Koya ya Masiya mpe boyangeli na ye
“Yesu oyo alongwi kati na bino mpe atombolami na likoló, akoya bobele motindo oyo emonaki bino ye kokenda na likoló.”—MISALA 1:11, MN.
1, 2. (a) Lolenge nini baanzelu mibale babɔndisaki bantóma na Yesu na ntango ye amataki na likoló? (b) Mituna nini mibimisami na ntina na elikya ya kozonga ya Klisto?
Mibali zomi na moko batɛlɛmaki na nkiteli ya ngomba ya bilaya, wana ezalaki bango kotala likoló. Mwa ntango moke, Yesu Klisto oyo azalaki kati na bango, amati na likoló mpe etangwi mokemoke kino azipami na lipata. Na boumeli ya bambula oyo balekisaki elongo na ye, mibali yango bamonaki wana Yesu azalaki kopesa ebele ya bilembeteli bimonisi ete azalaki Masiya; batungisamaki mingi mpo na liwa na ye, mpe bazalaki na nsai na lisekwa na ye. Sikawa, asili kokenda.
2 Baanzelu mibale babimi pwasa mpe bayebisi maloba oyo na kobɔndisa ete: “Mibali ya Galilai, mpo na nini botɛlɛmi wana kotaláká likoló? Yesu oyo alongwi kati na bino mpe atombolami na likoló, akoya bobele motindo oyo emonaki bino ye kokenda na likoló.” (Misala 1:11, MN) Ezalaki mpenza elendiseli—soki Yesu amataki na likoló, ezalaki te mpo na kokabwana libela na mabelé mpe bato! Kasi, Yesu asengelaki kozonga. Na ntembe te, maloba oyo matondisaki bantoma na elikya. Bobele bongo lelo, bamilio na bato mingi bazali mpe kopesa motuya monene na elaká ya kozonga ya Klisto. Basusu bazali kobenga yango ete “koya ya mibale” to “komonana.” Kasi, bato mingi bayebi te ndimbola mpenza ya kozonga ya Klisto. Na ndimbola nini Klisto akozonga? Ntango nini? Mpe lolenge nini yango etali bomoi na biso lelo?
Motindo oyo Klisto akozonga
3. Bato mingi bakanisi nini na ntina na kozonga ya Klisto?
3 Engebene mokanda An Evangelical christology, “koya na mibale to kozonga ya Klisto (parousia) ezali komonisa bokonzi ya Nzambe na lolenge ya sikisiki, na polele mpe mpo na libela.” Bato mingi bakanisi ete kozonga ya Klisto ekomonana polele na miso ya bafandi nyonso ya etando na biso. Mpo na kondimisa likanisi wana, mingi bazali kotanga Emoniseli 1:7, oyo elobi ete: “Tala, azali koya na mapata, mpe miso nyonso makomona ye, ata bango batɔbɔlaki ye.” Kasi verset oyo esengeli kolimbolama bobele motindo oyo yango ekomami?
4, 5. (a) Lolenge nini toyebi ete Emoniseli 1:7 elimbolami te na motindo oyo yango ekomami? (b) Lolenge nini maloba na Yesu ye moko bazali kondimisa lolenge wana ya kososola?
4 Tomikundola ete mokanda ya Emoniseli ekomami “na bililingi.” (Emoniseli 1:1) Na yango, mokapo oyo mosengeli kozala na elilingi; bongo, ndenge nini “baoyo batɔbɔlaki ye” bakoki komona kozonga ya Klisto? Bango nyonso basila kokufa esili koleka soko bikeke 20 sikawa! Lisusu, baanzelu balobaki ete Klisto asengelaki kozonga “bobele motindo” oyo ye akendaki. Bongo, ye akendaki motindo nini? Amonanaki na bamilió na bato? Te, bobele mwa ndambo na bandimi nde bamonaki likambo yango. Lisusu, ntango baanzelu balobaki na bango, bantoma bazalaki mpenza komona wana Klisto azalaki komata kino kokóma na likoló? Te, mpamba te lipata lizipaki Yesu liboso na bango. Na nsima, asengelaki koingela na makoló ya elimo lokola ekelamu ya elimo, oyo bato bakoki komona ye na miso te. (1 Bakolinti 15:50) Na bongo, bantoma bamonaki bobele ebandeli ya kotombolama na Yesu; bakokaki te komona nsuka na yango, kozonga na ye na likoló liboso ya Tata na ye, Jéhovah. Na yango, bakokaki bobele kososola na miso na bango ya kondima.—Yoane 20:17.
5 Biblia ezali koteya ete Yesu asengeli kozonga bobele motindo wana. Yesu ye moko alobaki liboso ya liwa na ye, ete: “Nsima na ntango moke, mokili ekomona ngai lisusu te.” (Yoane 14:19) Alobaki lisusu ete: “Bokonzi ya Nzambe ekoya na motindo ete bokomona yango te.” (Luka 17:20) Bongo, na ndimbola nini ‘miso nyonso makomona ye’? Mpo na koyanola, tosengeli liboso kokanga ntina ya maloba oyo Yesu mpe bayekoli na ye basalelaki na ntina na kozonga na ye.
6. (a) Mpo na nini maloba lokola “kozonga,” “kokóma,” “komonana,” ezali mpenza mabongoli malamu te ya liloba na Greke pa.rou.si’a? (b) Nini emonisi ete pa-rou-si‘a, to “koya,“ esengeli koumela ntango molai koleka likambo mpamba oyo lisengeli kosalema na eleko moko ya sikisiki?
6 Ezali solo ete, Klisto asengeli te bobele “kozonga” mpamba Liloba wana, mpe “kokóma” to “komonana,” elimboli likambo moko monene lisalemi na eleko moko ya sikisiki. Kasi, liloba ya Greke oyo Yesu mpe bayekoli na ye basalelaki, lizali na ndimbola monene. Ezali bongo liloba pa.rou.si’a, oyo elimboli mpenza “kozala elongo na” to “koya.” Balimboli mingi ya Biblia bandimi ete liloba wana elimboli bobele kokóma te, kasi elimboli lisusu koya oyo esengeli kolanda nsima—lokola na ntango mokonzi moko ya Leta akosalaka mibembo mpo na mosala. Koya wana ezali te bobele likambo lisengeli kosalema mpo na mwa ntango moke; ezali eleko ya ntina mingi mpe na lokumu. Na Matai 24:37-39, Yesu alobaki ete “koya [pa.rou.si‘a] ya Mwana na moto” ekozala lokola “na mikolo ya Noa” oyo misukaki na mpela. Noa atongaki masuwa mpe akebisaki basali na mabe bambula mingi liboso ete mpela eya mpo na koboma mokili wana mabe. Bobele bongo, koya ya Klisto oyo ezangi komonana esengeli koumela bambula mingi liboso ete esuka na kobomama monene.
7. (a) Nini emonisi ete pa-rou-si’a ekomonana na miso ya bato te? (b) Mikapo ya Makomami oyo mimonisi ete “miso nyonso” makomona kozonga ya Klisto, mikokokana lolenge nini mpe ntango nini?
7 Na ntembe te, pa-rou-si‘a ekoki te komonana na miso ya bato. Soki bongo, mpo na nini Yesu asengelaki lisusu kolekisa ntango, lokola tokomona yango, na kopesaka bayekoli na ye elembo oyo esengelaki kosalisa bango na kososola koya na ye?a Nzokande, ntango Klisto akoya koboma mokili ya Satana, koya na ye ekomonana mpenza na bato nyonso. Na ntango wana nde “miso nyonso makomona ye.” Ata banguna na ye bakososola, mpo na mawa na bango, ete boyangeli ya Klisto ezali likambo ya solo.—Tala Matai 24:30; 2 Batesaloniki 2:8; Emoniseli 1:5, 6.
Ebandaki ntango nini?
8. Likambo nini limonisaki ebandeli ya koya ya Klisto, mpe esalemaki epai wapi?
8 Koya ya Masiya ebandaki na likambo moko likokisaki bisakweli mingi na ntina na Masiya. Atyamaki Mokonzi na likoló. (2 Samwele 7:12-16; Yisaya 9:6, 7; Ezekiele 21:26, 27) Yesu ye moko amonisaki ete, koya na ye ekangani esika moko na bokonzi na ye. Kati na masese mingi, amikokisaki na moto oyo atiki ndako na ye mpe baombo na ye, mpe akei mobembo molai “na mboka mosika,” epai akozwa “nguya ya bokonzi.” Apesaki moko na masese yango mpo na koyanola na bantoma na ye oyo batunaki ye ntango pa-rou-si’a na ye esengelaki kobanda; apesaki mosusu mpamba te “bazalaki kokanisa ete bokonzi ya Nzambe ekomonana nokinoki.” (Luka 19:11, 12, 15; Matai 24:3; 25:14, 19) Na bongo, na ntango oyo azalaki na bomoi awa na mabelé lokola moto, kotyama na ye lokola mokonzi ezalaki naino mosika; esengelaki kosalema na “mboka mosika,” na likoló. Ntango nini?
9, 10. Elembeteli nini tozali na yango emonisi ete Klisto azali koyangela kati na likoló, mpe ntango nini abandaki koyangela?
9 Wana bayekoli na Yesu batunaki ye ete: “Elembo ya koya na yo mpe ya nsuka na biloko ya ntango oyo ekozala nini?” Yesu ayanolaki na koyebisáká bango makambo oyo masengelaki kobima na ntango ekoya. (Matai, mokapo 24; Malako, mokapo 13; Luka, mokapo 21; tala mpe 2 Timoté 3:1-5; Emoniseli, mokapo 6.) Elembo wana ezali elilingi emonisi eleko moko ya mobulu. Ezali ntango oyo etondi na bitumba ya mokili mobimba, koyikana na mabe, kobeba na bomoi ya libota, bamaladi oyo ekopalanganaka epai na bato mingi, nzala, mpe koningana ya mabelé—ezali bobele na mwa bisika te, kasi na mokili mobimba. Elembo oyo esili kokokana? Makambo mazalaki kobima mokolo na mokolo mamonisi ete makambo oyo Yesu ayebisaki, makokani mpenza na ekeke ya ntuku mibale.
10 Bakomi na makambo ya kala bandimi ete 1914 ezalaki mbongwana monene kati na Lisoló ya bato, mbula ya mbongwana oyo nsima na yango, bato bakokaki lisusu te kosilisa ebele na mikakatano wana mipalanganaki na mokili mobimba. Ee, makambo nyonso oyo mazali kobima na mokili mpo na kokokisama ya bisakweli ya Biblia, mamonisi ete 1914 ezali mbula oyo Yesu abandaki koyangela lokola Mokonzi na likoló. Lisusu, na kolanda mwango ya kotanga bileko, esakweli ezwami na Danyele mokapo 4, emonisi biso ete 1914 ezali mobu oyo Jéhovah atyaki Mokonzi mopakolami mpo ete abanda koyangela.b
Mpo na nini ezali eleko ya mobulu?
11, 12. (a) Mpo na nini bato mosusu bazali na mpasi mpo na kondima ete Klisto azali koyangela sikawa kati na likoló? (b) Tokoki kozwa ndakisa nini mpo na komonisa makambo oyo masalemaki nsima wana Yesu atyamaki lokola Mokonzi?
11 Atako bongo, bato mosusu bazali komituna ete, ‘Soki Masiya azali koyangela na likoló, mpo na nini mokili motondi na mobulu boye? Boyangeli na ye ezali mpenza malamu?’ Ndakisa moko ekoki kosalisa biso. Mboka moko eyangelami na prezida mabe. Mobali wana asala ebongiseli moko ya mabe mpenza oyo bopusi na yango ezali kokóma na bipai nyonso ya mboka. Kasi boponi (élection) esalemi; moto malamu alongi. Nini ekomonana? Lokola yango ezali kosalema na mikili ya démocratie, ntango moko ya mwa basanza ekoleka liboso ete prezida ya sika abanda koyangela. Lolenge nini mibali wana mibale basengeli komitambwisa na boumeli ya eleko wana? Moto malamu akowela nokinoki mpo na kolongola makambo nyonso mabe oyo masalemaki na mboka mobimba na moto oyo azalaki liboso na ye, mpe kobebisa yango? Akotalela libosoliboso kapitale, akosala boyangeli ya sika mpe akokata boyokani nyonso elongo na ebongiseli ya prezida ya kala, boye te? Na bongo, ntango akozwa bokonzi nyonso, akokoka koyangela longwa na esika na bosembo mpe na nguya. Nzokande prezida mabe, akosalela mwa ntango moke oyo etikali na ye mpo na kopunza biloko nyonso ya mboka oyo akoki kozwa litomba na nzela na misala ya lokoso, liboso ete abungisa bokonzi na ye, boye te?
12 Ya solo, ezali motindo moko mpo na pa-rou-si‘a ya Klisto. Emoniseli 12:7-12 emonisi ete ntango Klisto akómaki Mokonzi na likoló, abenganaki liboso Satana mpe bilimu mabe longwa na likoló, kopetoláká bongo esika ya bokonzi na Ye. Lokola alongamaki, likambo oyo lizelamaki uta ntango molai, Satana azali kosala nini na boumeli “ya ntango mokuse” liboso ete Klisto amonisa bokonzi na ye nyonso awa na mabelé? Lokola prezida wana mabe, azali kopunza biloko nyonso oyo akoki kozwa na ebongiseli oyo esili konuna. Azali na mposa ya mosolo te; azali nde na mposa na bomoi ya bato. Azali kosala nyonso ekoki na ye mpo na kotangola bato mingi longwa na Jéhovah mpe na Mokonzi na Ye oyo azali koyangela.
13. lolenge nini Makomami mamonisi ete ebandeli ya boyangeli ya Klisto esengelaki kozala eleko ya mobulu awa na mabelé?
13 Na yango, ezali likambo ya kokamwa te ete ebandeli ya boyangeli ya Masiya ezali ntango ya “mawa mpo na mabelé.” (Emoniseli 12:12) Bobele bongo, Nzembo 110:1, 2, 6 emonisi ete Masiya asengelaki kobanda koyangela ‘kati na banguna na ye.’ Bobele na nsima nde akobuka “mabota,” elongo na mitindo nyonso na makambo ya ebongiseli mabe oyo ya Satana, ete ekanisama lisusu te!
Ntango nini Masiya akoyangela mabelé
14. Masiya akosala nini wana akosilisa koboma ebongiseli ya biloko mabe ya Satana?
14 Nsima na koboma ebongiseli ya Satana mpe baoyo nyonso bazali kosalela yango, Mokonzi Masiya, Yesu Klisto, akokokisa bongo bisakweli kitoko ya Biblia na ntina na Boyangeli na ye ya mbula nkóto. Yisaya 11:1-10 ezali kosalisa biso na koyeba lolenge ya mokonzi nini oyo Masiya akozala. Verset 2 eyebisi biso ete akozala na “elimo ya Jéhovah . . . , elimo ya mayele mpe na bososoli, elimo ya toli mpe ya bokasi.”
15. ‘Elimo ya bokasi’ ekomonisa nini kati na boyangeli ya Masiya?
15 Tokanisa na lolenge oyo ‘elimo ya bokasi’ ekomonisama na boyangeli na Yesu. Ntango azalaki awa na mabelé, azalaki kozwa bokasi epai na Jéhovah, oyo ezalaki kosalisa ye na kosala makamwisi. Mpe amonisaki mposa ya solo mpo na kosalisa bato, kolobáká ete: “Nalingi.” (Matai 8:3) Kasi makamwisi oyo asalaki na ntango wana ezalaki mpo na komonisa oyo akosala na ntango akoyangela longwa na likoló. Yesu akosala makamwisi na mokili mobimba! Bato na maladi, bakufeli miso, bimimi, bibɔsɔnɔ, mpe batɛngumi bakobika mpo na libela. (Yisaya 35:5, 6) Bilei mingi oyo bikokabolama na motindo molongobani, ekosilisa nzala mpo na libela. (Nzembo 72:16) Ekozala boni mpo na bamilio ya bato oyo bazali kati na nkunda, baoyo bazali kati na makanisi ya Nzambe? “Bokasi” na Yesu ezali nguya oyo ye akosekwisa bango, mpo na kopesa likoki na moto na moto ete azala na bomoi ya seko kati na Paradis! (Yoane 5:28, 29) Kasi, atako azali na bokasi nyonso wana, Mokonzi Masiya akozala ntango nyonso na ezaleli ya komikitisa. “Asepeli na kotosa Jéhovah.”—Yisaya 11:3.
16. Mokonzi Masiya akozala Mosambisi ya motindo nini, mpe nini ekokesenisa ye na bato oyo bazali basambisi?
16 Mokonzi wana akozala mpe Mosambisi na kokoka. “Akosambisa te kobila oyo emonani na miso na ye, akokata te kobila oyo eyokami na matoi na ye.” Wapi mosambisi ya ntango ya kala to ya ntango na biso, oyo akokisi makambo oyo? Ata moto oyo azali na mayele akoki kosambisa bobele kobila oyo azali komona mpe koyoka, na kosalelaka mayele to bososoli oyo akoki kozala na yango. Yango wana basambisi mpe basangani ya esambiselo ya mokili oyo monuni, bakoki kopusama to kokosama na maloba ya lokutá, na likambo oyo lizali solo te to mpe na matatoli ya bongolabongola. Bobele bazwi mpe bato na nguya nde bakoki komonisa makanisi na bango, lokola nde bosembo esengelaki kosombama. Ekozala bongo te epai na Mosambisi Masiya! Ye akotalaka mitema. Eloko moko te ezangi komonana epai na ye. Bosembo oyo bosalelami elongo na bolingo mpe na motema mawa, ekotɔkisama te. Ekoumela seko.—Yisaya 11:3-5.
Boyangeli na ye etali yo na likambo nini
17, 18. (a) Makambo nini kitoko mpo na bato mamonisami na Yisaya 11:6-9 makosalema na ntango ekoya? (b) Esakweli wana ekokisami libosoliboso epai na nani, mpe mpo na nini? (c) Lolenge nini esakweli wana ekokokana na ndimbola na yango ya sikisiki?
17 Eyebani ete boyangeli ya masiya ezali na bopusi likolo na bato na yango. Ezali kobongola bato. Yisaya 11:6-9 emonisi bonene ya mabongwani oyo makosalema. Esakweli wana elobeli mpe banyama mabe—ngombolo mbwa ya zámba, nkoi, nkɔsi, nyoka monene—esika moko na banyama ya mboka oyo na yauli te mpe bana lokola. Nzokande banyama mabe wana ekobimisa soko likámá moko te! Mpo na nini verset 9 (MN) eyanoli ete: “Bakoyokisana mpasi te kati na ngomba na ngai mosantu mpe bakobebisana te, mpamba te mabelé mobimba makotónda na boyebi ya Jéhovah lokola kotonda na mai monene.”
18 Ya solo “boyebi ya Jéhovah” ekoki mpenza kozala na bopusi moko te likoló na banyama; na yango, ba verset wana esengeli libosoliboso kokokisama epai na bato. Boyangeli ya Masiya ezali kosala ebongiseli ya kolakisa bato na mokili mobimba, ete bayeba Jéhovah mpe banzela na ye, ete bamonisa bolingo, botosi mpe limemya epai na bazalani na bango. Kati na Paradis oyo ekoya, na likamwisi, Masiya akomema bato kino na ezalela ya kokoka kati na nzoto mpe na bizaleli. Bizaleli mabe mpe na yauli oyo esili kobebisa motindo na bato bazangi kokoka, ekozala lisusu te. Mpe, na ndimbola ya sikisiki, bato bakozala na kimya elongo na banyama!—Tala Genese 1:28.
19. Boyangeli ya Masiya ezali na bopusi nini likoló na bomoi ya bato na mikolo oyo ya nsuka?
19 Atako bongo, tomikundola ete Masiya azali koyangela sikawa. Uta sikawa, bato ya Bokonzi na ye bazali koyekola kozala na kimya, oyo ezali bongo kokokisa Yisaya 11:6-9 na lolenge mosusu. Mpe, uta mibu soko 80, Yesu asili kokokisa esakweli ya Yisaya 11:10, ete: “Na mokolo yango, ekozala na mosisa na Yisai oyo akotɛlɛma lokola bɛndɛlɛ mpo na mabota. Bato bakoluka ye mpe efandelo na ye ekozala na nkembo.” Bato ya mabota nyonso bakoluka ye. Mpo na nini? Mpo ete, uta azali koyangela, “akotɛlɛma lokola bɛndɛlɛ.” Amonisaki koya na ye na mokili mobimba na nzela ya ebongiseli ya kolakisama oyo tolobelaki liboso. Na yango, Yesu asakolaki ete mosala ya kosakola na mokili mobimba mosengelaki kozala elembo monene ya koya na ye liboso na nsuka ya ebongiseli oyo esili konuna.—Matai 24:14.
20. Bato nyonso ya boyangeli ya Masiya basengeli kolongola ezaleli nini, mpe mpo na nini?
20 Na yango, koya ya Klisto kati na nguya ya bokonzi ezali likanisi mpamba te, ezali lisoló ya bateolojié te, oyo ezangi kotalela biso. Boyangeli na ye ezali na bopusi mpe ezali kobongola bomoi ya bato awa na mabelé, lokola yango esakolamaki na Yisaya. Yesu asili kobimisa bamilio ya bato ya Bokonzi na ye longwa na ebongiseli mabe ya mokili oyo. Ozali mpe moko na bato yango? Na yango, salela Moyangeli na biso na molende mpe na esengo nyonso ekoki na ye! Ya solo, ezali mpasi te na kolɛmbisama to na kondima likanisi mabe ya mokili oyo ete: “Wapi elaka na koya na ye?” (2 Petelo 3:4) Kasi lokola Yesu ye moko alobaki yango, “ye oyo akoyika mpiko kino nsuka, akobika.”—Matai 24:13.
21. Lolenge nini mokomoko kati na biso akoki kopesa motuya mingi na elikya ya Masiya?
21 Mokolo na mokolo oyo mozali koleka, ezali kobɛlɛmisa biso na mokolo monene oyo Jéhovah akotinda Mwana na Ye ete amonisa koya na ye na mokili mobimba. Tolɛmbisa elikya na biso te mpo na mokolo wana. Tokanisa mingi likoló na Yesu Masiya mpe likoló na bizaleli na ye lokola Mokonzi oyo azali koyangela. Lisusu, tokanisa mingi mpenza mpo na Jéhovah Nzambe, mobandisi mpe ye oyo apesaki elikya monene na ntina na Masiya, oyo ezwami kati na Biblia. Soki osali bongo, na ntembe te, okosukisa lolenge moko na ntoma Paulo, oyo akomaki ete: “Ɛ bozwi mpe mayele mpe boyebi na Nzambe ezali mozindo boni!”—Baloma 11:33.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na 1864, teolojié R. Govett amonisaki likanisi yango, ete: “Yango ezali na ntina mingi mpo na ngai. Soki elembo ya Koya epesamaki, elingi koloba ete yango ezali likambo ya nkuku. Tozali na mposa te ete balakisa biso koya ya likambo oyo tozali komona.”
b Mpo na koyeba makambo mosusu. tala mokanda “Que ton royaume vienne,” nkasa 132-8.
Bozongeli
◻Klisto ezongaki motindo nini?
◻Lolenge nini toyebi ete pa.rou.si‘a ya klisto ekomonana te mpe ekoumela ntango molai?
◻Koya ya Klisto ebandaki ntango nini, mpe lolenge nini toyebi yango?
◻Masiya ozali Mokonzi ya likoló ya lolenge nini?
◻Lolenge nini boyangeli ya Klisto ezali na bopusi likoló na bomoi ya bato bayangelami na yango?
[Elilingi na lokasa 15]
Elikya oyo ete Yesu esengelaki kozonga ezalaki na motuya mingi epai na bantóma na ye ya sembo
[Elilingi na lokasa 17]
Longwa na esika azali koyangela na likoló, Yesu okosala makamwisi na mokili mobimba
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Earth: Based on NASA photo