoló te babandaki kosangana elongo na bapakolami mpe kosalela Nzambe na molende lokola oyo ya bapakolami. Bato wana oyo bayei sika bamonaki ete basaleli ya Nzambe bakómaki kitoko, basosolaki ete Yehova azali kati na bango. (Zekalia 8:23) Na bambula ya 1930, bapakolami bayaki koyeba malamu soki etuluku wana, oyo basangani na yango bazalaki se kobakisama na kati na bango ezali banani. Basosolaki ete mosala monene ya koyanganisama ezali kozela bango. Ebele ya bato yango bazalaki koya mbangu kosangana elongo na bato ya ekólo oyo Nzambe asalaki na bango kondimana, mpe basalaki bongo na ntina.
20. (a) Na mikolo na biso, mpo na nini esengeli ‘koluka Yehova’ nokinoki, mpe ndenge nini moto akoki kosala yango? (b) Ndenge nini Yehova ayambaka baoyo bazali koluka ye?
20 Na mikolo ya Yisaya, libyangi epesamaki boye: ‘Bóluka Yehova naino akoki komonana, bóbenga ye naino azali penepene.’ (Yisaya 55:6) Na mikolo na biso, maloba wana ebongi mpenza, ezala mpo na Yisalaele ya Nzambe to mpo na ebele ya bato oyo bazali se kobakisama. Yehova apesaka mapamboli na ye mpambampamba te, mpe libyangi na ye eumelaka libela te. Sikoyo ezali mpenza ntango ya koluka kondimama na Nzambe. Soki ntango oyo Yehova atye mpo na kosambisa bato ekoki, akondima lisusu moto moko te. Yango wana, Yisaya alobi boye: ‘Tiká ete moto mabe alongwa na nzela na ye mpe moto ya masumu alongwa na mabanza na ye. Tiká ete azonga epai ya Yehova, ete ayokela ye mawa; epai ya Nzambe na biso, zambi akolimbisa solo.’—Yisaya 55:7.
21. Na ndenge nini ekólo ya Yisalaele etosaki te maloba oyo bankɔkɔ na bango babimisaki?
21 Maloba “azonga epai ya Yehova” emonisi ete bato oyo basengeli kobongola motema bazalaki liboso na boyokani elongo na Nzambe. Maloba yango ezali kokundolela biso ete makambo mingi ya esakweli yango ya Yisaya ekokisamaki liboso epai ya Bayuda oyo bazalaki na boombo na Babilone. Bikeke mingi liboso, bankɔkɔ ya baombo yango bamonisaki ekateli na bango ya kotosa Yehova ntango balobaki ete: “Biso tokoki kotika [Yehova] soki moke te mpo na kosalela banzambe mosusu.” (Yosua 24:16) Makambo oyo eleká emonisi ete “soki moke te” oyo balobaki yango nde basalaki, mbala na mbala! Bato ya ekólo ya Nzambe bakendeki na Babilone mpo bazangi kondima.
22. Mpo na nini Yehova alobi ete makanisi mpe banzela na ye ezali likoló koleka oyo ya bato?
22 Ekozala boni soki babongoli motema? Yehova alaki na monɔkɔ ya Yisaya ete ye “akolimbisa solo.” Mpe alobi lisusu ete: “Mpo ete makanisi na ngai mazali makanisi na bino te mpe nzela na bino ezali nzela na ngai te. [Yehova] alobi bongo. Zambi lokola lola eleki mokili likoló, boye nzela na ngai eleki nzela na bino mpe makanisi na ngai maleki makanisi na bino.” (Yisaya 55:8, 9) Yehova akoká na makambo nyonso, mpe makanisi ná banzela na ye ezali likoló mingi. Kutu amonisaka motema mawa na ye na ndenge oyo biso bato tokoki soki moke te kolikya komonisa yango. Kanisá naino: Kolimbisana ezali likambo oyo ezalaka kati na bato ya masumu. Mpo toyebi ete ata ndɛlɛ ekosɛnga moto mosusu alimbisa biso. (Matai 6:12) Kasi Yehova, atako ekosɛnga mokolo moko te ete bálimbisa ye, “alimbisaka solo”! Na ntembe te, azali Nzambe moko oyo aleki boboto. Mpe lokola Yehova azali na motema mawa mingi, afungolaka maninisa ya likoló mpo na kosopa mapamboli likoló ya baoyo bazali kozonga epai na ye na motema mobimba.—Malaki 3:10.
Mapamboli mpo na baoyo bazali kozonga epai ya Yehova
23. Ndenge nini Yehova amonisi ete liloba na ye ekozanga soki moke te kokokisama?
23 Yehova apesi bato na ye bilaka oyo: ‘Mpo ete lokola mbula mpe mbula mpɛmbɛ ekolongwa na likoló mpe ekozonga kuna te kasi ekopɔlisa mabelé, ete ebimisa biloko na yango mpe ebotisa yango, kopesáká mboto epai ya mokoni mpe kwanga epai ya molei, boye na liloba oyo ekobima na monɔkɔ na ngai; ekozonga epai na ngai mpamba te, kasi ekosukisa oyo ekani ngai, ekolonga na likambo litindaki ngai yango.’ (Yisaya 55:10, 11) Makambo nyonso oyo Yehova alobi ekokokisama solo. Lokola mbula mpe mbula mpɛmbɛ eutaka na likoló ekiti mpe ekokisaka mokano na yango ya kopɔlisa mabelé mpe kobotisa yango mbuma, ndenge moko mpe liloba oyo ebimaka na monɔkɔ ya Yehova ekoki kotyelama motema na mobimba na yango. Nyonso oyo alakaka, akokisaka yango, mpe ezangaka soki moke te kokokisama.—Mituya 23:19.
24, 25. Mapamboli nini ezali kozela Bayuda oyo bazali na boombo oyo balandi liloba Yehova ayebisi bango na monɔkɔ ya Yisaya?
24 Na yango, soki Bayuda balandi maloba ya esakweli oyo bapesi bango na monɔkɔ ya Yisaya, na ntembe te, bakobikisama ndenge Yehova alaki bango. Yango ekopesa bango esengo monene. Yehova alobi boye: ‘Mpo ete bokobima na esengo, bokokambama na kimya; ngomba minene mpe ngomba mike liboso na bino ekobanda koyemba nzembo, mpe nzete nyonso ya zamba ekobɛta mabɔkɔ na bango. Na esika ya nzubɛ, nzete na beloso ekokola, na esika ya nkamba ya nzubɛ, nzete na adasa; ekozala mpo na ekaniseli epai ya Yehova, elembo ya seko oyo ekokatama te.’—Yisaya 55:12, 13.
25 Na mobu 537 L.T.B., Bayuda oyo bazalaki baombo babimaki mpenza na Babilone na esengo. (Nzembo 126:1, 2) Ntango bakómaki na Yelusaleme, bakutaki mabelé etondi na matiti ya nzubɛ mpe nkamba ya nzubɛ, mpamba te bambula ebele mokili yango ezalaki na bato te. Kasi sikoyo basaleli ya Nzambe oyo bazongi na mboka na bango bakopesa mabɔkɔ na mbongwana moko ya kitoko mpenza! Banzete mineneminene lokola beloso mpe adasa nde ekozwa esika ya banzubɛ ná nkamba ya nzubɛ. Mapamboli ya Yehova emonani polele wana bato na ye bazali kosalela ye na “esengo.” Ezali lokola nde mabelé yango moko ezali kosepela.
26. Mapamboli nini basaleli ya Nzambe bazali kozwa lelo?
26 Na 1919 batikali ya baklisto bapakolami basikolamaki na boombo na bango ya elimo. (Yisaya 66:8) Bazali sikoyo kosalela Nzambe na esengo kati na paladiso ya elimo, elongo na ebele ya bato oyo bazali kati na bampate mosusu. Lokola bazali na litɔnɔ moko te ya makambo ya Babilone, Yehova amoniseli bango boboto, oyo ekómi “ekaniseli” mpo na ye. Bomɛngo na bango ya elimo ezali kokumisa nkombo na ye mpe kotombola ye likoló ete azali Nzambe ya bisakweli ya solo. Nyonso oyo Yehova asali mpo na bango ezali komonisa ete azali solo Nzambe mpe ezali elembo ya polele ete akokisaka na bosembo maloba na ye mpe amonisaka motema mawa epai ya baoyo babongolaka motema. Tiká ete baoyo nyonso bazali kokoba “kosomba vinyo mpe mabɛlɛ na mosolo te mpe na motuya te” básalela ye libela na libela na esengo!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bamonaki bankombo ya Bayuda mingi na mikanda ya kala ya mombongo na Babilone.
b Yesu azali kaka kokamba mosala ya kokómisa bato bayekoli. (Emoniseli 14:14-16) Lelo oyo, mibali mpe basi baklisto bandimaka ete Yesu azali Mokonzi ya lisangá. (1 Bakolinti 11:3) Mpe na ntango oyo Nzambe atyá, Yesu akozala ‘motambwisi mpe komanda’ na ndenge mosusu, ntango akokamba etumba monene mpo na kobunda na banguna ya Nzambe na Armagedona.—Emoniseli 19:19-21.
[Elilingi na lokasa 234]
Babengi Bayuda oyo bazali na mposa ya mai ya elimo ‘báya epai na mai’ mpe ‘básomba vinyo mpe mabɛlɛ’
[Elilingi na lokasa 239]
Yesu amonisaki ete azali “motambwisi mpe komanda” ya bikólo
[Bililingi na lokasa 244, 245]
“Tiká ete moto mabe alongwa na nzela na ye”