Mokapo 15
“Nani abongi mpo na kofungola mokanda?”
1. Yoane amoni sikawa makambo nini kati na emonaneli?
MONENE! KOKAMWA! Oyo ezali solo maloba mabongi mpo na Emonaneli na kokamwa na kiti na bokonzi na Jéhovah katikati na miinda na móto, na bacheribɛ, na mikóló 24 mpe na libeke na talatala. Kasi Yoane, eloko nini omonaki nsima? Yoane atali na katikati na makambo nyonso wana na likoló, mpe na nsima alobi na biso: “Na loboko na mobali na mofandi na kiti na bokonzi, namonaki mokanda mosili kokomama na kati mpe na libanda, mpe mosili kokangama na bilembo nsambo. Namoni mpe anzelu makasi kosakola na mongongo makasi ete, nani abongi mpo na kofungola mokanda mpe kolingola bilembo na yango? Na likoló, na mokili, na nse na mokili, moto te akokaki kofungola mokanda soko kotala kati na yango. Ngai mpe nalelaki mingi mpo ete moto moko te azwami oyo abongi kofungola mokanda soko kotala kati na yango.”—Emoniseli 5:1-4.
2, 3. (a) Mpo na nini Yoane azali na mposa makasi na komona ete anzelu azwa moto abongi mpo na kofungola mokanda, nzokande eloko nini emonani? (b) Na eleko na biso, basaleli na Nzambe bapakolami bazelaki nini na motema móto?
2 Oyo asimbi mokanda wana mpe azali kopesa yango, ezali Jéhovah ye moko, Nkolo Moyangeli ya bikelamu nyonso. Makambo na ntina mingi mazali kati na mokanda yango, mpamba te ekomami na kati mpe na libanda. Ezali likambo na kokamwa. Nini ekomami kati na mokanda yango? Tomikundola ete Jéhovah abengaki Yoane boye: “Buta awa, mpe nakotalisa yo makambo makobima nsima.” (Emoniseli 4:1) Tozali bongo kozela na motema móto ntango oyo ekokoka na biso koyeba makambo makomami na mokanda yango. Kasi ho-la-la! Mokanda yango ezingami malamu mpe ekangami na bilembo nsambo!
3 Anzelu makasi akokoka kozwa moto oyo abongi mpo na kofungola mokanda yango? Engebene libongoli Kingdom Interlinear, mokanda mozali “na loboko mobali” ya Jéhovah. Liloba yango eyokisi ete Jéhovah alakisi mokanda yango oyo efandi na loboko na ye lofungwami. Kasi emonani ete moto moko te, ezala na likoló ezala na mabelé, moto moko te abongi mpo na kozwa mokanda yango mpe kofungola yango. Ata na nse na mabelé, kati na basaleli na sembo na Nzambe oyo basila kokufa, moto moko te amonani oyo akokisi masengami mpo na kozwa lokumu wana monene. Likambo yango esalaki Yoane mpasi mingi! Mbala mosusu akokoka koyeba te “makambo malingi kobima.” Bobele bongo na mikolo na biso, basaleli na Nzambe bapakolami na elimo bazelaki na motema móto ete Jéhovah atinda kongenga mpe solo na ye likoló na Emoniseli. Jéhovah atindaki yango mokemoke mpe na ntango ekoki mpo na kokokisama na esakweli oyo, mpo na kotambwisa libota na ye na nzela ya “lobiko kitoko.”—Nzembo 43:3, 5.
Ye oyo abongi
4. (a) Nani amonani ete abongi mpo na kofungola mokanda mpe bilembo na yango? (b) Mbano nini mpe libaku malamu nini kelasi na Yoane mpe baninga na bango bazali na yango?
4 Ee, ezali na moto abongi mpenza mpo na kofungola mokanda yango. Yoane alobi: “Nde moko na mikóló alobi na ngai ete, ‘Lela te, tala, nkosi oyo abimi na libota na Yuda, mosisa na Davidi, asili kolonga, na boye ete akoki kofungola mokanda na bilembo na yango nsambo.’” (Emoniseli 5:5) Yoane, tika kolela! Na mikolo na biso, kelasi na Yoane mpe baninga na bango na sembo bayikaki mpiko na mimekamo makasi na boumeli ya ebele na bambula, wana ezalaki bango kozela na motema petee ete bazwa kongengisama likoló na Emoniseli. Tala mbano kitoko tozwi sikawa ya kokoka kokanga ntina na emonaneli yango, mpe libaku malamu epesameli biso ya kosangana na kokokisama na yango na kosakolaka nsango oyo ezwami kati na yango!
5. (a) Esakweli nini epesamaki na ntina na Yuda, mpe epai wapi bakitani na Yuda bayangelaki? (b) Nani azali Shilo?
5 “Nkosi oyo abimi na libota na Yuda.” Yoane ayebi malamu esakweli ya Yakobo, nkoko na libota ya Bayuda, esakweli oyo apesaki yango na ntina na Yuda, mwana na ye na minei: “Yuda azali mwana na nkosi; olongwi na koboma nyama, mwana na ngai. Akumbisi mabolongo na ye, alali lokola nkosi mobali, mpe lokola nkosi nani akomeka kolamusa ye? Nzete na bokonzi ekolongwa na Yuda te mpe lingenda na mokonzi ekolongwa kati na makolo na ye te kino ekoya mokóló na yango [Shilo] mpe bato bakotosa ye.” (Genese 49:9, 10) Bakonzi oyo bazalaki koyangela likoló na libota na Nzambe bazalaki bakitani na Yuda. Kobanda na Davidi, bakonzi nyonso oyo bayangelaki na Yelusaleme kino na kobomama ya mboka yango na maboko na bato na Babilone, bazalaki banso bakitani na Yuda. Kasi moko te kati na bango akokisaki masengami mpo na kozala Shilo oyo Yakobo asakolaki ete akoya. Shilo elimboli “mokóló na yango.” Nkombo oyo ezalaki nkombo na esakweli mpo na Yesu, mokóló na bokonzi na Davidi mpo na libela.—Ezekiele 21:25-27; Luka 1:32, 33; Emoniseli 19:16.
6. Na ndimbola nini Yesu azalaki “etape” to “nzete ya sika” ebimi na Yese mpe “mosisa na Davidi”?
6 Yoane asosoli nokinoki nani oyo abengami ete “mosisa na Davidi.” Masiya alakamaki abengami kati na esakweli ete “etape . . . oyo ebimi na ekumu na Yese [tata na mokonzi Davidi],” “nzete ya sika” mpe “mosisa na Yese, oyo akotelema lokola elembo mpo na bikolo nyonso.” (Yisaya 11:1, 10) Lokola abotamaki na libota na bokonzi na Davidi, Yesu azalaki mwa nzete moke ebimi uta na Yese. Epai mosusu, lokola azali mosisa na Yese, azalaki Ye oyo abimisaki lisusu bokonzi na Davidi, kotelemisa yango mpe kopesaka yango lisungi mpo na libela.—2 Samwele 7:16.
7. Mpo na nini Yesu abongi mpo na kokamata mokanda na loboko na Ye oyo afandi na kiti na bokonzi?
7 Koleka moto nyonso mosika, Yesu moto na kokoka asalelaki Jéhovah na komimonisaka sembo atako azwaki mimekamo makasi. Apesaki eyano ya kokoka na ntembe oyo Satana abimisaki. (Masese 27:11) Butu oyo ezalaki liboso ete akufa lokola mbeka, akokaki bongo koloba: “Nasili kolonga mokili.” (Yoane 16:33) Yango wana, nsima na kosekwisa ye, Jéhovah apesaki ye “bokonzi nyonso . . . na likoló mpe na nse.” Na basaleli nyonso na Nzambe, bobele Yesu nde abongi kozwa mokanda mpo na koyebisa nsango na ntina mingi oyo ekomami kati na yango.—Matai 28:18.
8. (a) Makambo nini na ntina na Bokonzi mamonisi ete Yesu abongi mpo na kofungola mokanda? (b) Mpo na nini ebongi ete moko kati na mikóló 24 nde ayebisa na Yoane nani abongi mpo na kofungola mokanda?
8 Ebongi solo ete Yesu azala ye oyo abongi mpo na kofungola mokanda. Uta 1914, asili kokoma Mokonzi na Bokonzi oyo Nzambe apesi yango na Masiya; nzokande, mokanda yango ezali koyebisa makambo mingi na ntina etali Bokonzi yango mpe mosala oyo yango ekosala. Ntango azalaki awa na mokili Yesu asakolaki na bosembo nyonso solo na ntina etali Bokonzi yango. (Yoane 18:36, 37) Alakisaki bayekoli na ye ete basambelaka mpo na koya ya Bokonzi yango. (Matai 6:9, 10) Ntango asalaki lisangá ya boklisto, abandisaki mpe mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe asakolaki ete mosala yango ekokola mingi koleka na ntango na nsuka. (Matai 4:23; Malako 13:10) Ebongi mpe ete ezala moko na mikóló 24 ye nde ayebisa na Yoane ete Yesu akofungola bilembo ya mokanda yango. Mpo na ntina nini? Mpamba te mikóló yango, oyo bafandi na bakiti na bokonzi mpe bazali na mitolé to bikoti ya bokonzi na mitó na bango, bazali baoyo bazwi libula elongo na Klisto kati na Bokonzi na ye.—Baloma 8:17; Emoniseli 4:4.
‘Mwana na Mpate oyo asili kobomama’
9. Na esika ya komona nkosi, Yoane amoni nde nyama nini oyo atelemi “katikati na kiti na bokonzi,” mpe alobi nini na ntina na nyama yango?
9 Yoane aluki ete amona “nkosi oyo abimi na libota na Yuda.” Kasi tala likambo ya kokamwa! Amoni nde elilingi ya eloko mosusu: “Kati na kiti na bokonzi mpe na bikelamu na bomoi minei mpe kati na mikóló, namoni Mwana na Mpate kotelema, lokola soko asili kobomama, na maseke nsambo, na miso nsambo, mazali elimo nsambo na Nzambe etindami kati na mokili mobimba.”—Emoniseli 5:6.
10. Nani “mwana na mpate” oyo Yoane amonaki, mpe mpo na nini elembo yango ebongi?
10 Na centre, penepene na kiti na bokonzi, na kati na ba cercles esalemi na bikelamu na bomoi minei mpe na mikóló 24, Mwana na Mpate moko azali wana! Na ntembe te Yoane asosoli nokinoki ete Mwana na Mpate wana azali “Nkosi oyo abimi na libota na Yuda” mpe “mosisa na Davidi.” Mpamba te ayebi ete, mbula 60 na kala, Yoane Mobatisi alakisaki Yesu epai na Bayuda oyo bazalaki wana, alobelaki bango ete Yesu azali “Mwana na Mpate na Nzambe oyo azali kolongola lisumu na mokili.” (Yoane 1:29) Na boumeli ya bomoi na ye nyonso awa na mokili, Yesu amibebisaki soki moke te na makambo na mokili—azalaki lokola Mwana na Mpate oyo azangi litono mpo akoka kopesa bomoi na ye ezangi mbeba lokola mbeka mpo na bato.—1 Bakolinti 5:7; Baebele 7:26.
11. Mpo na nini ezali kozanga limemya te epai na Yesu akembisami na kolakisa ye na motindo na “mwana na mpate, lokola ete asili kobomama”?
11 Kasi awa Yesu asili kokembisama, kolakisa ye lokola “Mwana na Mpate oyo asili kobomama” ezali lokola kozanga limemya epai na ye te to mpe kokitisa ye te? Soki moke te. Bosembo oyo Yesu amonisaki kino na kufa na ye ekweisaki Satana mpe epesaki elonga monene epai na Jéhovah Nzambe. Elilingi oyo esalelami mpo na kolakisa Yesu emonisi na bonzenga nyonso elonga oyo azwaki likoló na mokili ya Satana mpe ekundoli bolingo mozindo oyo Jéhovah mpe Yesu bazali na yango mpo na bato. (Yoane 3:16; 15:13; tala Bakolose 2:15) Yesu alakisami bongo lokola Libota na ndaka, oyo akokisi masengami nyonso mpo na kofungola mokanda.—Genese 3:15.
12. Maseke nsambo ya Mwana na Mpate mazali elilingi ya nini?
12 Bizaleli nini ya “mwana na mpate” ebakisi limemya oyo tozali na yango epai na ye? Azali na maseke nsambo. Kati na Biblia, maseke mazalaka elilingi ya nguya to bokonzi, mpe motango nsambo elakisi eloko oyo esili kokoka. (Tala 1 Samwele 2:1, 10; Nzembo 112:9; 148:14.) Na yango, maseke nsambo ya mwana na mpate elakisi nguya oyo Jéhovah apesi na Yesu, na kokoka na yango nyonso. Ye atombwami “likoló na lokumu nyonso mpe bokonzi nyonso mpe nguya nyonso mpe bankolo nyonso mpe likoló na nkombo nyonso oyo ekolobamaka bobele na ntango oyo te kasi na ntango ekoya lokola.” (Baefese 1:20-23; 1 Petelo 3:22) Yesu asili kobanda koyangela uta 1914, mbula oyo Jéhovah atiaki ye Mokonzi na likoló.—Nzembo 2:6.
13. (a) Miso nsambo ya Mwana na Mpate mazali elilingi ya nini? (b) Mwana na mpate asali nini sikawa?
13 Epai mosusu, Yesu atondi na elimo santu; ezali yango emonisami na miso nsambo ya Mwana na Mpate, oyo “elakisi elimo nsambo na Nzambe.” Yesu azali nzela oyo Jéhovah azali kosalela mpo na kosopa likoló na basaleli na ye na mabelé nguya na ye oyo ekosalaka mosala, kati na kokoka na yango nyonso. (Tito 3:6) Mpe ezali na nzela na elimo yango nde Yesu azali komona uta makóló makambo mazali koleka awa na mabelé. Lokola Tata na ye, azali na bososoli ya kokoka. Ezali na eloko moko te oyo akoki kozanga komona yango. (Tala Nzembo 11:4; Zakaria 4:10.) Emonani polele ete Mwana yango—moto na sembo oyo alongaki mokili; Nkosi oyo abimi na libota na Yuda; mosisa na Davidi; ye oyo apesaki bomoi na ye mpo na bato; ye oyo azali na bokonzi ya kokoka, azali na elimo santu kati na kokoka na yango nyonso mpe azali na bososoli ya kokoka uta na Jéhovah Nzambe—ee, Mwana yango abongi mpenza mpo na kokamata mokanda na loboko ya Jéhovah. Akakatani mpo na kokokisa mokumba yango kati na lisanga ya nkembo ya Jéhovah? Te! Totangi nde boye ete “akei, akamati mokanda na loboko ya mobali na mofandi na kiti na bokonzi.” (Emoniseli 5:7) Oyo nde ndakisa malamu ya botosi kozanga kopusama!
Nzembo na makumisi
14. (a) Bikelamu na bomoi minei mpe mikóló 24 basali nini ntango Yesu akamati mokanda? (b) Ndenge nini makambo mayebisami na Yoane na ntina na mikóló 24 mamonisi soki bazali banani mpe nini ezali etelemelo na bango?
14 Bamosusu oyo batelemi liboso na kiti na bokonzi na Jéhovah basali nini na ntango yango? “Wana esili ye kokamata mokanda yango, bikelamu na bomoi yango minei mpe mikóló yango ntuku mibale na minei, bakwei liboso na Mwana na Mpate, mpe bazalaki moko moko na nzenze mpe na mbeki na wolo etondi na malasi oyo ezali mabondeli na babulami.” (Emoniseli 5:8) Lokola bikelamu na bomoi minei, elingi koloba bacheribɛ minei oyo batelemaka liboso na kiti na bokonzi na Nzambe, mikóló 24 bangumbami liboso na Yesu, komonisaka bongo ete bandimi bokonzi na ye. Kasi bobele bankulutu yango nde bazali na nzenze mpe na mbeki na malasi.a Mpe bobele bango nde bayembi sikawa loyembo na sika. (Emoniseli 5:9) Bakokani bongo na babulami 144 000 ya “Yisraele na Nzambe,” mpo ete bango mpe bazali na nzenze mpe bazali koyemba loyembo ya sika. (Bagalatia 6:16; Bakolose 1:12; Emoniseli 7:3-8; 14:1-4) Epai mosusu, mikóló 24 balakisami ete bazali kosala mosala ya bonganga kuna na likoló. Mosala yango elakisamaki na elilingi na mosala oyo banganga ya kala ya Yisraele bazalaki kosala, oyo bazalaki kotumba malasi liboso na Jéhovah kati na tabernakle—mosala yango esukaki na mabelé ntango Nzambe alongolaki mibeko na Moïse na kobakisaka yango na nzete esika moko na Yesu. (Bakolose 2:14) Tokosukisa nini na nyonso oyo? Boye ete eteni oyo elobeli balongi bapakolami na elimo bazali kokokisa mosala mosili kopesamela bango, oyo ya ‘banganga na Nzambe mpe na Klisto, oyo bakoyangela na ye elongo mbula nkoto.’—Emoniseli 20:6.
15. (a) Na Yisraele, bobele nani azalaki na libaku malamu ya kokota kati na esika Eleki-Bosantu na tabernakle? (b) Mpo na nini ezalaki likambo etali bomoi mpo na nganga monene ete atumba mpaka na malasi wana ezalaki ye kokota kati na esika Eleki-Bosantu? Tanga Levitike 16:12, 13.
15 Na Yisraele ya kala, bobele nganga monene nde azalaki kokota na esika Eleki-Bosantu, mpo na komonana liboso na Jéhovah, oyo azalaki wana na elilingi. Esengelaki na ye kozala na mpaka na malasi soki te mbele akokufa. Mpamba te mobeko na Jéhovah ezalaki boye ete: “Na nsima [Arona] akokamata mbeki na kotumba mpaka na malasi etondi na makala na mɔ́to longwa na etumbelo liboso na Jéhovah, mpe maboko mibale matondi na mpaka na malasi etutami mokemoke, mpe akoya na yango nsima na elamba mpe akotya mpaka na malasi na likoló na mɔ́to liboso na Jéhovah, ete lipata na molinga na mpaka na malasi ezipa ebonga na ngolu oyo ezali na likoló na Litatoli ete akufa te.” (Tanga Levitike 16:12, 13.) Soki atumbi mpaka na malasi te, nganga monene akokaki te kokota kati na esika Eleki-Bosantu mpe kotikala na bomoi.
16. (a) Kati na ebongiseli ya boklisto, nani azali kokota kati na esika Eleki-Bosantu ya elilingi? (b) Mpo na nini baklisto bapakolami basengeli ‘kotumba mpaka na malasi’?
16 Na ebongiseli ya boklisto, bobele nganga monene te, elingi koloba Yesu, kasi lisusu mokomoko na banganga mike 144 000 bakokota kati na esika Eleki-Bosantu ya solosolo, esika oyo Jéhovah azali wana kati na makoló. (Baebele 10:19-23) Banganga wana balakisami awa na mikóló 24 bakoki kokota kati na Esika-Eleki-Bosantu bobele soki ‘bakotumba mpaka na malasi,’ elingi koloba komatisa ntango nyonso malombo mpe mabondeli epai na Jéhovah.—Baebele 5:7; Yuda 20, 21; tala Nzembo 141:2.
Loyembo na sika
17. (a) Loyembo nini ya sika mikóló 24 bazali koyemba? (b) Na ndimbola nini liloba “loyembo na sika” esalelami mingimingi kati na Biblia?
17 Sikawa loyembo moko kitoko eyembami mpo na kokumisa Mwana na Mpate. Eyembami na mikóló 24, banganga oyo bakosala na ye mosala elongo: “Bayembi loyembo na sika ete: ‘Obongi na kokamata mokanda yango mpe na kofungola bilembo na yango, mpo ete obomami mpe na makila na yo osikoli mpo na Nzambe bato na mikili nyonso, na minoko nyonso, na bikolo nyonso mpe na mabota nyonso.’” (Emoniseli 5:9) Liloba “loyembo na sika” emonani mbala mingi kati na Biblia. Ezalaka mingimingi mpo na kokumisa Jéhovah na ntina na misala na ye ya nguya mpo na kobikisa bato na ye. (Nzembo 96:1; 98:1; 144:9) Loyembo ezali ya sika mpamba te moyembi akoki sikawa kosakola misala kitoko mpe ya sika ya Jéhovah mpe komonisa limemya makasi mpo na nkombo na Ye ya nkembo.
18. Mpo na bantina nini mikóló 24 bazali kokumisa Yesu na loyembo na bango ya sika?
18 Nzokande, awa mikóló 24 bazali koyemba loyembo ya sika liboso na Yesu, kasi liboso na Jéhovah te. Ata bongo libongwani mpenza ezali te. Bazali kokumisa Yesu mpo na makambo ya sika oyo asali mpo na bolamu na bango, na motindo na ye ya Mwana na Nzambe. Na nzela na makila na ye, asalaki mosala ya moyokanisi ya kondimana ya sika mpe akokaki bongo kobimisa libota ya sika oyo ezali mpo na Jéhovah mpenza. (Baloma 2:28, 29; 1 Bakolinti 11:25; Baebele 7:18-25) Basangani na libota oyo ya sika ya elimo bauti na mabota mingi, kasi Yesu ayanganisi bango na lisangá se moko, na libota se moko.—Yisaya 26:2; 1 Petelo 2:9, 10.
19. (a) Lipamboli nini libota na Yisraele na mosuni bazwaki te mpo ete bazangaki botosi? (b) Lipamboli nini libota ya sika ya Jéhovah ezali bongo na lotomo ya kozwa?
19 Ntango Jéhovah abongisaki Bayisraele lokola libota na mikolo na Moïse, asalaki kondimana elongo na bango mpe alakaki bango ete soki bakobatela kondimana yango, bakozala mpo na ye bokonzi na banganga. (Exode 19:5, 6) Kasi Bayisraele bazalaki na botosi te; yango wana bamonaki te kokokisama na elaka oyo. Nzokande, libota ya sika oyo esalami na nzela na kondimana ya sika oyo Yesu azali moyokanisi na yango, ezali ntango nyonso sembo. Basangani na yango bakoki bongo koyangela mabelé mpe kozala banganga, kosalisaka bato ya sembo ete bayokana elongo na Jéhovah. (Bakolose 1:20) Ezali yango mpenza oyo loyembo ya sika emonisi na maloba oyo: “Mpe ozalisi bango bokonzi na banganga mpo na Nzambe na biso, mpe bakozala bakonzi na mokili.” (Emoniseli 5:10) Oyo nde esengo mpo na mikóló oyo 24 na koyemba loyembo oyo ya sika mpo na kokumisa Yesu oyo asili kokembisama!
Ebele na bayembi na likoló
20. Loyembo nini ya makumisi eyembami sikawa mpo na lokumu ya Mwana na Mpate?
20 Bamosusu kati na lisangá monene ya Jéhovah na likoló basali nini awa eyoki bango loyembo yo ya sika? Esimbaki solo Yoane na motema na komona bango kolakisa na motema mobimba mayoki motindo moko: “Namoni mpe nayoki mingongo na baanzelu mingi bazingi kiti na bokonzi, mpe bikelamu na bomoi, mpe mikóló; motuya na bango ezalaki makiasi na makiasi mpe nkoto na nkoto, balobi na mongongo makasi ete, Mwana na Mpate oyo asili kobomama abongi na kozwa nguya, na bozwi, na mayele, na makasi, na lokumu, na nkembo, na masanzoli.” (Emoniseli 5:11, 12) Ezali solo loyembo oyo esimbi motema!
21. Masanzoli oyo mapesami epai na Mwana na Mpate mazali kotemela bokonzi to etelemelo na Jéhovah?
21 Yango elingi koloba ete uta sikawa Yesu akamati esika ya Jéhovah Nzambe mpe bikelamu nyonso babandi kokumisa ye, na esika ete bakumisa Tata na ye? Soko moke te! Loyembo oyo ya makumisi ekokani na maloba oyo ya ntoma Paulo: “Nzambe atomboli ye [Klisto] mingi mpe apesi ye nkombo koleka nkombo mosusu nyonso, mpo ete na nkombo na Yesu mabolongo nyonso mosusu makumbama, yango na likoló mpe yango na mabelé, mpe yango na nse na mokili, mpe ete ndemo nyonso eyambolaka ete Yesu Klisto ye Nkolo mpo na nkembo na Nzambe Tata.” (Bafilipi 2:9-11) Na eteni oyo, Yesu akumisami mpo na mosala monene asali liboso na bikelamu nyonso, mpo na kosilisa ntembe oyo eleki monene kati na nyonso: kolongisa Jéhovah ete akoki mpo na kozala Moyangeli na bikelamu na ye nyonso. Solo, ezalela na ye ebimisaki nkembo mingi mpo na Tata na ye!
Loyembo eyei monene koleka
22. Mingongo miuti na mabelé misangani mpo na koyemba loyembo nini?
22 Yoane amonaki ete ebele na bikelamu na likoló bazali koyemba mpo na kokumisa Yesu, komonisaka bongo ete bandimi bosembo na ye mpe bokonzi na ye na likoló. Loyembo yango eyei lisusu makasi koleka, mpamba te mingongo misusu miuti na mabelé, mingongo oyo mizali mpe kokumisa Tata mpe Mwana. Ata na kati na bato, soko mwana asali likambo moko ya malamu ekoki kozala lokumu monene mpo na baboti na ye; bobele bongo kati na bikelamu nyonso, bosembo na Yesu ezali nyonso “mpo na nkembo na Nzambe Tata.” Yango wana Yoane alobi lisusu boye: “Mpe nayoki bikelamu nyonso, oyo na likoló, mpe na mokili, mpe na nse na mokili, mpe na mai monene, na biloko nyonso na kati na yango lokola, koloba ete, ‘Na Mofandi na kiti na bokonzi, mpe na Mwana na Mpate, masanzoli, na lokumu, na nkembo, na makasi, ezala libela na libela!’”—Emoniseli 5:13.
23, 24. (a) Ndenge nini tokoki koyeba ntango oyo loyembo esengelaki kobanda na likoló mpe ntango oyo esengeli koyembama awa na mabelé? (b) Ndenge nini loyembo yango ezali koya makasi koleka na boumeli ya bambula?
23 Ntango nini loyembo oyo kitoko esengelaki koyembama? Ebandaki koyembama na ebandeli na mokolo na Nkolo. Nsima wana Satana mpe bilimu na ye mabe babwakamaki na nse kolongwa na makolo, “bikelamu nyonso bizali na likoló” babandaki koyemba elongo loyembo oyo ya makumisi. Epai mosusu, lokola makambo mamonisi yango, uta 1919 bibele na bikelamu na mabelé basangisaki mingongo na bango mpo na kokumisa Jéhovah; na ebandeli bazalaki mwa bankoto, kasi lelo oyo, na mobu 2005 bazali koleka milió motoba.b Nsima wana mokili oyo etambwisami na Satana ekosila kobomama, “bikelamu nyonso bizali . . . na mabelé” bakoyemba nzembo mpo na kokumisa Jéhovah mpe Mwana na ye. Na ntango oyo Jéhovah asili kobongisa, lisekwa ya bamiliare ya bakufi ekobanda, mpe “bikelamu nyonso bizali . . . na nse na mabelé” mpe oyo Nzambe abombi bango kati na makanisi na ye, bango mpe bakozwa libaku ya koyemba nzembo oyo.
24 Lelo oyo, ‘uta na nsuka na mokili, na mai monene mpe na bisanga,’ bamilió na bato bazali koyemba loyembo ya sika elongo na lisangá ya Jéhovah na mokili mobimba. (Yisaya 42:10; Nzembo 150:1-6) Nzembo oyo na esengo mpe na makumisi ekoya lisusu makasi koleka na nsuka na boyangeli ya Mbula Nkoto, ntango bato bakosila kotombwama na ezaleli ya kokoka. Nyoka na kalakala, mozimbisi monene, ye Satana, akobomama na nsima, mpo na kokokisa libela esakweli ekomami na Genese 3:15. Kolonga oyo ekopusa bongo bikelamu nyonso ya bomoi, ya elimo mpe bato, ete bayemba elongo loyembo oyo: “Na Mofandi na kiti na bokonzi, mpe na Mwana na Mpate, masanzoli, na lokumu, na nkembo, na makasi, ezala libela na libela!” Mongongo ya motemeli ekozala te kati na molongo mobimba.
25. (a) Kotanga lisolo na Yoane na ntina na loyembo oyo ya molongo mobimba ezali kopusa biso na kosala nini? (b) Wana emonaneli ekomi na nsuka na yango, ndakisa nini ya kitoko bikelamu minei na bomoi mpe mikóló 24 bapesi biso?
25 Ekozala solo eleko na esengo mingi! Na ntembe te, makambo Yoane ayebisi biso awa etondisi mitema na biso na esengo mpe ezali kopusa biso ete tosangisa mingongo na biso na oyo na ebele na bikelamu na likolo na koyembaka na motema na biso mobimba nzembo mpo na kokumisa Jéhovah Nzambe mpe Yesu Klisto. Koleka liboso, tozwi ekateli makasi ete tolanda na mpiko nyonso kosala misala malamu, boye te? Soki ee, tokoki kolikya ete na lisalisi ya Jéhovah, tokomona na miso na biso motindo emonaneli oyo ekokokana na mobimba na yango mpe na esengo nyonso; tokosangisa bongo mongongo na biso na loyembo ya makumisi oyo ekoyembama na molongo mobimba. Bikelamu na bomoi minei, to bacheribɛ, mpe baklisto bapakolami oyo basili kosekwisama bazali na bomoko makasi, mpamba te emonaneli oyo esuki na maloba oyo: “Bikelamu na bomoi minei balobi ete, Bobele bongo [Amen]! Mpe mikóló bakwei kosambela.”—Emoniseli 5:14.
26. Tosengeli kondimela nani, mpe Mwana na Mpate azali komibongisa mpo na kosala nini?
26 Moninga motangi, tika ete ozala na kondima kati na mbeka na Mwana na Mpate, ‘ye oyo abongi,’ mpe tika ete milende oyo ozali kosala na kosokema nyonso mpo na kosambela mpe mpo na kosalela Jéhovah, “Mofandi na kiti na bokonzi,” mikoka kopambolama! Zwa litomba na lisalisi oyo kelasi na Yoane bazali kopesa lelo na nzela na “bilei na ntango ekoki.” (Luka 12:42) Kasi tala! Mwana na Mpate abengami mpo na kofungola bilembo nsambo. Makambo nini ya kokamwa tokomona sikawa?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na kolandaka ndenge maloba yango makomami, “bazalaki mokomoko na nzenze mpe na mbeki na wolo etondi na malasi” maloba oyo makoki kotalela bankulutu to bikelamu minei ya bomoi. Nzokande, ba versets ya zongazonga na mokapo oyo emonisi polele ete maloba oyo matali se bankulutu 24.
b Tala tablo ezali na lokasa 64.
[Elilingi na lokasa mobimba 86]