Mokapo ya Minei
Ndako ya Yehova etombwami
1, 2. Maloba nini ekomami na libanda ya lopango ya ONU, mpe maloba yango eutá wapi?
“BAKOTULA mipanga na bango ete mizala bitimweli, mpe makonga na bango ete mazala bikateli na matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te. Bakoyekola etumba lisusu mpe te.” Maloba yango ekomami na efelo moko na libanda ya lopango ya ONU na engumba New York. Na boumeli ya bambula mingi, bato bayebaki te esika maloba yango eutaki. Lokola mokano ya ONU ezali ya kotya kimya na mokili mobimba, ezalaki mpasi te mpo na koloba ete maloba yango eutaki na bato oyo basalaki ONU, na 1945.
2 Nzokande, na 1975, batyaki nkombo Yisaya na nse ya maloba yango. Eyebanaki sikawa polele ete maloba yango ezalaki ya sika te. Ezalaki kutu esakweli moko oyo ekomamaki esili koleka mbula 2 700 na kati ya oyo ezali lelo mokapo ya mibale ya mokanda ya Yisaya. Na boumeli ya bankóto ya bambula, bato oyo balingaka kimya bazali komituna ndenge nini mpe ntango nini makambo oyo Yisaya asakolaki ekokokisama. Ezali lisusu na ntina te ya komituna. Lelo oyo tozali komona na miso ndenge esakweli yango ya kala ezali kokokisama.
3. Mabota nini bazali kotula mipanga na bango mizala bitimweli?
3 Mabota nini bazali kotula mipanga na bango mizala bitimweli? Ya solo, ezali mabota ya politiki te mpe baguvɛrnɛma ya mikolo na biso te. Kino sikawa mabota yango ezali kosala mipanga, elingi koloba bibundeli, mpo na kobimisa bitumba mpe mpo na kotya “kimya” na makasi. Mpo na koloba solo, banda kala, mabota bazalaka na mposa ya kokómisa bitimweli na bango mipanga! Esakweli ya Yisaya ezali kokokisama epai ya bamonisi ya mabota nyonso, bato oyo basambelaka Yehova, “Nzambe ya kimya.”—Bafilipi 4:9.
Mabota oyo bazali kokenda epai losambo ya pɛto ezali
4, 5. Bavɛrsɛ mibale ya liboso na Yisaya mokapo 2 ezali kosakola nini, mpe nini ezali komonisa ete ebongi kotyela maloba yango motema?
4 Yisaya mokapo 2 ebandi na maloba oyo: “Likambo limonaki Yisaya, mwana na Amosa, mpo na Yuda mpe Yelusaleme. Ekozala ete na mikolo na nsuka, ngomba na ndako na [Yehova] ekokokisama likoló koleka ngomba nyonso, ekotombwa likoló na [ngomba mike, NW]; mpe mabota nyonso bakokenda wana.”—Yisaya 2:1, 2.
5 Tosengeli koyeba ete makambo oyo Yisaya asakoli ezali makanisi mpamba te. Yisaya azwi etinda ya kokoma makambo oyo ‘esengeli kosalema’ mpenza. (Biso nde totɛngisi makomi.) Ezala ata likambo nini oyo Yehova akani kosala, yango “ekolonga.” (Yisaya 55:11) Na ntembe te, mpo na komonisa ete ebongi kotyela elaka na ye motema, Nzambe asalelaki mosakoli Mika, oyo azalaki na ntango ya Yisaya mpo akoma mpe esakweli yango oyo ezali na Yisaya 2:2-4 na mokanda na ye.—Mika 4:1-3.
6. Ntango nini esakweli ya Yisaya ezali kokokisama?
6 Ntango nini esakweli ya Yisaya ekokokisama? “Na mikolo na nsuka.” Biblia Liloba lya Nzambe elobi: “O mikolo mya nsúka.” Makomami ya Grɛki ya boklisto elobelaki makambo oyo ekomonisa eleko yango. Kati na makambo yango tokoki kotánga bitumba, koningana ya mabele, maladi mabe, kozanga biloko ya kolya, mpe “ntango ya mpasi.”a (2 Timote 3:1-5; Luka 21:10, 11) Kokokisama ya bisakweli wana ezali kopesa bilembeteli mingi ete tozali na “nsuka ya mikolo yango,” mikolo ya nsuka ya ebongiseli ya mokili oyo. Yango wana, tosengeli komona kokokisama ya makambo oyo Yisaya asakolaki, na eleko na biso.
Ngomba moko epai oyo esengeli kosambela
7. Elilingi nini ya esakweli Yisaya alobeli?
7 Na maloba mokuse, Yisaya alobeli elilingi moko ya esakweli oyo ezali kobenda likebi. Tozali komona ngomba moko molai, oyo na nsɔngɛ na yango ezali na ndako moko ya nkembo, tempelo ya Yehova. Ngomba yango eleki ngomba nyonso oyo ezali zingazinga na yango na molai. Kasi, ngomba yango ezali kopesa nsɔmɔ te, ezali mpe kobangisa te; kutu ezali nde kobenda bato. Bato ya mabota nyonso bazali na mposa ya komata na ngomba ya ndako ya Yehova; bazali kokenda kuna. Ezali mpasi te mpo na komona likambo yango na makanisi, kasi yango elimboli mpenza nini?
8. (a) Ngomba mike mpe ngomba minene ezalaki na boyokani na nini na mikolo ya Yisaya? (b) Ndenge mabota bazali kokenda na “ngomba ya ndako ya [Yehova],” yango elimboli nini?
8 Awa, mbala mingi, na mikolo ya Yisaya, ngomba mike mpe ngomba minene ezalaki bisika oyo bazalaki kosalela mpo na losambo. Na ndakisa, ezalaki bisika ya losambo ya bikeko mpe bisika ya kotonga bandako-nzambe ya banzambe ya lokuta. (Deteronome 12:2; Yilimia 3:6) Nzokande, ndako to tempelo ya Yehova ezali kongɛngisa nsɔngɛ ya Ngomba Moliya na Yelusaleme. Bayisalaele ya sembo bazali kosala mobembo na Yelusaleme mbala misato na mbula mpe bazali komata Ngomba Moliya mpo na kosambela Nzambe ya solo. (Deteronome 16:16) Yango wana, ndenge mabota bazali kokenda na “ngomba ya ndako ya [Yehova],” yango ezali komonisa koyanganisama ya ebele ya bato na losambo ya solo.
9. “Ngomba ya ndako ya [Yehova]” elimboli nini?
9 Ya solo, lelo oyo, basaleli ya Nzambe bakendaka te koyangana likoló ya ngomba moko boye oyo ezali na tempelo ya mabanga na nsɔngɛ na yango. Tempelo ya Yehova oyo ezalaki na Yelusaleme ebebisamaki na mampinga ya basoda ya Baloma na mobu 70 ya ntango na biso (T.B.). Lisusu, ntoma Paulo alobeli yango polele ete tempelo ya Yelusaleme mpe mongombo oyo ezalaki liboso na yango ezalaki elilingi. Ezalaki komonisa eloko moko ya monene ya elimo, “hema ya solo oyo etɛmisami na Nzambe [kasi, NW] na bato te.” (Baebele 8:2) Hema yango ya elimo ezali ebongiseli ya kobɛlɛma na Yehova mpo na kosambela ye na lisalisi ya mbeka oyo Yesu Klisto apesaki mpo na kosikola bato. (Baebele 9:2-10, 23) Na boyokani na likanisi yango, “ngomba ya ndako ya [Yehova]” oyo elobelami na Yisaya 2:2 ezali komonisa losambo ya pɛto ya Yehova oyo etombwami likoló, na eleko na biso. Bato oyo bazali kokɔta na losambo ya pɛto bazali kotondana te na esika moko boye, bazali nde koyangana kati na bomoko ya losambo.
Losambo ya pɛto etombwami
10, 11. Na lolenge nini losambo ya Yehova etombwami na mikolo na biso?
10 Mosakoli alobi ete “ngomba ya ndako ya [Yehova],” to losambo ya pɛto “ekokokisama likoló koleka ngomba nyonso” mpe “ekotombwa likoló na [ngomba mike].” Liboso mpenza ya ntango ya Yisaya, Mokonzi Davidi amemaki sanduku ya kondimana na Ngomba Siona na Yelusaleme, ngomba oyo ezalaki likoló na mɛtrɛ 760 banda na nivo ya mai monene. Sanduku yango efandaki kuna tii ntango bamemaki yango na tempelo ntango basilisaki kotonga yango na Ngomba Moliya. (2 Samwele 5:7; 6:14-19; 2 Ntango 3:1; 5:1-10) Yango wana, na mikolo ya Yisaya, sanduku ya bulɛɛ esilaki kotombwama mpe kotyama na tempelo, na esika moko likoló koleka ngomba mike mingi oyo ezalaki zingazinga wana, epai bato bazalaki komipesa na losambo ya lokuta.
11 Ya solo, na makambo ya elimo, losambo ya Yehova ezalaka ntango nyonso likoló koleka losambo ya bato oyo basalelaka banzambe ya lokuta. Nzokande, na mikolo na biso, Yehova atomboli losambo na ye likoló koleka, mpe eleki lolenge nyonso ya losambo ya mbindo, ɛɛ, koleka mpenza “ngomba mike” mpe “likoló koleka ngomba nyonso.” Ndenge nini asali yango? Mingi mpenza ndenge azali koyanganisa bato oyo balingi kosambela ye na “elimo mpe na solo.”—Yoane 4:23, NW.
12. “Bana ya Bokonzi” ezali banani, mpe koyanganisama nini esili kosalema?
12 Klisto Yesu alobaki ete ‘nsuka ya ebongiseli ya biloko oyo’ ekozala eleko moko ya kobuka mbuma ntango baanzelu bakoyanganisa “bana ya Bokonzi”—bato oyo bazali na elikya ya koyangela elongo na Yesu kati na nkembo kuna na likoló. (Matai 13:36-43) Banda 1919, Yehova apesi “batikali” ya bana yango mokumba ya kosala elongo na baanzelu na mosala ya kobuka mbuma. (Emoniseli 12:17) Yango wana, na ebandeli, “bana ya Bokonzi,” bandeko ya Yesu bapakolami, bango nde bayanganisamaki. Na nsima, bazali kopesa mabɔkɔ na mosala mosusu ya koyanganisa.
13. Na lolenge nini Yehova apambolaki batikali bapakolami?
13 Na ntango oyo ya kobuka mbuma, Yehova asalisi batikali bapakolami mokemoke básosola mpe básalela Biblia, Liloba na ye. Yango mpe epesi nzela ete losambo ya pɛto etombwama. Atako ‘molili ezipi mokili, molili tuu ezipi mpe mabota,’ bapakolami bazali “kongɛnga lokola miinda” kati na bato, Yehova asukoli bango mpe apɛtoli bango. (Yisaya 60:2; Bafilipi 2:15) Lokola ‘batondi na boyebi ya mokano na ye, na mayele nyonso mpe na bososoli na elimo,’ bapakolami yango na elimo bazali ‘kongɛnga lokola moi kati na Bokonzi ya Tata na bango.’—Bakolose 1:9; Matai 13:43.
14, 15. Longola koyanganisama ya “bana ya Bokonzi,” koyanganisama mosusu nini ezali kosalema, mpe ndenge nini Hagai asakolaki yango?
14 Bato mosusu mpe bazali kokenda na “ngomba ya ndako ya [Yehova].” Lokola Yesu abengi bango “bampate mosusu,” bato yango bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko na paladiso awa na mabele. (Yoane 10:16; Emoniseli 21:3, 4) Banda na bambula ya 1930, bazalaki bankóto, na nsima bankama ya bankóto, mpe sikawa bazali bamilio! Na emonaneli moko oyo ntoma Yoane amonaki, balobelami lokola “ebele monene, oyo moto te akoki kotánga motuya na bango; bauti na mabota nyonso, na mikili nyonso, na bibolo nyonso, na minɔkɔ nyonso.”—Emoniseli 7:9.
15 Mosakoli Hagai asakolaki komonana ya ebele monene yango. Akomaki ete: “Yehova na bibele alobi boye ete, ‘Lisusu mbala moko—nsima na mwa ntango moke—nakoningisa makoló mpe mokili mpe mai monene mpe mabele. Ya solo, nakoningisa mabota nyonso mpe biloko kitoko ya mabota [baoyo bazali koya kosangana elongo na baklisto bapakolami kati na losambo ya pɛto] basengeli koya mpe nakotondisa mpenza ndako oyo na nkembo,’ Yehova na bibele alobi bongo.” (Hagai 2:6, 7, NW) “Ebele monene” yango oyo ezali kokola se kokola mpe baninga na bango bapakolami bazali kotombola mpe kopesa lokumu na losambo ya pɛto na ndako ya Yehova. Bato bakómá naino ebele boye te na losambo ya Nzambe ya solo, yango ezali kopesa nkembo na Yehova mpe na Yesu Klisto oyo ye atii Mokonzi. Mokonzi Salomo akomaki ete: “Mpo na mingi na bato, mokonzi akozwa lokumu.”—Masese 14:28.
Losambo etombwami na bomoi ya bato
16-18. Mbongwana nini bato mosusu basali mpo na kosambela Yehova na ndenge oyo ye azali kondima?
16 Yehova abongi kozwa lokumu nyonso mpo na kotombwama ya losambo ya pɛto na eleko na biso. Nzokande, bato oyo bayaka epai na ye, bazwaka libaku malamu ya kokokisa mpe mokumba na mosala yango. Kaka ndenge komata ngomba esɛngaka kosala makasi, esɛngaka mpe kosala makasi mpo na koyekola mitinda ya Nzambe mpe komitambwisa na boyokani na yango. Ndenge moko na baklisto ya ekeke ya liboso, lelo oyo basaleli ya Nzambe batiki bomoi mpe misala oyo eyokani te na losambo ya solo. Basali ya pite, basambeli ya bikeko, basali ya ekobo, bayibi, bato ya lokoso, balangwi ya masanga, mpe bato mosusu ya ndenge wana babongoli bizaleli na bango mpe ‘basili kosukwama’ na miso ya Nzambe.—1 Bakolinti 6:9-11.
17 Ndakisa moko ezali ya elenge mwasi moko oyo akomaki ete: “Kala, nazalaki ata na elikya moko te. Nazalaki kosala pite mpe kolangwa masanga. Nazwaki maladi oyo eutaka na kosangisa nzoto. Nazalaki mpe kotɛka bangi mpe nazalaki kotalela ata likambo moko te.” Nsima ya koyekola Biblia, abongwanaki mingi mpe abandaki kotambwisa bomoi na ye na boyokani na mitinda ya Nzambe. Sikawa alobi ete: “Nazali na kimya na makanisi, nazali komimona moto, nazali na elikya mpo na mikolo ezali koya, nazali na libota ya solosolo, mpe oyo eleki nyonso, nazali na boyokani malamu na Tata na biso, Yehova.”
18 Ata nsima ya kondimama na Yehova, bato nyonso basengeli kokoba kotombola losambo ya pɛto mpe kopesa yango esika ya liboso na bomoi na bango. Esili koleka bankóto ya bambula, na lisalisi ya Yisaya, Yehova alobaki ete andimi mpenza ete na mikolo na biso ebele ya bato bakozala na mposa makasi ya kokómisa losambo na ye eloko oyo eleki ntina na bomoi na bango. Ozali kati na bato yango?
Libota oyo eteyami banzela ya Nzambe
19, 20. Makambo nini bateyaka basaleli ya Nzambe, mpe epai wapi?
19 Yisaya ayebisi biso makambo mosusu oyo etali bato oyo bazali kokɔta na losambo ya solo. Alobi ete: “Bikólo mingi bakokenda mpe bakoloba ete, Yakani, tóbuta na ngomba na [Yehova], epai ya ndako ya Nzambe ya Yakobo, ete alakisa biso nzela na ye mpe ete tótambola na bipai bikokendaka ye. Zambi Mobeko ekobima na Siona mpe liloba na [Yehova] uta na Yelusaleme.”—Yisaya 2:3.
20 Yehova atikaka basaleli na ye te báyengayenga lokola bampate ebungi. Na lisalisi ya Biblia mpe ya mikanda oyo elimbolaka Biblia, azali kopesa bango “Mibeko” na ye mpe “liloba” na ye mpo báyekola banzela na ye. Boyebi yango esalisaka bango ‘bátambola na bipai bikokendaka ye.’ Lokola mitema na bango etondi na botɔndi mpe na boyokani na ndenge oyo Nzambe azali kotambwisa bango, bazali kolobelana banzela ya Yehova. Bayanganaka na mayangani ya minene mpe na bituluku ya mike—na Ndako ya Bokonzi mpe na bandako ya bandeko—mpo na koyoka mpe koyekola banzela ya Nzambe. (Deteronome 31:12, 13) Na yango, balandaka ndakisa ya baklisto ya liboso, oyo bazalaki koyangana mpo na kolendisana mpe kopesana toli mpo na “kolinganaka mpe kosalaka misala malamu.”—Baebele 10:24, 25.
21. Basaleli ya Yehova bazali kopesa mabɔkɔ na mosala nini?
21 Babengaka bato mosusu báya ‘kobuta’ na losambo ya Yehova Nzambe oyo etombwami. Yango eyokani mpenza na etinda ya Yesu oyo apesaki bayekoli na ye liboso ya komata na likoló! Ayebisaki bango ete: “Boye bókenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso, kobatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya [elimo santu, NW], kolakisa mpe bango ete bátosa nyonso esili ngai kolaka bino.” (Matai 28:19, 20) Lokola bazali na lisungi ya Nzambe, Batatoli ya Yehova bamonisaka botosi na bango wana bakendaka bipai nyonso na mokili mobimba koteya mpe kozalisa bayekoli, na nsima kobatisa bango.
Kokómisa mipanga bitimweli
22, 23. Yisaya 2:4 esakoli nini, mpe mokonzi moko ya ONU alobaki nini mpo na yango?
22 Sikawa tokómi na vɛrsɛ oyo elandi, oyo eteni na yango ekomami na efelo ya libanda ya lopango ya ONU. Yisaya akomi ete: “Akosambisa kati na mabota, [mpe akozongisa makambo na molɔngɔ na ntina na bato mingi, NW]; bakotula mipanga na bango ete mizala bitimweli, mpe makonga na bango ete mazala bikateli na matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te.”—Yisaya 2:4.
23 Ezali likambo ya pɛtɛɛ te mpo na kokokisa mokano yango. Mokolo moko, Federico Mayor, mokambi ya UNESCO (Ebongiseli ya ONU oyo etalelaka mateya, siansi mpe bizaleli ya bato), alobaki ete: “Emonani lokola ete atako bitumba ezali kobimisa makambo nyonso ya nsɔmɔ oyo bazali kolobela na radio, na televizyo mpe kokoma na mikanda lelo oyo, kasi bato bazali kotika te kosala bibundeli ya nsɔmɔ na boumeli ya bikeke. Ezali bato ya lelo oyo nde bazali na mokumba monene mpe ya mpasi oyo euti na Biblia ya ‘kotula mipanga na bango ete mizala bitimweli’ mpe ya kolongola likanisi ya kobunda—oyo ebandá kala—ekóma likanisi ya kozala na kimya. Yango ekoki kozala likambo oyo eleki malamu mpe ya lokumu oyo ‘bato ya mokili mobimba’ bakoki kosala, mpe likabo eleki malamu oyo tokopesa na bakitani na biso.”
24, 25. Maloba ya Yisaya ezali kokokisama epai ya banani, mpe na lolenge nini?
24 ONU akokoka soki moke te kokokisa mokano yango ya lokumu. Azali na makoki ya kosala yango te. Maloba ya Yisaya ekokisami epai na bato mingi ya mabota oyo basangani kati na losambo ya pɛto. Yehova ‘abongisi makambo’ kati na bango. Ateyi basaleli na ye koyeba kozala na kimya elongo na basusu. Ya solo, kati na mokili oyo ekabwani mpe ebebi na kowelana, na lolenge ya elilingi, basaleli ya Nzambe basili kotula “mipanga na bango ete mizala bitimweli, mpe makonga na bango ete mazala bikateli na matiti.” Na ndenge nini?
25 Libosoliboso, bamikɔtisaka na bitumba ya bikólo te. Mwa moke liboso ete Yesu akufa, bato bayaki na bibundeli mpo na kokanga ye. Ntango Petelo abimisaki mopanga mpo na kokɔtela Nkolo na ye, Yesu alobaki na ye ete: “Zongisá mopanga na yo na esika na yango. Zambi baoyo nyonso bakosimba mopanga bakokufa na mopanga.” (Matai 26:52) Kobanda ntango wana, bayekoli ya Yesu batulaka mipanga na bango ete mizala bitimweli mpe baboyaka kosimba bibundeli mpo na koboma bazalani na bango, baboyaka mpe lolenge nyonso ya kopesa mabɔkɔ na bitumba. Balukaka “kozala na bato nyonso [na] kimya.”—Baebele 12:14.
Koluka kozala na kimya
26, 27. Ndenge nini basaleli ya Nzambe “balukaka kimya mpe balandaka yango”? Pesá ndakisa moko.
26 Kimya ya basaleli ya Nzambe esukaka kaka te na koboya komikɔtisa na bitumba. Atako bazali lelo na kati ya mikili koleka 230 mpe bazali koloba minɔkɔ ebele mpe bazali na mimeseno ndenge na ndenge, bazali na kimya kati na bango. Maloba oyo Yesu alobaki na ekeke ya liboso ezali kokokisama epai na bango lelo oyo: “Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.” (Yoane 13:35) Baklisto ya lelo “batyaka kimya.” (Matai 5:9, NW, maloba na nse ya lokasa) “Balukaka kimya mpe balandaka yango.” (1 Petelo 3:11, NW) Yehova asalisaka bango, ye “Nzambe ya kimya.”—Baloma 15:33.
27 Bato mosusu kati na baoyo bakómi koluka kotya kimya bazali bandakisa mpenza malamu. Elenge mobali moko akomaki maloba oyo elandi mpo kolobela bomwana na ye: “Mpo na mikakatano, nayekolaki ndenge ya komibatela. Nakómaki motema makasi mpe na nkanda. Nazalaki ntango nyonso kosuka na kobunda. Mokolo na mokolo, nazalaki kokamatana na mwana mobali moko na kartye, mbala mosusu na makɔfi, mbala mosusu na mabanga to na milangi. Nakómaki matata mingi ntango nazalaki kokola.” Kasi, nsukansuka, andimaki libyangi ya kokenda na “ngomba ya ndako ya Yehova.” Ayekolaki banzela ya Nzambe mpe akómaki moto ya kimya, mosaleli ya Nzambe.
28. Ndenge nini baklisto bakoki kolanda kimya?
28 Basaleli ya Yehova mingi bazalaki na mobulu ndenge wana te. Nzokande, ata na makambo ya mike mpenza —kozala na boboto, kolimbisa, mpe koyokela bato mawa—basalaka makasi mpo na kozala na kimya na bazalani na bango. Atako bazali bato ya kozanga kokoka, basalaka makasi mpo na kosalela toli ya Biblia oyo elobaka ete “soko moto moko azali na moto mosusu likambo, bóyikanaka mpiko, bólimbisanaka.”—Bakolose 3:13.
Mikolo ezali koya ekozala na kimya
29, 30. Elikya nini ezali mpo na mabele na mikolo ezali koya?
29 Yehova asali likambo moko ya malamu mpenza na “nsuka ya mikolo oyo ya nsuka.” Asangisi bato ya mabota nyonso oyo balingi kosalela ye. Ateyi bango kotambola na banzela na ye, banzela ya kimya. Bato yango ezali baoyo bakobika na “bolɔzi monene” oyo ekómi pene mpe bakokɔta na mokili moko ya kimya epai bitumba ekozala lisusu te libela na libela.—Emoniseli 7:14.
30 Mipanga—elingi koloba bibundeli—ekozala lisusu te. Mokomi ya nzembo akomaki mpo na eleko wana ete: “Yaká kotala misala na [Yehova] oyo asali bikamwiseli kati na mokili. Ye akosukisa bitumba kino nsuka na mokili; akobukabuka litimbo mpe akokatakata likonga, akozikisa mpe makalo kati na mɔ́tɔ.” (Nzembo 46:8, 9) Soki tokanisi eleko wana ya esengo, toli ya Yisaya oyo elandi ebongi mpenza lelo lokola na ntango oyo akomaki yango: “Ɛ ndako na Yakobo, yaká, tótambola na pole na [Yehova].” (Yisaya 2:5) Ya solo, tiká ete pole ya Yehova engɛngisa matambe na biso sikawa, mpe tokotambola na nzela na ye libela na libela.—Mika 4:5.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá buku Biblia eteyaka mpenza nini?, na mokapo 9, “Tozali na ‘mikolo ya suka’?,” ebimisami na Batatoli ya Yehova.