Mokapo ya Zomi na Misato
Lobiko mpe esengo na boyangeli ya Masiya
1. Lobelá ezalela ya elimo ya bato oyo basalaki kondimana na Nzambe na mikolo ya Yisaya.
NA MIKOLO ya Yisaya, ezalela ya elimo ya bato oyo basalaki kondimana na Nzambe ezalaki mpenza mabe. Ata na ntango ya boyangeli ya bakonzi ya sembo, lokola Uziya mpe Yotama, mingi kati na bato yango bazalaki kosambela na bisika ya likoló. (2 Mikonzi 15:1-4, 34, 35; 2 Ntango 26:1, 4) Ntango Hizikiya akómaki mokonzi, asengelaki kolongola biloko mpe misala nyonso ya losambo ya Baala na ekólo yango mobimba. (2 Ntango 31:1) Ezali likambo ya kokamwa te ndenge Yehova asɛngaki basaleli na ye bázongela ye mpe akebisaki bango mpo na etumbu oyo ezalaki kozela bango!
2, 3. Maloba nini ya kolendisa Yehova alobi na bato oyo balingi kosalela ye atako makambo ya kozanga bosembo epalangani mingi?
2 Kasi, bango nyonso te nde bazalaki batomboki ya motó makasi. Yehova azalaki na basakoli ya sembo, mpe ekoki kozala ete Bayuda mosusu bazalaki koyoka bango. Yehova azalaki koloba na bango na maloba ya kobɔndisa. Nsima ya kolobela mpasi makasi oyo Yuda akokutana na yango ntango Asulia akokɔta, mosakoli Yisaya apemamaki mpo na kokoma moko na maloba oyo eleki kitoko na kati ya Biblia mobimba, alobeli mapamboli oyo ezali koya na ntango ya boyangeli ya Masiya.a Mapamboli yango mosusu ekokisamaki mwa moke ntango Bayuda bautaki na boombo na Babilone. Kasi esakweli yango mobimba ezali kokokisama nde na mikolo na biso. Ya solo, Yisaya na Bayuda mosusu ya sembo ya ntango na ye bazali na bomoi te mpo na komona mapamboli yango. Kasi lokola bazalaki na kondima, bazalaki kozela mapamboli yango na motema likoló mpe bakomona kokokisama ya maloba ya Yisaya ntango bakosekwa.—Baebele 11:35.
3 Basaleli ya Yehova na mikolo na biso bazali mpe na mposa ya kolendisama. Bango nyonso bakutanaka na makambo lokola kobeba ya bizaleli malamu, botɛmɛli makasi na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe bolɛmbu na bango moko. Maloba kitoko ya Yisaya oyo ezali kolobela Masiya mpe boyangeli na ye ekoki kolendisa mpe kosalisa basaleli ya Nzambe mpo báyikela mitungisi yango mpiko.
Masiya—Mokambi oyo abongi
4, 5. Yisaya asakolaki nini mpo na koya ya Masiya, mpe ndenge nini emonani lokola ete Matai asaleli maloba ya Yisaya?
4 Bikeke mingi liboso ya eleko ya Yisaya, Baebele mosusu oyo bakomaki Biblia balobelaki koya ya Masiya, Mokambi ya solosolo, oyo Yehova asengelaki kotinda na Yisalaele. (Genese 49:10; Deteronome 18:18; Nzembo 118:22, 26) Sikawa, na nzela ya Yisaya, Yehova abakisi makambo mosusu. Yisaya akomi ete: “Etape moke ekobima na ekumu ya Yisai; mpe mwa nzete moke oyo euti na misisa na ye ekobota mbuma.” (Yisaya 11:1, NW; kokanisá na Nzembo 132:11.) Maloba “etape moke” mpe “mwa nzete moke” nyonso mibale ezali komonisa ete Masiya akozala mokitani ya Yisai na nzela ya mwana na ye ya mobali Davidi, oyo apakolamaki mafuta mpo na kozala mokonzi ya Yisalaele. (1 Samwele 16:13; Yilimia 23:5; Emoniseli 22:16) Ntango Masiya ya solosolo akoya, “mwa nzete moke” yango oyo euti na ndako ya Davidi, esengeli kobimisa mbuma ya malamu.
5 Masiya oyo alakamaki ezali Yesu. Matai, moko ya bakomi ya Evanzile alobelaki Yisaya 11:1 ntango alobaki ete lokola Yesu abengamaki moto ya “Nasalete,” akokisaki maloba ya basakoli. Lokola akolaki na engumba Nasalete, Yesu abengamaki moto ya Nasalete, emonani ete nkombo yango eyokani na liloba ya Liebele oyo esalelami na Yisaya 11:1 mpo na “mwa nzete moke.”b—Matai 2:23, NW, maloba na nse ya lokasa; Luka 2:39, 40.
6. Esakweli eyebisaki ete Masiya akozala moyangeli ya ndenge nini?
6 Masiya akozala moyangeli ya ndenge nini? Akozala motema mabe mpe moto ya lolendo lokola Moasulia, oyo abebisaki bokonzi ya mabota zomi ya Yisalaele ya nɔrdi? Soki moke te. Yisaya alobaki boye mpo na Masiya: “Elimo ya Yehova ekozala likoló na ye, elimo ya bwanya mpe ya mayele, elimo ya toli mpe ya nguya, elimo ya boyebi mpe ya kobanga Yehova; mpe kosepela na ye ekozala kati na kobanga Yehova.” (Yisaya 11:2, 3a, NW) Masiya azali mopakolami, na mafuta te kasi na elimo santu ya Nzambe. Yango esalemaki na batisimo ya Yesu, ntango Yoane Mobatisi amonaki elimo santu ya Nzambe ezali kokita likoló na Yesu lokola ebenga. (Luka 3:22) Elimo ya Yehova ‘ezalaki likoló na’ Yesu, mpe amonisi yango ntango asali makambo na bwanya, na mayele, na toli, na nguya, mpe na boyebi. Oyo nde bizaleli malamu mpo na moyangeli!
7. Elaka nini Yesu apesaki bayekoli na ye ya sembo?
7 Bayekoli ya Yesu bakoki mpe kozwa elimo santu. Na lisolo moko oyo asalaki, Yesu alobaki ete: “Soko bino bato mabe boyebi kopesa bana na bino makabo malamu, Tata na bino na Likoló akoleka kopesa [elimo santu, NW] na bango balɔmbi ye te?” (Luka 11:13) Yango wana, tosengeli kokakatana soki moke te kosɛnga Nzambe elimo santu na ye, tosengeli mpe kotika te kolona mbuma malamu na yango—“bolingo, esengo, kimya, motema pɛtɛɛ, boboto, malamu, kondima, bopɔlɔ mpe komipekisa.” (Bagalatia 5:22, 23, NW) Yehova alaki ete akoyoka libondeli ya bayekoli ya Yesu oyo bakosɛnga “mayele mauti na Likoló” mpo na kosalisa bango bálonga mikakatano ya bomoi.—Yakobo 1:5; 3:17.
8. Kobanga ya ndenge nini Yesu asepelaka kobanga Yehova?
8 Kobanga nini Masiya azali na yango mpo na Yehova? Yesu azali koyoka Nzambe nsɔmɔ te, azali mpe kobanga te ete akokweisa ye na likambo moko. Nzokande, kobanga oyo Masiya azali na yango mpo na Nzambe etondi na botosi mpe na bolingo. Moto oyo abangaka Nzambe alingaka ntango nyonso ‘kosala makambo oyo esepelisaka ye.’ (Yoane 8:29) Na maloba mpe na ndakisa, Yesu atei ete kotambola mokolo na mokolo na kobanga Yehova ezali likambo ya esengo oyo eleki mosusu nyonso.
Mosambisi ya sembo mpe ya motema mawa
9. Ndakisa nini Yesu apesi mpo na baoyo basengeli kosambisa makambo na lisangá ya boklisto?
9 Yisaya asakoli makambo mosusu oyo etali Masiya: “Akosambisa te [kolanda, NW] oyo emonani na miso na ye, [akopamela te kolanda makambo, NW] oyo eyokani na matoi na ye.” (Yisaya 11:3b) Soki bafundi yo na tribinale, okozala na botɔndi te mpo na zuzi ya ndenge wana? Na mokumba ya Masiya lokola Mosambisi ya bato nyonso, makambo ya lokuta, mayele mabe ya bazuzi, nungunungu to makambo ya likolólikoló lokola bozwi ezali kosala ye eloko moko te. Amonaka bokosi oyo ezali na kati ya moto mpe atalaka mosika na makambo oyo ezali komonana ata soki ezali kitoko te, ayebaka “bomoto oyo ebombami kati na motema,” “bomoto oyo ebombami.” (1 Petelo 3:4, NW, maloba na nse ya lokasa) Baoyo nyonso basambisaka makambo na lisangá ya boklisto basengeli kolanda ndakisa eleki malamu oyo Yesu atiki.—1 Bakolinti 6:1-4.
10, 11. (a) Na lolenge nini Yesu azali kosembola bayekoli na ye? (b) Na lolenge nini Yesu akokata likambo ya bato mabe?
10 Bizaleli ya Masiya oyo eleki malamu ekosala ete akata makambo ndenge nini? Yisaya alobi ete: “Na boyengebene akosambisa [baoyo mike, NW] mpe na sembo akolobela basɔkɛmi kati na mokili. Akobɛta mokili na lingenda ya monɔkɔ na ye, mpe na [elimo, NW] ya bibɛbu na ye akoboma oyo mabe. Boyengebene ekozala nkamba ya loketo na ye mpe [bosembo, NW] nkamba ya [bangei, NW] na ye.”—Yisaya 11:4, 5.
11 Ntango bayekoli na ye basengeli kosembolama, Yesu asalaka yango na ndenge ete bázwela yango matomba mingi koleka—yango ezali mpenza ndakisa eleki malamu mpo na bankulutu baklisto. Nzokande, baoyo basalaka mabe basengeli koyeba ete bakozwa etumbu moko makasi. Ntango Nzambe akosambisa ebongiseli ya makambo ya lelo, Masiya “akobɛta mokili” na mongongo na ye ya mokonzi, na bongo akokatela bato ya mabe nyonso etumbu ya liwa. (Nzembo 2:9; kokanisá na Emoniseli 19:15.) Nsukansuka, moto moko te ya mabe akotikala mpo na kobebisa kimya ya bato. (Nzembo 37:10, 11) Lokola loketo na ye mpe bangei na ye ekangami na nkamba ya boyengebene mpe ya bosembo, Yesu azali na likoki ya kosala bongo.—Nzembo 45:3-7.
Makambo ya mabele ebongwani
12. Makambo nini mbala mosusu Moyuda azali kobanga ntango azali komibongisa mpo na kobima na Babilone mpe kozonga na Mokili ya Ndaka?
12 Kanisá naino Moyisalaele moko oyo auti koyoka ete Sirise abimisi mobeko oyo ezali kopesa Bayuda nzela ete bázonga na Yelusaleme mpe bátonga lisusu tempelo. Akotika bomoi ya kimya na Babilone mpo na kosala mobembo molai tii na mboka na ye? Na boumeli ya mbula 70 oyo Bayisalaele bazalaki na mokili na bango te, bilanga oyo batikaki etondaki na matiti mabe. Mbwa ya zamba, nkoi, nkosi, mpe ngombolo ezali sikawa kotambola kuna na bonsomi mpenza. Ata nyoka oyo babengi kobra mpe esali ndako na yango kuna. Bayuda oyo bakozonga bakosengela na bibwele mpo na kobikela—bampate, bantaba mpe bangɔmbɛ ekopesa bango miliki, nsuki ya nyama mpo na kosala bilamba mpe misuni ya kolya, mpe ngɔmbɛ ekosalisa bango mpo na kotimola mabele. Nyama mabe ya zamba ekosilasa nde bibwele yango? Nyoka ekoswa nde bana ya mike? Tokoki koloba nini mpo na makama oyo ekoki kouta epai na bato mabe na ntango ya mobembo?
13. (a) Makambo nini ya kolendisa Yisaya alobeli? (b) Ndenge nini toyebi ete kimya oyo Yisaya alobeli etaleli kaka te kobanga nyama ya zamba?
13 Yisaya alobeli sikawa makambo ya malamu oyo Nzambe akotya na mokili yango. Alobi ete: “[Mbwa ya zamba, NW] akofanda elongo na mwana ya mpate, mpe nkoi akolala elongo na mwana ya ntaba; mwana ya ngɔmbɛ mpe nkosi mpe nyama ya mafuta bakozala elongo mpe mwana moke ya moto akokamba bango. Ngɔmbɛ mpe ngombolo bakolyaka elongo, bana na bango bakolala esika moko; nkosi akolya matiti lokola ngɔmbɛ. [Mwana moke oyo azali komɛlɛ mabɛlɛ akosakana na libulu ya kobra, NW] mpe mwana oyo [baboisi ye, NW] mabɛlɛ akotya lobɔkɔ na ye na esika ya nyoka [ya ngɛngɛ, NW]. Bakoyokisana mpasi te, bakobebisana mpe te na ngomba [mosantu, NW] mobimba na ngai; zambi mokili ekotonda na boyebi ya [Yehova] lokola mbonge ekozipaka mai-na-monana.” (Yisaya 11:6-9) Maloba yango ezali mpenza kosimba motema, boye te? Tóbosana te ete kimya oyo elobelami awa euti na boyebi ya Yehova. Yango wana, esuki kaka te na likambo ya kobanga nyama ya zamba. Boyebi ya Yehova ekobongola nyama te, kasi nde bato. Ezala na nzela ya bozongi to na mokili na bango oyo ezongisami na mabɔkɔ na bango, Bayisalaele basengeli te kobanga nyama ya zamba to bato oyo bazali lokola nyama.—Ezela 8:21, 22; Yisaya 35:8-10; 65:25.
14. Ndenge nini Yisaya 11:6-9 ekokisamaki mpenzampenza?
14 Kasi, esakweli yango ekokokisama na ndenge ya monene koleka. Na 1914, Yesu, Masiya, atyamaki mokonzi na Ngomba Siona ya likoló. Na 1919, batikali ya “Yisalaele ya Nzambe” basikolamaki na boombo ya Babilone mpe basalaki mosala ya kozongisama ya losambo ya pɛto. (Bagalatia 6:16) Yango wana, nzela efungwamaki mpo esakweli ya Yisaya oyo etali Paladiso ekokisama na mikolo na biso. “Boyebi ya solosolo,” boyebi ya Yehova, ebongoli bomoto ya bato. (Bakolose 3:9, 10, NW) Bato oyo bazalaki liboso bato ya matata bakómi bato ya kimya. (Baloma 12:2; Baefese 4:17-24) Mbongwana yango esalemi sikoyo epai ya bamilio ya bato, mpamba te esakweli ya Yisaya etali mpe baklisto, oyo bazali se kokóma mingi, oyo bazali na elikya ya bomoi ya seko awa na mabele. (Nzembo 37:29; Yisaya 60:22) Baklisto yango bayekoli kozela ntango oyo mabele mobimba ekokóma paladiso ya kitoko mpe ya kimya, lokola mokano ya Nzambe ezalaki kobanda na ebandeli.—Matai 6:9, 10; 2 Petelo 3:13.
15. Tokoki kozela ete na mokili ya sika maloba ya Yisaya ekokisama mpenza ndenge elobelami? Limbolá.
15 Na Paladiso yango oyo ezongisami, esakweli ya Yisaya ekokokisama lisusu, na ndenge yango elobelami mpenza? Ebongi mpenza kokanisa bongo. Esakweli yango ezali kopesa bato oyo bakozala na ntango ya boyangeli ya Masiya elikya ndenge moko na Bayisalaele oyo bazongaki na mokili na bango; bango na bana na bango bakobanga mabe moko te—ezala oyo ekoki kouta na moto to na nyama. Na ntango ya boyangeli ya Masiya, bato nyonso oyo bakofanda na mabele bakozala na kimya lokola oyo Adama na Eva bazalaki na yango na elanga ya Edene. Ya solo, Makomami emonisi te ndenge makambo nyonso ya bomoi ezalaki na Edene—to ndenge yango ekozala na Paladiso. Kasi, tokoki kozala na elikya ete na boyangeli ya bwanya mpe ya bolingo ya Mokonzi Yesu Klisto, makambo nyonso ekozala ndenge esengeli kozala.
Losambo ya pɛto ezongisami na nzela ya Masiya
16. Nini etɛlɛmaki lokola elembo mpo na basaleli ya Nzambe na 537 L.T.B.?
16 Losambo ya pɛto ekɔtaki mobulu mpo na mbala ya liboso na Edene ntango Satana alongaki kotinda Adama na Eva bátombokela Yehova. Tii lelo, Satana atiki naino te mokano na ye ya kopɛngwisa bato mingi bálongwa na nzela ya Nzambe. Kasi, Yehova akopesa nzela te ete losambo ya pɛto elimwa na mabele. Likambo yango etali nkombo na ye, mpe amibanzabanzaka mpo na baoyo basalelaka ye. Yango wana, na monɔkɔ ya Yisaya apesi elaka moko oyo ezali kobenda likebi: “Ekokóma ete na mokolo yango ekozala na mosisa ya Yisai oyo ekotɛlɛma lokola elembo mpo na bato. Epai na ye mabota bakobaluka mpo na kotuna, mpe esika ya kopema na ye ekozala na nkembo.” (Yisaya 11:10, NW) Na mobu 537 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Yelusaleme, engumba oyo Davidi akómisaki mboka-mokonzi ya ekólo yango, ezalaki lokola elembo, oyo ezalaki kobenga batikali ya sembo kati na Bayuda oyo bapalanganaki mpo bázonga kotonga lisusu tempelo.
17. Na lolenge nini Yesu ‘atɛlɛmaki mpo na kozala mokonzi ya bapakano’ na ekeke ya liboso mpe na mikolo na biso?
17 Kasi, esakweli yango esuki kaka na likambo wana te. Lokola tomonaki yango, ezali kolobela boyangeli ya Masiya, Mokonzi kaka moko ya solosolo mpo na bato ya bikólo nyonso. Ntoma Paulo atángaki maloba ya Yisaya 11:10 mpo na komonisa ete na mikolo na ye bato ya mabota bakokaki kozala na esika na lisangá ya boklisto. Atángaki maloba ya vɛrsɛ yango ndenge ezali na libongoli ya Septante mpe akomaki ete: “Yisaya alobi ete: ‘Mosisa ya Yese ekozala, mpe moto oyo akobima mpo na koyangela bikólo akozala; epai na ye bikólo bakotya elikya na bango.’” (Baloma 15:12, NW) Lisusu, esakweli yango ezali kotalela eleko moko ya mosika lisusu—kino na mikolo na biso na ntango oyo bato ya bikólo mosusu bakomonisa bolingo na bango mpo na Yehova mpe bakopesa bandeko ya Masiya bapakolami mabɔkɔ.—Yisaya 61:5-9; Matai 25:31-40.
18. Na lolenge nini Yesu azali esika ya koyanganisama ya bato na mikolo na biso?
18 Na kokokisama ya ntango na biso, “mokolo” oyo Yisaya alobelaki ebandaki ntango Masiya atyamaki Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe na likoló na 1914. (Luka 21:10; 2 Timote 3:1-5; Emoniseli 12:10) Banda ntango wana, Yesu Klisto azali elembo oyo ezali polele, esika ya koyanganisama mpo na Yisalaele ya elimo mpe mpo na bato ya bikólo nyonso oyo bazali na mposa makasi ya boyangeli ya sembo. Na litambwisi ya Masiya, nsango malamu ya Bokonzi esakolami na bikólo nyonso, lokola Yesu alobaki yango. (Matai 24:14; Malako 13:10) Nsango malamu yango ezali na nguya. “Ebele monene, oyo moto te akoki kotánga motuya na bango; bauti na mabota nyonso” bazali kotosa Masiya mpe koya na losambo ya pɛto esika moko na batikali bapakolami. (Emoniseli 7:9) Lokola bato mingi ya sika bazali kokoba kosangana na batikali na ‘ndako ya kobondela’ ya Yehova na elimo, bazali kobakisa nkembo na “esika ya kopema” ya Masiya, tempelo monene ya Nzambe na elimo.—Yisaya 56:7; Hagai 2:7.
Libota moko ezali kosalela Yehova na bomoko
19. Wapi mbala mibale oyo Yehova azongisi batikali ya basaleli na ye oyo bapalanganaki bipai na bipai na mokili mobimba?
19 Na nsima, Yisaya akundoleli Bayisalaele ete kala Yehova abikisaki bango ntango ekólo yango enyokwamaki na mabɔkɔ ya banguna oyo bazalaki makasi koleka bango. Lisolo yango ya Yisalaele—ndenge Yehova asikolaki ekólo yango na boombo na Ezipito—ezali na ntina mingi na mitema ya Bayuda nyonso ya sembo. Yisaya akomi ete: “Na mokolo yango, [Yehova] akosembola lobɔkɔ na ye [lisusu na mbala ya mibale mpo na kozwa, NW] ndambo ya bato na ye baoyo batikali, longwa na Asulia mpe na Ezipito mpe na Pataloso mpe na Etiopia mpe na Elama mpe na Sinala mpe na Hamata mpe na [bisanga na] mai-na-monana. [Ɛɛ, akotɛlɛmisa elembo NW] mpo na mabota, akoyanganisa [Bayisalaele oyo bapalanganaki, NW]; akolɔkɔta bapanzami ya Yuda, longwa na [nsuka minei, NW] ya mokili.” (Yisaya 11:11, 12) Lokola nde asimbi bango na lobɔkɔ, Yehova akobimisa batikali ya sembo ya Yisalaele mpe ya Yuda na bikólo epai bapalanganaki mpe akokamba bango na kimya na mokili na bango. Yango esalemaki na lolenge ya moke na mobu 537 L.T.B. Kasi, kokokisama monene ya esakweli yango ezali mpenza na nkembo mingi! Na mobu 1914, Yehova atombolaki Yesu ndenge atyaki ye mokonzi lokola “elembo mpo na mabota.” Banda na mobu 1919, batikali ya “Yisalaele ya Nzambe” babandaki kokenda ebele epai elembo yango ezali, bazali na mposa makasi ya kosalela losambo ya pɛto na nse ya Bokonzi ya Nzambe. Ekólo yango ya elimo oyo ekeseni na bikólo mosusu nyonso euti na “bato ya mikili nyonso, minɔkɔ nyonso, mabota nyonso, bikólo nyonso.”—Emoniseli 5:9, NW.
20. Bomoko ya ndenge nini basaleli ya Nzambe bakozala na yango ntango bakouta na Babilone?
20 Yisaya alobeli sikawa bomoko ya libota oyo ezongisami. Ntango alobelaki bokonzi ya nɔrdi lokola Efelaima mpe bokonzi ya sudi lokola Yuda, akomaki boye: “Zuwa ya Efelaima ekolongwa mpe baoyo [bazali kolakisa bonguna epai na, NW] Yuda bakokatama; Efelaima [akoyokela Yuda zuwa, NW] te, Yuda mpe [akoyina, NW] Efelaima te. Kasi bakopombwa likoló na mapeka ya Bafilisitia na epai na elimwelo na ntango, mpe esika moko, bakopunza bato na epai na ebimelo na ntango. Bakotya lobɔkɔ na bango likoló na Edome mpe na Moaba, mpe bana ya Amona bakotosa bango.” (Yisaya 11:13, 14) Ntango Bayuda bakouta na Babilone, bakokabwana lisusu na bikólo mibale te. Bato ya mabota nyonso ya Yisalaele bakozonga na bomoko na mokili na bango. (Ezela 6:17) Bakozala lisusu na nkanda te kati na bango mpe bakoyinana te. Lokola bakozala na bomoko, bakolonga banguna na bango ya bikólo ya nzinganzinga.
21. Na lolenge nini bomoko ya basaleli ya Nzambe ezali mpenza komonana polele lelo oyo?
21 Nzokande bomoko ya “Yisalaele ya Nzambe” ezali kobenda likebi koleka. Ekómi pene na mbula 2 000, bato ya mabota 12, ya elilingi, ya Yisalaele ya elimo bazali na bomoko oyo euti na bolingo mpo na Nzambe mpe mpo na bandeko na bango ya elimo. (Bakolose 3:14; Emoniseli 7:4-8) Lelo oyo, basaleli ya Yehova—ezala Bayisalaele ya elimo to baoyo bazali na elikya ya bomoi ya seko awa na mabele—bazali na kimya mpe na bomoko na mokili mobimba na nse ya boyangeli ya Masiya, makambo oyo ekoki kosalema te na mangomba ya boklisto. Batatoli ya Yehova basalaka na bomoko ya elimo mpo na kotɛmɛla milende oyo Satana asalaka mpo na kobebisa losambo na bango. Lokola libota moko, bakokisaka etinda oyo Yesu apesi bango ya kosakola mpe koteya nsango malamu ya Bokonzi ya Masiya na bikólo nyonso.—Matai 28:19, 20.
Bakolonga mikakatano
22. Ndenge nini Yehova “akolongola lolemo ya mai monene ya Ezipito” mpe “akoningisa lobɔkɔ na ye likoló na ebale monene”?
22 Mikakatano ya solosolo mpe ya elilingi, oyo ezali kopekisa Bayisalaele bábima na boombo ezali mingi. Bakolonga yango ndenge nini? Yisaya akomi ete: “Yehova akolongola lolemo ya mai monene ya Ezipito, akoningisa lobɔkɔ na ye likoló na Ebale monene na makasi ya elimo na ye. Ɛɛ, akobɛta yango na mingala na yango nsambo, mpe ya solo akotambolisa bato na sandale na bango.” (Yisaya 11:15, NW) Yehova nde akolongola mikakatano nyonso na bozongi ya basaleli na ye. Ata mokakatano oyo emonani ete ezali mpasi mpo na kolonga yango lokola mai ya Mai Motane oyo ekɔtá tii na mokili (lokola Golfe ya Suez) to oyo ezali makasi lokola Ebale Pelata, ekokauka, mpe moto akoki kokatisa yango na sandale na makolo.
23. Na lolenge nini “balabala ekozala longwa na Asulia”?
23 Na mikolo ya Mose, Yehova abongisaki nzela mpo Bayisalaele bákima Ezipito mpe bákenda na Mokili ya Ndaka. Akosala eloko moko ya ndenge wana sikawa: “Balabala ekozala mpe longwa na Asulia mpo na ndambo etikali ya bato na ye; lokola ezalaki mpo na Yisalaele na mokolo wana babutaki longwa na mokili ya Ezipito.” (Yisaya 11:16) Yehova akokamba baombo yango ntango bakozonga mpe ekozala lokola nde bazali kotambola na nzela moko monene kobanda na esika bazalaki baombo tii na mokili na bango. Banguna bakomeka kopekisa bango, kasi Yehova, Nzambe na bango, akozala elongo na bango. Ndenge moko mpe lelo oyo, baklisto bapakolami mpe baninga na bango batungisamaka mingi na banguna, kasi bazali kokenda liboso na mpiko nyonso! Babimi na Asulia ya mikolo na biso, elingi koloba mokili ya Satana, mpe bazali kosalisa bato mosusu bábima mpe ndenge bango babimi. Bayebi ete losambo ya pɛto ekolonga mpe ekokola. Ezali mosala ya moto te, kasi ya Nzambe.
Esengo ezangi nsuka mpo na bato ya Masiya!
24, 25. Na maloba nini basaleli ya Nzambe bazali komonisa masanzoli mpe matɔndi na bango epai na Yehova?
24 Na maloba ya esengo mpenza, Yisaya alobeli sikawa nsai oyo basaleli ya Yehova bazali na yango mpo na kokokisama ya liloba na Ye: “Na mokolo yango okoloba ete, Nakotɔnda yo, ɛ [Yehova], zambi, ata oyokeli ngai nkɛlɛ, nde nkanda na yo epɛngwisami, mpe obɔndisi ngai.” (Yisaya 12:1) Etumbu oyo Yehova apesi basaleli na ye ya motó makasi ezali mpenza makasi. Kasi ekokisi mokano na yango ya kozongisa boyokani oyo ekólo yango ezalaki na yango na ye mpe ya kozongisa losambo ya pɛto. Yehova apesi lisusu basambeli na ye ya sembo elikya ete nsukansuka akobikisa bango. Ezali likambo ya kokamwa te ndenge bamonisi botɔndi na bango!
25 Bayisalaele oyo bazongi batii mpenza motema mobimba na Yehova, mpe balobi polele ete: “Talá, Nzambe azali lobiko na ngai nakondima mpe nakobanga te; zambi [Yah Yehova azali makasi na ngai mpe nguya, NW] na ngai, ye akómi mpe lobiko na ngai. Na esengo bokotoka mai na maziba ya kobikisama.” (Yisaya 12:2, 3) Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “nguya” na vɛrsɛ 2, ebongolami na “masanzoli” na libongoli ya Septante. Basambeli yango bazali koyemba nzembo ya masanzoli mpo na lobiko oyo euti na “Yah Yehova.” Lokola “Yah” ezali ebengeli mokuse ya nkombo Yehova, esalelami na Biblia mpo na komonisa masanzoli makasi mpe botɔndi. Kosalelama ya ebengeli “Yah Yehovah”—oyo nkombo ya Nzambe esalelami mbala mibale—ezali kokolisa lisusu masanzoli oyo epesami epai na Nzambe na ndenge moko ya makasi mpenza.
26. Banani bazali lelo kosala ete misala ya Nzambe eyebana kati na mabota?
26 Basambeli ya solosolo ya Yehova bakoki kobomba esengo na bango mpo na bango moko te. Yisaya asakoli ete: “Na mokolo yango bokoloba ete, Bótɔnda [Yehova, bóbelela nkombo na ye], bóyebisa misala na ye kati na mabota, bósakola ete nkombo na ye [etombolami, NW]. Yembelá [Yehova] nzembo, zambi asali misala ya nkembo, oyo eyebani na mokili mobimba.” (Yisaya 12:4, 5) Banda 1919, baklisto bapakolami—oyo na nsima bazwaki lisalisi ya baninga na bango “bampate mosusu”—bazali ‘koyebisa malamu ya oyo abyangi bango kobima na molili kokɔta na moi.’ Bazali “libota liponami, . . . ekólo [mosantu, NW]” oyo etyami pembeni mpo na mokano yango. (Yoane 10:16; 1 Petelo 2:9) Bapakolami bazali kosakola ete nkombo mosantu ya Yehova etombolami mpe bazali kosala ete eyebana na bato ya mabele mobimba. Bazali kotinda basambeli nyonso ya Yehova ete básepela na bibongiseli oyo akamati mpo na lobiko na bango. Ezali kaka ndenge Yisaya alobi ete: “Gangá mpe yembá na esengo, ɛ [mwasi oyo afandi, NW] kati na Siona, zambi [Mosantu ya Yisalaele, NW] kati na yo azali monene.” (Yisaya 12:6) Mosantu ya Yisalaele ezali ye moko Yehova Nzambe.
Totalelá mikolo ezali koya na elikya!
27. Lokola bazali kozela kokokisama ya elikya na bango, baklisto bazali kotya motema na nini?
27 Lelo oyo, bamilio ya bato bakei ebele epai na “elembo mpo na mabota”—Yesu Klisto oyo atyami mokonzi na Bokonzi ya Nzambe. Bazali na esengo ya kozala bato ya Bokonzi yango mpe bazali kosepela mingi ndenge bayebi Yehova Nzambe mpe Mwana na ye. (Yoane 17:3) Bazali na esengo makasi ndenge bazali na bomoko na kati na bango baklisto mpe bazali kosala nyonso oyo ekoki na bango mpo na kobatela kimya oyo ezali elembo ya basaleli ya solosolo ya Yehova. (Yisaya 54:13) Lokola bandimi mpenza ete Yah Yehova azali Nzambe oyo akokisaka bilaka na ye, batii motema na elikya na bango mpe basepelaka koyebisa bato mosusu elikya yango. Tiká ete mosambeli mokomoko ya Yehova akoba kosalela makasi na ye nyonso mpo na kosalela Nzambe mpe kosalisa bato mosusu básala mpe bongo. Tiká ete biso nyonso tósimba maloba ya Yisaya na motema mpe tósepela na lobiko oyo ekouta na Masiya ya Yehova!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Liloba “Masiya” euti na liloba ya Liebele mashiach, oyo elimboli “Mopakolami.” Liloba ya Grɛki oyo ekokani na yango ezali Khristos, to “Klisto.”—Matai 2:4, NW, maloba na nse ya lokasa.
b Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “mwa nzete moke” ezali netser, mpe oyo ebongolami na “Nasalete” ezali Notsri.
[Bililingi na lokasa 158]
Masiya azali “mwa nzete moke” ebimi na Yisai, na nzela ya Mokonzi Davidi
[Elilingi na lokasa mobimba 162]
[Elilingi na lokasa 170]
Yisaya 12:4, 5, ndenge yango ezali komonana na Barulo ya Mbu Ekufá (Bisika oyo nkombo ya Nzambe ezali emonisami na langi ya mpɛmbɛ)