Buku oyo euti na Nzambe
“Esakweli moko te ebimaki na mokano na moto, kasi bato bauti na Nzambe balobi wana ezalaki bango kopusama na [elimo santu, “NW”].”—2 PETELO 1:21.
1, 2. (a) Mpo na nini bato mosusu batunaka soki Biblia ezali na ntina na bomoi ya mikolo na biso? (b) Wapi bilembeteli misato tokoki kosalela mpo na komonisa ete Biblia euti na Nzambe?
BIBLIA ezali na ntina mpo na bato oyo bazali na bomoi lelo oyo wana mokili elingi kokɔta na ekeke ya 21? Bamoko bakanisaka ete ezali na ntina te. Mpo na kolimbola ntina oyo ye atalelaka Biblia ete ezali buku oyo esilá ngala, Doktere Eli Chesen akomaki ete: “Moto moko te akoki kolendisa kosalelama ya buku ya chimie oyo ekomamá na 1924 mpo na koyekola chimie na kelasi ya mikolo na biso—kobanda ntango wana, tosili koyekola makambo mingi ya sika na chimie.” Soki totaleli yango na bozindo te, likanisi yango ekoki komonana lokola ete elongobani. Ya solo, bato basili koyekola makambo mingi ya siansi, kolɔngɔnɔ ya makanisi, mpe bizaleli ya moto uta ntango Biblia ekomamaki kino lelo. Na bongo, bato mosusu bakoki komituna: ‘Lolenge nini buku yango ya kalakala ekoki kozanga makambo oyo malongobani te na siansi? Lolenge nini ekoki kozala na toli oyo ebongi kosalelama na bomoi ya mikolo na biso?’
2 Biblia yango moko epesi eyano. Na 2 Petelo 1:21, bayebisi biso ete basakoli ya Biblia ‘balobaki wana bazalaki kopusama na elimo santu.’ Na bongo, Biblia emonisi ete ezali buku oyo euti na Nzambe. Kasi, lolenge nini tokoki kondimisa bato mosusu ete ezali bongo? Tótalela bilembeteli misato oyo bimonisi ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe: (1) Ezali na boyokani na makambo ya siansi, (2) ezali na mitinda oyo misilaka ngala te ata nsima ya ntango molai mpe oyo mibongi kosalelama na bato oyo bazali na bomoi lelo oyo, mpe (3) ezali na bisakweli ya sikisiki oyo bisilá kokokisama, lokola lisolo ya bato endimisi yango.
Buku oyo ezali na boyokani na siansi
3. Mpo na nini makambo mazali koyebana na nzela ya bolukiluki ya siansi makweisi Biblia te?
3 Biblia ezali buku ya makambo ya siansi te. Nzokande, ezali buku oyo elobaka solo, mpe solo ebongwanaka te ata nsima ya ntango molai. (Yoane 17:17) Makambo oyo mazali koyebana na nzela ya bolukiluki ya siansi mazali kokweisa Biblia te. Na ntango elobeli makambo ya siansi, ezali soko moke te na makanisi oyo mabéngamaki kala ete “mandimami na siansi,” nzokande mazalaki se masapo ya mpamba. Kutu, ezali na maloba oyo malongobani engebene siansi mpe lisusu makeseni mpenza na bindimeli ya ntango oyo yango ekomamaki. Na ndakisa, tótalela boyokani ya Biblia mpe zebi ya monganga.
4, 5. (a) Makambo nini minganga ya ntango ya kala bayebaki te na ntina na makɔnɔ? (b) Nini endimisi biso ete Mose ayebaki misala ya minganga ya Ezipito?
4 Minganga ya ntango ya kala bazalaki mpenza koyeba te lolenge oyo maladi epalanganaka, mpe bayebaki te ete bopɛto epɛngolaka makɔnɔ. Soki tokokanisi yango na boyebi ya lelo, ekomonana ete myango mingi ya mosala ya monganga na ntango ya kala mizali na ntina te. Moko na makomi ya makambo ya monganga na ntango ya kala oyo tozali na yango lelo ebéngami Papirise Ebers, yango esangisi boyebi ya mosala ya monganga na Ezipito ya kala, ekomamaki pene na mobu 1550 L.T.B. Ezali na mitindo ya nkisi 700 mpo na makɔnɔ ndenge na ndenge, “banda na mpota oyo ngando ezokisi moto kino mpasi na mosapi ya lokolo.” Mingi kati na nkisi yango ezalaki kobikisa te, kasi mosusu ezalaki likama mpenza. Mpo na kosilisa mpota, moko na bankisi yango ezalaki bongo nyei ya moto mpe esangisami na bikelakela mosusu.
5 Makomi yango ya nkisi ya monganga na Ezipito ya kala makomamaki pene na eleko moko na mokanda ya liboso ya Biblia, oyo ezalaki na Mibeko ya Mose kati na yango. Mose abotamaki na mobu 1593 L.T.B., mpe akolaki na Ezipito. (Exode 2:1-10) Mose abɔkwamaki na ndako ya Falo, mpe ‘alakisamaki na mayele nyonso ya Baezipito.’ (Misala 7:22) Ayebaki “minganga” ya Ezipito. (Genese 50:1-3) Nkisi na bango oyo ezalaki kobikisa te mpe misala na bango oyo mizalaki na likama esalaki nde bopusi na makomi na ye?
6. Lilako nini ya bopɛto oyo epesamaki na Mibeko ya Mose ezali kotalelama ete elongobani engebene zebi ya monganga na mikolo na biso?
6 Na bokeseni, Mibeko ya Mose ezalaki na mitinda ya bopɛto oyo mikoki kotalelama ete milongobani na zebi ya monganga na mikolo na biso. Na ndakisa, mobeko etaleli lolenge ya kotonga molako ya basoda esɛngaki ete bákunda nyei na libanda ya molako. (Deteronome 23:13) Oyo ezalaki lilako moko mpo na kopɛngola bokɔnɔ oyo emonisi mayele oyo maleki boyebi ya ntango wana. Ezalaki kosalisa bango ete bábatela maziba ya mai ete mázwa mikrobe te mpe ezalaki libateli mpo na bokɔnɔ ya shigellose oyo banzinzi bakoki kopalanganisa na bato mosusu mpe makɔnɔ mosusu oyo mapesaka pulupulu oyo, kino lelo mazali koboma bamilio ya bato mbula na mbula, mingimingi na mikili ya bobola.
7. Malako nini ya bopɛto mapesamaki na Mibeko ya Mose masalisaki mpo na kopɛngola kopalangana ya makɔnɔ oyo mabomaka?
7 Mibeko ya Mose ezalaki na malako mosusu ya bopɛto oyo mazalaki kopɛngola kopalangana ya makɔnɔ oyo mazwamaka na mikrobe. Moto oyo azalaki na bokɔnɔ oyo ekoki kozwa bato mosusu to azalaki na bilembo na yango azalaki kotangolama mosika na bato mosusu. (Levitike 13:1-5) Bilamba to basaani oyo etutani na nyama oyo ekufaki yango moko (ekoki kozala na bokɔnɔ) esengelaki kosukolama liboso ya kosalelama lisusu to mpe esengelaki kobebisama nyɛɛ. (Levitike 11:27, 28, 32, 33) Moto nyonso oyo asimbi ebembe azalaki kotalelama ete azali mbindo mpe asengelaki kolanda molulu ya kopɛtolama oyo esɛngaki kosukola bilamba na ye mpe kosukola nzoto. Na boumeli ya mikolo nsambo oyo azali mbindo, asengelaki kosimba bato mosusu te.—Mituya 19:1-13.
8, 9. Mpo na nini ekoki kolobama ete malako ya bopɛto kati na Mibeko ya Mose ezalaki na makambo malekaki boyebi ya ntango wana?
8 Malako wana ya bopɛto mamonisi mayele oyo malekaki mpenza boyebi ya bato na ntango wana. Zebi ya monganga na mikolo na biso esili koyekola makambo mingi na ntina na kopalangana ya makɔnɔ mpe lolenge ya kopɛngola yango. Na ndakisa, bokoli ya mosala ya monganga na ekeke ya 19 ememaki kosalelama ya myango ya koboma mikrobe—bopɛto mpo na kokutola makɔnɔ oyo mabomaka. Litomba na yango emonani na boye ete makɔnɔ oyo mabomaka mazalaki lisusu mingi te mpe bato bazalaki lisusu kokufa mpambampamba te. Na mobu 1900, na mikili mingi ya Mpoto mpe na États-Unis, bambula ya bomoi ya moto ezalaki na nse ya mibu 50. Uta ntango wana, bambula yango esili kobakisama mingi na ntina na bokoli oyo esalemi na zebi ya monganga mpo na kosilisa makɔnɔ mpe lisusu na ntina na bopɛto mpe lolenge ya bomoi malamu.
9 Nzokande, bankóto ya bambula liboso ete zebi ya monganga eyeba lolenge oyo makɔnɔ mapalanganaka, Biblia epesaki malako mabongi mpo na komibatela na bokɔnɔ. Na yango, tozali kokamwa te ete Mose alobaki ete na ntango wana Bayisalaele bazalaki koumela na bomoi mbula 70 to 80. (Nzembo 90:10) Lolenge nini Mose akokaki koyeba malako wana mpo na kopɛngola makɔnɔ? Biblia yango moko elimboli ete: Mibeko “epesamaki na nzela ya baanzelu.” (Bagalatia 3:19, NW) Ɛɛ, Biblia ezali buku oyo ekomami na mayele ya bato te; ezali buku oyo euti na Nzambe.
Buku oyo ebongi kotambwisa bato na mikolo na biso
10. Atako Biblia ekomamaki esili koleka pene na mibu 2 000, likambo nini ezali solo na ntina na toli na yango?
10 Babuku oyo epesaka toli esilaka ngala mpe nokinoki lolenge na yango etalelamaka lisusu to mpe babuku mosusu ekitanaka yango. Kasi Biblia ezali solo buku oyo ekokani na buku mosusu te. Nzembo 93:5 (NW) elobi ete: “Makundoli na yo mabongi mpenza kotyelama motema.” Atako Biblia esilá kokomama eleki pene na mibu 2 000, maloba na yango mabongi kosalelama kino lelo. Mpe mazali kobimisa matomba ya lolenge moko epai ya biso nyonso ata soki tozali bato ya mposo nini to tofandi na ekólo nini. Tótalela mwa bandakisa ya toli ya Biblia oyo ekoki “mpenza kotyelama motema” mpe esilaka ngala te.
11. Eleki bambula mingi, bandimisaki baboti mingi likambo nini na ntina na kopesa bana bitumbu?
11 Esili koleka bambula mingi, baboti mingi—na kobendamáká na “makanisi ya sika” mpo na lolenge ya kobɔkɔla bana—bakanisaki ete ezali malamu te kopesa bana etumbu. Bakanisaki ete kotyela bana mibeko ekoki kopesa bango mpasi na mayoki mpe kokómisa bango mawamawa. Na makanisi malamu nyonso, bapesi-toli bazalaki koloba ete baboti bápesa bana na bango bitumbu moke mpenza. Zulunalo The New York Times eyebisi ete mingi kati na bapesi-toli yango bazali sikawa “kolendisa baboti ete bápesa bana na bango disipilini.”
12. Liloba ya Greke oyo ebongolami na “disipilini” elimboli nini, mpe mpo na nini bana bazali na mposa ya disipilini motindo wana?
12 Nzokande, uta kala, Biblia esilá kopesa toli ya sikisiki mpe ya bokatikati na likambo litali kobɔkɔla bana. Elobi ete: “Bino batata mpe bóyokisa bana na bino nkanda te, kasi bóbɔkɔla bango na disipilini mpe makebisi ya Yehova.” (Baefese 6:4, NW) Liloba ya Greke oyo ebongolami na “disipilini” elimboli “kobɔkɔlama, kolakisama, koteyama.” Biblia elobi ete disipilini, to kolakisama, ezali elembeteli ya bolingo ya baboti. (Masese 13:24) Bana bakokola malamu soki bazali kozwa malako ya sikisiki ya etamboli malamu oyo ekosalisa bango ete bákolisa likoki ya kokesenisa malamu na mabe. Disipilini oyo epesami malamu ekosalisa bango na komiyoka ete bazali na libateli; ekomonisa bango ete baboti na bango bazali komibanzabanza mpo na bango mpe mpo na lolenge ya bato oyo bakozala.—Kokanisá na Masese 4:10-13.
13. (a) Na oyo etali disipilini, Biblia epesi likebisi nini epai na baboti? (b) Biblia ezali kolendisa disipilini ya lolenge nini?
13 Kasi Biblia ezali kokebisa baboti na likambo ya disipilini. Bokonzi ya baboti esengeli te kozala na makambo makasi. (Masese 22:15) Mwana asengeli te kopesamela etumbu oyo eleki ndelo. Kobɛta mwana mpo na konyokola ye ezali na esika te kati na libota oyo ezali kolanda mitinda ya Biblia. (Nzembo 11:5) Esengeli mpe te konyokola ye na makanisi—na ndakisa na kofinga, koloba mabe ntango nyonso, mpe kotyola oyo ezali kozokisa, nyonso wana ekoki kolɛmbisa elimo ya mwana. (Kokanisá na Masese 12:18.) Na mayele mpenza, Biblia ezali kokebisa baboti ete: “Bótumolaka bana na bino te na ntina ete bálɛmba na mitema te [to, “bokolongola bango motema nyonso,” Phillips].” (Bakolose 3:21) Biblia ezali kolendisa disipilini mpo na kopɛngola likama liboso ete ebima. Na Deteronome 11:19, baboti basɛngisami ete básalela ntango ya kominanola mpo na kokɔtisa mitinda ya bizaleli malamu mpe bomoto ya elimo kati na bɔɔngɔ ya bana na bango. Toli ya polele mpe ya bokatikati motindo oyo mpo na kobɔkɔla bana ebongi mpenza lelo oyo lolenge moko ezalaki malamu na ntango ya lisolo ya Biblia.
14, 15. (a) Na lolenge nini Biblia esuki te bobele na kopesa toli ya mayele? (b) Mateya nini ya Biblia makoki kosalisa mibali mpe basi ya mposo mpe mabota ndenge na ndenge na komitalela bamoko na bamosusu ete bazali ndenge moko?
14 Biblia esuki bobele na kopesa toli ya malamu te. Nsango na yango ezali kosimba motema. Baebele 4:12 elobi ete: “Liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya, ezali mpe na mopotu koleka mipanga nyonso mipeli bipai mibale. Ezali kotɔbɔla kino ekabwelo na motema mpe na [elimo, NW], matɔngi mpe lilɔngɔ; ezali komeka makanisi mpe mikano na motema.” Tótalela ndakisa moko emonisi nguya ya Biblia mpo na kosala bopusi.
15 Lelo oyo bato bakabwani na ntina na mposo, bikólo, mpe bituluka. Bandelo motindo wana oyo bato bamityeli bango moko ememi na kobomama ya ebele ya bato basali eloko te kati na bitumba na mokili mobimba. Nzokande, Biblia ezali na mateya mazali kosalisa mibali mpe basi ya mposo ndenge na ndenge mpe bikólo ndenge na ndenge ete bátalela basusu lokola bazalani na bango. Na ndakisa, Misala 17:26 elobi ete Nzambe ‘abotisi mabota nyonso na bato na nkɔkɔ moko.’ Yango emonisi ete, mpo na koloba solo, ezali bobele na libota moko: libota ya bato! Lisusu, Biblia elendisi biso ete ‘tókóma bamekoli ya Nzambe,’ mpe elobi na ntina na Nzambe ete: “[Ye] [akoponaka, NW] bato te; kasi kati na mabota nyonso, oyo akobangaka ye mpe akosalaka boyengebene ayambami na ye.” (Baefese 5:1, NW; Misala 10:34, 35) Boyebi yango ezali kosangisa baoyo balingi mpenza kolanda mateya ya Biblia. Ezali kosala mosala kati na bango—na motema—kokweisáká bandelo oyo etyami na bato mpe oyo ezali koyeisa bokabwani. Ezali solo kosalema na mokili ya lelo?
16. Yebisá eksperiansi moko oyo emonisi ete Batatoli ya Yehova bazali na bondeko ya solosolo kati na mokili mobimba.
16 Ɛɛ, ezali boye! Batatoli ya Yehova bayebani malamu mpo na bondeko na bango kati na mokili mobimba, bondeko oyo ezali kosangisa bato ya mitindo nyonso oyo, na mokili, mbɛlɛ bakoki te kofanda esika moko mpe na kimya. Na ndakisa, na ntango bitumba kati na bituluka ezalaki kosalema na ekólo Rwanda, Batatoli ya Yehova ya etuluka moko babatelaki bandeko na bango baklisto ya etuluka mosusu, atako yango etyaki bomoi na bango na likama. Na ndakisa, Motatoli moko oyo azali Hutu abombaki libota moko ya bato motoba oyo bazalaki na bango lisangá moko mpe bazalaki Batutsi. Likambo ya mawa, na nsima babomi bamonaki libota yango ya Batutsi mpe babomaki bango. Ndeko oyo azali Hutu mpe libota na ye bakanelamaki na babomi, na yango, bakimaki na ekólo Tanzanie. Baeksperiansi mingi ya lolenge oyo eyebisamaki. Batatoli ya Yehova bandimaka kozanga kokakatana ete bomoko motindo wana ekoki kosalema mpamba te mitema na bango misili kosimbama makasi na nguya ya nsango ya Biblia oyo ezali na bopusi. Likambo oyo ete Biblia ekoki kosangisa bato kati na mokili oyo etondi na koyinana ezali elembeteli ya solosolo ete ezali buku oyo euti na Nzambe.
Buku oyo ezali na bisakweli ya solo
17. Lolenge nini bisakweli ya Biblia ekeseni na bisakweli ya bato?
17 Na 2 Petelo 1:20, Biblia elobi ete: “Moko te na bisakweli na [Makomami, NW] ebimaki na makanisi na bato mpenza.” Ezali te ete basakoli ya Biblia bayekolaki lolenge makambo ya mokili mazali kotambola mpe bongo na nsima bapesi makanisi na bango na ndenge makambo yango makolandana. Mpe ezali te ete basakolaki makambo ya bongo na bongo oyo makokaki kobongwanisama mpo na koyokanisa yango na makambo makosalema na nsima. Mpo na kopesa ndakisa, tótalela esakweli moko ya Biblia oyo ezalaki mpenza na bosikisiki mpe oyo elobaki likambo likeseni mpenza na oyo bato ya eleko wana bakokaki komizela na yango.
18. Mpo na nini tokoki koloba ete bafandi ya Babele ya kala bamiyokaki ete bazali na libateli, kasi Yisaya asakolaki nini na ntina na Babele?
18 Na ekeke ya nsambo L.T.B., Babele, engumba-mokonzi ya Bokonzi ya Babilone, emonanaki ete ezalaki engumba oyo ekoki kolongama te. Engumba yango etongamaki ngámbo na ngámbo ya Ebale Pelata, mpe mai ya ebale yango makabolamaki na mingala mingi mpe malekisamaki mpo na kotondisa talasé moko monene mpe ya bozindo. Engumba ebatelamaki na bifelo mineneminene mpe ya milai, oyo esimbamaki na manɔngi ya kobatela. Na ntembe te bafandi ya Babilone bamiyokaki mpenza ete bazalaki na libateli. Kasi, na ekeke ya mwambe L.T.B., liboso kutu Babilone ekóma na nguya makasi mpenza, Yisaya asakolaki ete: “Babele, . . . ekozala lokola Sodomo mpe Gomola wana esili Nzambe kobuka bango. Ekozala na bafandi te, kino libota na libota bakozala wana te; Moalaba akotɛlɛmisa hema na ye wana te; babateli na mpate bakolalisa bitonga na bango wana te.” (Yisaya 13:19, 20) Tósimba ete esakweli esukaki te bobele na koloba ete Babele ekobomama kasi ebakisaki ete bato bakofanda wana lisusu te. Kosakola likambo ya boye esɛngaki mpenza mpiko! Ekoki nde kozala ete Yisaya akomaki esakweli na ye nsima ya komona kobebisama ya Babilone? Lisolo ya makambo ya kala emonisi ete ezali bongo te!
19. Mpo na nini esakweli ya Yisaya ekokisamaki nyonso te na mokolo ya 5 Ɔkɔtɔ́bɛ ya mobu 539 L.T.B.?
19 Na butu ya 5 Ɔkɔtɔ́bɛ ya mobu 539 L.T.B., Babele ekweaki na mabɔkɔ ya mampinga ya Bamede na Bapelese oyo matambwisamaki na Sirise Monene. Nzokande, esakweli ya Yisaya ekokisamaki nyonso te na ntango wana. Nsima wana Sirise azwaki engumba Babele, bato bakobaki kofanda kuna na boumeli ya bikeke mingi—atako ezalaki lisusu na nguya te. Na ekeke ya mibale L.T.B., pene na eleko oyo rulo ya Mbu Ekufa ya mokanda ya Yisaya ekomamaki, ba Parthes bazwaki engumba Babele oyo, na ntango wana, etalelamaki lokola eloko ya motuya oyo mabota ya zingazinga bazalaki kowela. Josèphe, Moyuda moko mokomi ya makambo ya ntango ya kala ayebisaki ete “ebele” ya Bayuda bazalaki kofanda kuna na ekeke ya liboso L.T.B. Engebene buku The Cambridge Ancient History, na mobu 24 T.B., bato mingi ya mombongo bautaki na Palmyre bayaki kofanda na Babele mpe bazalaki kosala mombongo malamu. Na bongo, kino ekeke ya liboso T.B., bato bazalaki naino kofanda na Babele; nzokande, mokanda ya Yisaya esilaki kokomama liboso ya ntango wana.—1 Petelo 5:13.
20. Bilembeteli nini bimonisi ete nsukansuka Babele ekómaki bobele “libondo ya mabanga”?
20 Ntango Yisaya akufaki, bato bazalaki naino kofanda na engumba Babele. Kasi, na kokokisama ya esakweli, nsukansuka Babele ekómaki bobele “libondo ya mabanga.” (Yilimia 51:37, NW) Engebene Jérôme, nganga-mayele Moyuda (abotamaki na ekeke ya minei T.B.), na eleko na ye Babele ezalaki esika ya kosala bokila epai kuna “nyama ya lolenge nyonso” ezalaki koyengayenga, mpe etikalá mpamba kino lelo oyo. Kobongisama ya esika yango mpo ete ekóma esika oyo baturiste bakoki kokende kotalaka ekoki kobenda bapaya, kasi “molɔngɔ́ mpe bakitani” ya Babilone ebungá libela, lokola Yisaya asakolaki yango.—Yisaya 14:22, NW.
21. Mpo na nini basakoli ya sembo bazalaki na likoki ya kosakola na bosikisiki makambo makoya nsima?
21 Mosakoli Yisaya asakolaki makambo engebene makanisi na ye te nsima ya kotalela lolenge makambo mazalaki kotambola. Akomaki mpe makambo oyo masilá koleka te mpe komonisa yango lokola ete ezali esakweli. Yisaya azalaki mosakoli ya solo. Ezali mpe bongo mpo na basakoli nyonso ya sembo kati na Biblia. Mpo na nini bato yango bazalaki na makoki ya kosala makambo oyo bato mosusu bakoki kosala te—elingi koloba koyebisa makambo makoya na bosikisiki mpenza? Eyano ezali polele. Bisakweli biutaki na Yehova, Nzambe ya bisakweli, “oyo akosakola makambo na nsuka longwa na ebandeli.”—Yisaya 46:10.
22. Mpo na nini tosengeli kosala nyonso mpo na kolendisa bato ya motema sembo ete bátalela Biblia bango moko?
22 Na yango, Biblia ebongi nde kotalelama? Toyebi sikawa ete ebongi kotalelama. Kasi bato mingi bandimisami te. Basilá komisalela makanisi na bango na ntina na Biblia atako batángá yango naino te. Tozali komikundola lisusu profesere oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo lileki? Ye andimaki koyekola Biblia, mpe nsima ya kotalela Biblia na bozindo, andimisamaki ete ezali buku oyo euti na Nzambe. Na nsuka, azwaki batisimo lokola Motatoli ya Yehova, mpe lelo oyo azali nkulutu kati na lisangá! Tiká ete tósala nyonso mpo na kolendisa bato ya mitema sembo ete bátalela Biblia bango moko mpe na nsima bázala na likanisi ya solo na ntina na yango. Tondimisami ete soki bataleli yango bango moko na bosembo nyonso, bakoyeba ete ezali buku oyo ekokani na buku mosusu te; ɛɛ, ezali buku mpo na bato nyonso!
Okoki kolimbola?
◻ Lolenge nini okoki kosalela Mibeko ya Mose mpo na komonisa ete Biblia ezali buku oyo euti epai na bato te?
◻ Mitinda nini ya Biblia misilaka ngala te mpe mibongi mpo na bomoi ya mikolo na biso?
◻ Mpo na nini esakweli ya Yisaya 13:19, 20 ekomamaki nsima ya kosalema ya makambo yango te?
◻ Tosengeli kolendisa bato ya mitema sembo na kosala nini, mpe mpo na nini?
[Etanda na lokasa 19]
Ezali boni mpo na makambo oyo mazangi bilembeteli?
Biblia ezali na makambo mingi ezangi bilembeteli oyo ekoki komonana. Na ndakisa, makambo Biblia elobi na ntina na mokili ya elimo oyo efandami na bikelamu ya elimo siansi ekoki komonisa yango te—to mpe ekoki komonisa te ete ezali lokuta. Makambo oyo makoki te kopesamela bilembeteli ya sikisiki mazali nde kotya Biblia na kozanga boyokani na siansi?
Yango ezalaki likambo oyo nganga-mayele moko ya geoloji akutanaki na yango ntango abandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova esili koleka mwa bambula. Azali komikundola ete: “Nasengeli kondima ete na ebandeli ezalaki mpasi mpo ete nandimela Biblia, mpamba te nakokaki te kopesa bilembeteli ya sikisiki na maloba na yango mosusu na nzela ya siansi.” Moto wana ya sembo akobaki koyekola Biblia mpe nsukansuka andimisamaki ete bilembeteli oyo bizali komonana bimonisi ete ezali Liloba ya Nzambe. Alimboli ete: “Yango ekitisaki mposa na ngai ya komona makambo nyonso oyo malobelami moko na moko kati na Biblia. Moto oyo azali na boyebi ya siansi asengeli mpenza kozala na mposa ya kotánga Biblia na etaleli ya elimo, soki te akondima solo soko moke te. Tosengeli te kozela ete siansi epesa bilembeteli ya makambo nyonso oyo malobami kati na Biblia. Nzokande, lokola makambo mosusu makoki te kopesamela bilembeteli ya sikisiki, yango elimboli te ete ezali lokuta. Likambo ya ntina ezali ete na bisika nyonso oyo bosikisiki ya Biblia emonisami bilembeteli bizali.”
[Elilingi na lokasa 17]
Mose akomaki malako ya bopɛto oyo malekaki boyebi ya ntango na bango