Bólanda ndakisa ya Yehova mpo na kobɔkɔla bana na bino
“Nani azwaka etumbu na maboko ya tata na ye te?”—BAEBRE 12:7, Boyokani ya Sika.
1, 2. Mpo na nini baboti bazali na mokakatano mpo na kobɔkɔla bana na bango lelo oyo?
ELEKI mwa bambula, ankɛtɛ moko esalemaki na Japon emonisaki ete pene na katikati ya mikóló oyo batunaki bazalaki na likanisi ete baboti basololaka mpenza na bana na bango te mpe ete baboti balekisi kobondela bana na bango. Kaka na mboka yango, ankɛtɛ mosusu emonisaki ete moto moko kati na bato minei oyo batunaki alobaki ete ayebi te ndenge nini kofanda malamu na bana. Likambo yango ezali kaka na mikili ya Azia te. Zulunalo moko (The Toronto Star) eyebisaki ete: “Na Canada, baboti mingi balobaki ete bayebi mpenza te ndenge nini kozala baboti ya malamu.” Na bisika nyonso, baboti bazali komona ete kobɔkɔla bana malamu ezali mpasi mingi.
2 Mpo na nini baboti mingi bazali na mokakatano mpo na kobɔkɔla bana na bango? Ntina mpenza ezali ete tozali na “mikolo ya nsuka” oyo ezali “ntango ya mpasi.” (2 Timote 3:1, NW) Longola yango, Biblia elobi ete “makanisi ya motema ya moto izali mabe longwa na bolenge na ye.” (Genese 8:21) Bilenge bakweaka mingi na masɛnginya ya Satana ye oyo, lokola “nkosi [oyo azali] konguluma” azali kokanga baoyo bayebi makambo mingi te. (1 Petelo 5:8) Mikakatano ezali ebele mpo na baklisto oyo bazali baboti, baoyo balingi kobɔkɔla bana na bango na “mateya mpe na mpamela ya Nkolo.” (Baefese 6:4) Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango bákóma basambeli ya Yehova oyo bakɔmeli mpe bayebi kokesenisa “malamu mpe mabe”?—Baebele 5:14.
3. Mpo na nini mateya mpe toli ya baboti ezali na ntina mingi mpo na kobɔkɔla bana malamu?
3 Salomo, mokonzi ya mayele, alobaki ete: “Bozoba ekangami na motema ya mwana.” (Masese 13:1; 22:15, NW) Mpo na kolongola bozoba wana, ebongi ete baboti básembolaka bana na bango, kasi na bolingo. Kasi, bilenge balingaka kosembolama wana te. Mbala mingi kutu balingaka ata koyoka toli te, ezala nani oyo azali kopesa bango yango. Yango wana, baboti basengeli koyeba ndenge nini ‘kobɔkɔla mwana na nzela ekoki na ye kotambola.’ (Masese 22:6) Soki bana balandi disipilini wana, ekoki komema bango na bomoi. (Masese 4:13) Ezali mpenza na ntina ete baboti báyeba makambo oyo esengeli mpo na kobɔkɔla bana na bango!
Disipilini elimboli nini?
4. Na Biblia, “disipilini” elimboli libosoliboso nini?
4 Baboti mosusu babangaka kosembola bana noki te bato mosusu báloba ete bazali konyokola bana, ezala na kobɛta bango, kofinga bango to kotungisa bango na makanisi. Ntina ya kobanga ndenge wana ezali te. Na Biblia, liloba “disipilini” elimboli te konyokola to kosala mabe. Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “disipilini” ezali libosoliboso na likanisi ya koteya, kolakisa, kosembola mpe, ntango mosusu, kopesa mpenza etumbu, kasi na bolingo.
5. Mpo nini kotalela ndenge oyo Yehova alakisaki libota na ye ezali na ntina?
5 Yehova apesaka ndakisa eleki malamu ntango ye moko apesaka disipilini ya ndenge wana. Ntoma Paulo akokanisaki Yehova na tata ya bana mpe akomaki ete: “Nani azwaka etumbu na maboko ya tata na ye te? . . . Batata na biso baoyo bazali awa na nse bazalaki kopesa etumbu na mwa ntango moke lokola mitema na bango moko elingaki. Kasi Nzambe, Tata na biso ya Likolo, apesaka biso etumbu mpo na bolamu na biso na ndenge ‘te tokoma bato ya bosanto.” (Baebreo 12:7-10, Boyokani ya Sika) Ya solo, Yehova apesaka basaleli na ye disipilini mpo bázala bato ya pɛto. Tokoki koyekola makambo mingi na oyo etali kopesa bana disipilini soki totaleli ndenge oyo Yehova alakisaki bato na ye.—Deteronome 32:4; Matai 7:11; Baefese 5:1.
Bolingo nde esengeli kotinda biso
6. Mpo na nini ekoki kozala mpasi mpo baboti bálanda ndakisa ya bolingo ya Yehova?
6 Ntoma Yoane alobaki ete: “Nzambe azali bolingo.” Yango wana, ntango Yehova azali kolakisa bato na ye, asalaka yango ntango nyonso na bolingo. (1 Yoane 4:8; Masese 3:11, 12) Yango elingi nde koloba ete ezali mpasi te mpo na baboti oyo balingaka bana na bango bálanda ndakisa ya Yehova mpo na kobɔkɔla bana na bango? Ezali boye te. Bolingo ya Nzambe ezali bolingo oyo esimbami na mitinda. Moto moko ya mayele oyo ayekolaka maloba ya Grɛki amonisaki ete bolingo ya ndenge yango “elandaka ntango nyonso mposa ya motema te.” Nzambe atalaka kaka te oyo ezali kosepelisa motema. Atalelaka ntango nyonso oyo ezali malamu koleka mpo na basaleli na ye.—Yisaya 30:20; 48:17.
7, 8. (a) Yehova apesaki biso ndakisa nini ya bolingo esimbami na mitinda na makambo oyo asalelaki bato na ye? (b) Ndenge nini baboti bakoki kolanda ndakisa ya Yehova mpo na kosalisa bana na bango bákóma na mayele ya kolanda mitinda ya Biblia?
7 Tótalela ndenge oyo Nzambe amonisaki bolingo epai ya Bayisalaele. Mose asalelaki elilingi moko kitoko mpo na kolimbola bolingo ya Yehova mpo na ekólo ya Yisalaele ntango esalemaki sika. Tozali kotánga boye: “Lokola mpongo eningisaka zumbu na yango, epumbwakapumbwaka likoló ya bana na yango, esembolaka mapapu na yango, ezwaka bango, ememaka bango na nsala na yango, Yehova ye moko atambwisaki [Yakobo].” (Deteronome 32:9, 11, 12, NW) Mpo na kolakisa bana na yango kopumbwa, mpongo “eningisaka zumbu na yango,” mpe ebɛtabɛtaka mapapu na yango mpo na kotindika bana na yango bápumbwa. Ntango mwana ya mpongo amibwaki libándá ya zumbu, oyo mbala mingi ezalaka na nsɔngɛ ya ngomba moko ya mabanga, mama ‘apumbwakapumbwaka likoló’ na ye. Soki amoni ete mwana akokwea na mabele, mama alekaka noki na nse na ye mpe amemaka ye ‘na nsala na ye.’ Yehova azalaki kobatela ekólo ya sika ya Yisalaele ndenge wana, na bolingo mpenza. Apesaki libota yango Mibeko ya Mose. (Nzembo 78:5-7) Nzambe azalaki kosɛnzɛla likoló ya ekólo yango mpe azalaki pene ya kobatela basaleli na ye soki bakutani na likama.
8 Ndenge nini baboti bakoki kolanda ndakisa ya bolingo ya Yehova? Ya liboso, basengeli koteya bana na bango mitinda mpe mibeko oyo ezali na Liloba ya Nzambe. (Deteronome 6:4-9) Mokano na bango esengeli kozala ya kosalisa bana bátalelaka mitinda ya Biblia mpo na kozwa bikateli. Ntango baboti ya bolingo bazali kosala ndenge yango, ezali lokola nde bazali kopumbwapumbwa likoló ya bana na bango, bazali kolanda malamumalamu ndenge oyo bana na bango bazali kosalela mitinda oyo bayekolaki. Ntango bana bazali kokola mpe mokemoke bazali kotikela bango bonsomi, baboti oyo ya bolingo bazalaka pene ya “koleka noki na nse” mpe ‘komema bana na bango na nsala’ soki bamoni likama. Likama ya ndenge nini?
9. Likama nini baboti basengeli mpenza kofungola miso mpo na yango? Pesá ndakisa.
9 Yehova Nzambe akebisaki Bayisalaele ete kolanda baninga ya mabe ememaka makama. (Mituya 25:1-18; Ezela 10:10-14) Kozala baninga ya bato mabe ezali mpe likama oyo ezali komonana mingi na moi ya lelo. (1 Bakolinti 15:33) Ebongi mpenza ete baklisto oyo bazali na bana bálanda ndakisa ya Yehova na likambo yango. Elenge mwasi moko ya mbula 15, nkombo na ye Lisa, akómaki kokangama makasi na elenge mobali moko ya mokili. Lisa alobi boye: “Baboti na ngai bamonaki mbala moko ete nakómaki ndenge mosusu mpe ekómaki kotungisa bango. Ntango mosusu bazalaki kosembola ngai, mpe ntango mosusu, bazalaki kolendisa ngai na bolingo.” Bafandisaki Lisa mpe bayokaki ye na motema molai, mpe na bongo, basalisaki ye alonga mokakatano mpenza oyo bamonaki epai na ye: azalaki na mposa ya kosala lokola baninga mpo bándima ye.a
Bótika kosolola te
10. Na makambo nini Yehova apesaki ndakisa malamu na ndenge azalaki kosolola na Bayisalaele?
10 Mpo bábɔkɔla bana na bango malamu, baboti basengeli kosala nyonso ete eloko moko te ekanga bana na bango nzela ya kosolola na bango. Tótala ndakisa ya Yehova; ayebi malamu makambo oyo ezali na mitema na biso, kasi alendisaka biso kaka tósololaka na ye. (1 Ntango 28:9) Nsima ya kopesa Bayisalaele Mibeko, Yehova apesaki Balevi mokumba ya koteya bango, mpe azalaki kotinda basakoli mpo na kososolisa bango mpe kosembola bango. Azalaki mpe pene mpo na koyoka mabondeli na bango.—2 Ntango 17:7-9; Nzembo 65:2; Yisaya 1:1-3, 18-20; Yilimia 25:4; Bagalatia 3:22-24.
11. (a) Ndenge nini baboti bakoki kolendisa bana na bango na kosolola malamu? (b) Mpo na nini ezali na ntina ete baboti báyeba koyoka ntango bazali kosolola na bana na bango?
11 Ndenge nini baboti bakoki kolanda ndakisa ya Yehova ntango bazali kosolola na bana na bango? Libosoliboso, basengeli kozwaka ntango ya kosolola na bana. Baboti basengeli mpe kobwaka maloba ya kotyola, lokola: “Likambo mobimba yango wana? Nakanisaki kutu ezali likambo ya ntina”; “Ozali zoba”; “Bongo yo okanisaki nini? Ozali naino mwana.” (Masese 12:18) Mpo na kolendisa bana bábangaka koloba te, baboti ya mayele basalaka makasi bázala bato oyo bayebi koyoka malamu. Baboti oyo bazalaka na ntango ya koyoka bana te ntango bazali naino mike, bana yango mpe bazalaka na ntango ya koyoka bango te soki bakoli. Yehova azalaka ntango nyonso pene ya koyoka basaleli na ye. Afungolaka matoi na ye mpo na koyoka bato oyo babondelaka ye na elimo ya komikitisa.—Nzembo 91:15; Yilimia 29:12; Luka 11:9-13.
12. Baboti basengeli kozala na bizaleli nini oyo ekosalisa bana bábanga kosolola na bango te?
12 Tótalela mpe ndenge oyo bizaleli mosusu ya Nzambe esalisaki basaleli na ye bákakatanaka te mpe bábangaka te kosolola na ye. Na ndakisa, Davidi, mokonzi ya Yisalaele ya kala, asalaki lisumu monene na ndenge asalaki ekobo na Bata-Seba. Lokola azalaki moto ya kozanga kokoka, Davidi asalaki masumu mosusu ya minene na bomoi na ye. Kasi, ata mbala moko te abangaki kokende epai ya Yehova mpo na kosɛnga ye bolimbisi mpe kondima mpamela. Na ntembe te, boboto mpe ngɔlu ya Nzambe esalisaki Davidi abanga te kokende mbala na mbala epai ya Yehova. (Nzembo 103:8) Soki baboti bazali na bizaleli ya Nzambe lokola motema mawa mpe ngɔlu, bana na bango bakokakatana te kosolola na bango ata ntango basali libunga.—Nzembo 103:13; Malaki 3:17.
Bózala na makambo makasi te
13. Kozala na makambo makasi te ezali kosɛnga nini?
13 Ntango bazali koyoka bana na bango, baboti basengeli kozala na makambo makasi te mpe basengeli komonisa “mayele mauti na likoló.” (Yakobo 3:17) Ntoma Paulo akomaki ete: “Tiká ete bato nyonso bámona ete bozali na makambo makasi te.” (Bafilipi 4:5, NW) Kozala na makambo makasi te elimboli nini? Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “makambo makasi te” ekoki mpe kolimbola “kolanda te kaka ndenge oyo mibeko elobi.” Ndenge nini baboti bakoki kolendisa etamboli malamu mpe makambo ya elimo mpe na mbala moko, kozala na makambo makasi te?
14. Ndenge nini Yehova amonisaki Lota ete azali na makambo makasi te?
14 Yehova apesi ndakisa malamu na oyo etali kozala na makambo makasi te. (Nzembo 10:17) Ntango ayebisaki Lota na libota na ye ete bábima na Sodomo, mboka oyo esengelaki kozwa etumbu, Lota “aumelaki.” Na nsima, ntango anzelu ya Yehova ayebisaki Lota ete akima na bangomba, Lota alobaki ete: “Nakoki kokima epai na ngomba te . . . Talá mboka [Soala] kuna ezali penepene mpe nakoki kokima wana, mpe yango ezali moke. Ɛɛ, tiká ete namibikisa ngai mpenza kati na yango—ezali moke te?” Yehova azongiselaki ye nini? Alobaki ete: “Talá, nakopesa yo mpe oyo elɔmbi yo lokola, mpe nakobebisa mboka yango te.” (Genese 19:16-21, 30) Yehova andimaki kosala oyo Lota asɛngaki. Ndakisa oyo emonisi ete baboti basengeli kolanda mitinda oyo Yehova Nzambe apesi na Liloba na ye, Biblia. Kasi, bakoki mpe kotikela bana básala oyo basepeli soki ezali kobuka mitinda ya Biblia te.
15, 16. Elilingi oyo ezali na Yisaya 28:24, 25 ekoki koteya baboti nini?
15 Kozala na makambo makasi te esɛngi mpe kobongisa mitema ya bana mpo bákoka kondima toli. Yisaya asalelaki elilingi moko mpo na komonisa yango; akokanisaki Yehova na mosali-bilanga mpe alobaki boye: “Motimoli akotimola nde mokolo mobimba mpo na kokona? Akozipola mabele mpe akotutatuta yango ntango nyonso? Wana esili ye koyeisa elongi na yango alima, akobwaka wana [kumina moindo, NW] te, [akopanza, NW] kumina te? Akotya masango na milɔngɔ te, akotya mpe loso na esika ebongi na yango te, akokona kusɛmɛtɛ na ndelo te?”—Yisaya 28:24, 25.
16 Yehova ‘atimolaka mpo na kokona’ mpe ‘akozipola mpe atutatutaka mabele.’ Elingi koloba ete abongisaka mitema ya bato na ye liboso apesa bango disipilini. Ndenge nini baboti bakoki ‘kotimola’ mitema ya bana na bango ntango bazali kosembola bango? Tata moko alandaki ndakisa ya Yehova mpo na kosembola mwana na ye ya mbula minei. Ntango mwana na ye abɛtaki mwana ya moninga, tata ayokaki ye ntango azalaki koloba mpo na nini abɛtaki mwana yango, akataki ye maloba te. Na nsima, tata ‘atimolaki’ motema ya mwana na ye, elingi koloba abɛtelaki ye lisolo ya mwana moko ya mobali oyo banyokolaki ye mingi epai ya mwana mosusu ya mobulu. Nsima ya koyoka lisolo yango, mwana alobaki ete mwana wana ya mobulu asengelaki kozwa etumbu. ‘Kotimola’ wana ebongisaki motema ya mwana mpe ezalaki lisusu mpasi te mpo asosola ete moto ya mobulu nde abɛtaka bana ya bato mpe yango ezali malamu te.—2 Samwele 12:1-14.
17. Yisaya 28:26-29 ezali kopesa baboti liteya nini na oyo etali kosembola bana?
17 Yisaya akokanisaki ndenge oyo Yehova asembolaka na likambo mosusu oyo mosali-bilanga asalaka: kobɛta mbuma mpo na kolongola yango mposo. Mosali-bilanga azali na biloko ekeseni oyo asalelaka mpo na kolongola mposo ya mbuma ndenge na ndenge. Lokola mbuma ya kumina moindo ezalaka makasi te, mosali-bilanga asalelaka mwa nzete mpo na kotuta yango; asalelaka nzete ya mwa monene mpo na kumina, kasi asalelaka pusupusu to pine ya likalo mpo na mbuma oyo ezalaka na mposo ya makasi. Atako bongo, akebaka ete abɛta makasi mingi te noki te enikanika mbuma yango. Ndenge moko mpe, na ntango Yehova alingi kolongola eloko moko ya mabe epai ya bato na ye, asalaka na ndenge ekeseni na kotalela bamposa mpe makambo oyo ezali na ntango wana. Asalaka makambo bisalela te to na nko te. (Yisaya 28:26-29) Mwana mosusu, soki otali ye kaka na liso ya mabe, afandi nyɛɛ. Kasi, mpo na bana mosusu esɛngaka kopekisa mbala na mbala, mpe bamosusu lisusu, esɛngaka kobimisela bango mbuma ya miso. Baboti oyo bazali na makambo makasi te bakosembola mwana na mwana na kotalela ndenge na ye.
Bósololaka na esengo na kati ya libota
18. Ndenge nini baboti bakoki kozwa ntango mpo báyekolaka pɔsɔ na pɔsɔ na kati ya libota?
18 Moko na makambo eleki malamu mpo na koteya bana ezali koyekola Biblia pɔsɔ na pɔsɔ na kati ya libota mpe kotánga mokapo ya Makomami mokolo na mokolo. Boyekoli ya libota ebotaka mbuma malamu soki ezali kosalema pɔsɔ na pɔsɔ. Soki ezali kosalema kaka soki libaku emonani to na mbalakaka, ekolandana malamu te. Yango wana, baboti basengeli ‘kosomba ntango’ mpo na koyekola na libota. (Baefese 5:15-17) Ekoki kozala mpasi mpo na kozwa ntango moko oyo libota mobimba bakoki kokutana mpo na koyekola. Tata ya libota moko amonaki ete lokola bana na bango bakolaki, moto na moto akómaki na programɛ na ye, ekómaki mwa mokakatano mpo libota mobimba ekutanaka mpo na koyekola. Kasi, na mikolo ya makita, moto nyonso azalaki kozonga na ndako soki basilisi makita. Yango wana, tata abongisaki ete bayekolaka mokolo moko nsima ya makita mpe programɛ yango ebongaki mpenza. Lelo oyo, bana na bango nyonso misato bazali basaleli ya Yehova oyo bazwi batisimo.
19. Ndenge nini baboti bakoki kolanda ndakisa ya Yehova ntango bazali kotambwisa boyekoli ya libota?
19 Kasi, kotalela kaka mwa makanisi ya Makomami na ntango ya boyekoli ekoki te. Yehova asalelaki banganga mpo na koteya Bayisalaele oyo bazongaki na mboka na bango; banganga yango “bapesaki ntina” na Mibeko, ‘basosolaki litángi.’ (Nehemia 8:8) Tata moko oyo asalisaki bana na ye nyonso nsambo bálinga Yehova azalaki ntango nyonso kotikala mwa moke ye moko na shambre liboso ya boyekoli ya libota mpo na komibongisa, kokanisa ndenge oyo akoki koyokanisa makambo oyo bakolobela na bamposa ya mwana mokomoko. Azalaki kosala ete bana na ye básepelaka na boyekoli. Moko ya bana na ye oyo akómi mokóló alobi ete: “Tozalaki kosepela na boyekoli. Soki tozalaki kobɛta bale, bongo babengi biso ete ntango ekoki mpo na koyekola na libota, mbala moko tozalaki kotika bale mpe kokende mbangu mpo na koyekola. Tozalaki kosepela mingi na bampokwa yango koleka mikolo mosusu nyonso ya pɔsɔ.”
20. Na oyo etali kobɔkɔla bana, likambo nini ekoki komonana?
20 Mokomi ya nzembo alobaki ete: “Bana mibali bazali likabo ya [Yehova], mpe mbuma ya libumu ezali libonza.” (Nzembo 127:3) Kobɔkɔla bana ezwaka ntango mpe esɛngaka molende, kasi soki tosali yango na ndenge oyo ebongi, ekosalisa bana na biso bázwa bomoi ya seko. Ekozala mpenza mbano kitoko! Yango wana, tósala makasi mpo na kolanda ndakisa ya Yehova mpo na kobɔkɔla bana na biso. Kasi, atako baboti bazali na mokumba ya ‘kobɔkɔla [bana] na mateya mpe na mpamela ya Nkolo,’ elingi koloba te ete bakolonga kaka. (Baefese 6:4) Baboti bakoki kosala nyonso, kasi ntango mosusu ekoki komonana ete mwana moko akómi motomboki mpe atiki kosalela Yehova. Basengeli kosala nini ntango wana? Lisolo oyo elandi ekolobela likambo yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ekoki kozala ete makambo oyo balobeli na lisolo oyo mpe lisolo oyo elandi euti na bamboka oyo mimeseno na yango ekeseni na oyo ya mboka na bino. Meká koyeba liteya oyo okoki kozwa na likambo mokomoko mpe salelá yango na kotalela mimeseno ya mboka na bino.
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini baboti bakoki kolanda ndakisa ya bolingo ya Yehova oyo elobelami na Deteronome 32:11, 12?
• Liteya nini ozwi na kotalela ndenge oyo Yehova azalaki kosolola na Bayisalaele?
• Ndenge oyo Yehova andimaki mposa ya Lota ezali koteya biso nini?
• Liteya nini ozwi na Yisaya 28:24-29 na likambo etali kosembola bana?
[Elilingi na lokasa 9]
Mose akokanisaki ndenge oyo Yehova alakisaka libota na ye na ndenge oyo mpongo esalaka epai ya bana na yango
[Bililingi na lokasa 10]
Baboti basengeli kozala na ntango ya kosololaka na bana na bango
[Elilingi na lokasa 12]
“Tozalaki kosepela mingi na bampokwa yango koleka mikolo mosusu nyonso ya pɔsɔ”