MOKAPO YA ZOMI NA MISATO
“Yehova asali oyo akanaki”
1. Ntango Yerusaleme esilaki kobomama, Yirimia alobaki nini mpo na bisakweli ya Yehova?
YERUSALEME ebebisami mpenza! Mɔtɔ oyo mampinga ya Babilone epelisaki ntango ezwaki engumba yango ezali kaka kobimisa milinga. Yirimia akanisi ndenge oyo bato bazalaki kolela na ndenge ya nsɔmɔ ntango bazalaki kobomama. Nzambe ayebisaki Yirimia makambo oyo ekosalema, mpe makambo yango esalemaki kaka ndenge Nzambe ayebisaki ye. Na mawa nyonso Yirimia alobaki ete, “Yehova asali oyo akanaki.” Kobebisama ya Yerusaleme ezalaki likambo ya nsɔmɔ mpenza!—Tángá Bileli 2:17.
2. Yirimia amonaki kokokisama ya esakweli nini oyo esakolamaki basiɛklɛ mingi liboso?
2 Ya solo, Yirimia amonaki kokokisama ya bisakweli mingi oyo asakwelaki libota ya Nzambe, ezala mpe bisakweli oyo esakolamaki kala. Basiɛklɛ mingi liboso, Moize ayebisaki Bayisraele ete kotosa Nzambe ekomemela bango “lipamboli” kasi kozanga botosi ekomemela bango “elakeli mabe.” Yehova alingaki ete bato na ye bázwa mapamboli mingi. Nzokande, soki bazangi botosi, bilakeli mabe oyo ekokwela bango ekozala ya nsɔmɔ mpenza. Moize akebisaki baoyo bakoboya Yehova mpe bakotɛmɛla ye ete ‘bakolya mosuni ya bana na bango ya mibali, mpe bakolya mosuni ya bana na bango ya basi.’ Yirimia mpe alobelaki likambo yango. (Mib. 30:19, 20; Yir. 19:9; Lev. 26:29) Bato mosusu bakokaki komituna ete, ‘Likambo ya nsɔmɔ ndenge wana ekoki kosalema mpenza?’ Ya solo, ntango mampinga ya Babilone ezingaki Yerusaleme, bilei esilaki mpe likambo yango esalemaki mpenza. Yirimia alobi ete: “Mabɔkɔ ya basi oyo bazalaka na motema mawa elambi bana na bango moko. Bakómi lokola limpa ya kobɔndisa mpo na bato na ntango ya kokwea ya mwana mwasi ya bato na ngai.” (Bil. 4:10) Ezalaki mpenza likambo ya nsɔmɔ!
3. Ntango Nzambe azalaki kotinda basakoli epai ya libota na ye, mokano na ye ezalaki nini?
3 Ya solo, ntango Yehova azalaki kotinda basakoli lokola Yirimia, mokano na ye ezalaki kaka te ya koyebisa bato na ye mpasi oyo ekokwela bango. Nzambe alingaki nde ete bato na ye bázongela nzela ya bosembo. Alingaki ete basumuki bábongola mitema. Ezera alobaki ete: “Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bango azalaki se kotindela bango makebisi na nzela ya bamemi-nsango na ye, azalaki kotinda yango mbala na mbala, mpo azalaki koyokela bato na ye mpe esika na ye ya kofanda mawa.”—2 Nt. 36:15; tángá Yirimia 26:3, 12, 13.
4. Ndenge nini Yirimia amiyokaki ntango azalaki kosakola nsango ya Nzambe?
4 Lokola Yehova, Yirimia mpe azalaki koyokela bato ya ekólo na ye mawa. Yango emonani polele na makambo oyo alobaki liboso Yerusaleme ebebisama. Azalaki komitungisa mingi mpo na likama oyo ezalaki liboso. Soki bato yango báyokaka mpe bátosaka nsango ya Yirimia, balingaki kokima likama yango! Kanisá naino ndenge oyo Yirimia amiyokaki ntango ayebisaki bato nsango ya Nzambe. Alelaki boye: “Ee misɔpɔ na ngai, misɔpɔ na ngai! Nazali na mpasi makasi na bifelo ya motema na ngai. Motema na ngai ezali na yikiyiki na kati na ngai. Nakoki kofanda nyɛɛ te, mpo molimo na ngai eyoki lokito ya liseke, elembo ya kokebisa mpo na etumba.” (Yir. 4:19) Lokola likama yango ekómaki pene akokaki kofanda nyɛɛ te.
NINI ESALAKI ETE YIRIMIA AZALA NA KONDIMA MAKASI NDENGE WANA?
5. Mpo na nini Yirimia andimaki ete makambo oyo azalaki kosakola ekokokisama mpenza?
5 Mpo na nini Yirimia andimaki ete makambo oyo asakolaki ekokokisama mpenza? (Yir. 1:17; 7:30; 9:22) Azalaki na kondima makasi, azalaki koyekola Makomaki mpe ayebaki ete Yehova azali Nzambe ya bisakweli ya solo. Makambo oyo eleká endimisaki ete Yehova azali na makoki ya kosakola makambo oyo bato bakoki kokanisa te ete ekokokisama, na ndakisa kosikwama ya Bayisraele na boombo ya Ezipito. Yirimia ayebaki malamu makambo oyo mokanda ya Kobima elobeli mpe maloba ya moto moko oyo amonaki makambo yango na miso. Yosua akundwelaki bandeko na ye Bayisraele ete: “Boyebi malamu na mitema na bino nyonso mpe na milimo na bino nyonso ete na maloba nyonso ya malamu oyo Yehova Nzambe na bino alobaki na bino, ata liloba moko te ezangaki kokokisama. Yango nyonso ekokisamaki mpo na bino. Ata liloba moko te ezangaki kokokisama.”—Yos. 23:14.
6, 7. (a) Mpo na nini osengeli kotalela makambo oyo Yirimia asakolaki? (b) Nini ekosalisa yo ondima ete makambo oyo ozali kosakola ekokokisama mpenza?
6 Mpo na nini yo mpe osengeli kotya likebi na bisakweli ya Yirimia? Ya liboso, Yirimia azalaki na ntina ya kotya motema ete liloba ya Yehova ekozanga te kokokisama. Ya mibale, bisakweli mosusu oyo Nzambe asakolaki na nzela ya Yirimia ezali kokokisama lelo oyo, mpe okomona kokokisama ya bisakweli na ye mosusu. Ya misato, Yirimia akesanaki mingi na basakoli mosusu ya Nzambe, mpo na motángo ya bisakweli oyo asakolaki mpe mpo na molende na ye. Moto moko ya mayele alobi boye: “Ata soki tokokanisi Yirimia na basakoli mosusu, Yirimia aleki kaka.” Na makambo etali boyokani ya Nzambe ná libota na ye, Yirimia ayebanaki mingi lokola mosakoli monene; yango wana ntango Yesu azalaki koteya, bato mosusu bakanisaki ete azali Yirimia.—Mat. 16:13, 14.
7 Lokola Yirimia, yo mpe ozali kobika na ntango oyo bisakweli ya ntina mingi ezali kokokisama. Lisusu, lokola Yirimia osengeli ntango nyonso kondima ete bilaka ya Nzambe ezangaka te kokokisama. (2 Pe. 3:9-14) Ndenge nini okoki kosala yango? Osengeli ntango nyonso kokómisa makasi kondima na yo na Liloba ya esakweli ya Nzambe, oyo ebongi mpenza kotyelama motema. Mpo na yango, na mokapo oyo tokotalela bisakweli mosusu oyo Yirimia asakolaki mpe oyo amonaki kokokisama na yango. Bisakweli mosusu oyo tokotalela ekokisamaki na nsima. Mpe mosusu etaleli bomoi na yo lelo mpe bomoi na yo na mikolo ezali koya. Tiká ete yango elendisa elikya oyo otyelaka Liloba ya esakweli ya Yehova mpo ondima makasi koleka ete ‘akosala oyo akani.’—Bil. 2:17.
Mpo na nini Nzambe azalaki kotinda basakoli? Mpo na nini ondimi ete bisakweli oyo elobeli kobebisama oyo ezali koya ekokokisama mpenza?
BISAKWELI OYO YIRIMIA ASAKOLAKI MPE OYO AMONAKI KOKOKISAMA NA YANGO
8, 9. Likambo nini ya ntina mingi ekesenisi mpenza Biblia na babuku mosusu nyonso?
8 Bato mingi bamekaka kosakola makambo ekoya. Na ndakisa, bato oyo batalelaka makambo ya nkita, bakonzi ya politiki, bato ya misala ya bilimo mabe, mpe bato oyo basakolaka soki mbula ekobɛta lobi to te. Na ntembe te, yo mpe oyebi ete ezalaka pɛtɛɛ te kosakola na bosikisiki ata makambo mikemike, na ndakisa makambo oyo ekosalema na mwa mikolo to bapɔsɔ oyo ekoya. Kasi kokokisama ya bosikisiki ya bisakweli ya Biblia ezali moko na makambo ya ntina mingi oyo ekesenisaka yango na babuku mosusu nyonso. (Yis. 41:26; 42:9) Bisakweli nyonso ya Yirimia, ezala oyo esengelaki kokokisama mosika te to oyo esengelaki kokokisama mikolo mingi na nsima, ezalaki mpenza solo. Mingi kati na bisakweli yango etalelaki bato to moto mokomoko mpe bikólo. Tiká tólobela mwa bisakweli ya Yirimia oyo ekokisamaki ntango azalaki na bomoi.
9 Lelo oyo, nani akoki kosakola ndenge oyo makambo ekozala na mokili na mbula moko to mibale? Na ndakisa, moto ya mayele nani na makambo ya politiki akoki kosakola na bosikisiki soki ekólo moko boye ekokóma na nguya koleka bikólo mosusu? Nzokande, na lisalisi ya elimo ya Nzambe, Yirimia asakolaki ete Babilone ekoyangela bikólo mosusu. Yirimia alobaki ete Babilone ezalaki “kɔpɔ ya wolo” oyo Yehova akosalela mpo na kosopa nkanda na ye likoló ya Yuda mpe likoló ya bingumba mpe bikólo mingi oyo ezalaki pene na yango; alobaki lisusu ete Babilone ekokómisa bango baombo na ye. (Yir. 51:7) Yirimia mpe bato ya ntango na ye bamonaki mpenza kokokisama ya makambo yango.—Talá mpe Yirimia 25:15-29; 27:3-6; 46:13.
10. Yehova asakolaki nini mpo na bakonzi minei ya Yuda?
10 Yehova asalelaki mpe Yirimia mpo na komonisa ndenge bakonzi minei ya Yuda bakosuka. Nzambe asakolaki ete Yehoahaze to Shalume, mwana ya Mokonzi Yosiya akokende na boombo mpe akozonga lisusu na Yuda te. (Yir. 22:11, 12) Esakweli yango ekokisamaki. (2 Bak. 23:31-34) Nzambe asakolaki mpe ete Yehoyakime, oyo akómaki mokonzi nsima ya Yehoahaze, “akokundama ndenge mpunda ya mobali ekundamaka.” (Yir. 22:18, 19; 36:30) Biblia elobeli te ndenge oyo mokonzi yango akufaki to soki basalaki nini na ebembe na ye, kasi emonisi ete mwana na ye Yehoyakine akómaki mokonzi nsima na ye ntango Yerusaleme ezingamaki. Yirimia asakolaki ete Yehoyakine (oyo abengami mpe Konia mpe Yekonia) akokende na boombo na Babilone mpe akokufa kuna. (Yir. 22:24-27; 24:1) Likambo yango mpe ekokisamaki. Tokoloba nini mpo na Zidikiya, oyo azalaki mokonzi ya nsuka? Yirimia asakolaki ete Zidikiya akokabama na mabɔkɔ ya banguna oyo bazangá mawa. (Yir. 21:1-10) Nini esalemaki? Banguna yango bakangaki ye. Babomaki bana na ye ya mibali na miso na ye, babomaki ye miso, mpe bamemaki ye na Babilone, mpe akufaki kuna. (Yir. 52:8-11) Ya solo, bisakweli yango nyonso ekokisamaki.
11. Hanania azalaki nani, mpe Yehova asakolaki nini mpo na ye?
11 Totángaki na Yirimia mokapo 28 ete, na boyangeli ya Zidikiya, mosakoli ya lokuta Hanania atɛmɛlaki maloba oyo Yehova alobaki na nzela ya Yirimia ete Babilone ekokonza Yerusaleme. Hanania aboyaki liloba ya Nzambe, mpe alobaki ete ekanganeli, oyo emonisaki ete Nebukadenezare akokómisa Yuda mpe bikólo mosusu baombo na ye, ekobukana. Kasi na lisalisi ya Yehova, Yirimia amonisaki polele lokuta ya Hanania, mpe abakisaki ete bikólo mingi ekosalela mokonzi ya Babilone; alobaki lisusu ete mosakoli yango ya lokuta akokufa kaka na mbula wana. Mpe likambo yango esalemaki.—Tángá Yirimia 28:10-17.
12. Makanisi nini Bayuda mingi na ntango ya Yirimia bazalaki na yango ntango bayokaki nsango oyo Yirimia azalaki kosakwela bango?
12 Ya solo, esakweli oyo Nzambe atindaki Yirimia asakola etalelaki mingimingi kobebisama ya Yerusaleme. Mbala na mbala, Yirimia akebisaki Bayuda ete soki batiki te ezaleli na bango ya kosambela bikeko, kosala makambo na kozanga bosembo mpe mobulu, engumba na bango ekobebisama. (Yir. 4:1; 16:18; 19:3-5, 15) Bayuda mingi na ntango ya Yirimia bakanisaki ete Yehova akosala likambo ya ndenge wana te. Lokola tempelo na ye ezalaki na Yerusaleme, bakanisaki ete Nzambe akotika te ete esika yango mosantu ebebisama. Bakanisaki ete likambo yango ekoki kosalema ata moke te. Kasi, oyebi ete Yehova abukaka lokuta te. Asalaki oyo akanaki.—Yir. 52:12-14.
13. (a) Na ndenge nini mikolo na biso ekokani na mikolo ya Yirimia? (b) Mpo na nini osengeli kotya likebi na bilaka oyo Nzambe apesaki bato mosusu na ntango ya Yirimia?
13 Makambo oyo basaleli ya Nzambe bazali kokutana na yango na mikolo na biso ekokani na oyo basaleli ya sembo ya Yehova bakutanaki na yango na ntango ya Yirimia. Toyebi ete mosika te Yehova akoboma moto nyonso oyo azali koboya kotya likebi na makebisi na ye. Ata bongo, bilaka oyo Yehova apesaki na bisakweli ekoki kolendisa biso, ndenge elendisaki mpe Bayuda oyo bakangamaki na losambo ya solo na ntango ya Yirimia. Lokola Barekabe batikalaki sembo epai ya Yehova mpe batosaki mibeko ya nkɔkɔ na bango, Nzambe alobaki ete bakobika ntango Yerusaleme ekobebisama. Mpe babikaki. Lokola Biblia elobeli na nsima “Malakiya mwana ya Rekabe,” oyo apesaki mabɔkɔ na mosala ya kotonga lisusu bifelo ya Yerusaleme na ntango oyo Nehemia azalaki guvɛrnɛrɛ, yango ekoki kondimisa ete Barekabe babikaki. (Neh. 3:14; Yir. 35:18, 19) Yehova alakaki mpe Ebede-meleke ete akobika mpo atyelaki Nzambe motema mpe asungaki Yirimia. (Yir. 38:11-13; 39:15-18) Ndenge moko mpe, Nzambe alakaki ete Baruke moninga ya Yirimia, akozwa ‘molimo na ye lokola eloko oyo epunzami.’ (Yir. 45:1, 5) Okanisi nini lokola bisakweli yango ekokisamaki? Okanisi ete Yehova akosala nini mpo na yo soki otikali sembo?—Tángá 2 Petro 2:9.
Mpo na nini Ebede-meleke, Baruke, mpe Barekabe bamonaki ete esengeli kotyela bisakweli ya Nzambe motema? Okanisi nini mpo na kokokisama ya bisakweli yango?
BISAKWELI OYO EKOKISAMAKI BAMBULA MINGI NA NSIMA
14. Mpo na nini esakweli ya Nzambe oyo etali Babilone ezali kokamwisa mpenza?
14 Nzambe asakolaki ete Nebukadenezare akolonga kaka Yuda te, kasi mpe Ezipito. (Yir. 25:17-19) Likambo yango emonanaki ete ekokaki kosalema te mpamba te Ezipito ezalaki na nguya mingi, mpe ezalaki kokonza Yuda. (2 Bak. 23:29-35) Nsima ya kobebisama ya Yerusaleme, Bayuda oyo batikalaki na engumba balukaki kotika mboka na bango mpo na kokende koluka libateli na Ezipito. Balukaki kosala bongo atako Yehova akebisaki bango ete básala bongo te mpe alobaki ete akopambola bango soki batikali na Yuda. Kasi soki bakimi na Ezipito, mopanga oyo bazalaki kobanga esengelaki kozwa bango kuna. (Yir. 42:10-16; 44:30) Makomi ya Yirimia elobi te soki Yirimia amonaki ndenge bato ya Babilone babundisaki Ezipito to te. Kasi na ntembe te, Bayisraele oyo bakimaki na Ezipito basutukaki ntango esakweli yango ekokisamaki, ntango bato ya Babilone balongaki Ezipito na siɛklɛ ya motoba L.T.B.—Yir. 43:8-13.
15, 16. Ndenge nini liloba ya Nzambe na oyo etali kosikwama ya bato na ye ekokisamaki?
15 Yirimia asakolaki mpe nsuka ya boyangeli ya Babilone oyo elongaki Ezipito. Siɛklɛ moko liboso yango esalema, Yirimia asakolaki na bosikisiki ete Babilone ekokwea pwasa. Ndenge nini? Mosakoli ya Nzambe asakolaki ete mai oyo ezalaki kobatela engumba yango “ekokauka mpenza,” mpe mibali ya nguya ya Babilone bakobunda te. (Yir. 50:38; 51:30) Bisakweli yango ekokisamaki ata na makambo ya mike ntango Bamede ná Baperse balekisaki Ebale Efrate na nzela mosusu, bakatisaki na makolo ebale oyo mai na yango ekitaki; bakɔtaki na engumba mpe bato ya Babilone basutukaki. Likambo mosusu ya ntina oyo osengeli kotyela likebi ezali ete esakweli yango elobaki ete engumba yango ekotikala mpamba. (Yir. 50:39; 51:26) Ndenge oyo Babilone, oyo ezalaki kala na nguya mingi etikalá mpamba tii lelo endimisi bosolo ya esakweli ya Nzambe.
16 Yehova asakolaki na nzela ya Yirimia ete Bayuda bakosalela bato ya Babilone mbula 70. Na nsima, Nzambe asengelaki kozongisa bato na ye na mokili na bango. (Tángá Yirimia 25:8-11; 29:10.) Danyele andimaki ete esakweli yango ekokokisama mpenza, mpe ayekolaki yango mpo na koyeba ntango nini bambula ya “libebi ya Yerusaleme” ekosuka. (Dan. 9:2) Ezera alobaki ete ‘mpo liloba ya Yehova oyo ebimaki na monɔkɔ ya Yirimia ekokisama,’ ‘Yehova alamwisaki elimo ya Siruse mokonzi ya Perse,’ oyo alongaki Babilone, mpo na kozongisa Bayuda na mokili na bango. (Ezr. 1:1-4) Ndenge Yirimia asakolaki yango, Bayuda oyo bazongaki basepelaki na kimya na mboka na bango mpe bazongisaki losambo ya pɛto.—Yir. 30:8-10; 31:3, 11, 12; 32:37.
17. Limbolá ndenge oyo mbala mosusu maloba oyo Yirimia asakolaki mpo na “kolela” na Rama ekokisamaki na lolenge mibale.
17 Yirimia akomaki mpe bisakweli oyo ekokisamaki bambula mingi na nsima. Alobaki ete: “Talá oyo Yehova alobi: ‘Mongongo ezali koyokana na Rama, bileli ná mongongo ya kolela ya mawa; Rashele nde azali kolela bana na ye. Aboyi kobɔndisama mpo na bana na ye, mpo bazali lisusu te.’” (Yir. 31:15) Emonani ete nsima ya kobebisama ya Yerusaleme na mobu 607 L.T.B., Bayuda oyo bakangamaki baombo bayanganisamaki na Rama, na kilomɛtrɛ soki 8 na nɔrdi ya Yerusaleme. Kutu, ekoki kozala ete bakangami mosusu babomamaki na Rama. Mbala mosusu yango ezalaki kokokisama ya liboso ya esakweli yango; ezalaki lokola nde Rashele azali kolela “bana” na ye. Kasi, basiɛklɛ koleka motoba nsima na yango, Mokonzi Erode abomaki bana mike ya Beteleme. Matai, oyo azalaki moko ya bakomi ya evanzile, amonisi ete Yirimia asakolaki mpasi oyo bato bakoyoka nsima ya kobomama ya bana yango.—Mat. 2:16-18.
18. Ndenge nini esakweli ya Nzambe oyo etali Edome ekokisamaki?
18 Esakweli mosusu ekokisamaki mpe na siɛklɛ ya liboso T.B. Nzambe asakolaki na nzela ya Yirimia ete Edome ekozala na kati ya bikólo oyo bato ya Babilone bakobundisa. (Yir. 25:15-17, 21; 27:1-7) Kasi esakweli yango ya Nzambe esukaki kaka wana te. Edome esengelaki kokóma lokola Sodoma ná Gomora. Yango elimboli ete Edome ekotikala mpamba mpe ekozala lisusu te. (Yir. 49:7-10, 17, 18) Yango nde esalemaki mpenza. Mpo na yo, Edome to bato ya Edome bamonanaka lisusu na bakarte ya lelo? Ata moke te. Mingimingi okokuta bankombo yango kaka na mikanda ya kala mpe mikanda oyo ezali kolobela masolo ya Biblia to bakarte oyo ezali komonisa bikólo ya ntango wana. Flavius Josèphe, moto ya istware, alobi ete na siɛklɛ ya mibale L.T.B., Bayuda bandimisaki bato ya Edome losambo na bango na makasi. Na nsima, ntango Yerusaleme ebebisamaki na mobu 70 T.B., ekólo yango emonanaki lisusu te.
19. Ndenge nini mokanda ya Yirimia emonisi ete Nzambe azali na makoki ya kokokisa bisakweli na ye?
19 Ndenge tomoni yango, mokanda ya Yirimia etondi na bisakweli oyo etaleli bato to moto mokomoko mpe bikólo. Mingi kati na bisakweli yango esilá kokokisama. Likambo yango ekoki mpo na komonisa ete ebongi mpenza otyela mokanda ya Yirimia likebi mpe oyekola yango. Yango ekondimisa yo likambo moko mpo na Nzambe na biso monene: Yehova asalaki oyo akanaki, mpe mosika te akosala lisusu bongo. (Tángá Yisaya 46:9-11.) Yango ekoki kosalisa yo ondimela bisakweli ya Biblia makasi koleka. Ya solo, kokokisama ya bisakweli mosusu oyo Yirimia akomaki ezali kotalela bomoi na yo lelo oyo mpe bomoi na yo na mikolo ezali koya. Tiká tótalela mwa bisakweli yango mosusu na eteni ya nsuka ya mokapo oyo.
Wapi bisakweli mosusu oyo ekokisamaki nsima ya liwa ya Yirimia, mpe mpo na nini bisakweli yango etaleli mpe yo?
BISAKWELI OYO ETALELI BOMOI NA YO
20-22. Mpo na nini tokoki koloba ete bisakweli ya Biblia, ata mpe bisakweli mosusu ya mokanda ya Yirimia, ekokisamaka kaka mbala moko te? Pesá ndakisa.
20 Bisakweli mosusu ya Biblia ekokisamaka kaka mbala moko te. Yango ezali mpe bongo mpo na eyano oyo Yesu apesaki bayekoli na ye ntango batunaki ye elembo oyo ekomonisa ‘kozala na ye mpe bosukisi ya makambo ya ntango oyo.’ (Mat. 24:3) Esakweli yango ekokisamaki mbala ya liboso na bambula oyo ebandaki na mobu 66 tii na mobu 70 T.B. Kasi ezali polele ete makambo mosusu ya esakweli yango ekokokisama kaka na ntango ya “bolɔzi monene” oyo ekokwela mokili oyo mabe. Yango ekozala bolɔzi “oyo esalemá naino te banda mokili ebandá tii sikoyo, ɛɛ, mpe ekosalema lisusu te.” (Mat. 24:21) Makambo oyo ekosalema na ntango wana ekokokana na makambo oyo esakolami kati na bisakweli oyo Yirimia akomaki. Makambo mosusu oyo Yirimia asakolaki ekokisamaki mbala ya liboso na mobu 607 L.T.B., kasi kokokisama na yango ya mibale esalemaki na nsima ya bambula, na ndakisa esakweli oyo elobaki ete “Rashele . . . azali kolela bana na ye.” (Yir. 31:15) Ya solo, makambo mosusu oyo Yirimia asakolaki etaleli mikolo na biso, mpe kokokisama na yango etaleli mpe yo.
21 Tokoki komona likambo yango na mokanda ya Emoniseli. Na bisakweli mingi Yirimia alobelaki kokwea ya Babilone, oyo esalemaki na mobu 539 L.T.B. Na lisalisi ya elimo santu, ntoma Yoane azongelaki bisakweli yango. Na mokanda ya Emoniseli tomoni bokokani oyo ezali kati na kokokisama ya esakweli yango na ntango ya kala mpe kokokisama na yango ya monene na mikolo na biso. Yirimia asakolaki likambo moko oyo ekokisami na ntango na biso. Esakweli yango etaleli kokwea ya bokonzi moko monene, elingi koloba, lisangá ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta, oyo ebengami “Babilone monene.” (Em. 14:8; 17:1, 2, 5; Yir. 50:2; 51:8) Basaleli ya Nzambe basengelaki ‘kobima kati na ye’ mpo bázwa te bitumbu oyo akozwa. (Em. 18:2, 4; Yir. 51:6) Mai ya engumba yango, elingi koloba bato, to bandimi na ye, esengelaki ‘kokauka mpenza.’—Yir. 51:36; Em. 16:12.
22 Nzokande, tozali kozela kokokisama mosusu ya elaka ya Nzambe ete akopesa mangomba ya lokuta etumbu mpo enyokolaki basaleli na ye. Yehova ‘akozongisela ye na kolanda . . . nyonso oyo asalaki.’ (Yir. 50:29; 51:9; Em. 18:6) Na yango, bisika nyonso oyo mangomba ya lokuta ezali koyangela ekotikala mpamba.—Yir. 50:39, 40.
23. Yirimia asakolaki kozongisama ya ndenge nini oyo esalemaki na siɛklɛ ya 20?
23 Mbala mosusu yo mpe omonaka ete bisakweli ya Yirimia ezali mpe na nsango oyo ezali kopesa elikya. Yirimia asakolaki mpe kozongisama ya losambo ya solo na mabele na mikolo na biso. Kobima ya Bayuda na boombo ya Babilone ekokani na ndenge oyo basaleli ya Nzambe oyo bakangamaki na Babilone Monene basikwamaki na boombo na yango na mikolo na biso, nsima ya kotyama ya Bokonzi na likoló. Yehova azongisaki bato na ye na kati ya losambo ya pɛto, mpe likambo yango etindaki bango bápesa ye matɔndi mpe básepela mingi. Nzambe apambolaki milende oyo basalaki mpo na kosalisa basusu báya kosambela ye mpe báleisama malamu na elimo. (Tángá Yirimia 30:18, 19.) Oyebi mpe malamu ete na mikolo na biso Yehova akokisi elaka na ye ya kopesa bato na ye babateli, elingi koloba mibali oyo bakomɛli na elimo, oyo bazali kobatela etonga mpe kotyela yango likebi.—Yir. 3:15; 23:3, 4.
24. Maloba nini ya nsɔmɔ oyo Yirimia asakolaki ekokisami naino te?
24 Yirimia asukaki kaka te na koyebisa bato bilaka kitoko oyo Nzambe akokokisela bato ya sembo. Akebisaki bango mpe ete bato oyo bazali kozwa na motuya te boyokani na bango na Nzambe bakobomama. Ezali mpe bongo lelo oyo. Yango wana ezali na ntina mingi tótalela mpenza likebisi oyo ezwami na maloba oyo: “Baoyo babomami na Yehova bakozala na mokolo yango uta nsuka moko ya mabele tii na nsuka mosusu ya mabele. Bakolela bango te, mpe bakoyanganisama te mpe bakokundama te. Bakokóma lokola nyɛi na etando ya mabele.”—Yir. 25:33.
25. Mokumba nini basaleli ya Nzambe bazali na yango lelo oyo?
25 Ya solo, lokola Yirimia, biso mpe tozali kobika na ntango moko ya likama mpenza. Ndenge ezalaki na mikolo ya Yirimia, lolenge oyo bato bakoyamba nsango ya Yehova nde ekokata likambo, soki bakokufa to bakobika. Lelo oyo basaleli ya Nzambe bazali basakoli te lokola basakoli ya kala. Elimo ya Nzambe etindaka biso te tóbakisa makambo mosusu na maloba ya Yehova oyo ezali na kati ya Biblia; maloba yango ezali solo mpe ezangaka te kokokisama. Ata bongo, Nzambe apesi biso mokumba ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi mikolo nyonso tii na bosukisi ya makambo ya ntango oyo. (Mat. 28:19, 20) Na ntembe te tolingi te ‘koyiba maloba ya Yehova,’ elingi koloba kobombela bato makambo oyo ekosalema mosika te. (Tángá Yirimia 23:30.) Tokolɛmbisa nguya ya maloba ya Nzambe ata moke te. Bisakweli mingi oyo Nzambe atindaki Yirimia asakola esilá kokokisama. Yango endimisi biso ete bisakweli mosusu oyo etikali ekozanga te kokokisama. Tosengeli koyebisa bato ete Nzambe akozanga te ‘kosala oyo akani kosala mpe oyo apesaki mitindo banda mikolo ya kalakala.’—Bil. 2:17.
26. Tokotalela esakweli nini mosusu?
26 Kotalela mosala mpe nsango oyo Yirimia asakolaki ekoki te; esengeli mpe kotalela elaka monene ya Yehova ya kosala kondimana ya sika na bato na ye, kondimana oyo mibeko na yango esengeli kokomama na motema na bango. (Yir. 31:31-33) Na mokapo oyo elandi, tokolobela esakweli yango mpe ndenge oyo kokokisama na yango etaleli yo.
Bisakweli nini oyo ezali na mokanda ya Yirimia ekokisami na ntango na biso? Okanisi nini mpo na bisakweli mosusu oyo ekokisami naino te?