Osalaka makasi mpo ozala moto malamu?
‘Bákanisa to bákanisa te etali ngai te!’ Mbala mosusu ekómela yo oloba maloba makasi ndenge wana mpo ozalaki na nkanda to mpo ozalaki na esengo te. Kasi ntango motema na yo ekitaki, mbala mosusu omitungisaki. Mpo na nini? Mpo biso nyonso tolingaka koyeba mpenza soki bato mosusu bazali kokanisa nini mpo na biso.
YA SOLO, tosengeli komibanzabanza mpenza mpo na koyeba makanisi ya bato mosusu. Lokola tozali baklisto, baministre oyo Yehova Nzambe aponi, tosengeli ntango nyonso komituna mpo na koyeba ndenge nini bato mosusu batalelaka biso. Tóbosana te ete tozali “etaliseli mpo na mokili.” (1 Bakolinti 4:9) Na 2 Bakolinti 6:3, 4 (NW) tozali kotánga toli malamu oyo ntoma Paulo apesi: “Tozali kobɛtisa moto libaku ata na likambo moko te, ezala ata ndenge nini mpo báloba mabe na mosala na biso te. Kasi na makambo nyonso tozali komimonisa lokola basaleli ya Nzambe.”
Kasi, kosala makasi mpo na kozala moto malamu elimboli nini? Yango elimboli nde komikumisa to kobenda likebi ya bato mosusu likoló na biso to likoló na makoki na biso? Te. Yango elimboli kosalela maloba oyo ezali na 1 Petelo 2:12, ete: “Bózala na bizaleli na bino malamu kati na bapakano ete . . . awa ekomona bango misala na bino malamu, bákumisa Nzambe.” Baklisto basalaka makasi ete bázala bato malamu kaka na maloba te kasi na bizaleli na bango! Na nsuka, yango ekumisaka biso te, kasi ekumisaka Nzambe. Atako bongo, soki tozali kosala makasi mpo na kozala bato malamu, ekoki mpe komemela biso matomba. Tótalela sikoyo makambo misato oyo ekomonisa ndenge yango ekoki kosalema epai na yo.
Salá makasi mpo ozala mobali malamu to mwasi malamu
Tókamata ndakisa ya libala. Libala ezali likabo ya Yehova Nzambe, ye “oyo mabota nyonso na Likoló mpe na nse mazwi nkombo uta na ye.” (Baefese 3:15) Mbala mosusu okanaka ete mokolo mosusu okobala. Soki ezali bongo, ozali mpenza kosala makasi mpo na kozala mobali malamu to mwasi malamu? Lokola ozali naino monzemba, bato mosusu batalelaka yo ndenge nini?
Na mikili mosusu, soki moto alingi kobala, ezala libota ya mwasi to ya mobali, batalelaka mpenza likambo yango. Na ndakisa, na Ghana, ntango bato mibale balingi kobalana, bayebisaka baboti na bango mpe baboti bayebisaka bandeko mosusu na libota. Na nsima, libota ya mobali elukaka koyeba malamumalamu lokumu nini mwana mwasi wana azali na yango na esika afandi. Soki baboti ya mobali bamoni mpenza ete mwana mwasi yango abongi, bakoyebisa libota na ye ete mwana na bango ya mobali alingi kobala mwana na bango. Libota ya mwasi mpe bakoluka kotalela lokumu ya mwana mobali wana liboso bándima libala yango. Yango wana, lisese moko ya bato ya Ghana elobaka ete: “Liboso ya kobala, tuná baoyo bayebi.”
Bongo na mikili ya Mpoto, epai moto na moto aponaka mwasi to mobali na ye ye moko? Ata kuna, moklisto ya mayele, oyo akɔmeli na elimo, akoluka koyeba lokumu ya moto oyo alingi kobala epai ya bato oyo bayebi ye malamu, lokola baboti to baninga oyo bakɔmeli na elimo. Buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota elobi ete mwasi akoki komituna boye: “ ‘Mobali oyo ayebani lolenge nini? Banani bazali baninga na ye? Azalaka na komipekisa? Lolenge nini atalelaka mibange? Auti na libota ya lolenge nini? Azalaka na ezaleli ya lolenge nini kati na libota na ye? Ezaleli na ye ezalaka nini mpo na mbongo? Alekisaka ndelo na komela masanga? Asilikaka nokinoki, to mpe azalaka na ezaleli ya kobɛta? Mikumba nini azali na yango kati na lisangá, mpe lolenge nini azali kokokisa yango? Nakokoka mpenza kopesa ye limemya mozindo?’—Levitike 19:32; Masese 22:29; 31:23; Baefese 5:3-5, 33; 1 Timote 5:8; 6:10; Tito 2:6, 7.”a
Mobali mpe na ngámbo na ye akotuna bato mosusu mpo na koyeba lokumu ya mwasi oyo ye alingi kobala. Biblia emonisi ete Boaza asalaki bongo liboso abala Luta. Ntango Luta atunaki ye ete: “Nazali malamu na miso na yo boni ete okanisa ngai, awa ezali ngai mopaya?” Boaza apesaki eyano ete: “Yango nyonso esalaki yo . . . elobami nyonso na ngai.” (Luta 2:10-12) Ya solo, Boaza asukaki kaka te na komona ete Luta azali mwasi ya sembo, mwasi oyo amipesi mpe azali kosala mosala, kasi ayokaki lisusu ndenge bato mosusu bazalaki kokumisa ye.
Ndenge moko mpe, bizaleli na yo nde ekosala ete bato mosusu bámona soki okozala mobali malamu to mwasi malamu. Ozali mpenza kosala makasi mpo na kozala moto ya lolenge nini na likambo ya libala?
Salá makasi mpo ozala moto malamu na mosala
Soki ozali na bizaleli malamu na esika ya mosala, yango ekoki mpe komemela yo matomba. Kowelana ekoki kozala makasi na mosala. Mbala mingi, bakonzi balongolaka bato oyo batosaka te, bato oyo bakómaka ntango nyonso nsima ya ntango mpe bato oyo bazalaka sembo te. Mpo na kobimisa mbongo mingi te, bakompanyi mingi elongolaka bato oyo bayebi mpenza mosala na bango. Ntango bato oyo balongoli bango na mosala bakei koluka mosala mosusu, mbala mingi bakonzi ya bakompanyi batunaka na bakompanyi oyo bato wana basalaki liboso mpo na koyeba ndenge oyo bazalaki kosala mosala, bizaleli nini bazalaki na yango na mosala, mpe soki bayebi mpenza mosala. Baklisto mingi basalaki mpenza makasi mpo na kozala bato malamu na miso ya bakonzi na bango na mosala mpo bazalaki na botosi, na bopɔlɔ, bayebaki kofanda na bato mosusu mpe bazalaki na bizaleli ya baklisto.
Bakonzi ya mosala mingi balukaka mpenza bato oyo bazali sembo. Tosengeli kosala lokola ntoma Paulo, elingi koloba tosengeli “kosalaka malamu na makambo nyonso.” (Baebele 13:18) Na kompanyi moko ya mabanga ya ntalo na Ghana, bato ya mosala bazalaki koyiba mingi. Na departema oyo epɛtolaka mabanga, balongolaki bato nyonso, kaka mokonzi ya departema yango nde atikalaki, azalaki Motatoli. Mpo na nini atikalaki? Mpo azalaki moto ya sembo banda bambula mingi mpe bakonzi ya mosala bazalaki komona yango. Bayebaki ye lokola moto oyo asalaka mosala malamu mpe atosaka bakonzi. Ya solo, bosembo na ye esalisaki ye abatela mosala na ye!
Makambo nini mosusu moklisto akoki kosala mpo na kozala moto oyo abongi mpo na mosala? Yekolá kosala malamu na mosala nyonso oyo bapesi yo. (Masese 22:29) Salá mosala na molende mpe tyá makanisi na yo nyonso na mosala. (Masese 10:4; 13:4) Tosaká bakonzi ya mosala. (Baefese 6:5) Soki okómaka na mosala na ntango oyo ebongi, soki ozalaka sembo, soki osalaka mosala malamu mpe na makasi, bakonzi bakosepela na yo mpe yango ekosalisa yo ozwa mosala atako misala ezali komonana mpenza te.
Mikumba na lisangá
Lelo oyo lisangá ezali na mposa ya mibali mingi koleka, mibali oyo bakɔmeli na elimo, mpo na kotambwisa lisangá. Mpo na nini? Mpamba te Yisaya asakolaki ete: “Fulisá na monene esika na hema na yo, tiká ete bilamba na efandelo na yo bisembolama.” (Yisaya 54:2) Esakweli oyo ezali kokokisama na ndenge oyo lisangá ya Yehova na mokili mobimba ezali se kokola.
Yango wana, soki ozali mobali moklisto, ndenge nini okoki kosala makasi mpo na kozala moto oyo abongi mpo na kozwa mikumba? Talá ndakisa ya elenge Timote. Luka alobi ete “bandeko wana na Lusutula mpe Ikɔni batatoli malamu na ntina na [Timote].” Lokola azalaki na bizaleli malamu, elenge mobali yango azalaki na lokumu malamu na mboka mibale. Yango wana, Paulo azwaki Timote mpo na kosala na ye mosala ya misionɛrɛ.—Misala 16:1-4.
Lelo oyo, ndenge nini moto akoki ‘kolinga kosala mosala ya mokɛngɛli’ na ndenge oyo Nzambe asepelaka? Na ntembe te, akokenda te kosala kampanye mpo bato bápona ye, kasi akomonisa bizaleli oyo ebongi mpo na kozwa mikumba. (1 Timote 3:1-10, 12, 13; Tito 1:5-9) Akoki mpe komonisa ete “azali na mposa ya mosala malamu” ntango azali kosakola mingi mpe kokómisa bato bayekoli. (Matai 24:14; 28:19, 20) Baoyo bazali komonisa ete bazali baklisto oyo bakoki kozwa mikumba, balukaka mpenza bolamu ya bandeko na bango ya elimo. Balandaka toli ya ntoma Paulo oyo elobi ete: “Bóbimisa makabo mpo na kozanga na Babulami; [bóyambaka, NW] bapaya.” (Baloma 12:13) Ntango mobali moklisto azali kosala makambo ya ndenge wana, akoki solo ‘komonisa ete azali mosaleli ya Nzambe.’
Salá makasi mpo ozalaka moto malamu ntango nyonso
Tokosala makasi mpo tózala bato malamu na maloba mpamba te to tokoluka “kosepelisa bato” te. (Baefese 6:6, Boyokani ya Sika) Tokoluka kozala bato malamu nde epai ya Yehova Nzambe, Mozalisi na biso, ntango tozali kolanda mibeko na ye na motema na biso mobimba. Soki ozali kokola na elimo mpe kolendisa boninga na yo na Yehova Nzambe, bato mosusu bakomona ete ozali kobongisa ndenge na yo ya kofanda na bandeko na yo na kati ya libota, na baninga ya mosala mpe na bandeko baklisto. Bakomona mpe ete ozali moto oyo azali kotɛngatɛnga te, ozali na bokatikati, na bososoli, ozali kokokisa mikumba na yo malamu mpe ozali na komikitisa. Yango ekosala ete bálinga yo mpe bámemya yo, mpe likambo eleki ntina ezali ete Yehova Nzambe akosepela na yo mpo osalaka makasi mpo na kozala moto malamu!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 19]
Baboti mingi balukaka koyeba lokumu ya moto oyo mwana na bango alingi kobala.
[Elilingi na lokasa 20]
Ndeko mobali akomonisa ete azali moto oyo abongi kozwa mikumba soki apesaka bato mosusu lokumu.