Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Yisaya—I
NTANGO Yehova atunaki ete: ‘Nakotinda nani? Nani akokende mpo na biso?’ Yisaya, mwana ya Amosa, ayanolaki ete, “Ngai oyo! Tindá ngai!” (Yisaya 1:1; 6:8) Banda wana, akómaki mosakoli. Bisakweli ya Yisaya ezali na Mokanda ya Biblia oyo ezali na nkombo na ye.
Yisaya nde akomaki mokanda yango, oyo elobeli makambo oyo esalemaki na boumeli ya mbula 46, kobanda na 778 liboso ya ntango na biso (L.T.B.) kino mwa moke nsima ya 732 L.T.B. Atako Mokanda yango ezali kolobela bitumbu oyo Yehova akatelaki Yuda, Yisalaele mpe bikólo oyo ezalaki zingazinga na yango; yango te nde likambo eleki ntina na mokanda yango, kasi nde ‘lobiko ya Yehova Nzambe.’ (Yisaya 25:9) Nkombo Yisaya elimboli “lobiko ya Yehova.” Lisolo oyo ekolobela makanisi ya ntina oyo ezwami na Yisaya 1:1–35:10.
“MWA NDAMBO YA BATIKALI BAKOZONGA”
Biblia eyebisi te soki Yisaya akomaki mikapo mitano ya liboso ya mokanda na ye liboso akóma mosakoli to te. (Yisaya 6:6-9) Kasi, emonani polele ete bato ya Yuda mpe ya Yelusaleme bazali na maladi ya elimo “longwa na litambe ya lokolo kino motó.” (Yisaya 1:6) Losambo ya bikeko ezalaki bipai nyonso. Bakonzi bakómaki kosala mabe. Basi bakómaki lolendo. Bato bazalaki kosalela Nzambe ya solo na ndenge oyo ebongi te. Yisaya azwaki mokumba ya kokende mpe kosakola ‘mpe kosakola lisusu, NW’ bato oyo bazalaki kokanga ntina te mpe bazalaki na mposa ya koyeba eloko te.
Sulia mpe Yisalaele bayokanaki mpo bákende kobundisa Yuda. Yehova asalelaki Yisaya mpe bana na ye lokola “bilembo mpe bikamwiseli” mpo na komonisa Yuda ete Sulia ná Yisalaele bakolonga bango te. (Yisaya 8:18) Kimya ya libela ekouta kaka na boyangeli ya “Nkolo ya kimya.” (Yisaya 9:6, 7) Asulia, ekólo oyo Yehova asalelaki lokola ‘lingenda ya nkanda na ye,’ ekozwa etumbu. Nsukansuka, Yuda ekokende na boombo, kasi “mwa ndambo ya batikali bakozonga.” (Yisaya 10:5, 21, 22) Bokonzi ya “etape moke [oyo] ekobima na ekumu ya Yese” nde ekotya boyengebene ya solosolo.—Yisaya 11:1, NW.
Biyano na mituna ya Biblia:
1:8, 9, NW—Ndenge nini mwana mwasi ya Siona “atikali lokola mwa ndako ya matiti na kati ya elanga ya vinyo, lokola mwa ndako ya mokɛngɛli ya elanga ya kɔkɔmbrɛ”? Maloba yango elimboli ete ntango Asulia ekokɔta, Yelusaleme ekozala ata na makasi moke te, lokola mwa ndako ya matiti na kati ya elanga ya vinyo to mwa ndako na elanga ya kɔkɔmbrɛ oyo eumelaka te kokwea. Kasi, Yehova akosunga Yelusaleme mpe akotika te ete ekóma lokola Sodoma ná Gomola.
1:18, NW—Maloba ‘Bóya tóbongisa likambo,’ elimboli nini? Maloba yango elimboli te ete Yehova azali kobenga bango báfanda mpo na kobongisa makambo, kasi vɛrsɛ yango emonisi nde ete Yehova, mosambisi ya sembo, apesi Yisalaele libaku ya kobongwana mpe komipɛtola.
6:8a—Mpo na nini maloba “nakotinda” mpe “biso” esalelami awa? Maloba “nakotinda,” ezalaki mpo na ye moko Yehova Nzambe. Maloba “biso,” emonisi ete Yehova azali na moto mosusu elongo. Na ntembe te, ezali ‘mwana na ye mobotami-se-moko.’—Yoane 1:14; 3:16.
6:11—Yisaya alingaki koloba nini ntango atunaki ete: “Ɛ [Yehova] kino ntango nini?” Mposa ya Yisaya ezalaki te ya koyeba kino ntango nini akokoba kosakola nsango ya Yehova epai ya bato oyo balingi koyoka te. Kasi, alingaki nde koyeba kino ntango nini Bayisalaele oyo bazali na maladi ya elimo bakokoba koyokisa nkombo ya Nzambe nsɔni.
7:3, 4—Mpo na nini Yehova abikisaki Ahaza, mokonzi mabe? Mokonzi ya Asulia ná Yisalaele basalaki mwango mpo na kolongola Ahaza, mokonzi ya Yuda, mpo bátya na esika na ye mwana na Tabele, mokonzi oyo azalaki mokitani na Davidi te, mpo bango moko bákonza ye. Mwango wana ya mabe elingaki kobebisa kondimana oyo Yehova asalaki na Davidi mpo na Bokonzi. Yehova abikisaki Ahaza mpo molɔngɔ ya bankɔkɔ oyo “Nkolo ya Kimya” asengelaki kobima ebunga te.—Yisaya 9:6, NW.
7:8, NW—Ndenge nini Efelaima ‘ebukanaki’ nsima ya mbula 65? Babandaki kolongola bato na bokonzi ya mabota zomi mpe kotya bapaya na mboka yango “na mikolo ya Peka, mokonzi ya Yisalaele,” mwa moke nsima ya ntango oyo Yisaya asakolaki likambo wana. (2 Mikonzi 15:29) Ekobaki tii na mikolo ya Esala-Hadono, mokonzi ya Asulia oyo azalaki mwana mpe mokitani ya Senakeliba. (2 Mikonzi 17:6; Ezela 4:1, 2; Yisaya 37:37, 38) Emonani mpenza ete kolongola Bayisalaele na Samaria mpe kotya bato mosusu na esika na bango eumelaki mbula 65 ndenge Yisaya 7:8 elobi.
11:1, 10, NW—Ndenge nini Yesu Klisto akoki kozala ‘etape moke oyo ebimi na ekumu ya Yese’ mpe ‘Mosisa ya Yese’? (Baloma 15:12) Yesu azalaki “etape moke ebimaki na ekumu ya Yese” ntango abotamaki lokola moto. Azalaki nkɔkɔ ya Yese, na nzela ya mwana na ye Davidi. (Matai 1:1-6; Luka 3:23-32) Ntango Yesu akómaki mokonzi, yango ebongolaki makambo kati na ye ná bankɔkɔ na ye. Lokola azwi nguya mpe bokonzi mpo na kopesa bato ya botosi bomoi ya seko awa na mabelé, Yesu akómi ‘tata na bango ya seko.’ (Yisaya 9:6) Kutu, azali mpe “Mosisa” ya bankɔkɔ na ye, ata mpe Yese.
Mateya mpo na biso:
1:3. Soki tozali koboya kotosa makambo oyo Mozalisi na biso azali kosɛnga biso, ekomonana ete ata ngɔmbɛ to mpunda baleki biso na mayele. Kasi, soki tozali na botondi mpo na nyonso oyo Yehova azali kosala mpo na biso, tokomitambwisa na bozoba te mpe tokotika ye te.
1:11-13. Milulu ya lokuta mpe mabondeli ya likolólikoló ya bakonzi ya mangomba esepelisaka Yehova te. Ntango tozali kosala makambo mpe kobondela, tosengeli kosalaka yango na makanisi ya malamu.
1:25-27; 2:2; 4:2, 3. Bayuda bakendaki na boombo mpe mboka na bango ebebisamaki. Boombo mpe kobebisama yango esukaki ntango batikali ya Yuda oyo babongolaki motema, bazongaki na Yelusaleme mpe bazongisaki losambo ya solo. Yehova alimbisaka bato mabe oyo babongolaka motema.
2:2-4. Soki tozali na molende na mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi mpe ya kokómisa bato bayekoli, yango ekosalisa bato ya bikólo mingi báyekola kimya mpe báluka kofanda na bato nyonso na kimya.
4:4. Yehova akolongola to akopɛtola bato na mbindo mpe nyongo nyonso ya makila.
5:11-13. Kozanga bokatikati ntango tozali kopona lolenge ya kominanola ezali kozanga komitambwisa na boyebi.—Baloma 13:13.
5:21-23. Bankulutu to bakɛngɛli basengeli te kozala na “mayele na miso na bango mpenza.” Basengeli mpe kozala na bokatikati na “komɛla masanga” mpe kozanga koponapona.
11:3a. Ndakisa mpe mateya ya Yesu emonisi ete kobanga Yehova epesaka esengo.
“[YEHOVA] AKOYOKELA YAKOBO MAWA”
Mokapo 13 kino 23 ezali kolobela bitumbu oyo Yehova akatelaki bikólo. Kasi, “[Yehova] akoyokela Yakobo mawa” mpe akosala ete bato ya mabota nyonso ya Yisalaele bázonga na mboka na bango. (Yisaya 14:1) Esakweli ya kobebisama ya Yuda oyo ezali na mokapo 24 kino 27 ezali mpe na elaka ya kozongisama. Yehova amonisaki nkanda na ye epai ya ‘balangwi masanga ya Efelaima [Yisalaele]’ mpo basanganaki na Sulia, mpe epai ya “nganga mpe [mosakoli, NW]” ya Yuda mpo balukaki koyokana na Asulia. (Yisaya 28:1, 7) Mawa na “Aliele [Yelusaleme]” mpo ‘abimaki mpe akitaki na Ezipito’ mpo na koluka libateli. (Yisaya 29:1; 30:1, 2) Kasi, esakolamaki ete bato oyo bakozala na kondima epai ya Yehova bakobika.
Lokola ‘elenge na nkɔsi akonguluma likoló na bilei,’ Yehova akobatela “ngomba ya Siona.” (Yisaya 31:4) Ezali mpe na elaka mosusu: “Talá! Mokonzi moko akoyangela na boyengebene.” (Yisaya 32:1, NW) Atako matumoli ya Asulia epai ya Yuda esalaki ete ata “bamemi-nsango ya kimya (NW),” bálela mingi mpenza, Yehova alakaki ete akobikisa bato na ye mpe ‘akolimbisa mabunga na bango.’ (Yisaya 33:7, 22-24) “Yehova asiliki na bikólo nyonso mpe azali na nkanda mpo na basoda na bango nyonso.” (Yisaya 34:2, NW) Yuda ekotikala mpamba libela na libela te. “Lisobe mpe esika ekauki ekosepela, lisobe ekoyoka esengo, ekobimisa [fololo] na habeselete.”—Yisaya 35:1.
Biyano na mituna ya Biblia:
13:17—Na ndenge nini Bamede bazalaki komona palata eloko mpamba mpe bazalaki kosepela na wolo te? Mpo na Bamede ná baperse, kolonga na etumba ezalaki na motuya mingi koleka biloko oyo bapunzi baninga na bango. Yango emonanaki ntango Sirise apesaki Bayisaele oyo bazongaki na mboka na bango bisaleli ya wolo mpe ya palata oyo Nebukadanesala abɔtɔlaki na tempelo ya Yehova.
14:1, 2—Ndenge nini bato ya Yehova bakómaki “kokanga baombo baoyo bakangaki bango liboso” mpe “bazalaki na bokonzi likoló ya baoyo banyokolaki bango”? Esakweli yango ekokisamaki epai ya bato lokola Danyele, oyo akómaki mokonzi monene na Babilone, na boyangeli ya Bamede ná baperse; Esetele oyo akómaki mwasi ya mokonzi ya Perse; mpe Moledekai oyo akómaki ministre-mokonzi na bokonzi ya Perse.
20:2-5—Yisaya atambolaki mpenza bolumbu mbula misato? Ekoki kozala ete Yisaya alongolaki kaka bilamba na ye ya likoló mpe azalaki kotambola na bilamba ya kati.—1 Samwele 19:24.
21:1, NW—Etúká nini ebengamaki “esobe ya mbu”? Atako Babilone ezalaki pene na mbu ata moko te; babengi yango mbu, mpamba te mai ya Efalata mpe ya Tigre ezalaki kozindisa etúká yango na mpela mbula na mbula mpe kokómisa yango lokola “mbu” oyo etondi na pɔtɔpɔtɔ.
24:13-16, NW—Ndenge nini Bayuda bakómaki ‘na kati ya mabota lokola nzete ya olive oyo ebɛtɛmi mpe mbuma ya vinyo oyo elokɔtami nsima ya ntango ya kobuka’? Ndenge mwa bambuma etikalaka na nzete ya vinyo nsima ya ntango ya kobuka, kaka bato moke nde babikaki ntango Yelusaleme ná Yuda ebomamaki. Bato oyo batikalaki na bomoi basengelaki kokumisa Yehova na bisika nyonso oyo bazalaki komema bango, ezala na “etúká ya pole [Babilone na ɛsti]” to na “bisanga ya mbu ya [Meditelane].”
24:21—Banani bazali “limpinga ya likoló (NW)” mpe “mikonzi ya mokili”? “Limpinga ya likoló” ekoki kozala bilimu mabe. “Mikonzi ya mokili” ezali bakonzi ya mokili oyo bademo bazali kotambwisa.—1 Yoane 5:19.
25:7—“Ezipeli oyo etandisami likoló na bato nyonso mpe [elamba, NW] oyo etandisami [likoló] ya mabota nyonso” ezali nini? Maloba wana ya elilingi ezali komonisa banguna minene mibale ya bato: lisumu mpe liwa.
Mateya mpo na biso:
13:20-22; 14:22, 23; 21:1-9. Ndenge kaka esalemaki mpo na Babilone, bisakweli ya Yehova ezangaka te kokokisama.
17:7, 8. Atako bato mingi na Yisalaele bazalaki koyoka te, basusu batyelaki Yehova elikya. Ndenge moko mpe, bato mosusu na mangomba ya boklisto basepelaka na nsango ya Bokonzi.
28:1-6. Yisalaele ekokwea na mabɔkɔ ya Asulia, kasi Nzambe akobikisa bato ya sembo. Ata soki Yehova apesi bitumbu, moyengebene akozanga elikya te.
28:23-29. Yehova asembolaka moto na moto na ndenge ekoki na ye.
30:15 (Bible na lingala ya lelo oyo). Mpo Yehova abikisa biso, ezali kosɛnga ete tózala na kondima mpe ‘tókitisa mitema,’ elingi koloba tóluka te lobiko na nzela ya bibongiseli ya bato. Soki ‘tofandi kimya,’ elingi koloba tozali kobanga te, tokomonisa ete totyeli Yehova motema mpe akobatela biso.
30:20, 21. ‘Tomonaka’ Yehova mpe ‘toyokaka’ mongongo na ye ya lobiko ntango tozali kotosa makambo oyo azali koloba na nzela ya Biblia, Liloba na ye epemami, mpe na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.”—Matai 24:45.
Esakweli ya Yisaya elendisi biso tótyelaka Liloba ya Nzambe motema
Tosengeli mpenza komonisa botɔndi na nsango ya Nzambe oyo ezwami na Mokanda ya Yisaya. Bisakweli oyo esili kokokisama ezali kolendisa elikya na biso ete ‘liloba oyo ebimi na monɔkɔ ya Yehova ekozonga epai na ye mpamba te.’—Yisaya 55:11.
Ezali boni mpo na bisakweli oyo elobeli Masiya, lokola oyo ezali na Yisaya 9:7 mpe 11:1-5, 10? Ezali te kolendisa kondima na biso mpo na bibongiseli oyo Yehova azwi mpo na lobiko na biso? Mokanda yango ezali mpe na bisakweli oyo mingi kati na yango ezali kokokisama na mikolo na biso mpe mosusu ekokokisama na mikolo ezali koya. (Yisaya 2:2-4; 11:6-9; 25:6-8; 32:1, 2) Ya solo, Mokanda ya Yisaya emonisi mpenza ete “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi”!—Baebele 4:12.
[Elilingi na lokasa 8]
Yisaya ná bana na ye bazalaki “Bilembo mpe bikamwiseli kati na Yisalaele”
[Elilingi na lokasa 9]
Yelusaleme esengelaki kokóma “lokola mwa ndako ya matiti na kati ya elanga ya vinyo”
[Elilingi na lokasa 10]
Ndenge nini bato ya bikólo bazali koyekola ‘kotula mipanga na bango ete mizala bitimweli’?