Okokɔta na mokili ya sika?
“Eloko mosusu eleki oyo te ete básepela mpe ete básala malamu naino bazali na bomoi, mpe ete moto na moto alya mpe amela mpe ayoka esengo mpo na malamu ya mosala na ye nyonso. Yango likabo ya Nzambe.”—MOSAKOLI 3:12, 13.
1. Mpo na nini tokoki kozala na elikya ete tokozala na bomoi malamu na mikolo ekoya?
BATO mingi bakanisaka ete Nzambe Mozwi-na-Nguya Nyonso azali na makambo makasimakasi. Nzokande, bavɛrsɛ oyo ezali awa na likoló ezali solo oyo ekomami na kati ya Liloba na ye epemami. Yango eyokani na bomoto na ye lokola “Nzambe ya esengo,” mpe ndenge atyaki baboti na biso ya liboso na paladiso awa na mabele. (1 Timote 1:11; Genese 2:7-9) Ntango tozali koluka koyeba bomoi oyo Nzambe alaki bato na ye na mikolo ekoya, tokokamwa te na komona ete ezali na makambo oyo ekopesa biso esengo ya libela na libela.
2. Yebisá mwa makambo oyo ozali kozela ete ekokisama.
2 Na lisolo oyo eleki, totalelaki bisika misato kati na bisika minei oyo Biblia elobeli “makoló ya sika na mabele ya sika.” (Yisaya 65:17) Moko na bisakweli yango oyo tokoki kotyela motema ezali na Emoniseli 21:1. Bavɛrsɛ oyo elandi ezali kolobela ntango oyo Nzambe Mozwi-na-Nguya Nyonso akobongola makambo nyonso ya mokili ete ekóma malamu koleka. Akolongola mpisoli ya mawa. Bato bakokufa lisusu te mpo bakomi mibange, mpo na maladi to mpo na makama. Kolela, koganga mpe mpasi ekozala lisusu te. Talá elikya malamu boye! Tokoki mpenza kondima ete likambo yango ekokokisama? Mpe elikya yango ekoki kotinda biso na kosala nini lelo oyo?
Ntina ya kozala na elikya
3. Mpo na nini tokoki kotya motema na makambo oyo Biblia elaki mpo na mikolo ekoya?
3 Yoká ndenge oyo Emoniseli 21:5 ezali koloba. Elobi ete Nzambe afandi na kiti ya bokonzi mpe alobi ete: “Nakozalisa biloko nyonso biloko ya sika.” Elaka wana oyo Nzambe apesi, ezali malamu koleka ezala mokanda nini oyo ezali kosakola lipanda ya ekólo moko, to mokanda oyo ezali kolobela ntomo ya bato, to elikya nyonso oyo bato bakoki kozala na yango mpo na mikolo ekoya. Ezali maloba oyo tokoki kotyela yango motema na biso mobimba, mpamba te euti na Moto oyo Biblia elobi mpo na ye ete “akobukaka lokuta te.” (Tito 1:2) Na ntango mosusu okokanisa ete ebongi tósuka kaka wana mpe tósepela na elikya yango mpe tóndimela Nzambe. Kasi tosengeli kosuka wana te. Ezali na makambo mingi oyo tosengeli koyeba mpo na bomoi na biso na mikolo ekoya.
4, 5. Bisakweli nini ya Biblia oyo tosili kotalela ekoki kolendisa elikya na biso na makambo oyo ezali liboso?
4 Kanisá lisusu makambo oyo lisolo eleki emonisaki mpo na bilaka oyo Biblia elobeli mpo na makoló ya sika na mabele ya sika. Yisaya asakolaki ebongiseli yango ya sika, mpe esakweli na ye ekokisamaki ntango Bayuda bazongaki na mboka na bango mpe bazongisaki losambo ya solo. (Ezela 1:1-3; 2:1, 2; 3:12, 13) Kasi, esakweli ya Yisaya esengelaki kokokisama kaka na makambo wana? Te! Makambo asakolaki esengelaki kokokisama lisusu na monene na mikolo oyo ezalaki mwa mosika. Mpo na nini tolobi bongo? Mpo na makambo oyo totángaka na 2 Petelo 3:13 mpe na Emoniseli 21:1-5. Bavɛrsɛ yango ezali kolobela makoló ya sika na mabele ya sika oyo ekopesa baklisto na mokili mobimba bolamu.
5 Ndenge tomonaki yango, Biblia esaleli maloba “makoló ya sika na mabele ya sika” mbala minei. Totaleli bisika yango misato mpe makambo oyo tomoni elendisi biso. Biblia elobi ete Nzambe akolongola, mpo na libela, mabe na makambo oyo ebimiselaka bato mpasi mpe na nsima akopambola bato na ebongiseli ya sika oyo alaki.
6. Esakweli ya minei oyo elobeli “makoló ya sika na mabele ya sika” eyebisi likambo nini?
6 Sikoyo tótalela mbala ya nsuka oyo basaleli maloba “makoló ya sika na mabele ya sika” na Yisaya 66:22-24. Totángi boye: “Zambi, lokola [makoló] ya sika mpe [mabele] ya sika oyo ikosala ngai ikoumela liboso na ngai ([Yehova] alobi bongo) bongo bakitani na bino mpe nkombo na bino ikoumela. Longwa sanza ya sika kino sanza ya sika, mpe longwa sabata kino sabata, nyonso [oyo] bazali na nzoto bakoya kosambela liboso na ngai. [Yehova] alobi bongo. Mpe bakobima mpe bakomona bibembe ya bato baoyo batombokelaki ngai; zambi lopambo na bango ekokufa te, mɔ́tɔ na bango ekozimana te mpe bakoboyama na nyonso baoyo bazali na nzoto.”
7. Mpo na nini tokoki koloba ete esakweli ya Yisaya 66:22-24 ekokokisama lisusu na mikolo ekoya?
7 Esakweli yango ekokisamaki epai ya Bayuda oyo bazongaki na mboka na bango, kasi ekokokisama lisusu. Esengelaki kokokisama bambula mingi mpenza nsima ya kokomama ya mokanda ya mibale ya Petelo mpe mokanda ya Emoniseli, mpamba te mikanda yango ezali kolobela ‘makoló ya sika na mabele ya sika’ oyo ekoya. Tokoki kozala na elikya ete kokokisama monene mpe ya mobimba ya esakweli oyo ekosalema na ebongiseli ya sika. Tótalela mwa makambo oyo tokoki kozala na elikya ete tokozala na yango.
8, 9. (a) Na ndimbola nini basaleli ya Nzambe ‘bakoumela’? (b) Esakweli oyo elobi ete basaleli ya Yehova bakosambela “longwa sanza ya sika kino sanza ya sika, mpe longwa sabata kino sabata” elimboli nini?
8 Emoniseli 21:4 eyebisaki ete liwa ekozala lisusu te. Yisaya mokapo 66 mpe endimisi likambo yango. Tokoki komona na vɛrsɛ 22 ete Yehova ayebi ete makoló ya sika na mabele ya sika ekozala mpo na mwa ntango mokuse te. Lisusu, bato na ye bakozala mpo na seko; ‘bakoumela’ liboso na ye. Makambo oyo Nzambe asili kosala mpo na libota na ye oyo aponaki ezali kopesa biso elikya. Baklisto ya solo bakutani na minyoko makasi, kutu banguna balingaki kosilisa bango nyɛɛ. (Yoane 16:2; Misala 8:1) Kasi, ata banguna ya makasi mpenza, lokola Néron, mokonzi ya Loma, mpe Adolf Hitler, bakokaki te kosilisa bato oyo basalelaki Nzambe na bosembo, oyo bazali komema nkombo na ye. Yehova abatelaki lisangá ya basaleli na ye, mpe tokoki kondima ete akobatela yango mpo eumela seko.
9 Ndenge moko mpe, mokomoko kati na baoyo bazali sembo epai ya Yehova, baoyo bakozala na mabele ya sika, baoyo bakosala lisangá ya basambeli ya solo na mokili ya sika, bakoumela, mpamba te bakosambela Mozalisi ya biloko nyonso na losambo ya pɛto. Losambo yango ekosalema te bobele mbala moko to soki likoki ezali. Mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisalaele na nzela ya Mose esɛngaki ete makambo mosusu ya losambo esalemaka sanza na sanza, elingi koloba ntango sanza ebimi mpe makambo mosusu esalemaka pɔsɔ na pɔsɔ, elingi koloba na mokolo ya Sabata. (Levitike 24:5-9; Mituya 10:10; 28:9, 10; 2 Ntango 2:4) Yisaya 66:23 emonisi ete bato bakolanda kosambela Nzambe ntango nyonso, pɔsɔ na pɔsɔ mpe sanza na sanza. Bato oyo baboyaka kondima ete Nzambe azali mpe baoyo basambelaka na liso na nse ya lokasa bakozala te. “Nyonso [oyo] bazali na nzoto bakoya kosambela liboso” ya Yehova.
10. Mpo na nini okoki kozala na elikya ete bato mabe bakobebisa mokili ya sika te?
10 Yisaya 66:24 endimisi biso ete eloko moko te ekotya kimya mpe boyengebene ya mabele ya sika na likama. Bato mabe bakozala te mpo na kobebisa yango. Kobosana te ete 2 Petelo 3:7 elobi ete “mokolo ya kosambisa mpe koboma bato [oyo] bakotyolaka Nzambe” ezali liboso na biso. Bato oyo batyolaka Nzambe nde bakokufa. Bato oyo basali likambo te bakozwa likama te, yango ekokesana na ndenge esalemaka na bitumba oyo bato babundaka, bitumba oyo ebomaka basivili mingi koleka basoda. Mosambisi Monene apesi biso ndanga ete mokolo na ye ekozala mokolo ya kobomama ya bato oyo batyolaka Nzambe.
11. Ndenge nini Yisaya amonisi nsuka ya moto nyonso oyo aboyi kosalela Nzambe mpe losambo na ye?
11 Bato ya sembo oyo bakobika ntango mokili oyo ekokufa bakomona ete liloba ya esakweli ya Nzambe ezali solo. Vɛrsɛ 24 elobi ete “bibembe ya bato oyo batombokelaki” Yehova nde ekomonisa ete kosambisa na ye ezali sembo. Bato mosusu bakoki koyoka mabe na maloba ya elilingi oyo Yisaya asalelaki, kasi azwaki bobele elilingi ya makambo ya kala. Na libanda ya lopango ya Yelusaleme ya kala, ezalaki na mabwaku mpo na kobwaka bosɔtɔ kuna mpe na ntango mosusu, bazalaki mpe kobwaka bibembe ya bato mabe oyo bazalaki koboma mpe oyo bazalaki komona ete ebongi te kokunda bango na lokumu.a Kuna, nkusu ezalaki mpe mɔ́tɔ ezalaki kozikisa biloko nyonso nyɛɛ, ezala bosɔtɔ to bibembe yango. Tomoni ete, Yisaya asalelaki elilingi yango mpo na komonisa ndenge oyo kosambisa ya Yehova ekosukela bato oyo babukaka mibeko na ye.
Makambo oyo alaki
12. Makambo mosusu nini Yisaya abakisi mpo na bomoi na mokili ya sika?
12 Emoniseli 21:4 eyebisi biso makambo oyo ekozala te na ebongiseli ya sika. Kasi, makambo nini ekozala? Bomoi ekozala ndenge nini? Tokoki komona makambo oyo tokotyela motema? Ɛɛ, makambo yango ezali. Esakweli ya Yisaya mokapo 65 ezali komonisa bomoi oyo tokozala na yango soki Yehova andimi biso tózala na ntango oyo, na kokokisama ya nsuka, akosala makoló ya sika na mabele ya sika. Bato oyo bakofanda libela na libela na mokili ya sika bakonuna te mpe bakokufa te. Yisaya 65:20 elobi na biso boye: “Ekozala lisusu te mwana oyo akobika bobele mwa mikolo, to mobange oyo atondisi mikolo na ye te; zambi mwana akokufa nsima ya [mbula] mokama mpe moto mabe, ata na [mbula] mokama, akolakelama mabe.”
13. Ndenge nini Yisaya 65:20 endimisi biso ete basaleli ya Nzambe bakobatelama?
13 Ntango esakweli yango ekokisamaki mbala ya liboso epai ya Bayisalaele, bana nyonso ya mboka yango oyo bazalaki naino komela mabɛlɛ bazalaki na likama te. Banguna bazalaki kokɔtela bango na mboka te, ndenge bato ya Babilone basalaki ntango babomaki bana oyo bazalaki komela mabɛlɛ to ntango babomaki mibali oyo bazalaki naino na bolenge na bango. (2 Ntango 36:17, 20) Na mokili ya sika oyo ekoya, bato bakozala na likama te, bakobatelama, mpe bakosepela na bomoi. Soki moto moko alingi kotombokela Nzambe, bakotika ye te azala na bomoi. Nzambe akoboma ye. Kasi ezali boni soki moto ya masumu azali na mbula mokama? Akokufa “bobele mwana moke” soki tokokanisi mbula na ye na bomoi ezangi nsuka.—1 Timote 1:19, 20; 2 Timote 2:16-19.
14, 15. Na kotalela Yisaya 65:21, 22, misala nini ya kitoko osengeli kozala na elikya ete okosala?
14 Na esika ya kolekisa ntango na kolobela ndenge moto ya masumu akobomama, Yisaya alobeli bomoi oyo ekozala na mokili ya sika. Salá lokola ete ozali na mokili yango. Liboso mpenza, okomona na makanisi na yo biloko oyo omeseni na yango na ndako. Yisaya alobeli yango na vɛrsɛ 21 mpe 22 ete: “Bakotonga ndako mpe bakofanda na yango; bakokona bilanga ya miwiti mpe bakolya mbuma na yango. Bakotonga te ete mosusu afanda; bakokona te ete mosusu alya; zambi lokola mikolo ya nzete, bongo ikozala mikolo ya bato na ngai, mpe baponami na ngai bakosepela kino ntango molai mpo na misala na mabɔkɔ na bango.”
15 Soki oyebi naino kotonga ndako te to osalá naino elanga te, esakweli ya Yisaya emonisi ete okoyekola misala yango. Okosepela koyekola yango? Mbala mosusu baninga na yo ya boboto na esika okofanda bakopesa yo mabɔkɔ. Yisaya alobi te soki ndako na yo ekozala na maninisa minene oyo ezali polele, mpo ete opemaka mopɛpɛ ya mpiɔ, to ekozala na maninisa ya talatala mpo otalaka libanda ezala na ntango ya mpiɔ to na ntango ya molunge. Okotonga ndako na yo nde na nsamba oyo etɛngama mwa moke mpo mai ya mbula mpe mbula-mpɛmbɛ ekɔtaka na ndako te? To esika oyo okofanda ekosɛnga obongisa mwa esika ya polele likoló ya ndako, ndenge ezalaka na bandako ya Moyen-Orient, esika oyo okoki kofanda na libota na yo mpo na kolya mpe kosolola.—Deteronome 22:8; Nehemia 8:16.
16. Mpo na nini okoki kozala na elikya ete mokili ya sika ekozala esika ya bisengo nsuka te?
16 Likambo ya ntina mingi mpenza ezali te koyeba makambo mikemike wana kasi ezali nde ya koyeba ete yo mpe okozala na ndako na yo moko. Ekozala nde ndako na yo moko, ekozala lokola lelo te ete okoki konyokwama na kotonga ndako kasi moto mosusu akoya kodondwa na yango. Yisaya 65:21 elobi lisusu ete okokona bilanga mpe okolya mbuma na yango. Emonani polele ete, yango elimboli na mokuse ndenge oyo bato bakozala. Okosepela na misala ya mabɔkɔ na yo. Okosepela na yango ntango molai, “lokola mikolo ya nzete.” Ya solo, lokola esakolamaki, ‘biloko nyonso bikozalisama biloko ya sika’!—Nzembo 92:12-14.
17. Elaka nini esengeli mpenza kolendisa baboti?
17 Soki ozali moboti, maloba oyo ekosimba motema na yo: “Bakosala mosala ya mpamba te, bakobota bana mpo na nsɔmɔ ya pwasa te, zambi bakozala bakitani ya bapambolami ya [Yehova] mpe bana na bango elongo na bango. Naino babyangi te, nakozongisela bango monɔkɔ; naino bazali koloba mpenza, nakoyoka.” (Yisaya 65:23, 24) Oyebi mpasi ya ‘kobota bana mpo na nsɔmɔ’? Ntina ezali te ya kotánga mikakatano nyonso oyo bana bamemelaka baboti na bango mpe bato mosusu. Na likambo yango, biso nyonso tomonaka ndenge oyo baboti mosusu bamipesaka mobimba na misala na bango moko, na makambo na bango moko, mpe na bisengo na bango moko na boye ete bazalaka lisusu na ntango mingi te ya kolekisa elongo na bana na bango. Kasi Yehova, na ngámbo na ye, alobi ete akoyoka mpe akokokisa bamposa na biso, ata naino toyebisi ye yango te.
18. Mpo na nini okoki kozala na elikya ya kosepela na banyama na mokili ya sika?
18 Wana ozali kokanisa makambo oyo okoki kozala na yango na mokili ya sika, salá lokola ozali komona likambo oyo liloba ya esakweli ya Nzambe elobi, ete: “Mbwa monene mpe mwana ya mpate bakolya elongo moko, nkosi akolya matiti lokola ngɔmbɛ mpe mputulu ikozala bilei ya nyoka. Bakoyokisa mpasi te, bakobebisa te na ngomba mobimba ya bulɛɛ na ngai. [Yehova] alobi bongo.” (Yisaya 65:25) Bato ya ntɔki bameki koyema elilingi yango, kasi yango ezali likambo ebimi kaka na makanisi ya bato ya ntɔki te. Ezali makambo oyo ekosalama mpenza. Bato bakofanda na kimya mpe bakozala na kimya na banyama. Bato mosusu ya mayele ya bioloji mpe bato oyo balingaka banyama balekisaka bomoi na bango mobimba na koyekola mwa nyama moko, to mpe bobele mwa mitindo ya nyama mosusu mpamba. Bongo kanisá makambo oyo okoyekola ntango banyama bakozala lisusu na nsɔmɔ ya bato te. Na ntango wana, okopusana pene ya bandɛkɛ ya likoló mpe banyama mikemike ya zamba, okotalatala ndenge ezali, okoyekola yango, mpe okosepela na yango. (Yobo 12:7-9) Eloko moko ekopekisa yo te osala yango, okobanga bato te to banyama te. Yehova alobi ete: “Bakoyokisa mpasi te, bakobebisa te na ngomba mobimba ya bulɛɛ na ngai.” Ekozala mbongwana monene mpenza soki tokokanisi yango na makambo oyo tozali na yango lelo oyo!
19, 20. Mpo na nini basaleli ya Nzambe bakeseni na bato mingi lelo oyo?
19 Ndenge tolobaki yango na ebandeli, bato bakoki te koyebisa makambo ekoya mpe esalema mpenza ndenge balobaki yango, atako na mokili mobimba bato mingi mpenza bazali komitungisa mpo na milenɛrɛ ya sika. Yango ezali kopesa bato mawa, ezali kobulunganisa bango to mpe bazali lisusu na elikya te. Peter Emberley, mokambi ya iniversite moko na Canada akomaki boye: “Ebele ya mikóló bazali naino komituna mituna oyo na ntina na bomoi. Nazali nani? Nazali mpenza koluka nini? Eloko nini nakotikela baoyo bakoya nsima? Bazali kosala milende mpo na kobongisa bomoi na bango mpe koluka koyeba ntina na yango wana basili kolekisa katikati ya mbula ya bomoi na bango.”
20 Okoki kokanga ntina oyo bato mingi bazali kosala bongo. Mbala mosusu balukaka bisengo ya bomoi na masano to na ndenge mosusu ya kominanola. Kasi, bayebi te eloko nini ekosalema na mikolo ekoya. Yango wana bamonaka ete bomoi ezali na ntina te, ezali bongobongo to ezali na makambo ya malonga te. Sikoyo talá bokeseni oyo ezali na kati ya bomoi na yo mpe oyo ya bango, na kotalela makambo oyo touti kolobela. Oyebi malamu ete na makoló ya sika mpe na mabele ya sika oyo Yehova alaki, tokotala mpe tokoloba mpenza ete: ‘Solo, Nzambe azalisi biloko nyonso biloko ya sika!’ Tokosepela mpenza na yango!
21. Makambo nini tozali kokuta na Yisaya 65:21 oyo tozali mpe kokuta yango na Yisaya 11:9?
21 Ezali likambo ya kolekisa ndelo te soki tozali komimona lokola nde tosili kokɔta na mokili ya sika ya Nzambe. Nzambe azali kobenga biso tósambela ye na solo sikoyo mpe tókokisa masɛngami mpo tózwa bomoi ntango ‘bakoyokisa mpasi te, bakobebisa te na ngomba mobimba na bulɛɛ na ye.’ (Yisaya 65:25) Kasi, oyebaki ete, mwa liboso na kati ya mokanda na ye, Yisaya alobelaki makambo ya ndenge wana mpe amonisaki ete ezali eloko moko ya ntina mpo biso bato tósepela na bomoi na mokili ya sika? Yisaya 11:9 elobi ete: “Bakoyokisana mpasi te, bakobebisana mpe te na ngomba mobimba ya bulɛɛ na ngai; zambi mokili ekotonda na boyebi ya [Yehova] lokola mbonge ikozipaka mai-na-monana.”
22. Bisakweli minei ya Biblia oyo totaleli esengeli kobakisa molende na biso ya kosala nini?
22 “Boyebi ya Yehova.” Ntango Nzambe akozalisa biloko nyonso biloko ya sika, bato bakoyeba ye malamumalamu mpe bakoyeba mokano na ye malamumalamu. Yango ekosuka kaka na koyeba banyama te. Bakoyeba mpe Liloba na ye. Na ndakisa, kanisá makambo ebele oyo toyekoli na kotalela bisakweli minei mpamba oyo elobeli “makoló ya sika na mabele ya sika.” (Yisaya 65:17; 66:22; 2 Petelo 3:13; Emoniseli 21:1) Yango wana osengeli mpenza kotángaka Biblia mokolo na mokolo. Yango ezali momeseno na yo? Soki ezali bongo te, makambo nini okoki kotalela lisusu mpo ete mokolo na mokolo otángaka mwa makambo oyo Nzambe azali koloba? Okomona ete longola elikya ya kofanda na mokili ya sika, esengo na yo ekobakisama sikoyo, ndenge mokomi ya nzembo mpe amonaki.—Nzembo 1:1, 2.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá buku Étude perspicace des Écritures, volimi 1, lokasa 972, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Okopesa eyano nini
• Mpo na nini tokoki mpenza koloba ete esakweli ya Yisaya 66:22-24 ezali kolobela makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya?
• Eloko nini mpenza yo ozali kotyela motema na kati ya makambo oyo batángi na bisakweli oyo ezali na Yisaya 66:22-24 mpe na Yisaya 65:20-25?
• Bantina nini ozali na yango oyo endimisi yo ete bomoi malamu ekozala na mikolo ekoya.
[Bililingi na lokasa 15]
Yisaya, Petelo mpe Yoane basakolaki makambo oyo ekozala na “makoló ya sika na mabele ya sika.”