Tozali kosala elongo na mosɛnzɛli
“Nkolo na ngai, natɛlɛmi likoló na [linɔ́ngi ya mosɛnzɛli, NW] na ntango na moi, kotika te; mpe natyami kotalatala, butu na butu.”—YISAYA 21:8.
1. Yehova azali motatoli ya makambo minene nini oyo ye moko alaki?
YEHOVA azali Mobongisi Monene ya Mikano. Anzelu oyo atombokelaki Nzambe mpe akómá Satana Zabolo akoki kopekisa te ete mokano monene ya Yehova oyo etali kosantisa nkombo na ye mpe kotya Bokonzi monene oyo ekoyangela mabelé oyo ekozala paladiso ekokisama. (Matai 6:9, 10) Ntango bokonzi wana ekoyangela mokili, bato bakozala mpenza malamu. Nzambe “akosilisa kufa libela mpe Nkolo [Yehova] akokomba mpisoli na bilongi nyonso.” Bato bakozala na esengo, bakozala liboke moko, bakofanda na kimya mpe bakozala malamu libela na libela. (Yisaya 25:8; 65:17-25) Yehova ye moko azali motatoli ya makambo minene oyo alaki!
2. Yehova asalelaki banani lokola batatoli na ye?
2 Kasi, Mozalisi Monene azali mpe na bato oyo bazali batatoli na ye. Liboso Klisto aya awa na mokili, bato nyonso oyo basali “lipata ya batatoli” oyo ebandi na Abele, bayikaki mpiko, mpe mbala mingi na mikakatano makasi. Bandakisa malamu na bango elendisaka baklisto ya sembo lelo oyo. Klisto Yesu azali motatoli oyo azalaki na mpiko koleka batatoli nyonso. (Baebele 11:1–12:2) Na ndakisa, kanisá lisusu litatoli na ye ya nsuka liboso ya Ponto Pilata. Yesu alobaki boye: “Ngai nabotami mpo na ntina oyo mpe nayei na mokili ete natatola mpo na solo.” (Yoane 18:37) Banda mobu 33 T.B. tii lelo oyo tokómi na mobu 2000, baklisto ya molende balandaka ndakisa ya Yesu mpe batikaka kotatola te, mpe ‘basololaka misala minene ya Nzambe’ na mpiko nyonso.—Misala 2:11.
Mangomba ya babilone
3. Ndenge nini Satana azali kotɛmɛla litatoli oyo ezali kopesama mpo na Yehova mpe mokano na ye?
3 Banda kalakala tii lelo, esali sikoyo bankóto ya bambula, Satana Zabolo, Monguna monene, alukaka kobebisa nsango ya batatoli ya Nzambe. Lokola azali ‘tata ya lokuta,’ “Dalagona yango monene . . . , ye nyoka ya kalakala,” azali ‘kozimbisa bato na mokili mobimba.’ Azali kolɛmba te mpo na kobundisa baoyo ‘bazali kotosa [mibeko, NW] ya Nzambe,’ mpe na mikolo oyo ya nsuka, angali nde kongala.—Yoane 8:44; Emoniseli 12:9, 17.
4. Babilone Monene ebandaki ndenge nini?
4 Nsima ya Mpela, na mikolo ya Noa, eleki sikoyo mbula 4 000, Satana asalelaki Nimilodi, “moluki makasi na nyama liboso na [Yehova].” (Genese 10:9, 10) Babilone (to Babele), mboka oyo elekaki monene na bamboka nyonso oyo Nimilodi atongaki, ekómaki mboka ya losambo ya bilimu mabe. Ntango Yehova abulunganisaki minɔkɔ ya bato oyo bazalaki kotonga ndako molai ya Babele, bato yango bapalanganaki na mokili mobimba, mpe bamemaki makambo ya losambo na bango ya lokuta na bisika nyonso oyo bakendaki. Yango wana Babilone ebimisaki losambo ya lokuta na mokili mobimba, oyo mokanda ya Emoniseli ebengi Babilone Monene. Mokanda yango elobi ete losambo yango ya kalakala ekobomama.—Emoniseli 17:5; 18:21.
Libota ya Batatoli
5. Libota nini Yehova abongisaki mpo ezala motatoli na ye, kasi mpo na nini atikaki ete ekende na boombo?
5 Pene na mbula 500 nsima ya Nimilodi, Yehova abongisaki libota ya Yisalaele, elingi koloba bana ya Abalayama moto ya sembo, mpe ekómaki motatoli na Ye na mokili. (Yisaya 43:10, 12) Bato mingi ya ekólo yango basalelaki Yehova na bosembo mpenza. Kasi, nsima ya bambula ebele, mateya ya lokuta ya bikólo oyo ezalaki pembenipembeni ekómaki kokɔta na Yisalaele mpe kobebisa yango, mpe libota oyo Yehova asalaki na yango kondimana epesaki ye mokɔngɔ mpe ekómaki kosambela banzambe ya lokuta. Yango wana, na mobu 607 L.T.B., basoda ya Babilone, oyo Mokonzi Nebukadanesala atambwisaki, bayaki koboma Yelusaleme na tempelo na yango mpe bamemaki Bayuda mingi na boombo na Babilone.
6. Mosɛnzɛli ya Yehova asakolaki nsango malamu nini, mpe likambo yango ekokisamaki ntango nini?
6 Losambo ya lokuta elongaki mpenza! Kasi, Babilone eyangelaki se ntango moke. Soki mbula 200 liboso likambo wana esalema, Yehova alobaki boye: “Kendá, tyá [mosɛnzɛli, NW] ayebisa yango ezali ye komona.” Mosɛnzɛli yango asengelaki koyebisa nsango nini? “Babele akwei, akwei; bikeko nyonso na banzambe na ye abuki yango kino mabelé.” (Yisaya 21:6, 9) Na mobu 539 L.T.B., esakweli yango ekokisamaki. Babilone mboka makasi ekweaki, mpe mwa moke na nsima, libota oyo Nzambe asalaki na yango kondimana ezwaki nzela ya kozonga na mboka na bango.
7. (a) Bayuda bazwaki liteya nini na etumbu oyo Yehova apesaki bango? (b) Nsima ya boombo, Bayuda bakweaki na makambo nini, mpe ebimisaki nini?
7 Bayuda oyo bazongaki na mboka na bango bazwaki liteya monene ete basengeli kotika losambo ya bikeko mpe ya bilimu mabe. Kasi, bambula ebele na nsima, bakweaki na mitambo mosusu. Bayuda mosusu balandaki mateya ya filozofi ya Bagreke. Bamosusu batyaki bonkɔkɔ na esika ya liboso mpe bazongisaki Liloba ya Nzambe nsima. Bamosusu bamipesaki na bolingo ya ekólo. (Malako 7:13; Misala 5:37) Ntango Yesu abotamaki, bato yango bazalaki lisusu na losambo ya pɛto te. Atako mwa Bayuda mosusu bandimaki nsango malamu oyo Yesu asakolaki, kasi na mobimba na yango, ekólo yango eboyaki ye, yango wana Nzambe mpe aboyaki yango. (Yoane 1:9-12; Misala 2:36) Yisalaele ezalaki lisusu motatoli ya Nzambe te; mpe na mobu 70 T.B., basoda ya Loma bayaki koboma lisusu Yelusaleme mobimba na tempelo na yango.
8. Banani bakómaki motatoli ya Yehova, mpe mpo na nini tolobi ete Paulo akebisaki motatoli yango na ntango oyo ebongaki mpenza?
8 Na ntango wana, “Yisalaele ya Nzambe,” lisangá ya baklisto, esilaki kobotama mpe yango nde ekómaki motatoli ya Nzambe liboso ya bikólo mosusu. (Bagalatia 6:16) Satana azelaki te mpo na koluka ndenge ya kobebisa libota wana ya elimo oyo eutaki kobotama sika. Na nsuka ya ekeke ya liboso, elimo ya kobimisa mwa mangomba ebandaki komonana na kati ya masangá. (Emoniseli 2:6, 14, 20) Paulo apesaki toli oyo ebongi mpenza: “Bókeba: ntango mosusu moto moko akoki kobenda bino lokola eloko na ye ya kolya na nzela ya filozofi mpe na lokuta ya mpambampamba oyo euti na bonkɔkɔ ya bato, na makambo mpamba ya mokili, kasi euti na Klisto te.”—Bakolose 2:8, NW.
9. Lokola Paulo alobaki, makambo nini esalemaki oyo na nsima ebimisaki mangomba ya boklisto?
9 Nsukansuka, mateya ya filozofi ya Bagreke, mateya oyo eutaki na losambo ya Babilone, mpe na nsima, mateya euti na “mayele” ya bato, lokola liteya ya evolisyo mpe koboya kondima makambo mosusu ya Biblia, ekɔtaki na mangomba oyo bandimi na yango bazalaki koloba ete bazali baklisto. Makambo esalemaki ndenge kaka Paulo asakolaki, ete: “Ngai nayebi ete na nsima na kolongwa na ngai bankoi na yauli bakokɔta kati na bino, mpe bakotika etonga te. Kati na bino mpenza mpe mibali bakotɛlɛma kolakisa mateya na kokosa ete bábenda bayekoli nsima na bango.” (Misala 20:29, 30) Lipɛngwi yango nde ebotaki mangomba ya boklisto.
10. Makambo nini emonisaki polele ete bato nyonso te nde balandaki losambo mabe ya mangomba ya boklisto?
10 Bato oyo bazalaki kolanda mpenza losambo ya pɛto basengelaki “kobunda etumba makasi mpo na kondima oyo epesamaki na basantu mbala moko mpo na libela.” (Yuda 3, NW) Elingi koloba ete na mokili mobimba balingaki lisusu kolobela losambo ya pɛto mpe Yehova te? Te. Wana ntango ya koboma motomboki Satana na misala na ye ebandaki kokóma pene, emonanaki ete bato nyonso te nde bazalaki kolanda losambo mabe ya mangomba ya boklisto. Na nsuka ya ekeke ya 19, na mboka Pittsburgh, na etúká ya Pennsylvanie, na États-Unis, mwa bato ya sembo basanganaki mpo na koyekola Biblia mpe bango nde bato ya liboso oyo bakómaki motatoli ya Nzambe na mikolo na biso. Na lisalisi ya Biblia, baklisto yango bamonisaki ete nsuka ya mokili oyo ezali lisusu mosika te. Ndenge Biblia esakolaki yango, “nsuka” ya mokili oyo ebandaki na 1914; Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebandaki mpe na mbula wana. (Matai 24:3, 7) Makambo mingi emonisi polele ete nsima ya mbula wana, babenganaki Satana na bademo na ye na likoló. Mobulu oyo emonanaki mingi na ekeke ya 20 ezali elembo ya polele ete Satana azali kosala mosala na ye mpe yango ezali mpenza elembo ete Yesu azali sikoyo koyangela lokola Mokonzi na Bokonzi ya likoló.—Matai, mokapo 24, 25; Malako, mokapo 13; Luka, mokapo 21; Emoniseli 12:10, 12.
11. Satana alukaki kosala nini, kasi ndenge nini likambo yango elongaki te?
11 Na sanza ya Yuni 1918, Satana abimisaki manzaka nyonso mpo na koluka kolimwisa bayekoli wana ya Biblia, baoyo na ntango wana, bazalaki kosakola na mikili mingi. Alukaki mpe kobebisa ebongiseli na bango oyo endimami na mibeko ya Leta, elingi koloba la Société Watch Tower. Bakangaki bakambi ya ebongiseli yango mpe batyaki bango na bolɔkɔ, bakoselaki bango makambo ete bazali kobebisa bato, ndenge kaka basalaki Yesu na ekeke ya liboso. (Luka 23:2) Kasi na 1919, batikaki bakambi ya la Société, mpe yango epesaki bango nzela ya kokoba mosala na bango. Na nsima, bazuzi bamonaki ete makambo nyonso oyo bafundaki bango ezalaki lokuta.
“Mosɛnzɛli” azali kotalatala
12. Lelo oyo, mosɛnzɛli ya Yehova ezali banani, mpe bazalaki na makanisi nini?
12 Na yango, tokoloba ete Yehova azalaki mpe na mosɛnzɛli awa na mokili ntango “ntango ya nsuka” ebandaki. Mosɛnzɛli yango azalaki komonisa bato makambo oyo ezalaki kokokisa mikano ya Yehova. (Danyele 12:4, NW; 2 Timote 3:1) Tii lelo oyo, mosɛnzɛli, elingi koloba baklisto bapakolami to Yisalaele ya Nzambe, azali kosala makambo oyo Yisaya asakolaki mpo na mosɛnzɛli: “Ayoka koyoka, ɛɛ ayoka na malamu mpenza! Angangaki lokola nkosi ete, Nkolo na ngai, natɛlɛmi likoló na [linɔ́ngi ya mosɛnzɛli, NW] na ntango na moi, kotika te; mpe natyami kotalatala, butu na butu.” (Yisaya 21:7, 8) Mosɛnzɛli yango azali kozwa mosala na ye na lisɛki te!
13. (a) Mosɛnzɛli ya Yehova asakolaki nsango nini? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete Babilone Monene ekwei?
13 Mosɛnzɛli amonaki makambo nini? Na mbala yango lisusu, mosɛnzɛli ya Yehova, to motatoli na ye, asakolaki ete: “Babele akwei, akwei; bikeko nyonso na banzambe na ye [Yehova] abuki yango kino mabelé.” (Yisaya 21:9) Nsima ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, ezali Babilone Monene, lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba, nde ekweaki. (Yilimia 50:1-3; Emoniseli 14:8) Yango wana, ezali likambo ya kokamwa te ete Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, to Etumba Monene, ndenge bazalaki kobenga yango na ntango wana, ebandaki na mikili ya boklisto. Na mikili yango, bakonzi ya mangomba ya ngámbo nyonso bangalisaki matata yango na ndenge bazalaki kotinda bilenge na bango ya mpiko bákenda kobunda. Makambo ya nsɔni mpenza! Na 1919, Babilone Monene ekokaki kopekisa te ete Bayekoli ya Biblia (nkombo ya kala ya Batatoli ya Yehova) bálamuka mpe bábanda kotatola na mokili mobimba, mpe mosala yango ezali kosalema tii lelo oyo. (Matai 24:14) Likambo yango emonisaki ete Babilone Monene ekwei, ndenge moko mpe kobima ya Bayisalaele na boombo na ekeke ya motoba L.T.B., emonisaki ete Babilone ya kala ekweaki.
14. Zulunalo nini mosɛnzɛli ya Yehova asalelaka mingi, mpe ndenge nini Yehova apamboli zulunalo yango?
14 Mosɛnzɛli azali ntango nyonso kokokisa mosala na ye na molende mpe azali na mposa makasi ya kosala oyo ezali malamu. Na sanza ya Yuli 1879, Bayekoli ya Biblia babandaki kobimisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli; na ntango wana bazalaki kobenga yango Zion’s Watch Tower and Herald of Christ’s Presence (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona mpe Mosakoli ya Kozala ya Klisto). Banda mobu 1879 tii na 15 Desɛmbɛ 1938, zulunalo mokomoko oyo ebimaki ezalaki na maloba oyo na ezipeli na yango: “Mosɛnzɛli, nini na butu oyo?—Yisaya 21:11.”a Eleki sikoyo mbula 120 banda Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebanda kobima, mpe tii na moi ya lelo elandaka makambo oyo ezali koleka na mokili mpe elukaka koyeba ndenge oyo makambo yango ezali kokokisa bisakweli. (2 Timote 3:1-5, 13) Mosɛnzɛli ya Nzambe na baninga na ye “bampate mosusu” bazali kosalela Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpo na kosakola na mpiko nyonso epai ya bato ete etikali moke Bokonzi ya Klisto elongisa bokonzi ya Yehova. (Yoane 10:16) Yehova apambolaki nde Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli? Na mobu 1879, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezalaki kobima 6 000, lelo oyo, bazulunalo koleka milio 22 ezali kobima na mokili mobimba na minɔkɔ 132; mpe na minɔkɔ 121 ezali kobima mbala moko. Ebongi mpenza ete zulunalo ya makambo ya Nzambe oyo ebimaka koleka bazulunalo mosusu nyonso ya makambo ya Nzambe na mokili mobimba ezala zulunalo oyo ezali kokumisa nkombo ya Nzambe ya solo, Yehova!
Kopɛtolama mokemoke
15. Mosala nini ya kopɛtola mokemoke ebandaki liboso ya 1914?
15 Na boumeli ya mbula soki 40 liboso Klisto abanda koyangela kuna na likoló na 1914, Bayekoli ya Biblia batikaki kondima mateya mingi ya mangomba ya boklisto oyo ezali na Biblia te, mateya lokola kobatisa bana mike, molimo ekufaka te, epongelo, bato mabe banyokwamaka na lifelo ya mɔ́tɔ, mpe Bosato. Kasi mpo na kolongola mateya nyonso ya lokuta, esɛngaki lisusu mwa ntango. Na ndakisa, na bambula ya 1920, Bayekoli ya Biblia mingi bazalaki kolata mwa medayi moko oyo ezalaki na ekulusu na ekɔti ya bokonzi; bazalaki kosala feti ya Noele na bafeti mosusu ya bapakano. Kasi, mpo losambo ezala pɛto, esengeli kozala ata na likambo moko te oyo euti na losambo ya bikeko. Liloba ya Nzambe, Biblia Mosantu, esengeli kozala mokanda se moko oyo ezali kolakisa mateya mpe bizaleli oyo baklisto basengeli kozala na yango. (Yisaya 8:19, 20; Baloma 15:4) Kobakisa to kolongola makambo mosusu na Liloba ya Nzambe ezali mabe.—Deteronome 4:2; Emoniseli 22:18, 19.
16, 17. (a) Mosɛnzɛli azalaki na libunga nini na boumeli ya bambula? (b) Wapi ndimbola malamu ya “etumbelo,” ya “likonzi,” mpe ya “Ezipito”?
16 Tótalela ndakisa moko mpo na komonisa ntina ya likambo yango. Na mobu 1886, Charles Russell abimisaki mokanda moko oyo ezalaki na motó ya likambo ete Le divin plan des âges. Mokanda yango ezalaki na kalati moko oyo ekaboli bantango banda moto azali awa na mokili na kolanda makambo ya Piramide Monene ya Ezipito. Bazalaki kokanisa ete piramide yango, lilita ya Falo Khoufou, nde likonzi oyo elobelami na Yisaya 19:19, 20. Vɛrsɛ yango elobi boye: “Na mokolo yango, etumbelo na [Yehova] ekozala kati na mokili na Ezipito mpe likonzi epai na [Yehova] na ndelo na yango. Ekozala elembo mpe litatoli ya [Yehova] na bibele kati na mokili na Ezipito.” Boyokani nini ekoki kozala kati na piramide yango na Biblia? Na ndakisa, na ntango wana bazalaki kokanisa ete bolai ya bakulware mosusu ya Piramide Monene yango ezali kolakisa ntango oyo “bolɔzi monene” oyo elobelami na Matai 24:21 ekobanda. Bayekoli mosusu ya Biblia bamipesaki mosala ya komeka bolai ya biteni ndenge na ndenge ya piramide yango mpo na koyeba na ndakisa mokolo oyo bakokende na likoló!
17 Bazalaki kobenga piramide yango Biblia ya libanga; na boumeli ya bambula ebele, bazalaki kotalela yango lokola eloko ya ntina mingi tii ntango Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ mpe ya 1 Desɛmbɛ 1928 (na Lingelesi), elimbolaki polele ete Yehova azali na mposa ya monima ya mabanga te oyo bafalo oyo bazalaki bapakano batongaki mpe ezali na bilembo ya astroloji, makambo ya bademo, mpo na kondimisa likambo oyo Biblia elobi. Nzokande, basosolaki ete esakweli ya Yisaya ezali na ndimbola ya elimo. Lokola na Emoniseli 11:8, “Ezipito” elimboli mokili ya Satana. “Etumbelo na Yehova” ezongisi biso makanisi na bambeka malamu oyo baklisto bapakolami bazali kopesa ntango bazali naino na mokili oyo lokola bapaya. (Baloma 12:1; Baebele 13:15, 16) Likonzi “na ndelo ya [Ezipito]” elimboli lisangá ya baklisto bapakolami, oyo ezali “likonzi mpe etɛ[lɛ]miselo ya makambo ya solo” mpe lisangá yango ezali lokola motatoli na “Ezipito,” elingi koloba mokili oyo, mosika te, bakotika yango.—1 Timote 3:15.
18. (a) Ndenge nini Yehova alandaki koyeisa makambo polele mpo na bayekoli ya sembo ya Biblia? (b) Soki moklisto moko azali na mwa kwokɔsɔ mpo na kokanga ntina ya likambo moko ya Biblia oyo elimbolami lisusu, ezaleli malamu nini asengeli kozala na yango?
18 Ntango bambula ezali koleka, Yehova azali se kobakisela biso mayele ya kokanga ntina ya mateya ya solo malamumalamu, azali mpe kosalisa biso tókanga ntina malamu ya bisakweli na ye. (Masese 4:18) Na bambula oyo euti koleka, balendisaki biso tótalela lisusu malamu bandimbola ya sika oyo epesamaki mpo na makambo lokola libota oyo ekoleka te liboso nsuka eya, lisese ya bampate na bantaba, Mbindo-na-Libebisi mpe ntango oyo yango ekotɛlɛma na esika ya bulɛɛ, kondimana ya sika, kobongwana ya Yesu, mpe emonaneli ya tempelo oyo elobelami na mokanda ya Ezekiele. Ntango mosusu ekoki kozala mpasi na kokanga ntina ya bandimbola yango ya sika, kasi ntina na yango ekomonana polele na ntango oyo ebongi. Soki moklisto moko azali kosimba mpenza ntina te ya likambo moko oyo elimbolami lisusu, ekozala malamu asala lokola mosakoli Mika oyo alobaki boye: “Ngai nakotalela [Yehova]; [nakozela] Nzambe ya kobika na ngai.”—Mika 7:7.
19. Ndenge nini batikali bapakolami na baninga na bango bampate mosusu balakisaki mpiko lokola nkosi na mikolo oyo ya nsuka?
19 Tóbosana te ete mosɛnzɛli “agangaki lokola nkosi ete, Nkolo na ngai, natɛlɛmi likoló na [linɔ́ngi ya mosɛnzɛli, NW] na ntango na moi, kotika te; mpe natyami kotalatala, butu na butu.” (Yisaya 21:8) Batikali bapakolami bazalaki na mpiko lokola nkosi mpo na kobimisa mabe ya mangomba ya lokuta mpe kolakisa bato ndenge oyo bakoki kozwa bonsomi. (Emoniseli 18:2-5) Na mokumba na bango lokola “moombo ya sembo mpe ya mayele,” babimisi Babiblia, bazulunalo, mpe mikanda mosusu na minɔkɔ ebele, yango ezali “bilei na ntango na yango.” (Matai 24:45) Bazali na molɔngɔ ya liboso mpo na koyanganisa “ebele monene . . . bauti na mabota nyonso, na mikili nyonso, na bibolo nyonso, na minɔkɔ nyonso.” Ebele monene yango mpe bapɛtolami na makila oyo Yesu asopaki lokola mbeka mpe mitema na bango ezali lokola mitema ya nkosi mpo na kosalela Nzambe ‘mosala ya bulɛɛ butu na moi.’ (Emoniseli 7:9, 14, 15) Mwa ndambo moke ya Batatoli bapakolami ya Yehova oyo bazali naino awa na mabelé, bakisa mpe baninga na bango ebele monene, basalaki mosala nini na mbula oyo eleki? Tokomona yango na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Banda na mokolo ya 1 Yanuali 1939, ekómaki na maloba oyo: “‘Bakoyeba ete ngai nazali Yehova.’ —Ezekiele 35:15.”
Ozali koyeba lisusu?
• Yehova asalelaki banani lokola batatoli na ye na bileko ndenge na ndenge?
• Babilone Monene eutaki wapi?
• Mpo na nini Yehova atikaki ete Yelusaleme, mboka mokonzi ya ekólo oyo ezalaki motatoli na ye, ebebisama na mobu 607 L.T.B.? mpe na mobu 70 T.B.?
• Mosɛnzɛli ya Yehova na baninga na ye bazali na elimo nini?
[Elilingi na lokasa 7]
“Nkolo na ngai, natɛlɛmi likoló na linɔ́ngi ya mosɛnzɛli”
[Bililingi na lokasa 10]
Mosɛnzɛli ya Yehova azali kozwa mosala na ye na lisɛki te