Mokapo ya Ntuku Mibale na Motoba
“Mofandi moko te akoloba ete: ‘Ngai nazali kobɛla’”
1. Mpo na nini maloba oyo ezali na Yisaya 33:24, ezali kobɔndisa?
NTOMA Paulo alobaki ete: “Biloko nyonso bisalamaki na Nzambe, ezali kokimela elongo kino ntango oyo.” (Baloma 8:22) Atako mayele ya misala ya makambo ya monganga ekoli mingi, maladi mpe liwa ezali kokoba kosasa bato. Yango wana, elaka oyo esukisi eteni oyo ya esakweli ya Yisaya ezali mpenza kitoko! Kanisá naino eleko oyo “mofandi moko te akoloba ete: ‘Ngai nazali kobɛla.’” (Yisaya 33:24, NW) Ntango nini mpe ndenge nini esakweli yango ekokokisama?
2, 3. (a) Maladi ya ekólo ya Yisalaele ezali ya ndenge nini? (b) Ndenge nini Asulia azali “lingenda” oyo Nzambe asaleli mpo na kopesa etumbu?
2 Yisaya akomi elaka yango na eleko oyo bato oyo basalaki kondimana na Nzambe bazali kobɛla na elimo. (Yisaya 1:5, 6) Bamikɔtisi mpenza na kati ya lipɛngwi mpe na makambo ya mbindo mpe esengeli ete Yehova Nzambe apesa bango etumbu makasi. Asulia azali “lingenda” oyo Yehova asaleli mpo na kopesa etumbu yango. (Yisaya 7:17; 10:5, 15) Liboso mpenza, Yisalaele bokonzi ya nɔrdi ya mabota zomi ekwei na mabɔkɔ ya Baasulia na mobu 740 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). (2 Mikonzi 17:1-18; 18:9-11) Nsima ya mwa bambula, Mokonzi Saneheliba abundisi Yuda, bokonzi ya sudi. (2 Mikonzi 18:13; Yisaya 36:1) Ntango basoda ya Asulia bakɔti na mokili yango, emonani ete Yuda mobimba ekobebisama mpenza.
3 Kasi, Asulia alekisi ndelo na etinda oyo bapesaki ye ya kopesa basaleli ya Nzambe etumbu, azali sikawa kolanda kokokisa mposa na ye ya kolonga mokili mobimba. (Yisaya 10:7-11) Yehova akotika ye anyokola basaleli na ye kozanga ete apesa ye etumbu? Ekólo yango ekobika na maladi na yango ya elimo? Biyano ya Yehova na mituna yango ezali na Yisaya mokapo 33.
Bapunzi mopunzi
4, 5. (a) Mbongwana nini Asulia akokutana na yango? (b) Libondeli nini Yisaya asali mpo na basaleli ya Yehova?
4 Mosakoli abandi boye: “Mawa na yo moto ozali kopunza, kozanga ete bapunza yo, na yo moto ozali kosala na bokosi, kozanga ete bamosusu básalela yo na bokosi! Ntango kaka okosilisa kopunza, bakopunza yo. Kaka na ntango osilisi kosala na bokosi, bakosalela yo na bokosi.” (Yisaya 33:1, NW) Yisaya azali koloba mbala moko na mopunzi, Asulia. Lokola ekólo yango ezali sikoyo na nguya mingi, emonani ete bakoki kolonga yango te. ‘Apunzaki kasi bapunzaki ye te,’ abebisi bingumba ya Yuda, akamati kutu biloko ya motuya na ndako ya Yehova—mpe emonani ete azwi etumbu te mpo na yango! (2 Mikonzi 18:14-16; 2 Ntango 28:21) Kasi, sikawa, makambo ekobaluka. Yisaya alobi na makasi mpenza ete: “Bakopunza yo.” Esakweli yango ebɔndisi mpenza bato ya sembo!
5 Na eleko oyo ya nsɔmɔ, basambeli ya sembo ya Yehova basengeli koluka lisalisi epai na ye. Yango wana, Yisaya asali libondeli oyo: “Ɛ [Yehova] zalá na ngɔlu epai na biso, [totii elikya epai na yo, NW]; zalá lokola lobɔkɔ na biso [nguya mpe lisalisi na biso] ntɔngɔ na ntɔngɔ, mpe lobiko na biso na ntango na bolɔzi. Na lokito na mobulu, bato bakimi, [ekotelema yo, NW] mabota bakopalangana.” (Yisaya 33:2, 3) Na libaku yango, Yisaya abondeli Yehova abikisa basaleli na Ye ndenge azalaki kosala yango mbala na mbala na ntango ya kala. (Nzembo 44:3; 68:1) Mpe eumeli te Yisaya asakoli eyano ya Yehova na libondeli yango!
6. Nini ekokómela Asulia, mpe mpo na nini ebongi bongo?
6 “Biloko bino [Baasulia] bopunzi ekoyanganisama mpenza lokola mpese ntango eyanganaka, lokola limpinga ya mayoyo ya mbangu oyo ezali kokwela moto.” (Yisaya 33:4, NW) Yuda ayebi malamumalamu ndenge nyamankɛkɛ ebebisaka milona. Kasi, mbala oyo, banguna ya Yuda nde bakobebisama. Asulia akokwea mpenza makalekale, mpe basoda na ye bakokima, bakosundola biloko mingi oyo babɔtɔlaki mpe bato ya Yuda bakozwa yango! Ebongi mpenza ete Asulia, oyo ayebani lokola mboka ya konyokola bato, bápunza ye ndenge wana.—Yisaya 37:36.
Asulia ya lelo oyo
7. (a) Nani lelo oyo akoki kokokanisama na Yisalaele oyo ezali kobɛla na elimo? (b) Nani akozala “lingenda” ya Yehova mpo na kobebisa mangomba ya boklisto?
7 Esakweli ya Yisaya ekokani na nini na mikolo na biso? Ekólo ya Yisalaele oyo ezali kobɛla na elimo ekoki kokokanisama na mangomba ya boklisto oyo ezangi sembo. Kaka ndenge Yehova asalelaki Asulia lokola “lingenda” mpo na kopesa Yisalaele etumbu, akosalela mpe “lingenda” moko mpo na kopesa mangomba ya boklisto etumbu—bakisa mpe mangomba mosusu nyonso ya lokuta ya mokili mobimba, “Babilone Monene.” (Yisaya 10:5; Emoniseli 18:2-8) “Lingenda” yango ekozala ONU—ebongiseli oyo elobelami na Emoniseli lokola nyama ya zamba ya langi motane, na mitó nsambo mpe na maseke zomi.—Emoniseli 17:3, 15-17.
8. (a) Nani, lelo oyo, akoki kokokanisama na Saneheliba? (b) Saneheliba ya mikolo na biso akoluka kobundisa nani, mpe yango ekosuka ndenge nini?
8 Ntango Asulia ya mikolo na biso akobanda kobebisa lisangá ya mangomba ya lokuta, ekozala mpasi mpo na kopekisa ye. Lokola azali na ezaleli ndenge moko na Saneheliba, Satana Zabolo akobɛta makasi mpenza—akobɛta kaka te bibongiseli ya bapɛngwi oyo ebongi na etumbu kasi mpe baklisto ya solo. Bamilio ya bato oyo bakobima na mokili ya Satana, oyo esangisi mpe Babilone Monene, elongo na batikali bapakolami ya bana ya Yehova na elimo, bakozala na ngámbo ya Bokonzi ya Yehova. Lokola akozala na nkanda makasi mpo baklisto ya solo baboi kokumisa ye, “nzambe ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo,” Satana, akobundisa bango makasi mpenza. (2 Bakolinti 4:4, NW; Ezekiele 38:10-16) Ezala ete matumoli yango ekozala ya nsɔmɔ soki ya ndenge nini, basaleli ya Nzambe basengeli kobanga te. (Yisaya 10:24, 25) Nzambe apesi bango elikya ete akozala “lobiko na [bango] na ntango ya bolɔzi.” Akokɔtela bango, akobebisa Satana na limpinga na ye. (Ezekiele 38:18-23) Lokola na ntango ya kala, bato oyo bakomeka kopunza biloko ya basaleli ya Nzambe bakopunza nde biloko na bango! (Kokanisá na Masese 13:22b.) Nkombo ya Yehova ekosantisama, mpe bato oyo bakobika bakozwa mbano mpo balukaki “bwanya mpe boyebi [mpe] bobangi Yehova.” —Tángá Yisaya 33:5, 6, NW.
Likebisi epai na bato bazangi kondima
9. (a) Basoda “makasi” mpe “bantoma ya kimya” ya Yuda bakosala nini? (b) Asulia akosala nini ntango Yuda akoluka kosala na ye boyokani ya kimya?
9 Kasi, nini ekokómela bato ya Yuda oyo bazangi kondima? Yisaya amonisi na maloba ya mawa ndenge bakonyokwama na mabɔkɔ ya Asulia. (Tángá Yisaya 33:7.) Basoda “makasi” ya Yuda bakoganga na nsɔmɔ ntango Asulia akokóma pene. “Bantoma ya kimya,” elingi koloba batindami oyo batindi bango mpo na koluka kimya elongo na Baasulia baalinga-bitumba, bakotyolama mpe bakoyokisama nsɔni. Lokola bakolonga te, bakolela makasi mpenza. (Kokanisá na Yilimia 8:15.) Baasulia, bato oyo banyokolaka bato, bakoyokela bango mawa te. (Tángá Yisaya 33:8, 9.) Bakoboya na nko mpenza boyokani oyo basalaki na bato ya Yuda. (2 Mikonzi 18:14-16) Baasulia ‘bakotyola bingumba’ ya Yuda, bakomona yango mpamba, bakotya ata likebi te na bomoi ya bato. Likambo yango ekozala mpenza nsɔmɔ mpe ekozala lokola nde mokili yango moko ezali kolela. Lebanona, Salono, Basana mpe Kalamele bakolela mpe mpo na kobebisama yango.
10. (a) Na lolenge nini “bilombe” ya mangomba ya boklisto bakozala na ntina te? (b) Nani akobatela baklisto ya solo na mokolo ya mawa ya mangomba ya boklisto?
10 Na ntembe te, etikali moke likambo ya ndenge wana ekosalema ntango bikólo ekobanda kobundisa mangomba. Ndenge ezalaki na mikolo ya Hizikiya, mayele nyonso oyo bakosalela na ndenge ya mosuni mpo na komibatela liboso na banguya na bango ekozala na ntina te. Bato “makasi” ya mangomba ya boklisto—bato na bango ya politiki, bato na bango ya mayele na makambo ya mbongo, mpe bato minene mosusu—bakokoka kosalisa bango te. ‘Boyokani’ ya politiki mpe ya makambo ya mbongo oyo esalemaka mpo na kobatela mangomba ya boklisto ekobeba. (Yisaya 28:15-18) Mayele ya koluka kokima kobebisama yango na nzela ya bokutani ya bantoma ekolonga te. Misala ya mombongo ekokatana, mpamba te bakobɔtɔla to bakobebisa biloko mpe mbongo ya mangomba ya boklisto. Moto nyonso oyo akoyokela naino mangomba ya boklisto mawa akotɛlɛma kaka mosika mpe azali kolela ndenge ekobebisama. (Emoniseli 18:9-19) Boklisto ya solo ekolimwa elongo na oyo ya lokuta? Te, mpamba te Yehova ye moko apesi elikya oyo: “Sikawa nakotɛlɛma, sikawa nakomikumisa, sikawa nakomisembola.” (Yisaya 33:10, NW) Nsukansuka, Yehova akokɔtela basaleli na ye ya sembo, lokola Hizikiya, mpe akosukisa Baasulia. —Nzembo 12:5.
11, 12. (a) Ntango nini mpe ndenge nini maloba ya Yisaya 33:11-14 ezali kokokisama? (b) Maloba ya Yehova ezali kopesa likebisi nini mpo na eleko na biso?
11 Moto oyo azali sembo te akoki kolikya te kobatelama ndenge wana. Yehova alobi ete: “Bozwi zemi ya matiti oyo ekauká; bokobota esobe. Elimo na bino, lokola mɔ́tɔ, ekozikisa bino. Mpe bato bakozala lokola makese oyo batumbi. Lokola nzube oyo bakati, bakozikisama na mɔ́tɔ. Bóyoka, bino baoyo bozali mosika, oyo nasengeli kosala! Mpe bino baoyo bozali penepene, bóyeba nguya na ngai! Na Siona bato ya masumu bazali kobanga; kolɛnga ekangi bapɛngwi: ‘Nani kati na biso akokoka mpo na mwa ntango kofanda na mɔ́tɔ oyo ezali kozikisa? Nani kati na biso akokoka kofanda na mɔ́tɔ oyo ezali kopela mpe kosila te?’” (Yisaya 33:11-14, NW) Maloba yango ekokani mpenza mpo na eleko oyo Yuda akondongwana na monguna ya sika, Babilone. Nsima ya liwa ya Hizikiya, Yuda azongeli banzela na ye ya mabe. Na bambula oyo elandi, makambo ebebi mpenza na Yuda mpe ekólo yango mobimba esengeli konyokwama na mɔ́tɔ ya nkanda ya Nzambe. —Deteronome 32:22.
12 Myango mpe mikano ya mabe oyo bato yango ya kozanga botosi basali mpo na kokima kosambisama ya Nzambe, ekozala mpenza mpamba lokola matiti ya kokauka. Ya solo, lolendo, elimo ya botomboki ya ekólo yango ekopesa nzela na makambo oyo ekosuka na kobebisama na yango. (Yilimia 52:3-11) Bato mabe “bakozala lokola makese oyo batumbi” —bakobebisama nyɛɛ! Ntango bazali kokanisa mpasi wana oyo ekómi pene, bato ya Yuda oyo bazali batomboki bazali kobanga makasi. Maloba oyo Yehova alobi na bapɛngwi ya Yuda ezali komonisa ezalela ya bandimi ya mangomba ya boklisto lelo oyo. Soki baboi koyoka likebisi ya Nzambe, likama ezali kozela bango.
“Oyo azali kotambola na boyengebene ntango nyonso”
13. Elaka nini epesami mpo na ye “oyo azali kotambola na boyengebene ntango nyonso,” mpe ndenge nini ekokisamaki mpo na Yilimia?
13 Na bokeseni mpenza, Yehova alobi na nsima ete: “Ezali na moto oyo azali kotambola na boyengebene ntango nyonso mpe azali koloba oyo ezali sembo, ye oyo azali koboya litomba ezangi sembo oyo euti na kobuba, ye oyo azali koningisa mabɔkɔ na ye mpo aboya kozwa kanyaka, ye oyo azali kokanga matoi na ye ete ayoka makambo ya kosopa makila te mpe azali kozipa miso na ye ete atala te oyo ezali mabe. Ye akofanda na bisika ya likoló; esika na ye na likoló ekozanga te, ekozala bisika ya mabanga oyo ezali mpasi mpo na kokóma kuna. Limpa na ye ekopesamela ye; mai na ye ekosila te.” (Yisaya 33:15, 16, NW) Ndenge ntoma Petelo alobaki yango na nsima, “[Yehova] ayebi kobikisa bango bakosambela ye wana ezali bango kati na komekama nde kobatela bakeseni kino mokolo na kosamba mpo na kozwa etumbu.” (2 Petelo 2:9) Yilimia abikisamaki ndenge wana. Ntango bato ya Babilone bazingaki Yelusaleme, bato oyo bazalaki kofanda kuna basengelaki ‘kolya mampa na bozito mpe na kobanga.’ (Ezekiele 4:16, NW) Basi mosusu kutu balyaki bana na bango moko. (Bileli 2:20) Kasi, Yehova asalaki ete Yilimia abatelama malamu.
14. Ndenge nini baklisto lelo bazali ‘kotambola na boyengebene ntango nyonso’?
14 Baklisto lelo mpe basengeli ‘kotambolaka na boyengebene ntango nyonso,’ mpe kotosa mitinda ya Yehova mokolo na mokolo. (Nzembo 15:1-5) Basengeli ‘kolobaka oyo ezali sembo’ mpe kobwaka lokuta mpe bokosi. (Masese 3:32) Kobuba mpe kanyaka ezali momeseno ya bato na mikili mingi, kasi yango ezali mabe na miso ya moto “oyo azali kotambola na boyengebene ntango nyonso.” Baklisto basengeli kozala na “lisosoli ya sembo” na makambo ya mombongo, basengeli koboya ezalela ya kobuba mpe ya kosala mikano ya mabe. (Baebele 13:18, NW; 1 Timote 6:9, 10) Mpe ye oyo ‘akangi matoi na ye ete ayoka makambo ya kosopa makila te mpe azipi miso na ye ete atala te oyo ezali mabe’ akopona na likebi mpenza miziki oyo akoyoka mpe kominanola na ye. (Nzembo 119:37) Na boumeli ya mokolo na ye ya kosambisa, Yehova akobatela mpe akosalisa basambeli na ye, oyo batosaka mitinda yango na bomoi na bango. —Sefania 2:3.
Bazali kotala mokonzi na bango
15. Elaka nini ekosalisa Bayuda ya sembo oyo bazali na boombo?
15 Na nsima, Yisaya apesi elikya moko kitoko ya mikolo ezali koya: “Miso na yo ekomona mokonzi na kitoko na ye, ekomona mokili ya mosika. Motema na yo ekobanzabanza likambo ya nsɔmɔ ete: ‘Mokomeli azali wapi? Wapi ye oyo afutaka? Wapi ye oyo atángaki ndako milai?’ Okomona libota ya kozanga limemya lisusu te, bato ya liloba makasi oyo ebongi na koyoka te, na maloba ya likukuma oyo okokanga ntina na yango te.” (Yisaya 33:17-19, NW) Elaka ya Mokonzi Masiya oyo akoya mpe Bokonzi na ye ekosalisa Bayuda ya sembo na boumeli ya boombo na bango na Babilone, atako bakomona Bokonzi yango kaka na mosika. (Baebele 11:13) Nsukansuka, ntango boyangeli ya Masiya ekotyama mpenza, monyoko ya bato ya Babilone ekotikala kaka lisolo mpamba. Babiki ya etumba na Baasulia bakotuna na esengo nyonso ete: “Wapi moto oyo azalaki kotala ndako mpe biloko? Wapi moto oyo akendeki kotanga manongi ma mboka?”—Izaya Yisaya 33:18, Liloba lya Nzambe.
16. Kobanda ntango nini basaleli ya Nzambe bakoki ‘komona’ Mokonzi Masiya, mpe yango ebimisi litomba nini?
16 Atako maloba ya Yisaya ezali kopesa bango elikya ete bakolongwa na boombo ya Babilone mpe bakozonga na mokili na bango, Moyuda mokomoko oyo akendaki boombo asengelaki kozela lisekwa mpo na komona kokokisama mobimba ya eteni oyo ya esakweli. Tokoloba nini mpo na basaleli ya Nzambe lelo oyo? Kobanda 1914, basaleli ya Yehova bakoki ‘komona,’ to kososola, Mokonzi Masiya, Yesu Klisto, na nkembo na ye ya elimo. (Nzembo 45:2; 118:22-26) Mpo na yango, basikolami na monyoko mpe na bolɔkɔ ya ebongiseli mabe ya Satana. Lokola bayangelami na Siona, esika Bokonzi ya Nzambe etyami, bazali kati na libateli ya solosolo na elimo.
17. (a) Bilaka nini epesami mpo na Siona? (b) Ndenge nini bilaka ya Yehova oyo etali Siona ekokisamaki likoló na Bokonzi ya Masiya mpe likoló na basangani na yango awa na mabele?
17 Yisaya alobi lisusu ete: “Talá Siona, mboka ya bafɛti na biso! Miso na yo ekomona Yelusaleme, esika ya kofanda oyo ezangi mobulu, hema oyo moto akolongola te. Bakopikola pikɛ na yango ata mokolo moko te, mpe ata nsinga moko na yango ekokatana te. Kasi wana Moto ya Nkembo, Yehova, akozala mpo na biso esika na bibale, oyo ya baterase ya minene. Bwato monene ya nkai ekotambola wana te, masuwa moko te ya monene ekoleka wana.” (Yisaya 33:20, 21, NW) Yisaya apesi biso elikya ete Bokonzi ya Masiya ya Nzambe ekoki kolongolama te to kobebisama te. Lisusu, lelo oyo basangani ya sembo ya Bokonzi yango awa na mabele bazali mpe kozwa libateli ya ndenge wana. Ata soki mingi bazali kokutana na mikakatano makasi, bato oyo bandimi Bokonzi ya Nzambe bazali na elikya ete molende moko te oyo esalemi mpo na kobebisa bango nyonso ekolonga. (Yisaya 54:17) Yehova akobatela basaleli na ye lokola bibale to terase mozindo ya mai oyo batimoli zingazinga na engumba mpo na kobatela yango. Monguna nyonso oyo akoluka kobundisa bango—azala ata makasi lokola “bwato monene ya nkai” to lokola “masuwa monene”—akobebisama!
18. Mokumba nini Yehova andimi kokokisa?
18 Kasi, mpo na nini bato oyo balingaka Bokonzi ya Nzambe bazali na elikya na libateli ya Nzambe? Yisaya alobi ete: “Yehova azali Mosambisi na biso, Yehova azali Mopesi-mibeko na biso, Yehova azali Mokonzi na biso; ye akobikisa biso.” (Yisaya 33:22, NW) Yehova andimi mokumba ya kobatela mpe kotambwisa basaleli na ye, oyo bandimi ete azali Mokonzi Monene. Bazali kotosa na motema mobimba boyangeli na ye oyo apesi na mabɔkɔ ya Mokonzi Masiya, bayebi ete Yehova azali na bokonzi kaka te ya kobimisa mibeko kasi mpe ya kotosisa yango. Nzokande, lokola Yehova alingaka bosembo mpe boyengebene, boyangeli na ye, oyo epesami na mabɔkɔ ya Mwana na ye, ezali bozito te mpo na basambeli na ye. Kutu, soki bazali kotosa bokonzi na ye, bazwelaka yango ‘matomba.’ (Yisaya 48:17) Akosundola bato na ye ya sembo soki moke te. —Nzembo 37:28.
19. Ndenge nini Yisaya amonisi ete banguna ya basaleli ya sembo ya Yehova bakozala na makoki te?
19 Yisaya ayebisi banguna ya basaleli ya Yehova ete: “Nkamba ya masuwa na bino ezali kolɛmba, ekoki kosimba nzete na esika na yango te, ekoki kotandisa bilamba-na-mopɛpɛ te. Wana ekokabolama biloko biuti na kopunzama monene, ata batɛngumi bakokamata [ebele ya, NW] biloko.” (Yisaya 33:23) Monguna nyonso oyo akopusana pene akomiyoka mpamba mpe akozala na makasi te mpo na kobundisa Yehova lokola masuwa ya etumba oyo nkamba na yango elɛmbi, nzete na yango ezali kotɛngatɛnga mpe bilamba-na-mopɛpɛ na yango ezali te. Ntango banguna ya Nzambe bakobebisama, biloko ekozala mingi mpe na yango ata batɛngumi bakozwa mpe biloko. Yango wana, tokoki mpenza kozala na elikya ete na nzela ya Mokonzi Yesu Klisto, Yehova akolonga banguna na ye na ntango ya “bolɔzi monene” oyo ekómi pene.—Emoniseli 7:14.
Kobikisama
20. Basaleli ya Nzambe bakobikisama na lolenge nini, mpe ntango nini?
20 Eteni oyo ya esakweli ya Yisaya esuki na elaka moko ya kolendisa mpenza motema: “Mofandi moko te akoloba ete: ‘Ngai nazali kobɛla.’ Bato oyo bafanda na ekólo bakomona mbeba na bango elimbisami.” (Yisaya 33:24, NW) Maladi oyo Yisaya alobeli awa ezali libosoliboso maladi ya elimo, mpamba te ezali na boyokani na masumu, to “mbeba.” Na kosalelama ya liboso ya maloba yango, Yehova alaki ete nsima ya kosikolama na bango na boombo ya Babilone, ekólo yango ekobikisama na elimo. (Yisaya 35:5, 6; Yilimia 33:6; kokanisá na Nzembo 103:1-5.) Lokola masumu na bango ya kala elimbisami, Bayuda oyo bauti na boombo bakozongisa losambo ya pɛto na Yelusaleme.
21. Na lolenge nini basambeli ya Yehova babiki na elimo lelo oyo?
21 Kasi, esakweli ya Yisaya ezali kokokisama mpe na mikolo na biso. Basaleli ya Yehova lelo babikisami mpe na elimo. Basikolami na mateya ya lokuta, na ndakisa mateya lokola molimo ekufaka te, Bosato, mpe lifelo ya mɔ́tɔ. Bazwaka toli na makambo ya bizaleli malamu, esikolaka bango na misala ya mbindo mpe esalisaka bango bázwa bikateli ya malamu. Mpe na lisalisi ya mbeka ya lisiko ya Yesu Klisto, bazali pɛto na miso ya Nzambe mpe bazali na lisosoli ya malamu. (Bakolose 1:13, 14; 1 Petelo 2:24; 1 Yoane 4:10) Kobikisama yango na elimo ezali mpe na matomba na nzoto. Na ndakisa, koboya makambo ya kosangisa nzoto na lolenge ya mbindo mpe komɛla makaya ezali kobatela baklisto na maladi oyo eutaka na kosangisa nzoto mpe na mitindo mosusu ya maladi ya kanser.—1 Bakolinti 6:18; 2 Bakolinti 7:1.
22, 23. (a) Kokokisama monene nini Yisaya 33:24 ekosalema na mikolo ezali koya? (b) Basambeli ya solo bazali na mokano ya kosala nini lelo oyo?
22 Lisusu, maloba oyo ezali na Yisaya 33:24 ekokokisama mpenzampenza nsima ya Armagedon, na mokili ya sika ya Nzambe. Na ntango Mokonzi Masiya akoyangela, bato bakobikisama na nzoto mpe na elimo. (Emoniseli 21:3, 4) Mwa moke nsima ya kobebisama ya ebongiseli ya makambo ya Satana, na ntembe te makamwisi lokola oyo Yesu asalaki ntango azalaki awa na mabele ekosalema na mabele mobimba. Bato oyo bakufá miso bakomona, bato oyo bakufá matoi bakoyoka, bibɔsɔnɔ bakotambola! (Yisaya 35:5, 6) Yango ekopesa bato oyo bakobika na bolɔzi monene nzela ya kosangana na mosala monene ya kokómisa mabele paladiso.
23 Na nsima, ntango lisekwa ekobanda, bato oyo bakozonga na bomoi bakosekwa mpenza na nzoto kolɔngɔnɔ. Kasi na ntango oyo motuya ya mbeka ya lisiko ekosalelama na mobimba, matomba mosusu ya nzoto ekolanda, kino bato bakokóma na ezalela ya kokoka. Na nsima, bato ya sembo ‘bakozala na bomoi’ ya solosolo. (Emoniseli 20:5, 6) Na ntango wana, “Mofandi moko te akoloba ete: ‘Ngai nazali kobɛla,’” ezala na elimo to na nzoto. Oyo nde elaka kitoko! Tiká ete basambeli nyonso ya solo lelo oyo bázwa ekateli ya kozala kati na baoyo bakomona kokokisama ya elaka yango!
[Elilingi na lokasa 344]
Yisaya abondeli Yehova na elikya mpenza
[Bililingi na lokasa 353]
Na lisalisi ya mbeka ya lisiko, basaleli ya Yehova bazali pɛto na miso na ye
[Elilingi na lokasa 354]
Na mokili ya sika, bato bakobika mpenza