Tolanda kosakola likambo na kokamwa oyo jéhovah akosala
“Jéhovah akotelema lokola na ngomba na Pelazimi, akosilika lokola na lobwaku va Gibona.”—YISAYA 28:21.
1, 2. Likambo na kokamwa nini Jéhovah asalaki mpo na libota na ye na eleko na Davidi?
LIKAMBO na kokamwa! Mosala na kokamwa! Ezali yango nde Jéhovah asalaki na ntango na kala mpo na libota na ye. Yango esalemaki na ekeke ya zomi na moko liboso ya ntango na biso. Mosala yango na kokamwa mozalaki elakiseli ya likambo na kokamwa mingi, oyo ye akosala yango mosika te. Mosala yango mosalemaki na ntango na kala ezakaki nini? Mwa ntango moke nsima wana Davidi etyamaki mokonzi na Yelusaleme, Bafilistia, bafandi na zingazinga na Bayisraele, babundisaki bango, likambo oyo libimisaki mosala na kokamwa na Jéhovah. Na ebandeli, Bafilistia bakótaki na lobwaku ya Refaima. Wana atunaki Nzambe mpo na eloko oyo asengelaki kosala, Davidi atindamaki mpo ete akenda kobunda etumba. Atosaki bongo liloba na Jéhovah. Mokolo wana, Davidi abomaki limpinga na nguya na Bafilistia na Bala-Pelazimi. Kasi Bafilistia bandimaki te ete balongamaki. Mosika te, bazongaki lisusu kobebisa mpe kozwa biloko na lobwaku ya Refaima. Davidi alukaki lisusu litambwisi ya Jéhovah.
2 Mbala oyo, azwi etindá ya kokende elongo na basoda na ye epai na nsima na Bafilistia. Jéhovah alobaki ete: “Tika ete wana okoyoka mongongo na kotambolatambola likoló na nsongé na nzete baka, boye kenda mbango; mpo ete Jéhovah akokenda liboso na yo mpo na kobeta molako na Bafilistia.” Mpe ezali yango nde esalemaki. Davidi azelaki mbala mosusu ete Jéhovah, na nzela na mopepe, abimisa mongongo na kotambolatambola na bato likoló na nzete na baka. Mbala moko, Davidi mpe basoda na ye babimaki longwa na esika oyo babómbamaki mpe babundisaki Bafilistia baoyo bazalaki lisusu na likebi te; balongaki bango mpe babomaki bango. Bikeko oyo Bafilistia batikaki na esika na etumba, esangisamaki mpe ebebisamaki.—2 Samwele 5:17-25; 1 Ntango 14:8-17.
3. Mpo ma nini mosala na kokamwa na Jéhovah mozalaki na ntina mingi mpo na Bayuda na eleko na Yisaya, mpe mpo na nini boklisto ya lokutá asengeli kotalela yango na bopotu te?
3 Ezalaki likambo na kokamwa, mosala na kokamwa oyo Jéhovah akokisaki kotemela Bafilistia mpe mpo na mokonzi mopakolami na ye. Mosala wana monene mozali mpenza kobenda likebi, mpamba te mosakoli Yisaya apesi likebisi oyo ete Jéhovah asengelaki kosala likambo moko likokamwisa koleka mpe na nguya mpenza epai na balangwi na elimo na Yuda. Lisusu, bakonzi ya lingomba bazangi sembo ya eleko na Yisaya basengelaki kotya likebi na maloba na ye. Bobele bongo lelo, boklisto ya lokutá asengeli kotalela na bopotu te, makambo oyo makómelaki Yuda, mpamba te makambo yango mazali elakiseli ya esakweli mpo na makambo oyo mazali kozela ye.
“Mbeto eleki mokuse”
4, 5. (a) Na maloba nini ya elilingi, Yisaya alobeli ezalela mabe ya bakonzi na lingomba na eleko na ye? (b) Mpo na nini boklisto ya lokutá azali lelo kati na ezalela mabe?
4 Na yambo, Yisaya amonisaki ete boyokani kati na yango balangwi na elimo wana na kala bazalaki kotya elikya na bango, ezalaki bokosi, lokutá. Lisusu, na maloba na elilingi, amonisaki ezalela mabe ezalaki na baoyo batyaki elikya kati na lokutá yango, ete: “Mbeto eleki mokuse mpo ete moto amisembola wana, mpe bulangeti eleki moke mpo na komizingela na yango.” (Yisaya 28:20) Soki moto moko alali na mbeto mokuse, makolo na ye makoleka molai ya mbeto, mpe akooka mpiɔ. Soko nde akongumba mabɔlɔngɔ na ye mpo ete mbeto ezali mokuse, nzokande bulangeti ezali moke, mpe ndambo monene na nzoto na ye ekotikala libandá. Na bongo, ata akosala ndenge nini, ndambo moko na nzoto na ye ekozala se libanda mpe akooka mpiɔ.
5 Na elilingi, ezalaki bongo mpo na baoyo, na mikolo na Yisaya, bazalaki kotya elikya na bango kati na ekimelo oyo ezalaki lokutá. Ezali mpe motindo na ezalela mabe ya baoyo bazali lelo kotya elikya na bango kati na ekimelo na lokutá na boklisto ya mokili. Bango bazali kati na ezalela ya mpasi mingi. Oyo ezali ntango te ya koluka bolamu mpe elendiseli kati na myango oyo mokili ezali kozwa mpo na kotya kimya mpe libateli. Liboso na bikateli na Nzambe oyo mosika te bikokokisama, kondimana oyo boklisto ya lokutá asalaki elongo na bakonzi ya politike ekopesa ye kimya oyo azali kolikya te.
Mosala na kokamwisa na Jéhovah
6. Mosala nini Jéhovah asengelaki kosala epai na Yuda, mpe likambo nini akosala epai na boklisto ya lokutá?
6 Nsima na komonisa na maloba na elilingi, ezalela mabe ya Yelusaleme ezangaki sembo ya eleko na ye—mpe ya boklisto ya lokutá ezangi sembo lelo—Yisaya alobi ete: “Jéhovah akotelema lokola na ngomba na Pelazimi, akosilika lokola na lobwaku na Gibona, ete asala mosala na ye, mosala na kokamwa; ete akokisa likambo na ye, likambo na kokamwa,” (Yisaya 28:21) Yisaya akebisaki libota wana ete mosika te Jéhovah asengelaki kosilika, lokola esalaki ye na Bala—Pelazimi. Kasi na mbala oyo, asengeli kosala mosala epai na libota na ye lizangi sembo, lokola nde kobima makasi na mai makangamaki na barrage. Kondimana oyo Yelusaleme asalaki elongo na kufa emonani mpamba mpe ekokisaki mosala na yango te. Bobele bongo, mosika te Jéhovah akosala eloko epai na boklisto ya lokutá, oyo akoyeba na nsima ete boyokani na ye elongo na mokili ezali se mpamba. Mangomba na ye nyonso makobomama mpe bandimi na ye bakopanzana. Banzambe na ye ya lokutá bakotumbama nyonso.
7. Mpo na nini mikano na Jéhovah na ntina na Yuda, ebengamaki ete ya ‘kokamwa’?
7 Mpo na nini Yisaya abengi mosala na Jéhovah epai na Yelusaleme ete mosala na kokamwa mpe likambo na kokamwa? Mpo ete Yelusaleme ezalaki ntéi to centre na losambo na Jéhovah mpe engumba epai mopakolami na Ye azalaki koyangela.(Nzembo 132:11-18) Mpo na yango, ebebisamaki naino te. Tempelo na yango etumbamaki naino te. Libota na bokonzi na Davidi oyo ezalaki koyangela na Yelusaleme, ekweisamaki naino te. Makambo motindo oyo makanisamaki te. Ezalaki mpenza likambo na kokamwa mingi ete Jéhovah akanisa mpo na kopesa nzela na mosala motindo wana.
8. Jéhovah apesaki likebisi nini na ntina etali mosala na ye na kokamwa?
8 Nzokande, na nzela na basakoli na ye, Jéhovah, ye oyo atondi na boboto, akebisaki libota na ye ete kobebisama esengelaki koya. (Mika 3:9-12) Na ndakisa, mosakoli Habakuku, ye oyo azalaki na bomoi na ekeke ya nsambo liboso ya ntango na biso, akomaki ete: “Botala kati na mabota mpe bomona, bokamwa kokamwa mpenza; mpo ete nazali kosala mosala na mikolo na bino oyo bokondima te ete ezali boye, ata soko eyebisameli bino. Mpamba te tala, nazali kolamusa Bakaladi, libota mabe mpe na mawa te, baoyo bakotambolaka epai na bitando na mokili mpo na kobotola bifandelo bizali na bango te. Ezali libota na nsomo mpe na kobangisa.”—Habakuku 1:5-7.
9. Na boyokani na likebisi na ye, mosala nini Jéhovah asalaki epai na Yelusaleme?
9 Na mobu 607 liboso ya ntango na biso, jéhovah asalaki na boyokani na likebisi na ye. Na kotindáká mampinga na Babilone ete babundisa Yelusaleme, apesaki bango nzela na kobebisa engumba mpe tempelo. (Bileli 2:7-9) Epai mosusu, apesaki nzela ete Yelusaleme ebomama mpo na mbala ya mibale. Mpo na nini? Nsima na mbula 70 ya boombo, Bayuda oyo babongolaki motema bazongaki na mboka na bango, mpe, na nsima, tempelo mosusu etongamaki na Yelusaleme. Kasi, Bayuda batangwaki lisusu longwa na Jéhovah. Na ekeke ya liboso na ntango na biso, Paulo atangelaki Bayuda ya eleko na ye maloba ya Habakuku, koyebisáká bango ete esakweli yango esengelaki kozwa kokokana mosusu. (Misala 13:40, 41) Yesu ye moko akebisaki Bayuda na makasi mpenza, na ntina na kozanga kondima na bango ete, Yelusaleme mpe tempelo na yango ekobebisama. (Matai 23:37 kino 24:2) Bayuda ya ekeke ya liboso batyaki nde likebi? Te. Lokola bankoko na bango, baboyaki mpenza likebisi ya Jéhovah. Mpe Jéhovah azongelaki likambo na ye na kokamwa. Na mobu 70 ya ntango na biso, apesaki nzela ete Yelusaleme mpe tempelo na yango ebebisama na mampinga na Baloma.
10. Mosika te, Jéhovah akokokisa mosala nini epai na boklisto ya lokutá?
10 Na yango, nini ekopesa nzela na kokanisa ete Jéhovah akokokisa te likambo motindo oyo na eleko na biso? Solo ezali ete akokokisa mokano na ye, ata soko yango ezali na kokamwa mpe monene epai na bato oyo bazali kobeta ntembe. Na mbala oyo, akokokisa mosala na ye likoló na boklisto ya lokutá oyo azali koloba ete azali kosambela Nzambe lokola Yuda ya kala, nzokande esili komibebisa mpenza. Na nzela na Davidi na ye Monene, Yesu Klisto, Jéhovah akoyeisa nkanda na ye likoló na “Bafilistia”—elingi koloba boklisto ya lokutá—na eleko oyo bakomizela te. Akokokisa likambo na ye na kokamwa kino akolimwisa bitika nyonso na mangomba na boklisto ya lokutá.—Matai 13:36-43; 2 Batesaloniki 1:6-10.
Mosala na Jéhovah mosakolami
11, 12. Makebisi nini ba Témoins de Jéhovah bazali kopesa na ntina etali bikateli na Jéhovah?
11 Uta bambula mingi, ba Témoins de Jéhovah bazali kokebisa bazalani na bango mpo na ekateli oyo mosika te Jéhovah alingi koyeisa yango. Bazali kolimbola ete kobomama na Yelusaleme mpe tempelo na yango na mobu 607 liboso na ntango na biso mpe na mobu 70 ya ntango na biso, ezali likebisi ya esakweli mpo na oyo esengeli kokómela boklisto ya lokutá. Lisusu, bazali komonisa ete na ntina na lipengwi na ye, boklisto ya lokutá azali kati na Babilone monene, lisangá ya mangomba na lokuta ya mokili mobimba. Tala mpo na nini kosambisa na Nzambe likoló na Babilone monene ekoyeisama mingi mpenza likoló na boklisto ya lokutá. Ya solo, azali eteni eleki mabe na lisangá yango ya Satana, oyo na mitindo ndenge na ndenge.—Emoniseli 19:1-3.
12 Ba Témoins de Jéhovah bazali kolobela mingi likebisi ya esakweli na Biblia oyo engebene yango, na elaká eponami na Nzambe, baninga na Babilone monene, bakonzi ya politike, bakobalukela ye. Komonisáká baninga yango na maseké zomi ya nyama na yauli na langi motané, Emoniseli eyebisi mpo na yango ete: “Maseké zomi mamonaki yo, bango mpe nyama na yauli bakoyina mwasi na pite [Babilone monenel mpe bakobebisa ye mpe bakozalisa ye bolumbu; bakolya mosuni na ye mpe bakotumba ye na móto.’’ (Emoniseli 17:16) Boklisto ya lokutá ekotumbama mpe ekobomama, yango mpe mangomba nyonso mosusu ya lokutá. Tala likambo likozala mosala na kokamwa na Jéhovah, mosala na ye na kokamwa, na eleko na biso.
13. Kokokana nini ezali na lolenge oyo bato bazali lelo koyamba makebisi na Jéhovah mpe lolenge bayambaki oyo ya ntango na Yisaya?
13 Wana ba Témoins de Jéhovah bazali kosakola likámá oyo libelemi, bazali mbala mingi kotyolama. Bato bazali komituna soko bango bazali komimona lolenge nini mpo ete bakoka kosakola makambo motindo wana. Boklisto ya lokutá emonani lokola ete ezali na kimya, ete etelemi ngwi. Bamoko bazali nkutu kokanisa ete etelemelo na bango ezali sé kolendisama. Mpamba te, biyangeli mosusu bizalaki liboso konyokola boklisto ya lokutá, esili kopesa ye bonsomi mingi. Nzokande, boklisto ya lokutá mbele asengeli kotya likebi na toli oyo na Yisaya, ete: “Bozala batyoli te ete nkangá na bino ekómisama makasi te, mpamba te nayoki nsango na etumbu longwa na Nkolo jéhovah na bibele, mpo na mokili mobimba.”—Yisaya 28:22; 1 Petelo 3:3, 4.
14. Na ndimbola nini nkangá ya boklisto ya lokutá ekokómisama makasi mpe akobendama makasi?
14 Mingi mpenza, boklisto ya lokutá akolanda kotemela Mokonzi mpe Bokonzi na ye. (2 Batesaloniki 2:3, 4, 8) Kasi, bobele na ntango wana, nkangá na ye ekokómisama makasi mpe okobendama makasi mpenza. Na elobeli mosusu, kobomama na ye ekozanga te. Jéhovah akobongola ekateli na ye te mpo na koyeisa koboma epai na boklisto ya lokutá, lolenge moko abongolaki te ekateli na ye ya kopesa nzela na kobomama na Yelusaleme mpe tempelo na yango, na mobu 607 liboso ya ntango na biso.
“Bobima kati na ye”
15. Nzela na lobiko nini epesameli baoyo bazali na motema sembo?
15 Ndenge nini kokima mpasi oyo ekoyela boklisto ya lokutá? Na eleko na Yisraele, Jéhovah azalaki kotinda basakoli na sembo ete bazongisa bato na mitema sembo na losambo na peto. Na mikolo na biso, bobele na mokano wana nde abimisi ba Témoins na ye, baoyo bazali lelo na motango ya bamilió mingi. Bango bazali komonisa ezalela ya kufa na elimo ya boklisto ya lokutá, kozanga kobanga. Na kokokisáká mokumba yango na bosembo nyonso, bazali koyokisa maloba wana makokani na malózi oyo mamonisami na kobetama na kelelo na baanzelu na Emoniseli mokapo 8 mpe 9. Bazali mpe komonisa molende mpo na koyebisa toli oyo ezwami na Emoniseli 18:4 ete: “Bino bato na ngai bobima kati na ye, ete bozwa moko na malózi na ye te” Awa, “ye” emonisi Babilone Monene lisangá ya mangomba na lokutá na mokili mobimba, oyo boklisto ya lokutá azali mosangani na yango na lokumu mingi.
16. Ndenge nini bamilió na bato basili kokima mangomba ya lokutá?
16 Uta 1919, mpe mingi mpenza uta 1922, ebele na bato na bopolo oyo motuya ezali sé kobakisama, bazali koyanola na toli yango mpe bazali kotika Babilone Monene. Liboso ezalaki bankóto, na nsima bankóto nkámá, mpe lelo bamilió na bato basili kokabwana na mangomba ya lokutá, mingi mpenza na boklisto ya lokutá, mpe bakimi epai na losambo na peto. (Yisaya 2:2-4) Bato wana bayebi yango ete, bobele na kotikáká Babilone Monene nde bakoki kokima malózi oyo mabómbami mpo na ye, malózi oyo makosuka na kobomama na ye, ntango Jéhovah akokokisa likambo na ye na kokamwa.
17, 18 Na ndimbola nini Jéhovah asili kokóma motólé kitoko mpo na libota na ye?
17 Mosakoli Yisaya amonisi bolamu ya bato oyo bazali kozwa etelemelo mpo na losambo na peto. Alobi ete: “Na mokolo yango, Jéhovah na bibele akozala motolé na nkembo mpe motólé kitoko epai na baoyo batikali na libota na ye. Mpe elimo na kosambisa-sembo epai na ye oyo afandi kosambisa, mpe nguya epai na baoyo bakobengana etumba ezali na ekuke.”—Yisaya 28:5, 6.
18 Mpo ete bazali sembo liboso na solo, baklisto oyo basali kelasi ya moombo na sembo mpe na mayele, bakotalelaka Jéhovah lokola motólé na nkembo mokoki kokufa te. Yango esili mpenza komonana uta 1922. Na mobu wana, nimero ya ler Janvier ya Mosenzeli na Lingelesi, ezalaki na lisoló moko ya kolendisa na motó na likambo ete “Nani akokumisa Jéhovah?” Lisoló lilobelaki mpenza ntina ya kokumisa nkombo na Nzambe. Kobanda ntango wana, kati na mokili mobimba, baklisto bapakolami bazali kosakola mingi nkombo yango koleka na ntango na liboso. Na 1931, ntango bandimaki kobengama na nkombo Témoins de Jéhovah, bamonanaki mpenza ete bazali basali ya Jéhovah. Lisusu, ebele monene na bampate ebimaki longwa na boklisto ya lokutá mpe na mangomba mosusu ya Babilone Monene. Bango mpe bandimaki komema nkombo na Nzambe. Nini emonanaki? Jéhovah—kasi bonsomi na libota moko te, oyo ekozala bobele mpo na ntango mokuse—asili kokóma motólé kitoko epai na bato koleka bamilió minei bakabolami soko na mikili 212 mpe bisanga. Oyo nde libaku kitoko bato bazali na yango na komema nkombo na Nzambe bobele moko ya solo mpe na bomoi!—Emoniseli 7:3, 4, 9, 10; 15:4.
“Elimo na Jéhovah ekofanda likoló na ye”
19. Nani oyo afandi kosambisa, mpe na ndimbola nini Jéhovah akómi elimo na boyengebene mpo na ye?
19 Jéhovah asili kokóma “elimo na boyengebene” mpo na Yesu, “ye oyo afandi kosambisa.” Ntango Yesu azalaki na bomoi awa na mabelé, aboyaki elimo ya molangwa oyo ya kosala kondimana elongo na mokili. Lelo, Yesu, Mokonzi oyo Jéhovah asili kopesa ye kiti ya bokonzi, atondi na elimo santu; mpe elimo yango ezali kokamba ye na kozwa bikateli na bokatikati mpe na mayele. Esakweli oyo ekokanaki epai na Yesu, ete: “Elimo na Jéhovah ekofanda likoló na ye, elimo na bwanya mpe na mayele, elimo na toli mpe na bokasi, elimo na boyebi mpe na kobanga Jéhovah.” (Yisaya 11:2, MN) Na nzela na Yesu, jéhovah akosala “kosambisa-sembo ete ezala nsinga mpe boyengebene ezala nivo.” (Yisaya 28:17) Na ntango banguna na Nzambe baoyo balangwi na elimo bakobomama nyɛɛ, nkombo na Jéhovah mpe boyangeli na ye na molóngó mobimba ekolongisama.
20, 21. Maloba na Yisaya 28:1-22 mazali na bopusi nini likoló na yo?
20 Esakweli ya Yisaya mokapo 28 ezali bongo na ndimbola monene mpo na biso. Soki bokabwani na balangwi na elimo na boklisto ya lokutá, mpe tokangami na losambo na peto, tokobatelama wana Jéhovah akokokisa mosala mpe likambo na ye na kokamwa. Tozali kosepela mingi lokola toyebi makambo oyo. Boye te? Mpe tozali na esengo na likanisi oyo ete, ntango makambo wana makokóma, moto moko te akozanga koyeba ete jéhovah na bibele asali boye mpo na bolamu ya basaleli na ye na sembo mpe mpo na kolongisa nkombo na ye na nsima na Yesu Klisto.—Nzembo 83:17, 18.
21 na yango, tika ete baklisto nyonso ya solo balanda kosakola mosala na kokamwa na Jéhovah mpe balobela likambo na ye na kokamwa kozanga kobanga. Tika ete basakola liboso na bato banso ete elikya na biso makasi ezali kati na Bokonzi na Nzambe oyo ye asili kopesa yango na Mokonzi oyo ye aponi, oyo asili kofandisama likoló na kiti na yango. Tika ete molende na bango, ekateli na bango mpe bosembo na bango esalema mpo na kosanzolama na seko na Jéhovah, Nzambe na biso Mozwi—na-Nguya-Nyonso.—Nzembo 146:1, 2, 10.
Bozongeli
◻ Mpo na nini boklisto ya lokutá azali kati na ezalela moko ya mpasi?
◻ Jéhovah azwaki mikano nini na ntina na Yelusaleme, mpe mpo na nini yango ezalaki ya “kokamwa”?
◻ Likebisi nini ba Témoins de Jehovah bazali koyebisa na ntina etali boklisto ya lokutá, mpe lolenge nini bato bazali kotalela bango?
◻ Ndenge nini tokoki kokima mpasi oyo ekoya likoló na boklisto ya lokutá?
[Elilingi na lokasa 24]
Jéhovah akosala lisusu mosala na ye na kokamwa, kasi na mbala oyo, akosala yango epai na boklisto ya lokutá