Mokapo ya Zomi na Motoba
Tyelá Yehova motema mpo na kozwa toli mpe libateli
1, 2. Likama nini elingi kokómela basaleli ya Nzambe na ekeke ya mwambe liboso ya ntango na biso, mpe mingi kati na bango balingi koluka libateli epai ya nani?
LOKOLA tomonaki yango na mikapo mosusu na buku oyo, likama moko ya nsɔmɔ elingi kokómela basaleli ya Nzambe na ekeke ya mwambe liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Baasulia, bato oyo balingá bitumba, bazali kobebisa ekólo mokomoko, mpe ekoumela te bakobundisa Yuda, bokonzi ya sudi. Bato oyo bafandi na mokili yango bakoluka libateli epai ya nani? Basali kondimana elongo na Yehova mpe basengeli kotyela ye motema mpo na kozwa lisalisi. (Exode 19:5, 6) Davidi asalaki bongo. Alobaki boye: “[Yehova] azali libanga na ngai, esika makasi na ngai mpe mobikisi na ngai.” (2 Samwele 22:2) Kasi, na ekeke ya mwambe L.T.B., emonani polele ete bato mingi batyeli Yehova motema te ete azala esika makasi na bango. Basepeli nde kotyela Ezipito mpe Etiopia motema, na elikya ete bikólo yango mibale bakobatela bango lokola Baasulia balingi kobundisa bango. Bazali mpenza komikosa.
2 Na nzela ya mosakoli na ye Yisaya, Yehova akebisi ete koluka esika ya kokima epai ya Ezipito to epai ya Etiopia ekomema na libebi mpenza. Maloba epemami ya mosakoli yango ezali kopesa bato ya mikolo na ye liteya moko ya ntina mingi, maloba yango ezali mpe koteya biso ntina mpenza ya kotyela Yehova motema.
Mokili ya makila
3. Lobelá ndenge Asulia azalaki mpenza kotalela makasi na ye ya kobunda bitumba.
3 Baasulia bayebanaki mingi mpo na makasi na bango ya kobunda bitumba. Buku moko (Ancient Cities) ekomi ete: “Bazalaki kosambela bokasi, mpe bazalaki kobondela liboso ya bikeko mineneminene ya mabanga, ya bankosi mpe bangɔmbɛ oyo makolo na yango, mapapu na yango lokola mpongo, mpe mitó na yango lokola bato ezalaki komonisa makasi, mpiko mpe bolongi. Kobunda ezalaki mosala ya ekólo mobimba, mpe banganga bazalaki ntango nyonso kobimisa bitumba.” Ezalaki mpamba te ndenge Nahumu, mosakoli moko ya Biblia, alobaki ete Nineve, mboka-mokonzi ya Asulia ezali “mboka ya makila.”—Nahumu 3:1.
4. Ndenge nini Baasulia bazalaki kobangisa bato ya bikólo mosusu?
4 Lolenge Baasulia bazalaki kobunda bitumba ezalaki mabe mpenza. Mayemi ya ntango wana ezali komonisa basoda ya Asulia bazali kotambwisa baombo na bango na bandɔbɔ oyo batɔbɔli na zolo to na mbɛbu. Bazalaki kotɔbɔla miso ya bato mosusu oyo bakangaki na makonga. Likomi moko ezali komonisa ete mbala moko ntango balongaki etumba, mampinga ya basoda ya Asulia bakataki bato oyo bango bakangaki bitenibiteni mpe basalaki mabondo mibale mosika na engumba—libondo mosusu ya mitó mpe libondo mosusu ya biteni mosusu ya nzoto. Bazalaki kotumba na mɔ́tɔ bana ya bato oyo bango balongi. Lokola bato bazalaki kobanga makambo ya nsɔmɔ ya basoda yango, yango ezalaki mpenza mpo na litomba ya Baasulia, mpamba te ezalaki kolɛmbisa baoyo basengelaki kobunda na basoda yango.
Etumba na Asedode
5. Nani azalaki mokonzi ya nguya na Asulia na mikolo ya Yisaya, mpe ndenge nini Biblia endimisi bosolo ya likambo yango?
5 Na mikolo ya Yisaya, bokonzi ya Asulia ekómaki makasi koleka na ntango ya boyangeli ya Mokonzi Salegone.a Na boumeli ya bambula mingi, bato ya mayele oyo batyolaka Biblia babɛtaki ntembe ete mokonzi yango azalaki te, mpamba te bayebi ata esika moko te oyo balobeli ye na mikanda mosusu ya kala. Kasi, na nsima, bato ya arkeoloji bamonaki mitika ya ndako ya Salegone, yango endimisaki mpenza bosolo ya Biblia.
6, 7. (a) Mpo na bantina nini, mbala mosusu, Salegone atindaki bábundisa Asedode? (b) Kokwea ya Asedode esali bikólo oyo ezali pene na Filisitia nini?
6 Yisaya alobeli na mokuse moko ya bitumba ya basoda ya Salegone: “Taletane, oyo atindamaki na Salegone, mokonzi ya Asulia, abukaki Asedode, mpe abundaki na Asedode mpe abuki yango.” (Yisaya 20:1)b Mpo na nini Salegone apesi etinda ya kobundisa engumba Asedode mboka moko ya Filisitia? Ya liboso, mpo ete Filisitia azali na boyokani na Ezipito, mpe Asedode, esika tempelo moko ya Dagona ezali, ezali na nzela oyo eleki na bokula ya mai longwa na Ezipito tii na Palestina. Engumba yango ezali mpenza na esika moko oyo balabala monene eleki. Soki bazwi yango, ekoki mpenza komonana lokola etikali moke bálonga Ezipito. Lisusu, mikanda ya kala ya Asulia elobi ete Azuli, mokonzi ya Asedode, akanaki kokweisa mokonzi ya Asulia. Yango wana, Salegone alongolaki mokonzi yango motomboki mpe atyaki Ahimiti, leki ya Mokonzi Azuli na esika na ye. Kasi, yango esilisi matata te. Botomboki mosusu ebimaki, mpe na mbala oyo Salegone azwi meko mpenza makasi. Atindi bábundisa Asedode, mpe bazingi yango mpe bazwi yango. Mbala mosusu Yisaya 20:1 ezali kolobela likambo yango.
7 Kokwea ya Asedode ezalaki mawa monene mpo na bamboka oyo ezalaki penepene na ye, mingimingi mpo na Yuda. Yehova ayebi ete basaleli na ye balingaka kotyela “lobɔkɔ na mosuni” motema, Ezipito to Etiopia na sudi. Yango wana, apesi Yisaya etinda ya kopesa likebisi moko makasi.—2 Ntango 32:7, 8.
“Bolumbu mpe makolo ngulu”
8. Likambo nini ya esakweli Yisaya amonisi?
8 Yehova ayebisi Yisaya ete: “Kendá mpe longolá ngɔtɔ na loketo na yo mpe longolá sapato na makolo na yo.” Yisaya atosi etinda ya Yehova. “Asalaki bongo, atambolaki bolumbu mpe [makolo ngulu, NW].” (Yisaya 20:2) Ngɔtɔ ezali mwa elamba moko ya malonga te oyo mbala mingi basakoli bazalaki kolata na bantango mosusu wana bazali kopesa nsango ya libebi. Bazalaki kolata yango mpe na ntango ya mpasi to nsima ya koyoka nsango moko ya mawa. (2 Mokonzi 19:2; Nzembo 35:13; Danyele 9:3) Yisaya azali kotambola bolumbu na lolenge ete amizipi ata mwa moke te? Ezali bongo te. Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “bolumbu” ekoki mpe kolobela moto oyo alati bilamba nzoto mobimba te to oyo alati malamu te. (1 Samwele 19:24, NW, maloba na nse ya lokasa) Yango wana, ekoki kozala ete Yisaya alongolaki kaka elamba na ye ya likoló mpe atikalaki na elamba mokuse ya kati oyo na momeseno ezalaki kokanga nzoto. Mbala mingi, na mayemi ya Baasulia, balakisaka mibali oyo bango bakangi, balati bilamba ya ndenge wana.
9. Likambo oyo Yisaya asali ezali na ndimbola nini ya esakweli?
9 Balimboli likambo oyo Yisaya asali: “[Yehova] alobaki ete, Lokola moombo na ngai Yisaya [atamboli bolumbu mpe makolo ngulu kino mbula, NW] misato ete azala elembo mpe litatoli na ntina na Ezipito mpe Etiopia, boye mokonzi na Asulia akolongola bakangami na Ezipito mpe [baoyo bazalaki baombo, NW] na Etiopia, bilenge mpe bampaka, [bolumbu mpe makolo ngulu, mpe masɔkɔ na bango polele, yango bolumbu ya, NW] Ezipito.” (Yisaya 20:3, 4) Ɛɛ, etikali moke, Baezipito na Baetiopia bákenda na boombo. Moko te akokima. Ata “bilenge mpe bampaka”—elingi koloba bana mpe mikóló—bakobɔtɔla bango biloko na bango nyonso mpe bakomema bango na boombo. Na lisalisi ya elilingi wana ya mawa mpenza, Yehova akebisi bato ya Yuda ete ekozala na ntina te kotyela Ezipito mpe Etiopia motema. Kokwea ya bikólo yango ekomema bango na “bolumbu”—bakosambwa mpenza!
Elikya esili, kitoko ebebi
10, 11. (a) Yuda akosala nini ntango akomona ete Ezipito na Etiopia bazali lisusu na makasi te liboso ya Asulia? (b) Mpo na nini mbala mosusu bafandi ya Yuda balingi kotyela Ezipito na Etiopia motema?
10 Na nsima, na maloba ya esakweli, Yehova amonisi ezaleli ya basaleli na ye ntango bakomona ete Ezipito na Etiopia, esika ya kokima oyo bazalaki kotyela motema, bazali lisusu na makasi te liboso ya Baasulia. “[Bakobanga, NW] mpe bakoyoka nsɔni mpo na Etiopia, elikya na bango, mpe mpo na Ezipito, [kitoko, NW] na bango. Bafandi na libongo oyo bakoloba na mokolo yango ete, Talá, oyo esalelami bango bazalaki elikya na biso mpe baoyo tokimaki epai na bango mpo na lisungi ete tóbikisama liboso na mokonzi na Asulia. Na biso mpe, tokokima na nzela nini?”—Yisaya 20:5, 6.
11 Soki bakokanisi ye na nguya ya Ezipito na Etiopia, Yuda azali kaka lokola mwa mboka moko moke oyo ezali pembeni ya libongo. Mbala mosusu bafandi mosusu ya “libongo oyo” baluli Ezipito mpo na kitoko na yango—bapiramidɛ na yango milaimilai, batempelo na yango mineneminene mpe bandako na yango oyo ezingami na bilanga ya bafololo, matiti ya fololo kitoko mpe maziba. Lokola bandako ya Ezipito etongamá malamu mpenza, yango emonani lokola elembeteli oyo ezali kolakisa ete mboka yango ezali makasi mpe ekoumela libela. Ya solo mpenza, ekoki kosalema te ete mokili yango ebebisama! Mbala mosusu Bayuda bakamwe mpe na basoda ya Etiopia oyo babundaka na mbanzi, na makalo mpe na mpunda.
12. Yuda asengelaki kotyela nani motema?
12 Na kotalela maloba ya likebisi oyo Yisaya amonisi mpe maloba ya esakweli ya Yehova, baoyo nyonso bazali koloba ete basalelaka Yehova mpe balingi kotyela Ezipito na Etiopia motema, basengeli mpenza kokanisa malamumalamu. Eleki mpenza malamu kotya elikya epai ya Yehova na esika ya kotya elikya epai ya moto oyo auti na mabele! (Nzembo 25:2; 40:4) Wana makambo ezali kolandana, Yuda anyokwami makasi na mabɔkɔ ya mokonzi ya Asulia, mpe na nsima, amoni ndenge bato ya Babilone babebisi tempelo na ye mpe mboka-mokonzi na ye. Kasi, “ndambo ya zomi,” “momboto mosantu” etikali, lokola ekumu ya nzete moko ya monene. (Yisaya 6:13, NW) Ntango eleko yango ekokóma, nsango ya Yisaya ekolendisa kondima ya mwa etuluku yango oyo bazali kokoba kotyela Yehova motema!
Tyelá Yehova motema
13. Mikakatano nini bato nyonso—ezala bandimi to bandimi te—bazali kokutana na yango lelo?
13 Likebisi ya Yisaya oyo emonisi ete kotyela Ezipito na Etiopia motema ezali na ntina te, ezali kaka te mwa lisolo mpamba. Yango ezali na ntina mingi mpo na mikolo na biso. Tozali sikawa na “mikolo ya mpasi.” (2 Timote 3:1, Boyokani ya Sika) Kozanga mbongo, bobola oyo epalangani, yikiyiki na makambo ya politiki, mobulu kati na bana-mboka, mpe bitumba ya mike to ya minene ezali kosala mabe—kaka te epai ya baoyo bazali koboya boyangeli ya Nzambe, kasi mpe epai ya basambeli ya Yehova. Motuna oyo ezali kotunama epai ya mokomoko na biso yango oyo, ‘Nakoluka lisalisi epai ya nani?’
14. Mpo na nini tosengeli kotya motema kaka epai na Yehova?
14 Bato mosusu bazali kokamwa na bato ya mayele oyo bayebi makambo ya mbongo, na bato ya politiki, mpe na bato ya siansi oyo bazali koluka kosilisa mikakatano ya bato na lisalisi ya mayele ya bato mpe na teknoloji. Nzokande, Biblia elobi polele ete: “Eleki malamu [kokima epai ya Yehova, NW], nde kolikya epai na mikóló te.” (Nzembo 118:9) Mikano nyonso ya bato mpo na kotya kimya mpe libateli ekolonga te mpo na ntina oyo mosakoli Yilimia alobi: “Ɛ [Yehova] nayebi ete nzela ya moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye [ye] moko.”—Yilimia 10:23.
15. Elikya kaka moko ya bato nyonso oyo bazali konyokwama ezali epai wapi?
15 Yango wana, ezali mpenza na ntina ete basaleli ya Nzambe bámitika te ete makasi to mayele ya mokili oyo ekamwisa bango koleka. (Nzembo 33:10; 1 Bakolinti 3:19, 20) Elikya kaka moko mpo na bato nyonso oyo bazali konyokwama ezali epai na Mozalisi, Yehova. Baoyo bazali kotyela ye motema bakobika. Ntoma Yoane oyo apemamaki akomaki ete, “mokili ezali mpe kolongwa mpe mposa mabe na yango lokola, nde ye oyo akosalaka mokano ya Nzambe akoumelaka seko.”—1 Yoane 2:17.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bato oyo bayekolaka masolo ya kala babengaka mokonzi yango Salegone II. Mokonzi moko azalaki liboso na ye, azalaki moto ya Asulia te, kasi ya Babilone, babengaka ye “Salegone I.”
b “Taletane” ezali nkombo ya moto te, kasi nde titre oyo ezali komonisa mokonzi ya basoda ya Asulia, mbala mosusu moto ya mibale oyo aleki nguya na bokonzi yango.
[Elilingi na lokasa 209]
Baasulia bazalaki na momeseno ya kotɔbɔla miso ya bato mosusu oyo bazalaki kokanga
[Bililingi na lokasa 213]
Bato mosusu bakoki kokamwa na makambo mineneminene oyo moto asali, kasi ezali malamu kotyela nde Yehova motema