Mokapo ya Mwambe
Yehova Nzambe azali na kati ya tempelo na ye mosantu
1, 2. (a) Ntango nini mosakoli Yisaya azwi emonaneli ya tempelo? (b) Mpo na nini Yehova aboyaki Mokonzi Uziya?
“KASI, na mbula oyo Mokonzi Uziya akufaki, ngai, namonaki Yehova, afandi na kiti ya bokonzi ya likoló etombwami, mpe malenda ya elamba na ye etondisaki tempelo.” (Yisaya 6:1, NW) Mokapo ya motoba ya mokanda ya Yisaya ebandi na maloba wana. Tozali na mobu 778 liboso ya ntango na biso (L.T.B.).
2 Mokonzi Uziya ayangelaki Yuda mbula 52, mpe pene na ntango nyonso oyo azalaki mokonzi, makambo etambolaki malamu mpenza. Lokola “asalaki yango [ezalaki malamu na miso na Yehova, NW],” Nzambe asalisaki ye na makambo ya bitumba, na misala ya kotonga bandako mpe ya kolona bilanga. Kasi bolongi na ye ememaki ye tii na kokwea. Nsukansuka, motema na ye ekómaki na lolendo, “zambi aboyaki [Yehova], Nzambe na ye. Akɔtaki na Tempelo na [Yehova] mpo na kotumba mpaka na malasi.” Mpo na lolendo na ye mpe mpo na nkanda oyo ayokelaki banganga oyo bapamelaki ye, Uziya akufaki na maladi ya maba. (2 Ntango 26:3-22) Ezalaki na eleko wana nde Yisaya abandaki mosala na ye ya kosakola.
3. (a) Yisaya amoni mpenza Yehova? Limbolá. (b) Likambo nini Yisaya azali kotala, mpe mpo na ntina nini?
3 Biblia eyebisi biso te esika nini Yisaya atɛlɛmaki ntango azali kotala emonaneli yango. Makambo oyo azali komona na miso ezali emonaneli, kasi azali mpenza komona Mozwi-na-Nguya-Nyonso te, mpamba te “moto ata moko te amoni Nzambe.” (Yoane 1:18; Exode 33:20) Atako bongo, komona Mozalisi, Yehova, ata na emonaneli, ezali mpenza likambo ya kobangisa. Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba mpe Eutelo ya boyangeli nyonso ya sembo, afandi na kiti ya bokonzi oyo etombwami, yango ezali komonisa ete azali mpenza Mokonzi mpe Mosambisi ya seko. Malenda ya elamba na ye ya molai ezali kopɛpa mpe etondisi tempelo. Yisaya abengisami mpo akokisa mosala ya kosakola oyo ekosanzola nguya mpe bosembo ya bokonzi monene ya Yehova. Mpo na kobongisa makanisi na ye, Nzambe apesi ye emonaneli mpo atala bosantu na ye.
4. (a) Mpo na nini lolenge oyo balobeli Yehova ndenge amonani na emonaneli mpe ekomami na Biblia ezali mpenza ya elilingi? (b) Liteya nini tokoki kozwa na emonaneli ya Yisaya oyo etali Yehova?
4 Na bokeseni na bimonaneli oyo Ezekiele, Danyele mpe Yoane bakomaki, Yisaya alobeli te lolenge Yehova azali komonana na emonaneli na ye. Mpe masolo ya bato yango nyonso elobeli makambo ndenge na ndenge oyo mokomoko na bango amonaki na likoló. (Ezekiele 1:26-28; Danyele 7:9, 10; Emoniseli 4:2, 3) Nzokande, tosengeli kobosana te lolenge ya bimonaneli yango mpe ntina na yango. Bimonaneli yango ezali komonisa te lolenge mpenza Yehova azali. Liso ya mosuni ekoki komona makambo ya elimo te, ata mpe makanisi ya moto ekoki koyeba makambo oyo elekaka na mokili ya bilimo te. Yango wana, bimonaneli yango emonisi makambo oyo masengeli koyebisama na elobeli ya bato. (Kokanisá na Emoniseli 1:1.) Na emonaneli ya Yisaya, ezali na ntina te Nzambe amonisama lolenge azali. Yisaya amoni na emonaneli ete Yehova azali na kati ya tempelo na ye mosantu mpe ete azali mosantu mpe bikateli na ye ezali pɛto.
Baselafa
5. (a) Baselafa bazali banani, mpe liloba yango elimboli nini? (b) Mpo na nini baselafa babombi bilongi na bango mpe makolo na bango?
5 Yoká! Yisaya alobi lisusu ete: “Baselafa batɛmaki likoló na ye, moko na moko azalaki na mapapu motoba, na mibale azipaki elongi na ye mpe na mibale azipaki makolo na ye mpe na mibale azalaki kopumbwa.” (Yisaya 6:2) Yisaya mokapo 6 ezali esika kaka moko na Biblia epai balobeli baselafa. Ya solo, ezali baanzelu, bikelamu oyo bazali kosalela Yehova mpe bazali na mikumba mpe na lokumu monene, mpamba te bazali pembeni ya kiti ya bokonzi ya Yehova na likoló. Na bokeseni na mokonzi ya lolendo Uziya, bakokisaka mikumba na bango na komikitisa mpe na bopɔlɔ. Lokola batɛlɛmi esika Mokonzi ya likoló azali, babombi bilongi na bango na mapapu na bango mibale; mpo na limemya ya esika mosantu epai bazali, bazipi makolo na bango na mapapu mosusu mibale. Lokola bazali pene na Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, baselafa baboyi komimonisa, balingi te kolongola likebi na nkembo ya Nzambe. Liloba “baselafa,” elimboli “baoyo ya mɔ́tɔ” to “baoyo bazikisaka,” yango ezali komonisa ete bangɛngisaka, atako bongo babombi bilongi na bango mpo na nkembo mpe kongɛnga ya Yehova mpo yango eleki makasi.
6. Esika ya baselafa ezali nini soki tokokanisi bango na Yehova?
6 Baselafa basaleli mapapu na bango mosusu mibale mpo na kopumbwa mpe, na ntembe te, mpo na kotɛlɛma na mopɛpɛ, to ‘kotɛlɛma,’ na bisika na bango. (Kokanisá na Deteronome 31:15.) Profɛsɛrɛ Franz Delitzsch alobi boye, mpo na esika na bango: “Baselafa bazalaki te likoló ya motó ya Moto oyo afandaki na kiti, kasi bazalaki kopumbwapumbwa likoló ya elamba na Ye oyo etondisaki ndako mobimba.” (Commentary on the Old Testament) Ndimbola yango emonani ete ebongi mpenza. “Batɛmaki likoló,” elingi koloba te ete balekaki Yehova, kasi bazalaki nde basaleli na ye, oyo bazali kotosa ye mpe bazali pene mpo na kosalela ye.
7. (a) Misala nini baselafa basalaka? (b) Mpo na nini baselafa bazali kosakola bosantu ya Nzambe mbala misato misato?
7 Sikawa, tóyoka maloba ya baselafa yango oyo bazali na libaku malamu ndenge wana! “Moko abyangaki mosusu, alobaki ete, [Mosantu, mosantu, mosantu, Yehova, NW] na bibele, mokili mobimba etondi na nkembo na ye.” (Yisaya 6:3) Mokumba na bango ezali ya kosakola bosantu ya Yehova mpe ya koyebisa nkembo na ye na molɔ́ngɔ́ mobimba, bakisa mpe mabele. Nkembo na ye ezali komonana na nyonso oyo asalá mpe etikali moke bato nyonso ya mabele mobimba báyeba yango. (Mituya 14:21; Nzembo 19:1-3; Habakuku 2:14) Ndenge balobi mbala misato ete, “mosantu, mosantu, mosantu,” yango ezali komonisa Trinite te. Nzokande, ezali kaka elobeli ya konyata mbala misato mpo na komonisa bosantu ya Nzambe. (Kokanisá na Emoniseli 4:8.) Yehova azali mosantu na lolenge oyo eleki mpenza.
8. Maloba ya baselafa ebimisi nini?
8 Atako motángo ya baselafa eyebisami te, ekoki kozala ete batɛlɛmi bituluku bituluku pene na kiti ya bokonzi. Bazali koyemba nzembo moko kitoko, bazali kozongela moko nsima na mosusu, maloba ya bosantu mpe ya nkembo ya Nzambe. Yango ebimisi nini? Tóyoka lisusu Yisaya: “[Makonzí oyo esimbaka bikuke ezalaki kolɛnga, NW] mpo na mongongo na ye oyo abyangaki, mpe ndako etondi na molinga.” (Yisaya 6:4) Na Biblia, mbala mingi milinga to lipata emonisaka ete Nzambe azali wana. (Exode 19:18; 40:34, 35; 1 Mikonzi 8:10, 11; Emoniseli 15:5-8) Emonisaka nkembo oyo biso bato tokoki kobɛlɛma na yango te.
Abongi te, kasi apɛtolami
9. (a) Emonaneli esali Yisaya nini? (b) Bokeseni nini ya monene ezali kati na Yisaya mpe Mokonzi Uziya?
9 Emonaneli yango ya kiti ya bokonzi ya Yehova etungisi Yisaya. Alobi ete: “Boye nalobaki ete, Mawa na ngai, zambi [nakómi lokola bakangi ngai monɔkɔ, NW]! Nazali moto na bibɛbu na mbindo mpe nafandi kati na bato na bibɛbu na mbindo; mpo ete miso na ngai mamoni Mokonzi, [Yehova] na bibele.” (Yisaya 6:5) Oyo nde bokeseni monene kati na Yisaya mpe Mokonzi Uziya! Uziya alukaki kozwa esika ya banganga bapakolami, abukaki mobeko mpe akɔtaki na Esika Mosantu ya tempelo. Atako Uziya amonaki bityeli ya miinda ya wolo, etumbeli ya mpaka ya malasi oyo esalemi na wolo, mpe mesa ya “limpa ya Kozala,” kasi amonaki elongi ya Yehova te mpo na kondimisa ete asepelaki na ye, Yehova mpe apesaki ye mokumba moko te. (1 Mikonzi 7:48-50, NW; maloba na nse ya lokasa) Nzokande, mpo na mosakoli Yisaya, ye amikɔtisi na makasi te na tempelo mpe abɔtɔli esika ya banganga te. Kasi, amoni Yehova na emonaneli kati na tempelo na ye mosantu mpe azwaki lokumu ya kozwa mbala moko mokumba epai ya Nzambe. Atako baselafa balukaka te kotala Nkolo ya tempelo oyo afandi na kiti na ye ya bokonzi, na emonaneli, Yisaya apesameli nzela ya kotala “Mokonzi, [Yehova] na bibele.”
10. Mpo na nini Yisaya abangi makasi ntango amoni emonaneli?
10 Yisaya amoni mpenza bokeseni kati na bosantu ya Nzambe mpe ezaleli na ye moko mosumuki, mpe amimoni ete azali mpenza mbindo. Lokola abangi mingi, akanisi ete akokufa. (Exode 33:20) Ayoki baselafa bazali kokumisa Nzambe na mbɛbu ya pɛto, kasi mbɛbu na ye ezali mbindo, mpe ekómi lisusu bosɔtɔ makasi mpo na mbindo ya mbɛbu ya bato oyo afandi na bango mpe ayokaka ntango bazali koloba. Yehova azali mosantu, mpe basaleli na ye basengeli komonisa ezaleli yango. (1 Petelo 1:15, 16) Atako Yisaya aponamaki ete azala molobeli ya Nzambe, kasi akamwi mingi mpo ayebi ete azali mosumuki mpe azali na mbɛbu ya pɛto te oyo ebongi na molobeli ya Mokonzi mosantu mpe ya nkembo. Likoló ekopesa eyano nini?
11. (a) Moko na baselafa asali nini, mpe likambo yango emonisi nini? (b) Ndenge nini komanyola likoló na maloba ya selafa oyo alobi na Yisaya ekosalisa biso ntango tozali komimona ete tobongi te mpo na kosalela Nzambe?
11 Na esika ya kobengana Yisaya moto mpamba mpo alongwa liboso ya Yehova, baselafa bayei nde kosalisa ye. Lisolo elobi ete: “Bongo, moko na baselafa apumbwaki epai na ngai, wana ezalaki ye na likala na mɔ́tɔ na lobɔkɔ na ye oyo esili ye [kobimisa] na likoló na etumbelo. Amamaki monɔkɔ na ngai, alobaki ete, Talá oyo emami bibɛbu na yo; mabe na yo esili kolongolama mpe masumu na yo elimbisami.” (Yisaya 6:6, 7) Na lolenge ya elilingi, mɔ́tɔ ezalaka na nguya ya kopɛtola. Ntango atii likala oyo euti na mɔ́tɔ ya etumbelo mosantu na mbɛbu ya Yisaya, selafa andimisi ye ete masumu na ye epɛtolami na ndenge oyo ekoki mpo na kopesa ye nzela ya kondimama na Nzambe mpe kozwa mokumba na ye. Likambo yango ezali mpe kopesa biso makasi! Biso mpe tozali basumuki mpe tobongi te kobɛlɛma na Nzambe. Kasi tosikolamaki na mbeka ya Yesu mpe tokoki kondimama na Nzambe mpe kobɛlɛma na ye na nzela ya libondeli.—2 Bakolinti 5:18, 21; 1 Yoane 4:10.
12. Yisaya amoni etumbelo nini, mpe mɔ́tɔ ezali na ntina nini?
12 Liloba “etumbelo” ezali kokundolela biso lisusu ete yango ezali emonaneli. (Kokanisá na Emoniseli 8:3; 9:13.) Na kati ya tempelo ya Yelusaleme, bitumbelo ezalaki mibale. Kaka liboso ya rido ya Esika Eleki Bosantu, mwa etumbelo moko ya moke ya mpaka na malasi ezalaki wana, mpe liboso ya ekɔtelo ya ndako, etumbelo moko monene ya kotumba mbeka ezalaki wana, esika mɔ́tɔ ezalaki kopela ntango nyonso. (Levitike 6:12, 13; 16:12, 13) Kasi bitumbelo yango, oyo ezalaki awa na mabele ezalaki kaka bililingi, ezalaki nde bililingi ya biloko mosusu oyo eleki monene. (Baebele 8:5; 9:23; 10:5-10) Ezalaki mɔ́tɔ oyo eutaki na likoló nde ezikisaki mbeka oyo ezalaki likoló ya etumbelo ntango Mokonzi Salomo asalaki molulu ya bofungoli tempelo. (2 Ntango 7:1-3) Mpe sikawa ezali mɔ́tɔ oyo euti na etumbelo ya solosolo ya likoló nde elongoli mbindo ya mbɛbu ya Yisaya.
13. Motuna nini Yehova abimisi, mpe akɔtisi nani ntango alobi “biso”?
13 Tóyoka elongo na Yisaya. “Nayokaki mongongo na [Yehova] koloba ete, [Nakotinda, NW] nani? Nani akokenda mpo na biso? Ngai ete, Ngai oyo! Tindá ngai!” (Yisaya 6:8) Na ntembe te, motuna oyo Yehova atuni ezalaki mpo na koyoka eyano nini Yisaya akopesa, mpamba te mosakoli mosusu amonani na emonaneli yango te. Yango emonisi mpenza ete Yehova abengi Yisaya mpo na kotinda ye. Kasi mpo na nini Yehova atuni ete, “Nani akokenda mpo na biso?” (Biso nde totɛngisi makomi.) Lokola atiki elobeli ya bomoko “ngai” mpo na kosalela elobeli ya boike “biso,” Yehova akɔtisi sikawa moto mosusu oyo azali elongo na ye. Nani? Ezali nde Mwana na ye mobotami-bobele-moko, oyo akómaki nsima Yesu Klisto? Ezali bongo, ezalaki kaka Mwana wana nde Nzambe alobaki na ye ete, “Tiká tózalisa moto na lolenge na biso.” (Genese 1:26; Masese 8:30, 31) Ɛɛ, Mwana mobotami-bobele-moko azali pembeni ya Yehova na likoló.—Yoane 1:14.
14. Yisaya apesi eyano nini na libyangi ya Yehova, mpe ndakisa nini apesi biso?
14 Yisaya akakatanaki te mpo na kondima! Abangaki te, ata soki ezali nsango ya lolenge nini, mbala moko alobi ete: “Ngai oyo! Tindá ngai!” Atunaki mpe te eloko nini akozwa soki andimi etinda yango. Elimo oyo amonisi mpo na kondima mokumba ezali ndakisa malamu mpenza mpo na basaleli nyonso ya Nzambe lelo, baoyo bazwi mokumba ya kosakola ‘nsango malamu ya bokonzi na mokili mobimba.’ (Matai 24:14) Lokola Yisaya, bakokisaka mokumba na bango na bosembo mpenza mpe bapesaka “litatoli na mabota nyonso,” atako bato mingi bandimaka yango te. Ndenge Yisaya asalaki, bakendaka se liboso na elikya nyonso, bayebi ete mokumba na bango euti na mokonzi oyo aleki bakonzi nyonso.
Mokumba ya Yisaya
15, 16. (a) Yisaya akoloba nini epai ya ‘bato yango,’ mpe ndenge nini bakoyamba nsango yango? (b) Lolenge oyo bato yango bayambi nsango, euti nde na likambo moko ya mabe oyo Yisaya asali? Limbolá.
15 Yehova amonisi sikawa makambo oyo Yisaya asengeli koloba mpe ndenge bato bakoyamba nsango na ye: “Kendá mpe okoloba na bato oyo ete, ‘Bóyoka mpe bóyoka lisusu, nde bokoyeba ntina te; bómona mpe bómona lisusu, nde bokoyeba te.’ Kómisá motema ya bato oyo makasi mpe kangá matoi na bango, zipá mpe miso na bango mpo ete bámona na miso na bango te, báyoka mpe na matoi na bango te, ete básosola na mitema na bango te ete bábongwana te mpe bábikisama te.” (Yisaya 6:9, 10, NW) Yango elingi koloba ete Yisaya asengeli kozala na matata mpe na maloba makasi, kogangela Bayuda mpe kokabola bango na Yehova? Ezali bongo te! Ezali bato mpenza ya mboka ya Yisaya mpe alingi bango. Kasi maloba ya Yehova emonisi ndenge bato yango bakoyamba nsango na ye, ezala ata ndenge nini Yisaya akokokisa mokumba na ye na bosembo mpenza.
16 Mabe euti nde na bato yango. Yisaya akoloba na bango mpe ‘akoloba na bango lisusu,’ kasi bakoyoka nsango na ye te mpe bakososola yango te. Mingi kati na bango bakozala motó makasi mpe bakotyola nsango yango, lokola nde bazali bato bakufá miso to bato bakufá matoi. Ntango akobanda kokenda epai na bango koloba mpe koloba lisusu, Yisaya akosala ete ‘bato yango’ bámonisa ete balingi kososola te. Ezaleli na bango ekomonisa ete baboi koyoka mpe kondima nsango ya Yisaya—oyo Nzambe atindeli bango. Likambo yango esalemaka mpe bongo lelo oyo! Bato ebele baboyaka koyoka Batatoli ya Yehova ntango bateyaka nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe oyo ekómi pene.
17. Ntango Yisaya atuni, “Kino ntango nini?” alingaki kolobela nini?
17 Yisaya amitungisi: “Nalobaki ete: ‘Kino ntango nini, Ɛ Yehova?’ Mpe alobaki ete: ‘Kino mboka ekobeba mpenza kobeba, mpe moto moko akofanda wana te, mpe bandako ekozala na bato te mpe mabele ekobeba kobeba mpenza; mpe Yehova akolongola bato basalemi na mabele mpe bisika bitikala mpenza mpamba kati na mboka.’” (Yisaya 6:11, 12, NW) Ntango atuni, “Kino ntango nini?” Yisaya azalaki kotuna te mpo na koyeba ntango boni akosakola epai ya bato oyo bazali kotyola nsango na ye. Nzokande, azali komitungisa mpo na bato yango mpe komituna soki ntango boni bakolanda komonisa ezaleli wana ya mawa na elimo mpe ntango boni nkombo ya Yehova ekotyolama awa na mabele. (Talá Nzembo 74:9-11.) Na bongo, ntango boni ezalela yango ya bozoba ekoumela?
18. Kino ntango nini bato yango bakotikala na ezalela na bango ya mawa na elimo, mpe Yisaya akoumela na bomoi mpo na komona kokokisama mobimba ya esakweli na ye?
18 Eyano ya Yehova emonisi ete ezalela mabe ya elimo ya bato yango ekokoba tii bakozwa etumbu nyonso ya kozanga botosi na bango epai ya Nzambe, ndenge amonisaki yango na kondimana na ye. (Levitike 26:21-33; Deteronome 28:49-68) Libota yango ekobebisama, bato bakokenda na boombo mpe mokili ekotikala mpamba. Atako akosakola na boumeli ya mbula koleka 40, tii na boyangeli ya Hizikiya, mwana ya mwana ya mwana ya Uziya, Yisaya akozala na bomoi te mpo na komona ndenge bato ya Babilone bakobebisa Yelusaleme mpe tempelo na yango na mobu 607 L.T.B. Kasi, Yisaya akokoba kokokisa mokumba na ye na bosembo mpenza tii akokufa, mbula koleka 100 liboso ete Yelusaleme ebebisama.
19. Atako libota ekokatama lokola nzete, elikya nini Nzambe apesi Yisaya?
19 Kobebisama oyo ekotika Yuda “mpamba” ekosalema mpenza, kasi mwa elikya ezali naino. (2 Mikonzi 25:1-26) Yehova andimisi Yisaya ete: “Ekozala na ndambo ya zomi oyo ekotikala wana, mpe ekokóma lisusu eloko ya kozikisa; lokola nzete molai mpe lokola nzete monene oyo soki bakati yango, ekumu ekotikala; momboto mosantu ekozala ekumu na yango.” (Yisaya 6:13, NW) Ya solo, “ndambo ya zomi . . . , momboto mosantu,” ekotikala, lokola ekumu ya nzete monene oyo bakati. Na ntembe te mwa elikya yango elendisi Yisaya—batikali basantu bakomonana kati na bato na ye. Atako libota yango ezikisami lisusu mpe lisusu, lokola nzete monene oyo bakati lokola nkoni, ekumu moko ya ntina ekotikala na nzete ya elilingi, Yisalaele. Ekozala momboto, to bakitani, oyo bazali basantu na miso ya Yehova. Na nsima, ekobima lisusu, mpe nzete ekokola lisusu.—Kokanisá na Yobo 14:7-9; Danyele 4:26.
20. Ndenge nini eteni ya nsuka ya esakweli ya Yisaya ekokisamaki liboso?
20 Maloba ya esakweli yango ezalaki solo? Ɛɛ. Mbula ntuku nsambo nsima wana mokili ya Yuda etikalaki mpamba, batikali oyo bazalaki kobanga Nzambe bautaki na boombo na Babilone. Batongaki lisusu tempelo mpe engumba, mpe bazongisaki losambo ya solo na mokili yango. Lokola Bayuda bazongaki na mokili oyo Nzambe apesaki bango, yango epesaki nzela ete esakweli oyo Yehova apesaki Yisaya ekokisama mpo na mbala ya mibale. Esengelaki kozala nini?—Ezela 1:1-4.
Ekokisami lisusu
21-23. (a) Na ekeke ya liboso, esakweli ya Yisaya ekokisamaki epai ya nani, mpe ndenge nini? (b) Nani azalaki “momboto mosantu” na ekeke ya liboso, mpe babikaki ndenge nini?
21 Mosala ya mosakoli Yisaya ezalaki komonisa mosala oyo Masiya, Yesu Klisto asengelaki kosala mbula 800 na nsima. (Yisaya 8:18; 61:1, 2; Luka 4:16-21; Baebele 2:13, 14) Atako azalaki moto monene koleka Yisaya, Yesu mpe andimaki kotindama na Tata na ye ya likoló, alobaki ete: “Talá nayei kosala mokano na yo.”—Baebele 10:5-9; Nzembo 40:6-8.
22 Lokola Yisaya, Yesu akokisaki na bosembo mpenza mosala oyo bapesaki ye mpe akutanaki na makambo ndenge moko na Yisaya. Bayuda ya ntango na ye balingaki kondima nsango na ye te ndenge moko na baoyo Yisaya asakolelaki. (Yisaya 1:4) Na mosala na ye ya kosakola, Yesu azalaki kosalela mingi masese. Yango etindaki bayekoli na ye bátuna ye ete: “Mpo na nini ozali koloba na bango na masese?” Yesu ayanolaki ete: “Makambo na nkuku na Bokonzi na Likoló, bino bokoki koyoka yango, nde bango bakoki koyoka te. Na ntina oyo nakolobaka na bango na masese mpo ete, ekotala bango bakomona te mpe ekoyokamela bango bakoyoka te, bakokata mpe ntina te. Lisakoli na Yisaya ekoki mpo na bango ete, Bokoyoka na matoi nde bokoyeba ntina te. Bokotala na miso nde bokomona te. Mpo ete mitema na bato oyo misili koya makasi, [baboi koyoka, NW], mpe bazipi miso na bango, ete bámona na miso te, mpe báyoka na matoi te, mpe báyeba na mitema te, mpe bázonga te ete nabikisa bango.”—Matai 13:10, 11, 13-15; Malako 4:10-12; Luka 8:9, 10.
23 Ntango atángaki esakweli ya Yisaya, Yesu amonisaki ete makambo mosusu ekokokisama na mikolo na ye. Mitema ya bato ezalaki lokola oyo ya Bayuda na mikolo ya Yisaya. Bamikómisaki bango moko bato bakufá miso mpe bakufá matoi liboso ya nsango na ye mpe bazwaki etumbu ya kobebisama ndenge moko. (Matai 23:35-38; 24:1, 2) Yango esalemaki ntango Général Titus ayaki na mampinga ya basoda ya Baloma, mpe bakɔtaki na Yelusaleme mpe babebisaki engumba na tempelo na yango na mobu 70 na ntango na biso (T.B.). Nzokande, bato mosusu bayokaki Yesu mpe bakómaki bayekoli na ye. Yesu alobaki na bango ete bazali bato ya “esengo.” (Matai 13:16-23, 51, NW) Akebisaki bango ete ntango bakomona “Yelusaleme kozingama na bibele na basoda, . . . bákima kuna na ngomba.” (Luka 21:20-22) Yango wana, “momboto mosantu,” oyo emonisaki kondima mpe ekómaki libota moko ya elimo, “Yisalaele ya Nzambe,” ebikaki.a—Bagalatia 6:16.
24. Ndenge nini Paulo asaleli esakweli ya Yisaya, mpe yango emonisi nini?
24 Ntoma Paulo akangamaki na Loma, soko na mobu 60 T.B. Asalaki likita moko kuna elongo na “mikóló ya Bayuda” bakisa mpe bato mosusu mpe apesaki bango “litatoli etali Bokonzi ya Nzambe.” (NW) Lokola bato mingi bandimaki nsango na ye, Paulo alobaki ete yango ekokisaki esakweli ya Yisaya. (Misala 28:17-27; Yisaya 6:9, 10) Yango wana, bayekoli ya Yesu bakokisaki etinda oyo ekokani na oyo ya Yisaya.
25. Batatoli ya Nzambe na mikolo na biso basosolaka nini, mpe basalaka nini?
25 Ndenge moko mpe, lelo oyo, Batatoli ya Yehova basosolaka ete Yehova Nzambe azali na kati ya tempelo na ye mosantu. (Malaki 3:1) Lokola Yisaya, balobaka ete: “Ngai oyo! Tindá ngai!” Bazali kosakola na molende mpenza nsango ya likebisi etali nsuka ya mokili oyo ekómi pene. Kasi, lokola Yesu alobaki yango, kaka mwa bato moke nde bafungolaka miso na bango mpe matoi na bango mpo na komona mpe koyoka mpe mpo na kobika. (Matai 7:13, 14) Ya solo, esengo na baoyo batii motema na bango mpo na koyoka mpe mpo “bábikisama”!—Yisaya 6:8, 10.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lokola Bayuda batombokaki na mobu 66 T.B., Cestius Gallus ayaki na mampinga ya basoda ya Baloma, bazingaki Yelusaleme mpe bakɔtaki mpe bakómaki tii na bifelo ya tempelo. Na nsima, babimaki, yango epesaki bayekoli ya Yesu nzela ete bákima na bangomba ya Pele liboso ete Baloma bázonga lisusu na mobu 70 T.B.
[Elilingi na lokasa 94]
“Ngai oyo! Tindá ngai!”
[Elilingi na lokasa 97]
“Kino mboka ekobeba mpenza kobeba mpe moto moko akofanda wana te”