Mokapo ya Ntuku Mibale na Mitano
Mokonzi na bankumu na ye
1, 2. Tokoki koloba nini mpo na Rulo ya Mbu Ekufá oyo ezali mpe na mokanda ya Yisaya?
PENE na nsuka ya bambula ya 1940, bazwaki liboke moko ya kokamwa mpenza ya barulo na kati ya mibenga pene na Mbu Ekufá, na Palestine. Bakómaki kobenga yango Barulo ya Mbu Ekufá, mpe bakanisi ete bakomaki barulo yango kati na mobu 200 liboso ya ntango na biso (L.T.B.) mpe mobu 70 na ntango na biso (T.B.). Moko na barulo yango eyebani mingi ezali rulo ya Yisaya oyo ekomami na Liebele na loposo moko ya makasi mpenza. Rulo yango ezali pene na mobimba mpe makomi na yango ezali kaka na mwa bokeseni moke na bamaniskri ya Bamasorete oyo ekomamaki mbula soki 1000 na nsima. Na bongo, rulo yango emonisi ete baoyo basalaki bakopi ya Biblia babebisaki yango te.
2 Likambo moko ya ntina mingi etali Rulo ya Mbu Ekufá oyo ezali na mokanda ya Yisaya ezali ete eteni oyo ezali lelo Yisaya mokapo 32 etyami elembo “X” na pembeni. Toyebi te mpo na nini mokomi yango atyaki elembo wana, kasi toyebi ete likambo moko ya ntina mingi ezali na kati ya eteni wana ya Biblia Mosantu.
Boyangeli ya sembo mpe ya boyengebene
3. Boyangeli nini esakolamaki na mokanda ya Yisaya mpe na mokanda ya Emoniseli?
3 Yisaya mokapo 32 ebandi na esakweli moko ya kobenda likebi oyo ezali kokokisama mpenza na eleko na biso: “Talá! Mokonzi moko akoyangela mpo na boyengebene; mpe bankumu, bakoyangela lokola bankumu mpo na bosembo.” (Yisaya 32:1, NW) Ɛɛ “talá!” Liloba yango ya kobenda likebi ezali kokundolela biso liloba mosusu ya ndenge wana oyo ezali na mokanda ya esakweli ya nsuka ya Biblia: “Mofandi na kiti ya bokonzi alobi ete, [Talá!, NW], Nakozalisa biloko nyonso biloko ya sika.” (Emoniseli 21:5) Mokanda ya Yisaya mpe mokanda ya Emoniseli, oyo kokomama na yango ekabwani na ntaka ya mbula soki 900, nyonso mibale ezali kolobela boyangeli moko ya sika na maloba kitoko mpenza—“likoló ya sika,” oyo mokonzi na yango ezali Klisto Yesu, oyo atyamaki na kiti ya bokonzi na 1914, mpe bato 144 000 oyo “basikolami kati na bato” bakoyangela elongo na ye—bakisa mpe “mabele ya sika,” elingi koloba bato ya mokili mobimba oyo basangani na bomoko.a (Emoniseli 14:1-4; 21:1-4; Yisaya 65:17-25) Ebongiseli wana nyonso esalemi na lisalisi ya mbeka ya lisiko ya Klisto.
4. Bato nini lelo oyo bakozala bato ya liboso oyo bakofanda na mokili ya sika?
4 Nsima ya komona na kati ya emonaneli bato 144 000 oyo bakoyangela elongo na Yesu ndenge batyami elembo ya nsuka, ntoma Yoane alobi ete: “Namoni [mpe, talá!, NW] ebele monene, oyo moto te akoki kotánga motuya na bango; bauti na mabota nyonso, na mikili nyonso, na [bituluka] nyonso, na minɔkɔ nyonso; batɛlɛmi liboso ya kiti ya bokonzi mpe liboso ya Mwana ya Mpate.” Bango nde bato ya liboso oyo bakofanda na mabele ya sika—ebele monene oyo bazali sikawa bamilio, oyo bayanganisami pembeni ya batikali ya ba 144 000 oyo mingi kati na bango bakómi mibange. Ebele monene yango bakobika na bolɔzi monene oyo ekómi pene, mpe na mabele oyo ekokóma paladiso bakozala elongo na bato ya sembo oyo bakosekwa, na bamiliare ya bato mosusu oyo bakopesamela libaku ya komonisa kondima. Baoyo nyonso bakosala bongo bakozwa bomoi ya seko.—Emoniseli 7: 4, 9-17.
5-7. Mokumba nini “bankumu” oyo basakolamaki bazali na yango na kati ya etonga ya Nzambe?
5 Nzokande, lokola mokili oyo ebebi na koyinana ezali naino, basangani ya ebele monene bazali na mposa ya libateli. Libateli yango ezali kouta mingimingi epai ya “bankumu” oyo bazali kokamba “mpo na bosembo.” Oyo nde ebongiseli malamu! “Bankumu” yango balobelami lisusu mingi na maloba kitoko ya esakweli ya Yisaya oyo: “Moto na moto akozala lokola esika ya komibomba mpo na mopɛpɛ, esika ya kokima na ntango ya mbula ya mopɛpɛ makasi; lokola miluka ya mai kati na esika ekauki, mpe lokola elili ya libanga monene kati na mabele oyo ebimisaka lisusu matiti te.”—Yisaya 32:2, NW.
6 Sikawa na ntango oyo mokili ebebi, tozali na mposa ya “bankumu,” elingi koloba bankulutu oyo ‘bakokeba na ntina na etonga mobimba,’ bakobatela bampate ya Yehova mpe bakosala ete boyengebene emonisama na boyokani na mitinda ya sembo ya Yehova. (Misala 20:28) “Bankumu” yango basengeli kokokisa masɛngami oyo ezali na 1 Timote 3:2-7 mpe Tito 1:6-9.
7 Na esakweli na ye ya monene oyo ezali kolobela kobeba ya “nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo,” Yesu alobaki ete: “Bókeba, bóbanga te.” (Matai 24:3-8, NW) Mpo na nini bayekoli ya Yesu bazali kobanga te mpo na makambo ya nsɔmɔ oyo ezali komonana na mokili lelo oyo? Mpamba te “bankumu”—ezala bazali bapakolami to “bampate mosusu”—bazali kobatela etonga na bosembo mpenza. (Yoane 10:16) Bamibanzabanzaka mpo na bandeko na bango ya mibali mpe ya basi mpe babangaka te, ata na bantango ya mpasi, lokola na ntango ya bitumba kati na bikólo mpe kobomana. Kati na mokili oyo ebebi mpenza na elimo, basalaka makasi ete baoyo banyokwami na makanisi bálendisama na mateya ya Biblia, Liloba ya Nzambe.
8. Ndenge nini Yehova azali kobongisa mpe kosalela “bankumu” oyo bazali kati na bampate mosusu?
8 Na mibu 50 oyo eleki, “bankumu” yango basili komonana polele. “Bankumu” oyo bazali na kati ya bampate mosusu bazali kobongisama mpo na kokóma kelasi ya “mokonzi” oyo ezali se kokola mpo ete nsima ya bolɔzi monene, kati na bango baoyo bazali na makoki báponama mpo na kozwa mikumba ya boyangeli na “mabele ya sika.” (Ezekiele 44:2, 3; 2 Petelo 3:13) Lokola bakambaka makambo ya elimo mpe balendisaka basusu wana bazali kopesa ndakisa na mosala ya Bokonzi, bazali komonisa ete bazali “lokola elili ya libanga monene,” bazali kobɔndisa etonga na kati ya esika na yango ya losambo.b
9. Makambo nini ezali komonisa ete tozali na mposa ya “bankumu” lelo oyo?
9 Na mikolo ya nsuka ya mokili oyo ya Satana oyo etondi na makama, baklisto oyo bamipesi na Nzambe basengeli mpenza na libateli yango. (2 Timote 3:1-5, 13) Mipɛpɛ makasi ya mateya ya lokuta mpe bakampanye ya kokosa bato ezali kobɛta makasi. Mbula ya mipɛpɛ yango ezali kobɛta na lolenge ya bitumba kati na bikólo mpe bitumba ya bana-mboka, bakisa mpe kobundisa basambeli ya sembo ya Yehova Nzambe. Kati na mokili oyo ekauká na elimo, baklisto bazali mpenza na mposa ya miluka ya mai yango ya pɛto mpe ya sangisangi ya solo mpo na kosilisa mposa na bango ya mai ya elimo. Likambo ya esengo, Yehova alaki ete Mokonzi oyo atii, na nzela ya bandeko na ye bapakolami mpe “bankumu” kati na bampate mosusu oyo bazali kosalisa bango, bakolendisa mpe bakokamba baoyo batungisami mpe balɛmbi nzoto na eleko oyo ya mpasi. Na yango Yehova akosala ete makambo ya sembo mpe ya boyengebene elonga.
Tótya likebi na miso, na matoi mpe na motema
10. Bibongiseli nini Yehova azwaki mpo basaleli na ye ‘bámona’ mpe ‘báyoka’ makambo ya elimo?
10 Ndenge nini ebele monene batalelaka bibongiseli ya Teokrasi oyo Yehova azwaka? Esakweli yango elobi lisusu ete: “Miso ya baoyo bakomonaka ekozipama na molili lisusu te mpe matoi ya baoyo bakoyokaka [ekoyoka na likebi, NW].” (Yisaya 32:3) Wana bambula ezali koleka, Yehova azwaki bibongiseli mpo ete basaleli na ye oyo alingaka mingi, bázala na nyonso oyo ekoki mpo na koteyama mpe bákoka kokola. Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe makita mosusu esalemaka na masangá ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba; mayangani ya etúká, mayangani ya ekólo mobimba mpe mayangani ya mikili mingi; bakisa mpe mateya oyo “bankumu” bazwaka mpo na kobatela etonga na boboto, nyonso wana epesi nzela ya kosala libota ya bomoko ya bandeko na mokili mobimba. Ezala epai nini babateli na mpate yango bazali na mabele, matoi na bango ezali mpenza polele mpo na koyoka mbongwana nyonso oyo esalemi mpo na kokanga ntina ya liloba ya solo oyo ezali kokende se liboso. Lokola bazali na lisosoli oyo eteyami na Biblia, bazali ntango nyonso pene ya koyoka mpe kotosa.—Nzembo 25:10.
11. Mpo na nini lelo oyo basaleli ya Nzambe bazali koloba na komindimisa mpenza, kasi na kotatabana te?
11 Na nsima, esakweli yango ekebisi ete: “Motema ya bato [oyo basalaka makambo mbangumbangu ekotalela boyebi, NW] mpe lolemo ya bato ya likekuma ekoloba mbangu mpe polele.” (Yisaya 32:4) Tiká ete moto te azwa bikateli mbangumbangu mpo na oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe. Biblia elobi ete; “Omoni moto oyo akobimisa maloba na ye mbangumbangu? Elikya ekozala epai na zoba koleka epai na ye.” (Masese 29:20, NW; Mosakoli 5:2) Liboso ya 1919, ata mpe basaleli ya Yehova babebisamaki na makanisi ya Babilone. Kasi kobanda na mobu yango, Yehova apesi bango bososoli ya polele ya mikano na ye. Bamoni ete makambo oyo amonisi, eyebisami mbangumbangu te, kasi nde ekanisami malamumalamu, mpe lelo oyo bazali koloba na komindimisa mpenza mpe bazali kotatabana te.
“Zoba”
12. Banani bazali ‘bazoba’ lelo oyo, mpe na lolenge nini bakabaka te?
12 Na nsima esakweli ya Yisaya emonisi bokeseni moko: “[Zoba akobyangama lisusu te ete mokabi; mpe mpo na moto oyo azangi mitinda, ekolobama mpo na ye te ete azali na lokumu, NW]. Zambi zoba akolobaka makambo na zoba.” (Yisaya 32:5, 6a) Nani azali “zoba”? Lokola nde alingaki konyata likambo yango, Mokonzi Davidi apesi eyano mbala mibale ete: “[Zoba, NW] alobi na motema na ye ete, [Yehova] azali te. Bamibebisi, bazali kosala makambo mabe, moko azali te oyo akosalaka malamu.” (Nzembo 14:1; 53:1) Ya solo, bato oyo bandimaka te ete Nzambe azali, balobaka ete Yehova azali te. Ezali mpenza makanisi ya “bato ya mayele” mpe bato mosusu oyo basalaka makambo lokola nde Nzambe azali te, bakanisaka ete bakozongisa monɔkɔ epai ya moto te. Solo ezali kati na bato ya ndenge wana te. Bazali na motema ya kokaba te. Bazali ata na nsango malamu ya bolingo te. Na bokeseni na baklisto ya solosolo, basalaka malɛmbɛ mpo na kosalisa bato oyo bazali na kati ya bosɛnga to mpe kutu baboyaka mpenza kosalisa bango.
13, 14. (a) Ndenge nini bapɛngwi ya mikolo na biso basalaka makambo ya mabe? (b) Eloko nini bapɛngwi bamekaka kopimela baoyo bazali na nzala mpe na mposa ya mai, kasi nsuka ekozala nini?
13 Bazoba mingi ya ndenge yango bakómaka koyina bato oyo bamipesi na kosakola solo ya Nzambe. “Motema na ye ekosala oyo ekoyokisa mpasi, mpo na kosala na lipɛngwi mpe kolobela Yehova maloba mabe.” (Yisaya 32:6b, NW) Maloba yango ebongi mpenza mpo na bapɛngwi ya mikolo na biso! Na mikili mosusu ya Mpoto mpe ya Azia, bapɛngwi basangisaka makasi na bango na banguna mosusu oyo batɛmɛlaka solo, mpe bazali koloba makambo ya lokuta epai ya bakonzi ya Leta mpo ete bápekisa mosala ya kosakola ya Batatoli ya Yehova to bápekisa bango makambo mosusu. Bamonisaka ezaleli ya “moombo mabe,” oyo Yesu asakolaki mpo na ye ete: “Nde soko moombo yango mabe akoloba na motema na ye ete, Nkolo na ngai azali koumela, akobanda kobɛtabɛta basalani na ye mpe kolyaka mpe komɛlaka esika moko na balangwi, nkolo ya moombo yango akobima na mokolo mokanisi ye te mpe na ntango eyebi ye te, mpe akopesa ye etumbu monene mpe akotya ye esika moko na bakosi, wana ezali na kolela mpe na kokatakata na mino.”—Matai 24:48-51.
14 Na ntango yango, mopɛngwi azali “kotika molimo ya moto ya nzala bobele mpamba mpe bazali kopesa te mai na ye oyo azali na mposa ya mai.” (Yisaya 32:6c, NW) Banguna ya solo bamekaka kopimela bato oyo bazali na nzala ya solo bilei ya elimo, mpe bamekaka kopekisa baoyo bazali na mposa ya mai bámɛla te mai ya kolendisa ya nsango ya Bokonzi. Kasi nsuka ekozala nde oyo Yehova alobi na basaleli na ye na nzela ya moko ya basakoli na ye: “[Bakobunda na yo nde bakolonga, NW] yo te zambi ngai nazali na yo elongo mpo na kobikisa yo. [Yehova] alobi bongo.”—Yilimia 1:19; Yisaya 54:17.
15. Lelo oyo, banani mpenza bazali ‘bazangi mitinda,’ “maloba ya lokuta” nini balobaka, mpe yango ebimisi nini?
15 Kobanda na katikati ya ekeke ya 20, makambo ya kosangisa nzoto na lolenge ya mbindo ezali kopalangana makasi na mikili ya mangomba ya boklisto. Mpo na nini? Esakweli yango elobelaki ntina moko: “Mpo na moto oyo azangi mitinda, bisaleli na ye ezali mabe, apesi toli mpo na misala ya mbindo, mpo na kobebisa banyokwami na maloba ya lokuta, ata ntango mobola azali koloba oyo ezali sembo.” (Yisaya 32:7, NW) Na kokokisama ya maloba yango, bakonzi ya mangomba mingi bamonaka mabe te ndenge bato basangisaka nzoto liboso ya kobala, batambolaka makango, basangisaka nzoto mibali na mibali to basi na basi—tokoki koloba ndenge bato basalaka “pite mpe makambo nyonso ya mbindo.” (Baefese 5:3) Yango wana, bazali “kobebisa” bandimi na bango na maloba na bango ya lokuta.
16. Nini epesaka baklisto ya solo esengo?
16 Na bokeseni, kokokisama ya maloba ya esakweli oyo elandi ezali mpenza kolendisa! “Mpo na mokabi, ezali mpo na makambo ya bokabi nde azali kopesa toli; mpe mpo na makambo ya bokabi akotɛlɛma.” (Yisaya 32:8, NW) Yesu ye moko alendisaki ezaleli ya kokaba ntango alobaki ete: “Bózala na momeseno ya kopesa, mpe bato bakopesa bino. Bakosopa na mabenga na bino biloko mingi, oyo banyati, baningisá mpe oyo etondi mingi koleka. Mpamba te na emekelo oyo bozali komekela, bakomekela mpe bino na yango.” (Luka 6:38, NW) Ntoma Paulo mpe alobelaki mapamboli oyo bato oyo bakabaka bazwaka, alobaki ete: “[Bókanisaka] mpe maloba ya Nkolo Yesu ete, Esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa.” (Misala 20:35) Baklisto ya solo bazalaka na esengo mpo na bozwi ya biloko ya mosuni te to mpo na esika ya lokumu te, kasi nde mpo na ezaleli ya bokabi—ndenge moko mpe lokola Nzambe na bango, Yehova, akabaka. (Matai 5:44, 45) Esengo na bango oyo eleki monene eutaka na kosala mokano ya Nzambe, kopesa bomoto na bango na boboto nyonso mpo na koyebisa bato mosusu “Nsango Malamu ya nkembo ya Nzambe [ya esengo, NW].”—1 Timote 1:11.
17. Lelo oyo, banani bazali lokola ‘basi oyo bazali komitungisa mpo na likambo moko te’ oyo Yisaya alobeli?
17 Esakweli ya Yisaya elandi: “Bino basi oyo bofandi nyɛɛ, bótɛlɛma, bóyoka mongongo na ngai! Bino bana basi oyo bozali komitungisa mpo na likambo moko te, bótya likebi na maloba na ngai! Etikali mbula moko na mwa mikolo, bokomitungisa, bino basi oyo bozali komitungisa na likambo moko te, zambi mosala ya kobuka mbuma ya vinyo ekosila, kasi ntango ya kobuka mbuma ekoya te. Bólɛnga, bino basi oyo bofandi, bóningana bino basi oyo bozali komitungisa mpo na likambo moko te.” (Yisaya 32:9-11a, NW) Ezaleli ya basi yango ekoki kokundolela biso ezaleli ya bato oyo lelo balobaka ete basalelaka Nzambe kasi bazali na molende na mosala na ye te. Bato ya ndenge wana bazali na mangomba ya “[Babilone Monene, NW], mama na pite na bosɔtɔ na mokili.” (Emoniseli 17:5) Na ndakisa, bandimi ya mangomba ya boklisto bakokani mpenza na “basi” oyo Yisaya alobeli. “Bafandi nyɛɛ,” bazali komibanzabanza ata mwa moke te mpo na kosambisama to mpo na mitungisi oyo elingi kokómela bango.
18. Nani azwi etinda ya ‘kolata ngɔtɔ na loketo,’ mpe mpo na nini?
18 Yango wana, libyangi oyo epesami epai ya mangomba ya lokuta: “Bólongola bilamba na bino mpe bómizalisa bolumbu, bólata ngɔtɔ na [loketo] na bino. [Bómibɛtabɛta] ntolo mpo na kolela bilanga ya kitoko mpe ya [vinyo, NW] ya mbuma mingi. Zambi na mabele ya bato na ngai nzube mpe matiti mpamba ekobima; ɛɛ, na ndako nyonso na esengo, kati na [engumba, NW] ya esengo.” (Yisaya 32:11b-13) Elobeli “bólongola bilamba na bino mpe bómizalisa bolumbu” elingi komonisa te ete kolongola bilamba nyonso mpe kotikala mpenza bolumbu. Na ntango ya kala, bato bazalaki na momeseno ya kolata elamba moko likoló ya elamba mosusu. Mbala mingi elamba ya likoló ezalaki mpo na koyeba lolenge ya moto. (2 Mikonzi 10:22, 23; Emoniseli 7:13, 14) Na bongo, esakweli yango ezali kosɛnga na bandimi ya mangomba ya lokuta bálongola bilamba na bango ya likoló—elingi koloba nkombo oyo balati ete bazali basaleli ya Nzambe—mpe na esika na yango bálata nde ngɔtɔ, elembo ya kolela mpo kosambisama na bango ekómi pene. (Emoniseli 17:16) Bibongiseli ya mangomba ya boklisto oyo elobaka ete ezali “engumba ya esengo” ya Nzambe, ezali kobota ata mbuma moko te oyo eyokani na mokano ya Nzambe, ezala mpe bandimi ya lisangá ya mangomba mosusu ya lokuta ya mokili mobimba. Misala na bango ebotaka kaka “nzube mpe matiti mpamba” mpo na bolɛmbu na bango.
19. Ezaleli nini ya “Yelusaleme” ya lipɛngwi Yisaya alobeli?
19 Mawa yango epalangani bipai nyonso na “Yelusaleme” ya lipɛngwi: “Ndako molai ya kofanda etikali mpamba, loyenge ya engumba ezali lisusu te; Ofela mpe linɔ́ngi ya mosɛnzɛli ekómi bilanga oyo ezangi milona, mpo na libela kosepela ya mindonga, esika ya koleisa bitonga.” (Yisaya 32:14, NW) Ɛɛ, ata mpe Ofela elobelami. Ofela ezali esika moko etombwami ya Yelusaleme oyo ezali mpenza kopesa likoki ya kobatela engumba. Koloba ete Ofela ekóma elanga oyo ezangi milona, yango ezali mpenza komonisa ndenge engumba yango ekobebisama nyonso. Maloba ya Yisaya ezali komonisa ete “Yelusaleme” ya lipɛngwi—mangomba ya boklisto—ezali komibanzabanza te mpo na kokokisa mokano ya Nzambe. Ekauká na elimo, ezali mosika na solo mpe na boyengebene—bonyama koleka mpenza.
Bokeseni moko monene!
20. Ndenge Nzambe azali kosopela basaleli na ye elimo na ye, yango ebimisi litomba nini?
20 Na nsima, Yisaya amonisi elikya moko ya kolendisa mpo na baoyo bazali kosala mokano ya Yehova. Libebi ya basaleli ya Nzambe ekoumela kaka “[kino elimo ekosopama likoló na biso longwa na likoló, NW] mpe lisobe ekobongwana elanga ya mbuma mpe elanga ya mbuma ekotángama zamba.” (Yisaya 32:15) Likambo ya esengo, kobanda 1919, elimo ya Yehova esopamaki mingi likoló ya basaleli na ye, lokola nde ezongisi elanga ya mbuma—elingi koloba Batatoli bapakolami—oyo ebotaka mbuma mingi, mpe na nsima elanga yango ekómi zamba ya bampate mosusu oyo ezali se kokola. Bozwi mpe bokoli ezali makambo oyo ezali komonisa ebongiseli na ye na mabele lelo oyo. Na paladiso ya elimo oyo ezongisami, “nkembo ya [Yehova], bokonzi ya Nzambe na biso,” ezali komonisama na basaleli na ye oyo bazali kosakola na mokili mobimba Bokonzi na ye oyo ekómi pene.—Yisaya 35:1, 2.
21. Epai wapi boyengebene, kimya, mpe libateli ezali lelo oyo?
21 Yoká sikawa elaka ya nkembo ya Yehova: “Mpe na esobe bosembo ekozala, na elanga ya mbuma boyengebene ekofanda. Mpe mosala ya boyengebene ya solo ekokóma kimya; mpe mosala ya boyengebene ya solo, ekofandisa nyɛɛ mpe na libateli mpo na libela.” (Yisaya 32:16, 17, NW) Maloba yango eyokani mpenza na ezaleli ya elimo ya basaleli ya Yehova lelo oyo! Na bokeseni na bato mingi oyo bakabwani na koyinana, mobulu mpe bobola na elimo, baklisto ya solo bazali na bomoko na mokili mobimba, ata soki bauti na “mabota nyonso, na mikili nyonso, na bibolo nyonso, na minɔkɔ nyonso.” Bafandaka mpe basalaka mosala ya kosakola na boyokani na boyengebene ya Nzambe, bazali kosala bongo mpo bayebi ete nsukansuka bakozwa kimya mpe libateli ya solosolo libela na libela.—Emoniseli 7:9, 17.
22. Bokeseni nini ezali kati na ezalela ya basaleli ya Nzambe mpe oyo ya bato ya mangomba ya lokuta?
22 Na paladiso ya elimo, Yisaya 32:18 (NW) ezali kokokisama. Elobi ete: “Bato na ngai bakofanda na bisika ya kimya na bandako oyo bakobanga ata mwa moke te mpe na bisika ya kopema oyo ezali na mobulu te.” Kasi mpo na baklisto ya lokuta, “matandala makonoka [ntango, NW] zamba ekokwea, mpe [engumba, NW] ekobukana kobukana mpenza.” (Yisaya 32:19) Ɛɛ, ndenge moko na mbula ya matandala mpe ya mopɛpɛ makasi, etikali moke Yehova akitisa lisambisi na ye likoló ya engumba mabe ya mangomba ya lokuta, ekokitisa bandimi na yango oyo bazali lokola “zamba” mpe ekobebisa bango nyonso libela!
23. Mosala nini oyo ezali kosalema na mokili mobimba elingi kokóma na nsuka, mpe baoyo bazali kosala mosala yango bazali kobenga bango bato ya ndenge nini?
23 Eteni oyo ya esakweli esuki na maloba oyo: “Esengo na bino baoyo bozali kolona mboto pembenipembeni ya mai nyonso, kotindáká makolo ya ngɔmbɛ mobali mpe ya mpunda mobali.” (Yisaya 32:20, NW) Ngɔmbɛ mobali mpe mpunda mobali ezalaki banyama oyo basaleli ya Nzambe na ntango ya kala bazalaki kosalela mpo na kobalola mabele na bilanga mpe mpo na kolona. Lelo oyo, basaleli ya Yehova bazali kosalela bamasini ya konyata mikanda, bisaleli ya elektroniki, bandako mpe mituka ya malamu, mingi mpenza ebongiseli ya Teokrasi oyo ezali na bomoko mpo na konyata mpe kokabola bamiliare ya mikanda. Basali ya bolingo malamu bazali kosalela bisaleli yango mpo na kolona mboto ya solo ya Bokonzi na mokili mobimba, “pembenipembeni ya mai nyonso.” Bamilio ya bato oyo babangaka Nzambe basili koyanganisama, mpe basusu ebele bazali koya kosangana elongo na bango. (Emoniseli 14:15, 16) Ya solo mpenza, bango nyonso basengeli kobengama bato ya “esengo”!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mbala mosusu “mokonzi” oyo alobelami na Yisaya 32:1, ezalaki libosoliboso Hizikiya. Kasi, kokokisama ya monene ya Yisaya mokapo 32 ezali na boyokani na Mokonzi, Klisto Yesu.
b Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Marsi 1999, nkasa 13-18, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Bililingi na lokasa 331]
Na Barulo ya Mbu Ekufá, Yisaya mokapo 32 etyami elembo “X”
[Bililingi na lokasa 333]
‘Nkumu’ mokomoko azali lokola esika ya komibomba mpo na mopɛpɛ, esika ya kokima na ntango ya mbula, mai na esobe mpe esika ya malili na moi makasi
[Elilingi na lokasa 338]
Moklisto azwaka esengo makasi ntango azali koyebisa bato mosusu nsango malamu