Yehova akopesaka nguya epai na ye oyo alɛmbi
“Baoyo [bakolikyaka epai na Yehova], bakozwa nguya na sika,
bakopumbwa likoló na mapapu lokola mpongo.”—YISAYA 40:31.
1, 2. Yehova akopesaka nini na baoyo bakotyaka elikya epai na ye, mpe tokotalela nini sikawa?
MPONGO ezali kati na bandɛkɛ ya likoló oyo eleki nguya. Ekoki kokende mosika kozanga nkutu kobɛta mapapu. Na mapapu na yango oyo ekoki koleka na bolai bamɛtɛlɛ mibale, “Mokonzi ya bandɛkɛ,” mpongo ya lángi ya wolo, ezali “lolenge moko ya mpongo oyo epusi kokamwisa; ekobutaka likoló na bankeka mpe bitando ya patátálu, ekopumbwa na boumeli ya bangonga mingi likoló na bangomba mosusu, na nsima ekobutaka na kozolonganáká kino ekomonana bobele lokola mokɔlɔtɔ moke ya moindo kuna na likoló.”—The Audubon Society Encyclopedia of North American Birds.
2 Wana azalaki kokanisa makoki ya mpongo ya kopumbwa, Yisaya akomaki ete: “[Yehova] akopesa nguya epai na ye oyo alɛmbi; epai na ye oyo azangi makasi, akobakisa nguya. Ata bilenge bakosenzwa, bakolɛmba, mpe bato na bilanga mingi te bakokweakwea na nsé; nde baoyo [bakolikyaka epai na Yehova, NW] bakozwa nguya na sika, bakopumbwa likoló na mapapu lokola mpongo, bakopota mbangu nde bakolɛmba te, bakotambola nde bakosenzwa te.” (Yisaya 40:29-31) Oyo nde libɔndisi na koyeba ete Yehova apesaka epai na baoyo batyelaka ye elikya nguya ya kokende liboso, lokola nde abongiselaki bango mapapu oyo makolɛmbaka te, mapapu ya mpongo oyo ekobutaka likoló! Tótalela sikawa, bamoko na bibongiseli oyo ye asali mpo na kopesa nguya epai na ye oyo alɛmbi.
Nguya oyo eutaka na libondeli
3, 4. (a) Yesu alendisaki bayekoli na ye na kosala nini? (b) Tokoki kozela ete Yehova asala nini mpo na koyanola na mabondeli na biso?
3 Yesu alendisaki bayekoli na ye na “kobondela ntango nyonso mpe kolɛmba te.” (Luka 18:1) Kofungola motema na biso epai na Yehova ekoki solo kosalisa biso na kozongela nguya na biso mpe na kopɛngola ete tólɛmba te wana mitungisi ya bomoi mimonani lokola ete mileki ndelo? Ya solo, kasi ezali mpe na makambo mosusu oyo tosengeli te kobosana.
4 Tosengeli kozala na makanisi mabongi na ntina na oyo tozali kozela ete Yehova apesa biso lokola eyano ya mabondeli na biso. Mwasi moko moklisto oyo abɛlaki mpasi makasi ya konyokwama na makanisi alobaki na nsima ete: “Lolenge moko na makɔnɔ mosusu, Yehova asalaka makamwisi te na ntango oyo. Kasi akosalisaka biso mpo na koyika mpiko mpe kozwa mwa kobikisama moke na meko oyo ekoki na biso kati na ebongiseli oyo.” Kolimboláká mpo na nini mabondeli na ye mabongolaki mpenza makambo, abakisaki ete: “Nakokaki kozwa lisalisi ya elimo santu ya Yehova na boumeli ya bangonga 24 na mokolo.” Na yango, Yehova abombaka biso te liboso na mitungisi ya bomoi oyo mikoki konyokola biso, kasi “akopesa [elimo santu] na bango balɔmbi ye!” (Luka 11:13; Nzembo 88:1-3) Elimo yango ekoki kokɛmbisa biso liboso na komekama to motungisi nyonso oyo tokoki kokutana na yango. (1 Bakolinti 10:13) Soki yango esengeli, ekoki kopesa biso “nguya mingi mpenza” mpo na koyika mpiko kino Bokonzi ya Nzambe ekosilisa mitungisi nyonso kati na mokili ya sika oyo ebɛlɛmi.—2 Bakolinti 4:7.
5. (a) Mpo ete mabondeli na biso mápesa litomba, makambo nini mibale mazali na ntina mingi? (b) Lolenge nini tosengeli kobondela soki tozali kobundisa bolɛmbu moko ya nzoto? (c) Mabondeli na biso oyo mapesami na etingya mpe na sikisiki makomonisa nini epai na Yehova?
5 Nzokande, mpo ete mabondeli na biso mabimisa matomba, tosengeli kolendendela, mpe tosengeli kozala sikisiki. (Baloma 12:12) Na ndakisa, soki na bantango mosusu olɛmbi mpo ete ozali kobundisa bolɛmbu moko ya nzoto, na ebandeli ya mikolo nyonso, sɛngá Yehova asalisa yo na kopɛngola komitika na bolɛmbu wana ya sikisiki na boumeli ya mokolo mobimba. Na boumeli ya mokolo mobimba mpe na butu nyonso liboso ete okende kolala salaká mabondeli lolenge yango. Soki okwei lisusu na libungá yango, bondelá Yehova mpo na kosɛnga bolimbisi, kasi lisusu sololá na ye na ntina na makambo oyo mamemaki yo na kokwea mpe oyo osengeli kosala mpo na kopɛngola masɛnginya yango na mikolo mizali koya. Mabondeli ya etingya mpe ya sikisiki motindo yango makomonisa epai na “moyoki ya mabondeli” ete ozali na mposa makasi ya kolónga etumba.—Nzembo 65:2, NW; Luka 11:5-13.
6. Mpo na nini tokoki na ntina mpenza komizela ete Yehova ayoka mabondeli na biso ata soki tozali komiyoka ete tobongi te na kobondela?
6 Nzokande, mbala mosusu baoyo balɛmbi bayokaka ete babongi te na kosala libondeli. Mwasi moko moklisto oyo akómaki na liyoki motindo wana alobaki na nsima ete: “Yango ezali likanisi moko ya likámá mingi mpenza mpamba te ezali komonisa ete biso moko nde tokómi komisambisa, nzokande yango ezali mokumba na biso te.” Ya solo, “Nzambe ye moko azali mosambisi.” (Nzembo 50:6) Biblia ezali kondimisa biso ete ata “mitema na biso mikokweisa biso, Nzambe aleki mitema na biso na monene mpenza mpe ye ayebi makambo nyonso.” (1 Yoane 3:20) Oyo nde libɔndisi na koyeba ete ata biso moko tokoki komimona ete tobongi te mpo na kobondela, ekoki kozala ete Yehova azali kokanisa lolenge yango te na ntina na biso! “Ayebi makambo nyonso” oyo matali biso, ezala ezalela ya makambo ya bomoi na biso oyo mbala mosusu mamemaki biso na koyoka ete tobongi mpenza te. (Nzembo 103:10-14) Ngɔlu mpe bososoli mozindo na ye epusaka ye na koyoka mabondeli ya baoyo bazali na “motema motutami mpe na mawa.” (Nzembo 51:17) Lolenge nini akoki koboya koyoka kolela na biso mpo na kosɛnga lisalisi wana ye moko akokweisaka “ye oyo akokanga matoi na ye wana mobólá akolela”?—Masese 21:13.
Esengo ya kozala kati na libota ya bandeko
7. (a) Wapi ebongiseli mosusu oyo Yehova asili kotya mpo na kosalisa biso ete tózongela nguya na biso? (b) Koyeba likambo nini na ntina na libota ya bandeko ekoki kolendisa biso?
7 Ebongiseli mosusu Yehova atyaki mpo na kosalisa biso na kozongela nguya na biso ezali bongo libota ya bandeko. Oyo nde libaku ya motuya monene kozala mosangani ya libota ya mokili mobimba ya bandeko mibali mpe bandeko basi! (1 Petelo 2:17) Soki mitungisi ya bomoi mizali konyokola biso, esengo ya kozala kati na libota ya bandeko ekoki kosalisa biso na kozwa lisusu nguya. Lolenge nini? Likambo ya koyeba ete tozali biso moko te na koyikela mikakatano mpiko likoki yango moko kolendisa biso. Na ntembe te ezali na bandeko mibali mpe bandeko basi, oyo bakutanaki na mitungisi to komekama lolenge moko mpe bazalaki na mayoki lolenge moko na oyo tozali na yango. (1 Petelo 5:9) Ezali likambo ya kolendisa na koyeba ete makambo oyo tozali kokutana na yango masuki bobele na biso moko te mpe ete mayoki na biso makeseni te na oyo ya basusu.
8. (a) Bandakisa nini ezali komonisa lolenge oyo tokoki kozwa lisungi mpe libɔndisi mingi kati na libota ya bandeko? (b) Na meko nini yo moko osilaki kozwa lisalisi to libɔndisi ya “moninga moko ya solo”?
8 Kati na libota ya bandeko oyo ezali na esengo tokoki kokutana na ‘baninga ya solo’ oyo, na ntango ya mpasi, bakoki kopesa lisungi mpe libɔndisi oyo tozali na yango mposa. (Masese 17:17) Mbala mingi, nyonso oyo esengeli ezali bobele maloba ya boboto to kosala makambo oyo mazali komonisa likebi. Ndeko mwasi moko oyo azalaki kobundisa mayoki ya kozanga ntina amikundoli ete: “Ezalaki na baninga oyo bazalaki kolendisa ngai na maloba ya elikya mpo nalónga makanisi ya kozanga elikya oyo nazalaki na yango.” (Masese 15:23) Nsima na liwa ya mwana na ye ya nsuka ya mwasi, ndeko mwasi moko amonaki ete na ebandeli azalaki kokoka te koyemba Nzembo ya Bokonzi kati na makita ya lisangá, mingimingi Nzembo oyo ezalaki kolobela lisekwa. Amikundoli ete “mokolo moko, ndeko mwasi moko oyo afandaki na molɔngɔ́ mosusu amonaki ete nazali kolela. Ayaki, azingaki ngai na mabɔkɔ na ye, mpe ayembaki elongo na ngai kino nsuka ya loyembo. Natondaki na bolingo mpo na bandeko mibali mpe basi mpe nazalaki na esengo monene ete toyaki na makita, kososoláká ete ezalaki kuna esika ya kozwa lisalisi, kuna na Ndako ya Bokonzi.”
9, 10. (a) Lolenge nini tokoki kosunga na kokólisa esengo ya libota ya bandeko? (b) Nani mpenza azali na mposa ya boninga ya malamu? (c) Tokoki kosala nini mpo na kosalisa baoyo bazali na mposa ya kolendisama?
9 Ezali solo ete, biso banso tozali na mokumba ya kokólisa esengo ya libota ya bandeko. Na yango, tosengeli “kozipola mitema” na biso mpo na kokɔtisa bandeko mibali mpe bandeko basi banso. (2 Bakolinti 6:13) Ekozala likambo ya mawa soki baoyo balɛmbi bamiyoki ete bolingo ya libota ya bandeko esili kokóma mpiɔ epai na bango! Nzokande, baklisto mosusu balobaki ete bamiyokaki lokola ete bazalaki bango moko mpe basundolami. Ndeko mwasi moko oyo mobali na ye azalaki kotɛmɛla solo amilelaki ete: “Nani oyo alingaka te kozala na boninga ya kolendisa, ya koyikisama mpiko mpe na baninga oyo bazali komonisa bolingo? Bókundwela bandeko na biso mibali mpe basi ete tozali na mposa na bango!” Ee, ezali mposa mpenza ya baoyo ezalela ya makambo na bango ya bomoi ezali konyokola bango—baoyo babalani na bandimi te, baboti oyo bazali kobɔkɔla bana bango moko, baoyo bazali na mikakatano ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto oyo mizali koumela, mibangé, mpe basusu—bazali na mposa ya baninga ya malamu. Basusu kati na biso bazali na mposa ete bákundwela bango yango?
10 Tokoki kosala nini mpo na kopesa lisalisi? Tózipola mitema na biso mpo na komonisa bolingo na biso. Wana tozali kobyanga bato, tóbosana te baoyo bazali na mposa ya koyikisama mpiko. (Luka 14:12-14; Baebele 13:2) Na esika ya kokanisa ete ezalela ya makambo na bango ekopesa bango nzela te ya kondima libyangi na biso, mpo na nini te komeka kobyanga bango? Na nsima totika bango moko bázwa ekateli. Ata soki bakoki te kondima libyangi yango, na ntembe te bakolendisama na koyeba ete basusu bazali kokanisa bango. Ekoki mbala mosusu kozala likambo oyo bazalaki na yango mposa mpo na kozongela nguya na bango.
11. Baoyo batungisami na mikakatano bakoki kozala na mposa ya lisungi ya lolenge nini?
11 Baoyo bazali konyokwama bakoki kozala na mposa ya lisalisi ya motindo mosusu. Na ndakisa, mama oyo azali kobɔkɔla bana ye moko, akoki kozala na mposa ete ndeko mobali moko oyo akɔmɛli amonisa bosepeli epai na mwana na ye ya mobali oyo azali na tata te. (Yakobo 1:27) Ndeko mobali to ndeko mwasi oyo azali na mikakatano makasi ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto akoki kozala na mposa ya lisalisi mpo na kosomba biloko na ye to mpo na kosunga ye na misala ya ndako. Mibangé bakoki koyoka mposa makasi ya boninga to ya lisalisi mpo na kobima na mosala ya kosakola. Soki mposa moko ya lolenge yango esɛngi lisalisi, yango ezali mpenza ‘komeka bolingo na biso.’ (2 Bakolinti 8:8) Na esika ya kokima baoyo bazali kati na bosɛnga mpo ete yango ekosɛnga ntango mpe milende, tiká ete tólónga komekama ya bolingo ya boklisto na kososoláká mpe na kokokisáká bamposa ya basusu.
Nguya ya Liloba ya Nzambe
12. Lolenge nini Liloba ya Nzambe lizali kosalisa biso na kozongela nguya na biso?
12 Moto oyo atiki kolya mosika te makasi to nguya na ye ekosila. Bobele bongo, lolenge mosusu oyo Yehova akopesaka biso nguya ya kokende liboso ezali bongo na kosɛnzɛláká ete tóleisama malamu na elimo. (Yisaya 65:13, 14) Bilei ya elimo nini oyo azali kopesa? Libosoliboso, Liloba na ye Biblia. (Matai 4:4; kokanisá na Baebele 4:12.) Lolenge nini yango ekoki kosalisa biso na kozongela nguya na biso? Na ntango mitungisi mpe mikakatano oyo tozali kokutana na yango mibandi kosilisa makasi na biso, tokoki kozwa makasi na kotángáká na ntina na mayoki mpe lisoló ya bomoi ya mibali mpe basi ya sembo ya ntango ya Biblia. Atako bazalaki bandakisa minene ya bosembo, bazalaki bato “lolenge moko na biso.” (Yakobo 5:17; Misala 14:15) Bakutanaki na komekama mpe mitungisi lolenge moko na oyo ya biso. Tótala mwa bandakisa.
13. Bandakisa nini ya Makomami ezali komonisa ete mibali mpe basi ya sembo ya ntango ya Biblia bazalaki na mayoki mpe na ezalela ya makambo lokola ya biso?
13 Tata ya libota Abalayama ayokaki mawa mingi na ntina na liwa ya mwasi na ye atako azalaki kondima lisekwa. (Genese 23:2; kokanisá na Baebele 11:8-10, 17-19.) Davidi oyo abongolaki motema amiyokaki ete na ntina na masumu na ye abongaki lisusu te kosalela Yehova. (Nzembo 51:11) Mose amiyokaki ete azalaki na makoki mpenza te. (Exode 4:10) Epafalɔditɔ anyokwamaki na mpasi ya makanisi ntango eyebanaki ete bokɔnɔ makasi epekisaki ye ete asala mingi te kati na “mosala na Nkolo.” (Bafilipi 2:25-30) Paulo asengelaki kobundisa bolɛmbu ya nzoto ya kozanga kokoka. (Baloma 7:21-25) Na ntembe te Ewɔdia mpe Suntuke, bandeko basi mibale bapakolami kati na lisangá ya Filipi, bazalaki na mwa mikakatano mpo na koyokana malamu. (Bafilipi 1:1; 4:2, 3) Ezali likambo ya kolendisa na koyeba ete bato wana ya sembo bazalaki na mayoki mpe na ezalela ya makambo lokola oyo ya biso, nzokande balɛmbaki te! Yehova mpe atikaki bango te.
14. (a) Bisaleli nini Yehova azali kosalela mpo na kosalisa biso ete tózwa nguya kati na Liloba na ye? (b) Mpo na nini bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ebimisaka masoló na ntina na makambo ya bomoi ya bato, na libota, mpe na mayoki?
14 Mpo na kosalisa biso ete tózwa makasi kati na Liloba na ye, Yehova asalelaka moombo ya sembo mpe ya mayele mpo na kopesa biso ebele ya “bilei na elaka na yango.” (Matai 24:45) Uta kala moombo ya sembo azali kosalela bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! mpo na kokɔtela solo ya Biblia mpe kosakola Bokonzi ya Nzambe lokola elikya bobele moko ya bato. Mingi mpenza na boumeli ya bambula mingi oyo eleki, bazulunalo wana esili kobimisa makanisi ya Makomami na ntango ebongi na ntina na bomoi ya bato, na libota, mpe na mikakatano ya mayoki oyo ata basaleli mosusu ya Nzambe bakutanaka na yango. Mpo na ntina nini masoló motindo yango mabimisamaki? Na ntembe te ezalaki mpo na kosunga baoyo bazali kokutana na mikakatano yango ete bázwa makasi mpe mpiko kati na Liloba ya Nzambe. Kasi masoló lolenge yango mazali mpe kosalisa biso nyonso na kososola malamu makambo oyo bandeko na biso mosusu ya mibali mpe ya basi bazali mbala mosusu kokutana na yango. Boye tobongisami malamu mpo na kolanda toli oyo ya Paulo ete: “Bóyikisa bato na motema mokuse mpiko, bósunga bato na motau, bóyokela bango nyonso motema pɛtɛɛ.”—1 Batesaloniki 5:14.
Bankulutu oyo bazali “ebombamelo mpo na mopɛpɛ”
15. Yisaya asakolaki nini na ntina na baoyo bazali kosala lokola bankulutu, mpe yango etyeli bango mokumba nini?
15 Yehova asili mpe kobongisa eloko mosusu mpo na kosalisa biso wana tolɛmbi—bankulutu ya lisangá. Na ntina na bango Yisaya akomaki ete: “Moto na moto akozala lokola [ebombamelo] mpo na mopɛpɛ, ezipelo na ntango na mbula makasi; lokola bitima na mai kati na esika ekauki, mpe lokola molili na libangá monene kati na mokili molɛmbisami na moi.” (Yisaya 32:1, 2) Bongo, bankulutu bazali na mokumba ya kokokisa oyo Yehova asakolaki na ntina na bango. “Basengeli kozala” eutelo ya libɔndisi mpe ya kopema mpo na basusu, mpe basengeli kozala na bolingo malamu ya “kokumbana mikumba [to, “makambo ya mpasi”; mpenzampenza “biloko ya bozito”].” (Bagalatia 6:2, NW, maloba na nsé ya lokasa, na Lingelesi) Lolenge nini bakoki kosala yango?
16. Bankulutu bakoki kosala nini mpo na kosalisa baoyo bazali komiyoka ete babongi te mpo na kobondela?
16 Lokola tolobelaki yango, mbala mosusu moto moko oyo alɛmbi akoki koyoka ete abongi te mpo na kobondela. Bankulutu bakoki kosala nini? Bakoki kobondela elongo na moto yango mpe mpo na ye. (Yakobo 5:14) Bobele kosɛnga na Yehova, liboso ya moto oyo alɛmbi, ete asalisa ye na kososola bolingo monene oyo Yehova mpe bandeko mosusu bazali na yango epai na ye ekoki mpenza kozala libɔndisi monene. Koyoka libondeli ya sembo oyo euti na motema mpe oyo esalemi na nkulutu moko ekoki kokɛmbisa elikya ya moto oyo atungisami. Yango ekoki kosalisa ye na kososola ete soki bankulutu bandimisami ete Yehova akoyoka mabondeli oyo mapesami mpo na ye, na bongo ye mpe akoki kondimisama na yango.
17. Mpo na nini bankulutu basengeli kozala bayoki ya boboto?
17 Yakobo 1:19 elobi ete: “Tiká ete moto na moto azala na koyoka noki nde aloba malɛmbɛ.” Mpo na kosalisa baoyo balɛmbi ete bázongela nguya na bango, bankulutu basengeli lisusu kozala bayoki ya boboto. Mbala mosusu basangani ya lisangá bakoki kobundana na mikakatano mpe mitungisi oyo mikoki kosila te na ebongiseli oyo. Bongo, likambo oyo bakoki kozala na yango mposa, ezali te ya “kosilisa” mikakatano na bango kasi bobele kosolola na moyoki moko malamu— moto oyo akoloba na bango te oyo basengelaki kosala kasi oyo akoyoka kozanga kokweisa bango.—Luka 6:37; Baloma 14:13.
18, 19. (a) Lolenge nini koyoka noki ekoki kosalisa nkulutu moko na kopɛngola kobakisa bozito likoló na ye oyo alɛmbi? (b) Litomba nini lizali komonana wana bankulutu bamonisi “kobɔndisana”?
18 Bankulutu, koyoka nokinoki ekoki kosalisa bino na kopɛngola ete, kozanga kokanela bóbakisa te bozito monene likoló na ye oyo alɛmbi. Na ndakisa, ndeko mobali to ndeko mwasi moko oyo azangisaki makita to asakolaki mingi te, azali mpenza na mposa ya toli mpo na kosala mingi kati na mosala ya kosakola to mpo na koyangana pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na makita? Mbala mosusu ekoki kozala bongo. Kasi boyebi mpenza ezalela ya makambo na ye nyonso? Ezali nde mpo na kobakisama ya mikakatano ya kolɔngɔ́nɔ́ na ye ya nzoto? Mbala mosusu mikumba ya libota nde miuti kobakisama? Ezali nde na makambo to na mitungisi mosusu oyo mizali konyokola ye? Omikundola ete, mbala mosusu moto yango asilaki komipesa ekweli monene wana azalaki na likoki te ya kosala mingi.
19 Bongo, lolenge nini okoki kosalisa ndeko mobali to ndeko mwasi yango? Liboso ete okóma na bosukisi mpe opesa toli, yoká naino! (Masese 18:13) Na nzela ya mituna oyo misalelami na bososoli ‘bótóka’ mayoki ya motema ya moto yango. (Masese 20:5) Kosundola mayoki wana te—simbá yango. Ye oyo alɛmbi akoki kozala na mposa ya kondimisama ete Yehova abatelaka biso mpe azali kososola ete na ntango mosusu ezalela ya makambo na biso etyelaka biso bandelo. (1 Petelo 5:7) Wana bankulutu bazali komonisa “kobɔndisana,” baoyo balɛmbi ‘bakozwa kopema mpo na milimo na bango.’ (1 Petelo 3:8; Matai 11:28-30) Soki bazwi kopema lolenge wana, bakozala lisusu na mposa te ete báyebisa bango básala mingi; mitema na bango mikopusa bango na kosala nyonso oyo ekoki na bango kosala kati na mosala ya Yehova.—Kokanisá na 2 Bakolinti 8:12; 9:7.
20. Lokola nsuka ya libota oyo mabe ebɛlɛmi, tosengeli kozala na ekateli ya kosala nini?
20 Na ntembe te tozali kobika na eleko oyo eleki mpasi kati na lisoló ya bato. Mitungisi ya bomoi kati na mokili ya Satana mizali sé kobakisama wana tozali kopusama mosika na ntango oyo ya nsuka. Omikundolá ete, lokola nkosi oyo alingi kokanga nyama, Zábolo azali kozela ete tólɛmba mpe tótika mpo ete tópesa ye libaku ya kolya biso nokinoki. Oyo nde botɔ́ndi tosengeli kozala na yango epai na Yehova oyo apesaka nguya epai na ye oyo alɛmbi! Tiká ete tózwa litomba na bibongiseli nyonso oyo asili kotya mpo na kopesa biso nguya ya kokende liboso, lokola nde topesamelaki mapapu ya nguya ya mpongo oyo ezali kobuta mosika likoló. Lokola nsuka ya ebongiseli mabe oyo ebɛlɛmi mpenza, sikawa ezali ntango te ya kotika kopota kati na momekano na biso mpo na libonza—bomoi ya seko.—Baebele 12:1.
Okopesa eyano nini?
◻ Tokoki kozela ete Yehova asala nini mpo na koyanola na mabondeli na biso?
◻ Na meko nini tokoki kozwa makasi na libota na biso ya bondeko ya boklisto?
◻ Lolenge nini Liloba ya Nzambe lisalisaka biso na kozongela nguya na biso?
◻ Bankulutu bakoki kosala nini mpo na kosalisa baoyo balɛmbi ete bázongela nguya na bango?
[Elilingi na lokasa 17]
Wana tozali komonisa boyambi, tiká ete tóbosana te baoyo bazali na mposa ya kolendisama
[Elilingi na lokasa 18]
Bankulutu bakoki kosɛnga na Yehova ete asalisa baoyo balɛmbi na kososola ete balingami mingi