Banani bazali balangwi kati na elimo?
“Mawa na motólé na nkembo na balangwi kati na Efalaima.”—YISAYA 28:1.
1. Bat mingi bakanisi nini mpo na mikolo mizala koya, kasi bilikya na bango bikokokana?
TOZALI kobika na eleko moko ya yikiyiki. Bato mingi bazali kokamwa na komona mbongwana na makambo na politike oyo ezali kosalema kati na mokili, mpe na komona bosangani monene ya Nations unies kati na makambo yango. Na Décembre 1989 tokokaki kotanga kati na zulunalo Detroit Free Press ete: “Wana mokili ebelemi na ebandeli ya mibu 90, kimya ekóti na bolóngi nyonso.” Zulunalo moko ya Soviétique esakolaki ete: “Tobelemi na kotula mipanga ete mizala bitimweli.” Secrétaire général ya Nations unies, mpo na ye, alobaki ete: “Koswana mpe kokanelana kati na mabota esili.” Ee, bato bazali na bilikya mingi. mpe ezalela ya mokili ezali sé kobongwana. Kala mingi te, etumba ya Golfe euti komonisa ete mbongwana ekoki kosalema nokinoki. Kasi, mokili ekotya mpenza eleko moko ya kimya mpe ya libateli na solo, elongo na bolamu nyonso bozali na yango? Te. Ya solo, mpasi monene oyo ekoningisa mokili kino mibeko na yango, ezali koya. Ezali bongo mpasi kati na yango mangomba matalelami mingi mpenza.
2. Kokokana nini tozali komona kati na makambo oyo mazali kosalema lelo mpe makambo oyo mazalaki kosalema kala na Yisraele mpe na Yuda?
2 Mpasi yango emonisamaki liboso na makambo oyo mabimaki na Yisraele mpe Yuda, na ekeke ya mwambe mpe na ekeke ya nsambo liboso na ntango na biso. Na eleko yango, bafandi na bikonzi wana, bango mpe bakanisaki ete basilaki kotya kimya. Nzokande, na nzela na Yisaya, mosakoli na ye, Nzambe akebisaki bango ete elikya na bango ezalaki bokósi oyo bosengelaki mosika te komonana polele. Bobele bongo lelo, Jéhovah, na nzela na ba Témoins na ye, azali kokebisa bato ete elikya na bango ya kotya kimya ya solo na milende na bango moko, ezali bokósi. Totanga likebisi na esakweli ya Jéhovah mpe totala lolenge nini yango ezali kokokana na eleko na biso. Ezali na mokapo 28 na mokanda na Yisaya. Ekomamaki na eleko oyo ezalaki liboso na mobu 740 liboso na ntango na biso, na lolenge emonani, ezalaki na nsé na boyangeli ya Peka, mokonzi mabe na Yisraele, mpe na boyangeli ya Akaza, mokonzi motomboki na Yuda.
“Balangwi na Efalaima”
3. Yisaya asakolaki ekateli nini na kozokisa motema?
3 Verset 1 (MN) ya mokapo 28 Yis 28:1 ezali kokamwisa biso na maloba oyo na kosimba motema ete: “Mawa na motólé na nkembo na balangwi kati na Efalaima, mpe na folólo kitoko na ye na nkembo oyo ezali kokauka; oyo ezali na nsongé na lobwako na kobota mbuma mingi ya bango balóngami na vinyo!” Bayisraele baokaki mpasi mpo na ekweiseli wana na kozokisa motema! Banani bazalaki “balangwi na Efalaima”? Mpe “nsongé na lobwako na kobota mbuma mingi” ezali nini? Epai mosusu, maloba oyo mazali na ntina nini mpo na biso?
4. (a) Efalaima mpe nsongé na lobwako na kobota mbuma mingi, emonisi nini? (b) Mpo na nini Yisraele amiyokaki ete azalaki na libateli?
4 Lokola Efalaima ezali libota na bato mingi kati na mabota zomi na Yisraele, liloba “Efalaima” ezalaki mbala mosusu komonisa bokonzi ya Nord na mobimba na yango. “Balangwi na Efalaima” ezalaki bongo balangwi na Yisraele. Kapitale na yango ezalaki Samaria; mboka yango etongamaki likoló na ngomba oyo ezalaki likoló na lobwako moko na kobota mbuma mingi. Na yango, liloba “nsongé na lobwako na kobota mbuma mingi” ekokisami na Samaria. Ntango maloba oyo makomamaki, bokonzi na Yisraele ebebaki mpenza na nzela na losambo. Lisusu, basalaki kondimana ya politike elongo na Sulia mpo na kobundisa Yuda mpe bazalaki uta ntango wana na mayoki ete basilaki kozwa libateli malamu. (Yisaya 7:1-9) Nzokande yango esengelaki koumela te. Mpasi ekómaki; tala mpo na nini Jéhovah alobaki ete: “Mawa na motólé na nkembo na balangwi na Efalaima.”
5. (a) Motólé na nkembo na Yisraele emonisi nini? (b) Banani bazalaki balangwi na Efalaima?
5 “Motólé na nkembo” yango ezalaki nini? Motólé ezali elilingi ya bokonzi. Emonani ete, “motólé na nkembo” emonisaki etelemelo na Yisraele, bokonzi oyo bokabwanaki na Yuda. Kasi likambo moko lisengelaki koya, oyo likotya nsuka na botomboki na bokonzi na Yisraele. Kati na likambo wana, banani bazalaki “balangwi na Efalaima”? Ntembe ezali te ete balangwi bazalaki na Yisraele, mpamba te Samaria ezalaki esika na losambo na mbindo na Bapakano. Nzokande, Biblia ezali kolobela molangwa moleki mpenza monene. Na Yisaya 29:9, totangi ete: “Balangwi, kasi na vinyo te; batelemi, kasi na masanga te.” Ezalaki bongo molangwa na elimo, oyo kolangwa na mbindo mpe na kufa. Emonani mpenza ete ezali motindo wana na kolangwa na elimo nde ezwaki bakonzi na Yisraele, mpe mingi mpenza bakonzi ya lingomba.
6. Eloko nini alangwisaki Yisraele ya kala?
6 Ntina na molangwa na elimo na Yisraele ya kala ezalaki nini? Ezalaki mpenzampenza, kondimana na ye elongo na Sulia mpo na kobundisa Yuda, mpe kondimana wana epesaki bakonzi na Yisraele likanisi ete bazalaki na libateli. Molangwa na elimo na Yisraele ebungisaki bango lolenge malamu ya kotalela makambo. Lokola moto oyo alangwi, Yisraele azalaki na elimo ya kolónga, nzokande azalaki ata na ntina moko te ya kokanisa bongo. Lisusu, Yisraele amonisaki kondimana na ye na molangwa elongo na Sulia, na lolendo nyonso, lokola nde ezalaki biloko kitoko mpo na kokembela nzoto. Nzokande, lokola Yisaya alobeli yango, ezalaki mpenza kitoko oyo ezalaki kokauka: esengelaki koumela ntango molai te.
7, 8. Atako libateli na ye kitoko oyo azalaki na yango, likambo nini lizalaki Yisamaele ya kala?
7 Yisaya alobeli likanisi yango na verset 2 ya mokapo 28, ete: “Tala ete Jéhovah azali na elombé na makasi mpe na nguya. Lokola mbula na matandála, mopepe na kobebisa, lokola mpela na mai na nguya oyo ekotóndaka, ye akokweisa na loboko na ye kino na mabelé.” Nani wana “elombé na makasi mpe na nguya”? Na eleko na Yisraele ya kala, ezalaki Bokonzi ya Asulia. Nguya wana ya mokili mobimba oyo ezalaki na makasi na koboma kozanga kooka mawa, esengelaki kobundisa Yisraele lokola mopepe na kobebisa, lokola mpela na mai na nguya oyo ekotóndaka. Esengelaki kobimisa makambo nini?
8 Na nsima Yisaya alobaki ete: “Mitólé na nkembo na balangwi na Efalaima, ekonyatama na nse na makolo. Mpe folólo na ye kitoko na nkembo oyo ezali na nsongé na lobwako na ye na kobota mbuma mingi, ekokóma lokola mbuma eteli liboso na ntango na moi, wana moto akomona yango, akomela yango naino ezali na loboko na ye.” (Yisaya 28:3, 4) Mpo na Asulia, Samaria, kapitale na Yisraele ezalaki lokola mbuma eteli, oyo esengeli kobukama mpe komela yango. Kondimana oyo Yisraele asalaki elongo na Sulia, oyo ekokani na biloko kitoko mpo na komikembela, esengelaki konyatama na nsé na makolo. Ekokaki kozala lisusu na ntina te na mokolo oyo basengelaki kozwa etumbu. Oyo eleki mabe ezali ete, nkembo ya botomboki na ye, oyo emonisami na motólé, esengelaki konyatama na banguna na Asulia. Oyo nde mpasi monene!
‘Banganga mpe basakoli bamizimbisaki’
9. Mpo na nini libota na Yuda bazalaki mbala mosusu kolikya kozwa nsango malamu epai na Jéhovah, nsango oyo Yisraele ya kala bazwaki yango te?
9 Etumbu monene ezalaki kozela Yisraele. Na boyokani na likebisi oyo lipesamaki na Jéhovah Nzambe, etumbu yango epesamaki na mobu 740 liboso ya ntango na biso, na ntango Samaria ebomamaki na Asulia mpe ete bokonzi ya Nord etangamaki lisusu te lokola ekolo moko ekabwani na mosusu. Lokola tokomona yango, makambo makómelaki Yisraele ya kala, ezali likebisi monene mpo na mangomba ya lokutá, maye mazangi sembo na eleko na biso. Kasi likambo nini lisengelaki kokómela Yuda, ndeko na Yisraele, oyo bokonzi bozalaki na Ngele? Na eleko na Yisaya, tempelo na Jéhovah ezalaki sé kokokisa mosala na yango na Yelusaleme, kapitale na Yuda. Banganga bazalaki kokamba yango ntango nyonso, mpe basakoli lokola Yisaya, Hosea mpe Mika bazalaki koloba na nkombo na Jéhovah. Bongo, nsango nini Jéhovah atindaki epai na Yuda?
10, 11. Yuda azalaki kati na ezalela nini oyo eyokisaki Jéhovah motema mpii?
10 Na nsima alobi na biso ete: “Baoyo [elingi koloba banganga mpe basakoli na Yelusalemel mpe bapengwi mpo na vinyo, batiki nzela mpo na masanga.” (Yisaya 28:7a) Emonani ete bakonzi na lingomba na Bayuda, bango mpe balangwaki. Lokola emonani ete basusu bazalaki balangwi na Yisraele, ezalaki likambo na nsoni. Na yango, Mobeko na Nzambe mopekisaki mpenza banganga ete bamela masanga makasi te wana ezalaki bango kokokisa mosala na tempelo. (Levitike 10:8-11) Soki bamoko kati na bango balangwaki kati na ndako na Nzambe, boye bazalaki kobuka Mobeko na Nzambe na motindo na nsómo.
11 Nzokande molangwa na elimo oyo Yuda azalaki na yango, ezalaki makasi mpenza. Lokola Yisraele asalaki boyokani elongo na Sulia mpo na kobundisa Yuda, bobele bongo Yuda alukaki kozwa libateli na ye na kosaláká kondimana elongo na Asulia. (2 Mikonzi 16:5-9) Atako tempelo mpe basakoli na Nzambe bazalaki kati na bango, Yuda atyaki motema na ye epai na Jéhovah te, likambo oyo asengelaki kosala yango, kasi atyaki motema nde epai na bato. Epai mosusu, nsima na kosala kondimana wana mabe lokola baninga na bango na bokonzi ya Nord, bakonzi na Yuda bamitungisaki te mpo na molangwa na bango na elimo. Ezalela wana mabe ezalaki mpii epai na Jéhovah.
12. Likambo nini lisengelaki kobima mpo na molangwa na Yuda kati na elimo?
12 Yisaya alandi na maloba oyo ete: “Babulunganisami na vinyo, balemalemi mpo na masanga, bazimbisami na komona na bango, batetemi na kosambisama. Mpamba te mesa nyonso etondi na sánzáká, esika moko te ezangi bosoto.” (Yisaya 28:7b, 8) Ekoki kozala ete bamoko, na ntina na molangwa na bango, bazalaki kosánza kati na tempelo. Kasi, likambo na mpasi mpenza lizali ete, banganga mpe basakoli, bango bato basengelaki kopesa litambwi na losambo, bazalaki kosánza bosoto na elimo. Lisusu, longola bobele mwa ndambo na basembwi, basakoli bazalaki kobebisa kosambisama mpe kosakola makambo na lokutá mpo na ekólo. Jéhovah asengelaki kopesa etumbu na Yuda mpo na mbindo na ye ya elimo.
13. Kokokana nini tokoki komona kati na makambo oyo mazalaki kosalema na Yizelele mpe na Yuda, makambo oyo masalemaki na ekeke na liboso, mpe oyo mazali kosalema lelo?
13 Bisakweli na Yisaya bikokisamaki bobele likoló na Yisraele mpe Yuda ya ntango na kala? Te mpenza. Yesu mpe ntoma Paulo, bango nyonso mibale batangaki maloba na mosakoli wana na ntina na molangwa na elimo, mpe bakokisaki yango epai na bakonzi na mangomba ya eleko na bango. (Yisaya 29:10, 13; Matai 15:8, 9; Baloma 11:8) Lelo lisusu, makambo mazali lolenge moko na oyo mazalaki kosalema na ntango na Yisaya. Na mbala oyo, yango ekokisami epai na boklisto ya lokutá, lisangá ya mangomba nyonso ya boklisto ya lokuta na mokili mobimba oyo makolobaka ete bazali bamonisi na Nzambe. Na esika na kozwa etelemelo makasi mpo na solo mpe kotya motema epai na Jéhovah, boklisto ya lokutá—katolike mpe protestá—bazali kotya motema epai na mokili. Na yango, bazali kotetema lokola balangwi na Yisraele mpe na Yuda. Balangwi na elimo ya mabota wana ya kala, bazali mpenza komonisa bakonzi na elimo ya boklisto ya lokutá. Totalela myango nini makambo yango mazali mpenzampenza kosalema.
14. Na ndimbola nini bakonzi ya mangomba na boklisto ya lokutá bazali na molangwa motindo moko na bakonzi ya Samaria mpe bakonzi ya Yelusaleme ya kala?
14 Lokola Samaria mpe Yelusaleme, boklisto ya lokutá asili komela vinyo mingi, yango kondimana ya politike. Na 1919, boklisto ya lokutá etangamaki kati na basangani na molende ya la Société des Nations. Nzokande Yesu alobaki ete baklisto bakokóta na makambo na mokili te, kasi bakonzi ya boklisto ya lokuta bazali na boyokani elongo na bakonzi ya politike. (Yoane 17:14-16) Lokola vinyo ya elilingi, likambo wana lizali na bopusi makasi likoló na bakonzi ya mangomba (Tala Emoniseli 17:4.) Bakonzi ya mangomba balingaka kopesana makanisi elongo na bato ya politike mpe kozalana elongo na bakonzi ya mokili. Tala mpo na nini bango bakoki te kozala bakambi na elimo ya solo. Na esika ete basakola nsango na peto ya solo, bango bazali kosánza mbindo. (Sofoni 3:9) Lokola makanisi na bango mpenza mazali na mobulungano, bakonzi ya mangomba bakoki te kozala bakambi ya solo mpo na bato.—Matai 15:14.
“Etindá nsima na etinda”
15, 16. Bato na ntango na Yisaya bamonisaki ezaleli nini liboso na makebisi na ye?
15 Na ekeke ya mwambe liboso ya ntango na biso, Yisaya atondolaki polele mpenza, etamboli mabe ya bakonzi na lingomba na Yuda. Batalelaki ye lolenge nini? Na lolenge mabe mpenza! Lokola Yisaya alandaki kosakola makebisi na Nzambe, bakonzi na lingomba bazongisaki ete: “Akomonisa boyebi epai na nani? Akolimbola bososoli epai na nani? Epai na baoyo bakilisami libele, balongolami na mabele na mama na bango?” (Yisaya 28:9) Yisaya akanisaki ete azalaki koloba epai na nani? Epai na bana mike? Bakonzi na lingomba na Yelusaleme bamitalelaki lokola mikóló, baoyo bazalaki na makoki ya kozwa bikateli. Bazalaki na mposa te na koyoka malako oyo Yisaya akundolaki mbala na mbala.
16 Bakonzi na lingomba bazalaki nkutu koseka mosala ya kosakola na Yisaya. Bayembaki na ntina na ye ete: “Mpamba te ezali ‘etinda nsima na etindá, etindá nsima na etindá, mobeko nsima na mobeko, mwa moke awa, mwa moke kuna.’” (Yisaya 28:10, MN) Balobaki ete ‘Yisaya azalaki kozongelazongela maloba na ye. Azalaki sé koloba ete: “Ezali yango Jéhovah asili kolaka! Ezali yango Jéhovah asili kolaka! Ezali yango Jéhovah asengi! Ezali yango Jéhovah asengi!”’ Na makomi na hébreu, Yisaya 28:10 ezali eteni na nzembo oyo ezongelami mbala mingi, lokola maloba na nzembo na bana mike. Tala lolenge oyo bakonzi na lingomba bazalaki kotalela Yisaya, lokola moto oyo azalaki kozongela maloba na ye pelamoko mwana moke.
17. Ndenge nini bato mingi bazali lelo koyamba nsango ya makebisi oyo ba Témoins de Jéhovah bazali kosakola?
17 Bobele bongo, na ekeke ya liboso ya ntango na biso, mosala ya kosakola na Yesu mpe bayekoli na ye emonanaki lokola ete bazalaki kozongela maloba na bango mpe ezalaki bongo na bongo.Bayekoli na Yesu batalelamaki na bakonzi ya mangomba lokola bato balakelami mabe, bato na mboka, bato batangi te mpe bato na mpamba. (Yoane 7:47-49; Misala 4:13) Mbala mingi ezali bongo nde bato bazali lelo kotalela ba Témoins de Jéhovah. Bayekoli te kati na baseminere ya boklisto ya lokutá, mpe na kokesena na bakonzi ya mangomba, bango bakozwaka te ba titres minene mpe bakosalelaka te elobeli ya bateolojié. Yango wana bakonzi ya mangomba na boklisto ya lokutá bazali kotyola bango, kokanisáká ete mbele basengelaki kotikala na etelemelo na bango mpe bapesa limemya mingi epai na bakonzi ya mangomba.
18. Likambo nini lelo bakonzi ye mangomba bayebi yango te?
18 Nzokande, bakonzi ya mangomba bazangi koyeba likambo moko. Oyo ete, ata soki bakonzi ya eleko na ye baboyaki nsango na ye, Yisaya azalaki koloba solo, mpe makebisi na ye makokanaki. Bobele bongo lelo, makebisi oyo masakolami na ba Témoins de Jéhovah mazangi moboko te, matongami makasi mpenza likoló na Liloba ya solo na Nzambe, Biblia. (Yoane 17:17) Mpe makambo oyo bazali kosakola, ekokokana.
Jéhovah apesi bitumbu
19. Mpo na nini tokoki koloba ete Yuda asengisamaki na kotya likebi na monoko na bapaya oyo eyokamaki lokola nde maloba na kokakatana?
19 Na Yisaya 28:11, totangi ete: “Mpo ete na bibebu na bapaya mpe na monoko mosusu, akoloba na libota oyo.” Mateya na Yisaya mayokamaki na matoi na bato na Yuda lokola maloba na moto oyo azali kokakatana mpo na koloba monoko na bapaya. Mboka wana ebikaki na likámá liutaki na Asulia oyo abomaki Yisraele, kasi, na nsima, Jéhovah azwaki bikateli mpo na Yuda, mpe yango na nzela na mopaya mosusu, Nebukadanezare. (Yilimia 5:15-17) Monoko na Babilone moyokamaki epai na Baebele lokola maloba na kokakatana. Kasi basengisamaki na koyoka yango ntango Yelusaleme mpe tempelo na yango ebebisamaki na mobu 607 liboso na ntango na biso, mpe bafandi na yango bamemamaki na boombo na Babilone. Motindo moko lelo, boklisto ya lokutá mosika te akooka mpasi mpo ete lokola Yuda, ye mpe azali kotya soko likebi moke te na batoli na jéhovah.
20, 21. Nsango nini ba Témoin de Jéhovah bazali kotika kosakola yango te, kasi bakonzi ya mangomba na boklisto ya lokutá baboya nini?
20 Esakweli elobi ete: “Epai na baoyo ye alobi na bango ete, ‘Oyo ezali esika na kopema. Pemisa ye oyo alembi. Oyo ezali esika na kimya.’ Kasi balingaki koyoka te. Mpe mpo na bango, liloba na Jéhovah likozala ‘etindá nsima na etindá, etindá nsima na etindá; mobeko nsima na mobeko, mobeko nsima na mobeko, mwa moke awa, mwa moke kuna,’ ete batambola mpe bazonga nsima, Babukama, bazwama na motámbo mpe bakangama.”Yisaya 28:12, 13, MN.
21 Lokola na ntango oyo Yisaya azalaki kosakola nsango na Nzambe, ba Témoins de Jéhovah bazali kotika te na kolendisa boklisto ya lokutá ete azwa moboko likoló na liloba na Jéhovah; kasi aboyi koyoka. Emonani na ye lokola ete ba Témoins bakokani na bato oyo bazali kokakatana mpo na koloba monoko na bapaya. Lokola ete ba Témoins bazali koloba monoko oyo bango moko bayebi kososola yango te. Boklisto ya lokutá aboyi kopesa epemelo epai na ye oyo alembi na kolobáká na ntina na Bokonzi na Nzambe mpe mokili ya sika oyo ezali koya. Na esika na kosala bongo, asili nde kolangwa vinyo na boyokani na ye elongo na mokili. Mpo na ye, makambo ya bomoi na bato ekosila bobele na nzela na politike. Lokola Bayuda ya eleko na Yesu, boklisto ya lokutá azali koluka epemelo epai na Bokonzi te, mpe azali kolobela yango epai na bato mosusu te.—Matai 23:13.
22. Jéhovah azali kokebisa bakonzi na boklisto ya lokuta na ntina na likambo nini?
22 Na yango, maloba na esakweli na Yisaya mazali kokebisa bakonzi ya mangomba ete, Jéhovah akotikala koloba ntango nyonso te bobele na nzela na ba Témoins na ye, baoyo bayebi kookisa bato mpasi te. Nsima na mwa ntango, Jéhovah akokokisa “etindá nsima na etindá, mobeko nsima na mobeko,” likambo oyo likozala nsomo mpo na boklisto ya lokutá. Bakonzi ya mangomba na ye mpe bandimi na bango, “bakobukama, mpe bakozwama na motámbo, mpe bakokangama.” Ee, lokola Yelusaleme ya kala, mangomba na boklisto ya lokutá makobomama nyonso. Oyo nde likambo na nsómo mpe na kokamwa! Oyo nde mpasi monene mpo na bakonzi ya mangomba baoyo bazali kosepela na molangwa na elimo na esika ete batya matoi na malako na Jéhovah!
Bozongeli
◻ Banani bazalaki balangwi na Efalaima, mpe eloko nini alangwisaki bango?
◻ Na ndimbola nini mitólé na nkembo ya balangwi na Efalaima enyatamaki?
◻ Ezaleli nini na nsoni mpo na Yuda, Yisaya abimisaki yango?
Banani lelo bazali balangwi na elimo?
◻ Mpo na nini boklisto ya lokutá mbele esengeli kotya likebi na makambo oyo makómelaki libota na Yuda ya kala?