Bisakweli ya Biblia bibongi na kotyela motema?
LELO oyo mikanda ya masoló ya kala mizali ebele. Masoló ya makambo masalemaki kala mbala mingi mabendaka mpenza likebi. Wana tozali kotanga yango, tokomimona mbala mosusu na ntango yango ya kala. Makanisi na biso mazali koya mingi kino kosala ete bato, bisika mpe makambo yango emonanaka lokola nde ezali kosalema na nkasa oyo tozali kotanga.
Biblia ezali mokanda ya lolenge yango: oyo etondi na masoló ya kosimba motema. Kati na nkasa na yango, tozali koyeba mibali mpe basi lokola Abalayama, mwasi na ye Sara, mokonzi Davidi, mokonzi mwasi Estere, mpe Moteyi Monene, Yesu Klisto. Na bongo, tokoki kotambola elongo na bango, koyoka oyo bazalaki koloba mpe komona oyo bamonaki. Kasi ezali na bato mingi oyo basuki te bobele na kotalela Biblia lokola mokanda ya masoló ya kala. Bandimi ete ezali na oyo bazalaki kobenga ete lisoló likomami na liboso. Mpo na nini bongo? Mpamba te Biblia etondi na maloba ya kosakola, to bisakweli.
Kasi, bisakweli ya Biblia bibongi na kotyela motema? Soki bisakweli ya Biblia bitali makambo ya kala bikokisamaki, tosengeli mpe komizela ete bisakweli oyo bitali mikolo mizali koya bikokokisama, boye te? Totalela bongo mwa bandakisa ya bisakweli ya Biblia mpo na komona soki yango ebongi na kotyela motema.
Yisraele mpe Asulia kati na makambo ya mokili
Yisaya, mosakoli na Nzambe, abandaki kosakola penepene na mobu 778 L.T.B.; asakolaki ete: “Motole na nkembo na balangwi masanga na Efalaima [Yisraele] ekonyatama na nse na makolo. Mpe felele na kitoko na ye na nkembo oyo ezali kokauka, oyo ezali na motó na lobwaku na ye na mafuta, ekozala lokola mbuma na kotela liboso na ntango na moi; ekomona moto yango, akomela yango, naino ezali yango na loboko na ye.” (Yisaya 28:3, 4) Lokola esakolamaki, na katikati ya ekeke ya mwambe liboso ya ntango na biso, Samalia, mboka-mokonzi ya Yisraele ekómaki lokola mbuma ya kotela, oyo ezalaki pene ya kobukama mpe komelama na mampinga ya Baasulia. Yango ekokanaki ntango Baasulia bakamataki Samalia na 740 L.T.B.—2 Mikonzi 17:6, 13, 18.
Na nsima, Asulia ekómaki na ngala na yango bokonzi monene na ntango ya kala. Mboka-mokonzi na yango ezalaki Ninive, etondaki na mabe mingi na ntina na lolenge oyo ezalaki konyokola bakangami na yango na boye ete bazalaki kolobela yango lokola “mbeka na makila.” (Nahumu 3:1) Jéhovah Nzambe ye moko azwaki ekateli ya kobebisa Ninive. Na ndakisa na nzela ya mosakoli Nahumu, Nzambe alobaki ete: “Tala, nazali kotemela yo . . . Nakotyola yo mpe nakotemisa yo lokola etalelo na kotuka. Mpe baoyo nyonso bakotalaka yo bakokima longwa na yo, bakoloba ete: ˈNinive ebebisami!ˈ” (Nahumu 3:5-7) Sofoni mpe asakolaki kobomama ya Asulia mpe kobebisama ya Ninive. (Sofoni 2:13-15) Bisakweli wana bikokisamaki na 632 L.T.B., kozanga komizela na yango ntango, mampinga ya Nabopolassar, mokonzi ya Babilone mpe ya Cyaxare le Mède bapunzaki mpe babebisaki Ninive—mingi na boye ete ata esika engumba yango ezalaki eyebanaki te na boumeli ya mibu koleka 2 000. Ekomaki ngala ya Bokonzi ya Babilone na kokota na makambo ya mokili.
Kobomama ya Babilone esakolamaki
Biblia esakolaki kokweisama ya Bokonzi ya Babilone mpe lolenge mboka-mokonzi na yango, Babilone, esengelaki kokwea. Soko bikeke mibale na liboso, mosakoli Yisaya alobaki ete ebale Efalata esengelaki kokauka. Ebale wana ezalaki kokatisa Babilone, mpe bikuke oyo bizalaki pembeni na mabongo na yango bizalaki eteni monene ya libateli na engumba yango. Esakweli etangaki Cyrus lokola moto oyo akozwa engumba yango mpe emonisaki ete baoyo bakoya kokamata engumba bakokuta “bikuke” ya Babilone ete bikangami te. (Yisaya 44:27-45:7) Na yango, Nzambe asenzelaki ete bikuke oyo bizalaki pembeni na Efalata bitikala polele na ntango ya feti oyo ezalaki na butu oyo basoda ya Cyrus le Grand bakamataki engumba. Bakotaki kati na engumba kozanga mpasi, na nzela ya mai mpe bakamataki Babilone.
Mokomi na makambo na kala, Hérodote akomaki ete: “Cyrus . . . atyaki basoda na ye mingi na ekotelo ya ebale, esika Efalata ezali kokota [kati na Babilone], atyaki bato mosusu na ngambo mosusu ya engumba epai ebale ezali kobima na mbaka, mpe apesaki mitinda na basoda ete, ntango bakomona ebale ekiti, bakota kati na engumba na nzela wana. . . . Na lisalisi na nzela ya mai oyo batimolaki atindaki mai ya ebale na libeke moko oyo ezalaki lokola etima, mpe wana mai ekitaki, nzela epesamaki ete bakoka kokatisa ebale. Ntango balóngaki na kosala likambo yango, ba Perses oyo batelemaki wana balandaki nzela ya Efalata, epai mai oyo ekitaki ezalaki kosukela bango bobele na katikati ya ebelo, mpe na nzela yango bakotaki na Babilone. . . . Ezalaki mpo na bango mokolo ya feti, bazalaki kobina mpe bamipesaki na bisengo, kino ntango bayaki kososola makambo wana ya mpasi.”—Hérodote—Histoires, ebongolami na Ph.-E. Legrand.
Bobele na butu wana, mosakoli moko ya Nzambe, Danyele akebisaki mokonzi ya Babilone mpo na likama monene oyo esilaki kobelema. (Danyele, mokapo 5) Na nsima, Babilone oyo ezalaki lisusu na nguya mingi te eumelaki mwa bikeke. Na ndakisa, ezali kuna nde ntoma Petelo akomaki mokanda na ye mopemami ya liboso na ekeke ya yambo na ntango na biso. (1 Petelo 5:13) Kasi esakweli ya Yisaya elobaki ete: “Babilone . . . ekozala lokola Sodomo mpe Gomola wana esili Nzambe kobuka bango. Ekozala na bafandi te.” Nzambe alobaki lisusu ete: “Nakokata longwa na Babilone nkombo mpe ndambo baoyo batikali, bana mpe bakitani.” (Yisaya 13:19-22; 14:22) Lokola esakolamaki, Babilone ebebisamaki. Ezali na kobongisama moko te ya mboka wana ya kala oyo ekobenda batamboli, kasi ekotika yango ntango nyonso bobele kozanga “bana mpe bakitani.”
Danyele—mosakoli na Jéhovah, oyo azalaki kofanda na Babilone ntango yango ekweaki azwaki emonaneli oyo elakisaki balongi ya Médo-Perse. Amonaki mpate mobali oyo azalaki na maseke mibale mpe ntaba mobali oyo azalaki na liseke monene katikati na miso na ye. Ntaba mobali abundisaki mpate mobali mpe alongaki ye, abukaki maseke na ye mibale. Na nsima liseke monene ya ntaba mobali ebukanaki, mpe na esika na yango maseke minei makitanaki. (Danyele 8:1-8) Lokola esakolamaki na Biblia mpe lokola Lisolo ya makambo na kala endimisaki yango, mpate mobali na maseke mibale ezalaki kolimbola Bokonzi ya Médo-perse. Nzokande ntaba mobali, ezalaki kolimbola Bokonzi ya Grèce. Bongo “liseke monene” na ye? Ezalaki Alexandre le Grand. Ntango liseke monene wana ya elilingi ebukanaki, maseke minei (bikonzi) makitanaki yango. Na boyokani na esakweli, nsima na liwa ya Alexandre, bakonzi minei ya basoda na ye bakamataki bokonzi: Ptolémée Lagus na Ezipito mpe na Palestine; Séleucus Nicator na Mésopotamie mpe na Syrie; Cassandre na Macédoine mpe na Grèce; mpe Lysimaque na Thrace mpe na Asie Mineure.—Danyele 8:20-22.
Makambo malamu masakolami mpo na mikolo mizali koya
Bisakweli ya Biblia bitali makambo lokola kobomama ya Babilone mpe kokwea ya Bokonzi ya Médo-perse ezali bobele ndakisa ya bisakweli mingi ya Makomami oyo bikokisamaki na ntango ya kala. Biblia ezali mpe na bisakweli bitali makambo malamu na mikolo mizali koya, oyo bikokokisama na nzela ya Masiya, Mopakolami na Nzambe.
Bakomi na Makomami ya Greke ya baklisto bakokisaki bisakweli mosusu ya Masiya oyo ezalaki kati na Makomami ya Liebele epai na Yesu Klisto. Na ndakisa, bakomi ya Evanzile bamonisaki ete Yesu abotamaki na Beteleme, lokola mosakoli Mika asakolaki yango. (Mika 5:2; Luka 2:4-11; Yoane 7:42) Mpo na kokokisama ya esakweli ya Yilimia, nsima ya kobotama na Yesu, bana mike babomamaki. (Yilimia 31:15; Matai 2:16-18) Maloba ya Zakari (9:9) makokisamaki ntango Klisto akotaki na Yelusaleme likoló na mwana na mpunda. (Yoane 12:12-15) Mpe wana, nsima ya kotya Yesu likoló na nzete na mpasi, basoda bakabolaki bilamba na ye, bakokisaki maloba ya mokomi na Nzembo oyo ete: “Bakaboli mokoto na ngai kati na bango, babwaki mbese mpo na bilamba na ngai.”—Nzembo 22:18.
Bisakweli mosusu ya Masiya bizali kolobela ntango oyo bato bakozala na esengo. Kati na emonaneli, Danyele amonaki “lokola mwana na moto” kozwa “nguya mpe nkembo mpe bakonzi” epai na Jéhovah, “Oyo na kalakala.” (Danyele 7:13, 14) Na ntina na boyangeli ya Masiya Mokonzi ya likoló, Yesu Klisto, Yisaya alobaki ete: “Nkombo na ye akobyangama ete, Mosungi na kokamwa, Nzambe na nguya, Tata na seko, Nkolo na kimya. Kufuluka na bokonzi na ye mpe na kimya ekosuka te; na kiti na bokonzi na Davidi mpe likoló na bakonzi na ye, ete abongisa yango mpe ete atemisa yango na kosambisa sembo mpe na boyengebene longwa na ntango oyo kino libela. Mposa na Jéhovah na bibele ekosala oyo.”—Yisaya 9:6, 7.
Liboso ete boyangeli ya sembo ya Masiya ebanda mosala na yango, likambo moko ya ntina mingi esengeli kosalema. Likambo yango mpe esilaki kosakolama kati na Biblia. Mokomi na Nzembo, wana ezalaki ye koloba na ntina na Mokonzi Masiya, ayembaki ete: “Kanga mopanga na yo na ebelo na yo, Ɛ moto na makasi . . . Kati na bokonzi na yo, bima na kolonga, mpo na makambo na sembo mpe kobundela bayengebene.” (Nzembo 45:3, 4) Na ntina na mikolo na biso, Makomami masakolaki lisusu ete: “Mpe na mikolo na mikonzi yango, Nzambe na lola akotelemisa bokonzi bakobebisama soko moko te, mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te; ekobuka mpe ekosilisa bikonzi oyo nyonso, mpe ekotikala lobiko na lobiko.”—Danyele 2:44.
Nzembo 72 ezali komonisa mwa ndambo ya makambo oyo makozala na nse na boyangeli ya Masiya. Na ndakisa: “Na mikolo na ye, moyengebene akotoa; kimya mpe ekoyikana na ntango nyonso ekoumela sanza.” (Verset 7) Monyokoli mpe mobulu ekozala lisusu te. (Verset 14) Moto moko te akoyoka nzala, mpo ete “biloko bikotondana na mokili ata kino likoló na ngomba.” (Verset 16) Kanisa naino! Okoki kosepela na mapamboli oyo mpe mosusu na mabelé oyo makobongwana paradis, ntango mokili ya sika molakami na Nzambe ekokitana biloko mabe ya ntango oyo.—Luka 23:43; 2 Petelo 3:11-13; Emoniseli 21:1-5.
Na bongo, ezali solo ete bisakweli ya Biblia bibongi otyela yango motema. Na yango, mpo na nini te kosenga na ba Témoins de Jéhovah ete bayebisa yo makambo mingi na ntina na yango? Botaleli ya bisakweli ya Biblia ekoki kosalisa yo na komona epai wapi tozali kokende na kotalela ntango tozali na yango. Mbala mosusu ekobimisa kati na motema na yo botondi mozindo mpo na Jéhovah Nzambe mpe mpo na ebele na bibongiseli ya kitoko oyo asili kozwa mpo na bolamu ya seko ya baoyo bazali kolinga ye mpe kotosa ye.
[Elilingi na lokasa 5]
Oyebi ndimbola ya emonaneli ya Danyele oyo elobeli ntaba mobali mpe mpate mobali?
[Elilingi na lokasa 7]
Okozala wana mpo na komona kokokisama ya bisakweli ya Biblia bitali bomoi ya esengo kati na paradis na mabelé?