Tókoba kozala ‘basantu na kati ya kobanga Nzambe’
MPO na komonisa ete Yehova Nzambe aleki na bosantu, Biblia elobi ete: “Yehova azali mosantu, mosantu, mosantu.” (Yis. 6:3, NW; Emon. 4:8) Maloba ya Liebele mpe ya Grɛki oyo ebongolamaka na “bosantu” elimboli bopɛto na makambo nyonso to na makambo ya losambo, to mpe kozala ata na mbindo moko te. Bosantu ya Nzambe elimboli ete azali ata na mbeba moko te.
Omoni te ete ebongi mpe Yehova, Nzambe mosantu, asɛnga na basambeli na ye ete bázala basantu, elingi koloba bázala pɛto na nzoto, na makanisi mpe na elimo? Biblia emonisi polele ete Yehova alingaka ete basambeli na ye bázala basantu. Totángaka boye na 1 Petelo 1:16: “Bosengeli kozala basantu, mpo ngai nazali mosantu.” Bato ya kozanga kokoka bakoki mpenza komekola bosantu ya Yehova? Ɛɛ, bakoki komekola ye, atako bakosala yango na ndenge ya kokoka te. Nzambe akoki kotalela biso lokola basantu soki tozali pɛto na elimo mpe tozali mpenza na boyokani na ye.
Kasi, ndenge nini tokoki kotikala pɛto na mokili oyo ya mbindo? Makambo nini ya mabe tosengeli kotika? Mbongwana nini tosengeli kosala na maloba mpe na etamboli na biso? Makambo oyo Nzambe asɛngaki na Bayuda oyo bautaki na boombo na Babilone mpe bazongaki na mboka na bango na mobu 537 L.T.B. ekosalisa biso tómona liteya oyo tokoki kozwa na likambo yango.
‘Ekozala na Nzela ya bosantu’
Yehova asakolaki ete basaleli na ye oyo bazalaki na boombo na Babilone bakozonga na mboka na bango. Esakweli yango elobaki boye: “Balabala ekozala wana, nzela mpenza; ekobengama ete, Nzela [ya bosantu].” (Yis. 35:8a) Maloba wana emonisi ete Yehova asukaki kaka te na kofungola nzela mpo Bayuda bázonga epai na bango, kasi ayebisaki bango mpe ete akobatela bango na mobembo yango.
Mpo na basaleli na ye ya lelo, Yehova afungoli “Nzela ya bosantu” oyo ebimisi bango na Babilone monene, lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba. Na 1919, alongolaki baklisto bapakolami na boombo ya lingomba ya lokuta, mpe babandaki komipɛtola mokemoke na mateya nyonso ya lokuta. Biso basaleli ya Yehova lelo oyo tozali na kati ya lisangá moko ya pɛto mpe ya kimya, epai tokoki kosambela Yehova mpe kozala na boyokani mpenza na ye mpe na bandeko na biso.
“Etonga moke” ya baklisto bapakolami mpe “ebele ya bato” oyo bazali “bampate mosusu” baponi kotambola na nzela oyo ezali pɛto mpe bazali kobenga basusu bálanda bango. (Luka 12:32; Emon. 7:9; Yoa. 10:16) “Nzela ya bosantu” ezali polele mpo na moto nyonso oyo alingi ‘kokaba nzoto na ye mbeka moko ya bomoi, ya bosantu, oyo ekoki kondimama epai ya Nzambe.’—Lom. 12:1.
“Baoyo ya mbindo bakoleka wana te”
Na mobu 537 L.T.B., Bayuda oyo bazongaki na mboka na bango basengelaki kokokisa likambo moko ya ntina mingi. Mpo na baoyo babongaki mpo na kotambola na “Nzela ya bosantu,” Yisaya 35:8b (Bible na lingala ya lelo oyo) elobi boye: “Moto moko té ya mbindo akokoka koleka kuna; moto moko té ya zoba akokoka kozala wana. Ekozala po na bato ya Yawe, baoyo bakolanda yango bakobunga té.” Lokola Bayuda bazongaki na Yelusaleme mpo na kozongisa losambo ya pɛto, esika ekokaki kozala te mpo na baoyo bazalaki na makanisi ya mabe, baoyo bazalaki komemya biloko mosantu te, to baoyo bazalaki mbindo na elimo. Bayuda yango basengelaki kozala ntango nyonso na bizaleli oyo Yehova asepelaka na yango. Bato oyo balingi kosepelisa Yehova lelo oyo, basengeli mpe kosala bongo. Basengeli kokoba kozala ‘basantu na kati ya kobanga Nzambe.’ (2 Kol. 7:1) Na yango, misala nini ya mbindo tosengeli kotika?
Ntoma Paulo akomaki ete: “Misala ya mosuni ezali komonana polele, mpe yango ezali pite, bosɔtɔ, etamboli ya mbindo.” (Gal. 5:19) Pite ezali lolenge nyonso ya kosangisa nzoto na kati ya bato oyo babalaná te. Etamboli ya mbindo esangisi makambo lokola “mobulu ya basi to ya mibali mpe makambo ya salite.” Ná pite ná etamboli ya mbindo ekoki kotambola nzela moko te na bosantu ya Yehova. Yango wana, baoyo bazali kokoba kosala makambo ya ndenge wana basengeli kobimisama na lisangá. Ezali mpe ndenge moko mpo na baoyo bazali kosala bosɔtɔ, elingi koloba “bosɔtɔ ya ndenge nyonso na lokoso.”—Ef. 4:19.
Liloba “bosɔtɔ” esangisi masumu ndenge na ndenge. Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na bosɔtɔ elimboli mbindo ya ndenge nyonso, ezala na etamboli, na maloba, mpe na makambo ya losambo. Yango esangisi makambo oyo bakoki kosambisa moto mpo na yango te na kati ya lisangá.a Kasi, tokoki mpenza koloba ete bato oyo bazali kosala makambo wana ya bosɔtɔ bazali kokoba kozala basantu?
Kanisá ete moklisto moko abandi kotala na kobombana bafilme to bafɔtɔ ya bato bazali kosangisa nzoto to bazali bolumbu mpo na kolamwisa mposa ya kosangisa nzoto. Lokola mposa na ye ya mabe ezali kokola, ekateli na ye ya kozala pɛto liboso ya Yehova ekobanda kokita mokemoke. Ekoki kozala ete bosɔtɔ na ye ekómi naino mingi te, kasi azali te kokoba kotalela kaka ‘makambo nyonso ya pɛto, oyo elobelami malamu, ezaleli moko ya malamu, mpe oyo ebongi kosanzolama.’ (Filp. 4:8) Bafilme wana ezali mbindo mpe ekabolaka moto ná Nzambe. Bosɔtɔ ya ndenge nyonso esengeli kotángama ata kotángama te na minɔkɔ na biso.—Ef. 5:3.
Tózwa ndakisa mosusu. Kanisá ete moklisto moko asakanaka na binama ya nzoto na ye mpo na kokokisa mposa na ye ya kosangisa nzoto, ezala azali kolanda bafilme oyo ezali kolakisa bato oyo bazali kosangisa nzoto to te. Atako balobeli likambo yango na Biblia te, tokoki mpenza kotya ntembe ete ezali mbindo? Tomoni te ete soki moto akobi kosala bongo azali mpenza kobebisa boyokani na ye na Yehova mpe komikómisa mbindo na miso na ye? Tosengeli mpenza kolanda toli ya ntoma Paulo oyo: “Tiká tómipɛtola na mbindo nyonso ya mosuni mpe ya elimo,” mpe ‘bóboma binama ya nzoto na bino oyo bizali na mabelé na oyo etali pite, bosɔtɔ, mposa ya kosangisa nzoto, mposa oyo esalaka mabe, mpe ezaleli ya kolula biloko ya bato.’—2 Kol. 7:1; Kols. 3:5.
Mokili oyo ya Satana ezali kotinda bato bámipesa na etamboli ya mbindo. Koboya kozala na etamboli ya ndenge wana ezali pɛtɛɛ te. Kasi, baklisto ya solo basengeli te “kotambola ndenge bikólo mosusu mpe batambolaka na kati ya ezaleli ya mpambampamba ya makanisi na bango.” (Ef. 4:17) Yehova akotika biso tókoba kotambola na “Nzela ya bosantu” kaka soki tozali te kosala misala ya mbindo, ezala na kobatama to te.
“Nkɔsi akozala wana te”
Mpo Yehova, Nzambe mosantu andima bango, bato mosusu basengeli kosala mbongwana monene na etamboli mpe na maloba na bango. Yisaya 35:9 elobi ete: “Nkɔsi akozala wana te, ata nyama ya yauli moko akobuta na yango te,” elingi koloba, “na Nzela ya bosantu.” Na maloba ya elilingi, bato ya mobulu, ya matata mpe ya maloba mabe bazali lokola banyama mabe ya zamba. Bakozala na esika te na mokili ya sika ya boyengebene oyo Nzambe alaki. (Yis. 11:6; 65:25) Na yango, ebongi mpenza ete baoyo balingi kosepelisa Nzambe bátika etamboli wana ya bonyama mpe bákoba kolanda bosantu.
Makomami epesi biso toli oyo: “Tiká makambo nyonso ya bololo ya koyokisa mpasi mpe nkanda mpe nkɛlɛ mpe koganga mpe maloba ya kofinga elongolama epai na bino elongo na mabe nyonso.” (Ef. 4:31) Totángaka na Bakolose 3:8 ete: “Bólongola yango nyonso epai na bino, nkɛlɛ, nkanda, mabe, maloba ya kofinga, mpe maloba ya nsɔni na monɔkɔ na bino.” Na bavɛrsɛ mibale wana, “maloba ya kofinga” elimboli mpenzampenza maloba ya kotyola, ya kozokisa to ya kotuka.
Lelo oyo, maloba ya mabe ezali koyokana mingi, ata na bandako ya bato. Basi ná mibali na bango bafinganaka mabemabe mpe bafingaka bana na bango. Maloba ya ndenge wana esengeli koyokanaka te na bandako ya baklisto.—1 Kol. 5:11.
Kokoba kozala ‘basantu na kati ya kobanga Nzambe’ ezali lipamboli!
Kosalela Yehova, Nzambe mosantu, ezali mpenza libaku malamu! (Yos. 24:19) Paladiso ya elimo oyo Yehova atye biso ezali esika moko kitoko mpenza. Kozalaka ntango nyonso na etamboli ya pɛto na miso ya Yehova ezali lolenge ya bomoi oyo eleki malamu.
Mosika te, Paladiso oyo Nzambe alaki awa na mabelé ekokóma likambo ya solo. (Yis. 35:1, 2, 5-7) Baoyo bazali kozela yango mpe bazali kokoba kotambola ndenge Nzambe alingaka, bakozala na paladiso yango. (Yis. 65:17, 21) Na yango, tiká ete tókoba kosambela Nzambe na elimo ya pɛto mpe tózalaka ntango nyonso na boyokani na ye.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba bokeseni oyo ezali na kati ya “bosɔtɔ . . . na lokoso” ná “bosɔtɔ” yango moko, talá na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuli 2006, nkasa 29-31.
[Elilingi na lokasa 26]
Makambo nini Bayuda basengelaki kosala mpo na kotambola na “Nzela ya Bosantu”?
[Elilingi na lokasa 27]
Bafilme oyo elakisaka bato bazali kosangisa nzoto ekoki kokabola moto ná Yehova
[Elilingi na lokasa 28]
“Tiká . . . koganga mpe maloba ya kofinga elongolama epai na bino”