Tosalela Jéhovah na esengo
“Bosalela Jéhovah na esengo kati na motema. Bobelema liboso na ye na loyembo na esengo,”—NZEMBO 100:2, “MN.”
1, 2. (a) Ndenge nini kokabola mposo emonanaki kala na Berlin, kasi ndenge nini bilobaloba na ntina na “Bokonzi a mibu nkoto” oyo babetaki ntólo esukaki? (b) Nzokande likambo nini bato bamonaki ya kokesena mpenza kati na stade olympique na Juillet 1990, mpe na likambo nini esengo na baklisto mingi ya mikili mikeseni oyo bayanganaki na esika yango etongamaki?
TOZALI bongo kati na stade olympique moko kitoko ya Berlin epai kuna, mbula 54 liboso, Adolf Hitler, moyangeli mabe ya nazi, abimisaki ntembe na kotyoláká bongo mopoti mbango moko Moameriké ya lomposo moindo oyo autaki kolónga momekano mpe azwaki medayi minei ya wolo. Ezalaki mpenza nsoni monene mpo na Hitler mpamba te ye alobaki liboso ete mindele baleki mposo nyonso mosusu, mingimingi mindele oyo na libota ya “aryenne.”a Kasi na le 26 Juillet oyo ya 1990, bato 44 532 ya lomposo Moindo, lomposo Mpembe mpe lomposo Jaune komonisaka bongo mikili 64, bayanganaki na bomoko kati na stade se moko wana na libaku ya assemblée moko ya distrike “Monoko na peto” oyo ebongisamaki na ba Témoins de Jéhovah. Esengo na bango eyikanaki koleka mokolo na minei nsima na midi, na nsuka ya diskur ya batisimo, ntango bato 1 018 bayanolaki mbala mibale mpe na mongongo makasi ete “Ja!”, komonisáká bongo ete basili komipesa epai na Nzambe mpo na kosala mokano na ye.
2 Esengelaki bobele minite 19 epai na Batemwe wana ya sika mpo na kobima na stade mpe kokenda na pisine epai kuna batisimo esalemaki. Nzokande na boumeli ya ntango wana nyonso, ebele na maboko mazalaki kobetema kati na stade monene wana. Ata molongi moko te ya masano mabengami Jeux olympiques asila kokumisama motindo boye lokola yango esalamaki, mpo na kosepela boyei ya sika, ya ebele na baklisto yango, baoyo bautaki na mikili ndenge na ndenge, baoyo bamonisaki kondima oyo elongo na yango tokoki kolónga mokili. (1 Yoane 5:3, 4) Esengo na bango esila mpenza kokota kati na makanisi na bango ete, na nzela na Bokonzi na Nzambe oyo etambwisami na Klisto, bato bakosepela na mibu nkoto ya mapamboli kitoko.—Baebele 6:17, 18; Emoniseli 20:6; 21:4, 5.
3. Solo nini oyo bayangani bandimisamaki na yango, mpe ndenge nini?
3 Kati na Batemwe oyo bayanganaki wana, ata elembo moke ya koyinana mpo na lomposo to mpo na ekolo ezali te, mpamba te bango nyonso bazali koloba monoko na peto, oyo na Liloba na Nzambe, likambo oyo endimisi bosolo ya maloba oyo na Petelo: “Ya solo, namoni ete Nzambe akokabolaka bato te; kasi kati na mabota nyonso, oyo akobangaka ye mpe akosalaka boyengebene ayambami na ye.”—Misala 10:34, 35; Sofoni 3:9.
4. Kati na makambo motindo nini ntalo monene na bayangani na assemblée wana bakomaki bandimi, mpe ndenge nini mabondeli na bango mandimamaki?
4 Ntalo monene na bayangani na assemblée ya Berlin bakómaki bandimi na boumeli ya eleko molai ya monyokoli, na nsé na boyangeli ya nazi (1933-1945), mpe nsima, na nsé na boyangeli ya socialiste oyo ezwaki esika kati na Allemagne de l’Est, epai kuna epekiseli oyo ezalaki likoló na ba Témoins de Jéhovah euti kolongolama polele na le 14 Mars 1990. Mingi kati na bango “bayambaki liloba kati na bolozi mingi, na esengo oyo eyei na elimo santu.” (1 Batesaloniki 1:6.) Sikawa bazali na bonsomi monene mpo na kosalela Jéhovah, mpe esengo na bango ezali na ndelo te.—Tala Yisaya 51:11.
Bantina ya esengo
5. Ndenge nini Bayisraele bakumisaki kosikola oyo Jéhovah esikolaki bango, wana ekómaki bango na ngámbo mosusu ya mai monene Motane?
5 Bonsomi ya sika ya bandeko na biso na Europe de l’Est mpe na mikili misusu ya Afrike mpe ya Azia ezali kotinda biso kokanisa na kobikisa mingi oyo Jéhovah asilaki kosala yango na ntango na kala. Tozali koyeba lisusu lolenge oyo Jéhovah amonisaki nguya na ye penepene na mai Motane, mpe ndenge loyembo na botondi oyo Bayisraele bayembaki ekokisaki mokano na yango na maloba oyo: “E Jéhovah, nani azali lokola yo kati na banzambe? Nani azali lokola yo, na lokumu kati na bulee, mpe na kobonga na kosambela na kosanzola, na misala na kokamwa?” (Exode 15:11) Tozali kosepela mpe te lelo na komonaka makambo na kokamwa oyo Jéhovah azali kokokisa yango mpo na bolamu ya libota na ye? Ntembe ata moke ezali te.
6. Likambo nini tozali koyekola na maloba na esengo oyo Bayisraele balobaki na 537 liboso na ntango na biso?
6 Oyo nde esengo monene mpo na Bayisraele baoyo, na mobu 537 liboso na ntango na biso, bazongaki kati na mokili na bango nsima na kozala baombo na Babilone! Na bongo libota na Jéhovah ekokaki koloba, lokola Yisaya asakolaki yango ete: “Tala, Nzambe azali lobiko na ngai, ngai nakondima mpe nakobanga te, mpamba te Jah Jéhovah azali nguya na ngai mpe loyembo na ngai, ye akomi mpe lobiko na ngai.” Oyo nde esengo! Kasi motindo nini libota esengelaki komonisa esengo na yango? Yisaya akobi ete: “Na mokolo yango bokoloba ete, botonda Jéhovah, bobyanga nkombo na ye, boyebisa misala na ye kati na mabota, bosakola ete nkombo na ye ezali kokumisama ‘Yembela Jéhovah nzembo, mpamba te asali misala na nkembo, oyo eyebani na mokili mobimba.’” Bayisraele bakokaki bongo ‘konganga na esengo’ mpo na ‘koyebisa kati na mabelé mobimba’ misala na nguya na Jéhovah, lokola ezali kosala yango lelo basaleli na Nzambe oyo basili kosikolama.—Yisaya 12:1-6.
Batondi na esengo kati na mosala na Jéhovah
7. Kobikisama nini ebendaki esengo na 1919?
7 Na 1919, ba Témoins de Jéhovah babandaki konganga na esengo ntango Nzambe na bango asikolaki bango na lolenge ya kokamwa. Mbula wana, na le 26 Mars, basangani ya Collège central basikolamaki na boloko epai kuna bakangamaki na boumeli ya sanza libwa nsima na kofunda bango na efundeli ya lokuta ete bazali kotombokisa bato. Na bozongi na bango na Béthel ya Brooklyn, bayambaki bango na elambo moko monene. Lisusu, batikali nyonso bapakolami na elimo bakokaki kosepela kobanda ntango wana mpo ete basikolamaki na elimo longwa na Babilone Monene, lisangá na mangomba na lokuta kati na yango Satan le Diable akotisi mokili mobimba.—Emoniseli 17:3-6; 18:2-5.
8. Kobima ya zulunalo!o nini oyo bato bazelaki yango te eyebisamaki na assemblée ya Cedar Point na 1919, mpe libyangi nini lipesamaki mpo na mosala?
8 Likambo lilekaki monene kati na makambo nyonso mabimaki na 1919 ezalaki assemblée oyo libota na Nzambe ebongisaki yango na Cedar Point (kati na Etat ya Ohio, na États-Unis) kobanda le 1er kino le 8 Septembre. Mokolo ya mitano, oyo ebengamaki ete mokolo na “basalani,” Joseph Rutherford, prezida ya la Société Watch Tower, alobaki epai na bayangani 6 000 kati na diskur moko ya kafukafu oyo motó na likambo na yango ezalaki ete “Bosakola Bokonzi.” Nsima na kolimbola Emoniseli 15:2 mpe Yisaya 52:7, ayebisaki epai na bayoki na ye kobimisama ya zulunalo moko ya sika oyo ekobanda kobima mbala mibale na sanza, L’Age d’Or (lelo Réveillez-vous!), mingi mpenza ebongisami mpo ete ekabolama na mosala ya kosakola. Mpo na kosukisa, alobaki ete: “Baoyo basili komipesa mobimba epai na Nkolo; baoyo bazali kobanga te mpe baoyo motema ezali peto, baoyo balingi Nzambe mpe Nkolo Yesu na elimo na bango mobimba, na makasi na bango mobimba, na molimo na bango mobimba mpe na nzoto na bango mobimba bazali kosepela na kosangana na mosala oyo engebene makoki na bango. Senga epai na Nkolo ete atambwisa yo mpe akomisa yo ntoma ya solo, ya sembo mpe ya makoki. Na nsima, na loyembo na esengo kati na motema, kende mpe salela ye.”
9, 10. Nini epesi nzela na koloba ete Jéhovah apamboli kokabolama ya bazulunalo Mosenzeli mpe Réveillez-vous!?
9 “Loyembo yango na esengo” esili koyokana kati na mabelé mobimba. Ntalo monene na batangi na zulunalo oyo, na ntembe te basilaki kopesa maboko na kobakisa bokaboli Réveillez-vous! oyo tirage na yango ekómi lelo ba ekzamplere 12 980 000 na minoko 64. Esaleli wana na nguya, oyo ezali kosalelama nzela moko na Mosenzeli, ezali kosalisa bato ya motema malamu na koyeba solo. Kati na mokili moko ya Azia, moklisto mwasi moko, oyo azali pionnier, amonaki na bokamwi nyonso ete, mbala nyonso oyo azalaki komema banimero ya sika epai na moto moko oyo azalaki kozwa yango mbala na mbala na maboko na ye, moto yango azalaki kopesa likabo moko ekokani na motuya ya ba Z 11 200 00 mpo na kopesa maboko na mosala ya ba Témoins de Jéhovah kati na mokili mobimba. Na ntembe te, moto wana amonisaki bongo na meko nini azali mpenza kosepela na mosala ya Bokonzi.
10 Pene na kokokisa mibu 112 uta kobima na yango ya liboso na monoko na Lingelesi, zulunalo Mosenzeli ebimisami na ba ekzamplere 15 290 000 na minoko 111. Na minoko nyonso wana, 59 mizali kobima nzela moko yango nyonso na masolo motindo moko. Lokola moombo na sembo, batikali bapakolami na elimo bazali kokoba kopesa epai na batangi oyo bazali na botondi “bilei na bango [ya elimo] na elaka na yango.” (Luka 12:42.) Na 1990, ba Témoins de Jéhovah bazwaki abonema ya sika 2 968 309 mpo na bazulunalo nyonso mibale, yango emonisi bongo bokoli ya 22,7 % na kotalela mobu 1989.
Esengo eyikani
11. (a) Libyangi nini lipesamaki epai na basaleli na Nzambe na Cedar Point na 1922? (b) Motindo nini maloba na bango ya esengo mayokisamaki lisusu makasi koleka?
11 Basaleli na Nzambe batondaki mpe na esengo ntango, na motuya ya 10 000 mbala wana, bayanganaki na assemblée ya mibale ya Cedar Point na Septembre 1922 mpe 361 kati na bango bazwaki batisimo. Kati na diskur na ye “Bokonzi na likoló ebelemi” oyo etongamaki na Matai 4:17, Joseph Rutherford, kokomáká na esika ya ntina ya lisolo na ye, alobaki maloba oyo: “Mokili esengeli koyeba ete Jéhovah azali Nzambe mpe Yesu Klisto azali Mokonzi na bakonzi mpe Nkolo na bankolo. Oyo ezali mokolo eleki mikolo nyonso. Tala, Mokonzi azali koyangela! Bino bozali basakoli na nsango na ye. Yango wana: Bosakola, bosakola, bosakola mokonzi mpe Bokonzi na ye!” Baoyo bangangaki na esengo na ntango ya assemblée wana bamonaki bato mingi mosusu koya kosangana na bango, na boye ete na 1989 totangaki bayangani koleka 6 600 000 na ba assemblées 1 210 oyo ba Témoins de Jéhovah babongisaki yango kati na mokili mobimba, mpe 123 688 kati na bango bazwaki batisimo.
12. (a) Esengo nini monene basaleli na Nzambe bazali na yango lelo? (b) Ndenge nini bazali kokokisa mikumba na bongo epai na Jéhovah mpe epai na “bakonzi baleki liboso”?
12 Ba Témoins de Jéhovah bazali kopesa motuya monene na bonsomi na bango. Bazali kosepela mingi mpenza na komona maloba oyo na Yesu kokokisama: “Mpe bokoyeba solo, mpe solo ekosikola bino.” Oyo nde esengo mpo na kosikolama na makambo na bonkúku mabombami mpe na biyambayamba ya mangomba na lokuta! Oyo nde esengo monene na koyeba Jéhovah mpe Mwana na ye mpe kokoma basalani elongo na bango, na elikya ya kozala na bomoi libela na libela! (Yoane 8:32; 17:3; 1 Bakolinti 3:9-11) Basaleli na Nzambe bazali mpe na botondi mingi ntango “bakonzi baleki liboso” oyo bazali kotambwisa mikili bipai bango bafandi bazali kopesa bango bonsomi ya kosakola elikya na nkembo ya Bokonzi na Jéhovah mpe ya Klisto. Bazali kotosa na ‘kopesa biloko na Kaisala epai na Kaisala,’ kasi “biloko na Nzambe epai na Nzambe.”—Baloma 13:1-7; Luka 20:25.
13. Ndenge nini ba Témoins de Jéhovah oyo basikolamaki na monyoko bamonisaki esengo na bango?
13 Nzokande, ntango bakonzi ya mokili bazali kokana kopekisa mosala oyo bazali kotalela yango lokola mokumba liboso na Nzambe, ba Témoins de Jehovah bazali bongo koyanola lokola bantoma: “Ekoki ete totosa Nzambe liboso na kotosa bato.” Nsima wana bakonzi batikaki bango, bantoma “babimaki . . . batondi na esengo.” Ndenge nini bamonisaki esengo na bango? “Batikaki te kolakisa mikolo nyonso kati na temple mpe na ndako na ndako kosakolaka nsango malamu ete Yesu azali Klisto.” (Misala 5:27-32, 41, 42) Ezali motindo moko lelo; ba Témoins de Jéhovah bazali kosepela ntango bazali kopesa bango bonsomi mingi mpo na kokoba mosala na bango ya kosakola. Kati na mikili mingi epai kuna Nzambe asili kofungola nzela, bazali komonisa esengo mozindo na kopesaka litatoli ya kokoka na ntina na nkombo na Jéhovah mpe na Bokonzi na Yesu Klisto oyo ezali koya.—Tala Misala 20:20, 21, 24; 23:11; 28:16, 23.
Bazali koyika mpiko na esengo nyonso
14. Ndenge nini esengo yango, oyo ezali bongo mbuma na elimo santu, eleki esengo oyo elimbolami kati na diksionere?
14 Kasi ndenge nini kolimbola esengo makasi oyo baklisto na solo bazali kooka? Ezali mpenza ya mozindo koleka mpe ya koumela koleka esengo mokuse ya molóngi moko na momekano na masano mabengami Jeux olympiques. Ezali bongo mbuma na elimo santu na Nzambe oyo ye azali kopesa epai na baoyo “bazali kotosa ye lokola mokonzi.” (Misala 5:32.) Engebene diksionere moko, esengo ezali ‘bozindo mingi koleka nsai, ezali na kongenga mingi koleka mpe emonisaka makambo mingi koleka bosepeli.’ Mpo na baklisto, esengo elimboli makambo mingi lisusu koleka. Lokola yango ezwi misisa kati na kondima, ezali na nguya, mpe ezali kolendisa. “Esengo na Jéhovah ezali nguya na bino.” (Nehemia 8:10) Esengo na Jéhovah, oyo basaleli na ye bazali kolona yango, eleki mpenza nsai ya likolólikoló oyo bisengo na mokili ekoki kopesa.—Bagalatia 5:19-23.
15. (a) Kati na makambo oyo baklisto na sembo bakutanaki na yango, ndenge nini koyika mpiko etyami esika moko na esengo. (b) Yebisa mikapo na Biblia oyo mizali kopesa makasi mpe elikya mpo na oyo etali kobatela esengo na yo.
15 Tokamata ndakisa ya bandeko na biso ya Ukraine. Na ebandeli ya bambula 1950, bankoto mingi kati na bango bakumbamaki na Sibérie epai kuna bayikelaki mikakatano minene mpiko. Mibu mingi na nsima, ntango bakonzi babimisaki bango na boloko, bazalaki na botondi mingi epai na bango, kasi bango nyonso bazongaki na mboka na bango te. Makambo oyo bayikelaki yango mpiko na mokili wana ya Azia epesaki nzela na kokanisa mpenza na Yakobo 1:2-4, oyo elobi ete: “Bandeko na ngai, bokanisa ete ezali bobele esengo wana ekokwea bino kati na komekama na mitindo na mitindo. Boyebi ete komekama na kondima na bino ekoyeisa mpiko.” Balingaki kokoba mosala ya kobuka mbuma, mosala na esengo. Ezalaki mpenza esengo monene na koyamba baklisto bauti epai na ebimelo na moi to Est, mpe baoyo bautaki mosika koleka kuna na ndelo ya mai monene Pacifique bayaki na ba assemblées ya ba Témoins de Jéhovah oyo esalemaki kala mingi te na Polonye! Koyika mpiko esika moko na esengo nde ebotaki mbuma wana. Biso banso baoyo tozali kokoba kosalela Jéhovah na esengo mpe na koyika mpiko, tokoki koloba ete: “Ata bongo, nakosepela na Jéhovah, nakoyoka esengo na Nzambe na lobiko na ngai. Jéhovah, Nkolo Moyangeli azali nguya na ngai.”—Habakuku 3:18, 19; Matai 5:11, 12.
16. Elendiseli nini tozali kozwa na ndakisa na Yilimia mpe Yobo mpo na oyo etali mosala ya kosakola?
16 Kasi ndenge nini tokoki kobatela esengo na biso ntango tozali kopesa litatoli kati na bato oyo bazali kotemela biso na lolendo nyonso? Tobosana te ete kati na makambo motindo moko basakoli na Nzambe bazalaki kotalela ezalela yango na lolenge na esengo. Atako amekamaki, Yilimia alobaki ete: “Maloba na yo mazwami mpe nalei yango, mpe liloba na yo ezali epai na ngai esengo mpe kosepela na motema na ngai; mpo ete nabyangami na nkombo na yo, e Jéhovah, Nzambe na bibele!” (Yilimia 15:16) Oyo nde lokumu na komema nkombo na Jéhovah mpe kopesa litatoli na nkombo yango! Boyekoli na biso ya Biblia ntango nyonso mpe biyano na biso mpe bakomantere na biso kati na makita na boklisto ezali kopesa biso makasi ya kokoba kosepela kati na solo. Esengo yango ekomonana kati na ezalela na biso ntango tokozala kosakola, ekomonana mpe na koseka na biso ntango tokozala koloba mpo na Bokonzi. Ata kati na komekama ya mpasi makasi, Yobo alongaki koloba epai na banguna na ye ete: “Natanelaki bango elongi na ngai wana bazangaki kondima, babebisaki esengo na elongi na ngai te.” (Yobo 29:24) Lokola mosembwi Yobo biso mpe tosengeli kolemba te soki banguna na biso bazali koseka biso. Tobatela koseka likoló na bibebu na biso! Elongi na biso ekomonisa esengo, likambo oyo ekopesa biso nzela na kokutana na bayoki oyo bakolanda biso na likebi.
17. Ndenge nini koyika mpiko esika moko na esengo ekoki kobota mbuma?
17 Lokola tozali kosakola mpe kozongela kosakola kati na teritware, mpiko na biso mpe esengo na biso ekoki kosimba mitema ya bato oyo balingi boyengebene mpe kopusa bango na koyokamela elikya na nkembo oyo tozali na yango. Ezali mpenza esengo na kotambwisa poso na poso boyekoli na Biblia elongo na bato motindo wana mpe, nsima na kosimba kati na mitema na bango solo kitoko ya Liloba na Nzambe, komona bango kosangana elongo na biso kati na mosala ya Jéhovah. Ezali na ntango wana nde tokoki kozongela mpo na biso moko maloba na ntoma Paulo, oyo akomaki epai na bandimi ya sika ya eleko na ye: “Mpo ete elikya mpe esengo mpe motole na lokumu na biso ezali nini? Bobele bino, liboso na Nkolo na biso Yesu wana ekomonana ye te? Mpo ete bino bozali nkembo na biso mpe esengo na biso.” (1 Batesaloniki 2:19, 20) Tozali mpenza koyoka esengo oyo ezali kotondisa biso ntango tozali kokamba bamosusu epai na solo oyo ezwami kati na Liloba na Nzambe mpe tozali kosalisa bango mpo na kokoma Batemwe bamipesi na Nzambe mpe babatisami.
Esengo oyo ezali kolendisa
18. Nini ekosalisa biso na koyika mpiko mpe kolónga liboso na mimekamo na ntango na biso?
18 Kati na bomoi ya mokolo na mokolo, tosengeli koyika mpiko liboso na ebele na makambo ya mpasi, lokola maladi, mitungisi kati na makanisi to mikakatano ya mosolo. Ndenge nini moklisto akoki kobatela esengo na ye mpo na koyika mpiko liboso na mimekamo motindo wana? Na kolukaka toli mpe bilendiseli kati na Liloba na Nzambe. Na eleko na mpasi, tokoki kozwa elendiseli monene soki totangi mokanda ya Nzembo kati na Biblia to soki tozali koyoka bakasete ya la Société. Tala toli oyo na mayele euti na Davidi: “Kitisa mokumba na yo epai na Jéhovah mpe ye akokumba yo; mokolo moko te ye akotika moyengebene ete atelengana.” (Nzembo 55:22) Ee, Jéhovah ‘ayokaka mabondeli.’—Nzembo 65:2.
19. Lokola Davidi mpe Paulo, elikya nini tokoki kozala na yango?
19 Ne nzela na mikanda oyo bazali kobimisa mpe na bankulutu oyo bazali kopona kati na masangá, lisangá na Jéhovah ezali ntango nyonso pene mpo na kosalisa biso bato na bolembu ete tolónga mikakatano na biso. Davidi apesi toli oyo kitoko: “Tikela Jéhovah elekelo na yo, zala na elikya epai na ye mpe ye ekosala mosala.” Abakisaki mpe ete: “Nazalaki elenge mpe nakomi mobange, nde naino namoni moyengebene te oyo atikami, to mwana ne ye oyo akolombaka kwanga.” Lokola tozali na bomoko elongo na lisangá na boklisto tokomona ete “kobika na bayengebene euti na Jéhovah, ye azali ekimelo na bango na ntango na mpasi.” (Nzembo 37:5, 25, 39) Tolanda ntango nyonso toli oyo na Paul: “Bongo tozali kotika te . . . biso tokotalaka te na makambo mamonani; kasi na makambo mazangi komonana. Mpo ete makambo mamonani mazali bobele na ntango oyo nde makambo mamonani te makoumela seko.”—2 Bakolinti 4:16-18.
20. Tozali komona nini na miso na kondima, mpe yango ezali kopusa biso na kosala nini?
20 Na miso na kondima tokoki komona mpenza liboso na biso ebongiseli ya biloko na sika elakami na Jéhovah. Oyo nde esengo mpe mapamboli koleka tokozwa na yango! (Nzembo 37:34; 72:1, 7; 145:16) Na kozelaka ntango wana kitoko, tolanda toli oyo epesami kati na Nzembo 100:2, oyo ete: “Tosalela Jéhovah na esengo kati na motema. Tobelema liboso na ye na loyembo na esengo.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na ntina na “kotombwama ya mindele ya libota aryenne” likoló na mposo nyonso mosusu, New York Times ya 17 Février 1940 eyebisaki maloba ya moto moko ya katolike oyo azali moko kati na batambwisi ya université ya Georgetown oyo alobaki ete “ayokaki Adolf Hitler koloba ete Saint Empire romain, oyo ezalaki empire germanique, esengeli kozonga.” Kasi mokomi na makambo na bato William Shirer ayebisi biso ndenge nini makambo masukaki: “Bokonzi wana [ya nazi] ebengamaki Troisieme Reich, oyo ebandaki na le 30 Janvier 1933, Hitler asakolaki na lolendo nyonso ete ekoumela mibu nkoto mpe, kati na elobeli ya nazi, bazalaki kobenga yango mbala mingi ‘Reich (Bokonzi) ya mbula nkoto.’ Kasi, esalaki bobele mibu zomi na mibale na sanza misato.”
Bozongeli:
◻ Elonga nini ya esengo likoló na makambo na kokabola mposo tozali komona yango lelo?
◻ Na ntango ya Kala, eloko nini etindaki libota na Nzambe na koyemba mpe na konganga na esengo?
◻ Kobakisama nini esengo ya solo esili kozwa na eleko na biso?
◻ Litomba nini koyika mpiko mpe esengo esili kobimisa?
◻ Nini ekoki kosalisa biso na kobatela esengo na biso?