Mokapo ya Ntuku Mibale
Yehova azali mokonzi
1, 2. (a) Nani akondongwana na nkanda ya Yehova? (b) Yuda akozanga etumbu, mpe ndenge nini toyebi yango?
BABILONE, Filisitia, Moaba, Sulia, Etiopia, Ezipito, Edome, Tulo, Asulia—bango nyonso bakondongwana na nkanda ya Yehova. Yisaya asakolaki mawa oyo ekokwela bikólo mpe bingumba wana ya makambo mabe. Kasi, nini ekokómela Yuda? Bafandi ya Yuda bakozanga etumbu mpo na masumu na bango? Lisolo oyo ekomami eyanoli ete, bakozanga etumbu te!
2 Tótalela oyo ekómelaki Samalia, mboka-mokonzi ya bokonzi ya mabota zomi ya Yisalaele. Ekólo yango eboyaki kotosa kondimana oyo esalaki na Nzambe. Baboyaki kokabwana na misala ya mbindo oyo mabota mosusu ya zingazinga ezalaki kosala. Kutu, bato ya Samalia “basalaki makambo mabe oyo epelisaki nkanda ya [Yehova] . . . Boye [Yehova] ayokelaki Yisalaele nkanda mingi mpe alongolaki bango na miso na ye.” Lokola balongolaki bango na makasi na mokili na bango, “Yisalaele balongolami, longwa na mokili na bango kino [na boombo na, NW] mokili na Asulia.” (2 Mikonzi 17:9-12, 16-18, 23; Hosea 4:12-14) Likambo oyo ekómelaki Yisalaele ezali kopesa elikya ya malamu te mpo na ndeko na ye ya mwasi, bokonzi ya Yuda.
Yisaya asakoli kobebisama ya Yuda
3. (a) Mpo na nini Yehova asundoli Yuda, bokonzi ya mabota mibale? (b) Yehova azwi ekateli ya kosala nini?
3 Bakonzi mosusu ya Yuda bazalaki sembo, kasi mingi kati na bango bazalaki sembo te. Ata na boyangeli ya mokonzi moko ya sembo, na ndakisa Yotama, bato baboyaki mpenza te na motema moko losambo ya lokuta. (2 Mikonzi 15:32-35) Mabe ya Yuda ekómaki mpenza makasi na boyangeli ya Mokonzi Manase, moto oyo asopaki makila mingi, oyo, ndenge bonkɔkɔ ya Bayuda elobi yango, abomaki Yisaya, mosakoli ya sembo, apesaki etinda bákata ye biteni mibale na mosumani. (Kokanisá na Baebele 11:37.) Mokonzi yango mabe “asalisaki Yuda mpe bafandi na Yelusaleme masumu kino balekaki na mabe mabota oyo [Yehova] abebisaki bango liboso na bana na Yisalaele.” (2 Ntango 33:9) Na boyangeli ya Manase, mokili yango ebebaki kutu makasi koleka ndenge ezalaki na ntango Bakanana bazalaki koyangela yango. Yango wana, Yehova alobi ete: “Talá nakoyeisela Yuda mpe Yisalaele etumbu ete ye oyo akoyoka yango, matoi na ye makoyoka mpasi! . . . Nakokɔmba Yelusaleme lokola moto akokɔmba saani, akokɔmba epai moko mpe akobongola yango. [Nakosundola batikali ya libula, NW] na ngai mpe nakokaba bango epai na bayini na bango; bakokóma lokola biloko bipunzami na bayini na bango nyonso. Zambi basali mabe na miso na ngai mpe bapelisi nkanda na ngai.”—2 Mikonzi 21:11-15.
4. Yehova akosala Yuda nini, mpe ndenge nini esakweli yango ekokisamaki?
4 Lokola saani oyo babaloli yango epai ya likoló etali na nse mpe biloko nyonso oyo ezali na kati esopani, mokili yango ekotikala mpenza mpamba. Kobebisama yango oyo ezali kozela Yuda mpe Yelusaleme elobelami lisusu na esakweli ya Yisaya. Abandi na maloba oyo: “Talá, [Yehova] akobebisa mokili, akoyeisa yango mpamba, akobulunganisa yango, akopalanganisa baoyo bafandi wana.” (Yisaya 24:1) Esakweli yango ekokisami ntango Yelusaleme mpe tempelo na yango ebebisami ntango mampinga ya basoda ya Babilone oyo batambwisami na Mokonzi Nebukadanesala bakɔti mpe ntango bato ya Yuda bakufi na mopanga, na nzala, mpe na maladi mabe. Bayuda mingi oyo babikaki bamemami na boombo na Babilone, mpe mwa ndambo moke oyo batikalaki bakimi na Ezipito. Na yango, mokili ya Yuda ebebisami mpe etikali mpenza mpamba. Ata banyama ya mboka etikali te. Mokili yango oyo etikali mpamba mpe na mawa ekómi kaka efandelo ya banyama ya zamba mpe bandɛkɛ.
5. Moto moko akozanga etumbu ya Yehova? Limbolá.
5 Bakoyokela moto moko na Yuda mawa na ntango ya kosambisama oyo ezali koya? Yisaya ayanoli ete: “Ekozala na bato lokola na nganga, na moombo lokola na nkolo na ye, na moombo mwasi lokola na nkolo mwasi na ye, na mosombi lokola na motɛkisi, na modefisi lokola na modefi, na mozwi na litomba lokola na ye oyo akobimisa litomba. [Na ntembe te mokili ekotikala mpamba, mpe na ntembe te yango ekopunzama, mpo Yehova ye moko alobi liloba yango, NW].” (Yisaya 24:2, 3) Bozwi mpe mikumba ya mosala na tempelo ekosala ata bokeseni moko te. Moto moko akotikama te. Mokili ebebisami mpe bato nyonso oyo bakobika—ezala banganga, basali mpe bankolo, basombi mpe batɛki—basengeli kokenda na boombo.
6. Mpo na nini Yehova alongoli lipamboli na ye na mokili yango?
6 Mpo bato nyonso báyoka malamu mpenza, Yisaya amonisi ete kobebisama yango oyo ekómi pene ekozala na bisika nyonso mpenza mpe amonisi mpo na nini ekozala bongo: “Mokili ezali kolela mpe [elɛmbi, mabele malamu ebebi, elɛmbi, NW], bato ya lokumu na mokili bazali kolɛmba; mokili ebebisami na nse na bafandi na yango; zambi basopi mibeko, [babongoli, NW] mpe malako, babuki kondimana ya seko. [Yango wana, NW] kolakelama mabe ezali kolya mokili, mpe bafandi na yango [bamemi ngambo. Yango wana, NW] bafandi kati na mokili [batikali mingi te, NW] mpe bobele motuya moke ya bato bazali kotikala.” (Yisaya 24:4-6) Ntango bapesaki Bayisalaele mokili ya Kanana, bakutaki yango “mokili oyo miliki mpe mafuta ya nzoi ezali kotyola.” (Deteronome 27:3, NW) Kasi, bazalaki ntango nyonso na mposa ya lipamboli ya Yehova. Soki batosi malako mpe mitinda na ye na bosembo mpenza, mabele “ekobota mbuma na yango,” kasi soki bapesi mibeko mpe mitinda na ye mokɔngɔ, milende na bango ya kolona “ekosila mpamba” mpe mabele “ekobota mbuma na yango te.” (Levitike 26:3-5, 14, 15, 20) Kolakela mabe ya Yehova ‘ekolya mabele.’ (Deteronome 28:15-20, 38-42, 62, 63) Yuda asengeli sikawa kokutana na kolakelama mabe yango.
7. Na lolenge nini kondimana ya Mobeko ekokaki kozala lipamboli mpo na Bayisalaele?
7 Mbula soki 800 liboso ya eleko ya Yisaya, Bayisalaele bandimaki kosala kondimana na Yehova mpe bandimaki kotosa yango. (Exode 24:3-8) Kondimana ya Mobeko yango ezalaki na maloba ete soki batosi mitinda ya Yehova, ye akopambola bango mingi, kasi soki batosi kondimana yango te, bakozwa mapamboli na ye te mpe banguna na bango bakomema bango na boombo. (Exode 19:5, 6; Deteronome 28:1-68) Bayisalaele basengelaki kotosa kondimana ya Mobeko yango, oyo epesamaki na nzela ya Mose mpo na ntango oyo ezali na ndelo te, ntango oyo eyebani nsuka te. Ekokaki kobatela Bayisalaele tii na ntango ya komonana ya Masiya.—Bagalatia 3:19, 24.
8. (a) Ndenge nini bato ya Yisalaele “basopi mibeko” mpe “babongoli malako”? (b) Na lolenge nini “bato ya lokumu” bazali bato ya liboso oyo ‘bakolɛmba’?
8 Kasi bato yango “babuki kondimana ya seko.” Bapesi mibeko oyo Nzambe apesaki bango mokɔngɔ, batosi yango te. “Babongoli mpe malako,” balandi kotosa makambo ekeseni na oyo Yehova apesaki. (Exode 22:25; Ezekiele 22:12) Yango wana, bato yango bakolongolama na mokili yango. Kosambisama oyo ezali koya ekozala na mawa te. Kati na baoyo ‘bakolɛmba’ liboso mpo ete Yehova azali kobatela bango lisusu te mpe azali kondima bango lisusu te, ekozala “bato ya lokumu,” bankumu. Ntango maloba yango ekokokisama, lokola kobebisama ya Yelusaleme ekómi pene, liboso Baezipito mpe na nsima bato ya Babilone, bakómisi bakonzi ya Yuda basali na bango. Na nsima, Mokonzi Yoyakini mpe bato mosusu ya libota ya mokonzi bazali kati na bato ya liboso oyo bamemami na boombo na Babilone.—2 Ntango 36:4, 9, 10.
Kosepela esili na mokili yango
9, 10. (a) Mosala ya bilanga ezali na esika nini na Yisalaele? (b) Elilingi oyo elobi ete moto na moto ‘afandi na nse ya vinyo na ye mpe na nse na nzete ya ye ya figi’ elimboli nini?
9 Bato ya ekólo ya Yisalaele bazalaki basali-bilanga. Kobanda ntango oyo Bayisalaele bakɔtaki na Mokili ya Ndaka, bafandaki wana mpo na kolona bilanga mpe kobɔkɔla bibwele. Yango wana, mosala ya bilanga ezalaki na esika ya ntina mingi na Mobeko oyo bapesaki Yisalaele. Bato ya mokili yango basengelaki kopesa mabele bopemi ya sabata nsima ya mbula nsambonsambo mpo ete mabele ebonga lisusu mpo na kolona. (Exode 23:10, 11; Levitike 25:3-7) Bafɛti misato oyo bato ya ekólo yango basengeli kosala mbula na mbula ezali kosalema na bileko ya bilanga.—Exode 23:14-16.
10 Bilanga ya vinyo ezali komonana bipai nyonso na mokili yango. Makomami elobeli masanga ya vinyo, oyo eutaka na nzete ya vinyo, ete ezali likabo oyo euti na Nzambe mpe “ekosepelisa motema ya moto.” (Nzembo 104:15) Moto na moto ‘afandi na nse ya vinyo na ye mpe na nse ya nzete ya [figi],’ yango ezali elilingi ya kozala na biloko mingi, na kimya mpe na libateli na boyangeli ya sembo ya Nzambe. (1 Mikonzi 4:25; Mika 4:4) Soki vinyo eboti mingi, yango ezali komonisa lipamboli mpe ezali kotinda bato báyemba mpe básepela. (Basambisi 9:27; Yilimia 25:30) Kasi soki nzete ya vinyo ebimisi bitape te to eboti mbuma te, soki bilanga ya vinyo etikali mpamba to ebimisi nzube, yango ezali elembeteli ete Nzambe alongoli lipamboli na ye—ezali eleko ya mawa mpenza.
11, 12. (a) Ndenge nini Yisaya alobeli makambo oyo ekozala ntango Yehova akosambisa? (b) Bomoi nini ya mawa Yisaya alobeli?
11 Yango wana, ebongi mpenza ete Yisaya asalela lisese ya bilanga ya vinyo mpe mbuma na yango mpo na kolobela bizaleli oyo ekozala na mokili yango ntango Yehova akolongola lipamboli na ye: “Vinyo ya sika ezali kolela, [nzete ya vinyo, NW] ezali kokauka, mitema nyonso ya esengo ezali kokimela. Esengo ya ngɔmɔ [esili, NW], makɛlɛlɛ ya basepeli esuki, esengo ya nzɛnzɛ [esili, NW]. Bakomɛla vinyo lisusu na nzembo te, masanga ezali na bololo epai na baoyo bakomɛlaka yango. [Engumba oyo etikali mpamba, NW] ebukami, ndako na ndako ekangami ete moto [akɔta te. Loyenge, NW] ezali kati na nzela mpo na kozanga vinyo, bisengo nyonso [esili, NW], kosepela na mokili elongwi. Mboka etikali mpamba, ekuke ebukami na kobebisama.”—Yisaya 24:7-12.
12 Ngɔmɔ mpe nzɛnzɛ ezali bisaleli kitoko ya kobɛta miziki mpo na kokumisa Yehova mpe kosepela. (2 Ntango 29:25; Nzembo 81:2) Miziki na yango ekoyokana te ntango etumbu ya Nzambe ekokita. Bato bakobuka lisusu mbuma ya vinyo na esengo te. Makɛlɛlɛ ya esengo na kati ya Yelusaleme oyo ebebisami ekoyokana te, ekuke na yango “ebukami na kobebisama” mpe bandako na yango “ekangami,” mpo ete moto moko akɔta te. Oyo nde makambo ya mawa mpo na bato ya mokili oyo ezalaki na mabele malamu!
Batikali “bakoyemba na esengo”
13, 14. (a) Wapi mibeko ya Yehova oyo elobeli kobuka mbuma? (b) Ndenge nini Yisaya asaleli mibeko oyo etali kobuka mbuma mpo na komonisa ete ntango Yehova akosambisa bato mosusu bakobika? (c) Atako bakokutana na bileko ya komekama, bato ya Yuda oyo bazali sembo bakoki kolikya nini?
13 Mpo na kobuka mbuma ya olive, Bayisalaele basalelaka nzete moko ya molai, babɛtaka yango na likoló ya nzete ya olive mpo na kokweisa mbuma na yango. Mobeko ya Nzambe epekisaki kozonga lisusu koluka na bitape ya nzete mpo na kobuka mbuma ya olive oyo etikali. Basengeli mpe te kokɔngɔla bikango ya vinyo oyo etikali na nzete nsima ya kobuka yango. Oyo etikalaka nsima ya kobuka ezali mpo babola—“mopaya mpe etike mpe mwasi-akufeli-mobali”—bálɔkɔta yango. (Deteronome 24:19-21) Lokola asaleli ndakisa ya mibeko wana oyo eyebani malamu, Yisaya amonisi likanisi ya kobɔndisa ndenge alobi ete ntango oyo Yehova akosambisa ekómi pene, kasi babiki bakozala: “Ekozala bongo na kati ya mokili na kati ya mabota, lokola wana nzete ya [olive, NW] ebɛtami mpe mbuma ya [vinyo, NW] elɔkɔtami nsima ya ntango ya kobuka. Bakotombola mingongo na bango, bakoyemba na esengo, mpo na nkembo ya [Yehova] bakoganga longwa na [mbu. Yango wana na etúká ya pole basengeli kokumisa Yehova, na bisanga ya mbu nkombo ya Yehova, Nzambe ya Yisalaele, NW]. Longwa na nsuka ya mokili toyoki nzembo ya kosanzola, [Kitoko mpo na Moyengebene, NW].”—Yisaya 24:13-16a.
14 Kaka ndenge mwa mbuma mosusu etikalaka likoló ya nzete nsima ya kobuka, ndenge moko mpe bato mosusu bakotikala nsima ya ntango oyo Yehova akosambisa—“nzete ya olive ebɛtami mpe mbuma ya vinyo elɔkɔtami nsima ya ntango ya kobuka.” Lokola Yisaya 24 vɛrsɛ 6 elobi yango, mosakoli asili kolobela bato yango, amonisi ete “bobele motuya moke ya bato bazali kotikala.” Atako motuya moke, babiki bakozala na ntango Yelusaleme mpe Yuda ekobebisama, mpe na nsima batikali bakolongwa na boombo mpo na kotondisa lisusu mokili yango na bato. (Yisaya 4:2, 3; 14:1-5) Atako bato ya motema sembo bakokutana na bileko ya komekama ya makasi, bakoki kolikya ete lobiko mpe esengo ezali kozela bango. Babiki bakomona kokokisama ya liloba ya esakweli ya Yehova mpe bakososola ete Yisaya azalaki mosakoli ya solosolo ya Nzambe. Bakotonda na esengo ntango bakomona na miso kokokisama ya bisakweli ya kozongisama na mokili yango. Kobanda na bipai oyo bapanzanaki—ezala na bisanga ya Méditerranée na Wɛsti, na Babilone na “etuka ya pole” (epai moi ebimaka, to Ɛsti), to epai mosusu mosika, bakokumisa Nzambe mpamba te babikisamaki, mpe bakoyemba: “Kitoko mpo na Moyengebene.”
Ntango Yehova akosambisa moto moko te akokima
15, 16. (a) Yisaya azali koyoka ndenge nini mpo na oyo ekokómela bato na ye? (b) Nini ekokómela bafandi ya mokili yango oyo bazali sembo te?
15 Nzokande, sikawa, ntango ekoki naino te mpo na kosepela. Yisaya amonisi bato ya ntango na ye makambo oyo ezali kosalema, alobi ete: “Nde nalobi ete, [Mpo na ngai nakɔndi, mpo na ngai nakɔndi! Mawa na ngai! Bakabi bakabi mpenza. Ɛɛ bakabi bakabi mpenza kokaba, NW]! Nsɔmɔ mpe libulu mpe motambo eyei epai na yo, ɛ mofandi na mokili. Ekozala ete, ye oyo akokima mpo na mongongo ya nsɔmɔ akokwea na libulu; ye oyo akolubwa na libulu, akosimbama na motambo. Zambi maninisa na likoló mazipolami, mpe miboko na mikili [mikoningana, NW]. Mokili ebukami kobukama mpenza, mokili epaswami kopaswama mpenza, mokili [eningisami koningisama, NW] mpenza. Mokili etelengani lokola moto oyo alangi masanga, [eningani, NW] lokola mongombo; lisumu na yango ezali na bozito likoló na yango, ekwei mpe ekotɛma lisusu te.”—Yisaya 24:16b-20.
16 Yisaya atondi na mawa mpo na oyo ekokómela bato na ye. Makambo oyo ezali kosalema zingazinga na ye ezali kobɛlisa ye mpe kopesa ye mawa. Bakabi bazali ebele mpe bazali kopesa bafandi ya mokili yango nsɔmɔ. Ntango Yehova akobatela bango lisusu te, bafandi ya Yuda oyo bazali sembo te bakobanga butu na moi. Bakoyeba te nini ekokómela bango. Bakozwa ata nzela te ya kokima libebi oyo ekokómela bango mpamba te basundoli mitinda ya Yehova mpe bazali kotalela bwanya na ye te. (Masese 1:24-27) Libebi ekoya atako bakabi na mokili yango basali nyonso mpo na kondimisa bato ete makambo nyonso ekozala malamu, bazali koloba lokuta mpe kokosa mpo na komema bango na kobebisama. (Yilimia 27:9-15) Banguna bakouta libándá mpe bakokɔta, bakopunza bango mpe bakomema bango na boombo. Nyonso wana ezali kotungisa Yisaya mingi.
17. (a) Mpo na nini moto moko akoki kokima te? (b) Ntango nguya ya etumbu ya Yehova ekosopama longwa makoló, nini ekokómela mokili yango?
17 Kasi, mosakoli asɛngisami koloba ete mwango ya kokima ekozala te. Ezala ata epai wapi bato bakomeka kokima, bakokangama. Bamosusu bakoki kokima mpasi oyo, kasi bakokangama na oyo kuna—libateli ekozala te. Ekozala lokola nyama oyo bazali kolanda, ekimi kokwea na libulu kasi ekei kokangama na motambo. (Kokanisá na Amosa 5:18, 19.) Nguya ya etumbu ya Yehova ekosopama longwa na makoló mpe ekoningisa miboko mpenza ya mokili yango. Lokola moto oyo alangwe masanga, mokili yango etelengani mpe ekwei, etondi na bozito ya masumu mpe ezali kokoka kotɛlɛma te. (Amosa 5:2) Kosambisa ya Yehova ezali mpo na libela. Kobebisama mpe kobukana monene ekobebisa mokili yango nyɛɛ.
Yehova akoyangela na nkembo
18, 19. (a) “Mampinga ya likoló” ekoki kozala banani, mpe ndenge nini bayanganisami “na ndako na monyɔlɔlɔ”? (b) Na lolenge nini mbala mosusu bakotyela “limpinga ya likoló” likebi “nsima ya mikolo mingi”? (c) Ndenge nini Yehova atyeli “bakonzi ya mikili nyonso” likebi?
18 Esakweli ya Yisaya elobeli sikawa mpe makambo mosusu, elobeli kokokisama ya nsuka ya mokano ya Yehova: “Na mokolo yango, [Yehova akotya likebi na limpinga ya likoló, na likoló, NW] mpe epai na mikonzi ya mokili awa na mokili. Bakoyanganisama elongo lokola bakangami kati na libulu; bakokangama na ndako na monyɔlɔlɔ mpe nsima na mikolo mingi [bakotyamela likebi, NW]. Bongo sanza ekozwa mikakatano, moi mpe ekoyokisama nsɔni; zambi [Yehova] na bibele akozala mokonzi likoló na ngomba na Siona mpe kati na Yelusaleme, akozala mpe na nkembo liboso na bampaka na ye.”—Yisaya 24:21-23.
19 “Limpinga ya likoló” ekoki kozala bademo, ‘mikonzi ya mokili oyo na molili, . . . bilimo mabe kati na Likoló.’ (Baefese 6:12) Banda kala bazali kosalela banguya ya mokili oyo. (Danyele 10:13, 20; 1 Yoane 5:19) Mokano na bango ezali ya kolongola bato na nzela ya Yehova mpe ya losambo na ye ya pɛto. Balongi mpenza kokosa bato ya Yisalaele mpo bálanda misala ya mbindo ya bikólo ya zingazinga na bango mpe na yango bázwa etumbu ya Nzambe! Kasi, Satana mpe bademo na ye basengeli kozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe ntango nsukansuka akotyela bango na bayangeli ya mabele likebi, elingi koloba “bakonzi ya mikili nyonso,” oyo bazali kotinda ete bápesa Nzambe mokɔngɔ mpe bábuka mibeko na ye. (Emoniseli 16:13, 14) Na maloba ya elilingi, Yisaya alobi ete bakoyanganisama mpe “bakokangama na ndako na monyɔlɔlɔ.” “Nsima ya mikolo mingi,” mbala mosusu ntango Satana na bademo na ye (kasi “bakonzi ya mikili” te) bakokangolama mpo na mwa ntango na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Yesu Klisto, Nzambe akopesa bango etumbu ya nsuka oyo babongi na yango.—Emoniseli 20:3, 7-10.
20. Na ntango ya kala mpe na mikolo na biso, ndenge nini mpe ntango nini Yehova “akómi mokonzi”?
20 Eteni yango ya esakweli ya Yisaya epesaki Bayuda elikya moko malamu mpenza. Na ntango oyo Yehova ye moko alingi, akosala ete Babilone ya kala ekwea mpe akozongisa Bayuda na mokili na bango. Na mobu 537 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), ntango alakisaki nguya na ye mpe bokonzi na ye na lolenge wana mpo na bolamu ya basaleli na ye, bakokaki koloba mpenza mpo na bango ete: “Nzambe na bino akómi mokonzi!” (Yisaya 52:7, NW) Na mikolo na biso, Yehova ‘akómaki mokonzi’ na 1914 ntango atyaki Yesu Klisto Mokonzi na Bokonzi na ye ya makoló. (Nzembo 96:10) ‘Akómaki lisusu mokonzi’ na 1919 ntango alakisaki nguya ya bokonzi na ye, asikolaki Yisalaele ya elimo na boombo ya Babilone Monene.
21. (a) Na lolenge nini “sanza ekozwa mikakatano mpe moi ekoyokisama nsɔni”? (b) Libyangi nini ezali koyokana makasi oyo ekokokisama na ndenge ya monene koleka?
21 Yehova ‘akokóma lisusu mokonzi’ ntango akoboma Babilone Monene mpe ebongiseli ya makambo ya mokili mabe oyo. (Zekalia 14:9; Emoniseli 19:1, 2, 19-21) Na nsima, boyangeli ya Bokonzi ya Yehova ekongɛnga makasi mpenza, mpe kongɛnga ya sanza na butu to kongɛnga ya moi na nzanga ekokokana soki moke te na nkembo na yango. (Kokanisá na Emoniseli 22:5.) Ekozala lokola nde sanza na moi ekoyoka nsɔni mpo na komikokanisa na nkembo ya Yehova na bibele. Yehova akoyangela nyonso. Nguya na ye mpe nkembo na ye ekomonana liboso na nyonso. (Emoniseli 4:8-11; 5:13, 14) Oyo nde elikya kitoko! Na ntango wana, libyangi oyo epesami na Nzembo 97:1 (NW), ekoyokana na mabele mobimba na kokokisama na yango ya monene: “Yehova ye moko akómi mokonzi! Tiká ete mabele esepela. Tiká ete bisanga eyoka esengo.”
[Elilingi na lokasa 262]
Miziki mpe makɛlɛlɛ ya esengo ekoyokana lisusu te na mokili yango
[Elilingi na lokasa 265]
Kaka ndenge mwa mbuma mosusu etikalaka likoló ya nzete nsima ya kobuka, ndenge moko mpe bato mosusu bakotikala nsima ya mokolo Yehova akosambisa
[Elilingi na lokasa 267]
Yisaya atondi na mawa mpo na oyo ekokómela bato na ye
[Elilingi na lokasa 269]
Ezala moi to sanza, moko te ekokokana na nkembo ya Yehova