‘Bato oyo bafandi mpo na ntango mokuse’ bayanganisami na losambo ya solo
“Bato ya mboka mosusu bakozala baloni-bilanga na bino mpe basali-bilanga na bino ya vinyo. Nde bino, bokobengama banganga-nzambe ya Yehova.”—YIS. 61:5, 6.
1. Ndenge nini bato mosusu batalelaka bapaya, kasi mpo na nini likanisi yango ezangi motó ná makolo?
BATO mosusu balingaka bapaya te to bato oyo bautá na bikólo mosusu. Bakoki kokanisa ete baleki bapaya yango. Ezaleli ya komona bato ya ekólo mosusu lokola nkasa ya kwanga ezali mabe. Moto moko te akoki komimona ete aleki basusu. Buku moko (The Races of Mankind) elobi boye: “Ndenge kaka Biblia emonisi yango, bato ya mposo nyonso bazali bandeko.” Ata soki bandeko bakoki kokesana, bazali kaka bandeko.
2, 3. Ndenge nini Yehova azalaki kotalela bapaya na Yisraele ya kala?
2 Ya solo, ezala esika nini tozali, bapaya bazangaka te. Ezalaki mpe bongo mpo na Bayisraele ya kala, oyo na nzela ya kondimana ya Mibeko, bazalaki na boyokani ya ntina mpenza ná Yehova Nzambe. Atako bapaya bazalaki na lotomo te ya kosala makambo nyonso, Yehova asɛngaki na Bayisraele ete básalela bango makambo na limemya mpe na ndenge ebongi. Ezali mpenza ndakisa malamu oyo tosengeli kolanda! Bakristo ya solo baponaponaka bilongi te to bakaniselaka basusu mabe te. Mpo na nini? Ntoma Petro alobaki ete: “Ya solo mpenza namoni ete Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo ya boyengebene andimami na ye.”—Mis. 10:34, 35.
3 Bapaya oyo bazalaki na Yisraele, bazalaki kozwa matomba mingi ndenge bazalaki na boyokani malamu ná Bayisraele. Likambo yango emonisaki likanisi ya Yehova, ndenge mpe ntoma Paulo ayaki komonisa yango bambula ebele na nsima, ntango atunaki na ntina na Yehova ete: “Azali nde Nzambe ya Bayuda kaka? Azali mpe ya bato ya bikólo te? Ɛɛ, ya bato ya bikólo mpe.”—Rom. 3:29; Yoe. 2:32.
4. Mpo na nini tokoki koloba ete bapaya bazali te na “Yisraele ya Nzambe”?
4 Na nzela ya kondimana ya sika, lisangá ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo ezwaki esika ya ekólo Yisraele, mpe ekómaki ekólo oyo ekozala na boyokani ya ntina mpenza ná Nzambe. Yango wana ekómaki kobengama “Yisraele ya Nzambe.” (Gal. 6:16) Mpe ndenge ntoma Paulo alimbolaki yango, na ekólo yango ya sika, “Mogrɛki azali te Moyuda mpe te, kokatama ngenga ezali te kozanga kokatama ngenga mpe te, mopaya azali te, Mosikitia te, moombo te, moto ya bonsomi te, kasi Kristo azali makambo nyonso mpe na kati ya nyonso.” (Kol. 3:11) Mpo na ntina yango, moto moko te asengelaki kobengama mopaya na lisangá ya bokristo.
5, 6. (a) Mokapo ya Yisaya 61:5, 6 ekoki kobimisa motuna nini? (b) “Banganga-nzambe ya Yehova” mpe “bato ya mboka mosusu” to bapaya oyo Yisaya alobeli ezali banani? (c) Likambo nini esangisi bituluku yango mibale?
5 Nzokande, bato bakoki koloba ete Yisaya 61 ezali na esakweli oyo ezali kokokisama na lisangá ya bokristo. Vɛrsɛ 6 ya mokapo yango elobeli baoyo bakosala lokola “banganga-nzambe ya Yehova.” Kasi, vɛrsɛ 5 elobeli “bato ya mboka mosusu” to bapaya oyo bakosala na bomoko ná “banganga-nzambe” yango. Ndenge nini tokoki kosimba makanisi yango?
6 Tosimbi ete “banganga-nzambe” oyo balobeli awa, ezali bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bakozwa “lisekwa ya liboso” mpe “bakozala banganga-nzambe ya Nzambe mpe ya Kristo, mpe bakoyangela elongo na ye mbula nkóto moko (1000).” (Em. 20:6) Longola bango, ezali na ebele ya bakristo ya sembo oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabele. Atako bakristo yango bazali kosala elongo mpe na bomoko mpenza ná baoyo bakosala na likoló, na maloba ya elilingi, bazali bapaya. Na esengo nyonso, bazali kosunga mpe kosala elongo na “banganga-nzambe ya Yehova,” bazali kosala lokola “baloni-bilanga” mpe ‘basali-bilanga ya vinyo’ na bango. Bazali kosalisa bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpo bápesa Nzambe nkembo na ndenge basakolaka mpe bateyaka basusu solo. Na ntembe te, bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe “bampate mosusu” balukaka mpe babatelaka na bolingo nyonso bato ya sembo oyo bazali na mposa ya kosalela Nzambe mpo na libela.—Yoa. 10:16.
‘BATO OYO BAFANDI MPO NA NTANGO MOKUSE’ LOKOLA ABRAHAMA
7. Na ndenge nini bakristo ya lelo bazali lokola Abrahama mpe basaleli ya Yehova mosusu ya ntango ya kala?
7 Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, bakristo ya solo bazali lokola bapaya, to bato oyo bafandi mpo na ntango mokuse, na mokili mabe oyo ya Satana. Na ndenge yango, bazali lokola bato ya sembo ya kala, na ndakisa Abrahama, oyo Biblia elobi ete “bazali bapaya mpe bato oyo bafandi na mokili yango mpo na ntango mokuse.” (Ebr. 11:13) Ezala tozali na elikya nini mpo na mikolo ezali koya, tozali na libaku ya kozala na boyokani malamu ná Yehova ndenge Abrahama azalaki na yango. Ntoma Yakobo alimboli ete: “Abrahama andimelaki Yehova, mpe batángaki ye moyengebene mpe akómaki kobengama ‘moninga ya Yehova.’”—Yak. 2:23.
8. Elaka nini Nzambe apesaki Abrahama, mpe ndenge nini azalaki kotalela yango?
8 Nzambe alakaki ete na nzela ya Abrahama mpe ya bana na ye, mabota nyonso ya mabele ekopambwama. Elaka yango etalelaki kaka ekólo moko te. (Tángá Ebandeli 22:15-18.) Atako elaka wana esengelaki kokokisama bambula mingi na nsima, Abrahama akobaki kotya motema ete ekokokisama. Na boumeli ya bambula mingi ya bomoi na ye, ye ná bato ya libota na ye batambolaki bisika ebele. Na ntango nyonso wana, Abrahama akobaki kaka kozala moninga ya Yehova.
9, 10. (a) Na makambo nini tokoki komekola ndakisa ya Abrahama? (b) Libyangi nini tokoki kopesa bato mosusu?
9 Atako ayebaki te tii ntango nini elaka oyo Nzambe apesaki ye ekokokisama, Abrahama akobaki kolinga Yehova mpe kosambela ye. Atyaki makanisi na ye mobimba te mpo afanda libela na ekólo moko boye. (Ebr. 11:14, 15) Ekozala mpenza malamu mingi soki tolandi ndakisa ya Abrahama, tóboya bomoi ya mindɔndɔ, mpe tómitungisa mingi te mpo na biloko ya mokili, koluka kozala na bomoi ya malamu to komityela mikano ya kokóma bato minene! Mpo na nini koboma nzoto mpo na koluka bomoi, oyo bato babengaka bomoi ya malamu na mokili oyo ekokufa mosika te? Mpo na nini kokangama makasi na eloko oyo ezali kaka mpo na ntango mokuse? Ndenge moko na Abrahama, biso mpe tozali kokende mpo na kozwa eloko moko oyo eleki malamu. Tosengeli kozala motema molai, mpe kozela tii ntango elikya na biso ekokokisama.—Tángá Baroma 8:25.
10 Yehova azali kaka kobenga bato ya bikólo nyonso mpo bápambwama na nzela ya momboto ya Abrahama. Mpe bakristo oyo batyami mafuta na elimo, elingi koloba “banganga-nzambe ya Yehova,” mpe bampate mosusu, to “bato ya mboka mosusu,” bazali kobenga bato ya mokili mobimba na minɔkɔ koleka 600.
TÓKABOLAKA BIKÓLO TE
11. Salomo asɛngaki bato ya bikólo nyonso básala nini?
11 Ntango basalaki molulu ya kofungola tempelo na mobu 1026 L.T.B., na boyokani na elaka oyo Yehova asalelaki Abrahama, Salomo amonisaki ete bato ya bikólo nyonso basengeli kosangana mpo na kokumisa Yehova. Na libondeli oyo asalaki na motema mobimba, alobaki ete: “Ná mopaya mpe, oyo azali te moto ya Yisraele, bato na yo, mpe oyo auti mpenza na mokili moko ya mosika mpo na nkombo na yo (mpo bakoyoka nsango ya nkombo na yo monene mpe ya nguya ya lobɔkɔ na yo mpe ya lobɔkɔ na yo oyo esembolami), mpe soki ayei mpenza mpe abondeli, wana atali na ngámbo ya ndako oyo, yo yoká kuna na likoló, esika na yo ya kofanda ya libela, mpe salá na kolanda nyonso oyo mopaya yango akobelela yo mpo na yango; mpo bato ya bikólo nyonso ya mabele báyeba nkombo na yo mpo bábanga yo ndenge bato na yo Yisraele babangaka yo.”—1 Bak. 8:41-43.
12. Mpo na nini Batatoli ya Yehova bazali lokola bapaya?
12 Mopaya azali moto oyo akei kotambola na mboka ya bato mosusu to afandaka kuna. Batatoli ya Yehova bazali lokola bapaya. Bamipesaka libosoliboso mpo na guvɛrnema ya likoló, Bokonzi ya Nzambe oyo Kristo azali kotambwisa. Kutu, bakɔtaka ata moke te na makambo ya politiki, ata soki bato bamonaka ete esengeli básala yango.
13. (a) Nini ekoki kosalisa biso tótika kotalela bato mosusu lokola bapaya? (b) Na ebandeli, Yehova alingaki ete bato bázala bapaya? Limbolá.
13 Mbala mingi bapaya bayebanaka na makambo oyo basalaka to na ndenge oyo bazalaka. Ekoki kozala na lolenge oyo balobaka, mimeseno na bango, lolenge na bango ya kolata to ya kosala monzɛlɛ. Kasi, makambo oyo bazali na yango ndenge moko ná bato mosusu, nde eleki ntina koleka makambo oyo ekesenisaka bato. Na ntina yango, soki tozali kokanisa te na makambo oyo ekesenisi biso na moto mosusu, na ntembe te, yango ekosalisa mpo tótalela ye te lokola mopaya. Soki bato nyonso ya mabele bazalaki bato ya ekólo moko to guvɛrnema moko, moto moko te alingaki kozala mopaya. Na ebandeli, Yehova alingaki ete bato nyonso bázala libota moko na nse ya boyangeli na ye. Ekoki kosalema lelo oyo ete bato ya bikólo nyonso bátika kotalela basusu lokola bapaya?
14, 15. Batatoli ya Yehova basepelaka na likambo nini?
14 Tozali na mokili oyo bato mingi bazali na moimi mpe bakanisaka ete ekólo na bango eleki bikólo mosusu. Kasi, ezali likambo ya esengo koyeba ete ezali na mwa bato oyo balingaka bato ya bikólo nyonso. Ya solo, kotika kokanisela bato mabe ekoki kozala mpasi. Ted Turner, moto oyo afungolaki chaîne ya televizyo CNN alobelaki ndenge asalaki ná bato ya mayele oyo bauti bikólo ndenge na ndenge; alobaki boye: “Nandimaki te ete nakokaki kokutana ná bato ya ndenge wana. Nakómaki kotalela bato yango ya bikólo mosusu lokola ‘bapaya’ te kasi lokola bato oyo tozali na bango mboka moko. Nakómaki komona ete liloba ‘mopaya’ ezali mabe mpe nabimisaki mobeko moko na chaîne CNN ete bato bakoki lisusu kosalela liloba yango te, ezala na baemisyo na televizyo to na ntango bazali kosolola na biro.”
15 Na mokili mobimba, kaka Batatoli ya Yehova nde batalelaka bato ndenge Yehova atalelaka bango. Yango esali ete bábongola lolenge na bango ya kokanisa mpe ya kotalela basusu. Bayinaka te bato oyo bauti na bikólo mosusu to bakanisaka te ete esengeli te kotyela bato yango motema. Batatoli ya Yehova basepelaka komona bato ya lolenge nyonso mpe makoki ndenge na ndenge oyo bazali na yango. Osilá kokanisa soki ndenge nini Batatoli ya Yehova bakokaka kosala yango mpe mpo na nini ebongi mpenza ete biso nyonso tóbongola lolenge na biso ya kotalela basusu?
MOKILI OYO EZANGI BAPAYA
16, 17. Bomoi ekozala ndenge nini ntango Emoniseli 16:16 mpe Danyele 2:44 ekokokisama?
16 Mosika te, bikólo nyonso ya lelo ekobundisa boyangeli ya Nzambe na etumba ya Armagedone. (Em. 16:14, 16; 19:11-16) Mbula koleka 2 500 liboso, na lisalisi ya elimo santu, mosakoli Danyele asakolaki nsuka ya baguvɛrnema ya bato oyo ezali na boyokani te na mokano ya Nzambe; akomaki boye: “Na mikolo ya bakonzi yango, Nzambe ya likoló akotya bokonzi moko oyo ekobebisama te. Mpe bokonzi yango ekoleka na ekólo mosusu te. Ekotuta mpe ekosukisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala seko.”—Dan. 2:44.
17 Kanisá naino ndenge oyo kokokisama ya maloba wana ekolimbola mpo na yo! Lelo oyo, biso nyonso tokoki kotalelama lokola bapaya mpo mokili ekabwani na bikólo mpe na bandelo. Kasi, nsima ya Armagedone, bandelo yango ekozala lisusu te. Atako ekoki kozala ete bato bakokoba kokesana, yango ekomonisa ete Nzambe akelaki bato mpe biloko nyonso ndenge moko te. Lokola avenire kitoko boye ezali kozela biso, tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo na kosanzola mpe kokumisa Mozalisi na biso.
Ozali kozela na mposa makasi mokolo oyo bandelo ya bikólo ekozala lisusu te, mpe “mopaya” akozala te?
18. Ndakisa nini emonisi ete Batatoli ya Yehova batalelaka te bandeko na bango lokola bapaya?
18 Ekosalema mpenza ete bato na mokili mobimba bátika kotalela basusu lokola bapaya? Ɛɛ, tokoki mpenza kondima ete ekosalema. Liloba “mopaya” ezalaka na ntina te epai ya Batatoli ya Yehova, mpo bakipaka mpenza te makambo etali bikólo. Na ndakisa, na bambula oyo euti koleka, misala mingi ya bafiliale ya mike epesamaki na bafiliale ya bikólo mosusu. Basalaki bongo mpo mosala ya kosakola esalema na ndenge ebongi mpe kozanga mindɔndɔ. (Mat. 24:14) Ntango basalaki yango, batalelaki te bandelo ya bikólo, longola kaka soki mobeko moko esɛngi kosala bongo. Yango emonisi mpe polele ete Yesu Kristo, Mokonzi oyo Yehova atye, azali kosangisa bato ya bikólo nyonso esika moko, mpe mosika te ‘akolonga tii na nsuka’!—Em. 6:2.
19. Monɔkɔ ya pɛto esalisi na nini?
19 Batatoli ya Yehova bauti na bikólo mingi mpe balobaka minɔkɔ ndenge na ndenge. Kasi solo esangisi bango mpe bakokabwana soki moke te. (Tángá Sefania 3:9.) Bazali libota moko ya bandeko oyo bauti mikili mingi, oyo bazali na mokili oyo mabe, kasi bazali bato ya mokili yango te. Ndenge libota yango ezali na bomoko sikoyo ezali komonisa ete na mokili ya sika, moto moko te akozala mopaya. Nsukansuka, moto nyonso awa na mabele akozala na esengo ya komona bato ya mposo nyonso mpe ya bikólo nyonso bafandi lokola bandeko.