Elikya ya solo mpo na Bana
“Ekojala lisusu tɛ [na] mwana oyo akobika bobɛlɛ mwa mikɔlɔ . . . Bakosala mosala na mpamba tɛ, bakobota bana mpɔ na nsɔmɔ na pwasa tɛ, jambi bakojala bakitani na bapambolami na [Yehova].”—Yisaya 65:20, 23.
ATAKO milende ya kokumisama misili kosalema, bamilió ya bana babotami sika bazali bobele kati na “minyoko.” Yango ekozala boye libela te. Esakweli ya Yisaya ezali kondimisa biso bobele te ete mokolo mosusu mwana nyonso akozwa bomoi ya malamu kasi ezali mpe kolimbola lolenge nini mokano yango ekokokisama.
Na Yisaya 65:17, Nzambe alobi ete: “Najali kotonga [makoló na sika mpe mabelé na sika, NW] mpe makambo na liboso makokanisama tɛ, makoya mpe na motema tɛ.” Tozali na mposa ya makoló na sika mpe mabelé na sika mpo ete etya likebi likoló na bana na mokili mobimba.
“Mabelé na sika” yango ezali lisangá ya sika ya bato oyo bandimi malako Yesu Klisto apesaki. Na moko na malako yango, Yesu Klisto alimboli yango ezali: “Sɔkɔ moto nani akoyamba mɔkɔ na bana motindo oyo na nkombo na ngai, akoyamba ngai.” (Malako 9:37) Lisangá ya bato oyo ekotalela mwana nyonso lokola soki nde ezalaki Klisto ye moko mpenza, mbɛlɛ ekozala “mabelé na sika”! Bamilió ya bato basili koluka kosala ndenge wana, mpe basili kolónga na kopesáká elikya na bana mosusu kati na mokili.
Bana oyo bazali uta sikawa na elikya
Tshepo azalaki kofanda elongo na bandeko na ye mibali mpe basi na mboka moko ya bobólá na Afrika ya Súdi. Ntango azalaki naino na mbula moko, azalaki na libumu ya kovimba lolenge ya bana oyo balyaka malamu te. Baboti na ye bazalaki kobebisa ndambo monene ya mosolo ya mwá lifuti na bango na komela masanga, komekáká kosilisa mabanzo na bango na masanga. Ezalaki mpenza kosalema mingi te ete Tshepo alya bilei ya mɔ́tɔ, mpe babandaki kotika ye kosakana kati na bosɔtɔ mpe manzanza ya bière oyo mabwakamaki na libándá ya ndako.
Bomoi ya Tshepo emonanaki ete ekozala ya mpasi mingi; nzokande, na ntango yango likambo moko liyaki kobongola makanisi ya baboti na ye. Mozalani moko ya mpembeni na nkombo George apesaki bango mateya ya Biblia kozanga lifuti. Matomba ezalaki ya kokamwa: kolangwa masanga ezalaki lisusu te, lopango ekómaki pɛto, libota lizalaki kolya bilei ya mɔ́tɔ mokolo na mokolo, mpe Tshepo na bandeko na ye mibali mpe basi bakómaki mpenza komonana pɛto, na elateli malamu mpe na esengo.
Soki George asalisaki libota ya Tshepo kozanga lifuti, ezali mpo ete lokola azali moko ya Batatoli ya Yehova, azali komiyoka ete azali na mokumba mpo na bato nyonso, na baoyo bazali na bozwi te. Ya solo, ekamataki ntango mingi mpe motema molai mpo na kosunga bato ya libota wana ete bábongola lolenge na bango ya bomoi, kolakisa bango makambo ya sika oyo mazwi moboko na yango likoló na Liloba ya Nzambe. Kasi George amoni ete milende na ye mizali na ntina, mingimingi ntango azali komona mbongwana oyo esalemi mpo na bana.
José, mosali bilanga mpe tata ya bana 9, azalaki kofanda na mboka San Salvador Atenco, kuna na mokili ya Mexique. Azalaki momeli monene ya masanga, mpe bana na ye bazalaki kobanga ye mpamba te azalaki kobeta bango soki alangwi. Ndako na bango ezalaki ntango nyonso na bosɔtɔ, mpe libándá ya ndako ezalaki lobálá ya bangulu mpe bampunda oyo bazalaki kotambolatambola na ndako ndenge balingi. Na ntina yango, bana babandaki kobela libumu, mpe ntango mosusu nzoto na bango etondaki na bampóta ya maina.
Makambo mabongwanaki ntango José abandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Atikaki komela masanga mingi mpe akómaki tata ya solo mpo na bana na ye. Moko ya bana na ye alobaki na esengo nyonso ete: “Sikawa tokoki kosakana na tata na biso.” Ndako na bango oyo ezalaki moko na bandako eleki bosɔtɔ na engumba, ezali sikawa moko na bandako eleki pɛto ya engumba. Bangulu mpe bampunda bazingami kati na elanga kuna mosika, na bamɛtɛlɛ 1 500 longwa na esika bafandi, mpe libota mbala na mbala lizalaki kotɔkisa mai ma bomeli. Lokola bopɛto ebongi, yango epesi nzela ete bana bázala nzoto kolɔngɔ́nɔ́ mpe na esengo mingi.
Lokola bandakisa oyo mibale emonisi yango, mpo na kosunga bana, esengeli malamu liboso kobanda na baboti. Maloba ya likita ya mokili mobimba mpo na oyo etali bana elobi ete: “Libota lizali na mokumba ya liboso ya kobongisa mpe kobatela bana.” Kokokisa mokumba yango to kozanga kokokisa yango, ezali bobele likambo ya mosolo te, kasi lisusu likambo ya kolakisama malamu.
Mbongwana ya bomoi ya bana oyo balalaka na balabála
Na Brésil, Domingos azalaki na mibu libwa ntango tata na ye akufaki. Ntango mama na ye abalaki mobali mosusu, Domingos atyamaki na ndako oyo bakobɔkɔlaka bana bitike. Konyokwama oyo azwaki kati na ndako yango etindaki ye asangana na etuluku moko ya bana oyo bazalaki koluka nzela ya kokima. Ntango mama na ye ayokaki mikano na ye, azongisaki ye na ndako. Nzokande, disipilini oyo azwaki epai ya tata na ye mobɔkɔli epusaki ye ete alongwa na ndako mpo na libela. Akómaki moko ya bankóto ya bana ya Sao Paulo oyo balalaka na balabála, babikelaka bobele na kosukoláká basapato, kotekáká ba bonbons to bilangwiseli.
Mbala ya liboso ntango Domingos akɔtaki na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova, azalaki kotyela moto moko motema te mpe amonisaki bizaleli malamu te, yango ekoki kokamwisa te na kotaleláká ezalela na ye ya kala. Nzokande, Batatoli ya Yehova oyo bazalaki mikóló balóngaki kosimba motema na ye, bayekolaki Biblia elongo na ye, basalisaki ye ete alóna bizaleli ya sika. Na nsima, Domingos ayaki koyeba ete akokaki kotya motema na ye epai na Yehova mpe na bato mosusu. Batatoli ya Yehova basungaki ye mpo na kozwa mosala, liboso lokola manɛvɛlɛ, na nsima lokola mwana ya biro. Bambula mingi esili koleka, lelo oyo azali mosakoli moklisto ya ntango nyonso.
Bandakisa oyo emonisi ete etuluku moko ya bato oyo bazali kotyela basusu likebi ekoki kosunga na kokitisa minyoko mosusu ya bana na mokili. Ya solo, Batatoli ya Yehova bayebi ete milende ya bato ekoki te kosilisa mpasi oyo nyonso. Kosuka na yango esɛngi makoki maleki oyo ya bato, bozwi bozali na ndelo te mpe boyangeli ya mɔlɔ́ngɔ́ mobimba.
“Makoló ya sika” mpo na mokili ya malamu
Bobele Nzambe nde akoki kobongisa makambo nyonso. Na ntina yango esakweli ya Yisaya emonisi ete “mokili ya sika” ekozala elongo na “makoló ya sika.” Mbala mingi Biblia ezali kolaka ete “likoló ya sika” to “makoló ya sika” ekotyama. (Yisaya 65:17; 2 Petelo 3:13; Emoniseli 21:1) Ntango nyonso, kotyama ya ‘makoló yango ya sika’ emonisami lokola eleko ya ntina mingi kati na kolongolama ya minyoko mpe kotyama ya boyengebene awa na mabelé. ‘Makoló yango ya sika’ ezali mpenza nini?
Mingimingi Biblia esalelaka liloba “makoló” lokola nkombo mosusu mpo na boyangeli, ezala ya Nzambe to ya bato. (Talá Danyele 4:25, 26.) Boyangeli yango ya sika ezali Bokonzi ya likoló, Bokonzi ya Nzambe, oyo Yesu alakisaki na bayekoli na ye ete básambelaka mpo na yango. (Matai 6:10) Bokonzi ya Nzambe ekozala na nguya ya kolongola bampasi nyonso oyo ezali konyokola bana awa na mokili, kasi ekozwa mpe meko ya kolongola mpasi yango nyonso.
Mpo na nini tokoki kondimisama na yango? Mpo ete boyangeli emonisaka bomoto ya batambwisi na yango. Na bongo, boyangeli ya Nzambe ekoyangela na boyokani na malako ya Nzambe mpe ya mwana na ye Yesu Klisto, oyo Nzambe aponi ye lokola Mokonzi. Bango nyonso mibale bazali komibanzabanza mpo na bolamu ya bana.—Nzembo 10:14; 68:5; Malako 10:14.
Wana ezali biso kozela na motema mɔ́tɔ Bokonzi oyo elakami, to “makoló ya sika,” tokoki komeka kosala ete tóbongisa bomoi ya bana na esika oyo tofandi. Lokola elobamaki na likita ya mokili mobimba mpo na bana, “kopesa na mwana moko na moko bomoi ya malamu na mikolo mizali koya, ezali mosala mobongi kokumisama na koleka nyonso.”
[Etanda na lokasa 11]
Bibongiseli malamu mpo na kosunga bana
Mosala ya koteya ya Batatoli ya Yehova ezali kopesa lisungi malamu mpe ya koumela epai na bana. Talá mosusu kati na bibongiseli yango:
Mateya mpo na bakóló. Yango etalelaka kelasi mpo na baoyo bayebi kotánga te, bayebi mpe kokoma te; bakisá mpe mateya ya Biblia na mozindo, oyo ezali na mokano ya kolakisa makambo ya ntina mpo na kotalela bana na lolenge ya malamu.
Litambwisi ya libota. Biblia ezali kolendisa baboti, ata baoyo bazali babólá koleka ete bábɔkɔla bana na bango nyonso bango moko na esika ete bátinda basusu epai na bandeko na bango. Búku Ndenge nini okoki kozala na bomoi ya libota ya esengo ezali kopesa lisungi malamu epai na mabota oyo mazali kokutana na mikakatano.a
Mokumba mpe litambwisi ya bana. Matomba malamu mamonanaka wana bana bazali kozwa mateya mpe bazali kotalela kolɔngɔ́nɔ́ na bango ya nzoto, bakisá mpe bopɛto. Mpo na kolakisa Biblia epai na bana, Batatoli ya Yehova mbala mingi basalelaka babúku oyo ebongi lokola Mokanda mpo na masolo ya Biblia mpe Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano bibongi, (na Lifalansé) mpo ete esunga bango na kosilisa mikakatano oyo bazali kokutana na yango na libota mpe kobongisa bopɛto na bango.b
Mateya mpo na bopɛto mpe bokolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto. Batatoli ya Yehova bazali kobimisa zulunalo Lamuká! na nkótá 74, mpe zulunalo yango elobelaka mbala na mbala makambo matali kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto.
Lisungi na ntango ya makámá. Na ntango likámá ebimi, Batatoli ya Yehova basalaka na lombangu mpenza mpo na kopesa lisungi epai na baoyo bazwi mpasi mpe bazali kokelela.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
b Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Bililingi na lokasa 10]
Kosilisa mpo na libela bampasi ya bana kati na mokili esɛngi makoki oyo eleki ya moto. Bobele Nzambe nde akoki kosilisa yango